Mokanda ya Biblia nimero 4—Mituya
Mokomi: Mose
Esika ya bokomi: Mokili mokauki mpe bisobe ya Moaba
Nsuka ya bokomi: 1473 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: 1512-1473 L.T.B.
1. Mpo na nini makambo mazwami na mokanda ya Mituya makomamaki, mpe yango esalisi biso na kososola nini?
MAKAMBO oyo mabimelaki bana ya Yisalaele na boumeli ya mobembo na bango na mokili mokauki makomamaki kati na Biblia mpo ete biso tózwa na yango litomba lelo.a Lokola ntoma Paulo alobaki yango: “Makambo oyo nyonso mazali elakiseli epai na biso ete tózala na mposa na mabe te pelamoko ezalaki bango na mposa.” (1 Kol. 10:6) Lisoló ya nguya oyo lizwami na mokanda ya Mituya lizali kosalisa biso na kososola ete, mpo na kobika, tosengeli kosantisa nkombo ya Yehova, tosengeli kotosa ye ata na mikakatano nini, mpe tosengeli komonisa limemya epai na bamonisi na ye. Ezali mpo na motema mawa mpe mpo na ngɔlu monene ya Nzambe nde libota na ye lizali kozwa bolamu uta na ye, kasi ezali te mpo na ezaleli na bango ya malamu to mpo na milende na bango.
2. Nkombo Mituya euti wapi, kasi nkombo nini ebongi mpenza Bayuda bapesaki na mokanda yango?
2 Nkombo Mituya euti na kotángama ya motuya ya bato ya Yisalaele oyo esalemaki libosoliboso na Ngomba Sinai mpe na nsima na Bisobe ya Moaba, engebene mokapo 1 kino 4 mpe mokapo 26 ya mokanda yango. Nkombo yango ezwamaki uta na motó na likambo Numeri kati na Biblia Vulgate ya lokótá Latin mpe euti na liloba A·rith·moiʹ kati na libongoli ya Septante ya lokótá Greke. Nzokande, na lolenge lobongi mpenza, Bayuda babéngaka mokanda yango Bemidh·barʹ, oyo elimboli “Kati na mokili mokauki.” Liloba ya Liebele midh·barʹ lizali komonisa esika moko ya polele, oyo ezangi mboka mpe ezangi bingumba. Ezalaki kati na mokili mokauki oyo motandami na súdi mpe na ɛ́sti ya Kanana nde makambo oyo makomami na mokanda ya Mituya masalemaki.
3. Nini emonisi ete Mose azali mokomi ya mokanda ya Mituya?
3 Mokanda ya Mituya mozalaki mpenza mokanda ya volimi ya ebandeli oyo esangisaki mikanda mitano, kobanda na Genese kino Deteronome. Vɛrsɛ́ na yango ya liboso [na Biblia NW] ebandi na likangisi (conjonction) “mpe,” oyo ekangisi lisoló ya mokanda yango na masoló oyo mazalaki liboso. Na bongo, moto oyo akomaki mokanda ya Mituya esengeli kozala sé Mose, mpamba te ye azalaki mokomi ya mikanda oyo mizalaki liboso. Yango emonani lisusu polele kati na maloba ya mokanda yango ete “Mose akomaki,” mpe na maloba na yango ya nsuka ete, “Oyo izali malako mpe mibeko oyo ilakaki [Yehova] na monɔkɔ na Mose.”—Mit. 33:2; 36:13.
4. Makambo oyo mazali kati na mokanda ya Mituya masalemaki na boumeli ya ntango boni, mpe kokomama na yango esukaki ntango nini?
4 Esili koleka mbula moko uta Bayisalaele babimaki na Ezipito. Kokóbáká lisoló na sanza ya mibale ya mbula oyo elandaki nsima na bobimi, mokanda ya Mituya mozwi eleko ya mbula 38 mpe sanza libwa oyo elandaki, kobanda na mobu 1512 kino mobu 1473 L.T.B. (Mit. 1:1; Det. 1:3) Atako makambo oyo makomami na Mituya 7:1-88 mpe 9:1-15 masalemaki na boumeli ya eleko wana te, nzokande yango ekɔtisami awa mpo na kopesa mayebisi ya makambo oyo masalemaki mwa moke liboso. Ntembe ezali te ete biteni na yango ya liboso bikomamaki mpenza ntango makambo mazalaki kosalema, kasi ezali solo ete Mose asilisaki bokomi ya mokanda ya Mituya bobele pene na nsuka ya mbula ya 40 oyo balekisaki na mokili mokauki, na ebandeli mpenza ya mobu 1473 L.T.B.
5. Makambo nini mazali kondimisa bosolo ya mokanda ya Mituya?
5 Bosolo ya lisoló ya mokanda yango ekoki kotyelama ntembe soko moke te. Na ntina na mabelé makauki oyo kati na yango basalaki mobembo, Mose alobaki ete ezalaki ‘mokili monene mokauki mpe na nsɔ́mɔ,’ mpe yango ezali bongo kino lelo, na boye ete bafandi na yango, oyo bapalangani bipai na bipai, basengelaka ntango nyonso kotambolatambola mpo na koluka bisika ya bisobe mpe bisika oyo mai mazali. (Det. 1:19) Lisusu, malako ya sikisiki na ntina na molako ya libota, molɔngɔ́ ya botamboli, mpe na ntina na kuyulama ya kelelo mpo na kotambwisa makambo na molako, endimisi ete lisoló yango likomamaki mpenza kati na “mokili mokauki.”—Mit. 1:1, NW.
6. Lolenge nini biloko bikundolami na arkeoloji bindimisi bosolo ya mokanda ya Mituya?
6 Ata mpe nsango ya kobangisa oyo banɔ́ngi bamemaki ntango bautaki kotala mokili ya Kanana, nsango oyo elobi ete “mboka na bango izingami makasi mpe izali minene mingi,” endimisami na arkeoloji. (13:28) Biloko ya kala oyo bikundolami na mikolo na biso bisili komonisa ete na eleko wana bato ya Kanana bakembisaki bifandelo na bango na kotongáká mpe na kotondisáká mokili wana na bifelo mingi ya makasi, longwa na Lobwaku ya Yizelele na nɔ́rdi kino na Gelala na súdi. Longola kokembisama na yango makasi, mboka wana izalaki kotongama mingimingi na nsɔngɛ ya ngomba, mpe izalaki na manɔ́ngi milai oyo mazalaki kobima likoló na bifelo na yango, kopesáká nsɔ́mɔ na bato lokola Bayisalaele, oyo bafandaki na boumeli ya bileko mingi kati na mokili patátálú ya Ezipito.
7. Na elembo nini mokanda ya Mituya emonisi kolongobana na yango?
7 Bikólo ya mokili biyebani mpo na ezaleli na yango ya koluka kolóngisa bokwei na bango mpe kokumisa bolóngi na bango na lolenge loleki ndelo, kasi na elobeli ya polele oyo emonisi bosolo ya istware, lisoló ya mokanda ya Mituya liyebisi polele ete Baamaleki mpe Bakanana balóngaki mpenza Yisalaele. (14:45) Yango emonisi polele ete libota ya Yisalaele lizangaki kondima mpe lizangaki limemya epai na Nzambe. (14:11) Na maloba ya polele mpenza, Mose, mosakoli ya Nzambe, atɔndɔli masumu ya libota yango, masumu ya bana ya ndeko na ye, mpe masumu ya ndeko na ye mpenza ya mobali mpe ya ndeko na ye ya mwasi. Amibombi ye moko te, mpamba te alobeli ntango oyo ye azangaki kosantisa Yehova, wana mai mapesamelaki bango kuna na Meliba, na boye ete abungisaki libaku malamu ya kokɔta na Mokili ya Ndaka.—3:4; 12:1-15; 20:7-13.
8. Lolenge nini bakomi mosusu ya Biblia bandimisi ete mokanda ya Mituya mopemamaki na Nzambe?
8 Elembeteli oyo endimisi ete lisoló yango lizali mpenza eteni moko ya Makomami mapemami na Nzambe, oyo mazali na litomba, ezali ete pene na makambo na yango nyonso ya minene, bakisá mpe mosusu mingi ya mike, malobelami polele na bakomi mosusu ya Biblia, oyo mingi na bango bazali kongɛngisa ntina na yango. Na ndakisa, Yosua (Yos. 4:12; 14:2), Yilimia (2 Mik. 18:4), Nehemia (Neh. 9:19-22), Asafa (Nz. 78:14-41), Davidi (Nz. 95:7-11), Yisaya (Yis. 48:21), Ezekiele (Ezek. 20:13-24), Hosea (Hos. 9:10), Amosa (Amo. 5:25), Mika (Mika 6:5), Luka, na makomi na ye ya lisukúlu ya Setefano (Mis. 7:36), Paulo (1 Kol. 10:1-11), Petelo (2 Pet. 2:15, 16), Yuda (Yuda 11), mpe Yoane, na makomi na ye ya maloba oyo Yesu atindelaki lisangá ya Pelegamo (Emon. 2:14); bakomi nyonso wana batángi maloba ya mokanda ya Mituya, lokola Yesu Klisto ye moko asalaki yango.—Yoa. 3:14.
9. Likambo nini limonisami polele na ntina na Yehova kati na mokanda ya Mituya?
9 Kasi, mokanda ya Mituya mozali na mokano nini? Ya solo, lisoló na yango lizali na litomba mpenza koleka boyebi mpamba ya makambo ya kala. Mokanda ya Mituya momonisi polele ete Yehova azali Nzambe ya kilikili te kasi ya molɔngɔ́, mpe azali kosɛnga ete bikelamu na ye bámipesa mobimba epai na ye. Likambo yango lizali mpenza kokɔta na elimo ya motángi, ntango ataleli kotángama, komekama, mpe kopɛtwama ya Yisalaele mpe amoni lolenge etamboli ya kozanga botosi mpe ya botomboki ya libota yango esalelami mpo na komonisa polele ntina ya kotosa Yehova.
10. Mokanda ya Mituya mobatelamaki mpo na litomba ya banani, mpe mpo na nini?
10 Lisoló yango libatelamaki mpo na litomba ya mabota oyo masengelaki koya nsima, bobele lokola Asafa alimbolaki yango, “ete bátya elikya na bango kati na Nzambe mpe bábosana misala na Nzambe te kasi bábatela mibeko na ye” mpe “bázala pelamoko batata na bango te, libota na kotosa te mpe oyo na kotomboka, libota na motema sembo te mpe [elimo, NW] na bango endimanaki na Nzambe te.” (Nz. 78:7, 8) Makambo ya mokanda ya Mituya mazongelami mbala na mbala kati na nzembo, oyo ezalaki nzembo ya bulɛɛ epai na Bayuda mpe ezalaki kozongelama ntango nyonso mpamba te ezalaki na litomba mpo na libota na bango.—Nzembo 78, 95, 105, 106, 135, 136.
MAKAMBO MAZALI KATI NA MITUYA
11. Na biteni nini misato makambo mazwami na mokanda ya Mituya makoki kokabolama?
11 Mokanda ya Mituya ekabwani mpenza na biteni misato. Eteni ya liboso, oyo esuki na mokapo 10, vɛrsɛ́ 10, ezali kolobela makambo oyo masalemaki ntango Bayisalaele bafandaki naino na molako pene na Ngomba Sinai. Eteni ya mibale, oyo esuki na mokapo 21, eyebisi makambo oyo mabimaki na boumeli ya mbula 38 mpe sanza moko to mibale oyo elandaki, ntango bazalaki kati na mokili mokauki kino bakómaki na Bisobe ya Moaba. Eteni ya nsuka, oyo etandami kino mokapo 36, ezali komonisa makambo oyo malekaki na Bisobe ya Moaba, ntango Bayisalaele bazalaki kolɛngɛla bokɔti na bango na Mokili ya Ndaka.
12. Motángo ya bato mozalaki boni na molako ya Yisalaele, mpe lolenge nini molako mobongisamaki?
12 Makambo oyo malekaki na Ngomba Sinai (1:1–10:10). Bayisalaele baumeli soko mbula moko na etúká ya ngombangomba ya Sinai. Kuna, babongisami kati na lisangá ya bomoko makasi. Na etindá ya Yehova, batángi mibali nyonso kobanda na mbula 20 kino likoló. Na motángo moleki moke ya mibali ya mpiko 32 200 na libota ya Manase kino motángo moleki monene ya mibali ya mpiko 74 600 na libota ya Yuda, mabota nyonso makokisaki motángo mobimba ya mibali 603 550 oyo babongaki kosala kati na limpinga ya Yisalaele, longola Balevi, basi mpe bana—mpe motuya ya bato kati na molako ekoki kozala milió misato to koleka. Hema na koyangana, elongo na Balevi, etyami na ntéi ya molako. Bayisalaele mosusu bafandi na bisika oyo bipesameli bango ngámbo na ngámbo [ya hema], mabota misatomisato na ngámbo moko, mpe moko na moko na yango ezwi malako na ntina na lolenge ya kotambola na molɔngɔ́, ntango molako mosengeli kolongwa mpo na kokóba mobembo. Yehova apesi malako, mpe lisoló elobi ete: “Bato na Yisalaele basalaki bongo. Pelamoko na yango nyonso elakelaki [Yehova] Mose.” (2:34) Bamonisi botosi liboso na Yehova mpe bazali komemya Mose, momonisi na Nzambe.
13. Balevi bapesameli mikumba engebene ebongiseli nini?
13 Na nsima, Balevi babulisami mpo na mosala ya Yehova, lokola lisiko mpo na babotami ya liboso ya Yisalaele. Bakabolami na bituluku misato, engebene bokitani na bango uta na bana misato ya Levi: Gelesone, Keata mpe Melali. Esika ya kofanda kati na molako mpe mikumba ya mosala epesami na kolandáká kokabolama wana. Baoyo nyonso bazali na mbula 30 kino likoló, basengeli kosala mosala makasi ya komema mongombo. Mpe mpo na kokokisa misala ya mikemike, ebongiseli ezwami ete basusu oyo bazalaki na mbula kobanda na 25 básala yango. (Na eleko ya Davidi, bakitisaki yango na mbula 20 ya kobotama.)—1 Nta. 23:24-32; Ezl. 3:8.
14. Malako nini mapesami mpo na kobatela bopɛto ya molako?
14 Mpo ete molako motikala pɛto, malako mapesami na ntina ete bábimisa na molako bato nyonso bazwi bokɔnɔ, na ntina na kopesa mbɔndi mpo na misala ya kozanga bosembo, na ntina na kosilisa mikakatano ya mobali oyo azali na makanisi mabe likoló na etamboli ya mwasi na ye, mpe mpo na komindimisa ete baoyo babulisami na ndai bazali solo komitambwisa na motindo mobongi na Banasili ya Yehova. Lokola libota yango lisengeli komema nkombo ya Nzambe na bango, boye basengeli komitambwisa na boyokani na mibeko na ye.
15. (a) Makabo nini mapesamaki na ntango etumbelo oyo batongaki ebandaki kosalelama? (b) Boyokani nini Yisalaele esengeli komikundwela, mpe Elekeli esengeli kokundwela bango nini?
15 Kokɔtisáká mwa makambo mosusu oyo masalemaki na sanza eleki (Mit. 7:1, 10; Ex. 40:17), Mose alobeli sikawa makabo ya biloko oyo bankumu 12 ya libota ya Yisalaele bapesaki na boumeli ya mikolo 12 kobanda na ntango oyo etumbelo na bango ebandaki kosalelama. Kowelana to komilukela lokumu ezalaki te kati na likambo yango; moto na moto apesaki bobele likabo likokani na oyo ya basusu. Banso basengeli sikawa kobatela na makanisi na bango ete likoló na bankumu wana, mpe ata likoló na Mose ye moko, Yehova Nzambe azali wana, mpe ye nde azali kopesa malako epai na Mose. Basengeli te kobosana boyokani na bango elongo na Yehova. Elambo ya Elekeli esengeli kokundwela bango kosikolama monene oyo Yehova asalaki mpo na bango na Ezipito, mpe, na ntango oyo etyamaki, bakumisi elambo yango na mokili mokauki mbula moko nsima na kobima na bango na Ezipito.
16. Lolenge nini Yehova azali kotambwisa libota ya Yisalaele, mpe koyulama nini ya kelelo ebongisami?
16 Bobele lokola akambaki kobima ya Yisalaele na Ezipito, Yehova alandi kotambwisa libota wana kati na mobembo, na lisalisi ya lipata oyo lizalaki kozipa mongombo ya hema ya Litatoli na moi mpe na mɔ́tɔ oyo ezalaki komonana likoló na yango na butu. Ntango lipata litamboli, libota yango mpe litamboli. Ntango lipata lifandi likoló na mongombo, libota yango mpe lifandi na molako, ezala na boumeli ya mwa mikolo to ya sanza moko to mpe koleka, mpamba te lisoló liyebisi biso ete: “Batɛmisaki hema na bango mpo na monɔkɔ na [Yehova], mpe batambolaki mpo na monɔkɔ na [Yehova]. Batosaki monɔkɔ na [Yehova] oyo elakaki [Yehova] na monɔkɔ na Mose.” (Mit. 9:23) Wana ntango ya kolongwa na Sinai ebɛlɛmi, koyulama ya kelelo esalemi mpo na koyanganisa bato mpe mpo na kotambwisa bituluku bikeseni ya molako, kati na mobembo na bango na mokili mokauki.
17. Lobelá lolenge botamboli ezalaki kosalema.
17 Makambo oyo malekaki na mokili mokauki (10:11–21:35). Na nsuka, na mokolo ya 20 ya sanza ya mibale, Yehova alongoli lipata likoló na mongombo, oyo ezali elembo apesi na ntina ete Yisalaele bálongwa na etúká ya Sinai. Sanduku ya kondimana ya Yehova katikati na bango, batɛlɛmi mpo na kokende na Kadesi-balenea, oyo ezwami na ntáká ya kilomɛ́tɛlɛ 150 na nɔ́rdi. Ntango bazali kotambola na moi, lipata ya Yehova lizali likoló na bango. Mbala nyonso bamemi Sanduku mpo na kokende, Mose abondeli Yehova ete atɛlɛma mpo na kopanza banguna na ye, mpe mbala nyonso oyo Sanduku etɛlɛmi, abondeli Yehova ete azonga “epai na bankóto zomi mpe nkóto na nkóto na Yisalaele.”—10:36.
18. Koimaima nini ebimi na nzela ya Kadesi-balenea, mpe lolenge nini Yehova andimisi ebongiseli ya Teokrasi kati na molako?
18 Nzokande, mikakatano ebimi kati na molako. Na mobembo na bango na nɔ́rdi kino Kadesi-balenea, koimaima ebimi mbala soko misato. Mpo na kosilisa botomboki ya liboso, Yehova atindi mɔ́tɔ mpe ezikisi ndambo ya bato. Na nsima, “bato na mobulu” bapusi Yisalaele na komilela ete balyaka lisusu mbisi te, kpala mike te, mabɔkɛ te, pwaló te, matungulu te, mpe sumi ya Ezipito te, kasi bobele mana. (11:4) Mose atungisami makasi na boye ete asɛngi Yehova aboma ye na esika ya kotika ye amema mokumba ya koleisa bato nyonso wana. Na kotalela lisɛngi yango, Yehova alongoli ndambo ya elimo oyo ezalaki epai na Mose mpe atye yango likoló na mikóló 70, mpe bakómi kosunga Mose lokola basakoli kati na molako. Na nsima, bazwi nyama ya kolya na boiké mpenza. Lolenge moko na mbala ya liboso, Yehova atindi mopɛpɛ oyo ememi ndɛkɛ babéngi nkánga uta na mai monene, mpe bato bomonisi lokoso na bango na kolokɔtáká mingi na yango mpe kobombáká mosusu na moimi nyonso. Nkanda ya Yehova epeleli bato yango, mpe abomi mingi na bango mpo na lokoso na bango monene.—Ex. 16:2, 3, 13.
19. Yehova asali nini liboso na libungá ya Milyami mpe Alona?
19 Mikakatano mikóbi kobima. Kozangáká kotalela na makanisi mabongi, Mose, oyo azali leki na bango ya mobali, mpe momonisi ya Yehova, Milyami na Alona babandi kotɔ́nga Mose na ntina na mwasi na ye, oyo ayei sika kati na molako. Bazali na mposa ya kozwa bokonzi mingi, lokola oyo ya Mose, atako “moto yango Mose azalaki na bopɔlɔ mingi, koleka bato nyonso bazalaki na nsé.” (Mit. 12:3) Yehova ye moko akati likambo yango, komonisáká ete Mose azali na etɛlɛmɛlo oyo eleki monene, mpe abɛti Milyami na maladi ya maba mpamba te emonani ete azalaki mobandisi ya koimaima yango. Ezali bobele ntango Mose abondeli nde, na nsima, Milyami abikisami.
20, 21. Makambo nini mapusaki Yehova na kozwa ekateli ete Yisalaele esengeli koyengayenga mbula 40 kati na mokili mokauki?
20 Ntango bakómi na Kadesi, Yisalaele basali molako liboso na ekɔtelo ya Mokili ya Ndaka. Sikawa, Yehova apesi Mose malako ete atinda banɔ́ngi mpo na kotalatala mokili yango. Kokɔtáká longwa na súdi, banɔ́ngi yango basali mobembo na nɔ́rdi kino “ekuke na mboka na Hamati,” kotamboláká bakilomɛ́tɛlɛ mingi na boumeli ya mikolo 40. (13:21) Ntango bazongi na ndambo ya mbuma malamu ya Kanana, banɔ́ngi zomi kati na bango balobi na kozanga kondima ete ekozala likambo ya bozoba kokende kobundisa bato ya makasi motindo wana mpe bingumba minene na bango oyo bikembisami. Kalebe ameki kokitisa motema ya bato na kopesáká nsango ya kolendisa, kasi bayokeli ye te. Banɔ́ngi wana, na botomboki mpenza, bakɔtisi bobángi monene na mitema ya Bayisalaele, kolobáká ete mokili yango ezali mokili “mokolyaka bafandi na yango” mpe lisusu ete, ‘bato nyonso oyo bamonaki kuna bazali mibali ya mbinga.’ Wana koimaima ya botomboki epalangani na molako mobimba, Yosua mpe Kalebe baluki kondimisa bango ete, “[Yehova] azali na biso elongo. Bóbanga bango te.” (13:32; 14:9) Kasi, liyangani mobimba likani kobamba bango mabanga.
21 Na yango, Yehova ayingeli nokinoki, kolobáká na Mose ete: “Bato oyo bakotyola ngai ntango molai boni? Bakoboya kondima ngai ntango molai boni ata nasili kosala bilembo oyo nyonso na kati na bango?” (14:11) Mose abondeli ye aboma Yisalaele te mpo ete nkombo ya Yehova mpe lokumu na ye etyolama te. Na bongo, Yehova azwi ekateli ete Yisalaele esengeli koyengayenga na mokili mokauki kino bato nyonso oyo bakomamaki nkombo kati na libota yango, kobanda na mbula 20 kino likoló, bakosila kokufa. Na mibali oyo batángamaki, bobele Kalebe mpe Yosua nde bapesameli nzela ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Bana ya Yisalaele bameki kokóba mobembo na ndenge na bango kasi nyonso sé mpamba, bakei bobele kobomama na lolenge ya nsɔ́mɔ epai na Baamaleki mpe Bakanana. Oyo nde likámá monene bazwi mpo ete bazangi botosi epai na Yehova mpe epai na bamonisi na ye ya sembo!
22. Na lolenge nini ntina ya botosi emonisami polele?
22 Ya solo, bazali naino na makambo mingi ya koyekola na oyo etali botosi. Na bongo, Yehova apesi bango mibeko mosusu oyo mimonisi polele ntina ya kozala na botosi. Ayebisi bango ete ntango bakokóma na Mokili ya Ndaka, mbɔndi esengeli kopesama mpo na mabungá, kasi baoyo bazali kobuka mibeko na nkó basengeli kobomama solo. Na yango, soki bakuti moto azali kolɔkɔta nkoni na mokolo ya Sabata, kobukáká bongo mobeko na yango, Yehova atindi ete: “Moto yango akobomama.” (15:35) Mpo na kokundwela bango mibeko ya Yehova mpe ntina ya kotosa yango, Yehova apesi malako na bato ya libota ete bátya ndelo na nsuka ya bilamba na bango.
23. Botomboki ya Kola, Datana mpe Abilama esukaki ndenge nini?
23 Atako bongo, botomboki ebimi lisusu. Kola, Datana, Abilama mpe bato minene 250 na liyangani mobimba, basangani mpo na kotɛmɛla bokonzi ya Mose mpe Alona. Mose amemi likambo yango liboso na Yehova, kolobáká epai na batomboki ete: ‘Bókamata mbeki izali na mɔ́tɔ kati na yango mpe mpaka na malasi, bótya yango liboso na Yehova, bongo ye akopona.’ (16:6, 7) Nkembo ya Yehova ebimi sikawa kati na liyangani mobimba. Nokinoki, akweisi ekateli na ye, kozipoláká mabelé mpe yango emɛli bato nyonso ya ndako ya Kola, ya Datana mpe ya Abilama, na nsima atindi mɔ́tɔ mpe yango ezikisi bato yango 250, bakisá mpe Kola, wana bazalaki kotumba mpaka na malasi. Na mokolo molandi, bato banso babandi kopamela Mose mpe Alona mpo na likambo oyo Yehova auti kosala, mpe Yehova apesi bango lisusu etumbu, kobomáká baimaimi 14 700.
24. Elembo nini Yehova asali mpo na kosilisa botomboki?
24 Na ntina na makambo yango, Yehova atindi ete libota mokomoko litya lingenda liboso na ye, esika moko na lingenda oyo lizali na nkombo ya Alona mpo na libota ya Levi. Na mokolo molandi, bayei komona ete Alona aponami na Yehova mpo na mosala ya bonganga, mpamba te bakuti bobele lingenda na ye nde etondi na fololo mpe eboti mbuma ya amanade oyo esili kotela. Lingenda yango lisengeli kobatelama kati na sanduku ya kondimana “lokola elembo mpo na batomboki.” (Mit. 17:10; Ebe. 9:4) Nsima na kopesa malako mosusu na ntina na lisungi oyo esengeli kopesama na banganga na lisalisi ya dime mpe na ntina na kosalelama ya mai ya kopɛtola esika na mputulu ya mɔ́tɔ ya ngɔmbɛ mwasi motane oyo ezikisami, lisoló lizongisi biso na Kadesi. Ezali kuna nde Milyami akufi mpe akundami.
25. Lolenge nini Mose mpe Alona bazangi kosantisa Yehova, mpe yango ebimiseli bango likambo nini?
25 Pene na kokɔta na Mokili ya Ndaka, libota ya Yisalaele ebandi lisusu koswanisa Mose mpo ete bazangi mai. Yehova amoni ete bazali nde koswanisa Ye, mpe amonani kati na nkembo na Ye, kotindáká Mose ete akamata lingenda mpe abimisa mai uta na libanga. Mose mpe Alona basantisi Yehova na likambo yango? Te, kútu Mose abɛti libanga yango lingenda mbala mibale na nkanda. Bato mpe bibwɛlɛ na bango bazwi mai ya komɛla, kasi Mose mpe Alona bazangi kopesa Yehova lokumu. Atako mobembo yango ya bwale kati na mokili mokauki mokómi sikawa pene na nsuka, bango nyonso mibale batumoli nkanda ya Yehova mpe eyebisami na bango ete bakokɔta te na Mokili ya Ndaka. Na nsima Alona akufi na Ngomba Holo, mpe Eleazala, mwana na ye, akóbi mosala ya nganga monene.
26. Makambo nini mabimaki na botamboli ya Yisalaele zingazinga na mokili ya Edome?
26 Yisalaele ebaluki na ngámbo ya ɛ́sti mpe eluki kokatisa na mokili ya Edome kasi nzela epesameli bango te. Ntango balandi nzela molai mpo na kobaluka zingazinga ya Edome, libota yango emikɔtisi lisusu na yikiyiki ntango babandi komilela likoló na Nzambe mpe Mose. Baleli ete balɛmbi kolya mana mpe bazali na mposa ya mai. Na ntina na botomboki na bango, Yehova atindeli bango nyoka mabe, na boye ete mingi na bango bakufi. Na nsuka, ntango Mose abondeli, Yehova apesi lilako ete asala nyoka ya motako monyangolami na mɔ́tɔ mpe atya yango likoló na nzeté lokola elembo. Baoyo baswami na nyoka, kasi batali epai na nyoka ya motako, babikisami. Kokendáká na lobɔkɔ ya nɔ́rdi, Bayisalaele bakangisami nzela na bakonzi mibale, balingá bitumba, libosoliboso Sihona, mokonzi ya Baamona mpe na nsima Ogu, mokonzi ya Basana. Yisalaele ebomi bakonzi yango nyonso mibale na etumba, mpe ekamati teritware na bango na ɛ́sti ya Lobwaku ya Yordani.
27. Lolenge nini Yehova abebisi myango oyo Balaka asali na nzela ya Balama?
27 Makambo masalemaki na Bisobe ya Moaba (22:1–36:13). Na mposa makasi ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Bayisalaele bayangani sikawa na bitando bikauki ya Moaba, na nɔ́rdi ya Mbu Ekufá mpe na ngámbo ya ɛ́sti ya Yordani, oyo etalani na Yeliko. Komonáká molako monene wana etandami liboso na bango, bato na Moaba bakómi na nsɔ́mɔ ya liwa. Mokonzi na bango Balaka, na boyokani na Bamidiani, atindi bákende kobénga Balama mpo na kolɔka mpe kolakela Yisalaele mabe. Atako Nzambe ayebisi polele na Balama ete, “Okokenda na bango te,” Balama alingi sé kokende. (22:12) Azali na mposa ya kozwa mbano. Nsukansuka, akei, kasi anzelu akangisi ye nzela mpe, na lolenge ya likamwisi, mpunda na ye elobi mpo na kopamela ye. Na nsuka, ntango Balama abaluki mpo na kobimisa maloba likoló na Yisalaele, elimo ya Nzambe epusi ye, na boye ete bisakweli na ye minei ya masese esakoli bobele mapamboli mpo na libota ya Nzambe, kino koyebisa kútu ete monzoto mokobima longwa na Yakobo mpe lingenda ya bokonzi ekobima uta na Yisalaele mpo na kotya na nsé mpe koboma.
28. Motambo mabe nini etyami liboso na Yisalaele uta na lilako ya Balama, kasi lolenge nini bolózi oyo ekweli bango esilisami?
28 Lokola nkanda ya Balaka epeleli ye mpo ete alóngi te kolakela Yisalaele mabe, Balama aluki sikawa komilingisa epai na mokonzi yango na kopesáká Bamoaba lilako ete básalela bana basi na bango mpo na kozwa mibali ya Yisalaele na motambo ya komikɔtisa na milulu ya mbindo ya losambo ya Baala. (31:15, 16) Na esika yango, na ndelo mpenza ya ebandeli ya Mokili ya Ndaka, Bayisalaele babandi komipesa na pite monene mpe na losambo ya banzambe ya lokuta. Ntango nkanda ya Yehova epeli na koyeisáká bolózi, Mose asɛngi ete basáli na mabe wana bapesamela etumbu makasi. Ntango Pinehase, mwana na nganga monene, amoni mwana ya nkumu moko komema mwasi Momidiani na hema na ye kati na molako, alandi bango mpe abomi bango, kotɔbɔláká mwasi yango na binama na ye ya kobotela. Ntango asali bongo, bolózi esili, kasi kino bato 24 000 bakufi na yango.
29. (a) Nini emonani ntango bato batángamaki na nsuka ya mbula 40 ya mobembo? (b) Ebongiseli nini esalemi sikawa mpo na kokɔta na Mokili ya Ndaka?
29 Sikawa, Yehova atindi Mose mpe Eleazala ete bátánga lisusu bato kati na Yisalaele, lokola yango esalamaki esili koleka mbula pene na 39 na Ngomba Sinai. Motángo ya nsuka emonisi ete bato babakisami te kati na mabota na bango. Kútu, mibali 1 820 bazangi. Ata mobali moko te atikali, kati na baoyo baponamaki mpo na mosala ya limpinga na Sinai, longola bobele Yosua mpe Kalebe. Bobele lokola Yehova alobaki yango, bango banso basilaki kokufa na mokili mokauki. Na nsima, Yehova apesi malako na ntina na kokabolama ya mokili yango lokola libula. Azongeli lisusu ete Mose akokɔta te na Mokili ya Ndaka mpamba te azangaki kosantisa Yehova na mai ya Meliba. (20:13; 27:14, NW, maloba na nsé ya lokasa) Yosua atyami lokola mokitani ya Mose.
30. Lolenge nini etumbu ya Bamidiani epesami, mpe nani apesameli teritware oyo ezwami na ɛ́sti ya Yordani?
30 Na nsima, na nzela ya Mose, Yehova akundweli Yisalaele ntina ya mibeko na Ye mitali mbeka mpe bilambo, bakisá mpe kozanga kotalela ndai na lisɛki. Lisusu, asaleli Mose mpo na kopesa etumbu na Bamidiani mpo ete basanganaki na kolengola Yisalaele kino losambo ya Baala na Peolo. Mibali nyonso ya Midiani babomami na etumba, esika moko na Balama, bobele bana basi baseka nde babomami te, 32 000 kati na bango bamemami lokola baombo elongo na biloko mosusu bizwamaki na etumba, kati na yango nyama 808 000. Moto moko te na Yisalaele abomami na etumba yango. Bana ya Lubene mpe ya Gada, babɔkɔli na bibwɛlɛ, basɛngi ete báfanda na teritware ya ɛ́sti ya Yordani, mpe na nsima bandimi kokende kopesa mabɔkɔ na bitumba mpo na kokamata Mokili ya Ndaka; lisɛngi na bango endimami, na boye ete mabota wana mibale, elongo na ndambo ya libota ya Manase, bapesameli libula ya mokili wana ya patatálú mpe ya mabelé malamu.
31. (a) Na bokɔti na mokili yango, ndenge nini Yisalaele esengeli kokóba komonisa botosi? (b) Malako nini mapesami na ntina na libula ya libota mokomoko?
31 Nsima na kolobela bisika oyo Yisalaele etɛlɛmaki na boumeli ya mobembo na bango ya mbula 40, lisoló libendi lisusu likebi na ntina ya botosi epai na Yehova. Nzambe azali kopesa bango mokili, kasi basengeli kozala bakokisi ya mikano na ye, kobenganáká bafandi ya mokili yango oyo bazali bato bamibebisi, basambeli ya bademó mpe kobebisa eloko nyonso oyo etikali ya losambo na bango ya bikeko. Bandelo ya sikisiki ya mokili oyo Nzambe apesi bango emonisami. Bakokabola mokili yango na kobwakáká mbɛsɛ. Balevi, oyo bazali na libula te, basengeli kopesamela mboka 48 mpe bisobe na yango mpo na kobɔkɔla bibwɛlɛ; mboka 6 kati na yango esengeli kozala mboka ya kobombama mpo na ye oyo abomi moto, kasi na nkó te. Teritware ya libota moko esengeli kotikala bobele na libota wana, esengeli kopesama na libota mosusu te, ezala na nzela ya libala. Soki mwana mobali oyo akoki kosangola libula yango azali te, boye bana basi oyo bakozwa yango—na ndakisa, bana basi ya Selofehada—basengeli kobala bobele kati na libota na bango moko. (27:1-11; 36:1-11) Bongo, mokanda ya Mituya mosuki na mibeko wana oyo Yehova apesi na nzela ya Mose mpe mosuki na ntango bana ya Yisalaele bakómi pene na kokɔta na Mokili ya Ndaka.
LITOMBA NA YANGO
32. Makambo nini mazalaki elilingi ya Yesu mpe ya mbeka na ye kati na mokanda ya Mituya?
32 Yesu, bantoma na ye mpe bakomi mosusu ya Biblia, batángaki maloba ya mokanda ya Mituya na mabaku mingi, komonisáká polele ntina mpe litomba ya lisoló na yango. Na bosikisiki mpenza, ntoma Paulo akokanisaki mosala ya sembo ya Yesu na mosala ya Mose, oyo moyebisami na bolai mpenza kati na mokanda ya Mituya. (Ebe. 3:1-6) Na lisalisi ya mbeka ya nyama mpe na komwangisama ya mputulu euti na mwana ngɔmbɛ motane oyo ezikisami, engebene Mituya 19:2-9, tozali lisusu komona elilingi ya ebongiseli eleki monene oyo etali kopɛtolama na lisalisi ya mbeka ya Klisto.—Ebe. 9:13, 14.
33. Mpo na nini kobimisama ya mai na mokili mokauki ezali na litomba mpo na biso lelo?
33 Bobele bongo, Paulo amonisaki ete kobimisama ya mai uta na libanga kati na mokili mokauki ezali na ndimbola monene mpo na biso, wana alobaki ete: “ Bamɛlaki longwa na libanga na [elimo, NW] libilaki bango, libanga yango ezalaki Klisto.” (1 Kol. 10:4; Mit. 20:7-11) Kútu, Klisto ye moko alobaki ete: “Ye oyo akomɛla mai makopesa ngai epai na ye akoyoka mposa lisusu libela te; kasi mai makopesa ngai ye makozala motó na mai kati na ye kopunzwapunzwa kino bomoi na seko.”—Yoa. 4:14.
34. Lolenge nini Yesu amonisaki ete nyoka ya motako ezalaki na ndimbola ya esakweli?
34 Yesu alobelaki lisusu polele likambo moko oyo likomami na mokanda ya Mituya, oyo lizalaki elilingi ya ebongiseli kitoko oyo Nzambe azalaki kosala na nzela na ye. Alobaki ete: “Lokola Mose anɛtolaki nyoka kati na lisobe, boye ekoki na Mwana na moto konɛtwa, ete moto na moto oyo akondimaka ye azala na bomoi na seko.”—Yoa. 3:14, 15; Mit. 21:8, 9.
35. (a) Baklisto basengeli kokeba na likambo nini, lokola yango emonisami na makambo ya Bayisalaele na mokili mokauki, mpe mpo na nini? (b) Kati na mikanda na bango, Yuda mpe Petelo balobelaki bandakisa nini ya lokoso mpe ya botomboki?
35 Mpo na nini Bayisalaele bazwaki etumbu ya koyengayenga mbula 40 kati na mokili mokauki? Mpo ete bazangaki kondima. Ntoma Paulo apesaki toli makasi na likambo yango ete: “Bandeko bókebaka ete motema mabe mpe na kozanga kondima ezala kati na moko na bino te ete bótangwa na Nzambe na bomoi te. Kasi bópesanaka toli kati na bino mpenza mokolo na mokolo.” Mpo na kozanga botosi na bango mpe kozanga kondima, Bayisalaele yango bakufaki kati na mokili mokauki. “Bongo tómeka makasi koingela na epemelo yango, ete moto moko akwea na lolenge yango na nkanza [“kozanga botosi,” NW] te.” (Ebe. 3:7–4:11; Mit. 13:25–14:38) Wana azalaki kokebisa na ntina na bato bazangi kondima oyo bazalaki kotalela makambo na bulɛɛ na limemya te, Yuda alobelaki lokoso ya Balama mpo na kozwa mbano mpe alobelaki lisukúlu ya botomboki ya Kola liboso na Mose, mosaleli ya Yehova. (Yuda 11; Mit. 22:7, 8, 22; 26:9, 10) Ntoma Petelo mpe alobelaki Balama lokola moto “oyo alingaki lifuti na bokɛsɛnɛ”; kati na emoniseli na ye oyo apesaki na Yoane, Yesu oyo akembisami alobelaki Balama lokola moto oyo ‘atyaki libaku liboso na Yisalaele mpo ete básambela bikeko mpe básala pite.’ Ya solo, lisangá ya boklisto na mikolo ya lelo lisengeli kokeba na ntina na bato motindo wana, oyo bazangi bulɛɛ.—2 Pet. 2:12-16; Emon. 2:14.
36. Paulo apesaki makebisi na ntina na misala nini ya mabe, mpe lolenge nini tokoki kozwa litomba na toli na ye lelo?
36 Ntango pite esalemaki na lisangá ya Kolinti, Paulo akomelaki bango na ntina na ‘mposa na makambo mabe,’ kolobeláká mpenzampenza makambo mazwami na mokanda ya Mituya. Apesaki toli ete: “Ekoki ete tósala makambo na pite te pelamoko bamosusu na bango basalaki pite mpe bakweaki bato nkóto ntuku mibale na misato na mokolo moko.” (1 Kol. 10:6, 8; Mit. 25:1-9; 31:16)b Ezali boni mpo na mokolo oyo bato na Yisalaele bazalaki komilela ete kotosa mibeko ya Nzambe ezali kobakisela moto mpasi mpe ete balɛmbaki na mana oyo Yehova azalaki kopesa bango? Na ntina na likambo yango, Paulo alobi boye: “Ekoki te ete tómeka Nkolo pelamoko bamosusu na bango bamekaki ye mpe babomamaki na nyoka.” (1 Kol. 10:9; Mit. 21:5, 6) Na nsima, Paulo abakisi ete: “Ekoki te ete tóimaima pelamoko bamosusu na bango baimaimaki mpe babebisami na Mobebisi.” Oyo nde mbuma ya bololo Yisalaele ebuki na ntina na koimaima na bango liboso na Yehova, liboso na bamonisi na ye mpe liboso na bibongiseli na ye! Makambo yango, oyo ‘mazalaki kokwela bango lokola bilakiseli,’ masengeli kozala makebisi ya polele mpo na biso banso lelo, na ntina ete tókóba kosalela Yehova na kondima mozindo.—1 Kol. 10:10, 11; Mit. 14:2, 36, 37; 16:1-3, 41; 17:5, 10.
37. Monisá lolenge mokanda ya Mituya mozali kosalisa biso na kososola mikapo mosusu ya Biblia.
37 Mokanda ya Mituya mozali mpe kopesa mayebisi ya moboko oyo mazali kosalisa biso na kososola malamumalamu mikapo mingi mosusu ya Biblia.—Mit. 28:9, 10—Mat. 12:5; Mit. 15:38—Mat. 23:5; Mit. 6:2-4—Luka 1:15; Mit. 4:3—Luka 3:23; Mit. 18:31—1 Kol. 9:13, 14; Mit. 18:26—Ebe. 7:5-9; Mit. 17:8-10—Ebe. 9:4.
38. Na mitindo nini ya sikisiki mokanda ya Mituya mozali na litomba, mpe yango ezali kobenda likebi na biso likoló na likambo nini?
38 Makambo oyo makomami na mokanda ya Mituya mapemami mpenza na Nzambe, mpe mazali na litomba mpamba te mazali koteya biso ntina ya botosi epai na Yehova mpe limemya epai na baoyo ye atye bakɛngɛli kati na libota na ye. Na ndakisa, lisoló oyo ekweisi misala mabe, mpe na lisalisi ya makambo na yango ya bisakweli, mokanda ya Mituya mobendi likebi na biso likoló na Moto oyo Yehova atye mpo na kozala Mobikisi mpe Motambwisi ya libota na Ye na mikolo na biso. Mokanda ya Mituya mozali kopesa ekanganeli ya ntina mpe ya koteya kati na lisoló oyo lizali komema kino kotyama ya Bokonzi ya sembo ya Yehova oyo epesami na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, oyo Ye aponi mpo na kozala Moyokanisi mpe Nganga Monene.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 540-542.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 233.