Oyebaka “kozela”?
“Bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kozeláká mpe kobateláká na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova!”—2 PETELO 3:11, 12.
1, 2. Ndakisa nini tokoki kosalela mpo na kolobela “kozela” mokolo ya Yehova?
KANISÁ naino libota moko oyo bazali kozela bapaya oyo bakoya kolya na ndako na bango. Ngonga oyo basengeli kokóma elingi ekoka. Mama azali kosilisa kobongisa mwa biloko mikemike. Tata ná bana bazali kopesa ye mabɔkɔ mpo na kotya eloko na eloko na esika na yango. Moto nyonso azali na esengo. Bango nyonso bazali kozela bapaya mpo na kolya bilei kitoko, kobɛta masolo mpe kolekisa ntango malamu elongo.
2 Biso baklisto tozali kozela likambo moko ya ntina koleka. Likambo nini? Biso nyonso tozali kozela “mokolo ya Yehova”! Liboso mokolo yango eya, tosengeli kozala lokola mosakoli Mika oyo alobaki ete: “Nakobanda kotalatala Yehova. Nakozela Nzambe ya lobiko na ngai.” (Mika 7:7, NW) Kozela yango elimboli nde kokanga mabɔkɔ? Te. Ezali na makambo mingi oyo tosengeli kosala.
3. Na kotalela 2 Petelo 3:11, 12, ezaleli nini baklisto basengeli kozala na yango?
3 Ntoma Petelo alakisi biso ndenge malamu ya kozela. Alobaki boye: “Bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kozeláká mpe kobateláká na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova!” (2 Petelo 3:11, 12) Tósimba ete maloba yango ezali motuna te. Na mikanda mibale oyo Petelo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe, amonisaki lolenge ya bato oyo baklisto basengeli kozala. Lisusu, apesaki bango toli ya kokoba kosala ‘misala ya etamboli ya bosantu mpe misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.’ Atako mbula 30 elekaki banda Yesu Klisto apesaki elembo “ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” baklisto basengelaki kaka kosɛnzɛlaka. (Matai 24:3) Basengelaki ‘kozela mpe kobatela na makanisi’ kozala ya mokolo ya Yehova.
4. ‘Kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova’ ezali kosɛnga nini?
4 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “kobatela na makanisi” elimboli mpenzampenza “kobakisa lombangu.” Ya solo, tokoki mpenza te ‘kobakisa lombangu’ ya koya ya mokolo ya Yehova. ‘Toyebi mokolo te mpe ngonga te’ oyo Yesu Klisto akoya kopesa banguna ya Tata na ye etumbu. (Matai 24:36; 25:13) Buku moko elobi ete maloba ‘kobakisa lombangu’ euti na verbe oyo eyokani na ‘kozala na molende, komipesa na likambo moko.’ Na bongo, Petelo azalaki kolendisa baninga na ye bandimi bázala na mposa makasi ya mokolo ya Yehova. Mpo bálonga kosala bongo, basengelaki kobatela na makanisi kozala ya mokolo yango. (2 Petelo 3:12) Lokola “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova” ekómi mpenza penepene, biso mpe tosengeli kozala na makanisi ya ndenge wana.—Yoele 2:31.
Kozela na “misala ya etamboli ya bosantu”
5. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na mposa makasi ya “mokolo ya Yehova”?
5 Soki tozali mpenza na mposa makasi ya kobika na mokolo ya Yehova, tokomonisa yango na “misala ya etamboli ya bosantu mpe misala ya ezaleli ya kobanga Nzambe.” Maloba “misala ya etamboli ya bosantu” ekoki kozongisa na makanisi na biso toli ya Petelo oyo elobi boye: “Lokola bana ya botosi, bótika kolanda bamposa oyo bozalaki na yango kala na kati ya kozanga boyebi na bino, kasi, na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na kati ya etamboli na bino mobimba, mpamba te ekomamá ete: ‘Bosengeli kozala basantu, mpo ngai nazali mosantu.’”—1 Petelo 1:14-16.
6. Mpo na kozala basantu, tosengeli kosala nini?
6 Mpo na kozala basantu, tosengeli kozala pɛto na nzoto, na makanisi, na bizaleli mpe na elimo. Tozali nde komibatela pɛto lokola bato oyo bazali komema nkombo ya Yehova mpo tómibongisa mpo na “mokolo ya Yehova”? Lelo oyo, kotikala pɛto ndenge wana ezali lisɛki te mpamba te bato ya mokili bazali se kondima makambo oyo liboso bazalaki komona mabe. (1 Bakolinti 7:31; 2 Timote 3:13) Tozali nde komona ete ndenge na biso ya kotalela malamu ná mabe ezali se kokesana na oyo ya bato ya mokili? Soki tozali komona bokeseni yango te, tosengeli komitalela malamu. Ekoki nde kozala ete atako lolenge na biso ya kokesenisa malamu ná mabe eleki ya bato ya mokili, lolenge yango ezali mpe kobeba? Soki ezali bongo, tosengeli kobongisa makambo nokinoki mpo na kosepelisa Nzambe.
7, 8. (a) Nini ekoki kobosanisa biso ete tosengeli kosala “misala ya etamboli ya bosantu”? (b) Ekoki kosɛnga tóbongisa makambo nini?
7 Lokola na Internet bakómi kolakisa bililingi ya bato oyo bazali kosala makambo ya nsɔni mpe lokola moto akoki kotala yango na esika oyo azali ye moko, bato mosusu oyo bazalaki komona makambo mabe yango te bakómi na “mabaku ebele mpenza ya komona makambo ya pite,” ndenge monganga moko alobaki. Soki tozali kofungola bisika oyo ezali na makambo ya mabe ntango tozali kosalela Internet, yango ekolakisa ete tobosani mobeko ya Biblia oyo esɛngi ete ‘tósimba eloko ya mbindo te.’ (Yisaya 52:11) Soki tozali kosala likambo ya ndenge wana tokoki mpenza nde koloba ete tozali “kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova”? To na makanisi tozali kozongisa mokolo yango nsima mpe koloba na nse ya motema ete ata soki lelo tobebisi elimo na biso na makambo ya mbindo, tozali naino na ntango ya komipɛtola? Soki tosí tokwei na makambo ya ndenge wana, tosengeli nokinoki kosɛnga Yehova ‘asala ete miso na biso eleka kasi etɛlɛma te ntango emoni eloko ya mpamba; abatela biso na bomoi na nzela na ye’!—Nzembo 119:37, NW.
8 Ebele ya Batatoli ya Yehova, bilenge mpe mikóló, bazali kobatela bizaleli malamu oyo Nzambe azali kosɛnga mpe bazali komitika te kobendama na makambo mabe ya mokili oyo. Lokola bayebi ete mikolo etikali ya kotánga mpe babosani te likebisi ya Petelo ete “mokolo ya Yehova ekoya lokola moyibi,” bazali kokoba kosala “misala ya etamboli ya bosantu.” (2 Petelo 3:10) Misala na bango ezali komonisa ete bazali ‘kozela mpe kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova.”a
Kozela na “misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe”
9. Ezaleli ya kokangama na Nzambe esengeli kotinda biso na kosala nini?
9 po na kobatela mokolo ya Yehova na makanisi, ezali mpe na ntina tómonisa “misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” “Ezaleli ya kokangama na Nzambe” ezali kosɛnga kopesa Nzambe limemya oyo ekotinda biso tósala makambo oyo esepelisaka ye. Kotikala sembo epai ya Yehova nde etindaka biso na kosala misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe. Mokano na ye ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Nzambe “alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Na bongo, esengeli mpenza ete ezaleli ya kokangama na Nzambe epesa biso mposa ya kobakisa milende mpo na kosalisa bato na koyekola makambo ya Yehova mpe komekola ye.—Baefese 5:1.
10. Mpo na nini tosengeli kokeba na “nguya ya bokosi ya bomɛngo”?
10 Bomoi na biso ekotonda na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe soki tozali koluka liboso Bokonzi ya Nzambe. (Matai 6:33) Yango ezali kosɛnga kotya biloko ya mokili na esika na yango. Yesu apesaki toli oyo: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya ezaleli ya kolula biloko ya bato, mpamba te ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.” (Luka 12:15) Ata soki tokanisi ete tokoki kokóma na bolingo ya mbongo te, tosengeli kobosana te ete “mitungisi ya ebongiseli ya makambo oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekoki ‘kotya liloba [ya Nzambe] nkaka.’ (Matai 13:22) Ekoki kozala mpasi mpo na kozwa mosala oyo bazali kofuta biso malamu. Yango wana, na bisika mosusu, bato mingi bazali kokanisa ete mpo bázala malamu, basengeli kokende na mokili ya bozwi, ntango mosusu bakotika mabota na bango ebele ya bambula. Basaleli mosusu ya Nzambe mpe bazali na makanisi ya ndenge wana. Soki bakei kofanda na mboka mosusu nde bakokoka kosombela libota na bango biloko ya mikolo oyo. Kasi, bandeko na bango oyo bakotikala na mboka bakoki kokóma ndenge nini na elimo? Lokola mokonzi ya libota azali lisusu te, bakozala nde na makasi ya elimo oyo esengeli mpo na kobika na mokolo ya Yehova?
11. Ndenge nini moto moko oyo akendaki koluka mosala na mboka mopaya amonisaki ete misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali na ntina koleka kozala na bozwi?
11 Mobali moko ya Philippines akendaki kosala na Japon; kuna akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe bateyaki ye solo. Ntango ayebaki mokumba oyo Biblia epesi na mokonzi ya libota, amonaki ete asengeli kosalisa mwasi ná bana na ye bákóma basambeli ya Yehova. (1 Bakolinti 11:3) Mwasi na ye oyo atikalaki na mboka na bango apekisaki mobali makasi kolanda lingomba na ye ya sika mpe alingaki ete atikala na Japon mpo atindelaka bango mbongo na esika azonga na mboka mpo na koteya libota na ye Biblia. Kasi, lokola mobali yango amonaki ete oyo ezali lisusu mikolo ya kolekisa ntango te mpe lokola alingaki libota na ye, azongaki na mboka na ye. Motema molai mpe bolingo oyo amoniselaki libota na ye ezwaki mbano. Nsukansuka, libota na ye endimaki losambo ya solo, mpe mwasi na ye akómaki mosakoli ya ntango nyonso.
12. Mpo na nini tosengeli kotya matomba ya elimo na esika ya liboso na bomoi na biso?
12 Lelo oyo, biso tokokani na bato oyo bazali na kati ya ndako oyo ezali kozika. Omoni te ete ekozala bozoba soki tozali kokimakima mbangu na kati ya ndako oyo ezali kozika mpe etikali moke ekwea, mpo na koluka kobimisa biloko? Tokanisi ete ekoleka malamu mpenza kobikisa bomoi na biso moko ná libota na biso mpe bomoi ya bato mosusu oyo bazali na ndako yango, boye te? Etikali moke mokili oyo ekwea, mpe bomoi ya bato ebele ezali na likama. Lokola toyebi yango, tosengeli kotya matomba ya elimo na esika ya liboso mpe na molende nyonso, kotya makanisi na biso na mosala ya kosakola Bokonzi mpo na kobikisa bomoi ya bato.—1 Timote 4:16.
Tosengeli “kozanga litɔnɔ”
13. Tosengeli koluka ete mokolo ya Yehova ekuta biso na bizaleli ya ndenge nini?
13 Ntango Petelo azali komonisa ntina ya koyeba kozela, alobaki lisusu boye: “Balingami, lokola bozali kozela makambo wana, bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka akuta bino kozanga litɔnɔ mpe kozanga mbeba mpe na kati ya kimya.” (2 Petelo 3:14) Nsima ya kolendisa na kosala misala ya etamboli ya bosantu mpe misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, Petelo amonisaki ntina ya kozala bato oyo Yehova akokuta ete bapɛtolami na makila ya motuya mingi ya Yesu. (Emoniseli 7:9, 14) Yango ezali kosɛnga ete moto amonisa kondima na ye mpo na mbeka oyo Yesu apesaki, amipesa na Nzambe mpe akóma mosaleli ya Yehova oyo azwi batisimo.
14. “Kozanga litɔnɔ” esɛngi nini?
14 Petelo alendisi biso tósala nyonso mpo bákuta biso “kozanga litɔnɔ.” Tozali nde kobatela bilamba na biso ezwa litɔnɔ te, elingi koloba tozali nde kobatela etamboli mpe bomoto na biso ya boklisto mpo mokili ebebisa yango te? Ntango elamba na biso ezwi litɔnɔ, tolukaka mbala moko kolongola yango. Soki ezali elamba oyo tolingaka mingi, tosalaka mayele nyonso mpo na kolongola litɔnɔ yango. Toyokaka mpe ndenge yango soki bilamba na biso ya boklisto ezwi litɔnɔ mpo na mwa mbeba na bomoto to na etamboli na biso?
15. (a) Mpo na nini Bayisalaele basengelaki kobakisa eteni ya elamba ya nsingansinga na nsuka ya bazambala na bango? (b) Mpo na nini basaleli ya Yehova ya mikolo na biso bakeseni na bato mosusu?
15 Bayisalaele basengelaki kokangisa “eteni ya elamba ya nsingansinga na nsuka ya bilamba na bango” mpe “kobakisa kitendi ya bulé likoló ya elamba ya nsingansinga na nsuka ya zambala.” Mpo na nini? Mpo bábosana mibeko ya Yehova te, mpo bátosa yango, mpe ‘bázala basantu’ na miso ya Nzambe na bango. (Mituya 15:38-40, NW) Biso oyo tozali basaleli ya Yehova na ntango oyo tokeseni na bato ya mokili mpamba te totosaka mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Na ndakisa, tobatelaka bizaleli ya malamu, tobatelaka bosantu ya makila, mpe toboyaka losambo nyonso ya bikeko. (Misala 15:28, 29) Bato mingi bamemyaka biso mpo na ekateli na biso ya kotikala pɛto.—Yakobo 1:27.
Tosengeli “kozanga mbeba”
16. Komibatela “kozanga mbeba” ezali kosɛnga biso nini?
16 Petelo alobaki mpe ete basengeli kokuta biso “kozanga mbeba.” Tokosala ndenge nini? Mbala mingi, moto akoki kolongola litɔnɔ, kasi mbeba te. Mbeba emonisaka ete likambo moko ya mabe ezali na kati ya moto. Ntoma Paulo apesaki baninga na ye baklisto ya Filipi toli oyo: “Bókoba kosala makambo nyonso kozanga koimaima mpe bantembe, mpo ete bókóma bato oyo bazangi mbeba mpe bato bazangi ngambo, bana ya Nzambe oyo bazangi litɔnɔ na kati ya libota oyo etɛngamá mpe egumbamá, oyo na kati na yango bozali kongɛnga lokola miinda na mokili.” (Bafilipi 2:14, 15) Soki tolandi toli wana, tokoboya koimaima mpe bantembe mpe tokosalela Nzambe na mokano ya malamu. Kolinga Yehova mpe bazalani na biso ekotinda biso tósakola “nsango malamu oyo ya bokonzi.” (Matai 22:35-40; 24:14) Lisusu, tokokoba kosakola nsango malamu ata soki bato mingi bazali koyeba te ntina oyo tozali kopesa ntango mpe makasi na biso mpo na kosalisa bato mosusu báyekola makambo ya Nzambe mpe Biblia, Liloba na ye.
17. Mposa na biso esengeli kozala nini soki tolingi kozwa mikumba na kati ya lisangá ya boklisto?
17 Lokola tolingi bákuta biso “kozanga mbeba,” tosengeli kotalela mposa oyo ezali kotinda biso tósala makambo nyonso oyo tozali kosala. Totiki ezaleli oyo bato ya mokili bazali na yango ya koluka kokokisa kaka bamposa na bango, na ndakisa koboma nzoto mpo na bozwi to mpo na lokumu. Soki tolingi kozwa mikumba na kati ya lisangá, esengeli kozala na mokano ya malamu mpe bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bazalani nde esengeli kopesa biso mposa yango. Ezali esengo na komona mibali ya elimo ‘bazali koluka kosala mosala ya mokɛngɛli’ na esengo mpe na mposa mpenza ya kosalela Yehova mpe baninga na bango bandimi. (1 Timote 3:1; 2 Bakolinti 1:24) Ya solo, baoyo bakokisi masɛngami mpo na kozala bankulutu ‘bazali kobatela etonga ya Nzambe . . . na bolingo malamu; na bolingo ya litomba ezangi sembo te, kasi na mposa makasi; na komikómisáká mpe te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi nde na kokómáká bandakisa epai ya etonga.’—1 Petelo 5:1-4.
Tosengeli kozala “na kati ya kimya”
18. Batatoli ya Yehova bayebani malamu na bizaleli nini?
18 Likambo ya nsuka oyo Petelo alobaki ezali ete basengeli kokuta biso “na kati ya kimya.” Lisɛngami yango elingi koloba ete kimya esengeli kozala kati na biso ná Yehova mpe kati na biso ná bazalani na biso. Petelo amonisaki ete ezali na ntina mingi ‘tólinganaka makasi’ mpe tózala ntango nyonso na kimya elongo na bandeko na biso baklisto. (1 Petelo 2:17; 3:10, 11; 4:8; 2 Petelo 1:5-7) Mpo na kobatela kimya, tosengeli kolinganaka. (Yoane 13:34, 35; Baefese 4:1, 2) Bolingo mpe kimya na biso emonanaka mingimingi na mayangani oyo esangisaka bato ya mikili ndenge na ndenge. Na liyangani moko ya ndenge wana oyo esalemaki na Costa Rica na 1999, moto moko oyo atɛkisaka biloko na libándá ya mpɛpɔ ayokaki nkanda mpo Batatoli oyo bakendaki koyamba bandeko na bango oyo bazalaki kouta na mikili mosusu, kozanga ete báyeba yango, bazalaki kopekisa bakiliya bámona biloko na ye. Kasi, mokolo ya mibale, amonaki bolingo mpe kimya na bango na ndenge oyo Batatoli ya mboka wana bazalaki koyamba bapaya na bango na esengo mpenza atako bayebaki bango te. Mokolo ya nsuka, motɛkisi yango ye moko akɔtaki na molɔngɔ mpo na koyamba bapaya mpe asɛngaki bábanda koyekola na ye Biblia.
19. Mpo na nini ezali na ntina mingi tóluka kozala na kimya elongo na bandeko na biso bandimi?
19 Soki tozali koluka kimya ná bandeko na biso na bosembo mpenza, yango ekoki kobakisa mposa na biso ya kozela mokolo ya Yehova mpe mokili ya sika oyo alaki. (Nzembo 37:11; 2 Petelo 3:13) Soki na ndakisa tozali na mokakatano mpo na kofanda na kimya na ndeko moko, tokanisi mpenza ete tokofanda na ye na kimya na Paladiso? Soki tozali na likambo na ndeko moko, tosengeli koluka nokinoki ‘koyokana na ye.’ (Matai 5:23, 24) Kosala bongo ezali na ntina mingi mpamba te yango nde ekosala ete kimya ezala kati na biso ná Yehova.—Nzembo 35:27; 1 Yoane 4:20.
20. Koyeba “kozela” esengeli komonana na makambo nini?
20 Tozali ‘kozela mpe kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova’? Etamboli na biso ya bosantu na mokili oyo mabe nde ekomonisa ete tozali na mposa makasi ya komona nsuka ya makambo mabe. Lisusu, misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe nde ekomonisa ete tozali mpenza na mposa ete mokolo ya Yehova eya mpe Bokonzi eyangela biso. Tokomonisa ete tozali na elikya ya kozala na bomoi ya kimya na mokili ya sika na ndenge oyo tozali koluka kozala na kimya elongo na baninga na biso bandimi. Na ndenge yango, tokomonisa ete tozali ‘kozela’ mpe tozali ‘kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova.’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bandakisa, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2000, lokasa 16 mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 1997, lokasa 51.
Ozali koyeba lisusu?
• ‘Kobatela na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova’ elimboli nini?
• Ndenge nini etamboli na biso emonisaka ete toyebi “kozela”?
• Mpo na nini “misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe” ezali na ntina mingi?
• Tosengeli kosala nini mpo Yehova akuta biso “kozanga litɔnɔ mpe kozanga mbeba mpe na kati ya kimya”?
[Elilingi na lokasa 11]
Koyeba “kozela” emonanaka na misala ya etamboli ya etamboli ya bosantu
[Bililingi na lokasa 12]
Mosala ya kosakola Bokonzi ezali kobikisa bomoi ya bato
[Elilingi na lokasa 14]
Ntango tozali kozela mokolo ya Yehova, tóluka kozala na kimya elongo na bato mosusu