Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Deteronome
EZALAKI na mobu 1473 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Elekaki mbula ntuku minei kobanda Yehova asikolaki bana ya Yisalaele na boombo na Ezipito. Nsima ya koyengayenga bambula mingi wana na esobe, Bayisalaele bazalaki naino na mokili na bango moko te. Kasi, bakómaki sikoyo na ndelo ya Mokili ya Ndaka. Makambo nini ezalaki kozela bango na mokili yango? Mikakatano nini bakokaki kokutana na yango, mpe ndenge nini bakokaki kosilisa yango?
Liboso bana ya Yisalaele bákatisa Ebale Yolodani mpo na kokɔta na mokili ya Kanana, Moize abongisaki makanisi na bango mpo na mosala monene oyo ezalaki kozela bango. Ndenge nini asalaki yango? Asalaki ebele ya masukulu mpo na kolendisa bango, kopesa bango toli mpe kokebisa bango. Akundolelaki bana ya Yisalaele ete Yehova azali Nzambe oyo asɛngaka básambela kaka ye mpe ete basengeli te kolanda banzela ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. Eteni monene ya mokanda ya Deteronome ezali masukulu yango oyo Moize asalaki. Batoli oyo apesaki na kati ya masukulu yango ezali mpe na ntina mpo na biso lelo oyo, mpamba te biso mpe tozali kobika na mokili oyo kosambela kaka Yehova ezali mokakatano mpenza.—Baebele 4:12.
Moize nde akomaki mokanda ya Deteronome, longola kaka mokapo ya nsuka. Mokanda yango ezali kolobela makambo oyo esalemaki na boumeli ya sanza moko ná mwa mikolo.a (Deteronome 1:3; Yosua 4:19) Tiká tótalela ndenge makambo yango ekoki kosalisa biso tólinga Yehova Nzambe na motema na biso mobimba mpe tósalela ye na bosembo nyonso.
‘BÓBOSANA MAKAMBO MAMONI MISO NA BINO TE’
Na lisukulu ya liboso, Moize alobelaki mwa makambo mosusu oyo bakutanaki na yango na esobe—mingimingi oyo ekokaki kosalisa Bayisalaele lokola bazalaki komibongisa mpo na kokɔta na Mokili ya Ndaka. Lisolo oyo elobeli koponama ya bazuzi esengelaki kokundolela bango ete Yehova abongisaka basaleli na ye mpo bátambwisama malamu. Moize ayebisaki bango mpe ete lapolo ya mabe oyo banɔngi zomi bapesaki esalaki ete libota oyo ezalaki liboso na bango ekufa mpe ekɔta te na mokili oyo balakelaki bango. Ndakisa wana ya kokebisa oyo Moize apesaki esalisaki bayoki na ye, mingimingi lokola bazalaki komona na miso mokili yango.
Lokola bana ya Yisalaele basengelaki kobunda bitumba na ngámbo mosusu ya Ebale Yolodani mpo na kobɔtɔla mokili yango, mpo na kolendisa bango, Moize akundolelaki bango ndenge Yehova asalisaki bango bálonga bitumba oyo babundaki na ngámbo oyo bazalaki. Mokili oyo balingaki kokɔta etondaki na losambo ya bikeko. Ebongaki mpenza Moize akebisa bango makasi mpo na losambo ya bikeko!
Biyano na mituna ya Biblia:
2:4-6, 9, 19, 24, 31-35; 3:1-6—Mpo na nini Bayisalaele babomaki bato mosusu oyo bazalaki kofanda na ɛsti ya Yolodani kasi batikaki bamosusu? Yehova apekisaki Yisalaele kobunda na bana ya Esau. Mpo na nini? Mpo bazalaki bana ya ndeko ya Yakobo. Bayisalaele basengelaki te konyokola to kobunda na bato ya Moaba mpe ya Amona, mpo bazalaki bana ya Lota mwana ya ndeko ya Abalayama. Nzokande Sihona ná Ogu, bakonzi ya Baamola, bazalaki bandeko na bango te; yango wana bazalaki te na lotomo ya kofanda na eteni wana ya mabelé. Yango wana, ntango Sihona aboyaki ete Bayisalaele báleka na mabelé na ye mpe Ogu ayaki kosalisa ye mpo na kobunda na bango, Yehova apesaki Bayisalaele etinda ete bábukabuka bamboka na bango, báboma moto nyonso.
4:15-20, 23, 24—Mobeko oyo epekisaki kosala bikeko emonisi ete ezali mabe kosala bikeko mpo na kitoko ya ndako? Te. Mobeko yango epekisaki nde kosala bikeko mpo na losambo—epekisaki ‘kofukamela bikeko mpe kosalela yango.’ Biblia epekisi te kosala bikeko to mayemi ya lolenge mosusu mpo na kitoko ya ndako.—1 Mikonzi 7:18, 25.
Mateya mpo na biso:
1:2, 19. Bana ya Yisalaele bayengayengaki na esobe mbula soki 38, atako esengelaki bátambola kaka “mikolo zomi na moko longwa na Holebe [mokili ya ngombangomba pene na Ngomba Sinai epai Yehova apesaki Moize Mibeko Zomi] kino Kadesi-balenea na nzela ya [Ngomba, NW] ya Seili.” Bazwaki etumbu ya makasi mpenza mpo baboyaki kotosa Yehova Nzambe!—Mituya 14:26-34.
1:16, 17. Mitinda oyo Nzambe atalelaka mpo na kosambisa ebongwani te tii lelo. Baoyo bazwi mokumba ya kotalela likambo moko na komite ya kosambisa basengeli koyeba ete kopona bilongi to kobanga bato ekoki kotinda bango bákata likambo malamu te.
4:9. Mpo Yisalaele elonga, ezalaki na ntina mingi ‘bábosana makambo mamonaki miso na bango te.’ Lokola mokili ya sika ekómi pene, ezali na ntina ete biso mpe tózala bayekoli ya molende ya Liloba ya Yehova mpo tóbosana te misala na ye ya kokamwa.
BÓLINGA YEHOVA, MPE BÓTOSA MIBEKO NA YE
Na lisukulu na ye ya mibale, Moize alobelaki ndenge Yehova apesaki Mibeko na Ngomba Sinai mpe azongelaki lisusu Mibeko Zomi. Ayebisaki bango bikólo sambo oyo esengelaki kobomama. Bakundolelaki bana ya Yisalaele liteya moko ya ntina mingi oyo bazwaki ntango bazalaki na esobe: “Moto akotikala na bomoi mpo na [limpa] te, kasi ete moto akotikala na bomoi mpo na makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ ya [Yehova].” Na kotalela bomoi oyo bakómaki na yango, esengelaki ‘bátosaka lilako nyonso.’—Deteronome 8:3; 11:8.
Nsima ya kokɔta na mokili ya ndaka, esengelaki Bayisalaele bázala na mibeko oyo etali losambo, kasi mpe oyo etali ndenge ya kosambisa, kotambwisa makambo na mboka, bitumba, lolenge bakofanda na bato mpe makambo mosusu ya bomoi ya moto na moto. Moize azongelaki mibeko wana mpe alobelaki mingi ntina ya kolinga Yehova mpe kotosa mibeko na ye.
Biyano na mituna ya Biblia:
8:3, 4—Na ndenge nini bilamba ya Bayisalaele ekufaki te mpe makolo na bango evimbaki te ntango bazalaki kotambolatambola na esobe? Yango ezalaki likamwisi ya Nzambe, ndenge kaka azalaki kopesa bango mana mokolo na mokolo. Bayisalaele bazalaki kaka na bilamba mpe basandale oyo bazalaki na yango liboso bábanda koyengayenga na esobe mpe, na ntembe te, lokola bana bazalaki kokóla mpe mikóló bazalaki kokufa, bana bazalaki kozwa bilamba oyo mikóló bazalaki kotika. Lokola resansema mibale oyo esalemaki na ebandeli mpe na nsuka ya mobembo na bango na esobe emonisi ete motángo ya Bayisalaele ebakisamaki te, tokoki koloba ete bilamba ná basandale oyo bazalaki na yango na ebandeli ekokaki.—Mituya 2:32; 26:51.
14:21—Mpo na nini Bayisalaele bakokaki kopesa mopaya oyo afandi na mboka na bango to kotɛkela mopaya oyo azali koleka na mboka na bango nyama oyo ebimisami makila te, oyo bango moko bakokaki kolya te? Na Biblia, liloba “mopaya oyo afandi na mboka” ekoki kolimbola moto oyo azalaki Moyisalaele te, oyo akómaki prozelite to moto oyo azalaki kofanda na Yisalaele mpe azalaki kotosa mibeko ya mboka wana kasi akómaki mosambeli ya Yehova te. Mopaya oyo azali koleka mpe mopaya oyo afandi na mboka, kasi akómi prozelite te azalaki kotosa Mibeko te mpe akokaki kosalela banyama oyo ebimisami makila te na lolenge mingi. Bayisalaele bazwaki ndingisa ya kopesa to kotɛkela bango banyama ya ndenge wana. Nzokande, prozelite azalaki kotosa makambo oyo esɛngamaki na kondimana ya Mibeko. Ndenge Levitike 17:10 emonisi yango, moto ya ndenge wana asengelaki kolya makila ya nyama te.
24:6 (NW)—Mpo na nini kokamata “enikelo ya mabɔkɔ to libanga na yango ya likoló lokola ndanga” ekokanaki na kokamata “bomoi ya moto”? Enikelo ya mabɔkɔ mpe libanga na yango ya likoló ezalaki komonisa “bomoi ya moto,” to mpe biloko oyo azalaki kobikela na yango. Kokamata biloko wana ekokaki kozangisa libota mobimba bilei ya kobikela mpo na mokolo.
25:9—Kolongola lipapa na lokolo ya moto oyo aboi kobala semeki na ye mpe kobwakela ye nsoi na elongi ezalaki na ndimbola nini? “Kalakala na Yisalaele motindo ezalaki boye na ntina na kosikola . . . , moto moko [asengelaki kolongola] lipapa na ye mpe [kopesa] yango moto mosusu.” (Luta 4:7) Kolongola lipapa na makolo ya moto oyo aboi kobala semeki na ye ezalaki komonisa ete moto yango asundoli lotomo na ye ya kobotela ndeko na ye oyo akufi mwana oyo akosangola biloko na ye. Yango ezalaki likambo ya nsɔni mpenza. (Deteronome 25:10) Kobwakela ye nsoi na elongi ezalaki mpo na koyokisa ye nsoni.—Mituya 12:14.
Mateya mpo na biso:
6:6-9. Bayisalaele bazwaki etinda ya koyeba Mibeko, biso mpe tosengeli koyeba mibeko ya Nzambe, kokanisaka yango ntango nyonso, mpe kolakisa bana na biso mibeko yango. Tosengeli ‘kokanga yango lokola elembo na mabɔkɔ na biso’ mpe misala na biso oyo babengi awa mabɔkɔ na biso, esengeli kolakisa ete tozali kotosa Yehova. Mpe botosi na biso esengeli kozala lokola ‘ekaniseli kati na miso’; elingi koloba ete esengeli komonana na miso ya bato nyonso.
6:16. Tómeka Yehova soki moke te ndenge Bayisalaele oyo bazangaki bosembo basalaki na Masa, epai baimaimaki mpo mai ezangaki.—Exode 17:1-7.
8:11-18. Mposa makasi ya biloko ya mokili ekoki kosala ete tóbosana Yehova.
9:4-6. Tosengeli koboya ezaleli ya komimona bayengebene.
13:6. Tosengeli kotikela moto moko nzela te apɛngwisa biso na losambo ya Yehova.
14:1. Komikatakata nzoto emonisaka ete moto azali na limemya mpo na nzoto na ye te, ekoki kozala na boyokani na losambo ya lokuta, mpe esengeli mpenza koboya momeseno yango. (1 Mikonzi 18:25-28) Lokola tozali na elikya ya lisekwa, ezali na ntina te tólekisaka ndelo na kolela, na ndakisa tii na komikatakata nzoto.
20:5-7; 24:5. Soki makambo mosusu epekisi ndeko moko asala na biso, ata soki mosala yango ezali na ntina mingi, tosengeli kondima kotika ye.
22:23-27. Likambo eleki malamu oyo mwasi akoki kosala soki moto alingi kosangisa na ye nzoto na makasi ezali koganga makasi.
“BÓPONA BOMOI”
Na lisukulu na ye ya misato, Moize alobaki na Bayisalaele ete soki bakatisi Ebale Yolodani, basengeli kokoma Mibeko likoló ya mabanga ya minene mpe kolakela mabe ezaleli ya kozanga botosi mpe kopambola ezaleli ya kotosa. Na ebandeli ya lisolo ya minei, azongelaki kondimana oyo Yehova asalaki na Yisalaele. Moize apesaki lisusu likebisi mpo na ezaleli ya kozanga botosi mpe alendisaki Bayisalaele ‘bápona bomoi.’—Deteronome 30:19.
Longola masukulu minei wana, Moize alobaki ete moto mosusu akokóma motambwisi na esika na ye mpe alakisaki Bayisalaele nzembo moko ya kitoko mpenza oyo ezali kokumisa Yehova mpe kokebisa na makambo mabe oyo kozanga bosembo ekokaki kotinda bango básala. Nsima ya kopambola mabota, Moize akufaki na mbula 120 mpe bakundaki ye. Balelaki ye mikolo 30, elingi koloba pene na katikati ya ntango makambo nyonso ya mokanda ya Deteronome esalemaki.
Biyano na mituna ya Biblia:
32:13, 14 (NW)—Lokola bapekisaki Bayisalaele kolya mafuta nyonso, kolya “mafuta ya mpate mobali” ezalaki na ndimbola nini? Liloba mafuta esalelami awa na ndenge ya elilingi mpe ezali komonisa nyama oyo eleki kitoko na etonga. Tomoni mpenza ete liloba yango esalelamaki na ndenge ya elilingi mpamba te kaka na vɛrsɛ yango balobeli mpe “mafuta ya ngei ya masango” mpe “makila ya vinyo.”
33:1-29—Mpo na nini Moize atángaki nkombo ya Simeona te na lipamboli oyo apesaki bana ya Yisalaele? Ezalaki bongo mpo Simeona ná Levi bazalaki ‘na mawa te’ mpe nkanda na bango ezalaki ‘kongala.’ (Genese 34:13-31; 49:5-7) Libula na bango ezalaki ndenge moko te na oyo ya mabota mosusu. Libota ya Levi ezwaki mboka 48, mpe mwa eteni oyo Simeona azwaki ezalaki na kati ya mabelé ya Yuda. (Yosua 19:9; 21:41, 42) Yango wana, Moize atángaki Simeona te na lipamboli na ye. Kasi, lipamboli ya Simeona ekɔtaki kati na oyo Yisalaele mobimba ezwaki.
Mateya mpo na biso:
31:12. Na makita, bilenge basengeli kofanda elongo na mikóló mpe kosala makasi mpo na koyoka mpe kosimba mateya.
32:4. Misala nyonso ya Yehova ebongi mpamba te na nzela na yango amonisaka bizaleli na ye lokola boyengebene, bwanya, bolingo, mpe nguya na ndenge ebongi mpenza.
Ezali mpenza na ntina mpo na biso
Mokanda ya Deteronome ezali kolobela Yehova lokola “[Yehova] moko.” (Deteronome 6:4) Mokanda yango elobeli libota moko oyo Nzambe asalaki na yango boyokani. Mokanda ya Deteronome ezali mpe kokebisa mpo na losambo ya bikeko mpe elobeli mingi ntina ya kosambela kaka Nzambe ya solo.
Ya solo, mokanda ya Deteronome ezali mpenza na ntina mpo na biso! Atako tosɛngisami te kotosa Mibeko, tokoki kozwa mateya mingi na mokanda yango oyo ekoki kosalisa biso ‘tólinga Yehova Nzambe na biso na motema na biso mobimba, mpe na molimo na biso mobimba, mpe na nguya na biso mobimba.’—Deteronome 6:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete mokapo ya nsuka ya mokanda ya Deteronome, oyo ezali kolobela liwa ya Moize, ekomamaki na Yosua to mpe na Nganga-Nzambe Monene Eleazala.
Map on page 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
SEILI
Kadesi- balenea
Ngomba Sinai (Holebe)
Mbu Motane
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Ezwami na karte ya Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel
[Elilingi na lokasa 24]
Ndambo monene ya mokanda ya Deteronome ezali masukulu ya Moize
[Elilingi na lokasa 26]
Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yehova apesaki Bayisalaele mana?
[Elilingi na lokasa 26]
Kokamata mabanga ya kofina to libanga ya likoló lokola ndanga ezalaki lokola kokamata “bomoi ya moto”