Lolenge malamu ya kokata mandɛfu
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA AUSTRALIE
SOKI moto moko azali kolekisa miniti mitano na mokolo mpo na kokata mandɛfu mpe soki azali kosala yango mikolo nyonso, yango elingi koloba ete nsima ya mbula 50 akolekisa mikolo 63 ya bomoi na ye mpo na kokata mandɛfu! Ndenge nini mibali batalelaka likambo yango ya kokata mandɛfu mikolo nyonso oyo Nzambe asalá?
Na ankɛtɛ moko oyo basalaki, batunaki mibali soki bakanisaka nini mpo na likambo ya kokata mandɛfu; yoká biyano na bango: “Nalingaka yango te.” “Nayiná yango mpenza.” “Esengeli kaka nakata.” “Soki esengelaki koboya mbɛlɛ nasalaka yango te.” Atako mibali mosusu balingaka mosala yango ya kokata mandɛfu te, kasi mpo na nini bakataka yango kaka? Tólobela naino mwa moke likambo yango ya kokata mandɛfu. Mbala mosusu tokozwa eyano na motuna yango.
Bazalaki kosalela ndako ya mbɛmbɛ mpe bakómi na masini ya kosalela mbala moko
Okokoka kokata mandɛfu na ndako ya mbɛmbɛ? Bongo na lino ya mbisi babengi requin? To na mwa eteni ya libanga ya mopotu? Mayele ya moto emonani mpenza na bisaleli oyo asalaki mpo na kokata mandɛfu! Na Ezipito ya kala, mibali bazalaki kokata mandɛfu na mwa mbeli ya motako (cuivre) oyo ezalaki lokola mwa epasola ya moke. Eleki bambula, na ekeke ya 18 mpe ekeke ya 19, bato bakómaki kosalela lotɛbu (sabre), oyo esalamaki libosoliboso na engumba Sheffield, na Angleterre. Mbala mingi bazalaki kosala mwa mbeli yango na langilangi; mbeli yango engumbamaki mwa moke mpe ezalaki na mwa ndako mpo na kokɔtisa yango soki osilisi kosalela yango. Esengelaki kosalela mwa bisaleli yango na likebi mpenza mpe mpo na yango esengelaki koyekola kosalela yango malamu mpamba te, ezalaki kozokisa. Moto oyo ameseni kosalela yango te, azalaki ntango mosusu kobanga kosalela bisaleli yango. Nzokande, ekeke ya 20 esalisi mpenza bato na likambo yango.
Na 1901, King Camp Gillette, moto ya États-Unis, asalaki masini moko ya kokata mandɛfu mpe akomisaki yango na mikanda ya Leta; masini yango ezalaki mpenza kozokisa te mpe ezalaki na zilɛti oyo moto asengelaki kosalela kaka mbala moko. Bato ya mokili mobimba basepelaki mingi na masini na ye mpe yango esalaki ete básala bamasini ndenge na ndenge ya kokata mandɛfu, lokola masini oyo ezali na esimbeli ya palata to ya wolo. Lelo oyo, ezali na bamasini ya kokata mandɛfu oyo basalelaka kaka mbala moko, mosusu ezali na bazilɛti mibale to misato mpe mosusu okoki kotɛngisa to kogunza yango ntango ozali kokata mandɛfu.
Ya solo, tobosani te masini ya kokata mandɛfu oyo esalaka na lotiliki; basalaki yango mpo na mbala ya liboso na 1931. Banda ntango wana, bato basepelaka na yango mingi mpo ekataka mandɛfu malamu. Nzokande bato mingi oyo balingaka kolongola mandɛfu nyonso, basepelaka mpenza kosalela zilɛti oyo ezali mopotu.
Kokata to kotika mandɛfu, likambo oyo ebongwanaka
Banda kalakala, na bantango mosusu, bato basepelaka to kokolisa mandɛfu to mpe kokata yango. Buku moko oyo ezali na motó na likambo ete Bomoi ya mokolo na mokolo na Ezipito ya kala (na Lingelesi) elobi ete bato ya kala na Ezipito “bayebanaki mpo bazalaki na nsuki ya nzoto te mpe bazalaki komikumisa na ndenge bazalaki kokata mandɛfu nyonso; bazalaki na bambeli ya malamu ya kokata mandɛfu mpe bazalaki kobomba yango na kati ya mwa libenga ya pɛto, oyo basali na poso ya nyama.” Ekoki kozala mpo na momeseno yango ya bato ya kala ya Ezipito nde Yosefe Moebele, ntango azalaki na bolɔkɔ, akataki mandɛfu na ye liboso ya kokutana na Falo.—Genese 41:14.
Baasulia bazalaki bato oyo bazalaki kotika mandɛfu mingi. Bazalaki kosalela yango lolendo mpamba te bazalaki kobongisa mandɛfu na bango malamumalamu mpe bazalaki kotyela yango likebi mingi; bazalaki kongumbangumba yango malamu mpenza, kokanga yango lokola bakangaka nsuki mpe kobongisa yango.
Na Yisalaele ya kala, mibali bazalaki kotika mandɛfu mwa mingi mpe bazalaki kosalela mbeli ya mandɛfu mpo na kobongisa yango ekola ebeleebele te. Na bongo, Mobeko ya Nzambe elingaki koloba nini ntango esɛngaki na mibali ya Yisalaele ete ‘bákataka nsuki ya pembeni na motó na bango mpo na koyeisa yango zelo te’ to ‘bábebisa nsuka ya mandɛfu na bango te’? Mobeko yango epekisaki kobongisa nsuki to mandɛfu te. Kasi, ezalaki nde kopekisa mibali ya Yisalaele kolanda mimeseno ya losambo ya mabota ya bapakano oyo bazalaki pene na bango.a—Levitike 19:27; Yilimia 9:25, 26; 25:23; 49:32.
Na Grèce ya kala, longola kaka bato ya bozwi, oyo bazalaki kokata mandɛfu nyonso, mibali nyonso bazalaki kotika mandɛfu. Emonani ete Baloma bakómaki na momeseno ya kokata mandɛfu na bango na ekeke ya mibale L.T.B., mpe na boumeli ya bikeke mingi kobanda ntango wana, bazalaki na momeseno ya kokataka mandɛfu mokolo na mokolo.
Nzokande, ntango Boyangeli ya Loma ekweaki, bato bazongelaki momeseno ya kotika mandɛfu, mpe momeseno yango eumelaki mbula 1 000 tii na katikati ya ekeke ya 17, ntango bazongelaki lisusu momeseno ya kokata mandɛfu. Bato bakangamaki na momeseno ya kokata mandɛfu nyonso tii na ekeke ya 18. Kasi na nsima, pene na nsuka ya ekeke ya 19, bato bazongelaki lisusu momeseno ya kotika mandɛfu. Yango wana, soki otali bafɔtɔ ya Charles Russell, prezida ya liboso ya Société Watchtower, na William Van Amburgh, moninga na ye moklisto, okomona bango na mandɛfu ya milai oyo babongisi yango malamu mpo ezalaki momeseno oyo ezalaki kopesa bato lokumu na ntango wana. Nzokande, na ebandeli ya ekeke ya 20, momeseno ya kokata mandɛfu ezongaki lisusu mpe tii lelo oyo na mikili mingi, bato mingi basepelaka kokata mandɛu.
Yo mpe ozali na kati ya bamilio ya mibali oyo basalelaka zilɛti mpe talatala mpo na kokata mandɛfu mokolo na mokolo? Soki ezali bongo, na ntembe te, olingaka kosala yango malamu mpenza, kozanga ete oyoka mpasi to ozoka. Mpo na yango, mbala mosusu okosepela kotalela etanda oyo ezali na motó ya likambo “Toli mpo na kokata mandɛfu na zilɛti.” Ntango mosusu osalelaka makambo mosusu oyo ezali na kati ya toli yango. Atako bongo, tiká ete okata mandɛfu na yo malamu!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, lokasa 270 mpe nkasa 439-440, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Bililingi na lokasa 27]
Toli mpo na kokata mandɛfu na zilɛti
Buku Men’s Hair (Nsuki ya mibali) epesi toli oyo mpo na kokata mandɛfu malamu na zilɛti.b
1. Lɛmbisá mandɛfu na yo: Ndenge malamu ya kolɛmbisa mpenza mandɛfu na yo ezali ya kosalela mai ya mɔ́tɔ; salelá mai mingi. Ekozala malamu kokata mandɛfu nsima ya kosukola, mpo mai ekolɛmbisa mpenza mandɛfu.
2. Salelá nkisi ya kokata mandɛfu: Sabuni nyonso, mafuta nyonso ya kopakola mpe baprodwi nyonso mosusu ya kopakola, esalaka misala misato. (1) Ekɔtisaka mai na kati ya mandɛfu, (2) etɛlɛmisaka mandɛfu mpe (3) elɛmbisaka loposo mpo zilɛti eleka malamu mpo na kokata mandɛfu. Poná prodwi oyo ebongi na yo. Osilá komeka shampoing? Basalá yango mpe mpo na kolɛmbisa nsuki.
3. Salelá zilɛti ya malamu na ndenge ya malamu: Zilɛti ya malamu ezalaka mopotu. Zilɛti oyo ezali lisusu mopotu te ekoki kobebisa loposo na yo. Ntango ozali kokata, landá ndenge mandɛfu na yo elali. Soki olandi yango te, mbala mosusu okolongola mandɛfu nyonso, kasi okoki kokata mandɛfu na nse ya loposo mpe yango ekosala ete mbala ya nsima, mandɛfu ebima na kati ya loposo na esika ete ebima na madusu ya loposo. Babuku mosusu emonisi ete soki moto—mobali to mwasi—azali na momeseno ya kokata nsuki ya nzoto na ye kozanga likebi, yango ekoki kopesa ye maladi oyo ekobimisa babibɔ.
4. Batelá loposo na yo nsima ya kokata mandɛfu: Ntango nyonso oyo okataka mandɛfu na yo, okataka loposo na yo mwa likolólikoló mpe mikrobe ekoki kokɔta wana. Yango wana, ezali na ntina ete osukola elongi na yo na mai ya pɛto mpo na kolongola bosɔtɔ nyonso; salelá liboso mai ya mɔ́tɔ mpe na nsima, mai ya malili mpo na kokanga madusu ya loposo mpe loposo ekokauka te. Soki olingi, okoki kosalela prodwi oyo bapakolaka nsima ya kokata mandɛfu mpo na kobatela loposo ete ekauka te.
[Maloba na nse ya lokasa]
b Lisolo oyo ezali kolobela kokata mandɛfu mpo na mibali. Kasi na mikili mingi, basi mpe bakataka nsuki ya biteni mosusu ya nzoto na bango; na yango, bakoki mpe kosalela toli oyo epesami awa.
[Etanda/Bililingi na lokasa 28]
Mandɛfu ezali nini?
Mandɛfu ezali nsuki oyo ebimaka na elongi. Mandɛfu esalemi na kératine mpe na baproteine mosusu. Kératine ezali proteine oyo ezali lokola singasinga mpe ezali na soufre; nzoto ya moto mpe ya nyama mpe ya ndɛkɛ nde ezalaka na kératine. Nsuki, manzaka, nsala ya ndɛkɛ, ensɔbu (sabot) mpe maseke ya nyama, nyonso wana esalemi na kératine. Na nsuki nyonso ya nzoto ya moto, mandɛfu nde ezali nsuki oyo ezalaka makasi koleka mpe ekatanaka mpambampamba te; kokata lindɛfu ezalaka mpasi lokola kokata nsinga oyo basali na motako (cuivre) oyo monene na yango ezali lokola lindɛfu. Elongi ya moto ezalaka na mandɛfu pene na 25 000 mpe na mokolo moko mandɛfu ekolaka milimɛtrɛ 0,5.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Men: A Pictorial Archive from Nineteenth-Century Sources/Dover Publications, Inc.
[Bililingi na lokasa 28]
Kokata to kotika mandɛfu, likambo oyo ebongwanaka
Moezipito
Moasulia
Moloma
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Museo Egizio di Torino
Bafɔtɔ: na ndingisa ya British Museum