Jéhovah, mosambisi na sembo na mabelé mobimba
“Tata . . . akosambisa na koponapona bato te, nde pelamoko misala na moto na moto.”—1 PETELO 1:17.
1, 2. (a) Mpo na nini tosengeli kobanga mpe kolendisama na likanisi oyo ete Jéhovah azali Mosambisi monene? (b) Kati na likambo litali Jéhovah mpe mabota, mokumba nini basaleli na ye na mabelé bazali na yango?
JÉHOVAH azali “Mosambisi monene ya mabelé mobimba.” (Genese 18:25) Lokola azali Nzambe monene ya molongo mobimba, azali na lotomo nyonso ya kosambisa bikelamu na ye. Na mbala moko likanisi yango lizali kobangisa mpe lizali kolendisa. Moize eyebisaki likanisi oyo ya polele ntango alobaki ete: “Mpo ete Jéhovah Nzambe na bino azali Nzambe na banzambe mpe Nkolo na bankolo, Nzambe monene mpe makasi mpe na nsomo, oyo akoponaponaka bato te mpe akondimaka lifuti te. Akokataka na sembo mpo na etike mpe mpo na mwasi-akufeli-mobali, mpe akolingaka mopaya mpe akopesaka ye bilei mpe bilamba.”—Deteronome 10:17, 18.
2 Oyo nde bokatikati malamu kati na bizaleli na ye! Nzambe moko monene, makasi mpe na nguya, oyo mpenza akoponaponaka te mpe akokotelaka na bolingo nyonso matomba ya bitike, ya basi-bakufeli-mibali mpe ya bapaya. Nani akoki kolinga Mosambisi mosusu ya bolingo mingi koleka Jéhovah? Komimonisaka lokola moto oyo azali na likambo na mabota ya mokili na Satana, Jéhovah azali kobyanga basaleli na ye na mabelé ete bazala batemwe na ye (Yisaya 34:8; 43:9-12) Azali na mposa ya litatoli na bango te mpo na komonisa bonzambe na ye to bokonzi na ye ya solo. Atako bongo, apesi na batemwe na ye libaku kitoko ya komonisa liboso na bato ete bayebi bokonzi na ye monene. Batemwe na ye bazali kotosa bokonzi na ye ya sembo mpe, na nzela na mosala na bango ya kosakola, bazali kobenda bato mosusu ete bamitya bango mpe na nse na bokonzi ya Mosambisi monene.
Lolenge oyo Jéhovah akosambisaka
3. Ndenge nini tokoki kolobela na mokuse lolenge oyo Jéhovah azali kosambisa, mpe ndenge nini mitindo nyonso mibale mimonisamaki kati na likambo ya Adam mpe Eva?
3 Na ebandeli ya lisolo na bato, Jéhovah asambisaki ye moko bato oyo babukaki mibeko. Lolenge na ye ya kosambisa makambo epesaki ndakisa epai na baoyo na nsima, basengelaki kozala na mokumba ya kosambisa makambo kati na libota na ye. (Nzembo 77:11, 12) Lolenge na ye ya kosambisa ekoki kolobelama boye na mokuse: kokamata ekateli ya ngwi, soki esengeli; koyokela mawa soki likoki lizali. Mpo na oyo etali Adam na Eva, bato nakokoka oyo batombokaki na bolingo na bango moko basengelaki koyokelama mawa ata moke te. Yango wana, Jéhovah akatelaki bango etumbu ya liwa. Kasi mawa na ye esalelamaki epai na bakitani na bango. Jéhovah ayeisaki etumbu ya liwa mbala moko te, likambo oyo lipesaki nzela na Adam mpe Eva ete babota bana. Na bolingo nyonso, apesaki epai na bakitani na bango elikya ya kosikolama na boombo ya lisumu mpe ya liwa.—Genese 3:15; Baloma 8:20, 21.
4. Lolenge nini Jéhovah asalaki epai na Kaina, mpe mpo na nini likambo wana lizali na ntina mpenza?
4 Lolenge oyo Jéhovah asalaki epai na Kaina ezali mpenza na ntina mingi, mpamba te etaleli likambo ya liboso liyebisami kati na Makomami na ntina na moko na bakitani bazangi kokoka—“batekami na bokonzi na masumu”—ya Adam na Eva. (Baloma 7:14) Jéhovah atyaki likebi mpo na yango, mpe ndenge na ye ya kosala epai na Kaina ekesenaki na oyo asalelaki baboti na ye? Likambo yango likoki mpe kopesa liteya epai na bakengeli baklisto ya ntango na biso? Totalela yango. Komonaka botomboki ya Kaina ntango mbeka na ye endimamaki te, Jéhovah akebisaki ye na bolingo nyonso mpo na likama oyo lizalaki koyela ye. Lisese moko ya kala ekolobaka ete: ‘Ebongi malamu komibatela na esika ya kozwa mpasi mpe koluka lisalisi na nsima.’ Jéhovah amonisaki boboto mingi epai na Kaina na kokebisaka ye ete apesa nzela te na mayoki na ye ya mosumuki ete eyangela ye. Asalaki molende ya kosunga ye ete ‘asala oyo ezali malamu.’ (Genese 4:5-7) Ezali mbala ya liboso oyo Nzambe asengaki epai na moto ya masumu ete abongola motema. Nsima wana Kaina amonisaki ete abongoli motema te mpe asalaki lisumu na ye na kobomaka ndeko na ye, Jéhovah apesaki ye etumbu ya motelengani, kasi alembisaki etumbu yango na mobeko moko oyo epekisaki bato mosusu ete baboma ye te.—Genese 4:8-15.
5, 6. (a) Lolenge nini Jéhovah asalaki epai na bato liboso na mpela? (b) Jéhovah asalaki nini liboso ete akokisa ekateli na ye ya koyeisa etumbu likoló na bafandi ya Sodome mpe Gomola?
5 Liboso na mpela, ntango ‘amonaki ete masumu na bato makomaki mingi na mokili, Jéhovah ayokaki mawa kati na motema na ye.’ (Genese 6:5, 6) “Ayokaki mawa” na ndimbola oyo ete, ntalo monene na bato oyo bazalaki liboso na mpela basalelaki na lolenge mabe bonsomi na bango; ayokaki mpe mawa mpo ete asengelaki koyeisa etumbu likoló na bato yango. Kasi, azangaki te kokebisa bango na nsima ya Noa, oyo ye asalelaki na boumeli ya mibu mingi lokola “mosakoli na boyengebene.” Na nsima, Jéhovah azalaki lisusu na ntina moko te ya ‘komipekisa mpo na koboma mokili ya bato mabe.’—2 Petelo 2:5.
6 Motindo moko, Jéhovah azwaki ekateli ya koyeisa etumbu epai na bato mabe ya Sodome mpe Gomola. Kasi tala lolenge asalaki. Ayokaki “kolela”—ekokaki kozala na nzela na mabondeli ya moyengebene Lota—na ntina na etamboli mabe ya bato wana. (Genese 18:20; 2 Petelo 2:7, 8) Nzokande, liboso ya kosala likambo, ‘akitaki’ mpo na kotala makambo nyonso, kosalelaka mpo na yango baanzelu na ye. (Genese 18:21, 22; 19:1) Azwaki mpe ntango ya kokitisa motema ya Abalayama, kolobaka na ye ete akosala te na lolenge ezangi sembo.—Genese 18:23-32.
7. Bankulutu oyo baponami mpo na kosambisa likambo, bakoki kozwa mateya nini na kotalela lolenge oyo Jéhovah asambisaki makambo?
7 Likambo nini bankulutu ya ntango na biso bakoki koyekola na bandakisa oyo nyonso? Mpo na likambo ya Adam na Eva, Jéhovah amonisaki bolingo mpe boboto mpo na baoyo, atako bazalaki bana na basumuki oyo, nzokande bakokaki kopamelama te mpo na likambo yango. Amonisaki mawa epai na bakitani ya Adam na Eva. Mpo na Kaina, Jéhovah ayebisaki likama oyo lizalaki koyela mobali wana mpe na boboto nyonso, asololaki na ye mpo ete asala lisumu te. Ata nsima na kobengana ye na mboka, Jéhovah amonisaki boboto epai na Kaina. Epai mosusu, ayeisaki etumbu likoló na libota oyo lizalaki liboso na mpela bobele nsima na komonisa motema molai mpe koyika mpiko mbala mingi. Liboso na mabe ya motó makasi, “ayokaki mawa kati na motema na ye.” Ayokaki mawa mpo ete bato batombokelaki boyangeli na ye ya sembo; ayokaki mpe mawa mpo ete asengelaki kopesa bango etumbu. (Genese 6:6; tala mpe Ezekiele 18:31; 2 Petelo 3:9) Mpo na likambo ya Sodome mpe Gomola, apesaki etumbu bobele nsima na kotala makambo nyonso. Oyo nde bandakisa kitoko mpo na baoyo basengeli kosambisa makambo na mikolo na biso!
Basambisi na eleko ya batata na mabota
8. Mibeko nini ya moboko ya Jéhovah miyebanaki na eleko ya batata na mabota?
8 Atako na ntango wana buku ya mibeko ezalaki te, libota ya bankoko na kala liyebaki mibeko ya moboko ya Jéhovah, mpe basaleli na ye bazalaki na mokumba ya kotosa yango. (Tala Genese 26:5) Likambo oyo lisalemaki na Edene limonisaki ntina ya kotosa mpe ya komisokisa na nse na boyangeli na Jéhovah. Likambo ya Kaina limonisaki ete Jéhovah ayinaki koboma. Nokinoki nsima na mpela, Nzambe apesaki epai na bato mibeko mitali bosantu ya bomoi, mitali koboma, mitali etumbu ya liwa mpe kolya makila. (Genese 9:3-6) Jéhovah akweisaki ekobo na nguya nyonso na ntango ya nkembo oyo ebimelaki Abalayama mpe Sara elongo na Abimeleke, mokonzi ya Gerare, pene na Gaza.—Genese 20:1-7.
9, 10. Bandakisa nini emonisi ete ebongiseli ya kosambisa makambo ezalaki na eleko ya batata na mabota?
9 Na ntango wana, ezalaki mikóló ya mabota nde bazalaki basambisi mpe bazalaki kotalela makambo mabongi kosambisama. Jéhovah alobaki na ntina na Abalayama: “Naponi ye na ntina ete alaka bana na ye mpe ndako na ye na nsima na ye, kobatela nzela na Jéhovah mpe kosala boyengebene mpe sembo.” (Genese 18:19) Abalayama amonisaki boyengebene mpe bososoli ntango asilisaki koswana oyo ebimaki kati na babateli ya etonga na ye mpe babateli na etonga ya Lota. (Genese 13:7-11) Kosalaka lokola mokóló na libota mpe mosambisi, Yuda akweisaki bokilo na ye ya mwasi Tamala ete babwakela ye mabanga kino kufa mpe batumba ye na mɔ́tɔ; akanisaki ete asalaki ekobo. (Genese 38:11, 24; tala Yosua 7:25.) Kasi, ntango ayaki koyeba makambo nyonso sikisiki, atangaki ye moto na sembo koleka ye moko. (Genese 38:25, 26) Yambo ya kozwa ekateli etali esambiseli, eleki malamu ete toluka koyeba makambo nyonso sikisiki!
10 Mokanda na Yobo mozali kolobela esambiselo mpe ezali komonisa motuya nyonso ya kosambisa oyo ezangi koponapona. (Yobo 13:8, 10; 31:11; 32:21) Yobo ye moko amikundoli lisusu eleko oyo azalaki mosambisi ya lokumu oyo azalaki kofanda na ekuke ya mboka, kokataka makambo na boyengebene, mpe kolobelaka mwasi-akufeli-mobali mpe mwana etike oyo azangi tata. (Yobo 29:7-16) Na bongo ezali elembeteli ete na eleko ya batata na mabota, “bankulutu” bazalaki kokokisa mosala ya basambisi kati na bakitani ya Abalayama, mpe yango ata liboso ya kobima na Ezipito mpe liboso ya kozwa buku na mibeko oyo Nzambe apesaki na libota ya Yisraele. (Exode 3:16, 18) Na yango, ezali epai na “bankulutu” ya Yisraele, oyo bazalaki bamonisi ya libota na bango, nde Moize ayebisaki maloba ya kondimana na Mibeko.—Exode 19:3-7.
Ebongiseli ya kosambisa makambo na Yisraele
11, 12. Engebene balimboli mibale na Bibia, eloko nini ezalaki kokesenisa ebongiseli ya kosambisa makambo kati na Yisraele mpe oyo ya mabota mosusu?
11 Na Yisraele, ebongiseli ya kosambisa makambo ekesenaki mpenza na myango misusu ya kosambisa makambo oyo misalelamaki kati na mikili ya zingazinga. Likeseni ezalaki te kati na droit civil (mibeko mitali lotomo mpe mikumba ya moto kati na libota to esika afandi) mpe droit criminel (mibeko mitali koyeba mbeba mpe kopesa bitumbu). Nyonso mibale ekangisamaki na mibeko ya bizaleli malamu mpe ya makambo na Nzambe. Kosalela moninga lisumu ezalaki bongo kosalela Jéhovah lisumu. Kati na mokanda Bomoi ya mokolo na mokolo na eleko ya Baebele, André Chouraqui akomaki ete: “Lolenge na kosambisa ya Baebele ekeseni na oyo ya baninga na bango ya zingazinga bobele kati na ndimbola ya mabunga mpe ya bitumbu te, kasi na ntina mpenza ya mibeko. . . . Torah (Mibeko) ekeseni te na bomoi ya mokolo na mokolo: ezali kotambwisa lolenge na yango mpe makambo na yango, na kopesaka lipamboli to kolakela mabe. . . . Na Yisraele, . . . ezali mpasi mpenza mpo na kokesenisa polele mibeko mitali misala ya mboka. Ezali mpenza komikotisa kati na bomoko ya bomoi moko oyo emipesi mobimba na kokokisa mokano ya Nzambe na bomoi.”
12 Na kotalela maye mazali koleka epai ya bikolo ya ntango na biso, likambo oyo lizangi kokokana na mosusu lityaki ebongiseli ya kosambisa na Yisraele na esika ya likoló mpenza. Na ntina yango molimboli na Biblia Roland de Vaux akomaki: “Mibeko na Yisraele, atako bokokani na yango mpe makambo na yango, ekeseni mpenza na bikateli ya ‘kondimana’ mpe ya ‘mibeko’ na bato na Azia: ezali mibeko ya losambo. . . . Buku moko te ya mibeko na Azia ekokani na mibeko ya Yisraele oyo nyonso epesami na Nzambe lokola Mokomi na yango. Soki mbala mingi ezali kosangisa mibeko ya bizaleli mpe ya losambo, ezali mpo ete esangisi makambo nyonso ya Kondimana na Nzambe oyo ezali kotalela bobele te boyokani ya bato elongo na Nzambe kasi lisusu oyo ya bato kati na bango.” Na bongo ezali likambo ya kokamwa te ete Moize atunaki boye: “Mpe libota monene nini ezali na mibeko oyo nyonso mitii ngai liboso na bino lelo?”—Deteronome 4:8.
Basambisi na Yisraele
13. Na makambo nini Moize azalaki ndakisa malamu mpo na bankulutu ya lelo?
13 Na ebongiseli ya malamu mingi boye mpo na kosambisa makambo, bato ya lolenge nini esengelaki kopona lokola basambisi? Na ntina na mosambisi ya liboso oyo aponamaki na Yisraele, Biblia elobi ete: “Moto yango Moize azalaki na bopolo mingi na koleka bato nyonso bazalaki na nse.” (Mituya 12:3) Atyaki motema na mayele na ye moko te. (Exode 4:10) Atako azalaki na mokumba ya kosambisa Bayisraele, na bantango mosusu azalaki molobeli na bango epai na Jéhovah, kobondelaka ye ete alimbisa bango mpe, na libaku mosusu, amipesaki ye moko ete amema etumbu na esika na bango. (Exode 32:11, 30-32) Angangaki na maloba kitoko ete: “Tika ete liteya na ngai ekwea lokola mbula mpe kosolola na ngai etanga lokola mamwe, lokola mbula moke na likoló na matiti motau, mpe lokola mbula makasi likoló na ndunda.” (Deteronome 32:2) Na esika ete asambisa bato na kotyaka motema na mayele na ye moko, alobaki ete: “Soko bazali na likambo bakoyaka epai na ngai ete nakata kati na moto na mozalani na ye, mpe nakoyebisaka bango mibeko na Nzambe mpe bikateli na ye.” (Exode 18:16) Ntango azalaki na kotatabana, azalaki komonisa likambo yango na Jéhovah. (Mituya 9:6-8; 15:32-36; 27:1-11) Moize azalaki ndakisa malamu mpo na bankulutu oyo, lelo, ‘bazali kobatela etonga na Nzambe’ mpe bazali kokamata bikateli bitali kosambisa makambo. (Misala 20:28) Tika ete boyokani na bango elongo na bandeko na bango ezala mpe “lokola mbula makasi likoló na matiti motau!”
14. Bato oyo Moize aponaki basambisi kati na Yisraele basengelaki kokokisa masengami nini ya elimo?
14 Na nsima, Moize akokaki lisusu te komema ye moko mokumba oyo etalaki bongo kosambisa libota. (Exode 18:13, 18) Andimaki toli oyo bokilo na ye ya mobali apesaki ye ete aluka lisungi. Wana mpe, lolenge nini ya bato baponamaki? Totangi: “‘Pona mibali na mayele na kati na bato nyonso, mibali bakobangaka Nzambe, bato na solo, bayini na kanyaka.’ . . . Moize aponaki mibali na mayele na kati na Yisraele nyonso, mpe atyaki bango liboso na bato, mikonzi na nkoto mpe mikonzi na nkama mpe mikonzi na ntuku mitano mpe mikonzi na zomi. Bango bakataki makambo na bato ntango nyonso. Bayaki na makambo makasi epai na Moize, kasi makambo mike nyonso bakataki yango bongo mpenza.”—Exode 18:21-26.
15. Bato oyo bazalaki basambisi kati na Yisraele basengelaki kokokisa masengami nini?
15 Tokoki komona ete, kati na koponama ya mibali oyo basengelaki kokokisa mokumba ya basambisi, lisengami esukaki bobele na mbula ya kobotama te. Moize alobaki ete: “Pona bato na mayele mpe na kososola mpe bato bameseni na makambo mingi, kati na mabota na bino, mpe ngai nakotya bango liboso na bino.” (Deteronome 1:13) Moize ayebaki malamu likambo oyo elenge Elihu alobaki mibu mingi liboso: “Ezali te bobele baoyo basili kopusana na mbula nde bazali na mayele, to bobele baoyo basili kokoma mibange nde bayebi kosambisa.” (Yobo 32:9, MN) Ya solo, esengelaki ete baoyo baponamaki bazala “bato bameseni na makambo mingi.” Kasi mingi mpenza basengelaki kozala bato bakoki mpe bato bakobangaka Nzambe; basengelaki kozala bato babongi kotyamelama motema, bayini na kanyaka, bato na mayele mpe na bososoli. Na bongo ezali polele ete “mikolo” mpe “basambisi” oyo Yosua 23:2 mpe 24:1 ezali kolobela bakesenaki te na “bankulutu” oyo bayebisami mpenza kati na ba versets wana, ete baponamaki kati na bango.—Tala Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, page 75.
Lolenge ya kokata makambo
16. Likambo nini tosengeli kosimba lelo mpo na malako oyo Moize apesaki epai na basambisi oyo autaki kopona?
16 Mpo na oyo etali malako mapesamaki epai na basambisi oyo aponaki, Moize alobaki ete: “Nalakelaki basambisi na bino na ntango yango ete: ‘Yoka makambo na kati na bandeko na bino mpe kata na sembo kati na moto na ndeko na ye to na mopaya esika moko na ye. Bokokata na koponapona te. Bokoyoka bato na lokumu mpe bato mpamba lolenge moko. Okobanga elongi na moto te mpo ete ekateli ezali na Nzambe. Likambo oyo eleki bino, bokoya na yango epai na ngai [Moize] mpe nakoyoka yango.’”—Deteronome 1:16, 17.
17. Mibali nini baponamaki basambisi, mpe likebisi nini mokonzi Yosafata apesaki bango?
17 Ya solo, bakokaki komema makambo liboso na Moize bobele na ntango oyo ye azalaki naino na bomoi. Yango wana, bibongiseli bikamatamaki na nsima mpo ete makambo ya mpasi mapesama epai na banganganzambe, na Balevi mpe na basambisi oyo baponamaki mpo na makambo motindo wana. (Deteronome 17:8-12; 1 Ntango 28:1-4; 2 Ntango 19:5, 8) Epai na basambisi oyo aponaki kati na bingumba ya Yuda, mokonzi Yosafata alobaki ete: “Banga likambo lizali bino kosala, mpamba te bokosambisa mpo na moto te kasi mpo na Jéhovah . . . Bokosala bongo na botosi na kotosa Jéhovah mpe na kondima na mitema na bino mobimba. Soko likambo eyei liboso na bino uta na bandeko na bino baoyo bakofandaka na mboka na bango . . . mbele bino bokolakisa bango ete bakitisama liboso na Jéhovah te mpe ete nkanda ekwela bino mpe bandeko na bino te. Bokosala bongo mpo bozwa ekweli te.”—2 Ntango 19:6-10.
18. (a) Nini ezalaki mwa ndambo na mitinda oyo basambisi na Yisraele basengelaki kosalela yango? (b) Basambisi basengelaki komikundola likambo nini, mpe mikapo nini ya Makomami mimonisi eloko nini ekokaki kokomela baoyo bazalaki kobosana makambo yango?
18 Tala mwa mitinda oyo basambisi ya Yisraele basengelaki kosalela boyengebene lolenge moko kati na mozwi mpe mobola (Exode 23:3, 6; Levitike 19:15); koponapona soki moke te (Deteronome 1:17); koboya kanyaka. (Deteronome 16:18-20) Basambisi basengelaki ntango nyonso komikundola ete baoyo bango bazalaki kosambisa bazali bampate na Jéhovah. (Nzembo 100:3) Na bongo, moko na bantina mpo na yango Jéhovah abwakaki Yisraele ya mosuni ezalaki mpo ete banganga na yango mpe bakengeli na yango na mpate bazalaki kosambisa na boyengene te, mpe basalelaki libota makambo na makasi.—Yilimia 22:3, 5, 25; 23:1, 2; Ezekiele 34:1-4; Malaki 2:8, 9.
19. Kotalela lolenge oyo makambo mazalaki kosambisama kala engebene mitinda ya Jéhovah ezali na litomba nini mpo na biso, mpe tokoyekola nini kati na lisolo lilandi?
19 Jéhovah abongwanaka te. (Malaki 3:6) Kotalelama mokuse ya lolenge oyo makambo masengelaki kosambisama na Yisraele mpe lolenge oyo Jéhovah azalaki kotalela mbeba nyonso kati na lisambisi esengeli kopusa bankulutu oyo lelo bazali na mokumba ya kosambisa makambo, ete bakanisa malamumalamu. Ndakisa na Jéhovah lokola Mosambisi, mpe ebongiseli ya kosambisa makambo oyo atyaki na Yisraele, ebongisaki mitinda oyo mizali kolakisa lolenge oyo makambo masengelaki kosambisama kati na lisangá ya boklisto. Ezali yango nde tokomona kati na lisolo lilandi.
Bozongeli
◻ Ndenge nini tokoki kolobela na mokuse lolenge oyo Jéhovah azali kosambisa makambo?
◻ Bandakisa nini etali motindo oyo Jéhovah akosambisaka emonisami kati na lolenge na ye ya kosala epai na Kaina mpe na bato oyo bazalaki liboso na mpela?
◻ Banani bazalaki kosambisa makambo na eleko ya batata na mabota, mpe lolenge nini yango ezalaki kosalema?
◻ Nini ezalaki kokesenisa ebongiseli ya kosambisa na Yisraele na oyo ya mabota mosusu?
◻ Bato ya lolenge nini baponamaki basambisi kati na Yisraele, mpe mitinda nini basengelaki kolanda?
[Elilingi na lokasa 10]
Na eleko ya batata na mabota mpe na yisraele, bankulutu bazalaki koponama mpo na kosambisa makambo na ekuke ya mboka