Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Mituya
EKÓLO Yisalaele esalemaki ntango bato na yango babimaki na Ezipito. Esengelaki bákɔta na Mokili ya Ndaka mwa moke na nsima, kasi bakɔtaki te. Bakómaki nde koyengayenga na kati ya “esobe monene mpe ya nsɔmɔ” na boumeli ya mbula soki 40. (Deteronome 8:15) Mpo na nini? Lisolo oyo ezali na mokanda ya Mituya eyebisi biso likambo oyo esalemaki. Lisolo yango ezali komonisa biso ntina oyo tosengeli kotosa Yehova Nzambe mpe komemya bato oyo ye atye mpo na kotambwisa biso.
Mokanda ya Mituya ekomamaki na Moize na esobe mpe na mokili ya Moaba, mpe elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 38 na sanza 9—banda mobu 1512 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) tii na mobu 1473 L.T.B. (Mituya 1:1; Deteronome 1:3) Nkombo ya mokanda yango euti na resansema mibale oyo Bayisalaele basalaki; mbula soki 38 na nsima. (Mikapo 1-4, 26) Lisolo yango ekabwani na biteni misato. Eteni ya liboso elobeli makambo oyo esalemaki na Ngomba Sinai. Eteni ya mibale elobeli makambo oyo esalemaki ntango Bayisalaele bazalaki koyengayenga na esobe. Mpe eteni ya nsuka elobeli makambo oyo esalemaki na mokili ya Moaba. Ntango ozali kotánga lisolo yango, ekozala malamu omituna ete: ‘Makambo yango ezali koteya ngai nini? Mitinda nini buku yango ezali komonisa, oyo nakoki kozwela yango litomba lelo oyo?’
NA NGOMBA SINAI
Resansema ya liboso esalemaki ntango Bayisalaele bazalaki na Ngomba Sinai. Mibali nyonso ya mbula 20 mpe koleka, longola kaka Balevi, bazalaki 603 550. Na ntembe te, resansema yango esalemaki mpo na koyeba motángo ya mibali oyo bakokaki kokende na etumba. Bayisalaele nyonso, ná basi ná bana, bakisá mpe Balevi, bakokaki koleka milio misato.
Nsima ya resansema yango, Yehova apesaki Bayisalaele malako mpo na koyebisa bango ndenge oyo mabota na bango esengelaki kolandana ntango bazali kotambola, mpo na misala ya Balevi mpe misala ya tabenakle, mibeko ya kotya bato ya maladi mosika na basusu, mibeko oyo etaleli zuwa, mpe oyo etaleli ndai ya Banasili. Mokapo 7 elobeli bambeka oyo bakonzi ya mabota bapesaki mpo na kofungola etumbelo, mpe mokapo 9 elobeli ndenge basalaki Elekeli. Bapesaki bango mpe malako na ndenge ya kotonga kaa mpe ndenge ya kolongwa na kaa.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:1, 2—‘Babɛndɛlɛ’ oyo mabota misato misato ya Bayisaele basengelaki kofandaka pembeni na yango na esobe ezalaki nini? Biblia eyebisi te soki babɛndɛlɛ yango ezalaki nini. Kasi, bazalaki kotalela yango lokola biloko ya bosantu to ya losambo te. Ezalaki mpo na kosalisa Moyisalaele mokomoko ayeba esika oyo asengeli kotya hema na ye na kati ya kaa.
5:27—‘Kokɔnda ya ebɛlo’ ya mwasi oyo asali ekobo elimboli nini? Liloba “ebɛlo” oyo esalelami awa elimboli binama ya kobotela. (Genese 46:26) ‘Kokɔnda’ ya binama yango elimboli kobeba na yango, mpe mwasi yango akoki lisusu kozwa zemi te.
Mateya mpo na biso:
6:1-7. Mpo na komonisa elimo ya komipimela, Banasili basengelaki koboya vinyo mpe masanga mosusu. Mpo na komonisa botosi na bango epai ya Yehova, basengelaki kotika nsuki na bango ekola, ndenge kaka basi bazalaki kosala mpo na komonisa botosi na bango epai ya mibali to batata na bango. Mpo na kotikala pɛto, Banasili basengelaki kopusana penepene na ebembe te, ezala ebembe ya ndeko na bango mpenza. Lelo oyo, basaleli ya ntango nyonso mpe bazali komonisa elimo ya komipimela mpe botosi epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Mbala mosusu batindaka bango na bikólo ya mosika mpenza, epai ekoki kozala mpasi bázwa nzela ya kozonga mboka, ntango bayoki nsango ya liwa ya ndeko to moboti na bango.
8:25, 26. Balevi oyo bakómi mibange basengelaki kolongwa na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki kosala misala oyo bapesaki bango mpo mikumba yango epesama na mibali oyo bazali naino makasi, oyo bakokokisa yango malamu. Kasi, soki bango moko basepeli, bakokaki kopesa Balevi mosusu mabɔkɔ. Atako lelo oyo basakoli ya Bokonzi bazwaka epaso te na mosala ya Nzambe, mobeko wana ezali na liteya moko ya ntina mingi mpo na biso. Soki moklisto moko oyo akómi mobange azali kokoka mikumba mosusu te, akoki kosala makambo mosusu na mosala ya Nzambe, oyo makoki na ye ezali kopesa ye nzela.
NTANGO BAZALAKI KOYENGAYENGA NA KATI YA ESOBE
Ntango lipata oyo ezalaki likoló ya tabenakle emataki, Bayisalaele babandaki mobembo moko oyo ememaki bango na mokili ya Moaba, nsima ya mbula 38 na sanza moko to mibale. Ekozala malamu olanda nzela oyo batambolaki, na lisalisi ya karte oyo ezali na lokasa 9 ya mwa buku ‘Voyez le bon pays,’ ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Na nzela ya Kadesi, na Esobe ya Palana, Bayisalaele baimaimaki soki mbala misato. Koimaima ya liboso esukaki ntango Yehova atindaki mɔtɔ mpe ezikisaki ndambo ya bato. Na nsima, Bayisalaele bakómaki koimaima mpo bazali kolya nyama te, mpe Yehova atindelaki bango nkánga. Milyami ná Alona bakómaki koimaima na ntina na Moize mpe, mpo na yango, Milyami abɛlaki maba mpo na mwa ntango.
Ntango basalaki kaa na bango na Kadesi, Moize atindaki mibali 12 bákende konɔnga Mokili ya Ndaka. Bazongaki nsima ya mikolo 40. Bayisalaele bandimaki nsango ya mabe oyo banɔngi zomi bapesaki mpe balingaki koboma Moize, Alona, mpe banɔngi ya sembo, Yosua ná Kalebe, na mabanga. Yehova asilikaki mpe alingaki koboma bango na maladi, kasi Moize abondelaki mpo na bango, mpe Nzambe azwaki ekateli ete bakoyengayenga na esobe mbula 40—tii ntango bato nyonso oyo batángamaki na resansema ya liboso bakufaki.
Yehova apesaki bango mibeko mosusu. Kola ná bato mosusu batombokelaki Moize ná Alona, kasi batomboki mosusu babomamaki na mɔtɔ mpe mosusu mabelé emɛlaki bango. Mokolo oyo elandaki, Bayisalaele nyonso babandaki koimaima mpo na Moize ná Alona. Yango wana, Yehova atindelaki bango maladi mpe bato 14 700 bakufaki. Mpo Nzambe amonisa moto oyo ye aponi azala nganga-nzambe monene, atoisaki lingenda ya Alona. Na nsima, Yehova apesaki mibeko mosusu oyo elobelaki mikumba ya Balevi mpe kopɛtolama ya Bayisalaele. Mputulu ya ngɔmbɛ mwasi ya motane oyo basengelaki kotya na mai ya kopɛtola, ezali komonisa kopɛtolama ya masumu na nzela ya mbeka ya Yesu.—Baebele 9:13, 14.
Bana ya Yisalaele bazongaki na Kadesi, mpe kuna, Milyami akufaki. Lisangá mobimba ya Bayisalaele bakómaki lisusu koimaima mpo na Moize ná Alona. Mpo na nini? Mpo bazangaki mai. Lokola Moize ná Alona basantisaki nkombo ya Yehova te ntango babimisaki mai na likamwisi, bakokaki lisusu te kokɔta na Mokili ya Ndaka. Bayisalaele balongwaki na Kadesi, mpe Alona akufaki na Ngomba Holo. Ntango bazalaki kobalukabaluka na mokili ya Edome, Bayisalaele balɛmbaki mpenza mpe babandaki koloba mabe mpo na Nzambe mpe mpo na Moize. Yehova atindelaki bango banyoka ya ngɛngɛ. Na mbala wana lisusu, Moize abondelaki mpo na bango, mpe Nzambe alobaki na ye asala nyoka ya kwivre mpe atya yango na nsɔngɛ ya nzete moko mpo moto nyonso oyo nyoka ekoswa ye atala yango mpe abika. Nyoka wana ezalaki elilingi ya kobomama ya Yesu Klisto likoló ya nzete mpo biso tózwa bomoi ya seko. (Yoane 3:14, 15) Bayisalaele balongaki Bakonzi ya Baamola, Sihona ná Ogu mpe bazwaki bamboka na bango.
Biyano na mituna ya Biblia:
12:1—Mpo na nini Milyami ná Alona bakómaki koimaima na ntina na Moize? Emonani ete ntina mpenza ya koimaima na bango ezalaki nde mposa ya lokumu oyo Milyami azalaki na yango. Ekoki kozala ete ntango Sipola, mwasi ya Moize, alandaki Moize na esobe, Milyami akómaki kobanga noki Sipola azwa esika na ye ya mokonzi ya basi nyonso na kaa ya Bayisalaele.—Exode 18:1-5.
12:9-11—Mpo na nini kaka Milyami nde abɛlaki maba? Na ntembe te, ye moto abandaki koimaima mpe na nsima abendaki Alona. Alona amonisaki ezaleli malamu mpamba te andimaki mabe na ye.
21:14, 15—Buku oyo balobeli awa ezalaki buku nini? Biblia elobeli babuku mingi oyo bakomi ya Biblia bazongelaki makambo na yango mosusu na mikanda na bango. (Yosua 10:12, 13; 1 Mikonzi 11:41; 14:19, 29) Moko ya babuku yango ezali “mokanda ya Bitumba ya [Yehova].” Elobelaki masolo ya bitumba oyo basaleli ya Yehova babundaki.
Mateya mpo na biso:
11:27-29. Moize atikelá biso ndakisa ya malamu mpenza mpo na ezaleli na biso ntango bato mosusu bazwi mikumba na lisangá ya Yehova. Na esika Moize ayoka zuwa mpo na lokumu na ye moko, azalaki na esengo ntango amonaki ete Eledada ná Medada bazali kosakola.
12:2, 9, 10; 16:1-3, 12-14, 31-35, 41, 46-50. Yehova alingi ete basambeli na ye bátosaka bato oyo ye apesi mikumba.
14:24. Mpo na kolonga elimo ya mokili oyo etindaka bato na misala mabe, tosengeli kolona “elimo mosusu,” to makanisi mosusu. Elimo yango esengeli kokesana na elimo ya mokili.
15:37-41. Malenda oyo ezalaki na nsɔngɛ ya bilamba ya Bayisalaele ezalaki kosalisa bango bábosana te ete bazali bato oyo Nzambe aponi mpo na kosambela ye mpe mpo na kotosa mibeko na ye. Biso mpe tosengeli kotambwisa bomoi na biso na kolanda mitinda ya Nzambe mpe kokesana mpenza na bato ya mokili?
NA MOKILI YA MOABA
Ntango Bayisalaele bafandaki na mokili ya Moaba, Bamoaba batondaki mpenza na nsɔmɔ mpo na bango. Yango wana Balaka, mokonzi ya Bamoaba, afutaki Balama mpo alakela Bayisalaele mabe. Kasi, Yehova abalolaki makanisi ya Balama mpe Balama apambolaki bango nde kopambola. Na nsima, batindaki basi ya Moaba mpe ya Midyani bákende kolɛngola mibali ya Yisalaele mpo básala na bango pite mpe básambela banzambe ya lokuta. Mpo na yango, Yehova abomaki Bayisalaele 24 000 oyo babukaki mibeko na ye. Bolɔzi oyo ezalaki koboma bango esukaki ntango Fineasi amonisaki ete akoki kondima ata moke te ete moto asala bombanda na Yehova.
Resansema ya mibale emonisi ete moto moko te na kati ya baoyo bazalaki na resansema ya liboso azalaki lisusu na bomoi, longola kaka Yosua ná Kalebe. Yosua aponamaki mokambi ya Bayisalaele na esika ya Moize. Bapesaki Bayisalaele malako na ndenge ya kopesa makabo mpe mpo na ndai. Bayisalaele babundisaki Bamidyani oyo bazalaki kotumola bango mpe balongaki bango. Libota ya Lubene, libota ya Gada, mpe ndambo ya libota ya Manase bazwaki mokili oyo ezali na ɛsti ya Ebale Yolodani. Bapesaki Bayisalaele malako mpo na kokatisa Ebale Yolodani mpe kozwa Mokili ya Ndaka. Bandelo ya mokili yango etyamaki. Babwakaki mbɛsɛ mpo na kokabola mokili yango. Bapesaki Balevi bingumba 48, mpe bingumba 6 kati na yango etyamaki bamboka ya kobombama.
Biyano na mituna ya Biblia:
22:20-22—Mpo na nini nkanda ya Yehova epelelaki Balama? Yehova apekisaki mosakoli Balama kolakela Bayisalaele mabe. (Mituya 22:12) Kasi, mosakoli yango andimaki kokende na bato ya Balaka, na likanisi ya kolakela Bayisalaele mabe. Balama alukaki kosepelisa mokonzi ya Moaba, mpo apesa ye lifuta. (2 Petelo 2:15, 16; Yuda 11) Ata ntango Yehova abalolaki makanisi ya Balama mpo apambola Bayisalaele na esika alakela bango mabe, Balama alukaki kaka kosepelisa mokonzi mpe apesaki ye likanisi ete atinda basi oyo bazalaki basambeli ya Baala bákende kolɛngola mibali ya Yisalaele. (Mituya 31:15, 16) Boye, nkanda ya Nzambe epelelaki Balama mpo na lokoso na ye.
30:6-8—Moklisto akoki nde kolongola ndai ya mwasi na ye? Na mikolo na biso, Yehova atalelaka ndai lokola likambo ya moto na moto. Na ndakisa, komipesa na Yehova mpo na kosalela ye ezali ndai oyo moto asalaka ye moko. (Bagalatia 6:5) Mobali azali na lotomo te ya kolongola ndai ya ndenge wana oyo mwasi na ye alapi. Kasi, mwasi asengeli te kolapa ndai oyo eyokani te na mitinda ya Biblia to oyo ekopekisa ye kokokisa mikumba na ye epai ya mobali na ye.
Mateya mpo na biso:
25:11. Fineasi atikelá biso ndakisa monene mpenza ya molende mpo na losambo ya Yehova! Soki tomoni ndeko moko asali lisumu, mposa na biso ya kobatela bopɛto ya lisangá esengeli kotinda biso tóyebisa likambo yango epai ya bankulutu ya lisangá.
35:9-29. Lokola Moyisalaele oyo abomi moto na nko te asengelaki kokima na mboka moko ya kobombama mpe kotikala kuna na boumeli ya ntango moko boye, yango emonisi ete bomoi ezali eloko mosantu mpe ete tosengeli komemya yango.
35:33. Mpo mokili oyo ekómi mbindo mpo na makila ya moto oyo abomami kaka mpamba epɛtolama, esengeli makila ya ye oyo abomi moto yango esopama. Na yango, elongobani mpenza ete Yehova aboma bato mabe nyonso liboso azongisa paladiso awa na mabelé!—Masese 2:21, 22; Danyele 2:44.
Liloba ya Nzambe ezali na nguya
Tosengeli mpenza komemya Yehova mpe bato oyo atye mpo na kokamba basaleli na ye. Mokanda ya Mituya emonisi likambo yango polele mpenza. Yango ezali liteya ya ntina mpenza oyo ekosalisa na kobatela kimya mpe bomoko na lisangá lelo oyo!
Masolo ya mokanda ya Mituya emonisi ete bato oyo bamonaka makambo ya elimo mpamba bakweaka noki mpenza na makambo ya mabe, lokola koimaima, pite mpe ekobo, mpe losambo ya bikeko. Bandakisa mpe mateya mosusu oyo epesami na mokanda yango ya Biblia ekoki kosalelama na bamposa ya lisangá na Likita ya Mosala na masangá ya Batatoli ya Yehova. Ya solo mpenza, “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya” na bomoi na biso.—Baebele 4:12.
[Elilingi na lokasa 25]
Na nzela ya lipata moko ya kokamwa oyo ezalaki kotɛlɛma likoló ya tabenakle, Yehova azalaki koyebisa Bayisalaele esika ya kotonga kaa mpe ntango ya kolongwa
[Bililingi na lokasa 26]
Ebongi mpenza ete tótosaka Yehova, mpe azali kosɛnga biso tótosaka bamonisi na ye