Tóluka lipamboli ya Yehova na mposa makasi
“[Nzambe] akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”—EBR. 11:6.
1, 2. (a) Ndenge nini bato mingi balukaka mapamboli ya Nzambe? (b) Mpo na nini biso tosengeli koluka mpenza kozwa lipamboli ya Yehova?
“NZAMBE apambola yo!” Bato balobaka yango mpo na kopesa matondi na moto oyo asaleli bango likambo moko ya malamu to akabeli bango eloko. Okoki kokuta bakonzi ya mangomba ndenge na ndenge bazali kopambola bato, banyama, to mpe biloko oyo ezali na bomoi te. Bato mosusu bakendaka na bisika ya losambo oyo bakanisaka ete kuna, bakozwa lipamboli. Mbala na mbala, bato ya politiki babelelaka Nzambe apambola ekólo na bango. Okanisi ete mabondeli wana oyo basalaka mpo na kosɛnga lipamboli ebongi mpenza? Mabondeli yango esalaka mpenza? Nani mpenza azwaka lipamboli ya Nzambe, mpe mpo na nini?
2 Yehova asakolaki ete na mikolo ya nsuka, akozala na basambeli ya pɛto mpe ya kimya na mabota nyonso, oyo bakosakola nsango malamu ya Bokonzi tii na nsuka mpenza ya mabele atako bato bakoyina bango mpe bakotɛmɛla bango. (Yis. 2:2-4; Mat. 24:14; Em. 7:9, 14) Biso baoyo tondimi mokumba ya kozala na kati ya bato yango, tolingi mpe tosengeli na lipamboli ya Nzambe, mpo soki yango te, tokoki kolonga ata moke te. (Nz. 127:1) Kasi ndenge nini tokoki kozwa lipamboli ya Nzambe?
Mapamboli ezwaka bato ya botosi
3. Nini elingaki kosalema soki Bayisraele batosaki?
3 Tángá Masese 10:6, 7. Mwa moke liboso ekólo Yisraele ekɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova amonisaki ete soki batosi maloba na ye, akopambola mpe akobatela bango mpenza. (Mib. 28:1, 2) Mapamboli ya Yehova elingaki kosuka kaka na kokitela bato ya Nzambe te, elingaki ‘kozwa’ bango mpenza. Ya solo, mapamboli elingaki kozanga te kozwa bato ya botosi.
4. Botosi ya solosolo esɛngi nini?
4 Bayisraele basengelaki kozala na botosi ya ndenge nini? Mibeko ya Nzambe elobaki ete Nzambe akosepela te soki bato na ye basaleli ye “na nsai te mpe na esengo ya motema te.” (Tángá Kolimbola Mibeko 28:45-47.) Ebongi te kotosa mibeko ya Yehova na makasi, ndenge banyama to bademo mpe bakoki kosala soki bapesi bango mitindo. (Mrk. 1:27; Yak. 3:3) Kotosa Nzambe na motema moko emonisaka ete tolingaka ye. Emonanaka na esengo oyo euti na kondima ete mibeko ya Yehova ezali kilo te mpe ete “akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”—Ebr. 11:6; 1 Yoa. 5:3.
5. Ndenge nini kondima elaka ya Yehova ezalaki kosalisa moto atosa mobeko oyo ezali na Kolimbola Mibeko 15:7, 8?
5 Tótala ndenge moto akokaki komonisa ete azali na botosi ya ndenge wana na oyo etali mobeko oyo ezali na Kolimbola Mibeko 15:7, 8. (Tángá.) Kotosa mobeko wana na mitema mibale ekokaki kosalisa mobola mwa moke, kasi ekokaki nde kolendisa boyokani malamu mpe bolingo kati na basaleli ya Nzambe? Oyo eleki ntina, ekokaki nde komonisa ete moto yango azali na kondima ete Yehova azali na likoki ya kokokisa bamposa ya basaleli na ye? Elingaki nde komonisa ete moto yango asepeli na libaku wana ya komonisa bokabi ya Nzambe? Te! Nzambe azalaki kotánga motema ya moto oyo akabi na motema moko mpe alakaki ete akopambola moto yango na makambo mpe na misala na ye nyonso. (Mib. 15:10) Kondima elaka wana ezalaki kotinda moto asalisa basusu mpe ezalaki komemela ye mapamboli mingi.—Mas. 28:20.
6. Baebre 11:6 esengeli kondimisa biso nini?
6 Longola kondima ete Yehova azali Moto oyo apesaka mbano, Baebre 11:6 emonisi likambo mosusu oyo tosengeli kosala mpo tózwa lipamboli ya Nzambe. Elobi ete Yehova apesaka mbano na baoyo “bazali koluka ye na mposa makasi.” Liloba oyo ebongolami na maloba yango epesaka likanisi ya kosala milende mpe komipesa mpenza. Yango esengeli kondimisa biso ete lipamboli ekozanga te! Moto oyo akopesa yango azali Nzambe kaka moko ya solo, “oyo akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Amonisá banda bankóto ya bambula ete bilaka na ye ebongi mpenza kotyelama motema. Maloba na ye ekosaka te; ezangaka kokokisama te. (Yis. 55:11) Na yango, tokoki mpenza kotya motema ete soki tomonisi kondima ya solosolo, akomonisa biso ete azali mpenza Moto oyo apesaka mbano.
7. Ndenge nini tokoki koluka kozwa lipamboli na nzela ya “momboto” ya Abrahama?
7 Yesu Kristo akómaki moto ya liboso ya “momboto” ya Abrahama. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali eteni mosusu ya “momboto” yango oyo elakamaki. Bazwaki mokumba ya ‘kosakola bizaleli malamu ya moto oyo abengaki bango bálongwa na molili bákɔta na pole na ye ya kokamwa.’ (Gal. 3:7-9, 14, 16, 26-29; 1 Pe. 2:9) Tokoki te kolikya kokóma na boyokani makasi na Yehova soki toboyi kokipe bato oyo Yesu atye bábatela biloko na ye. Soki “moombo ya sembo mpe ya mayele” te, tolingaki mpenza te kokanga ntina ya makambo oyo totángaka na Liloba ya Nzambe to koyeba ndenge ya kosalela yango. (Mat. 24:45-47) Soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola na Biblia, tokoki kozwa lipamboli ya Nzambe.
Tótya makanisi na mokano ya Nzambe
8, 9. Milende nini Yakobo asalaki na boyokani na elaka ya Nzambe?
8 Soki toyoki ete tosengeli kosala milende makasi mpo na kozwa lipamboli ya Nzambe, tokoki kokanisa Yakobo, nkɔkɔ ya Bayisraele. Ayebaki te ndenge elaka oyo Nzambe apesaki Abrahama ekokokisama, kasi andimaki ete Yehova akokómisa momboto ya nkɔkɔ na ye Abrahama mingi mpenza, mpe bakitani ya momboto yango bakokóma ekólo moko monene. Na yango, na mobu 1781 L.T.B., Yakobo asalaki mobembo na Harane mpo na koluka mwasi. Azalaki koluka kaka te moto oyo akozala mwasi malamu; kasi, alukaki nde mwasi oyo alingaka makambo ya elimo, oyo azali mosambeli ya Yehova, mpe oyo akozala mama ya malamu ya bana na ye.
9 Ndenge toyebi yango, Yakobo akutanaki na ndeko na ye Rashele. Akómaki kolinga Rashele mpe andimaki kosalela tata na ye Labana mbula nsambo mpo abala Rashele. Ezalaki kaka lisolo kitoko ya lolango te. Na ntembe te, Yakobo ayebaki elaka oyo Nzambe Mozwi-ya Nguya-Nyonso apesaki nkɔkɔ na ye Abrahama, mpe oyo azongelaki epai ya tata na ye, Yisaka. (Eba. 18:18; 22:17, 18; 26:3-5, 24, 25) Yisaka mpe ayebisaki mwana na ye Yakobo boye: “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akopambola yo mpe akosala ete obota mingi mpe akokómisa yo mingi, mpe okokóma mpenza lisangá ya bato ya bikólo. Mpe akopesa yo lipamboli ya Abrahama, yo ná momboto na yo elongo na yo, mpo ozwa mokili ya bisika oyo ofandi mopaya, oyo Nzambe apesaki Abrahama.” (Eba. 28:3, 4) Na yango, milende oyo Yakobo asalaki mpo na kozwa mwasi ya malamu mpe kobota bana emonisaki ete azalaki kotya elikya na makambo oyo Yehova alobaki.
10. Mpo na nini Yehova asepelaki kopambola Yakobo na boyokani na likambo oyo asɛngaki?
10 Yakobo azalaki te koluka bomɛngo mpo na kobongisa libota na ye. Atyaki makanisi na libula na ye. Azalaki kokanisa kokokisama ya mokano ya Yehova. Yakobo azalaki na ekateli ya kosala likambo nyonso oyo akoki mpo na kozwa lipamboli ya Nzambe, atako mikakatano. Abatelaki ezaleli yango tii na bobange, mpe Yehova apambolaki ye mpo na yango.—Tángá Ebandeli 32:24-29.
11. Milende nini tosengeli kosala na boyokani na mokano ya Nzambe oyo toyebi?
11 Ndenge moko na Yakobo, biso mpe toyebi makambo nyonso te na oyo etali kokokisama ya mokano ya Yehova. Atako bongo, boyekoli ya Biblia esalisi biso tóyeba na mokuse makambo oyo tosengeli kozela na oyo etali “mokolo ya Yehova.” (2 Pet. 3:10, 17) Na ndakisa, toyebi mpenzampenza te ntango oyo mokolo yango ekoya, kasi toyebi ete ekómi pene. Tondimaka ndenge Liloba ya Nzambe elobi ete soki tozali kopesa litatoli malamumalamu na ntango mokuse oyo etikali, tokomibikisa mpe tokobikisa baoyo bazali koyoka biso.—1 Tim. 4:16.
12. Tokoki kondima likambo nini?
12 Toyebi ete nsuka ekoki koya ata na ntango nini; ngonga ya Yehova ekozela te ete Batatoli báteya moto mokomoko oyo azali awa na mabele. (Mat. 10:23) Longola yango, tozali kozwa malako ya malamu mpo na ndenge ya kokokisa malamu mosala na biso ya kosakola. Lokola tozali na kondima, tozali komipesa na mosala yango ndenge makoki na biso epesi nzela; tozali kosalela biloko nyonso oyo tozali na yango. Tokobanda kosakola ntango nyonso na teritware oyo ekobota mbuma mingi? Mpo na koloba solo, ndenge nini tokoki koyeba yango? (Tángá Mosakoli 11:5, 6.) Mosala na biso ezali kaka ya kosakola, tozali na elikya ete Yehova akopambola biso. (1 Ko. 3:6, 7) Tokoki mpenza kondima ete amonaka milende na biso, mpe ete na nzela ya elimo santu na ye, akopesa biso litambwisi oyo tosengeli na yango.—Nz. 32:8.
Tóluka elimo santu
13, 14. Ndenge nini nguya ya elimo santu ya Nzambe ya kopesa basaleli na ye makoki emonanaki?
13 Tokosala nini soki tozali komona ete tozali na makoki te ya kokokisa mokumba moko to ya komipesa na mosala ya kosakola? Tosengeli kosɛnga Yehova apesa biso elimo santu na ye mpo ekolisa makoki na biso mpo tósala mosala na ye malamu. (Tángá Luka 11:13.) Elimo santu ya Nzambe ekoki kopesa bato makoki ya kosala mosala to kokokisa mokumba moko ata soki bazalaki ndenge nini liboso. Na ndakisa, nsima ya kobima ya Bayisraele na Ezipito, elimo ya Nzambe epesaki bato oyo bazalaki babateli ya mpate mpe baombo makoki ya kolonga banguna na bango, atako bamesanaki kobunda bitumba te. (Kob. 17:8-13) Mwa moke na nsima, elimo yango esalisaki mpe Bezalele ná Oholiabe bálanda plan oyo Nzambe ye moko apesaki mpo na kotonga tabernakle moko kitoko.—Kob. 31:2-6; 35:30-35.
14 Elimo yango ya nguya esalisaki mpe basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso bákokisa bamposa ya ebongiseli ya Yehova ntango esɛngaki bábanda kobimisa mikanda na bamasini na bango moko. Na mokanda moko, Ndeko Robert Martin, oyo azalaki mokɛngɛli ya bamasini ya kobimisa mikanda na ntango wana, alimbolaki makambo oyo esalemaki na 1927. Alobaki boye: “Na ntango oyo ebongi, Nkolo afungolaki porte; tozwaki masini monene ya konyata mikanda, eyaki na mabɔkɔ na biso bato oyo toyebaki ata moke te ndenge esalemá mpe ndenge ya kosalela yango. Kasi, Nkolo ayebi ndenge ya kofungola mayele ya bato oyo bamipesi mobimba na ye. . . . Nsima ya pɔsɔ moke mpenza, tolongaki kotambwisa masini yango; mpe ezali kaka kosala malamu, ezali kosala mosala oyo ata bato oyo basalaki yango bayebaki ata moke te ete ekoki kosala yango.” Yehova azali kokoba kopambola milende ya ndenge wana tii lelo.
15. Ndenge nini Baroma 8:11 ekoki kolendisa baoyo bakutani na komekama?
15 Elimo ya Yehova esalaka na bandenge ebele. Elimo yango ezali mpo na basaleli nyonso ya Nzambe, mpe esalisaka bango bálonga mikakatano minene mpenza. Tokosala nini soki tomoni ete komekama na biso eleki makasi? Tokoki kozwa makasi na maloba ya Paulo oyo ezali na Baroma 7:21, 25 mpe 8:11. Ya solo, “elimo ya moto oyo alamwisaki Yesu uta na bakufi” ekoki kosala mpo na biso, kopesa biso nguya ya kobundisa bamposa na biso ya mosuni. Mokapo wana ekomamaki mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kasi makanisi na yango etali basaleli nyonso ya Nzambe. Biso nyonso tokozwa bomoi soki tozali komonisa kondima epai ya Kristo, soki tozali kosala makasi tóboma bamposa ya mabe, mpe soki tozali kolanda litambwisi ya elimo santu na bomoi na biso.
16. Tosengeli kosala nini mpo tózwa elimo santu ya Nzambe?
16 Tokoki kolikya ete Nzambe apesa biso elimo na ye kozanga tósala milende? Te. Longola kobondela mpo na kosɛnga elimo yango, tosengeli komileisa mpenza Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. (Mas. 2:1-6) Longola yango, elimo ya Nzambe ezali likoló ya lisangá ya bokristo. Koyangana na makita nyonso emonisaka ete tozali na mposa ya ‘koyoka oyo elimo ezali koloba na masangá.’ (Em. 3:6) Lisusu, tosengeli mbala moko kosalela makambo oyo toyekoli. Masese 1:23 epesi biso toli oyo: “Bóbongwana mpo na kolanda mpamela na ngai. Bongo nakosopela bino elimo na ngai mingi.” Ya solo, Nzambe apesaka elimo santu na ye “na baoyo bazali kotosa ye mpo azali mokonzi.”—Mis. 5:32.
17. Tokoki kokokanisa ndenge oyo mapamboli ya Yehova esalaka na milende na biso ná nini?
17 Atako tosengeli kosala milende mpo na kozwa lipamboli ya Nzambe, kobosana te ete ezali kaka te mpo na mosala makasi na biso moko nde Yehova asopeli biso ebele ya biloko kitoko. Tokoki kokokanisa ndenge mapamboli ya Yehova esalaka na milende na biso ná ndenge nzoto na biso esalelaka biloko ya malamu oyo tolei. Nzambe asalá nzoto na biso na ndenge oyo ekoki kosepela na bilei mpe kobenda vitamini oyo ezali na bilei yango. Apesaka mpe biso bilei yango. Toyebi mpenza te ndenge oyo bilei ezwaka bavitamini yango; mpe mingi kati na biso tokokoka te kolimbola ndenge nzoto na biso ezwaka makasi nsima ya kolya. Toyebi kaka ete mosala yango esalemaka mpe tolyaka mpo mosala yango esalema. Soki toponi kolya bilei ya malamu, nzoto ekozala malamu koleka. Ndenge moko, Yehova atye masɛngami mpo na kozwa bomoi ya seko, mpe apesi biso lisalisi oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa masɛngami yango. Ya solo mpenza, asalisi biso mingi mpe abongi na lokumu. Nzokande, tosengeli kotosa ye, kosala na boyokani na mokano ya Nzambe mpo tózwa lipamboli yango.—Hag. 2:18, 19.
18. Ekateli nini ozwi, mpe mpo na nini?
18 Na yango, omipesa mobimba na mosala nyonso oyo bapesi yo. Luká ntango nyonso lisalisi ya Yehova mpo na kolonga. (Mrk. 11:23, 24) Wana ozali kosala bongo, yebá ete “moto nyonso oyo alukaka amonaka.” (Mat. 7:8) Baoyo batyami mafuta na elimo bakozwa “motole ya bomoi” na likoló. (Yak. 1:12) “Bampate mosusu” ya Kristo, oyo bazali kosala makasi mpo bápambolama na nzela ya momboto ya Abrahama, bakosepela koyoka Ye alobi ete: “Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá, bózwa libula ya bokonzi oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.” (Yoa. 10:16; Mat. 25:34) Ya solo, “baoyo [Nzambe] apamboli bakozwa mabele, . . . mpe bakofanda wana seko.”—Nz. 37:22, 29.
Okoki kolimbola?
• Botosi ya solosolo esɛngaka nini?
• Esengeli kosala nini mpo na kozwa lipamboli ya Nzambe?
• Ndenge nini tokoki kozwa elimo santu ya Nzambe, mpe ndenge nini ekoki kosalisa biso?
[Bililingi na lokasa 9]
Yakobo abundaki na anzelu mpo azwa lipamboli ya Yehova.
Yo mpe osalaka milende makasi ndenge wana?
[Elilingi na lokasa 10]
Elimo santu ya Nzambe esalisaki Bezalele ná Oholiabe bákóma na makoki mingi