Mekolá kondima na bango
Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki matomba na ye moko te
ESTERE azali kopusana mokemoke na kiti ya mokonzi, motema na ye ezali kobɛta. Kanisá kimya oyo ezalaki na esika oyo kiti ya bokonzi ezalaki na ndako na ye na Shushane! Makɛlɛlɛ ezali ata moke te na boye ete Estere akoki koyoka ndenge makolo na ye mpe bilamba na ye ya bokonzi ezali kobendana na mabele. Akoki te kolekisa ntango na ye na kotala kitoko ya ndako ya mokonzi, makonzí na yango kitoko, plafɔ na yango oyo ezipami na mabaya ya Liban. Azali kotya likebi na ye nyonso epai ya moto oyo afandi na kiti ya bokonzi, mobali oyo akoki kobomisa ye to kobikisa ye.
Mokonzi azalaki kotala ye malamu ndenge azalaki kopusana, mpe asembolelaki ye lingenda na ye ya wolo. Mwa jɛstɛ yango elakisaki bomoi mpo na Estere, mpamba te elakisaki ete mokonzi alimbisi ye na likambo oyo asalaki ya kokɔta epai na ye kozanga ete ye moko abengisa ye. Ntango Estere apusanaki na kiti ya bokonzi, asembolaki lobɔkɔ mpe na botɔndi nyonso asimbaki motó ya lingenda ya mokonzi.—Estere 5:1, 2.a
Makambo nyonso ya Mokonzi Ahasueruse ezalaki komonisa bozwi na ye monene mpe nguya na ye. Molato ya bakonzi ya Perse na ntango wana ezalaki na motuya oyo ekokani na bankama ya bamilio ya dolare. Kasi, Estere amonaki na miso ya mobali na ye ete asepelaki; azalaki kolinga ye. Alobaki na ye boye: “Likambo nini, Ee Estere mwasi ya mokonzi, mpe eloko nini ozali kosɛnga? Ata bokonzi kabolá na mibale—ɛɛ, bápesa yo yango!”—Estere 5:3.
Estere amonisaki liboso ete azali na kondima mpe na mpiko mingi; akendaki liboso ya mokonzi mpo na kolobela bato na ye oyo bazalaki kokana koboma bango nyonso. Alongaki na makambo nyonso oyo asalaki liboso, kasi alingaki kokutana na mikakatano mosusu ya minene koleka. Asengelaki kondimisa mobali na ye oyo azalaki moto ya lolendo ete mopesi-toli na ye oyo azalaki kotyela motema azalaki moto mabe oyo akosaki ye mpo abimisa mobeko oyo ekopesa nzela ete báboma bato nyonso ya ekólo ya Estere. Ndenge nini akokaki kondimisa ye, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya kondima na ye?
Aponaki malamu “ntango ya koloba”
Ebongaki nde Estere ayebisa mokonzi likambo na ye na miso ya bato oyo bazalaki kosala pembeni ya mokonzi? Soki asalaka bongo alingaki kokitisa lokumu ya mokonzi mpe kopesa Hamana libaku ya kokweisa bifundeli na ye. Boye, Estere asalaki nini? Basiɛklɛ mingi liboso, Mokonzi Salomo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe ete: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango, . . . Ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:1, 7) Tokoki kokanisa ndenge moto ya sembo Mordekai, tata-mobɔkɔli ya Estere, azalaki koteya elenge mwasi yango mitinda yango ntango azalaki kokola. Na ntembe te, Estere akangaki ntina ya kopona malamu “ntango ya koloba.”
Estere alobaki boye: “Soki yango emonani malamu na miso ya mokonzi, tiká mokonzi aya lelo ná Hamane na fɛti oyo nasaleli ye.” (Estere 5:4) Mokonzi andimaki mpe abengisaki Hamane. Omoni ndenge oyo Estere alobaki na bwanya? Abatelaki lokumu ya mobali na ye mpe alukaki koyebisa ye likambo na ye na esika oyo ebongi.
Na ntembe te Estere abongisaki fɛti yango malamumalamu, alukaki ete makambo nyonso esalema ndenge mobali na ye alingaka. Na fɛti yango masanga kitoko ezalaki mpo na kosepelisa bango. (Nzembo 104:15) Ahasueruse asepelaki, mpe yango etindaki ye atuna lisusu Estere soki mposa na ye ezalaki nini. Yango ezalaki ntango ya koloba?
Estere amonaki ete ntango ekokaki naino te. Kutu, abengisaki mokonzi ná Hamane báya mpo na mbala ya mibale na fɛti oyo akosala mokolo ekolanda. (Estere 5:7, 8) Mpo na nini alekisaki mokolo yango? Tóbosana te ete bato nyonso ya ekólo ya Estere bazalaki liboso ya liwa mpo na mobeko oyo mokonzi abimisaki. Lokola likama ezalaki monene, Estere asengelaki kopona malamu ntango oyo ebongi. Yango wana, azelaki mpe alukaki libaku mosusu mpo na kolakisa mobali na ye ete azalaki kopesa ye lokumu mingi.
Motema molai ezali ezaleli malamu mingi oyo bato mingi bazalaka na yango te. Atako Estere azalaki na mpasi na motema mpe azalaki na mposa ya koloba, azelaki ntango oyo ebongi. Ndakisa na ye ekoki koteya biso mingi, mpamba te biso nyonso tomonaka makambo ya mabe oyo esengeli kosembolama. Soki tolingi kondimisa mokonzi moko ete atalela likambo moko, mbala mosusu ekosɛnga tólanda ndakisa ya Estere mpe tózala motema molai. Masese 25:15 elobi boye: “Na motema molai nde bandimisaka motambwisi, mpe lolemo ya boboto ekoki kobuka mokuwa.” Soki tozeli na motema molai ntango oyo ebongi mpe tolobi na boboto, ndenge Estere asalaki, ata botɛmɛli oyo ezali makasi lokola mokuwa ekoki kolɛmba. Yehova, Nzambe ya Estere, apambolaki ye mpo na motema molai mpe bwanya oyo amonisaki?
Motema molai ebongisi nzela mpo na bosembo
Motema molai ya Estere ebongisaki nzela na makambo oyo elandaki nsima. Nsima ya fɛti ya liboso, Hamane azongaki epai na ye “na esengo mpe na nsai na motema” ete mokonzi ná mwasi na ye basepelaki na ye. Kasi, ntango Hamane azalaki kobima na porte ya ndako ya mokonzi, amonaki Mordekai, Moyuda oyo azalaki ntango nyonso koboya kogumbama liboso na ye. Soki Mordekai azalaki koboya, ezali te mpo azangaki limemya, kasi nde mpo na lisosoli na ye mpe boyokani oyo azalaki na yango ná Yehova Nzambe. Kasi, “na mbala moko Hamane atondaki na nkanda makasi.”—Estere 5:9.
Ntango Hamane ayebisaki mwasi na ye ná baninga na ye likambo yango, balendisaki ye abongisa nzete moko monene, ya mɛtrɛ koleka 22 na molai, mpe asɛnga mokonzi nzela ya kokakisa Mordekai wana. Hamane asepelaki na likanisi na bango mpe abandaki mbala moko kobongisa yango.—Estere 5:12-14.
Na ntango yango, mokonzi alekisaki butu moko ya malamu te. Biblia elobi na biso ete “mpɔngi ya mokonzi ekimaki.” Yango wana, asɛngaki bátángela ye babuku ya makambo ya Leta. Lisolo moko na babuku yango elobelaki mokano oyo bato moko bazwaká ya koboma Ahasueruse. Akanisaki lisusu likambo yango; bato oyo bakanaká kosala likambo yango bakangaká bango mpe babomá bango. Kasi, basalaki nini mpo na Mordekai, moto oyo afundaki likambo yango? Mokonzi asutukaki mpe atunaki soki bapesaki Mordekai nini mpo na likambo yango. Bayanolaki ete bapesaki ye eloko moko te.—Estere 6:1-3.
Mokonzi atungisamaki mpe atunaki soki na kati ya basali na ye, banani bakondima kosalisa ye asembola libunga yango? Na basali nyonso ya ndako ya mokonzi, kaka Hamana nde ayaki ntɔngɔntɔngɔ, ekoki kozala mpo asɛnga nzela ya kobomisa Mordekai. Kasi, liboso kutu Hamane ayebisa mokonzi mposa na ye, mokonzi atunaki ye ndenge oyo eleki malamu ya kopesa lokumu na moto oyo mokonzi asepeli na ye. Hamane akanisaki ete moto yango esengeli kozala nde ye. Yango wana, alobaki makambo oyo ekopesa moto yango lokumu mingi mpenza: Kolatisa ye elamba ya bakonzi, kosɛnga na moto moko monene na mboka atambwisa ye na Shushane mobimba na mpunda ya mokonzi, mpe kokumisa moto yango na mongongo makasi mpo bato nyonso báyoka. Sikoyo, kanisá ndenge elongi ya Hamane ekómaki ntango ayokaki ete moto oyo asengeli kokumisama bongo ezali nde Mordekai! Lisusu, nani oyo mokonzi aponaki mpo abelela mpo na kokumisa Mordekai? Hamane!—Estere 6:4-10.
Hamane akokisaki mokumba yango na mitema mibale, na nsima azongaki na ndako na ye na mawa. Mwasi na ye ná baninga na ye balobaki na ye ete makambo oyo ekómelaki ye ezalaki elembo ya mabe; akolonga te na mokano na ye ya kobundisa Mordekai, oyo azalaki Moyuda.—Estere 6:12, 13.
Lokola Estere azalaki na motema molai, azelaki mokolo mosusu mpo ayebisa mokonzi mposa na ye, Hamane azwaki ntango ya kobongisa makambo oyo ememaki kokwea na ye moko. Ekoki kozala ete Yehova Nzambe nde azangisaki mokonzi yango mpɔngi. (Masese 21:1) Tokoki kokamwa te ete Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tóyeba “kozela.” (Mika 7:7) Ntango tozeli Nzambe asala, tokomona ete ndenge oyo akosalisa biso mpo tósilisa mikakatano na biso, eleki kutu ndenge oyo tozalaki kokanisa.
Alobaki na mpiko
Estere alingaki te kozelisa mokonzi ntango molai koleka; na fɛti ya mibale, ayebisaki ye makambo nyonso. Kasi, ndenge nini asalaki yango? Mokonzi apesaki ye libaku ya koloba, atunaki ye lisusu soki mposa na ye ezali nini. (Estere 7:2) “Ntango ya koloba” ekokaki mpo na Estere.
Tokoki kokanisa ete Estere asalaki libondeli mokuse na nse ya motema epai ya Nzambe liboso aloba maloba oyo: “Soki nandimami na miso na yo, Ee mokonzi, mpe soki emonani malamu na miso ya mokonzi, na lilɔmbɔ na ngai, tiká bápesa ngai molimo na ngai mpe na eloko oyo nazali kosɛnga, bápesa ngai bato na ngai.” (Estere 7:3) Simbá ete amonisaki mokonzi ete akondima ekateli oyo mokonzi akozwa. Estere akesenaki mpenza na Vasheti, mwasi ya liboso ya mokonzi, oyo ayokisaki mobali na ye nsɔni! (Estere 1:10-12) Longola yango, Estere alobaki te ete mokonzi asalaki mabe ndenge azalaki kotyela Hamane motema. Asɛngaki nde mokonzi abikisa ye na likama ya liwa.
Na ntembe te, likambo yango ekamwisaki mokonzi. Nani alingakaki kosala mwasi ya mokonzi mabe? Estere abakisaki boye: “Totɛkami, ngai ná bato na ngai, mpo tósilisama nyɛɛ, tóbomama mpe tóbebisama. Sikoyo, soki tótɛkamaka kaka lokola baombo mibali mpe lokola basali ya basi, mbɛlɛ nafandi nyɛɛ. Kasi mpasi yango ebongi te awa yango ekoyeisela mpe mokonzi likama.” (Estere 7:4) Tomoni ete Estere alobaki polele likambo na ye, kasi abakisaki ete alingaki kofanda nyɛɛ soki ezalaki kaka ete bakómisaki bango ata baombo. Kasi, mokano wana ya koboma bato nyonso ya ekólo na ye elingaki kozala likama ata mpo na mokonzi, yango wana akokaki kofanda nyɛɛ te.
Ndakisa ya Estere eteyi biso likambo ya ntina mingi na oyo etali mayele ya kondimisa. Soki olingi koyebisa likambo moko ya ntina epai ya moto moko oyo olingaka to epai ya mokonzi, okoki kozwa mayele mingi na ndenge oyo asalelaki motema molai, limemya, mpe alobaki na bosembo.—Masese 16:21, 23.
Ahasueruse atunaki boye: “Nani yango, mpe wapi moto yango oyo azwi mpiko ya kosala bongo?” Kanisá ndenge Estere alakisaki mosapi mpe alobaki ete: “Mobali yango, motɛmɛli mpe monguna, ezali moto mabe oyo Hamane.” Esika yango ekómaki nyɛɛ. Hamane ayokaki nsɔmɔ. Kanisá ndenge elongi ya mokonzi ebongwanaki ntango ayebaki ete mopesi-toli oyo azalaki kotyela motema akosaki ye mpo abimisa mobeko oyo elingaki kobomisa mwasi na ye oyo azalaki kolinga mingi! Mokonzi abimaki mbala moko libándá mpo na kokitisa motema.—Estere 7:5-7.
Lokola eyebanaki polele ete ye nde abongisaki mokano mabe ya koboma, Hamane afukamaki na makolo ya mwasi ya mokonzi. Ntango mokonzi azongaki na ndako mpe amonaki Hamane azali kobondela Estere na kiti ya divan oyo afandaki, asilikaki mpe alobaki ete Hamane alukaki kosangisa nzoto na makasi na mwasi na ye na ndako na ye moko. Likambo yango emonisaki ete Hamane akobika te, akobomama. Babimisaki ye libándá, bazipi ye elongi. Na nsima, mosali moko ya mokonzi ayebisaki mokonzi ete Hamane asalisaki nzete moko molai mpo na kokakisa Mordekai likoló na yango. Mbala moko, Ahasueruse apesaki mitindo ete Hamane ye moko akakisama na nzete yango.—Estere 7:8-10.
Na mokili oyo ezangi bosembo, ezali mpasi tókanisa ete bosembo ekozala mokolo mosusu. Yo mpe okanisaka bongo? Estere alongolaki elikya te, akómaki mawamawa te, mpe abungisaki kondima te. Mokolo oyo ntango ekokaki, alobaki na mpiko makambo ndenge ezalaki, mpe atyaki motema ete Yehova akosala. Biso mpe tósala bongo! Yehova abongwani te, azali kaka ndenge azalaki na ntango ya Estere. Azali kaka na makoki ya kosukisa moto mabe mpe kokweisa ye na mayele mabe na ye, kaka ndenge asalaki Hamane.—Nzembo 7:11-16.
Atyaki matomba ya Yehova mpe ya bato na ye na esika ya liboso
Nsukansuka, mokonzi ayebaki ete Mordekai azalaki te kaka moto oyo afundaki bato oyo bazalaki na mokano ya koboma mokonzi, kasi azalaki mpe tata-mobɔkɔli ya Estere. Ahasueruse atyaki Mordekai ministre-mokonzi na esika ya Hamane. Mokonzi apesaki Estere ndako ya Hamane ná ebele ya bozwi na ye nyonso; mpe Estere apesaki yango na mabɔkɔ ya Mordekai.—Estere 8:1, 2.
Lokola Estere ná Mordekai babikaki, mwasi ya mokonzi akokaki kofanda kimya? Akokaki kosala bongo kaka soki azalaki kokanisa bolamu na ye moko. Na ntango yango, mobeko ya Hamane ya koboma Bayuda nyonso etambolaki na mboka mobimba. Hamane abwakaki mbɛsɛ to Pure (na ntembe te ezalaki lolenge moko ya misala ya bilimu mabe) mpo na koyeba ntango malamu ya kokokisa mokano na ye. (Estere 9:24-26) Etikalaki naino mwa basanza, kasi mokolo yango ezalaki kopusana. Bakokaki nde kopekisa likambo yango?
Estere atyaki lisusu bomoi na ye na likama mpo na bolamu ya basusu; akendaki lisusu epai ya mokonzi atako abengisaki ye te. Na mbala oyo alelaki mpo na bato ya ekólo na ye, abondelaki mobali na ye ete alongola mobeko oyo abimisaki. Kasi, mibeko oyo mokonzi ya Perse azalaki kobimisa ekokaki kolongolama te. (Danyele 6:12, 15) Yango wana, mokonzi apesaki Estere ná Mordekai nzela ya kobimisa mibeko mosusu. Babimisaki mobeko mosusu oyo epesaki Bayuda lotomo ya kobunda mpo na komibatela. Bamemi-mpunda batambolaki mboka mobimba mpo na koyebisa Bayuda nsango malamu yango. Bayuda mingi bakómaki lisusu na elikya. (Estere 8:3-16) Tokoki kokanisa ndenge oyo Bayuda na ampire wana monene bazalaki koluka bibundeli mpe komibongisa mpo na bitumba, likambo oyo bakokaki kosala te soki mobeko oyo ya sika ebimaki te. Kasi, motuna ya ntina koleka yango oyo: “Yehova ya mampinga” alingaki nde kozala elongo na bato na ye?—1 Samwele 17:45.
Ntango mokolo wana ekokaki, libota ya Nzambe basilaki komilɛngɛla. Bakonzi mosusu ya mboka Perse bakómaki na ngámbo ya Bayuda lokola bazalaki koyoka nsango ete Mordekai oyo akómaki ministre-mokonzi azali Moyuda. Yehova alongisaki mpenza bato na ye. Na ntembe te, asalaki ete banguna ya bato na ye básuka mpenza mpo bányokola bango lisusu te.b—Estere 9:1-6.
Longola yango, Mordekai akokaki te kotambwisa malamumalamu ndako ya Hamane soki bana zomi ya moto mabe yango bazalaki kaka na bomoi. Bango mpe babomamaki. (Estere 9:7-10) Likambo yango ekokisaki mpe esakweli moko ya Biblia, mpamba te Nzambe asakolaki liboso ete Baamaleki bakosila nyɛɛ, mpo bazalaki banguna mpenza ya libota na ye. (Kolimbola Mibeko 25:17-19) Ekoki kozala ete bana ya Hamana bazalaki bato ya nsuka ya ekólo yango oyo Yehova akatelaki etumbu.
Atako Estere azalaki naino elenge, asengelaki komema mokumba monene wana ya kobimisa mibeko oyo esɛngaki Bayuda bábunda etumba mpe báboma banguna na bango. Yango ekokaki kozala pɛtɛɛ te. Kasi, mokano ya Yehova esɛngaki ete libota na ye elimwisama te; Masiya oyo alakaki, oyo asengelaki kopesa bato nyonso elikya, asengelaki kobotama na libota ya Yisraele! (Ebandeli 22:18) Basaleli ya Nzambe lelo oyo bayebi ete ntango Yesu Masiya ayaki awa na mabele, apekisaki bayekoli na ye kokɔta na bitumba kobanda ntango wana.—Matai 26:52.
Atako bongo, bakristo bazali na etumba ya elimo; Satana azali na ekateli makasi ya kobebisa kondima na biso epai ya Yehova Nzambe. (2 Bakorinti 10:3, 4) Estere azali mpenza ndakisa malamu mpo na biso! Lokola ye, tómonisa kondima na ndenge oyo tozali kosalela mayele ya kondimisa na bwanya mpe na motema molai, na mpiko, mpe tóndima kosala makambo mpo na bolamu ya libota ya Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisolo oyo ebimaki na nimero elekaki, tomonaki ete Estere azalaki mwana etike oyo ndeko na ye Mordekai abɔkɔlaki, mpe na nsima, aponamaki mpo azala mwasi ya Ahasueruse, mokonzi ya Perse. Hamane, mopesi-toli ya mokonzi, abongisaki mwango mabe ya koboma Bayuda nyonso, bato ya ekólo ya Mordekai. Mordekai andimisaki Estere akende koloba mpo na bato na ye liboso ya mokonzi.—Talá lisolo “Mekolá kondima na bango—Alobaki mpo na libota ya Nzambe,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2011.
b Mokonzi abakiselaki Bayuda mokolo ya mibale mpo na kolonga malamumalamu banguna na bango. (Estere 9:12-14) Tii lelo oyo, Bayuda bakanisaka bolongi yango na fɛti oyo babengaka Purime, nkombo oyo eutá na mbɛsɛ oyo Hamane abwakaki ntango azalaki koluka koboma bato ya ekólo Yisraele mobimba.
[Etanda na lokasa 28]
Mituna na ntina na Estere
Mpo na nini Mordekai andimaki Estere abala moto oyo azalaki kosambela Yehova te?
Likambo moko te endimisi makanisi ya bato mosusu ya mayele oyo balobaka ete Mordekai amonaki ete ezalaki libaku malamu Estere abala mokonzi, mpo na lokumu ya libota na bango. Lokola Mordekai azalaki Moyuda ya sembo, akokaki kosepela te na libala ya ndenge wana. (Kolimbola Mibeko 7:3) Masolo ya kala ya Bayuda elobaka ete Mordekai alukaki ndenge ya kopekisa libala yango. Emonani lokola ete Mordekai to Estere bazalaki na ndenge mosusu ya kosala te na likambo yango, lokola bazalaki bapaya na mboka oyo mokonzi na yango azalaki kotalelama lokola nzambe. Na nsima, eyaki komonana polele ete Yehova nde asalelaki libala ya Estere mpo na kobikisa bato na ye.—Estere 4:14.
Mpo na nini nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali te na mokanda ya Estere?
Ekoki mpenza kozala ete Mordekai nde akomaki mokanda ya Estere. Ntango mosusu na ebandeli mokanda yango ezalaki na kati ya mikanda ya masolo ya Baperse liboso bámema yango na Yerusaleme. Soki asalelaki nkombo ya Yehova, yango ekokaki kotinda bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya Baperse bábebisa mokanda yango. Ezala bongo to te, lisolo yango emonisi polele makambo oyo Yehova asalaki. Kutu, na makomi na yango ya Ebre, nkombo ya Nzambe ekomami na ndenge ya kobombama, mpo emonani lokola ete bakomi bafraze na molɔngɔ mpo balɛtrɛ ya liboso to ya nsuka ya maloba wana ebimisa nkombo ya Nzambe.—Estere 1:20, maloba na nse ya lokasa na Rbi8-F.
Mokanda ya Estere elobelaka makambo oyo esalemá mpenza?
Bato oyo balukaka mabunga na Biblia balobaka ete makambo oyo mokanda ya Estere elobeli esalemá mpenza te. Nzokande, bato mosusu ya mayele bamonaki ete moto oyo akomaki mokanda yango ayebaki malamu makambo ya bakonzi ya Perse, ndenge oyo bazalaki kotonga bandako, mpe mimeseno na bango. Ya solo, mwasi ya mokonzi oyo azalaki na nkombo Estere atángami te na mikanda na bango ya kala; kasi Estere azali te moto kaka moko oyo nkombo na ye ezangi na mikanda wana. Lisusu, mikanda yango ya kala emonisi ete mobali moko oyo nkombo na ye ezalaki Mardukâ, ebengeli ya nkombo Mordekai na monɔkɔ ya Baperse, azalaki kosala na ndako ya mokonzi na Shushane na eleko oyo mokanda ya Estere elobeli.
[Etanda na lokasa 29]
Likambo oyo ekokisaki esakweli moko
Milende oyo Estere ná Mordekai basalaki mpo na kobikisa libota ya Nzambe ekokisaki esakweli mosusu ya Biblia. Mbula koleka 1 200 liboso, na lisalisi ya elimo ya Yehova, Yakobo asakolaki boye mpo na moko ya bana na ye: “Benyamina akokoba kopasola lokola mbwa ya zamba. Na ntɔngɔ akolya nyama oyo ekangami mpe na mpokwa akokabola biloko oyo epunzami.” (Ebandeli 49:27) Na “ntɔngɔ” elingi koloba na ebandeli ya lisolo ya bakonzi ya Yisraele, bato ya libota ya Benyamina, na ndakisa Mokonzi Saulo mpe bilombe mosusu babundaki mpo na libota ya Yehova. Na “mpokwa” elingi koloba na nsuka ya boyangeli ya bakonzi yango, ntango moi elalaki mpo na bakonzi ya Yisraele, Estere ná Mordekai, oyo bazalaki bato ya libota ya Benyamina, babundisaki mpenza banguna ya Yehova. Tokoki koloba ete bakabolaki biloko oyo epunzami na ndenge oyo bazwaki ebele ya biloko ya Hamane.
[Elilingi na lokasa 25]
Na komikitisa, Estere azalaki na botɔndi mpo na motema mawa ya mokonzi
[Elilingi na nkasa 26, 27]
Na mpiko nyonso, Estere alakisaki Hamane moto mabe mosapi
[Elilingi na nkasa 28, 29]
Estere ná Mordekai batindaki mikanda epai ya Bayuda na mboka Perse mobimba