Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Etumba ya Yeriko—lisapo to likambo ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 15 Sanza ya 7
    • UTA ebele na mibu, ba arkeyeloge (bato na mayele oyo balukaka biloko bitikala na nse na mabelé) bamekaki kotya ntembe na ntina na bosolo ya lisolo na Biblia oyo litali Yosua mpe etumba na Yeriko. Engebene Biblia, Yosua mpe limpinga na Yisraele batambolaki zingazinga ya Yeriko na boumeli ya mikolo nsambo, kino Nzambe akweisaki bifelo minene ya engumba. Yango epesaki nzela na Bayisraele na kokota mpe ‘kotumba na moto engumba mpe biloko nyonso oyo bizalaki kati na yango’.​—Yosua 6:1-24.

  • Etumba ya Yeriko—lisapo to likambo ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1990 | 15 Sanza ya 7
    • Bryant Wood azali kolobela mpo na liboke ya putulu, na mbinga ya metele moko, elongo na biteni na bambeki na mabelé motane, ndambo na babrike ya mur moko ekweaki mpe makonzi nyonso eyinda tuu lokola soki engumba nyonso ebebisamaki na moto. Biteni mikemike ya biloko bisalami na mabelé motane biumelaki penepene na mibu 40 (engebene ba métode oyo tozali na yango lelo mpo na kotangela badate, mpe oyo na makanisi ya bato mingi ezali solo te), na mbula 1410 liboso ya ntango na biso, oyo ezali mosika mingi te na 1473, date oyo engebene mitango ya Biblia, etumba na Yeriko esalamaki.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto