Sɛkɛmɛ—Engumba oyo etongamaki kati na lobwaku
ENGUMBA Sɛkɛmɛ ezwami na eteni ya ntéi mpenza ya mokili oyo Nzambe aponaki kopesa yango na libota na ye, katikati na Ngomba Ebali mpe Ngomba Gelizimi. Ezalaki bongo esika oyo—esili koleka pene na mbula nkóto minei—nde Yehova apesaki Abalayama elaka oyo: “Nakopesa mokili oyo na bana na yo.”—Genese 12:6, 7.
Na boyokani na elaka wana, Yakobo, mwana ya mwana ya Abalayama, asalaki molako na Sɛkɛmɛ mpo na kofanda kuna mpe atongaki etumbelo oyo abéngaki yango ete “Nzambe azali Nzambe ya Yisalaele.” Ekoki mpenza kozala ete Yakobo atimolaki libulu ya mai na etúká yango mpo ete libota na ye mpe bibwele na ye bázanga mai te, libulu oyo bambula mingi na nsima, eyaki kobéngama ete “libulu na Yakobo.”—Genese 33:18-20, maloba na nsé ya lokasa na NW; Yoane 4:5, 6, 12.
Nzokande, basangani nyonso te ya libota ya Yakobo nde bamonisaki molende mpo na losambo ya solo. Dina, mwana na ye ya mwasi, asalaki boninga elongo na bana basi Bakanana ya engumba Sɛkɛmɛ. Dina, oyo azalaki naino moseka na eleko wana, atikaki bahema ya libota na ye epai kuna azalaki na libateli mpe abandaki kokende na engumba yango oyo ezwamaki pembeni, azwaki baninga kuna.
Lolenge nini bilenge mibali ya engumba wana bazalaki kotalela elenge moseka oyo azalaki kokende mbala na mbala na engumba na bango—nzokande emonani ete azalaki kokende bobele ye moko? Mwana mobali ya nkumu ya mboka yango “amonaki ye mpe akangaki ye mpe alalaki na ye mpe asambwisaki ye.” Mpo na nini Dina amilukelaki likámá na kosaláká boninga elongo na Bakanana oyo bazalaki na etamboli ya mbindo? Ezalaki mpo ete ayokaki mposa ya kozala elongo na bilenge basi oyo bazalaki mbula moko na ye? Azalaki na motó makasi mpe azalaki koluka lipanda lokola bamoko kati na bandeko na ye ya mibali? Tángá lisoló ya Genese, mpe kanisa naino mawa mpe nsoni oyo Yakobo na Lea bayokaki mpo na mbuma mabe oyo mwana na bango abukaki mpo ete azalaki kokende na Sɛkɛmɛ.—Genese 34:1-31; 49:5-7; talá mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1985, lokasa 31.
Pene na mbula 300 na nsima, mbuma oyo ebimaka mpo na kozanga kolanda malako ya Teokrasi elobelamaki lisusu polele. Na Sɛkɛmɛ, Yosua asalaki moko na mayangani maleki monene kati na lisoló ya Yisalaele. Kanisá naino lolenge makambo masalemaki na lobwaku yango. Bato koleka milió moko—mibali, basi, mpe bana—bauti na mabota motoba ya Yisalaele batɛlɛmi liboso na Ngomba Gelizimi. Na ngámbo mosusu ya lobwaku etuluku mosusu ya bato oyo motángo na bango ekokani na oyo ya etuluku ya liboso, bauti na mabota mosusu motoba, batɛlɛmi liboso na Ngomba Ebali.a Mpe kuna na nsé, pene na sanduku ya kondimana mpe na katikati ya bituluku mibale yango ya Bayisalaele, Yosua atɛlɛmi wana elongo na banganga. Oyo nde makambo ya kobenda likebi!—Yosua 8:30-33.
Bangomba yango mibale ezali komonana polele pene na ebele monene wana ya bato, ezali komonisa bokeseni makasi kati na esika ya bonzenga mpe esika ezangi bitwele. Eteni ya likoló ya Ngomba Gelizimi emonani ete ezali na bitwele mingi mpe ezali na mabelé malamu, nzokande oyo ya Ebali emonani ete ezali mwa moindo mpe ekoki kobimisa milona te. Okoki koyoka lolenge Bayisalaele bazali komimisa mpamba te bazali mitema likoló wana ezali bango kozela ntango oyo Yosua akoloba? Makɛlɛlɛ nyonso oyo bazali kosala ezali kozongela bango na matoi na esika wana ekokani na libanda ya masano.
Na boumeli ya ngonga minei to motoba oyo Yosua azwi mpo na kotánga ‘mokanda ya Mibeko ya Mose,’ Bayisalaele bakangaki monɔkɔ na bango te. (Yosua 8:34, 35) Emonani ete, Bayisalaele oyo bazali liboso ya Gelizimi bazali koloba ete Amen! nsima ya kotángama ya lipamboli mokomoko; nzokande baoyo bazali liboso ya Ebali bazali koyanola Amen! nsima ya kotángama ya elakeli mabe mokomoko. Ekoki kozala ete komonana ya Ngomba Ebali oyo ezangi bitwele ezali ekundweli epai na libota ya Yisalaele na ntina na mbuma mabe ya kozanga botosi.
Yosua apesaki likebisi oyo ete: “Tiká alakelama mabe, moto oyo akotyola tata na ye soko mama na ye.” Bango nyonso elongo, bato koleka milió moko bayanoli ete: “Ezala bobele bongo [“Amen!”, NW]” Yosua azali kozela ete loláká monene ya eyano na bango esila nyɛɛ liboso ya kobakisa ete: “Tiká alakelama mabe, moto oyo akobikola ndelo na mozalani na ye.” Na mbala oyo lisusu mabota motoba, elongo na bapaya mingi, bangangi ete: “Amen!” (Deteronome 27:16, 17) Soki ozalaki kuna, mbɛlɛ olingaki kobosana likita wana oyo esalemaki katikati na bangomba? Mbɛlɛ ntina ya komonisa botosi elingaki kotikala libela kati na makanisi na yo, boye te?
Mwa moke liboso ete akufa, pene na bambula 20 na nsima, Yosua ayanganisaki lisusu libota na Sɛkɛmɛ mpo ete bákembisa ekateli na bango. Amonisaki bango ekateli oyo mokomoko na bango asengelaki kokamata. Alobaki ete: “Bópona lelo ye oyo bokosalela. Kasi mpo na ngai mpe ndako na ngai, biso tokosalela [Yehova].” (Yosua 24:1, 15) Na ntembe te, mayangani wana ya kolendisa kondima oyo masalemaki na Sɛkɛmɛ mazalaki na bopusi makasi. Bambula mingi nsima ya liwa ya Yosua, Bayisalaele bamekolaki ndakisa na ye ya kondima.—Yosua 24:31.
Soko bikeke 15 na nsima, wana Yesu azalaki kopema na nsé ya nzeté na Ngomba Gelizimi, lisoló moko ya kosimba motema esalemaki kuna. Nsima ya kosala mobembo molai, Yesu alɛmbaki mingi mpe afandaki pene na libulu ya Yakobo wana mwasi moko Mosamalia ayaki wana na mbeki na ye ya kotóka mai. Mwasi yango akamwaki mingi ntango Yesu asɛngaki ye mai ya komɛla, mpamba te Bayuda bazalaki kolobisa Basamalia te, bakokaki mpe soko moke te komɛla na mbeki na bango. (Yoane 4:5-9) Maloba oyo Yesu abimisaki na nsima makamwisaki mwasi yango mingi lisusu koleka.
“Moto na moto oyo akomɛlaka mai oyo, akoyoka mposa na komɛla lisusu; nde ye oyo akomɛla mai makopesa ngai epai na ye akoyoka mposa lisusu libela te; kasi mai makopesa ngai ye makozala motó na mai kati na ye kopunzwapunzwa kino bomoi na seko.” (Yoane 4:13, 14) Kanisá naino lolenge mwasi yango asepelaki na elaka wana, mpamba te kotóka mai na libulu mozindo wana ezalaki likambo monene. Na nsima, Yesu amonisaki ete atako Yelusaleme mpe Ngomba Gelizimi etalelamaki na motuya mingi uta kalakala, kasi moko te kati na bisika yango ezalaki esika oyo esengeli mpo na kobɛlɛma epai na Nzambe. Eloko ya ntina ezali nde ezalela ya motema mpe etamboli, kasi te esika moko boye. Alobaki ete: “Basambeli na solo bakosambela Tata na [“elimo,” NW] mpe na solo. Mpamba te Tata azali koluka [“bato,” NW] motindo oyo mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23) Wana ezalaki mpenza maloba ya kobɔndisa! Na mbala oyo lisusu, esika yango ekómaki epai kuna bato balendisamaki ete basalela Yehova.
Lelo oyo, engumba Naplouse ezwami pene na bitika ya engumba ya kala ya Sɛkɛmɛ. Ngomba Gelizimi mpe Ngomba Ebali ezwami pene na lobwaku wana, bangomba yango ezali bongo kotatola makambo oyo masalemaki kuna na ntango ya kala. Kino lelo, tokoki kokende kotala libulu ya Yakobo, ezwami na nsé ya bangomba wana. Wana tozali komanyola likoló na makambo oyo masalemaki kuna, tozali komikundwela ete kosimba losambo ya solo ezali na ntina mingi, bobele lokola Yosua mpe Yesu bateyaki biso yango.—Kokanisá na Yisaya 2:2, 3.
[Maloba na nse]
a Mabota motoba oyo mazalaki liboso ya Ngomba Gelizimi ezalaki bongo: libota ya Simeona, ya Levi, ya Yuda, ya Yisakala, ya Yosefe mpe ya Benyamina. Mpe mabota motoba oyo mazalaki liboso ya Ngomba Ebali ezalaki bongo oyo ya Lubene, ya Gada, ya Asele, ya Zebuluna, ya Dani mpe ya Nafatali.—Deteronome 27:12, 13.