Oyebaki yango?
Mpo na nini Nzambe aponaki bandɛkɛ oyo babengi kayɛ mpo na koleisa Bayisraele na esobe?
▪ Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito mpo na kokende na Mokili ya Ndaka, mbala mibale mobimba, Nzambe atindelaki bango bakayɛ mpo bálya.—Kobima 16:13; Mitángo 11:31.
Mwa bandɛkɛ yango ezalaka na molai ya santimɛtrɛ 18 mpe kilo na yango ekoki kozala na gramɛ 100. Bandɛkɛ yango babotaka na bisika mingi na wɛsti ya Azia mpe na Mpoto. Lokola bafandaka esika moko te, bandɛkɛ yango balekisaka eleko ya malili na nɔrdi ya Afrika mpe ya Arabie. Ntango batambolatambolaka, ebele ya bandɛkɛ yango balekaka na bokula ya ɛsti ya Mbu Mediterane mpe balekaka likoló ya mokili ya Sinai.
Buku moko (The New Westminster Dictionary of the Bible) elobi ete bandɛkɛ babengi kayɛ “bapumbwaka mbangu mpe malamu, balandaka mopɛpɛ; kasi soki mopɛpɛ ekei ngámbo mosusu, to soki bandɛkɛ yango balɛmbi mpo basali mobembo molai, bango nyonso bakoki kokwea na mabele, mpe bakokaka kopumbwa te.” Liboso bákoba mobembo na bango, esɛngaka bápema na mabele mokolo moko to mibale, na ntango yango, ezalaka mpasi te mpo na bato oyo balukaka bandɛkɛ mpo bákanga bango. Na ebandeli ya siɛklɛ ya 20, bato ya Ezipito bazalaki kotɛkela bato ya mikili mosusu bandɛkɛ yango milio soki misato mbula na mbula mpo na kolya.
Mbala nyonso mibale oyo Nzambe aleisaki Bayisraele bandɛkɛ yango ezalaki na eleko ya prɛnta. Atako bandɛkɛ babengi kayɛ ezalaki mbala na mbala koleka likoló ya mokili ya Sinai na eleko wana, ezali Yehova nde asalaki ete ‘mopɛpɛ epɛpa’ mpe emema bandɛkɛ yango na kaa ya bana ya Yisraele.—Mitángo 11:31.
“Fɛti ya bofungoli” oyo Yoane 10:22 elobeli ezalaki nini?
▪ Bafɛti misato oyo Nzambe asɛngaki Bayuda básala ezalaki fɛti ya bagato ezangá levire, oyo ezalaki kosalema na eleko ya prɛnta; fɛti ya Pantekote, oyo ezalaki kosalema na nsuka ya eleko ya prɛnta; mpe fɛti ya koyanganisa mbuma, oyo ezalaki kosalema na otɔnɛ. Kasi, fɛti oyo Yoane 10:22 elobeli, ezalaki kosalema na “eleko ya malili” mpe ezalaki mpo na kokanisa mokolo oyo bafungolaki lisusu tempelo ya Yehova na mobu 165 L.T.B. Ezalaki koumela mikolo mwambe kobanda na mokolo ya 25 ya sanza ya Kisleve, mpe ezalaki pene na solstice d’hiver. Nini esalaki ete bákóma kosala fɛti yango?
Na mobu 168 L.T.B., Antiochus IV Épiphane, mokonzi ya Siri azalaki na ekateli ya kolimwisa losambo ya Bayuda mpe mimeseno na bango, atongaki etumbelo ya bapagano likoló ya etumbelo oyo ezalaki na tempelo ya Yehova na Yerusaleme. Apesaki Zeusi, nzambe ya Bagrɛki, bambeka na etumbelo yango.
Likambo yango etombokisaki Bamakabe. Yuda Makabe, mokonzi ya basoda ya Bayuda, abɔtɔlaki Yerusaleme na mabɔkɔ ya Ba-Séleucide mpe asɛngaki ete bábuka etumbelo ya losambo ya bapagano mpe bátonga ya sika na esika na yango. Nsima ya mbula misato kobanda ntango bakómisaki etumbelo mbindo, Yuda afungolaki lisusu tempelo ya Yehova oyo epɛtolamaki. Banda ntango wana, Bayuda basalaka ‘fɛti yango ya bofungoli’ (na Ebre, hanoukkah) na Desɛmbɛ. Lelo oyo, babengaka fɛti yango Hanoukkah.
[Elilingi na lokasa 14]
Elilingi ya Yuda Makabe, Lyon, 1553
[Elilingi na lokasa 14]
Euti na buku Wood’s Bible Animals. 1876