Samasona alongi na makasi ya Yehova!
BANGUNA oyo bakangi ye batɔbɔli ye miso mpe bakómi kosalisa ye misala ya makasi. Na nsima, bakei kokamata ye na bolɔkɔ mpe bamemi ye na tempelo mpo bato básɛka ye. Batambwisi ye liboso ya ebele ya bato oyo bazali na tempelo yango mpe babandi kotyola ye. Mokangami yango azali mosali ya mabe te, azali mpe te mokonzi ya basoda oyo abundisaki mboka na bango. Azali nde mosaleli ya Yehova mpe asambisaki Yisalaele mbula 20.
Ebandaki ndenge nini Samasona, moto oyo alekaki bato nyonso na makasi banda mokili ebandá, asambwa ndenge wana? Makasi na ye ya kokamwa ebikisaki ye? Makasi ya Samasona ezalaki kouta wapi? Lisolo na ye ekoki koteya biso nini?
“Akobanda kobikisa Yisalaele”
Bana ya Yisalaele bazalaki mbala na mbala kotika losambo ya solo. Yango wana ntango “basalaki mabe na miso ya [Yehova] . . . [Yehova] apesaki bango na lobɔkɔ ya Bafilistia mbula ntuku minei.”—Basambisi 13:1.
Lisolo ya Samasona ebandaki ntango anzelu ya Yehova abimelaki mwasi ya Moyisalaele moko oyo nkombo na ye ezalaki Manoa; mwasi yango azalaki ekomba, kasi anzelu ayebisaki ye ete akobota mwana mobali. Anzelu alobaki na ye boye: “[Zilɛti] ekokóma na motó na ye te, mpo ete mwana oyo akozala Monasili epai ya Nzambe longwa na kobotama. Ye mpe akobanda kobikisa Yisalaele na lobɔkɔ ya Bafilistia.” (Basambisi 13:2-5) Liboso mama ya Samasona akóma na zemi na ye, Yehova ayebisaki ete Samasona akokokisa mokumba moko. Banda kobotama na ye azalaki Monasili, elingi koloba moto oyo aponami mpo na mosala moko ya bosantu.
“Abongi na miso na ngai”
Ntango Samasona azalaki kokola, “Yehova atikaki te kopambola ye.” (Basambisi 13:24, NW) Mokolo moko, Samasona alobaki na baboti na ye boye: “Namoni mwana mwasi ya Bafilistia epai ya Timina. Na bongo kendá [kozwa] ye mpo na ngai lokola mwasi na ngai.” (Basambisi 14:2) Kanisá ndenge maloba yango ekamwisaki baboti na ye. Na esika mwana na bango abikisa Yisalaele na mabɔkɔ ya bato oyo bazalaki konyokola bango, akómaki nde na makanisi ya kobala mwana mwasi ya ekólo yango. Mibeko ya Nzambe epekisaki kobala mwasi na kati ya bato oyo basambelaka banzambe ya lokuta. (Exode 34:11-16) Yango wana, baboti na ye balobaki na ye boye: “Mwasi azali te na kati na bana basi ya bandeko na yo mpe na kati ya libota na ngai, mpo okende kokamata mwasi epai ya Bafilistia oyo bakatamá ngenga te?” Kasi, Samasona azongisaki boye: “Zwelá ngai ye mpo abongi na miso na ngai.”—Basambisi 14:3, NW.
Na ndenge nini mwana mwasi wana Mofilistia ‘abongaki’ na Samasona? Buku moko (Cyclopedia) ya McClintock ná Strong, emonisi ete ezali te ete azalaki “kitoko mingi, kasi abongaki na ye mpo na mokano moko.” Mpo na mokano nini? Basambisi 14:4 (NW) elobi ete Samasona “azalaki koluka libaku ya kobundisa Bafilistia.” Samasona asepelaki na mwasi yango mpo na mokano wana. Ntango Samasona akómaki mokóló, “[elimo ya Yehova] ebandaki kotinda ye,” to kopusa ye na kosala makambo. (Basambisi 13:25) Na bongo, ezali elimo ya Yehova nde etindaki Samasona asɛnga tata na ye abalela ye mwasi wana mpe asala makambo nyonso oyo asalaki lokola mosambisi na Yisalaele. Samasona azwaki nde libaku oyo azalaki koluka? Tótalela naino ndenge Yehova amonisaki ete azalaki na ye elongo.
Biblia elobi ete mokolo moko Samasona azalaki kokende na Timina, epai mwasi oyo alingaki kobala azalaki kofanda; ntango “akómaki na bilanga ya vinyo ya Timina, mpe talá, elenge na nkɔsi angalaki epai na ye. [Elimo ya Yehova] ekitelaki ye makasi, mpe ye apasolaki nkɔsi.” Ntango Samasona azwaki makasi wana ya kokamwa, azalaki kaka ye moko. Moto amonaki ye te. Yehova asalaki nde bongo mpo na kondimisa Samasona ete, lokola azali Monasili, akoki kokokisa mokumba oyo apesaki ye? Biblia elobi yango te, kasi ekoki mpenza kozala ete Samasona asosolaki ete makasi wana ya kokamwa eutaki epai mosusu. Eutaki epai ya Nzambe. Akokaki kotyela Yehova motema ete akosunga ye na mokumba oyo asengelaki kokokisa. Lokola Samasona alendisamaki na ndenge abomaki nkɔsi, “akitaki mpe asololaki na mwasi, mpe [abongaki kaka na miso na [ye], NW].”—Basambisi 14:5-7.
Na nsima, ntango Samasona azongaki mpo na kokamata mwasi na ye, “apɛngwaki mpo na kotala ebembe ya nkɔsi, mpe talá, libondo ya nzoi ezalaki na kati ya ebembe ya nkɔsi, mpe mafuta ya nzoi.” Samasona asalelaki likambo yango mpo na kopesa Bafilistia 30 oyo bazalaki baninga ya mobali na libala na ye sambole oyo: “Kolya ebimi na molei. Eloko ya elɛngi ebimi na oyo makasi.” Samasona alakaki bango ete soki balimboli sambole yango, akopesa bango bilamba ya nse 30 mpe bilamba ya fɛti 30. Soki bakoki kolimbola yango te, bango nde bakopesa ye biloko yango. Bafilistia babundanaki mikolo misato mobimba mpo na koluka ndimbola ya sambole yango. Na mokolo ya minei, basalelaki mayele mabe ya kobangisa mwasi na ye. Balobaki na ye boye: “[Bondelá] mobali na yo ete alobela biso ntina ya lisapo; [soki] boye te, tokotumba yo mpe ndako ya tata na yo na mɔtɔ.” Bazalaki mpenza motema mabe! Soki Bafilistia bakokaki kosala bandeko na bango ndenge wana, kanisá mpasi oyo bazalaki koyokisa Bayisalaele!—Basambisi 14:8-15.
Mwana mwasi yango abangaki mpe atyaki Samasona mbamba, mpe Samasona alimbwelaki ye sambole yango. Na nsima, akendaki mbangu koyebisa baninga ya mobali na libala na ye; yango emonisi ete azangaki bolingo mpe bosembo epai ya Samasona. Mibali yango balimbolaki sambole; kasi Samasona ayebaki ndenge bazwaki ndimbola yango. Alobaki na bango boye: “Soki bino botimolaki na ngɔmbɛ na ngai te, mbɛlɛ bozwaki ntina ya [sambole] na ngai te.” Samasona azwaki libaku oyo azalaki koluka. “[Elimo ya Yehova] ekwelaki ye na nguya mpe akitaki epai na Asekelone mpe abomaki mibali ntuku misato na mboka, mpe akamataki biloko na bango mpe apɛsaki bilamba ya [fɛti] na baoyo balimbolaki [sambole].”—Basambisi 14:18, 19.
Likambo oyo Samasona asalaki na Asekelone ezalaki nde mpo na kozongisa mabe oyo basalaki ye? Te. Ezali likambo oyo Nzambe asalaki na nzela ya mobikisi oyo aponaki. Yehova akómaki kosalela Samasona mpo na kobundisa bato oyo bazalaki konyokola libota na ye. Asukaki wana te. Samasona azwaki libaku mosusu ya kobundisa bango ntango akendaki kotala mwasi na ye.
Samasona abundi etumba ye moko
Ntango Samasona azongaki na Timina, akutaki ete tata ya mwasi na ye abalisi ye na mobali mosusu mpo tata yango akanisaki ete Samasona alingi ye lisusu te. Samasona asilikaki makasi. Akangaki mbulu 300 mpe akangisaki yango mibale mibale mpe atyaki mɔtɔ na mikila na bango. Ntango atikaki banyama yango, bakɔtaki na zamba mpe bazikisaki bilanga, banzete ya vinyo ná banzete ya olive, biloko ya kolya ya mbula wana mobimba. Bafilistia basilikaki makasi mpe basalaki likambo ya nsɔmɔ. Batumbaki mwasi ya Samasona ná tata ya mwasi yango mpamba te bamonaki ete bango nde basalaki likambo oyo etindaki Samasona atumba biloko wana. Likambo oyo basalaki epesaki Samasona nzela ya kokokisa mokano na ye. Abomaki ebele ya Bafilistia.—Basambisi 15:1-8.
Bayisalaele bamonaki nde ete Yehova Nzambe azali kosalela Samasona mpe bapesaki ye mabɔkɔ mpo Bafilistia bátika konyokola bango? Te. Kutu, mpo na koboya mindɔndɔ, mibali ya Yuda batindaki bato 3000 mpo na kokanga motambwisi oyo Nzambe aponaki mpe bapesaki ye na mabɔkɔ ya banguna. Nzokande, likambo mabe oyo Bayisalaele basalaki epesaki Samasona nzela ya koboma lisusu ebele ya banguna na ye. Ntango balingaki kopesa ye na mabɔkɔ ya Bafilistia, “[elimo ya Yehova ekitelaki] ye makasi mpe nkamba oyo na mabɔkɔ na ye ekómaki lokola tukia eziki na mɔtɔ, mpe nkamba na ye ekweaki na mabɔkɔ na ye.” Na bongo, akamataki mokuwa ya mbanga ya mpunda mpe abomaki na yango bato nkóto moko.—Basambisi 15:10-15.
Samasona abelelaki Yehova ete: “Opesi kobikisa monene oyo na lobɔkɔ na moombo na yo. Na bongo nakufa [sikoyo] na mposa ya mai mpe nakwea na mabɔkɔ ya bato ya esute?” Yehova ayokaki libondeli ya Samasona. “Nzambe apasolaki libulu . . . mpe mai ebimaki na yango. Ye amɛlaki mpe nguya na ye ezongaki mpe akembaki.”—Basambisi 15:18, 19.
Samasona atyaki makanisi nyonso na kokokisa mokano na ye ya kobundisa Bafilistia. Soki akɔtaki na ndako ya mwasi ya ndumba na Gaza ezalaki kaka mpo na kobundisa banguna ya Nzambe. Lokola Samasona azalaki na engumba ya banguna, azalaki na mposa ya esika ya kolala na butu mpe akokaki kozwa esika yango kaka na ndako ya mwasi ya ndumba. Samasona azalaki na makanisi ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndumba te. Abimaki na ndako ya mwasi yango na midi ya butu, alongolaki porte ya engumba ná makonzí na yango mpe akendaki na yango likoló ya ngomba moko pembeni ya Hebeloni, engumba oyo ekabwani na Gaza na ntaka ya kilomɛtrɛ 60. Asalaki nyonso wana na mokano ya Nzambe mpe na makasi oyo apesaki ye.—Basambisi 16:1-3.
Elimo santu esalaki ndenge mosusu mpenza epai ya Samasona mpo makambo ezalaki mpe ndenge mosusu. Lelo oyo, basaleli ya sembo ya Nzambe bakoki kozala na elikya ete elimo yango ekopesa mpe bango makasi. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete Yehova ‘akopesa elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.’—Luka 11:13.
Mpo na nini Yehova ‘atikaki Samasona’?
Na nsima, Samasona alingaki mwasi mosusu; nkombo na ye ezalaki Dalila. Bankumu mitano ya Bafilistia bazalaki na mposa ya koboma Samasona; yango wana basɛngaki mwasi yango asalisa bango. Basololaki na Dalila mpe balobaki na ye boye: “Kosá ye mpe talá soki ntina na nguya na ye ezali nini, mpe na mayele nini tókoka koleka ye.” Bankumu yango mitano balakaki mwasi wana ete mokomoko na bango akopesa ye “mbuma ya palata nkóto na mokama moko.”—Basambisi 16:4, 5.
Soki mbuma ya palata yango ezalaki basɛkɛlɛ, boye bapesaki ye sɛkɛlɛ 5 500, ezalaki mbongo mingi mpenza. Abalayama apesaki sɛkɛlɛ 400 mpo na kosomba esika oyo akundaki mwasi na ye, mpe bazalaki kotɛka moombo na sɛkɛlɛ 30. (Genese 23:14-20; Exode 21:32) Lokola bankumu yango, bakonzi ya bingumba mitano ya Bafilistia, balakaki kopesa Dalila mbongo, kasi basɛngaki ye te asalisa bango mpo abikisa ekólo na ye, ekoki kozala ete Dalila azalaki Moyisalaele. Ezala bongo to te, Dalila andimaki kosala likambo oyo basɛngaki ye.
Dalila atunaki Samasona ntina ya makasi na ye mbala misato mpe ntango azalaki koyebisa ye azalaki kotɛka ye epai ya banguna na ye; kasi, mbala nyonso Samasona azalaki kopesa ye eyano ya lokuta. Kasi, “wana etungisaki ye Samasona na maloba na ye mokolo na mokolo, mpe abondelaki ye makasi, motema na ye etungisamaki kino kufa.” Nsukansuka, Samasona ayebisaki ye ntina ya makasi na ye: bakatá ye naino nsuki te. Soki bakati yango, nzoto na ye ekolɛmba mpe akokóma lokola moto nyonso.—Basambisi 16:6-17.
Makambo nyonso ya Samasona ebebaki. Dalila alukaki mayele nyonso mpo azwa libaku ya kokata ye nsuki. Nzokande, makasi ya Samasona ezalaki mpenza na nsuki te. Nsuki na ye ezalaki kaka komonisa ete azali Monasili ya Nzambe. Ntango Samasona asalaki likambo oyo ebebisaki boyokani na ye ya Monasili ya Nzambe na ndenge bakataki ye nsuki, ‘Yehova atikaki ye.’ Bafilistia bakangaki Samasona, batɔbɔlaki ye miso, mpe batyaki ye na bolɔkɔ.—Basambisi 16:18-21.
Likambo yango epesi biso liteya monene! Tosengeli kotalelaka boyokani na biso na Yehova lokola eloko ya motuya mpenza. Soki tondimi likambo moko oyo ekobebisa komipesa na biso na Nzambe, tokoki mpenza kolikya apambola biso?
“Tiká nakufa esika moko na Bafilistia”
Bafilistia basepelaki mpe bapesaki Dagona, nzambe na bango matɔndi ndenge balongaki Samasona. Mpo na kosepela bolongi na bango, bamemaki mokangami na bango na tempelo ya Dagona. Kasi, Samasona ayebaki ntina oyo balongaki ye. Ayebaki ntina oyo Yehova atikaki ye, mpe Samasona asɛngaki bolimbisi mpo na libunga oyo asalaki. Ntango Samasona azalaki na bolɔkɔ, nsuki na ye ebandaki lisusu kokola. Lokola azalaki liboso ya ebele ya Bafilistia, alingaki kosala nini?
Samasona abondelaki boye: “Ee Nkolo [Yehova], nabondeli yo, kanisá ngai mpe lendisá ngai bobele mbala oyo, ee Nzambe, ete nabukanisa Bafilistia na ntina na [moko na, NW] miso na ngai mibale.” Na nsima, asimbaki makonzí ya katikati mpe “akumbamaki na nguya na ye nyonso.” Nini esalemaki? “Ndako ekweaki na likoló ya mikóló mpe na likoló ya bato nyonso bazalaki na kati na yango. Bongo bakufi oyo ebomaki ye na kufa na ye balekaki baoyo ebomaki ye na ntango ya bomoi na ye.”—Basambisi 16:22-30.
Samasona azalaki na makasi oyo moto mosusu te atikalá kozala na yango. Asalaki makambo ya kokamwa mpenza. Kasi, likambo eleki ntina ezali ete Liloba ya Yehova etángi Samasona na kati ya bato oyo bazalaki na kondima makasi.—Baebele 11:32-34.
[Elilingi na lokasa 26]
Makasi ya Samasona ezalaki kouta wapi?