“Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele”
“[Yehova] alingi nini epai na yo? . . . Bobele ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”—MIKA 6:8.
1, 2. Bopɔlɔ ezali nini, mpe ndenge nini ezaleli yango ekeseni na lolendo?
NTOMA moko oyo ayebani mingi aboyi kobenda likebi ya bato epai na ye. Mosambisi moko ya mpiko na Yisalaele alobi ete ye aleki moke na ndako ya tata na ye. Moto oyo alekaki bato nyonso andimi ete bokonzi na ye ezali na ndelo. Bato oyo nyonso bamonisi ezaleli oyo tobengi bopɔlɔ.
2 Kozala na bopɔlɔ elimboli kozala na lolendo te. Moto ya bopɔlɔ azalaka na bokatikati na ndenge ya kotalela makoki na ye mpe motuya na ye, mpe azalaka na lofundo te. Moto ya bopɔlɔ azalaka na lolendo te, atombolaka mapeka te, mpe awelaka lokumu te, kasi ayebaka ete azali mpe na bolɛmbu. Yango wana, akebaka ete azokisa bato mosusu te mpe andimaka makanisi na bango.
3. Na ndenge nini “bato ya bopɔlɔ” nde bazali na mayele?
3 Yango wana mpenza Biblia elobi ete: “Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele.” (Masese 11:2, NW) Moto ya bopɔlɔ azali na mayele mpamba te asalaka makambo oyo Nzambe asepelaka na yango mpe aboyaka kozala na lolendo mpamba te, lolendo ememaka nsɔni. (Masese 8:13; 1 Petelo 5:5) Na bomoi na bango, basaleli mingi ya Nzambe, bamonisaki ete moto ya bopɔlɔ azali mpenza na mayele. Sikoyo, tótalela ndakisa ya bato misato oyo tolobeli na paragrafe ya liboso.
Paulo: ‘Mosali’ mpe ‘mobateli’
4. Paulo azalaki na libaku malamu ya kokokisa mikumba nini?
4 Baklisto mingi ya liboso bayebaki Paulo, mpe toyebi ntina oyo ayebanaki mingi. Na mosala na ye ya kosakola, asalaki mibembo milai, ezala na mai to na mokili, mpe afungolaki masangá mingi. Lisusu, Yehova apesaki Paulo bimonaneli mpe likabo ya koloba na minɔkɔ ya bapaya. (1 Bakolinti 14:18; 2 Bakolinti 12:1-5) Mpe lisusu, Yehova apesaki Paulo elimo santu mpo na kokoma mikanda 14 oyo ezali lelo oyo na kati ya Makomami ya Greke ya boklisto. Tokoki mpenza koloba ete Paulo asalaki makambo mingi koleka bantoma mosusu nyonso.—1 Bakolinti 15:10.
5. Ndenge nini Paulo amonisi ete azalaki komitalela na bopɔlɔ?
5 Lokola Paulo azalaki liboso na kati ya mosala ya Nzambe, bato mosusu bakokaki kokanisa ete akosepela bápesaka ye lokumu to akolakisa bokonzi na ye. Kasi, Paulo asalaki bongo te mpamba te azalaki na bopɔlɔ. Alobaki ete azali “nsima ya bantoma nyonso.” Mpe abakisaki ete: “Nabongi kobyangama Ntoma te mpo ete nanyokolaki [lisangá, NW ] ya Nzambe.” (1 Bakolinti 15:9) Lokola Paulo azalaki liboso konyokola baklisto, ayebaki malamu ete ezali se na ngɔlu ya Nzambe nde akómaki moninga na ye mpe na koleka azwaki mikumba minene na mosala na ye. (Yoane 6:44; Baefese 2:8) Yango wana, Paulo azalaki kokanisa te ete lokola ye nde asalaki misala minene, alekaki bamosusu.—1 Bakolinti 9:16.
6. Ndenge nini Paulo amonisaki Bakolinti ete azalaki na bopɔlɔ?
6 Paulo amonisaki Bakolinti ete azali mpenza moto ya bopɔlɔ. Emonani ete bamosusu kati na bango bazalaki kokumisa bato oyo bango bazalaki komona ete bazali bakɛngɛli minene lokola Apolo, Kefa, na Paulo ye moko. (1 Bakolinti 1:11-15) Kasi Paulo alukaki te ete Bakolinti bákumisa ye mpe soki bakumisi ye, azalaki kovimba motó te. Soki akei epai na bango, azalaki komilakisa “na maloba ya kitoko mpe na mayele” te. Kasi mpo na ye moko mpe mpo na baninga na ye, Paulo alobaki ete: “Tiká ete moto atánga biso ete tozali basali ya Klisto mpe babateli ya makambo mabombami ya Nzambe.”a—1 Bakolinti 2:1-5; 4:1.
7. Ndenge nini Paulo amonisaki bopɔlɔ ata na ntango azalaki kopesa toli?
7 Paulo azalaki komonisa bopɔlɔ ata ntango azalaki kopamela to kopesa toli. Abondelaki baninga na ye baklisto “na mawa ya Nzambe” mpe “mpo na bolingo” kasi asalaki yango na makasi te atako azalaki ntoma. (Baloma 12:1, 2; Filemona 8, 9) Mpo na nini Paulo asalaki bongo? Mpamba te azalaki komimona ‘moninga ya mosala’ ya bandeko na ye, kasi lokola ‘nkolo ya kondima na bango’ te. (2 Bakolinti 1:24) Na ntembe te lokola Paulo azalaki moto ya bopɔlɔ, yango wana bandeko baklisto na masangá ya ekeke ya liboso balingaki ye mingi.—Misala 20:36-38.
Ata tozali na mikumba tózala na bopɔlɔ
8, 9. (a) Mpo na nini tosengeli komitalelaka na bopɔlɔ? (b) Ndenge nini bato oyo bazali na mikumba bakoki komonisa bopɔlɔ?
8 Paulo azali ndakisa malamu mpo na baklisto lelo oyo. Ata soki moto moko azali na mikumba soki ya ndenge nini, asengeli te kokanisa ete aleki bamosusu. Paulo akomaki ete: “Soko moto nani akanisi ete azali moto monene wana azali bongo te, azali komizimbisa.” (Bagalatia 6:3) Mpo na nini? Mpamba te “bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Biso nde totɛngisi makomi; Baloma 3:23; 5:12) Tosengeli kobosanaka te ete Adama atikelá biso nyonso lisumu na liwa. Kozala na mikumba minene elongolaka moto na masumu te. (Mosakoli 9:2) Ndenge ezalaki mpo na Paulo, soki bato bazali na boyokani na Nzambe ezali se mpo na ngɔlu na Ye, mpe na koleka soki bazali na mikumba na mosala na ye.—Baloma 3:12, 24.
9 Moto ya bopɔlɔ ayebaka likambo yango malamu, atombolaka mapeka te soki azali na mikumba mpe amikumisaka te mpo na makambo oyo azali kosala. (1 Bakolinti 4:7) Ntango azali kopesa toli to malako, alobaka lokola moninga ya mosala, kasi lokola mokonzi te. Ezali mpenza mabe soki moto moko oyo ayebi kosala makambo mosusu malamu, azali koluka ete baninga na ye bandimi bákumisaka ye to soki bakumisi ye, ye avimbi motó. (Masese 25:27; Matai 6:2-4) Lokumu moko oyo ebongi ezali kaka oyo euti na bato mosusu, mpe esengeli nde mitema na bango moko etinda bango na kosala yango. Soki bakumisi biso, yango esengeli kotinda biso te tókanisa ete tozali likoló.—Masese 27:2; Baloma 12:3.
10. Ndenge nini bato mosusu oyo bakoki komonana lokola bato mpamba bakoki kozala “bazwi kati na kondima”?
10 Soki tozwi mokumba moko boye, bopɔlɔ ekopekisa biso koluka kobenda likebi mingi likoló na biso moko, mpe tokoboya komonisa lokola nde soki lisangá ezali kokola ezali se mpo na milende mpe mayele na biso. Na ndakisa, ekoki kozala ete toteyaka malamu. (Baefese 4:11, 12) Kasi soki tozali na bopɔlɔ, tokondima ete makambo mosusu ya ntina oyo toyekolaka ntango tokei na makita eutaka na masolo oyo bandeko basalaka te. Tópesa ndakisa: ntango omonaka moboti moko oyo abɔkɔlaka bana na ye ye moko kasi, pɔsɔ na pɔsɔ, ayaka na makita na bana na ye na mabɔkɔ, yango elendisaka yo te? To ndeko moko azali konyokwama na makanisi kasi azangisaka makita te atako azali komiyoka lokola ete azali na ntina te, likambo yango elendisaka yo te? To mpe lisusu, olendisamaka te na komona elenge oyo azali kokola malamu na elimo atako azali kokutana na baninga oyo bakoki komema ye na banzela ya mabe na kelasi mpe na bisika mosusu oyo akendaka? (Nzembo 84:10) Ntango mosusu bato yango babendaka mpenza likebi ya bato mingi te. Ekoki kozala ete bato mosusu bayebaka te etumba nini bazali kobunda mpo bátikala sembo. Kasi, bakoki kozala “bazwi kati na kondima” lokola kaka bato oyo bayebani mingi. (Yakobo 2:5) Na yango, Yehova akondima moto soki azali sembo.—Matai 10:22; 1 Bakolinti 4:2.
Gideona ‘alekaki na moke’ na ndako ya tata na ye
11. Ndenge nini Gideona amonisaki ete azali na bopɔlɔ ntango asololaki na anzelu ya Nzambe?
11 Gideona, elenge mobali moko ya mpiko, moto ya libota ya Manase, azalaki na bomoi na eleko oyo Yisalaele ezalaki na kimya te. Bamidyani banyokolaki libota ya Nzambe mbula nsambo mobimba. Kasi, ntango ekokaki mpo Yehova abikisa bato na ye. Yango wana, anzelu moko abimelaki Gideona mpe alobaki na ye boye: “[Yehova] azali na yo elongo, yo moto ya nguya mpe ya molende.” Gideona azalaki na bopɔlɔ, maloba wana ya kokumisa, oyo akanisaki ata te, evimbisaki ye motó te. Kasi, alobaki na anzelu na limemya nyonso ete: “Talá, tata, soko [Yehova] azali na biso elongo mbɛ makambo oyo nyonso makweli biso mpo na nini?” Anzelu alimbolelaki Gideona makambo nyonso mpe alobaki na ye boye: “Bikisá Yisalaele na lobɔkɔ ya Midyani.” Gideona asalaki nini? Na esika awela mokumba yango lokola libaku ya kokóma elombe oyo ekólo mobimba bakokumisa, Gideona alobaki ete: “Ɛ Nkolo, nakoka kobikisa Yisalaele boni? Talá, libota na ngai ezali motau eleki nyonso na Manase mpe ngai naleki na moke kati na ndako ya tata na ngai.” Talá ndenge moto ya bopɔlɔ alobaka!—Basambisi 6:11-15.
12. Ndenge nini Gideona amonisaki ete amilakisaki te ntango azalaki kokokisa mokumba na ye?
12 Liboso atinda Gideona na etumba, Yehova amekaki ye naino. Asalaki ndenge nini? Bayebisaki Gideona abuka etumbelo oyo tata na ye azalaki kopesa Baala mbeka mpe akatakata likonzi ya bulɛɛ oyo ezalaki pembeni na yango. Esengelaki azala na mpiko mpo na kosala likambo wana, mpe Gideona asalaki yango na bopɔlɔ mpe aboyaki komilakisa. Na esika amilakisa na miso ya bato, Gideona asalaki yango na butu, na ngonga oyo bakokaki komona ye te. Lisusu, Gideona asalaki mosala oyo batindaki ye na ekɛngɛ. Akamataki basali zomi; ekoki kozala ete bamosusu bazalaki kokɛngɛla mpe bamosusu basalisaki ye na kobuka etumbelo na likonzi ya bulɛɛ.b Ata soki ezalaki ndenge nini, toyebi ete na lisalisi ya Yehova, Gideona asalaki mosala oyo bapesaki ye, mpe na nsima, Nzambe asalelaki ye mpo na kobikisa Yisalaele na mabɔkɔ ya Bamidyani.—Basambisi 6:25-27.
Tózala na bopɔlɔ mpe tómilakisaka te
13, 14. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na bopɔlɔ ntango tozwi mokumba moko na kati ya lisangá? (b) Na likambo nini Ndeko Alexander Macmillan apesaki ndakisa malamu ya moto ya bopɔlɔ?
13 Bopɔlɔ ya Gideona ekoki koteya biso makambo mingi. Na ndakisa, tosalaka nini ntango bapesi biso mokumba moko na lisangá? Tokanisaka liboso esika monene mpe lokumu oyo yango ekopesa biso? To tozalaka nde na bopɔlɔ mpe tobondelaka mpo na koyeba soki tokokoka mpenza kokokisa mokumba yango? Ndeko Alexander Macmillan apesaki ndakisa malamu na likambo yango. Ye asukisaki bomoi na ye awa na mabele na 1966. Mokolo moko, Charles Russell, prezida ya liboso ya la Société Watch Tower, atunaki Ndeko Macmillan soki nani, na makanisi na ye, akoki kotambwisa misala soki ye moko azali te. Na lisolo na bango, Ndeko Macmillan alobaki te ete ye nde abongi, atako ekokaki mpenza kozala malamu ete ye atambwisa misala yango. Na nsuka, Ndeko Russell ayebisaki Ndeko Macmillan akanisa naino soki ye akoki kondima mokumba yango. Nsima ya bambula mingi, Ndeko Macmillan akomaki ete, “Namonaki yango lokola ndɔtɔ. Nakanisaki likambo yango malamumalamu, nasalaki libondeli mpe na nsima nayebisaki ye ete nakosepela kosala nyonso oyo nakoki mpo na kopesa ye mabɔkɔ.”
14 Elekaki ntango molai te, Ndeko Russell akufaki, mpe la Société Watch Tower ezalaki lisusu na prezida te. Lokola Ndeko Macmillan azalaki kotambwisa misala na biro ntango Ndeko Russell akendaki mobembo na ye ya nsuka mpo na koteya, ndeko moko alobaki na ye boye: “Mac, namoni lokola yo nde okokóma prezida. Ntango Ndeko Russell akendaki mobembo yo moto otikalaki na esika na ye, mpe ayebisaki biso nyonso ete tósalaka nyonso oyo okoloba na biso. Kokende akendaki, akei mpe kokufa. Namoni lokola yo nde okozwa esika na ye.” Ndeko Macmillan apesaki ye eyano ete: “Ndeko, makanisi wana ezali malamu te. Oyo ezali mosala ya Nkolo, mpe Nkolo ye moko atyaka moto na moto na esika oyo ebongi na ye; mpe ngai nandimi te ete nabongi na esika yango.” Na nsima, Ndeko Macmillan apesaki nkombo ya moto mosusu mpo na mokumba ya prezida. Lokola Gideona, Ndeko Macmillan azalaki komimona moto monene te. Biso mpe ebongi tólanda makanisi wana.
15. Ndenge nini tokoki komonisa bososoli ntango tozali kosakola epai ya bato?
15 Biso mpe tosengeli kokokisa mikumba na biso na bopɔlɔ. Gideona azalaki komilakisa te mpe alukaki kotumola banguna na ye mpambampamba te. Biso mpe tólanda ndenge yango, na mosala na biso ya kosakola, tosengeli kozala na bopɔlɔ mpe tómilakisaka te ntango tozali kosolola na bato. Ya solo, tozali kobunda etumba ya elimo mpo na kokweisa “bisika bibatelami makasi” mpe “makanisi.” (2 Bakolinti 10:4, 5) Kasi, tosengeli kopesa bato kilo mpe tótika likambo nyonso oyo ekoki kosala ete nsango na biso ebɛtisa bango libaku. Tosengeli nde kondima ete bakoki kozala na makanisi na bango, tosengeli kolobelaka mingi makambo oyo biso na bango tondimaka, mpe kobenda likebi na bango na makambo malamu ya nsango na biso.—Misala 22:1-3; 1 Bakolinti 9:22; Emoniseli 21:4.
Yesu: Ndakisa ya bopɔlɔ oyo eleki bandakisa nyonso
16. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki komitalela na bopɔlɔ?
16 Yesu Klisto azalaki moto ya bopɔlɔ oyo apesaki ndakisa oyo eleki malamu.c Atako azalaki moninga mpenza ya Tata na ye, Yesu alobaki polele ete akoki kosala makambo mosusu te na ndenge na ye moko. (Yoane 1:14) Na ndakisa, ntango mama ya Yakobo na Yoane asɛngaki ete bana na ye mibale wana báfanda pembeni ya Yesu na bokonzi na ye, Yesu alobaki boye: “Kofanda na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe na lobɔkɔ na ngai ya mwasi ezali na ngai te mpo na kopesa yango.” (Matai 20:20-23) Mokolo mosusu, Yesu alobaki polele ete: “Ngai nakoki kosala mosala ngai moko te, . . . nakolukaka mokano na ngai moko te kasi mokano na ye oyo atindi ngai.”—Yoane 5:30; 14:28; Bafilipi 2:5, 6.
17. Ndenge nini Yesu amonisaki epai ya bato mosusu ete azalaki na bopɔlɔ?
17 Yesu alekaki bato ya kozanga kokoka na makambo nyonso, mpe Tata na ye Yehova apesaki ye bokonzi oyo eleki bokonzi nyonso. Atako bongo, Yesu azalaki na bopɔlɔ liboso ya bayekoli na ye. Azalaki komilakisa te ete azali na mayele mingi mpo na kokamwisa bango. Azalaki na boboto mpe azalaki na motema mawa, azalaki koyeba bamposa na bango. (Matai 15:32; 26:40, 41; Malako 6:31) Na bongo, atako Yesu azalaki moto ya kokoka, kasi alukaki te kosala makambo na ndenge ya kokoka. Ata mokolo moko te asɛngaki bayekoli na ye makambo oyo eleki bango to apesaki bango mikumba oyo bakokoka kokokisa yango te. (Yoane 16:12) Tokoki kokamwa te ete bato mingi bazalaki kobɔndisama ntango bazalaki na ye.—Matai 11:29.
Tólanda ndakisa ya bopɔlɔ ya Yesu
18, 19. (a) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bopɔlɔ ya Yesu na ndenge oyo tomitalelaka? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na ndenge oyo tosalelaka bato mosusu makambo?
18 Soki kutu moto oyo alekaki bato nyonso azalaki na bopɔlɔ, esengeli mpenza ete biso mpe tózalaka na bopɔlɔ. Mbala mingi, bato ya kozanga kokoka balingaka kondima te ete bokonzi na bango ezali na ndelo. Nzokande, baklisto balandaka ndakisa ya Yesu, basalaka makasi ete bázala bato ya bopɔlɔ. Batikaka te ete lolendo epekisa bango kotika mikumba epai ya bato oyo bakoki kokokisa yango malamu; bazalaka na lofundo te mpe bandimaka malako ya baoyo bazali na lotomo ya kopesa yango. Lokola bazali na elimo ya kosala na bomoko, basalaka nyonso ete makambo nyonso na kati ya lisangá esalema “na ndenge ebongi mpe na mobulu te.”—1 Bakolinti 14:40, NW.
19 Bopɔlɔ ekopekisa biso kosɛnga bamosusu básala makambo oyo eleki ndelo mpe ekotinda biso tóyeba komitya na esika na bango. (Bafilipi 4:5) Tokoki kozala na mayele mpe na makasi oyo bato mosusu bazali na yango te. Kasi, soki tozali bato ya bopɔlɔ, tokoluka te ete bato mosusu básala kaka ndenge oyo biso tolingi. Lokola toyebi ete moto na moto azali na bolɛmbu na ye, na bopɔlɔ nyonso tokoboya kolandelaka mwa mabunga ya bandeko na biso. Petelo akomaki ete: “Liboso ya makambo nyonso bólingana makasi, mpo ete bolingo ekozipaka ebele ya masumu.”—1 Petelo 4:8.
20. Tokosala nini mpo tókóma bato ya bopɔlɔ?
20 Lokola toyekoli yango, bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele. Kasi, okosala nini soki omoni ete ozali mpenza na bopɔlɔ te to ozali na lolendo? Kolɛmba nzoto te. Landá ndakisa ya Davidi, ye asalaki libondeli oyo: “Batela mosaleli wa yo akoma na lolendo te, lolendo lobebisa motema mwa ye te!” (Nzembo 19:14, Liloba lya Nzambe) Soki tolandi kondima ya bato lokola Paulo, Gideona, mpe mingimingi Yesu Klisto, tokomona ete maloba oyo ezali solo ete: “Bato ya bopɔlɔ nde bazali na mayele.”—Masese 11:2, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba ya Greke oyo ebongolami na “basali” ekoki kolimbola moombo oyo azalaki kofanda na nsima mpenza mpo na kolúka bwato moko ya monene na nkai. Nzokande, bazalaki kopesa “babateli” mikumba mingi, lokola kobatela biloko. Atako bongo, mpo na bankolo mingi, mobateli azalaki kaka moto ya mosala lokola moombo oyo azalaki kolúka na bwato.
b Tokoki koloba te ete lokola Gideona amilakisaki te mpe azalaki na ekɛngɛ, elingi koloba ete azalaki moto ya bibangabanga. Kutu, Baebele 11:32-38 emonisi mpenza ete azalaki na mpiko, mpamba te na vɛrsɛ yango batángi Gideona na kati ya bato oyo “bakembisami” mpe “bazwi makasi kati na etumba.”
c Lokola moto ya bopɔlɔ azali mpe moto oyo andimaka bolɛmbu na ye, tokoki koloba te ete Yehova azali na bopɔlɔ. Tokoloba nde ete azali na komikitisa.—Nzembo 18:35.
Ozali koyeba lisusu?
• Bopɔlɔ ezali nini?
• Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bopɔlɔ ya Paulo?
• Ndakisa ya Gideona ekoki koteya biso nini na likambo ya bopɔlɔ?
• Ndenge nini Yesu apesaki ndakisa ya bopɔlɔ oyo eleki bandakisa nyonso?
[Elilingi na lokasa 15]
Bandeko baklisto balingaki Paulo mingi mpo azalaki moto ya bopɔlɔ
[Elilingi na lokasa 17]
Gideona amilakisaki te ntango azalaki kokokisa mokano ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 18]
Yesu, Mwana ya Nzambe, azalaki na bopɔlɔ na makambo nyonso