Mituna na batangi
Na molende nini moklisto asengeli kotemela ndingisa to etinda oyo euti na tribinale na ntina na kozongisama makilá?
Lokola ezalela ya makambo ekeseni, etinda moko te ekoki kosalema mpo na makambo nyonso. Toyebi ete na limemya nyonso, baklisto bakopesaka “biloko na Kaisala epai na Kaisala” na kotósáká mibeko ya mboka. Kasi, bayebi malamu etinda eleki monene ete, basengeli kopesa ’’biloko na Nzambe ’’ na elobeli mosusu, basengeli kobuka mobeko na Nzambe te.—Malako 12:17.
Baloma 13:1-7 emonisi oyo bozali boyokani kati na baklisto mpe ’’bakonzi baleki liboso,” oyo ezali bongo biyangeli. Biyangeli wana bizali na lotomo ya kopesa mibeko to kokamata bikateli, oyo mingimingi ezalaka mpo na bolamu ya bato ya ekólo. ‘Bakomemaka mopanga’ mpo na kotósisa mibeko mpe ”mpo na kokómisa nkanda epai na moto oyo akosalaka mabe” liboso na mibeko. Lokola bakotósaka bakonzi baleki liboso, baklisto bazali kotósa mibeko mpe bikateli ya bisambiselo; kasi botósi yango esengeli kozala na ndelo. Soki bakosenga na moklisto moko ete atósa etinda oyo ezali kobuka mobeko na Nzambe oyo eleki likolo, akotósa nde oyo ya Nzambe.
Lelo, ezali na mibeko misusu oyo, atako ezali malamu mpo na bato, nde ezali kosalelama na motindo boye ete bazongisa moklisto moko makilá na makasi. Na ntango wana, baklisto basengeli mpo na bango kozongela maloba oyo ya ntoma Petelo ete: “Ekoki ete totosa Nzambe liboso na kotósa bato.”—Misala 5:29.
Jehovah apesaki mobeko oyo epai na Yisraele, ete: “Keba mpe zala ngwi ete olya makilá te, mpo ete makilá ezali bomoi, mpe okolya bomoi elongo na mosuni te.” (Deteronome 12:23) Libongoli moko ya Bayuda liyebisi mokapo yango ete: ’‘Keba ete olya makilá te.” Isaac Leeser abongoli yango ete: “Keba mpo ete olya makilá te.” Maloba oyo mamonisi ete basaleli na Nzambe basengeli kobanza te wana esengelaki na bango kotósa mobeko na ye? Na sembo mpenza, baklisto bazali ntango nyonso na ekateli makasi mpo na kotósa Nzambe, ata soko likambo yango lizali kobuka mobeko ya Lela. Na ntina yango, profesere Robert Wilken akomaki ete: ’’Baklisto bazalaki bobele koboya mosala ya soda [mosengisamaki na Baloma] te, kasi bazalaki mpe koboya kozwa mikumba nyonso epai na Leta mpe kozala na bokonzi kati na boyangeli.” (The christians as the Romans Saws Them) Ekateli wana ya koboya ekokaki kosala ete baklisto batalelama lokola bato mabe to mpe kobomama na arène (esika oyo bilombé ya Baloma bazalaki kobunda na mbeli).
Baklisto ya eleko na biso, bango mpe basengeli kokeba ete babuka mobeko na Nzambe te, ata soki ezaleli wana ekobimisela bango mikakatano longwa na biyangeli ya mokili. Lokola yango epesi etinda epai na baklisto ete baboya pile (lolenge na mbindo na kosangisa nzoto), bobele bongo mobeko na Nzambe, oyo ezali mobeko moleki mibeko nyonso kati na molóngó mobimba, ezali kosengisa bango ete basalela makila na lolenge mabe te. (Misala 15:19-21, 28, 29) Tosengeli te kotalela mobeko na Nzambe lokola eloko na mpamba, lokola eloko oyo tokoki kotósa bobele soki biso moko tolingi to soki yango ekobimisela biso mikakatano te. Kotósa na mobeko na Nzambe ezali lisengisi!
Tokangi ntina oyo elenge mwasi moklisto oyo alobelami na lokasa 17 alobaki na tribinale ete, ’’azali kotalela kozongisama ya makilá na nzoto lokola kokɔta na makasi kati na ndako ya moto mosusu mpe akokisaki yango na likambo ya kobebisa mwasi na makasi (viol).” Mwasi moklisto akondima ete babebisa ye bobele mpo ete mobeko moko mopesi nzela na mibali ete basangana na basi na makasi?
Bobele bongo, elenge mwasi wana ya mibu 12 oyo atangami na lokasa yango, angangaki ete ’akobunda, akolongola ntonga na loboko na ye mpe akomeka kotobola libenga to sasi ya makilá oyo ekakisami likoló na motó ya mbeto na ye.’ Azalaki mpenza na ekateli makasi ya kotósa mobeko na Nzambe.
wana bato balingaki kokómisa ye mokonzi, Yesu alongwaki na esika oyo ye azalaki. Bobele bongo, soki emonani ete bakozongisa ye makila na lotomo ya tribinale, moklisto asengeli kozala esika wana te, mpo ete apesa nzela te na motindo wana ya kobuka mobeko na Nzambe. (Matai 10:16; Yoane 6:15) Na ntango wana, moklisto yango asengeli koluka kozwa lisalisi na bankisi mosusu, kosaláká bongo milende mingi ete abika mpe azwa lisusu kolongono ya nzoto.
Soki moklisto amonisi mpenza milende makasi mpo ete abuka mobeko na Nzambe te, mbala mosusu bakonzi bakotalelaka ye lokola moto mabe mpe bakolukaka kosambisa ye. Soki akweisami, moklisto akondima konyokwama mpo na boyengebene. (Tala 1 Petelo 2:18-20.) Atako bongo, mbala mingi, baklisto bakotunaka monganga oyo akoki kosala bango opération kozanga kokotisa bango makila mpe bakozwaka kolongono na nzoto na lisalisi ya bankisi malamu. Mpo na yango, bazali na mikakatano ya ntango molai te elongo na bisambiselo. Mpe, likambo ya ntina mpenza, bazali kotikala sembo liboso na Nzambe Mozalisi na bango mpe Mosambisi na bango.