Tozali mpenza na mposa ya makomi na ebandeli?
ESILI koleka pene na mibu 3 500 na mokili mya Moyen-Orient, mobali moko ya mbula mingi akomaki lisolo ya mokili kino na leko na ye. Mokanda yango, oyo eyei bongo kosala mikanda milai mitano, esengaki mpema milende mingi. Moto yango azalaki na mibu koleka 80, ntango abandaki kokoma lisolo na ye. Ezala ye to libota na ye bazalaki na esika ya kofanda ya sikisiki te; bazalaki kotambolatambola esika na esika kati na esobe ya Sinai. Nzokande, makambo oyo mobali yango ya mbula mingi akomaki esukaki na kozala mikanda moko ya ntina koleka oyo bato bakoma yango naino te.
Mobali yango, Moise, azwaki longwa na Nzambe lotomo ya kobimisa libota na Yisraele na kala kati na boombo na mabelé ya Ezipite. Mikanda mitano oyo akomaki miyebani lelo na nkombo ya Pantateke, mpe esali eteni ya liboso ya Biblia Mosantu. Moise atambwisamaki na elimo santu, to nguya na Nzambe oyo ekosalaka mosala. Yango wana ata lelo tokoki kozwa matomba mingi na botangi ya mikanda na ye. Kasi bamosusu bazali komituna mbala mosusu: ‘Tokoki mpenza kozala na elikya kati na maloba ya Moise mpe ya bakomi misusu na Biblia? Tozali na ba manuscrits (mikanda) na bango ya ebandeli? Soki te, yango ekoma ndenge nini? Mpe ndenge nini tokoki kozala na elikya ete makambo mazwami na Biblia mazali mpenza oyo bakomi na yango bakomaki na ebandeli?
Bisaleli
Tozali na bantina mingi ya kondimisama te Biblia ebongwani te mpo na oyo etali makanisi na yango uta yango ekomamaki. Ya solo, tozali na ba manuscrits te oyo ekomamaki mpenza na maboko ya bakomi na yango. Kasi, kokanisa te ete tokomona yango mokolo mosusu, mpe ezali bongo mpo na bantina misato oyo: biloko oyo bisalelamaki mpo na kokoma makomi likoló na yango, ezalela (kutime) moko na bayuda ya kala, mpe ndenge lisolo na bato elekaki uta nsuka ya kokomama.
Ya liboso, tolobela naino bisaleli. Ezali naino lisusu na mikanda oyo mikomamaki na eleko moko na oyo bakomaki Biblia. Kasi, mingi kati na yango, mikomamaki likoló na libanga to na mabelé makasi, biloko oyo bikoki koumela ntango molai kozanga kobebisama. Nzokande ezali komonana ete Biblia ekomamaki na ebandeli likoló na biloko na motau. Na ndakisa, mikanda mosusu ya mokomi na Biblia Jérémie ezikisamaki na mokonzi Jéboiakim. (Yilimia 36:21-31) Bitando na mabanga to ya mabelé makasi mbele ekokaki kobebisama nokinoki te kati na moto.
Bongo eloko nini bakomi na Biblia basalelaki? “Moise alakisamaki na mayele nyonso na Baezipite”; nzokande eloko bazalaki kosalela mingimingi na Ezipite mpo na kokomela ezalaki papyrus (lolenge ya lokasa esalami na banzete) (Misala 7:22) Na ntina yango, ekoki kozala ete Moise akomaki likoló na esaleli wana oyo ebebaka. Eloko mosusu oyo ezalaki kosalelama mingimingi na Moyen-Orient mpo na kokomela ezalaki mposo ya nyama—kwir to kwir euti na mposo ya mwana na ngombe. Mbala mosusu Jérémie akomaki likoló na kwir. Kwir to papyrus ekokaki kozika noki ntango mokonzi Yeyokima abwakaki rulo to mokanda ya Jérémie kati na moto.
Ya solo, mpo na moi makasi ya Ezipite, ba manuscrits mingi oyo ekomamaki likoló na papyrus eumelaki bankoto na mibu. Kasi ezali bobele mwa ndambo. Mingimingi, ezala papyrus to kwir ebebaka nokinoki. Moto na mayele Oscar Paret alobi: “Moko lokola mpe mosusu, bikomelo nyonso mibale wana ekokaka mpenzampenza malili te, kopela mpe nkusu ya motindo nyonso. Toyebi, lokola tomonaki yango mokolo na mokolo, lolenge nini papier, to mpe kwir ya makasi, ebebaka soki efandi na libanda to kati na esika moko ya malili.”
Kati na Yisraele ya kala, epai kuna ebele na mikanda ya Biblia mikomamaki, klimá ya mboka yango epesaki nzela te mpo na kobatelama ya ba manuscrits. Yango wana tokoki koloba ete eteni monene ya ba manuscrits ya liboso ya Biblia ebebaki uta kala. Ata soki yango ezalaki bongo te, elikya ezali moke mpenza ete ekoka koumela kino na mikolo na biso, mpe na kotalela ezalela (kutime) moko ya kala ya bayuda. Ezalela nini?
Bazalaki kokunda ba manuscrits
Na 1896, molukiluki moko oyo azalaki kosala boluki kati na geniza moko na caire amonaki 90 000 manuscrits ya kala oyo ekotisaki mbongwana kati na boyekoli na lisoló ya Moyen-Orient. Geniza ezali nini? Mpe ezali na boyokani nini kati na ba manuscrits ya liboso ya Biblia?
Geniza ezali ndako epai kuna Bayuda ya kala bazalaki kobomba ba manuscrits (mikanda) oyo bakosalela lisusu te. Paul Kahle, sipesialiste moko, akomaki: “Bayuda bazalaki na momeseno ya kotika biloko ya motindo nyonso oyo ekomamaki na maboko to enyatami konyatama kati na bandako yango, oyo ezalaki na kati to penepene ya biyanganelo to basinagoge na bango; ezalaki mpo na kobatela yango mpo esalelama nsima te, kasi mpo ete moto moko asimba yango te na boumeli ya mwa ntango. Bayuda bazalaki kobanga ete mikanda wana, oyo mbala mosusu mizalaki na nkombo na Nzambe, mikoka kobebisama mpo na kosalela yango na lolenge ya mabe. Mbala na mbala, bazalaki kokamata mikanda oyo mikomami na maboko mpe minyatamaki, nsima mpe bazalaki kokunda yango kati na mabelé esika eponamaki; ezali kuna nde ezalaki kolimwisama. Ezali mpo na kobosana makasi nde geniza ya caire bakisa mpe biloko oyo bizwami kati na yango ebikaki mpo na kobomama lokola ba genizas misusu. La geniza du caire (angl.), page 4.
Bongo soki manuscrit ya liboso ya Biblia ekomaki kino na eleko oyo momeseno (to kutime) wana ekomaki makasi? Manuscrit yango, na ntembe te, esengelaki kosalelama te mpe esengelaki kokundama.
Ndenge Lisolo na bato elekaki
Mpo na koyeba lolenge oyo ba manuscrits ya liboso ya Biblia ekomaki, likambo ya nsuka na kotalela ezali lisolo na yikiyiki ya mikili oyo epai kuna bazalaki kokoma Biblia. Totalela na ndakisa likambo oyo ekomelaki mikanda oyo Moise akomaki na bobange na ye. Tozali kotanga ete: “Ekokoma mbala moko wana Moise asilaki kokoma kati na mokanda moko maloba ya mibeko oyo, kino ekokaki nyonso, nde Moise abandaki kopesa etinda na Balevite, bamemi na sanduku na kondimana ya Jéhovah, na kolobaka ete: ‘Kamata mokanda oyo na mibeko, mpe tia yango na pembeni na sanduku na kondimana na Jéhovah Nzambe na bino.”’—Deteronome 31:24-26.
Sanduku na kondimana ezalaki sanduku na bulee oyo ezalaki elilingi ya komonana na Nzambe kati na Bayisraele. Ekumbamaki kino na Mabelé na Ndaka (elongo na ba manuscrits ya Moise), epai kuna efandaki na bisika mingi bikeseni. Na mwa ntango ekweaki na maboko ya Bafiliste. Na nsima, David, mokonzi ya Yisraele, akotisaki Sanduku na kondimana kati na Yelusaleme, mpe na nsuka etyamaki kati na temple oyo mokonzi Salomo atongaki. Kasi mokonzi Akaze asalisaki etumbelo moko ya bopakano kati na temple oyo na nsima akangaki. Lisusu kati na temple, mokonzi Manasé asalelaki losambo ya bapakano na lolenge ya kolekisa ndelo.
Na boumeli ya ntango wana, nini ekomelaki sanduku na kondimana mpe makomami na Moise? Toyebi te, kasi misusu kati na yango ebungaki. Na eleko ya mokonzi Yosiase, basali na temple na mbalakaka bakutanaki na “mokanda ya mibeko”, mbala mosusu mokanda oyo mokomamaki na maboko mpenza ya Moise (2 Mikonzi 22:8). Kino wana, mokonzi ayebaki makambo mingi te mazwami kati na yango, mpe bokangi na yango ezalaki ebandeli ya bolamuki monene na elimo.—2 Mikonzi 22:11 kino 23:3.
Nsima na kufa ya Yosiase, libota na Yuda ekomaki lisusu na botomboki mpe na nsuka ememamaki na Babilone. Temple ebomamaki, mpe biloko nyonso ya motuya oyo ezalaki na kati ekumbamaki na Babilone. Tozali na elembo moko te mpo na koyeba oyo ekomelaki Sanduku to mokanda kitoko oyo elokotamaki na nse na boyangeli ya Yosiase. Nzokande, mibu mingi na nsima, ntango ebele na Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango balendisamaki mpo na kotonga lisusu Yelusaleme mpe kotelemisa losambo na peto, nganga Ezela mpe bamosusu batangelaki bango “mokanda na mibeko na Moise”. (Néhémie 8:1-8.) Emonani bongo ete bakopi ya makomami na liboso ezalaki. Bazwaki yango wapi?
Basali bakopi ya Liloba na Nzambe
Ntango Moise ayebisaki eleko oyo Yisraele koyangelama na mokonzi, ayebisaki etinda yo: “Wana ekofanda ye na kiti na bokonzi na ye, akokoma mpo na ye mpenza kati na buku na maloba na Mobeko oyo, longwa na oyo ezali na maboko na banganga Balewi.” (Deteronome 17:18) Na yango, esengelaki kosala bakopi na Makomami.
Kosala kopi ya Makomami ekomaki mosala kati na Yisraele. Na yango, Nzembo 45:1 elobi: “Lolemo na ngai ezali lokola ekomeli na mokomi na mayele!” Bankombo ya mwa ndambo na bakopiste eyebani, lokola Safana mpe Zadoke, kasi oyo ayebani mingi kati na bakopiste ya kala azali bongo Ezela, ye oyo akomaki mpe makomami ya liboso ya Biblia. (Ezela 7:6; Nehemia 13:13; Yilimia 36:10) Atako mikanda mizalaki naino kokomama, mikanda ya kala oyo misilaki kokomama mityamaki na bakopi mpe mikabolamaki.
Ntango Yesu azalaki na mabelé, bakopi ya Makomami na liebele ezalaki (kobanda Genese kino Malaki) bobele na Yelusaleme te, kasi lisusu, kati na basinagoge ya Galilai. (Luka 4:16, 17) Na ndakisa, mboka mosika na Bérée, na Masedwane, Bayuda oyo bazalaki na mayoki malamu bazalaki na likoki ya ‘koluka kati na Makomami mokolo na mokolo’. (Misala 17:11.) Lelo mpe ezali na mwa bakopi ekomami na maboko 1 700 ya mikanda na Biblia oyo mikomamaki liboso na kobotama na Yesu, bakisa bakopi 4 600 ekomamaki na bayekoli na ye (kobanda na Matai kino Emoniseli).
Bakopi yango ezalaki sembo? Ee, ezalaki mpenza na bosembo. Bakopiste oyo bazwaki mosala ya kokoma Makomami na liebele, babengami soferime, bazalaki kosenzela na likebi nyonso ete basala libunga ata moko te. Mpo na kotala mosala na bango soki esalemi malamu, bazalaki kotanga motuya na maloba, mpe ata likomi moko na moko, ya manuscrit nyonso oyo bazalaki kosala. Na yango, Yesu, ntoma Paulo mpe bamosusu oyo bazalaki mbala mingi kotanga bakomi ya kala ya Biblia bazalaki na ntembe te mpo na bosembo ya bakopi oyo bazalaki kosalela.—Luka 4:16-21; Misala 17:1-3.
Ya solo, bayuda oyo bazalaki kosala bakopi mpe, na nsima, baklisto oyo bazalaki koseka bakopi, bazalaki bato bazangi kokoka. Mabunga ekotaki kati na makomami, kasi ebele na bakopi oyo ezali naino lelo ezali kosalisa biso na komona yango. Ndenge nini? Na kozalaka na likanisi oyo ete bakopiste ndenge na ndenge bazalaki kosala mabunga ya motindo moko te. Na bongo, na kokokanisaka mosala ya bakopiste mingi, tokoki komona mwa mabunga na bango.
Mpo na nini tokoki kozala na konfianse
Na 1947, basalaki bokundoli moko oyo bato bamizelaki na yango te: barulo ya kalakala kati na mabanga penepene na la mer Morte. Barulo wana emonisaki kino na meko nini mosala ya kosala kopi ya Makomami ezalaki sembo. Kati na yango ezalaki na kopi moko ya mokanda na kala ya Yisaya yango eumelaki mibu nkoto koleka bamanuscrits nyonso mosusu oyo ezalaki kino ntango wana. Nzokande kokokanisama oyo esalamaki emonisaki ete bokeseni bobele moko kati na manuscrit ya la mer Morte mpe bakopi oyo ekundolami kala mingi te ezalaki bobele na makambo lokola motindo ya kolandana na makomi mpe grammaire. Ndimbola ya lisolo ebongwanaki te ata nsima na mibu nkoto! Na oyo etali Makomami na liebele, moto na mayele William Henry Green alobaki boye: “Tokoki koloba na bosembo nyonso ete mokanda moko te ya Kalakala ekomeli biso na kobatelamaka malamu boye.” Maloba ya motindo moko elobamaki mpe mpo na bosembo kati na bakopi ya Makomami na greke na boklisto.
Ya solo, ekozala esengo mingi na kozwa mikanda ya libosoliboso oyo Moise to Yisaya bakomaki. Nzokande, tozali mpenza na mposa ya mikanda na liboso te. Likambo eleki ntina ezali mokanda te, kasi makambo mazwami na kati. Mpe, likambo na kokamwa, atako eleki ebele na bikeke ya mobulu, atako basalaki bakopi mpe bazongelaki kosala bakopi na yango mbala na mbala, tokoki kondimisama, ete Biblia ezali ntango nyonso na makambo oyo mazalaki kati na ba manuscrits wana ya ebandeli ya Kala. Na yango, liloba na Biblia oyo ezali kolongisama: “Bato nyonso bazali lokola matiti, kitoko na bango nyonso lokola felele na matiti; matiti makaoki mpe felele ekwei; nde Liloba na (Jéhovah) ezali koumela seko.”—1 Petelo 1:24, 25.