Tóndima Biblia mpo na oyo yango ezali mpenza
“Biso mpe tokotika tɛ kotɔndaka Njambe mpɔ na likambo oyo ete, wana eyambi bino liloba na Njambe liyoki bino epai na biso, boyambi yango lokola liloba na bato tɛ kasi lokola Liloba na Njambe. Ejali mpe yango sɔlɔ, mpe ejali kosalaka mosala kati na bino bandimi.”—1 BATƐSALƆNIKI 2:13.
1. Makambo ya lolenge nini mazwami kati na Biblia oyo masali ete yango ezala búku moko ya kokamwa?
BIBLIA mosantu ezali búku oyo esili kobongolama mingi mpe oyo esili kokabolama mingi koleka kati na mokili mobimba. Endimami mpe lokola moko na mikanda minene oyo misili kokomama. Nzokande, likambo lileki ntina, Biblia ezali kopesa litambwisi oyo bato ya mposo nyonso mpe mabota nyonso bazali na yango mpenza mposa, ata soko misala na bango to etɛlɛmɛlo na bango ezali nini. (Emoniseli 14:6, 7) Na lolenge oyo ezali kosepelisa makanisi mpe motema, Biblia ezali koyanola na mituna lokola oyo: Mokano ya bomoi ya moto mozali nini? (Genese 1:28; Emoniseli 4:11) Mpo na nini biyangeli ya bato bilóngi te kotya kimya mpe kobatelama ya koumela? (Yilimia 10:23; Emoniseli 13:1, 2) Mpo na nini bato bakufaka? (Genese 2:15-17; 3:1-6; Baloma 5:12) Kati na mokili oyo etondi na mobulungano, lolenge nini tokoki koyika mpiko na mikakatano ya bomoi? (Nzembo 119:105; Masese 3:5, 6) Mikolo mizali koya mizali kobombela biso nini?—Danyele 2:44; Emoniseli 21:3-5.
2. Mpo na nini Biblia ezali kopesa na mituna na biso biyano ya kotyela motema?
2 Mpo na nini Biblia ezali koyanola na mituna motindo yango na lolenge oyo ekoki kotyama ntembe te? Mpamba te yango ezali Liloba ya Nzambe. Nzambe asalelaki bato mpo na kokoma yango, kasi lokola eyebisami polele kati na 2 Timote 3:16 (NW), “Makomami nyonso mapemami na Nzambe.” Euti te na bandimbola oyo bakomi bango moko bapesaki na ntina na makambo ya bomoi ya bato. “Esakweli [kosakolama ya makambo oyo makoya, malako ya Nzambe, mitindá ya bizaleli oyo mizali kati na Biblia] mɔkɔ tɛ ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ejalaki bango kopusama na [elimo santu, NW].”—2 Pɛtɛlɔ 1:21.
3. (a) Pesá bandakisa oyo ezali komonisa lolenge oyo bato na mikili mikeseni bapesaki motuya mingi na Biblia. (b) Mpo na nini bato bandimaki kotya bomoi na bango na likámá mpo na kotánga Makomami?
3 Koyebáká motuya ya Biblia, ebele na bato bandimaki komitya na makámá ya kokangama na bolɔ́kɔ, ata ya kokufa, mpo ete balingaki kozala na Biblia mpe kotánga yango. Ezalaki mpenza bongo kala ntango Espagne ezalaki na nsé ya boyangeli ya Bakatolike, epai bakonzi ya mangomba bazalaki kobanga ete bokonzi na bango ekokita soki bato bakómi kotánga Biblia na lokótá na bango moko; ezalaki lisusu bongo na Albanie, epai kuna bikateli ya makasi bizwamaki na nsé ya boyangeli oyo eboyaki kondima ete Nzambe azali, mpo na kosukisa bopusi nyonso ya mangomba. Nzokande, bato na kobanga Nzambe babatelaki bakopi mingi ya Makomami, batángaki yango mpe bayebisaki yango bamoko epai na basusu. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na káa ya bakangami na Sachsenhausen, Biblia moko ezalaki kolekisama na bokɛngi nyonso longwa na eteni moko ya ndako ya bolɔ́kɔ kino na eteni mosusu (atako epekisamaki kosala bongo), mpe baoyo bakokaki komona yango bazalaki kokanga na motó biteni na yango mpo na koyebisa yango epai na basusu. Na boumeli ya bambula 1950, kati na oyo ezalaki Allemagne ya Ɛ́sti ya ba communistes, Batatoli ya Yehova oyo batyamaki na bolɔ́kɔ mpo na kondima na bango bazalaki na likámá ya kobakisamela mikolo na bolɔ́kɔ epai moto atangolami ye moko, soki bazwamaki wana ezalaki bango kolekisa biteni moke ya Biblia moko epai na mosusu mpo ete bákoka kotánga yango na butu. Mpo na nini bazalaki kosala yango? Ezalaki mpo ete bayebaki ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, mpe bayebaki ete “moto akobika bobɛlɛ na kwanga tɛ” kasi nde “na maloba yɔnsɔ makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].” (Dutɛlɔnɔmɛ 8:3) Maloba wana, oyo masili kokomama kati na Biblia, mapesaki Batatoli wana makoki ya kobatela ntango nyonso elimo na bango atako banyokwamaki na motindo moleki mabe.
4. Esika nini Biblia esengeli kozala na yango kati na bomoi na biso?
4 Biblia ezali te búku oyo esengeli bobele kotyama na bibliotɛkɛ mpe kotalelama na ntango libaku limonani, ekomamaki mpe te mpo na kosalelama bobele ntango bandimi bayangani mpo na kosambela. Esengeli kosalelama mokolo na mokolo mpo na kongɛngisa makambo makeseni oyo tokutanaka na yango mpe mpo na komonisa biso nzela oyo ebongi na biso kotambola na yango.—Nzembo 25:4, 5.
Ekomamaki mpo ete bato bátánga mpe bákanga ntina na yango
5. (a) Soki makoki mazali, moko na moko kati na biso asengeli kozala na nini? (b) Kati na Yisraele ya kala, lolenge nini bato bazalaki koyeba makambo oyo mazalaki kati na Makomami? (c) Lolenge nini Nzembo 19:7-11 ezali kosala bopusi likoló na botángi na yo ya Biblia?
5 Na mikolo na biso, Biblia ekoki kozwama nokinoki kati na mikili mingi, mpe tozali kolendisa batángi nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na komizwela moko na yango. Na eleko oyo Biblia ezalaki naino kokomama, binyateli ya mikanda bizalaki te. Bato mingi bazalaki na bakopi na bango moko te. Kasi Yehova azwaki bibongiseli mpo ete basaleli na ye bákoka koyoka makambo oyo masilaki kokomama. Na yango, Esode 24:7 emonisi ete, nsima wana Mose asilisaki kokoma makambo oyo Yehova apesaki ye etindá ete ákoma, “akamataki mokanda na kondimana mpe atangelaki bato yango.” Lokola bamonaki misala ya nguya mileki makasi oyo misalemaki na Ngomba Sinai, bayebaki ete makambo oyo Mose atángelaki bango mautaki na Nzambe mpe ete esengelaki báyeba makambo yango. (Exode 19:9, 16-19; 20:22) Biso mpe tosengeli koyeba makambo oyo makomami kati na Liloba ya Nzambe.—Nzembo 19:7-11.
6. (a) Liboso ete libota ya Yisraele ekɔta na Makili ya Ndaka, Mose asalaki nini? (b) Lolenge nini tokoki komekola ndakisa ya Mose?
6 Lokola libota ya Yisraele lizalaki komibongisa mpo na kokatisa ebale Yaladene mpe kokɔta na Mokili ya Ndaka, mpe na yango kotika libela bomoi ya kotambolatambola na mokili mokauki, ebongaki mpenza ete báyoka lisusu mibeko ya Yehova mpe misala na ye epai na bango. Wana apusamaki na elimo ya Nzambe, Mose azongelaki Mibeko mpo na bango. Akundwelaki bango makambo nyonso ya Mibeko, mpe alimbolaki lisusu mitindá mpe elimo oyo esengelaki kotambwisa boyokani na bango elongo na Yehova. (Deteronome 4:9, 35; 7:7, 8; 8:10-14; 10:12, 13) Lelo oyo, wana tozwi mikumba ya sika to wana tosengeli koyika mpiko na makambo mosusu oyo ebimi kati na bomoi, ekozala malamu ete tótalela lolenge nini toli ya Makomami esengeli kotambwisa makambo oyo tozali kosala.
7. Mwa moke nsima wana Bayisraele bakatisaki Yaladene, likambo nini lisalemaki mpo na kokɔtisa Mibeko ya Yehova kati na makanisi mpe mitema na bango?
7 Mwa moke nsima wana Bayisraele bakatisaki ebale Yaladene, bato bayanganaki lisusu mpo na koyoka oyo Yehova asilaki koyebisa bango na nzela na Mose. Libota liyanganaki na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ soko 50 na nɔ́rdi ya Yelusaleme. Ndambo moko ya mabota etɛlɛmaki liboso na Ngomba Ebali, mpe ndambo mosusu liboso na Ngomba Gelizimi. Kuna Yosua “atangaki maloba yɔnsɔ na Mobeko, lipamboli mpe elakeli mabe.” Na yango, na ntango oyo ebongi, mibali, basi mpe bana elongo na bapaya bayokaki kozongelama ya mibeko mitali etamboli oyo elingaki kosilikisa Yehova mpe mapamboli oyo balingaki kozwa soki batosaki Yehova. (Yosua 8:34, 35) Kati na makanisi na bango, makambo oyo Yehova azalaki kotalela ete ezali malamu to mabe masengelaki kozala polele. Lisusu, basengelaki kokɔtisa kati na mitema na bango bolingo mpo na oyo ezali malamu mpe koyina oyo ezali mabe, lokola moko na moko kati na biso asengeli kosala yango lelo oyo.—Nzembo 97:10; 119:103, 104; Amosa 5:15.
8. Wapi litomba ya kotánga mbala na mbala Liloba ya Nzambe na mabaku mosusu ya mayangani ya ekólo mobimba na Yisraele?
8 Longola botángi ya Mibeko na mabaku wana ya ntina mingi, ebongiseli ya kotánga Liloba ya Nzambe mbala na mbala emonisami na Deteronome 31:10-12. Nsima ya eleko nyonso ya mbula nsambo libota mobimba lisengelaki koyangana mpo na koyoka botángi ya Liloba ya Nzambe. Yango ezalaki kopesa bango bilei ya elimo. Ezalaki kobatela kati na makanisi mpe mitema na bango bilaka na ntina na Mombóto mpe na yango ezalaki mpo na kokamba basembwi epai na Masiya. Bibongiseli ya koleisama na elimo oyo etyamaki ntango Yisraele ezalaki na mokili mokauki esukaki te ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. (1 Bakolinti 10:3, 4) Nzokande, Liloba ya Nzambe ebakisamaki na nzela ya bimonaneli ya basakoli.
9. (a) Bayisraele bazalaki kotánga Makomami bobele ntango bazalaki koyangana na bituluku minene? Limbolá. (b) Lolenge nini mateya ya Makomami mazalaki kopesama kati na mabota, mpe mpo na mokano nini?
9 Kozongelama ya toli ya Liloba ya Nzambe esengelaki te kosuka bobele na mabaku wana bato bazalaki koyangana na etuluku monene. Biteni ya Liloba ya Nzambe mpe mitindá oyo mizali kati na yango misengelaki kotalelama mokolo na mokolo. (Deteronome 6:4-9) Na bisika mingi lelo oyo, bilenge bakoki kozala na Biblia na bango moko, mpe ezali mpenza litomba mpo na bango ete bázala na yango. Kasi, na Yisraele ya kala ezalaki bongo te. Na ntango yango, wana baboti bazalaki koteya bana na bango Liloba ya Nzambe, basengelaki kotya motema na makambo oyo basilaki kosimba na motó mpe makambo ya solo oyo bazalaki kobomba kati na mitema, elongo na biteni mike nyonso oyo bakokaki kokoma bango moko. Na kozongeláká yango mbala na mbala, basengelaki kosala milende mpo na kokólisa epai na bana na bango bolingo mpo na Yehova mpe banzela na ye. Mokano na yango mozalaki te bobele koyeba makambo mingi kasi ya kosalisa basangani nyonso ya libota ete bázala na bomoi oyo ezali komonisa bolingo na bango mpo na Yehova mpe Liloba na ye.—Deteronome 11:18, 19, 22, 23.
Kotánga Makomami kati na biyanganelo
10, 11. Ebongiseli nini ya botángi Makomami ezalaki kolandama na biyanganelo, mpe lolenge nini Yesu azalaki kotalela mabaku motindo yango?
10 Mwa moke nsima wana Bayuda bamemamaki na boombo na Babilone, biyanganelo bityamaki lokola bisika ya losambo. Mpo ete bákoka kotánga Liloba ya Nzambe mpe kosolola na ntina na yango kati na bisika wana ya makita, bakopi mingi ya Makomami esalemaki. Yango epesaki nzela na kolimbola kobatelama ya bakopi 6000 ya biteni ya Makomami ya Liebele oyo ekomamaki na mabɔkɔ.
11 Eteni ya ntina mingi ya makita oyo mazalaki kosalema kati na biyanganelo ezalaki botángi ya Torah, oyo ekokani na mikanda mitano ya liboso ya Biblia lokola tozali na yango lelo oyo. Misala 15:21 ezali komonisa ete na ekeke ya liboso ya T.B., botángi motindo yango ezalaki kosalema na Sabata nyonso, mpe Mishnah ezali komonisa ete na ekeke ya mibale, botángi ya Torah ezalaki mpe kosalema na mokolo na mibale mpe na mokolo na mitano ya pɔ́sɔ. Ezalaki na bato oyo bazalaki kotánga biteni bipesameli bango, moko nsima na mosusu. Momeseno ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na Babilone ezalaki ya kotánga Torah mobimba mbula na mbula; na Palestine bazalaki na momeseno ya kotya botángi yango na boumeli ya mibu misato. Biteni ya makomi ya basakoli bizalaki mpe kotángama mpe kolimbolama. Yesu azalaki na momeseno ya koyangana epai bazalaki kosala botángi ya Biblia na Sabata na esika oyo azalaki kofanda.—Luka 4:16-21.
Lolenge moto na moto azalaki koyanola mpe kosalela Makomami
12. (a) Ntango Mose atángelaki bato Mibeko, lolenge nini bazwelaki yango matomba? (b) Lolenge nini bato bayanolaki?
12 Botángi ya Makomami mapemami ezalaki kosalema te bobele lokola momeseno mpamba. Ezalaki kosalema te bobele mpo na kosepelisa mposa ya bato oyo bazalaki koluka koyeba makambo mingi. Ntango Mose atángaki “mokanda na kondimana” mpo na Yisraele na esika ya polele liboso na Ngomba Sinai, asalaki bongo mpo ete bákoka koyeba mikumba na bango liboso na Nzambe mpe bákokisa yango. Basalaki yango? Botángi ezalaki kosɛnga básala likambo moko. Bato bayebaki yango, mpe balobaki na mongongo makasi ete: “Tokosala yango yɔnsɔ elobi [Yehova mpe tolingi kotosa, NW].”—Esode 24:7; kokanisá na Esode 19:8; 24:3.
13. Ntango Yosua atángaki kolakelama mabe mpo na kozanga botosi, bato basengelaki kosala nini, mpe na mokano nini?
13 Na nsima, ntango Yosua atángelaki libota mapamboli oyo elakamaki mpe kolakelama mabe, ezalaki kosɛnga ete básala likambo. Nsima ya kolakelama nyonso ya mabe, mitindá mipesamaki ete: “Bato mpe yɔnsɔ bakoloba ete, Ejala bongo!” (Dutɛlɔnɔmɛ 27:4-26) Na yango, wana ezalaki bango kotalela likambo moko na moko, bandimaki polele kokweisama oyo Yehova asakolaki likoló na makambo mabe oyo matángamaki. Yango esengelaki mpenza kozala likambo ya kokamwisa wana libota mobimba endimaki na mongongo makasi lokola nkake!
14. Na mikolo ya Nehemia, mpo na nini botángi ya Mibeko liboso na bato nyonso ezalaki mpenza na litomba monene?
14 Na mikolo ya Nehemia, ntango libota mobimba liyanganaki na Yelusaleme mpo na koyoka Mibeko, bamonaki ete bakokisaki mpenza malamu te mitindá oyo mikomamaki kati na yango. Na libaku wana basalelaki nokinoki makambo oyo bazalaki koyekola. Ebimisaki litomba nini? “basepelaki mingi mpenja.” (Nɛhɛmia 8:13-17) Nsima ya kotánga Biblia mokolo na mokolo na boumeli ya Elambo oyo eumelaki pɔ́sɔ mobimba, bakangaki ntina ete basengelaki lisusu kosala makambo mingi. Na bosembo nyonso, bakundwelaki lolenge oyo Yehova asalaki epai na bato na ye longwa na mikolo ya Abalayama kino ntango wana. Nyonso wana elendisaki bango na kolapa ndai ya komiyokanisa na masɛngami ya Mibeko, ya koboya kobalana elongo na bapaya, mpe ya kondima mikumba ya kobatela tempelo mpe misala na yango.—Nehemia, mokapo 8 kino mokapo 10.
15. Lolenge nini malako oyo mazwami na Dutɛlɔnɔmɛ 6:6-9 mazali komonisa ete, kati na mabota, mateya ya Liloba ya Nzambe masengeli te kozala momeseno ya mpamba?
15 Bobele bongo, kati na libota, koteya Makomami esengelaki te kozala bobele momeseno mpamba. Lokola tosili komona yango, na maloba ya elilingi na Dutɛlɔnɔmɛ 6:6-9, bato bazwaki etindá ya ‘kokanga maloba ya Nzambe lokola elembo na lobɔkɔ na bango’—komonisáká bongo na ndakisa mpe na misala bolingo oyo bazalaki na yango mpo na banzela ya Yehova. Mpe basengelaki kotya maloba ya Nzambe lokola ‘bikaniseli na kati na miso na bango’—kobateláká bongo ntango nyonso na makanisi mitindá oyo mizalaki kati na Makomami mpe kosaleláká yango lokola moboko ya bikateli na bango. (Kokanisá na elobeli oyo esalelami na Esode 13:9, 14-16.) Basengelaki ‘kokoma yango na makonji na monɔkɔ na ndako na bango mpe na bikuke na bango’—komonisáká polele ete bandako na bango mpe bituluku na bango ezalaki bisika epai liloba ya Nzambe etosami mpe esalelami. Na maloba mosusu, bomoi na bango esengelaki kopesa bilembeteli ya solosolo ete balingi mpe bazali kosalela mitindá ya sembo ya Yehova. Yango esengelaki mpenza kopesa litomba! Liloba ya Nzambe lizali na esika monene bongo kati na bomoi ya mokolo na mokolo ya bato na ndako na biso? Likambo ya mawa, Bayuda bakómisaki bibongiseli nyonso oyo lokola mimeseno ya mpamba, na kolatáká basanduku mike oyo ezalaki na biteni ya Makomami lokola bikelákela. Losambo na bango ezalaki lisusu kouta na mitema te mpe Yehova abwakaki bango.—Yisaya 29:13, 14; Matai 15:7-9.
Mokumba na baoyo bazali bakɛngɛli
16. Mpo na nini botángi ya Makomami mokolo na mokolo ezalaki na ntina mingi mpo na Yosua?
16 Kati na likambo litali kotánga Makomami, likebi monene lityamaki likoló na baoyo bazalaki na mokumba ya kokɛngɛla libota. Epai na Yosua, Yehova alobaki ete: “Keba kotosa Mibeko yɔnsɔ oyo.” Mpo ete akokisa mokumba yango, apesamelaki etindá ete: “Okokanisa yango butu na moi, . . . mpe bongo okojalisa njela na yɔ malamu [mpe okosala na mayele, NW].” (Yosua 1:7, 8) Lokola yango ezali solo epai na moto nyonso oyo azali mokɛngɛli moklisto na mikolo na biso, botángi ya Makomami mokolo na mokolo elingaki kosalisa Yosua na kobatela kati na makanisi malako ya sikisiki oyo Yehova asilaki kopesa epai na bato na Ye. Yosua asengelaki mpe koyeba motindo nini Yehova asalaki epai na basaleli na Ye kati na makambo ndenge na ndenge. Wana azalaki kotánga kosakolama ya mokano ya Nzambe, ezalaki likambo ya ntina mingi ete ákanisa likoló na mokumba na ye na boyokani na mokano wana.
17. (a) Mpo ete bakonzi bákoka kozwa matomba na botángi ya Makomami lokola Yehova alobaki yango, esengelaki básala nini elongo na botángi? (b) Mpo na nini botángi ya Biblia mokolo na mokolo mpe komanyola yango ezali na ntina mingi mpo na bankulutu kati na lisangá ya boklisto?
17 Yehova apesaki etindá ete moto nyonso oyo azalaki mokonzi likoló na libota na Ye asengelaki, na ebandeli ya bokonzi na ye, kosala kopi ya Mibeko ya Nzambe, na kolandáká oyo banganga bazalaki kobatela. Na nsima asengelaki “kotanga kati na yango mikɔlɔ yɔnsɔ na bomɔi na ye.” Mokano na yango mozalaki te bobele kokanga na motó makambo oyo mazali na kati na yango. Kasi, ezalaki mpo ete “ayekola komɛmisa [Yehova] Njambe na ye” mpe ete “motema na ye ejala na lolɛndɔ na likolo na bandeko na ye tɛ.” (Dutɛlɔnɔmɛ 17:18-20) Yango ezalaki kosɛnga ete ámanyola na mozindo makambo oyo azalaki kotánga. Bakonzi mosusu bakanisaki mpenza ete bazalaki na misala mingi kati na mikumba ya boyangeli, mpe libota mobimba limonaki mpasi na ntina na bopotu na bango. Mokumba ya bankulutu kati na lisangá ya boklisto ezali soko moke te oyo ya bakonzi. Atako bongo, na motindo ya bakonzi wana, ezali na ntina mingi ete bankulutu bámanyola Liloba ya Nzambe. Kosala bongo ekosalisa bango na kozala na makanisi malamu na ntina na baoyo batyami na nsé ya libateli na bango. Ekosalisa mpe bango na kokokisa mikumba na bango ya balakisi na lolenge oyo ekokumisa mpenza Nzambe mpe ekolendisa elimo ya baninga na bango baklisto.—Tito 1:9; kokanisá na Yoane 7:16-18; kesenisá na 1 Timoté 1:6, 7.
18. Botángi mpe boyekoli ya Biblia mokolo na mokolo ekosalisa biso na komekola ndakisa nini oyo ntoma Paulo atikaki?
18 Ntoma Paulo, mokɛngɛli moklisto ya ekeke ya liboso, ayebaki malamu Makomami mapemami. Ntango apesaki litatoli epai na bato na Tesaloniki ya kala, azalaki na makoki ya kokanisa elongo na bango likoló na Makomami mpe kosalisa bango na kokanga ntina na yango. (Misala 17:1-4) Asimbaki mitema ya bayoki na ye oyo bazalaki bato na mitema sembo. Na yango, mingi oyo bayokaki ye bakómaki bandimi. (1 Batesaloniki 2:13) Lokola litomba ya ebongiseli na yo ya botángi mpe ya boyekoli ya Biblia, ozali na makoki ya kokanisa elongo na bato likoló na Makomami? Esika oyo botángi ya Biblia ezali na yango kati na bomoi na yo mpe motindo oyo ozali kosala yango ezali mpenza komonisa ete ozali solo kopesa motuya monene na likambo oyo elimboli kozala na Liloba ya Nzambe? Kati na lisoló oyo elandi, tokotalela lolenge biyano ya malamu bikoki kopesama na mituna wana, ata mpo na baoyo bazali na makambo mingi ya kosala kati na bomoi na bango.
Okopesa eyano nini?
◻ Mpo na nini bato bandimaki kotya bomoi mpe bonsomi na bango na likámá mpo na kotánga Biblia?
◻ Lolenge nini tozali kozwa matomba wana ezali biso kotalela lisusu bibongiseli oyo Yisraele ezalaki na yango ya koyoka Liloba ya Nzambe?
◻ Tosengeli kosala nini na makambo oyo tozali kotánga kati na Biblia?
◻ Mpo na nini botángi mpe bomanyoli Biblia ezali mpenza na ntina mingi mpo na bankulutu baklisto?
[Elilingi na lokasa 9]
Yehova ayebisaki Yosua ete: “Osengeli kotánga yango na mongongo na nsé butu na moi”