Tótosa na bosembo mpenza bokonzi oyo Nzambe atii
“Yehova azali Zuzi na biso, Yehova azali Mopesi-mibeko na biso, Yehova azali Mokonzi na biso.”—YISAYA 33:22, NW.
1. Makambo nini ezalaki na Yisalaele ya kala oyo ezalaki te na bikólo mosusu nyonso?
EKÓLO ya Yisalaele esalemaki na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na ntango wana, ezalaki na mboka-mokonzi te, ezalaki na mabele te, mpe ezalaki na mokonzi te oyo azalaki komonana. Bato ya ekólo yango bautaki na boombo. Kasi, ezali mpe na likambo mosusu oyo ekesenisaki ekólo yango na bikólo mosusu nyonso. Yehova Nzambe azalaki Zuzi, Mopesi-mibeko mpe Mokonzi ya ekólo yango atako bazalaki komona ye te. (Exode 19:5, 6; Yisaya 33:22, NW) Ekólo mosusu te ezalaki na likambo ya ndenge wana!
2. Motuna nini tokoki komituna na ndenge oyo Yisalaele ebongisamaki, mpe mpo na nini eyano ezali na ntina mpo na biso?
2 Lokola Yehova azali Nzambe ya kimya mpe alingaka mobulu te, ekólo oyo azali koyangela esengeli kobongisama malamu. (1 Bakolinti 14:33) Yisalaele ezalaki mpenza ndenge yango. Kasi, ndenge nini Nzambe oyo amonanaka te akokaki kotambwisa ebongiseli oyo ezali komonana awa na mabele? Ekozala malamu tótalela ndenge oyo Yehova azalaki koyangela ekólo wana ya kala; tokotala malamumalamu ndenge oyo azalaki kosala makambo na Yisalaele, mpo na komona ntina ya kotosa na bosembo mpenza bokonzi oyo Nzambe atii.
Ndenge oyo Yisalaele ya kala eyangelamaki
3. Yehova abongisaki makambo ndenge nini mpo na kotambwisa libota na ye?
3 Atako Yehova ye moko azalaki Mokonzi ya Yisalaele kasi azalaki komonana te, aponaki bato ya sembo bázala bamonisi na ye. Ekólo yango ezalaki na bankumu, bakonzi ya mabota, mpe mibange oyo bazalaki bapesi-toli mpe bazuzi. (Exode 18:25, 26; Deteronome 1:15) Kasi, tókanisa te ete bato yango bakokaki kosambisa makambo na bososoli mpe na mayele nyonso soki Nzambe azalaki kolakisa bango nzela te. Bazalaki bato ya kozanga kokoka, bazalaki mpe na likoki te ya koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bandeko na bango. Atako bongo, bazuzi oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki na likoki ya kopesa bandeko na bango toli ya malamu mpamba te toli yango ezalaki kouta na Mibeko ya Yehova.—Deteronome 19:15; Nzembo 119:97-100.
4. Bamposa nini bazuzi ya sembo na Yisalaele basengelaki mpenza koboya, mpe mpo na nini?
4 Nzokande, ekokaki kaka te ete moto ayeba Mibeko mpo azala zuzi. Lokola mibange yango bazalaki bato ya kozanga kokoka, basengelaki kopekisaka mposa nyonso ya mabe na mitema na bango—na ndakisa koluka matomba na bango moko, kopona bilongi, mpe lokoso—oyo ekokaki kotinda bango bákata makambo na bosembo te. Mose alobaki na bango boye: “Bokopona bilongi te ntango bozali kokata makambo. Bokoyoka moto mpamba na moto ya lokumu. Bosengeli kobanga moto moko te, mpamba te kosambisa ezali ya Nzambe.” Bazuzi ya Yisalaele bazalaki kosambisa mpenza na nkombo ya Nzambe. Omoni ete ezalaki likambo ya lisɛki te!—Deteronome 1:16, 17, NW.
5. Longola ebongiseli ya kotya bazuzi, Yehova abongisaki mpe makambo nini mpo na bolamu ya bato na ye?
5 Yehova abongisaki mpe makambo mosusu mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bato na ye. Liboso kutu bákóma na Mokili ya Ndaka, asɛngaki bango bátonga hema, esika mpenza oyo makambo ya losambo ya solo esengelaki kosalemaka. Aponaki mpe banganga-nzambe mpo na koteya Mibeko, kopesa mbeka ya banyama, mpe kotumba mpaka ya malasi na ntɔngɔ mpe na mpokwa. Nzambe atyaki Alona, yaya ya Mose, nganga-nzambe monene ya liboso mpe aponaki bana ya Alona mpo básalisaka tata na bango na mikumba na ye.—Exode 28:1; Mituya 3:10; 2 Ntango 13:10, 11.
6, 7. (a) Boyokani nini ezalaki kati na banganga-nzambe na Balevi oyo bazalaki banganga-nzambe te? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ete Balevi bazalaki kosala misala ndenge na ndenge? (Bakolose 3:23)
6 Kokokisa bamposa ya elimo ya bamilio ya bato ezalaki mosala monene mpenza, nzokande, banganga-nzambe bazalaki mingi mpenza te. Yango wana, ebongiseli mosusu ezalaki ete bato ya libota ya Levi básungaka bango. Yehova ayebisaki Mose boye: “Okopesa Balevi na Alona mpe na bana mibali na ye. Bapesami na ye nyonso kati na bato ya Yisalaele.”—Mituya 3:9, 39.
7 Misala ya Balevi ekabolamaki malamumalamu. Bakabolaki bango na bituluku na kolanda mabota na bango misato ya minene: Bagelesone, Bakeata, na Bamelali; libota na libota bazalaki na misala na bango. (Mituya 3:14-17, 23-37) Ekoki komonana lokola ete misala mosusu ezalaki na lokumu koleka mosusu, kasi misala nyonso ezalaki na ntina mingi. Mosala ya Bakeata ezalaki kosɛnga ete bázala pene mpenza na sanduku mosantu ya kondimana na biloko mosusu oyo ezalaki na hema. Nzokande, Molevi nyonso, azala Mokeata to te, azalaki na libaku malamu ya kozala na mikumba minene mpenza. (Mituya 1:51, 53) Likambo ya mawa ezali ete bamosusu basepelaki na mikumba na bango te. Na esika bátosa na bosembo mpenza bokonzi oyo Nzambe atyaki, bamonaki ete makambo wana ekokaki te, bakómaki na lolendo, bakómaki koluka lokumu mpe bakómaki na zuwa. Moko na Balevi oyo basalaki makambo wana nkombo na ye Kola.
“Bolingi kozala banganga lokola?”
8. (a) Kola azalaki nani? (b) Ekoki kozala mpo na ntina nini Kola azalaki lisusu kotalela banganga-nzambe te lokola bato oyo bazali kosala mosala ya bosantu?
8 Kola azalaki mokonzi ya libota ya Levi te, azalaki mpe ata mokonzi ya mabota ya Bakeata te. (Mituya 3:30, 32) Atako bongo, azalaki nkumu na Yisalaele. Ekoki mpenza kozala ete Kola azalaki kosala pembeni mpenza ya Alona na bana na ye. (Mituya 4:18, 19) Lokola azalaki komona polele mabunga ya bato yango, ekoki kozala ete akómaki kokanisa boye na motema na ye: ‘Banganga-nzambe oyo bazali mpenza bato ya kozanga kokoka, bongo ngai natosaka bango! Eleki mwa mikolo awa, Alona asalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo. Bato ya ekólo na biso bakweaki na losambo ya bikeko mpo na mwana-ngɔmbɛ wana. Sikoyo, kaka Alona, ndeko ya Mose nde azali nganga-nzambe monene! Oyo ezali kaka kopona bilongi! Naloba kutu nini mpo na bana ya Alona: Nadaba na Abihu? Kutu Yehova abomaki bango mpo bazangaki mpenza limemya mpo na misala oyo bapesaki bango!’a (Exode 32:1-5; Levitike 10:1, 2) Ata soki Kola akanisaki nini na motó na ye, ezali polele ete atikaki kotalela mosala ya banganga-nzambe lokola mosala ya bosantu. Yango ememaki ye na kotombokela Mose na Alona, mpe na nsuka, na kotombokela Yehova.—1 Samwele 15:23; Yakobo 1:14, 15.
9, 10. Kola na baninga na ye batomboki balobaki nini mpo na Mose, mpe mpo na nini tolobi ete bayebaki makambo oyo esengelaki kopekisa bango kosala bongo?
9 Lokola Kola azalaki moto monene na ekólo yango, ezalaki mpasi te abenda bato mosusu oyo bazalaki kokanisa lokola ye. Ye, Datana na Abilama, bazwaki bankumu mosusu 250 oyo bamityaki na ngámbo na bango. Bango nyonso bakendaki kokutana na Mose na Alona mpe balobaki na bango boye: “Lisangani mobimba bazali bango nyonso basantu mpe Yehova azali na kati na bango. Bongo, mpo na nini bozali komitombola likoló ya lisangá ya Yehova?”—Mituya 16:1-3, NW.
10 Batomboki yango bayebaki makambo mingi oyo ekokaki kopekisa bango kotombokela Mose. Eutaki koleka ntango mingi te, Alona na Milyami basalaki mpe likambo ya ndenge wana. Babimisaki kutu makanisi oyo ekokani mpenza na makanisi ya Kola! Mituya 12:1, 2 elobi ete Alona na Milyami batunaki ete: “[Yehova] alobaki bobele na monɔkɔ ya Mose solo? Ye alobaki na monɔkɔ ya biso lokola te?” Yehova ayokaki maloba na bango. Alobaki na Mose, Alona, na Milyami bákutana na ekɔtelo ya hema ya koyangana mpo ete Ye moko amonisa moto oyo aponaki azala motambwisi. Na nsima, Yehova alobaki polele ete: “Soko mosakoli azali kati na bino, ngai [Yehova] nakomiyebisa na ye na emonaneli, mpe nakosolola na ye na ndɔtɔ. Ezali boye na moombo na ngai Mose te, oyo azali sembo na ndako na ngai mobimba.” Nsima na yango, Yehova apesaki Milyami maladi ya maba oyo eumelaki mwa mikolo.—Mituya 12:4-7, 10.
11. Mose asalaki nini na botomboki ya Kola?
11 Na ntembe te, Kola na bato oyo balandaki ye bayebaki likambo wana malamu. Likambo moko te ekokaki kolongisa bango ndenge batombokaki. Kasi, Mose azalaki na motema molai, amekaki kosalisa bango bákanisa malamu. Asɛngaki bango bámonisa botɔndi mpo na mikumba minene oyo Nzambe apesaki bango; alobaki na bango boye: “Bino bokanisi ete ezali [likambo] moke ete Nzambe ya Yisalaele asili kokabola bino na lingomba ya Yisalaele na ntina ete abɛlɛmisa bino na ye?” Ya solo, ezalaki “likambo moke” te! Balevi bazalaki na ebele ya mikumba ya minene. Eloko nini lisusu bakokaki kolula? Maloba oyo Mose alobaki na nsima ezali komonisa makanisi oyo bazalaki na yango na mitema na bango: “Bolingi kozala banganga lokola?”b (Mituya 12:3; 16:9, 10) Kasi, ndenge nini Yehova atalelaki likambo wana ya kotombokela bokonzi oyo ye atyaki?
Zuzi ya Yisalaele akati likambo
12. Mpo boyokani ya Yisalaele na Nzambe ebeba te esengelaki kosala nini?
12 Ntango Yehova apesaki Yisalaele Mibeko, ayebisaki bango ete soki bakotosa yango, bakokóma “ekólo moko ya bosantu” mpe ete bakotikala ekólo ya bosantu soki balandi kotosa bibongiseli ya Yehova. (Exode 19:5, 6, NW) Sikoyo, lokola botomboki ebimaki polele, ezalaki ntango oyo Zuzi mpe Mopesi-mibeko ya Yisalaele asengelaki kokata likambo! Mose alobaki na Kola ete: “Yo mpe bato na yo nyonso bóbima liboso ya [Yehova], yo mpe bango mpe Alona, lobi. Moto na moto akamata mbɛki na ye ya kotumba mpaka ya malasi, mpe atya mpaka ya malasi na yango, mpe moto na moto na bino aya na mbɛki na ye liboso ya [Yehova], mbɛki nkama mibale na ntuku mitano, yo mpe Alona lokola, moto na moto na mbɛki na ye.”—Mituya 16:16, 17.
13. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete batomboki bazalaki na lolendo na ndenge batumbelaki Yehova mpaka ya malasi? (b) Yehova asalaki batomboki yango nini?
13 Mobeko ya Nzambe elobaki ete kaka moto oyo azali nganga-nzambe nde akoki kotumba mpaka ya malasi. Likanisi wana mpamba ete Molevi oyo azali nganga-nzambe te atumbela Yehova mpaka ya malasi esengelaki kotinda batomboki wana bákanisa malamu. (Exode 30:7; Mituya 4:16) Kasi, esalaki Kola na bato na ye eloko te! Na mokolo oyo elandaki “ayanganisaki lingomba mobimba kotalana na [Mose na Alona] epai na monɔkɔ ya hema ya koyangana.” Lisolo elobi na biso boye: “Yehova alobelaki Mose mpe Alona ete, Bólongwa na kati ya lingomba oyo ete naboma bango noki.” Kasi, Mose na Alona babondelaki mpo ete bato nyonso bábomama te. Yehova ayokelaki bango. Kasi, mpo na Kola na bato na ye, “mɔ́tɔ ebimaki na [Yehova] mpe ezikisaki bankama mibale na ntuku mitano [oyo] bazalaki kokaba mpaka ya malasi.”—Mituya 16:19-22, 35.c
14. Mpo na nini Yehova apesaki bato ya Yisalaele etumbu ya makasi?
14 Likambo ya kokamwa, Bayisalaele oyo bamonaki na miso etumbu oyo Yehova apesaki batomboki bazwelaki yango liteya te. “Na mokolo ya nsima lingomba mobimba ya bato ya Yisalaele baimaimaki na ntina na Mose mpe na Alona. Balobaki ete, Bino bosili koboma bato ya [Yehova].” Talá likambo: Bayisalaele yango bakómaki kokɔtela batomboki! Yango wana, motema molai ya Yehova ekómaki na nsuka. Moto moko te akokaki lisusu kobondela mpo na bato yango, ata Mose to Alona. Yehova atindelaki bato yango oyo bazangaki botosi maladi mpe “baoyo bakufaki na maladi yango bazalaki nkóto zomi na minei na nkama nsambo, mpe bango bakufaki na likambo ya Kola batángamaki na motuya oyo te.”—Mituya 16:41-49.
15. (a) Mpo na bantina nini Bayisalaele basengelaki kokakatana te mpo na kondima ete Mose na Alona bátambwisa bango? (b) Lisolo yango eteyi yo nini mpo na Yehova?
15 Bato yango bamilukelaki liwa mpamba. Soki bazwaki ata ntango ya kokanisa, bakokaki komituna mituna lokola oyo: ‘Banani oyo batyaki bomoi na bango na likama na ndenge bakendaki kokutana na Falo? Banani oyo basɛngaki ete Bayisalaele bálongwa na boombo? Nsima ya kobima na boombo, nani oyo Nzambe alobaki na ye ete kaka ye nde amata na Ngomba Holebe mpo na kolobana miso na miso na anzelu na ye?’ Na ntembe te makambo oyo Mose na Alona basalaki liboso emonisaki ete bazalaki sembo epai ya Yehova mpe balingaki libota ya Yisalaele. (Exode 10:28; 19:24; 24:12-15) Yehova azalaki na esengo ya koboma batomboki wana te. Kasi, ntango emonanaki ete bakozonga lisusu nsima te na botomboki na bango, abomaki bango. (Ezekiele 33:11) Nyonso wana ezali na ntina mingi mpo na biso lelo oyo. Mpo na nini?
Bato oyo Nzambe azali kosalela lelo oyo
16. (a) Makambo nini esengelaki kondimisa Bayuda ya ekeke ya liboso ete Yehova nde atindaki Yesu? (b) Mpo na nini Yehova alongolaki Balevi na mosala ya bonganga-nzambe, mpe atyaki banani na esika na bango?
16 Lelo oyo, ezali na “libota” moko ya sika oyo Yehova azali Zuzi, Mopesi-mibeko mpe Mokonzi na yango atako amonanaka te. (Matai 21:43) “Libota” yango esalemaki na ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.). Na ntango wana, tempelo moko kitoko oyo ezalaki na Yelusaleme, oyo batongaki na esika ya hema oyo ezalaki na ntango ya Mose, ezalaki naino; Balevi bazalaki naino kosala na tempelo yango. (Luka 1:5, 8, 9) Kasi, na mobu 29 T.B., tempelo mosusu, ya elimo, esalemaki mpe Yesu Klisto azali Nganga-Nzambe Monene na tempelo yango. (Baebele 9:9, 11) Likambo ya kotosa bokonzi oyo Nzambe atii ezongaki lisusu. Yehova alingaki kopona nani mpo na kotambwisa “libota” yango ya sika? Yesu amonisaki ete azalaki mpenza sembo epai ya Nzambe. Alingaki bato. Asalaki mpe makamwisi mingi. Nzokande, lokola kaka bankɔkɔ na bango oyo bazalaki motó makasi, Balevi mingi bandimelaki Yesu te. (Matai 26:63-68; Misala 4:5, 6, 18; 5:17) Nsukansuka, Yehova atyaki banganga-nzambe mosusu na esika ya bato ya libota ya Levi, atyaki banganga-nzambe ya bokonzi. Banganga-nzambe yango ya bokonzi bazali kosala tii na moi ya lelo.
17. (a) Banani bazali bonganga-nzambe ya bokonzi lelo oyo? (b) Ndenge nini Yehova azali kosalela bonganga-nzambe ya bokonzi?
17 Lelo oyo banani bazali banganga-nzambe yango ya bokonzi? Ntoma Petelo apesi eyano na motuna yango na mokanda na ye ya liboso oyo epemami. Petelo akomelaki bapakolami oyo basangani na nzoto ya Klisto ete: “Bino bozali ‘libota moko eponami, bonganga-nzambe moko ya bokonzi, libota moko mosantu, ekólo moko oyo esengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na kati ya pole na ye ya kokamwa.” (1 Petelo 2:9, NW) Maloba yango ezali komonisa polele ete bayekoli bapakolami ya Yesu bango nyonso nde bazali ‘bonganga-nzambe ya bokonzi,’ baoyo Petelo abengaki bango lisusu “libota moko mosantu.” Yehova azali kosalela nde bango mpo na kopesa bato na ye mateya ya elimo mpe kolakisa bango nzela.—Matai 24:45-47.
18. Boyokani nini ezali kati na bankulutu oyo baponami mpe bonganga-nzambe ya bokonzi?
18 Bankulutu oyo bazali kokamba masangá ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba bazali bamonisi ya bonganga-nzambe yango ya bokonzi. Tosengeli kopesa mibali yango limemya mpe kopesa bango mabɔkɔ na motema mobimba, bázala bapakolami to te. Mpo na nini? Mpamba te, Yehova asaleli elimo santu na ye mpo na kopona bankulutu. (Baebele 13:7, 17) Na ndenge nini?
19. Na ndenge nini bankulutu baponami na elimo santu?
19 Bankulutu yango bakokisi masɛngami oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9) Na bongo, tokoki koloba ete baponami na elimo santu. (Misala 20:28) Bankulutu basengeli koyeba Liloba ya Nzambe malamumalamu. Lokola Zuzi Monene oyo aponi bango, bankulutu basengeli koyina ezaleli ya kopona bilongi mpo na kokata makambo.—Deteronome 10:17, 18.
20. Makambo nini osepelaka na yango mingi epai ya bankulutu oyo basalaka mosala makasi?
20 Na esika ya kotɛmɛla bokonzi na bango, tosepelaka mpenza na bankulutu mpo na mosala na bango makasi! Mosala ya sembo oyo bazali kosalela Nzambe, mbala mingi banda bambula ebele, etindaka biso tótyela bango motema. Balɛmbaka te kobongisa makita ya lisangá mpe kotambwisa yango, babimaka na biso na mosala ya kosakola ‘nsango malamu ya Bokonzi,’ mpe bapesaka biso toli euti na Makomami na ntango oyo tosengeli na yango. (Matai 24:14; Baebele 10:23, 25; 1 Petelo 5:2) Batalaka biso ntango tozali na maladi mpe babɔndisaka biso ntango tozali kolela mpo tokufeli moto to tozali na mpasi. Babatelaka matomba ya Bokonzi na bosembo mpe balukaka bolamu na bango moko te. Bazali na elimo ya Yehova; Yehova andimi bango.—Bagalatia 5:22, 23.
21. Makambo nini bankulutu basengeli kobosana te, mpe mpo na nini?
21 Toboyi te, bankulutu bazali bato ya kozanga kokoka. Lokola bayebaka ete ezali na makambo oyo bakoki kosala yango te, balukaka te kozala bakonzi ya etonga, oyo ezali “libula ya Nzambe.” Bamimonaka nde ete bazali ‘baninga ya mosala mpo na esengo ya bandeko na bango.’ (1 Petelo 5:3, NW; 2 Bakolinti 1:24, NW) Bankulutu oyo bazali na komikitisa, oyo basalaka mosala makasi, balingaka Yehova, mpe bayebaka ete soki bazali kolanda ndakisa na ye malamumalamu, bakosala mpe malamu mingi na lisangá. Na makanisi wana, basalaka ntango nyonso makasi bálona bizaleli malamu lokola bolingo, motema mawa mpe motema molai.
22. Ndenge nini lisolo ya Kola elendisi kondima na yo na ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana?
22 Tozali mpenza na esengo ete Yehova azali Mokonzi na biso atako amonanaka te, Yesu Klisto azali Nganga-Nzambe Monene na biso, banganga-nzambe ya bokonzi, elingi koloba bapakolami na elimo, bazali bateyi na biso, mpe bankulutu ya sembo bazali bapesi-toli na biso! Atako ezali na ebongiseli moko te oyo etambwisami na bato oyo ekoki kozanga ata mwa likambo ya mabe, tozali na esengo ya kosalela Nzambe elongo na baninga na biso bandimi ya sembo, baoyo bazali kosepela kotosa bokonzi oyo Nzambe atii!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Eleazala na Itamala, bana mosusu mibale ya Alona, bazalaki kosala mosala na bango malamu mpo na Yehova.—Levitike 10:6.
b Datana na Abilama, bato oyo balandaki Kola na botomboki na ye, bazalaki bato ya libota ya Lubene. Na bongo, tokanisi mpenza ete bango bazalaki koluka bonganga te. Bango bazalaki nde komona mabe lokola Mose azalaki motambwisi mpe ete tii na ntango wana bakómaki naino kaka na Mokili ya Ndaka te.—Mituya 16:12-14.
c Na ntango ya kala, mokonzi ya libota azalaki komonisa mwasi na bana na ye liboso ya Nzambe, mpe azalaki kotumbela bango mbeka. (Genese 8:20; 46:1; Yobo 1:5) Nzokande, ntango apesaki Mibeko, Yehova aponaki mibali ya libota ya Alona bázala banganga-nzambe oyo basengelaki kopesaka bambeka. Emonani ete batomboki wana 250 baboyaki kolanda ebongiseli wana ya sika.
Makambo nini oyekoli?
• Makambo nini ya malamu Yehova abongisaki mpo na kobatela Bayisalaele?
• Mpo na nini tolobi ete Kola azalaki na likambo moko te oyo ekokaki kolongisa ye na ndenge atombokelaki Mose na Alona?
• Liteya nini tozwi na kotala ndenge oyo Yehova asalaki batomboki?
• Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na bibongiseli oyo Yehova azali kozwa lelo oyo?
[Elilingi na lokasa 9]
Otalelaka mosala nyonso na ebongiseli ya Yehova lokola libaku malamu?
[Elilingi na lokasa 10]
“Bongo, mpo na nini bozali komitombola likoló ya lisangá ya Yehova?”
[Elilingi na lokasa 13]
Bankulutu bazali bamonisi ya bonganga-nzambe ya bokonzi