Mungwa ezali eloko moko ya ntina mingi
YESU alobaki na bayekoli na ye boye: “Bino bozali mungwa ya mabelé.” (Matai 5:13) Baarabe balobaka boye: “Mungwa ezali kati na biso,” mpe bato ya Iran balobelaka moto “oyo abongi te na mungwa” (moto oyo azangi bosembo to azangi botɔndi). Lokola ebatelaka biloko mpo epɔla te, liloba “mungwa” ekómi kosalelama mpo na kolobela eloko oyo bazali kopesa yango limemya mpe lokumu, ezala na nkota ya kala to ya ntango na biso.
Lisusu, mungwa ekómaki elembo ya likambo oyo esengeli kobeba te mpe oyo esengeli koumela libela. Yango wana, na Biblia kondimana oyo esalemi na motema moko ebengamaki “kondimana ya mungwa,” mpe, mbala mingi bato oyo basali kondimana yango bazalaki kolya bilei esika moko, na mungwa. (Mituya 18:19) Na nse ya Mibeko ya Moize, bazalaki kobakisa mungwa na bambeka oyo bazalaki kopesa na etumbelo, na ntembe te ezalaki mpo na komonisa ete mbeka yango ekopɔla te.
Makambo ya kala oyo tosengeli koyeba
Banda kalakala, mungwa (chlorure de sodium) ezalaka eloko ya ntina mingi, kutu bitumba mingi ebimaki mpo na yango. Moko na makambo oyo ebimisaki Révolution française ezali ete mokonzi ya France Louis XVI asɛngaki ete bábakisa mpako ya mungwa. Mungwa ezalaki mpe kosalelama na esika ya mbongo. Ba-Maure oyo bazalaki bakomɛlɛsa bazalaki kosombitinya mungwa na wolo, gramɛ moko ya mungwa mpo na gramɛ moko ya wolo, mpe bikólo mosusu ya Afrika ya Ntei bazalaki kosalela mabanga ya mungwa lokola mbongo. Liloba ya Lifalanse “salaire” elimboli lifuti, yango euti na liloba ya Latin salarium (euti na sal, mungwa), ezalaki kolobela lifuti ya basoda ya Loma ya kala, oyo bazalaki kobakisela bango mwa ndambo ya mungwa na lifuti na bango. Bagrɛki bazalaki kosomba baombo na mungwa, yango ebimisaki lisese “akokani te na mungwa oyo esombaki ye.”
Na eleko ya Moyen Âge, biyambayamba mingi ebimaki na likambo ya mungwa. Bazalaki koloba ete soki mungwa esopani na mabɔkɔ ya moto ezalaka libabe. Na ndakisa, Léonard de Vinci, na elilingi oyo ayemaki “Limpati ya nsuka,” ayemaki Yuda Mokeliota azali na mwa saani ya mungwa ebalolami liboso na ye.a Epai mosusu, tii na ekeke ya 18, bazalaki koloba ete, na ntango ya fɛti, soki moto afandi mosika to pene na saani ya mungwa, yango ezalaki komonisa ete azali moto ya lokumu to te, mpo esika ya lokumu ezalaki liboso ya mwa saani ya mungwa, na nsuka ya mesa.
Kobanda kala, bato bayebi ndenge ya kobimisa mungwa na kati ya mai oyo ezalaka mungwa na mungwa, na mai ya mbu, mpe na mabanga ya mungwa. Mokanda moko ya kala ya Chine, oyo elobelaka makambo etali nkisi, elobeli lolenge 40 ya mungwa mpe emonisi ndenge mibale ya kobimisa mungwa oyo ekokani mpenza na ndenge oyo babimisaka mungwa lelo oyo. Na ndakisa, basalelaka moi mpo na kobimisa mungwa na mai ya mbu, na esika eleki monene ya kobimisa mungwa, oyo ezali na libongo ya mai monene na Bahía Sebastián Vizcaíno na etúká ya Baja, na California Sur, na ekólo Mexique.
Kutu, ndenge mokanda moko (Encyclopædia Britannica) elobi yango, soki mai ya mbu nyonso na mokili mobimba ekauki, “bakoki kobimisa soki kilomɛtrɛ-kibe milio 12 ya mabanga ya mungwa, motango oyo eleki mbala 14 na ndambo mabele nyonso ya Mpoto, oyo ezali likoló ya mai monene. Mpe Mbu Ekufá ezali na mungwa mbala libwa koleka bambu nyonso.
Makambo oyo basalaka na mungwa lelo oyo
Lelo oyo mungwa ezali kaka eloko moko ya ntina mingi, mpamba te batyaka yango na bilei mpo ekóma elɛngi, bapakolaka yango na nyama mpo epɔla te, basalelaka yango na izini ya sabuni mpe ya talatala, mpe biloko mosusu. Likambo ya ntina mingi yango oyo: basalelaka mungwa mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto. Na ndakisa, na mikili mingi mpo na kobikisa maladi oyo evimbisaka nkingo (goitre) mpe oyo ekómisaki bato mosusu zobazoba, babakisaka iode na mungwa. Lisusu, na mikili mingi, batyaka mwa fluor na mungwa mpo na kosilisa to kopekisa maladi ya mino.
Lokola mungwa ezali na ntina mingi mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto, ebatelaka makila mpe ebatelaka tansyo ya moto—kasi tokoloba nini na ndenge tansyo ya moto emataka soki alei mungwa mingi? Minganga bazalaka na momeseno ya kopekisa bato oyo tansyo na bango emataka makasi kolya biloko ya mungwa. Mungwa ematisaka tansyo ya bato mwa mingi (30 to 50 %) oyo bazalaka na mokakatano yango. Mpo na bato wana, kosalela mungwa mingi te ekitisaka tansyo.
Mungwa ebakisaka elɛngi ya bilei, ndenge Yobo amonisaki yango ntango atunaki boye: “Biloko ezangi elɛngi bakolya yango kozanga kotya mungwa?” (Yobo 6:6, NW) Tosengeli mpenza komonisa botɔndi epai ya Mozalisi na biso, ‘oyo apesaka biso biloko nyonso beboo,’ na mungwa oyo ezali eloko ya ntina mingi ‘mpo biso tósepela.’—1 Timote 6:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Batyaka mwa saani ya mungwa na mesa mpo na baoyo balingi kobakisa mungwa na biloko oyo bazali kolya.
[Elilingi na lokasa 27]
Mwa ndambo ya mitindo ndenge na ndenge ya mungwa (banda na likoló): (1) Mungwa ya mbu ‘Alaea,’ Hawaii; (2) fleur de sel, France; (3) mungwa euti na biloko oyo ezalaka na mbu; (4) mungwa ya mwa moindo, France; (5) mungwa ya mbuma minene; (6) mungwa ya moindo ya mabele, Inde