“Batelá nzete oyo ya vinyo”!
BANƆNGI 12 oyo Moize atindaki bákende kotala Mokili ya Ndaka batambolaki na mokili yango mobimba. Moize ayebisaki bango bátala soki bato ya mokili yango bazali ndenge nini mpe bámema mwa bambuma ya mokili yango. Mbuma nini ebendaki likebi na bango? Bamonaki elanga moko ya vinyo pembeni ya Hebeloni; bambuma na yango ezalaki minene na boye ete esɛngaki banɔngi mibale mpo na komema ekango mobimba. Lokola esika yango ezalaki na mabelé ya malamu, banɔngi babengaki yango “lobwaku ya Esekoli,” to lobwaku ya ekango mpamba te vinyo ezalaki kobota mingi kuna.—Mituya 13:21-24.
Na bambula ya 1800, moto moko oyo akendaki kotala mokili ya Palestine alobaki boye: “Lobwaku ya Esekoli . . . etondi na banzete ya vinyo tii lelo oyo, mpe bambuma na yango eleki kitoko mpe minene na Palestine mobimba.” Atako na ntango ya kala banzete ya vinyo ya Esekoli nde elekaki kitoko, Palestine mobimba ezalaki na banzete ya vinyo oyo ezalaki kobota bambuma ya malamu. Masolo ya Ezipito emonisi ete Bafalao bazalaki komɛla vinyo oyo ezalaki kouta na mokili ya Kanana.
Buku moko (The Natural History of the Bible) elobi boye: “Bangomba ya [Palestine] oyo mabelé na yango esanganá na mwa mabanga ezwaka moi mingi na eleko ya molunge, mpe mai ya mbula ekɔtaka noki na mabelé; nyonso wana esalaka ete vinyo ebota malamu kuna.” Yisaya amonisaki ete na bisika mosusu banzete ya vinyo ezalaki ata nkóto moko.—Yisaya 7:23.
“Mokili ya nzete ya vinyo”
Moize ayebisaki Bayisalaele ete bakofanda na mokili ya “nzete ya vinyo mpe ya nzete ya mosuke mpe ya limona.” (Deteronome 8:8) Buku moko (Baker Encyclopedia of Bible Plants) elobi ete “na ntango ya kala, banzete ya vinyo ezalaki mingi na Palestine na boye ete na bisika nyonso oyo batimolaki bazalaki komona bambuma na yango.” Banzete ya vinyo ya Mokili ya Ndaka ezalaki kobota mbuma mingi; yango wana ata ntango basoda ya Nebukadanesala babebisaki mokili ya Yuda na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bato oyo batikalaki na mokili yango “balɔkɔtaki vinyo mpe mbuma ya ntango ya moi mingi mingi mpenza.”—Yilimia 40:12; 52:16.
Bayisalaele basengelaki kobatela banzete na bango ya vinyo malamu mpo ebota mbuma mingi oyo bakoki kosala na yango masanga. Mokanda ya Yisaya emonisi ete na Yisalalele, liboso mosali-elanga alona ‘vinyo ya malamu’ azalaki naino kotimola mabelé na ngomba mpe kolongola mabanga nyonso ya minene. Na nsima, azalaki kosalela mabanga yango mpo na kotonga lopango zinganzinga ya elanga ya vinyo. Lopango yango ezalaki kopekisa bangɔmbɛ, bagambala, bantaba ya zamba, mpe miyibi bákɔta na elanga. Ntango mosusu azalaki mpe kosala ekamwelo ya vinyo; longola yango asengelaki mpe kotonga mwa esika moko ya kobombama moi na ntango ya kobuka mbuma. Ezali nsima ya kosala makambo nyonso wana nde moloni akokaki kotya motema ete akobuka mbuma malamu.—Yisaya 5:1, 2.a
Mpo nzete ya vinyo ebota malamu, moloni azalaki mbala na mbala kokata bitape na yango, kobalola mabelé pembenipembeni ya nzete yango, kolongola matiti mabe mpe nzubɛ oyo ekokaki kobebisa yango. Azalaki mpe kosopela yango mai na eleko oyo mbula ezalaki konɔka te.—Yisaya 5:6; 18:5; 27:2-4.
Ntango ya kobuka mbuma, na nsuka ya eleko ya molunge, ezalaki ntango moko ya esengo. (Yisaya 16:10) Mikapo misato ya mokanda ya Nzembo ezali na maloba oyo na likoló, “mpo na [to, na lolenge ya] Giti .” (Nzembo 8, 81, mpe 84) Biblia ya Septante ebongoli liloba yango na “ekamwelo ya vinyo” mpe ekoki kozala ete Bayisalaele bazalaki koyemba banzembo yango na ntango ya kobuka mbuma ya vinyo. Atako bambuma yango ezalaki libosoliboso mpo na kosala masanga, Bayisalaele bazalaki mpe kolya mbuma yango to mpe kokausa yango mpo na kosala na yango gato.—2 Samwele 6:19; 1 Ntango 16:3.
Nzete ya vinyo ya Yisalaele
Na bisika mingi, Biblia ekokanisi basaleli ya Nzambe na nzete ya vinyo; elilingi yango ebongi mpenza, mpamba te mpo na Bayisalaele, nzete ya vinyo ezalaki na motuya mingi. Na Nzembo 80, Asafa akokanisaki libota ya Yisalaele na nzete ya vinyo oyo Yehova akonaki na mokili ya Kanana. Yehova abongisaki malamu mokili yango mpo Yisalaele oyo ezalaki lokola nzete na ye ya vinyo, ezwa misisa mpe ekola malamu. Kasi, nsima ya bambula, lopango oyo ezalaki kobatela yango ekweaki. Bato ya ekólo yango bazalaki lisusu kotyela Yehova motema te, mpe Yehova atikaki kobatela bango. Banguna na bango bakómaki kobebisa mokili ya Yisalaele, ndenge kaka ngulu ya zamba ebebisaka elanga ya vinyo. Asafa abondelaki Yehova mpo asunga libota yango ezongela nkembo na yango. Alobaki boye: “Batelá nzete oyo ya vinyo.”—Nzembo 80:8-15.
Yisaya akokanisaki “ndako ya Yisalaele” na elanga ya vinyo oyo ekómaki mokemoke kobota vinyo oyo ekokani na vinyo ya zamba, to vinyo ya ngaí. (Yisaya 5:2, 7) Mbuma ya vinyo ya zamba ezalaka monene te mpe ezalaka na mosuni mingi te. Ebongaka te mpo na kosala na yango masanga to kolya yango—ndakisa wana ebongaki mpenza mpo na komonisa ekólo oyo epɛngwi oyo ezalaki kobimisa mbuma ya mabe, elingi koloba kobuka mibeko. Soki ekólo yango ekómaki kobota mbuma ya mabe, ezalaki foti ya Yehova te. Yehova asalaki nyonso oyo ekoki mpo ekólo yango ebota mbuma ya malamu. Yango wana atunaki boye: “Ekokaki kosala likambo mosusu nini mpo na elanga na ngai ya [vinyo], oyo esali ngai te?”—Yisaya 5:4.
Lokola libota ya Yisalaele, oyo ezalaki lokola nzete ya vinyo ebotaki mbuma te, Yehova ayebisaki bango ete akobuka lopango oyo atongaki pembenipembeni ya libota yango. Na ndenge ya elilingi, alobaki ete akobongisa lisusu bitape na yango te to mpe kobalola mabelé pembenipembeni na yango te. Mbula ekonɔkela yango lisusu te, banzube mpe matiti ya mabe ekobebisa yango.—Yisaya 5:5, 6.
Moize asakolaki ete soki Bayisalaele bapɛngwi, banzete na bango ya vinyo ekokauka. Alobaki boye: “Okolona bilanga ya vinyo mpe okobongisa yango kasi okomɛla vinyo na yango te, mpo ete nkusu ekolya yango.” (Deteronome 28:39) Soki nkusu ekɔti na mobimbi ya nzete ya vinyo mpe elei yango, eumelaka mikolo mingi te mpo nzete yango mobimba ekauka.—Yisaya 24:7.
“Nzete ya vinyo ya solosolo”
Se ndenge Yehova akokanisaki Yisalaele na nzete ya vinyo, Yesu mpe asalelaki elilingi yango. Na butu ya nsuka oyo alekisaki na bayekoli na ye, ayebisaki bango boye: “Ngai nazali nzete ya vinyo ya solosolo, mpe Tata na ngai azali mosali-elanga.” (Yoane 15:1) Yesu akokanisaki bayekoli na ye na bitape ya nzete ya vinyo. Se ndenge bitape ya nzete ya vinyo esengeli kosimbama na mobimbi mpo ekola malamu, bayekoli ya Klisto basengeli kokangama na ye. Yesu alobaki boye: “Kozanga ngai bokoki kosala ata eloko moko te.” (Yoane 15:5) Basali-bilanga balonaka nzete ya vinyo mpo bábuka mbuma na yango, ndenge moko mpe Yehova asɛngi basaleli na ye bábota mbuma ya elimo. Yango esepelisaka Mosali-elanga, elingi koloba Nzambe mpe epesaka ye nkembo.—Yoane 15:8.
Mpo nzete ya vinyo ebota malamu esɛngaka kobongisa bitape na yango mpe kolongola matiti ya mabe pembepembeni; Yesu alobelaki makambo yango mibale. Mosali-elanga azalaki kokata bitape ya nzete ya vinyo mbala mibale na mbula mpo na kobongisa yango mpo ebota mbuma mingi. Na ntango ya malili makasi, mosali-elanga azalaki kokata bitape nyonso ya nzete ya vinyo. Azalaki kotika bitape ya minene misato to minei; bitape oyo mokomoko ekokaki kobimisa lisusu etape moko to mibale mpo na kobota mbuma. Na nsima, ntango mosali-elanga asilisi kosala mosala yango, azalaki kotumba bitape oyo akati.
Yesu alobelaki likambo yango boye: “Soki moto akobi kozala na bomoko elongo na ngai te, akobwakama libándá lokola etape mpe akokauka; mpe basangisaka bitape wana mpe babwakaka yango na mɔtɔ mpe ezikaka.” (Yoane 15:6) Nzete ya vinyo etikalaka polele ntango bakati bitape na yango; kasi nsima ya mwa basanza, mosali-elanga alukaka lisusu bitape oyo asengeli kokata.
Yesu alobaki boye: “Etape nyonso oyo ezali na kati na ngai oyo ebotaka mbuma te alongolaka yango.” (Yoane 15:2) Na maloba yango, Yesu alobelaki likambo oyo mosali-elanga azalaki kosala na ntango oyo nzete ya vinyo ebimisi bitape ya sika; ntango wana akokaki komona bitape oyo ekobimisa mbuma. Azalaki kotala malamumalamu bitape nyonso ya sika mpo na koyeba oyo ezali na mbuma mpe oyo ezali na mbuma te. Soki atiki bitape oyo ekobimisa mbuma te, ekotya nkaka na bitape oyo ekobimisa mbuma mpe ekozwa vitamini mosusu oyo esengeli kokende na bitape yango; yango wana azalaki kokata yango.
Na nsuka, Yesu alobelaki likambo ya kopɛtola nzete; alobaki boye: “Nyonso oyo ebotaka mbuma apɛtolaka yango, mpo ebota mbuma mingi koleka.” (Yoane 15:2) Ntango mosali-elanga alongoli bitape oyo ebimisi mbuma te, akotalela malamumalamu bitape oyo ezali na mbuma. Pembeni ya etape oyo eboti mbuma akoki komona mwa bitape mosusu oyo ebandi kobima, oyo asengeli mpe kolongola. Soki atiki yango ekobenda vitamini mosusu. Akoki mpe kolongola nkasa mosusu ya nzete mpo mbuma ya vinyo ezwa moi malamu. Nyonso wana ezali makambo ya ntina oyo mosali-elanga asengelaki kosala mpo bitape oyo etikali ebota mbuma mingi.
‘Bókoba kobota mbuma mingi’
Bitape ya “nzete ya vinyo ya solosolo” ezali nde baklisto bapakolami. Kasi, bayekoli mosusu ya Klisto, elingi koloba “bampate mosusu,” basengeli mpe kobota mbuma. (Yoane 10:16) Bango mpe bakoki kobota “mbuma mingi” mpe kokumisa Tata na bango ya likoló. (Yoane 15:5, 8) Ndakisa ya nzete ya vinyo ya solosolo oyo Yesu apesaki ezali kosalisa biso tóbosana te ete mpo tóbika tosengeli kotikala na bomoko na Klisto mpe kobota mbuma mingi ya elimo. Yesu alobaki boye: “Soki botosi bakomandema na ngai, bokokoba kozala na kati ya bolingo na ngai, ndenge ngai mpe nazali kotosa bakomandema ya Tata mpe nakobi kozala na kati ya bolingo na ye.”—Yoane 15:10.
Na mikolo ya Zekalia, Nzambe alakaki Bayisalaele oyo batikalaki ete mokili na bango ekobimisa ‘nkona ya kimya, [nzete ya vinyo] ekobimisa mbuma na yango mpe mabelé ekobimisa kofuluka na yango.’ (Zekalia 8:12) Biblia esaleli mpe nzete ya vinyo ntango elobeli kimya oyo basaleli ya Nzambe bakozala na yango na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. Mosakoli Mika alobaki boye: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete ya vinyo] na ye mpe na nzete na ye ya [figi], moto moko akobangisa bango te mpo ete monɔkɔ ya [Yehova] na bibele elobi bongo.”—Mika 4:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku moko (Encyclopaedia Judaica) elobi ete na Yisalaele, basali-bilanga bazalaki kolinga mingi kolona nzete ya vinyo oyo ezalaki kobimisa mbuma ya motane-moindo; Yisaya 5:2 elobeli mbuma yango. Masanga ya mbuma yango ezalaki sukali mpe motane ngwaa.
[Elilingi na lokasa 18]
Nzete ya vinyo oyo ekauki
[Elilingi na lokasa 18]
Bakati bitape na eleko ya malili
[Elilingi na lokasa 18]
Batumbi bitape ya mabe