-
Aleisaki Yisraele na SinaiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1992 | 1 Sanza ya 5
-
-
KANISA ete bamilió na mibali, basi mpe bana oyo bazali kokenda epai na “mokili monene mokaoki mpe na nsɔmɔ, esika ezali na nyoka na ngɛngɛ mingi mpe na nkotó, mpe mabelé makaoki oyo mazangi mai!”
Maloba oyo na Nzambe mazwami na Deteronome 8:15 (MN), mamonisi ete mobémbo molai oyo Bayisraele basengelaki kosala mpo na kokenda na mokili mokaoki na Sinai, na ntango babimaki na Ezipito. Motuna monene mozalaki oyo ete: Nani akopesa bango bilei mpe mai oyo ekoki?
-
-
Aleisaki Yisraele na SinaiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1992 | 1 Sanza ya 5
-
-
Nokinoki nsima na kokatisa la mer Rouge, Bayisraele bayebaki mpenza lolenge oyo Sinai ezalaki. Balekaki te na nzela ya nord, epai bato mingi balekaka, kasi babalukaki epai na nsuka ya mabelé ya esanga moke. Wana basalaki soko bakilometele 80 kati na mokili mokaoki, mposa na bango ya mai ekómaki makasi. Bakokaki te komela mai oyo bazalaki kokuta, mpamba te yango ezalaki bololo mpe ezalaki mbala mosusu komema bamaladi. Bamitungisaki ete: “Tokomela nini?” Nzambe asungaki bango na koyeisáká mai yango kitoko.—Exode 15:22-25.
-