Yehova asengeli kozala elikya na biso
“Zambi [Yehova] akozala elikya na yo.”—MASESE 3:26.
1. Atako bato mingi balobaka ete batyelaka Nzambe elikya, nini emonisi ete basalaka yango ntango nyonso te?
NA MBONGO ya Amerika, bakomá maloba oyo, “In God We Trust” (Totii elikya epai ya Nzambe). Kasi, bato nyonso oyo basalelaka mbongo wana, ezala na Amerika to na bikólo mosusu, batyaka solo elikya na bango epai ya Nzambe? To batyaka nde mingi elikya na bango na mbongo wana? Kotyela mbongo ya Amerika to ya ekólo mosusu elikya ekoki kozala na boyokani te na kotya elikya epai ya Nzambe ya bolingo mpe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo asalelaka nguya na ye na lolenge mabe te mpe azali na lokoso te. Kutu, amonisi polele ete aboyi mpenza lokoso.—Baefese 5:5.
2. Ndenge nini baklisto ya solo batalelaka nguya ya bozwi?
2 Baklisto ya solo batyaka elikya epai ya Nzambe, kasi na bozwi te oyo ezali na “nguya ya kozimbisa.” (Matai 13:22, NW) Bayebi malamu ete mbongo ezali na nguya nyonso te mpo na kopesa bolamu mpe kobatela bomoi. Kasi ezali bongo te mpo na nguya ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. (Sefania 1:18) Yango wana, toli oyo ezali mpenza ya mayele: “Ezaleli na bino ezanga mposa na mosolo; bósepela na biloko bizali na bino. Zambi ye alobaki ete, Nakotika yo soko moke te, nakosabola yo mpe te.”—Baebele 13:5.
3. Ndenge nini lisolo mobimba zingazinga ya Deteronome 31:6 emonisi polele ntina oyo Paulo azongelaki maloba ya vɛrsɛ yango?
3 Ntango akomelaki baklisto Baebele maloba oyo, ntoma Paulo azongelaki malako oyo Mose apesaki Bayisalaele liboso ete akufa: “Zalá makasi mpe na mpiko malamu, mpe yokelá bango nsɔmɔ te mpe bangá bango te, mpo ete [Yehova] Nzambe na yo akokendaka na yo elongo. Ye akozanga kosunga yo te mpe akotika yo te.” (Deteronome 31:6) Lisolo mobimba emonisi ete Mose azalaki kolendisa ezaleli ya kotya elikya epai na Yehova mpe elikya yango esengelaki kosuka na kotya motema mpamba te ete akokokisa bamposa na bango ya mosuni. Na ndenge nini?
4. Ndenge nini Nzambe amonisaki Bayisalaele ete bakokaki kotyela ye elikya?
4 Na boumeli ya mbula 40 oyo Bayisalaele bazalaki koyengayenga na mokili mokauki, Nzambe atikaki te kopesa bango biloko oyo esengeli mpo na bomoi. (Deteronome 2:7; 29:5) Apesaki bango mpe litambwisi. Litambwisi yango emonanaki na lipata na moi, mpe mɔ́tɔ na butu, oyo etambwisaki Bayisalaele kino na “mokili [motondi na miliki, NW) mpe na mafuta na nzoi.” (Exode 3:8; 40:36-38) Ntango bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova aponaki Yosua mpo na kozwa esika ya Mose. Bakokaki kokanisa ete bato oyo bafandaki na mokili yango bakotɛmɛla bango. Kasi basengelaki kobanga te mpamba te Yehova atambolaki na libota na ye na boumeli ya bambula mingi. Bayisalaele bazalaki na ntina malamu ya koyeba Yehova lokola Nzambe oyo bakokaki kotyela motema!
5. Ndenge nini makambo oyo baklisto bazali kokutana na yango lelo oyo ekokani na makambo ya Bayisalaele liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka?
5 Lelo oyo, baklisto bazali kotambola na mokili mabe oyo ezali lokola mokili mokauki mpe bazali kokende na mokili ya sika ya Nzambe. Ezali na baoyo bazali kotambola na nzela yango koleka mbula 40. Sikoyo bakómi na ekɔtelo ya mokili ya sika ya Nzambe. Kasi, banguna bazali naino na nzela, mposa na bango ezali ya kopekisa moto nyonso kokɔta na mokili oyo ekokóma lokola Mokili ya Ndaka mpe ekozala na nkembo koleka mokili ya kala oyo etondaki na miliki mpe mafuta ya nzoi. Yango wana, mpo na baklisto lelo oyo, maloba ya Mose oyo Paulo azongelaki mabongi mpenza: “Nakotika yo soko moke te, nakosabola yo mpe te”! Bato nyonso oyo bazali kobatela makasi mpe mpiko na bango, bazali na kondima makasi mpe bazali kotyela Yehova motema, bandimisami ete bakozwa libonza.
Elikya oyo esimbami na boyebi mpe boninga
6, 7. (a) Ndenge nini elikya ya Abalayama epai na Yehova emekamaki? (b) Tokoki kokanisa ete Abalayama azalaki na mayoki nini ntango azalaki kokende na esika oyo asengelaki kokaba Yisaka lokola mbeka?
6 Na eleko moko, Nzambe asɛngaki Abalayama, nkɔkɔ ya Bayisalaele, ete akaba mwana na ye Yisaka lokola mbeka ya kotumba. (Genese 22:2) Eloko nini esalisaki tata oyo alingaki mwana na ye ete azala na elikya makasi epai na Yehova na boye ete atosaki kozanga kokakatana? Baebele 11:17-19 eyanoli ete: “Mpo na kondima, Abalayama atombolaki Yisaka lokola mbeka wana emekamaki ye, mpe ye oyo azwaki bilaka aselingwaki kokaba mwana na ye [mobotami-bobele-moko, NW]. Elobami mpo na ye ete, Bana na yo na nsima bakobyangama nkombo kati na Yisaka. Atángaki ete Nzambe azalaki na nguya [ya] kosekwisa bato ata na bakufi. Bongo tokoki koloba ete azwaki ye lisusu.”
7 Tóbosana te ete Abalayama na Yisaka batambolaki mikolo misato mpo na kokóma na esika oyo basengelaki kokaba mbeka. (Genese 22:4) Abalayama azalaki na ntango mingi mpo ete abongola makanisi na ye mpe aboya kosala likambo oyo basɛngaki ye. Tokoki kokanisa mayoki oyo azalaki na yango? Kobotama ya Yisaka epesaki bango esengo mingi oyo bakanisaki te. Mpo na Abalayama na mwasi na ye Sala, oyo liboso azalaki ekomba, elembeteli wana ya nguya ya Nzambe eyeisaki lisusu makasi bokangami oyo bazalaki na yango epai ya Nzambe. Na ntembe te, nsima ya likambo wana, bazalaki kozela bomoi na bango mobimba makambo oyo masengelaki kokómela Yisaka mpe bakitani na ye. Bilikya na bango nyonso bizindaki nde na mai na mbalakaka mpo na likambo oyo Nzambe asɛngaki?
8. Ndenge nini elikya oyo Abalayama atyelaki Nzambe esukaki kaka na kondima te ete Nzambe akokaki kosekwisa Yisaka?
8 Kasi, Abalayama azalaki na elikya oyo esimbamaki na koyebana malamu oyo ezalaka kati na baninga ya motema. Lokola azalaki “moninga na Yehova,” Abalayama “andimaki Nzambe mpe yango etángameli ye mpo na boyengebene.” (Yakobo 2:23) Elikya oyo Abalayama azalaki kotyela Yehova esukaki se na kondima mpamba te ete Nzambe akokaki kosekwisa Yisaka. Abalayama amindimisaki mpe ete likambo oyo Yehova asɛngaki ye asala ezalaki likambo oyo ebongi, atako Abalayama ayebaki makambo nyonso te. Azalaki na ntina te ya komituna soki Yehova azalaki sembo na ndenge asɛngaki ye likambo motindo wana. Na nsima, elikya ya Abalayama elendisamaki ntango anzelu ya Yehova abimaki mpe apekisaki ete Yisaya abomama lokola mbeka.—Genese 22:9-14.
9, 10. (a) Ntango nini Abalayama amonisaki liboso elikya epai na Yehova? (b) Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na ndakisa ya Abalayama?
9 Soko mbula 25 liboso, Abalayama amonisaki elikya motindo moko na bosembo ya Yehova. Ntango bayebisaki ye ete Sodomo na Gomola elingaki kobomama, amibanzabanzaki mpo na basembwi oyo bazalaki kuna, kati na bango Lota, mwana ya ndeko na ye. Abalayama abondelaki Nzambe na maloba oyo: “Ebongi na yo te kosala likambo boye ete oboma bayengebene na bato mabe elongo, ete bayengebene bázwa likamba lokola na oyo na bato mabe! Yango ebongi na yo te! Mosambisi na mokili mobimba akosala sembo te?”—Genese 18:25.
10 Abalayama, tata ya mabota, amindimisaki ete Yehova asalaka likambo na bokesene te. Na nsima, mokomi na nzembo ayembaki ete: “[Yehova] azali na boyengebene na nzela na ye nyonso; azali mpe na ngɔlu na misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:17) Ebongi ete tómituna boye: ‘Nandimaka makambo oyo Yehova atiki nzela ete ekómela ngai kozanga ete nabɛtɛla bosembo na ye ntembe? Namindimisi solo ete nyonso oyo atiki nzela ete esalema ekozala mpo na bolamu na ngai mpe bolamu ya bato mosusu?’ Soki tokoki koyanola ete ɛɛ, elingi koloba ete tozwi liteya monene na ndakisa ya Abalayama.
Tótyela bato oyo Yehova azali kopona motema
11, 12. (a) Basaleli ya Nzambe bazali na mposa ya elikya ya ndenge nini? (b) Ntango mosusu mokakatano nini tokoki kozala na yango?
11 Baoyo batyelaka Yehova elikya, batyaka mpe motema na mibali oyo Yehova azali kopona mpo na kokokisa mikano na ye. Mpo na Bayisalaele, yango elimbolaki kotyela Mose motema mpe na nsima Yosua oyo akitanaki ye. Mpo na baklisto na ekeke ya liboso, elimbolaki kotyela bantoma mpe bankulutu ya lisangá ya Yelusaleme motema. Mpo na biso lelo oyo, elimboli kotya motema na “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo aponami mpo na kopesa biso “bilei [ya elimo] na elaka na yango” mpe kotyela baoyo bazali kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi motema.—Matai 24:45.
12 Kotyela baoyo bazali kokamba lisangá ya boklisto motema ezali mpo na litomba na biso moko. Biblia elobi na biso ete: “Bótosa bango bakokambaka bino mpe bómisɔkisa liboso na bango. Zambi bazali kokɛngɛlaka milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monɔkɔ na ntina na makambo na bango. Tiká ete básala mosala na esengo, na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.”—Baebele 13:17.
Tótɔnga te bato oyo Yehova azali kopona
13. Mpo na nini tosengeli kotyela baoyo baponami mpo na kokamba lisangá motema?
13 Biblia ezali kosalisa biso ete tózala na bokatikati na oyo etali kotyela baoyo bazali kokamba libota ya Yehova motema. Tokoki komituna boye: ‘Mose asalaki mpe mabunga? Bantoma bamonisaki ntango nyonso bomoto ya Klisto oyo Yesu alingaki?’ Biyano bizali polele. Yehova aponi kosalela bato ya sembo mpe oyo bamipesi mpo na kokamba libota na ye, atako bazali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, atako bankulutu bazali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kondima ete ‘elimo santu eponi bango ete bázala bakɛngɛli, bábatela lisangá ya Nzambe.’ Tosengeli kolendisa bango mpe komemya bango.—Misala 20:28.
14. Tozali kosimba likambo nini na ndenge Yehova aponaki Mose kasi Alona to Milyami te mpo na kozala mokambi?
14 Alona alekaki Mose na mbula misato; mpe bango mibale bazalaki baleki ya Milyami, ndeko na bango ya mwasi. (Exode 2:3, 4; 7:7) Mpe lokola Alona ayebaki koloba malamu koleka Mose, aponamaki mpo na kozala molobeli ya ndeko na ye. (Exode 6:29–7:2) Kasi, mpo na kokamba Bayisalaele, Yehova aponaki Milyami te, oyo azalaki mokóló, to Alona te oyo ayebaki koloba malamu. Aponaki Mose mpo ete ayebaki makambo nyonso mpe bosɛnga oyo ezalaki na ntango wana. Ntango bakangaki naino ntina ya likambo yango te, Alona te na Milyami baimaimaki ete: “[Yehova] alobi bobele na monɔkɔ na Mose solo? Ye alobaki na monɔkɔ na biso lokola te?” Milyami, oyo mbala mosusu azalaki mobandisi ya likambo yango, azwaki etumbu mpo ete azangaki komemya moto oyo Yehova aponaki, moto oyo ye na Alona bayebaki lokola “moto oyo alekaki komikitisa kati na bato nyonso na mokili.”—Mituya 12:1-3, 9-15, NW.
15, 16. Ndenge nini Kalebe amonisaki ete atyelaki Yehova elikya?
15 Ntango batindaki banɔngi 12 mpo na konɔnga Mokili ya Ndaka, zomi kati na bango bayaki na lapolo ya mabe. Lokola balobaki ete Bakanana bazali “bato na nzoto minene,” ebangisaki Bayisalaele. Mpe likambo yango esalaki ete Bayisalaele bábanda ‘koimaima epai na Mose na Alona.’ Kasi ezali banɔngi nyonso te nde bazangaki kotyela Mose mpe Yehova motema. Totángi boye: “Kalebe nde apekisaki koloba na bato liboso na Mose mpe alobaki ete, Tóbuta kuna noki mpe tókamata mokili yango, mpo ete tokoki kobuka bango na malamu.” (Mituya 13:2, 25-33; 14:2) Monɔngi mosusu, nkombo na ye Yosua, azalaki na mpiko lokola Kalebe. Bango mibale bamonisaki ete batyaki elikya epai na Yehova ntango balobaki ete: “Soko [Yehova] asepeli [na] biso, mbɛ akokɔtisa biso na mokili yango mpe akopesa yango na biso. Yango mokili [etondi na miliki, NW] mpe na mafuta na nzoi. Nde . . . bóbanga bato na mokili yango te . . . [Yehova] azali na biso elongo. Bóbanga bango te.” (Mituya 14:6-9) Bazwaki mbano mpo na elikya oyo batyelaki Yehova. Kati na mikóló nyonso oyo bazalaki na ntango wana, bobele Kalebe, Yosua, mpe mwa ndambo ya Balevi nde bazwaki libaku ya kokɔta na Mokili ya Ndaka.
16 Mwa bambula na nsima, Kalebe alobaki ete: “Kasi ngai nabilaki [Yehova] Nzambe na ngai nyonso. . . . Mpe sasaipi talá, [Yehova] abateli ngai na bomoi mbula ntuku minei na mitano oyo longwa na ntango [Yehova] alobelaki Mose monɔkɔ oyo, wana etambolaki Yisalaele na lisobe, lokola elobaki ye; mpe talá, lelo nazali na mbula ntuku mwambe na mitano. Natikali na makasi kino lelo oyo lokola na mokolo Mose atindaki ngai. Nguya na ngai sasaipi ezali pelamoko ezalaki nguya na ngai na ntango yango.” (Yosua 14:6-11) Omoni ete Kalebe azalaki na elimo malamu, na bosembo, mpe na makasi ya nzoto ya. Kasi, Yehova aponaki Kalebe te mpo na kozwa esika ya Mose. Apesaki libaku malamu yango na Yosua. Tokoki kolikya ete Yehova ayebaki mpo na nini aponaki ye, mpe ezalaki liponi oyo elekaki malamu.
17. Nini emonisaki lokola ete Petelo akoki kozwa mikumba te?
17 Ntoma Petelo awanganaki Nkolo na ye mbala misato. Lisusu, asalaki makambo na ndenge na ye moko mpe na mobulu; akataki litoi ya moombo ya nganga monene. (Matai 26:47-55, 69-75; Yoane 18:10, 11) Bato mosusu bakoki koloba ete azalaki moto ya bibangabanga, ayebaki komipekisa te, yango wana abongaki kozwa mikumba minene te. Kasi, bapesaki mafungola ya Bokonzi epai ya nani? Nani azwaki libaku malamu ya kofungola nzela mpo na libyangi ya likoló mpo na Bayuda, Basamalia, mpe Bapakano? Ezalaki Petelo.—Misala 2:1-41; 8:14-17; 10:1-48.
18. Yuda alobeli libunga nini oyo tosengeli koboya?
18 Bandakisa oyo emonisi ete tosengeli kokeba ete tósambisa te makambo oyo ezali komonana kaka na miso. Soki totii elikya epai na Yehova, tokobɛta ntembe te mpo na bato oyo azali kopona. Atako lisangá na ye awa na mabelé ezali se na bato ya kozanga kokoka, baoyo bandimaka ete basalaka mpe mabunga, azali kosalela bango na ndenge oyo ezali komonisa nguya na ye. Yuda, ndeko ya Yesu, akebisaki baklisto na ekeke ya liboso mpo na bato oyo “bakotyolaka bokonzi, bakotukaka [bato na] nkembo.” (Yuda 8-10) Tózala lokola bango te.
19. Mpo na nini tosengeli te kotɔnga bato oyo Yehova azali kopona?
19 Emonani ete mpo na kopesa mikumba mosusu, Yehova aponaka bato oyo bazali na makoki ya sikisiki oyo esengeli mpo na kokamba bato na ye na ndenge oyo ye alingi na eleko moko ya sikisiki. Tosengeli kosala makasi na kondima likambo yango, tótɔnga te bato oyo Nzambe azali kopona, kasi tósepela kosalela Yehova na komikitisa nyonso ezala na esika nini oyo atii biso. Boye tokomonisa ete totii elikya na biso epai na Yehova.—Baefese 4:11-16; Bafilipi 2:3.
Tótyela bosembo ya Yehova elikya
20, 21. Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo Nzambe asalelaki Mose?
20 Soki ekómelaka biso na komityela motema koleka mpe kotya elikya mingi te epai na Yehova, boye tózwa liteya na ndakisa ya Mose. Ntango azalaki na mbula 40, na makanisi na ye moko azwaki mokano ya kosikola Bayisalaele na boombo na Ezipito. Na ntembe te asalaki milende nyonso wana na mokano ya malamu, kasi alongaki kosikola Bayisalaele na ntango wana te mpe abongisaki makambo na ye te. Kutu, esengelaki na ye kokima. Bobele nsima ya kolekisa mbula 40 ya boyekoli ya mpasi na mboka mopaya nde akokisaki masɛngami mpo na koponama na kosala likambo oyo alukaki kosala. Na mbala oyo akokaki kolikya ete Yehova azalaki na ye mpamba te, makambo mazalaki kosalema ndenge Yehova alingaki mpe na ntango oyo ebongi mpo na ye.—Exode 2:11–3:10.
21 Mokomoko na biso akoki komituna boye: ‘Ekómelaka ngai ete naleka liboso ya Yehova mpe bankulutu oyo baponami kati na lisangá, naluka kosala makambo na lombangu to na ndenge ngai nalingi? Na esika ya kokanisa ete bazali kobosana ngai mpo na mikumba mosusu, nandimaka kozela na motema moko na ntango nyonso oyo nazali koyekola?’ Na mokuse, tozwi nde liteya ya ntina na ndakisa ya Mose?
22. Atako abungisaki libaku monene, ndenge nini Mose atalelaki Yehova?
22 Tokoki mpe kozwa liteya mosusu na ndakisa ya Mose. Mituya 20:7-13 eyebisi biso libunga moko oyo asalaki, libunga oyo ememelaki ye etumbu monene. Abungisaki libaku malamu ya kokamba Bayisalaele kino na Mokili ya Ndaka. Alobaki nde ete ekateli ya Yehova na likambo wana ezalaki sembo te? Akendaki nde esika ya ye moko, akangi elongi, aboyi koloba mpo ete Nzambe amoniselaki ye boboto te? Mose atyelaki lisusu bosembo ya Yehova elikya te? Tokoki kozwa eyano na maloba oyo Mose ye moko ayebisaki Bayisalaele liboso ete akufa. Mose alobaki boye mpo na Yehova: “Mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso [ezali] boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Na ntembe te Mose abatelaki elikya na ye epai na Yehova kino nsuka. Ezali boni mpo na biso? Mokomoko na biso azali kokola na oyo etali kolendisa elikya na biso epai na Yehova mpe bosembo na ye? Ndenge nini tokoki kosala yango? Tokotalela yango na lisolo oyo elandi.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Wapi bantina oyo Bayisalaele bazalaki na yango mpo na kotyela Yehova elikya?
◻ Na oyo etali elikya, liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Abalayama?
◻ Mpo na nini tosengeli te kotɔngaka bato oyo Yehova azali kopona?
[Elilingi na lokasa 13]
Kotyela Yehova elikya esɛngi mpe komemya baoyo bazali kokamba lisangá