Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Luta
EZALI lisolo moko kitoko oyo elobeli bosembo na kati ya basi mibale. Elobeli bolingo mpo na Yehova mpe kotyela ebongiseli na ye motema. Emonisi ndenge Yehova atyaki likebi epai ya libota oyo Masiya asengelaki kobotama. Elobeli makambo ya mawa mpe ya esengo oyo libota moko ekutanaki na yango. Mokanda ya Luta elobeli makambo wana mpe makambo mosusu.
Mokanda ya Luta elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula soki 11 ‘na mikolo oyo Basambisi bazalaki kosambisa’ Yisalaele. (Luta 1:1) Ekoki mpenza kozala ete makambo yango esalemaki na ebandeli ya eleko ya basambisi, mpamba te Boaze, nkolo mabelé, moko ya bato oyo mokanda ya Luta elobeli, azali mwana ya Laaba oyo azalaki na bomoi na mikolo ya Yosua. (Yosua 2:1, 2; Luta 2:1; Matai 1:5) Ekoki kozala ete mosakoli Samwele nde akomaki mokanda ya Luta na mobu 1090 Liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na Biblia mobimba, kaka mokanda ya Luta nde elobeli nkombo ya mwasi oyo azali Moyisalaele te. Nsango oyo ezali na mokanda yango “ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”—Baebele 4:12.
“ESIKA EKOKENDA YO, NGAI MPE NAKOKENDA KUNA”
Ntango Naomi mpe Luta bakómaki na Beteleme, bato nyonso babandaki kotalatala bango. Ntango basi ya mboka bazalaki kotala oyo ya mokóló, bazalaki kotuna ete: “Oyo azali Naomi?” Mpe Naomi azalaki koloba na bango boye: “Biangá ngai Naomi te. Biangá ngai Mala, mpo ete [Mozwi-na-nguya-nyonso, NW] asaleli ngai makambo na bololo mingi. Nakendaki na ngai na mabɔkɔ matondi mpe [Yehova] azongisi ngai na mabɔkɔ mpamba.”—Luta 1:19-21.
Ntango nzala ekɔtaki na Yisalaele, Naomi ná libota na ye balongwaki na Beteleme mpe bakendaki na Moaba; Naomi azalaki “mabɔkɔ matondi” mpamba te azalaki na mobali mpe na bana mibale ya mibali. Mwa moke nsima ya kofanda na Moaba, Elimeleke mobali na ye akufaki. Na nsima, bana na ye babalaki Olepa ná Luta, basi ya Moaba. Mbula soki zomi na nsima, bana yango mpe bakufaki kozanga kobota mpe batikaki basi yango misato bango moko, mwana te mobali te. Ntango Naomi, bokilo na bango, azwaki mokano ya kozonga na Yuda, Luta ná Olepa balandaki ye. Na nzela, Naomi asɛngaki babokilo na ye bázonga na mboka na bango mpe bábala mibali mosusu kuna. Olepa andimaki kozonga. Kasi, Luta atingamaki na Naomi mpe alobaki boye: “Esika ekokenda yo, ngai mpe nakokenda kuna mpe esika ekolala yo, ngai mpe nakolala wana. Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.”—Luta 1:16.
Naomi ná Luta bakómaki na beteleme na eleko ya kobuka orje. Ndenge mobeko esɛngaki, Luta akendaki kolɔkɔta orje na elanga ya Boaze, mobange moko moyuda, ndeko ya Elimeleke. Boaze andimaki ete Luta alɔkɔta orje “kino nsuka na ntango na kobuka loso mpe masango” elekaki.—Luta 2:23.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:8—Mpo na nini Naomi alobaki na babokilo na ye bázonga “moto na moto na ndako ya mama na ye” na esika ya koloba na bango bázonga na ndako ya tata na bango? Biblia elobi te soki tata ya Olepa azalaki na bomoi na ntango wana. Nzokande, tata ya Luta azalaki na bomoi. (Luta 2:11) Kasi, soki Naomi alobelaki ndako ya mama, ekoki kozala akanisaki ete soki babokilo na ye bayoki nkombo ya bamama na bango, bakoki kokanisa bolingo ya bamama na bango. Yango ekokaki mpenza kokitisa bango motema ndenge bazalaki kotika bokilo na bango oyo balingaki mingi. Ekoki mpe kozala ete Naomi alobaki bongo mpo amonisa Luta ná Olepa ete bamama na bango bazali na bandako ya malamu koleka ye.
1:13, 21—Yehova akómisaki Naomi mawamawa mpe apesaki ye bolɔzi? Te, Naomi mpe apesaki Nzambe foti te. Nzokande ntango akanisaki makambo nyonso oyo ekómelaki ye, amonaki nde lokola Nzambe aboyi ye. Amitungisaki mingi. Lisusu, na ntango wana bazalaki kotalela bana lokola lipamboli ya Nzambe kasi kozanga kobota lokola elakeli mabe. Naomi azalaki mpenza na ntina ya kokanisa ete Nzambe asambwisi ye mpo azangaki bankɔkɔ mpe bana na ye bakufaki.
2:12—“Libonza mobimba” nini Yehova apesaki Luta? Luta abotaki mwana mobali mpe azwaki libaku kitoko ya kokɔta na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Klisto.—Luta 4:13-17; Matai 1:5, 16.
Mateya mpo na biso:
1:8; 2:20. Atako Naomi akutanaki na makambo ya mpasi ndenge wana, akobaki kotyela motema-boboto ya Yehova elikya. Biso mpe tosengeli kosala bongo, mingimingi ntango tokutani na mikakatano ya makasi.
1:9. Ndako esengeli te kozala kaka esika oyo libota bakutanaka mpo na kolya mpe kolala. Esengeli kozala esika ya kopema mpe ya kobɔndisana.
1:14-16. Olepa ‘azongaki epai ya bato na ye mpe banzambe na ye.’ Luta asalaki bongo te. Atikaki bozwi mpe bomoi ya malamu na mboka na ye mpe atikalaki sembo epai ya Yehova. Soki tozali kolinga Nzambe solosolo mpe tozali komonisa elimo ya komipimela, yango ekosalisa biso toluka te kaka bolamu na biso moko mpe ‘tokozonga nsima mpo na libebi’ te.—Baebele 10:39.
2:2. Luta abukaki orje mpo mobeko epesaki nzela ete bapaya ná babola basalaka bongo. Azalaki mpenza moto ya komikitisa. Moklisto oyo azali na bosɛnga asengeli komikitisa mpe kondima lisalisi oyo bandeko to Leta bakoki kopesa ye.
2:7. Atako Luta azalaki na lotomo ya kobuka orje, asɛngaki naino nzela liboso asala yango. (Levitike 19:9, 10) Amonisaki mpenza ezaleli ya komikitisa. Tosengeli ‘koluka komikitisa,’ mpamba te “bato ya [komikitisa] bakosangola mokili mpe bakosepela na kimya ya solo.”—Sefania 2:3; Nzembo 37:11.
2:11. Longola kozala bokilo ya Naomi, Luta azalaki mpenza moninga na ye ya motema. (Masese 17:17) Balinganaki makasi mpamba te bazalaki komoniselana bizaleli lokola bolingo, bosembo, boboto mpe elimo ya komipimela. Likambo eleki ntina, bango nyonso bazalaki na mposa makasi ya kosalela Yehova mpe ya kozala na kati ya basaleli na ye. Biso mpe tozali na mabaku malamu ya koluka baninga ya solosolo kati na basaleli ya Yehova.
2:15-17. Ata ntango Boaze ayebisaki Luta ete asalaka lisusu mokolo mobimba te, ‘akobaki kolokɔta na elanga kino mpokwa.’ Luta azalaki makasi na mosala. Moklisto asengeli koyebana lokola moto oyo asalaka mingi.
2:19-22. Naomi ná Luta bazalaki kosolola mpokwa nyonso; Naomi azalaki kotuna Luta ndenge mosala na ye ya kobuka orje ezalaki koleka, mpe bango nyonso mibale bazalaki koyebisana makambo nyonso polelepolele. Esengeli mpe kozala bongo na mabota ya baklisto!
2:22, 23. Na esika ya kosala lokola Dina mwana ya Yakobo, Luta alukaki nde kozala moninga ya basambeli ya Yehova. Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso!—Genese 34:1, 2; 1 Bakolinti 15:33.
NAOMI AKÓMI “MABƆKƆ MATONDI”
Lokola Naomi akómaki mobange, akokaki lisusu kobota te. Yango wana asɛngaki Luta abala ndeko ya mobali na ye, elingi koloba bokilo na ye. Luta andimaki, mpe asɛngaki Boaze azala mosikoli. Boaze aboyaki te. Kasi, ndeko mpenzampenza oyo asengelaki kobala ye azalaki.
Boaze asilisaki likambo yango nokinoki. Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo elandaki, asangisaki mikóló zomi ya Beteleme liboso ya ndeko na ye mpe atunaki ye soki alingi kokóma mosikoli. Ndeko yango aboyaki. Na yango, Boaze akómaki mosikoli mpe abalaki Luta. Babotaki Obede, nkɔkɔ ya mokonzi Davidi. Basi ya Beteleme balobaki na Naomi ete: “[Yehova] asanzolama. . . Ye akozala mobɔndisi na molimo na yo mpe mobateli mpo na konuna na yo mpo ete mwasi ya mwana na yo, oyo alingi yo, oyo aleki bana mibali nsambo na malamu mpo na yo, aboti ye.” (Luta 4:14, 15) Mwasi oyo azongaki “mabɔkɔ mpamba” na Beteleme akómi lisusu “mabɔkɔ matondi”!—Luta 1:21.
Biyano na mituna ya Biblia:
3:11—Nini esalaki ete Luta ayebana lokola “mwasi malamu”? Ezali te “kokanga nsuki” to “kolata biloko kitoko ya wolo to kolata bilamba ya likoló” nde esalaki ete bato basepela na Luta. Kasi, ezalaki nde “bomoto ebombaná ya motema” elingi koloba bosembo na ye mpe bolingo, komikitisa, molende na mosala mpe elimo ya komipimela. Mwasi nyonso abangaka Nzambe oyo alingi kozala lokola Luta, asengeli komonisa bizaleli malamu wana.—1 Petelo 3:3, 4; Masese 31:28-31.
3:14—Mpo na nini Luta ná Boaze balamukaki liboso ntɔngɔ etana? Ezali te mpo basalaki likambo moko ya mabe na butu mpe balingaki eyebana te. Emonani ete Luta asalaki kaka likambo oyo basi oyo balingaki kobala mibali ya bandeko bazalaki na momeseno ya kosala. Asalaki kaka oyo Naomi ayebisaki ye. Lisusu, maloba ya Boaze emonisi polele ete amonaki mabe te na likambo oyo Luta asalaki. (Luta 3:2-13) Na ntembe te, Luta ná Boaze balamukaki na ntɔngɔngɔ, mpo bato bápanza bango nsango ya lokuta te.
3:15—Bipimeli motoba ya orje oyo Boaze apesaki Luta elimbolaki nini? Ekokaki kolimbola ete lokola bazalaki kopema mokolo ya nsambo nsima ya mikolo motoba ya mosala, mokolo ya Luta ya kopema ekómaki pene. Boaze asengelaki kosala nyonso mpo Luta azwa “esika ya kopema” na ndako ya mobali na ye. (Luta 1:9; 3:1) Ekoki mpe kozala ete bipimeli motoba ya orje ezalaki mpenza kilo oyo Luta akokaki komema na motó.
3:16—Mpo na nini Naomi atunaki Luta : “[Yo nani, NW], mwana na ngai?” Ayebaki nde bokilo na ye lisusu te? Ekoki kozala bongo, mpamba te ntango Luta azongaki epai ya Naomi, molili ezalaki naino. Motuna yango ekoki mpe kolimbola ete Naomi azalaki koluka koyeba soki makambo elekaki ndenge nini kati na Luta ná Boaze.
4:6—Ndenge nini mosikoli akokaki ‘kobebisa’ libula na ye na ntango azali kosikola? Ya liboso, soki moto moko akómi mobola mpe atɛki mabelé na ye, mosikoli akokaki kosomba yango na motuya oyo bakotya na kotalela bambula oyo etikali mpo Yubile ekoka. (Levitike 25:25-27) Soki asali bongo, bozwi na ye ekoki kokita. Lisusu, soki Luta aboti mwana ya mobali, mwana yango nde akozwa libula ya mabelé kasi te bandeko mosusu ya mosikoli.
Mateya mpo na biso:
3:12; 4:1-6. Boaze atosaki mpenza ebongiseli wana ya Yehova. Biso mpe totosaka ebongiseli ya Teokrasi?—1 Bakolinti 14:40.
3:18. Naomi atyelaki Boaze motema. Biso mpe tosengeli kotyelaka bandeko ya elimo motema. Luta andimaki kobala moto oyo ye ayebaki te; moto oyo Biblia elobeli kaka lokola mosikoli. (Luta 4:1) Mpo na nini? Mpamba te atyelaki ebongiseli ya Yehova motema. Biso mpe totyelaka ebongiseli ya Yehova motema? Na ndakisa, ntango tozali koluka molongani, tolandaka toli oyo esɛngi ete tóbala “na kati ya nkolo kaka”?—1 Bakolinti 7:39.
4:13-16. Oyo nde libaku kitoko oyo Luta azwaki atako azalaki Momoaba mpe mosambeli ya nzambe Kemosi! Likambo yango endimisi liteya ya Biblia oyo elobaka ete “ezali kotalela, moto oyo alingi to moto oyo azali kopota mbangu te, kasi nde Nzambe, oyo azali na motema mawa.”—Baloma 9:16.
Nzambe “akotombola bino na ntango ekoki”
Mokanda ya Luta elobeli Yehova lokola Nzambe ya motema-boboto, oyo abikisaka basaleli na ye ya sembo. (2 Ntango 16:9) Soki tokanisi ndenge Yehova apambolaki Luta, tokomona ntina ya kotyela ye motema na kondima nyonso “ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”—Baebele 11:6.
Luta, Naomi, mpe Boaze batyelaki ebongiseli ya Yehova motema mobimba mpe Yehova apambolaki bango. Ndenge moko mpe, “Nzambe asalaka ete misala na ye nyonso epesana mabɔkɔ mpo na bolamu ya baoyo balingaka Nzambe, baoyo bazali bato babengami engebene mokano na ye.” (Baloma 8:28) Tiká tosalela toli ya ntoma Petelo oyo: “Na yango bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango ekoki; wana bozali kobwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka bino likebi.”—1 Petelo 5:6, 7.
[Elilingi na lokasa 26]
Oyebi mpo na nini Luta aboyaki kotika Naomi?
[Elilingi na lokasa 27]
Nini esalaki ete Luta ayebana lokola “mwasi malamu”?
[Elilingi na lokasa 28]
“Libonza mobimba” nini Yehova apesaki Luta?