Bakufi bakoki kosalisa bato ya bomoi?
TAMBA, elenge mobali moko na Afrika ya Wɛsti, azalaki komilɛngɛla mpo na kosala ekzamɛ na kelasi.a Mama na ye azalaki ntango nyonso koyebisa ye aluka lisalisi ya bato ya libota oyo bakufá mpo alonga na ekzamɛ. Na engumba Palerme, na Sicile, baturiste bayaka kotala ba-catacombe (malita oyo batongá na nse ya mabele), epai bankama ya bibembe oyo ebatelami malamu etandami. Bato mosusu bakanisaka ete bibembe wana epesaka bato ya bomoi libateli oyo euti na Nzambe. Mbula na mbula, bato bakendaka na Lily Dale, mwa engumba moko na wɛsti ya etúká ya New York, na États-Unis, engumba oyo ekendá nsango mpo na ebele ya banganga-nkisi oyo bazalaka kuna. Bato bakendaka kuna na elikya ete bakoki kosolola na bandeko mpe baninga na bango oyo bakufá mpe kozwa lisalisi na bango.
Na mokili mobimba, bato bazali kaka kondima ete bakufi bakoki kosalisa bato ya bomoi. Yo okanisi nini? Mbala mosusu bateyá yo ndenge wana, to ofandi esika moko na bato oyo bakangamá na likanisi yango. Ezali mabe te kozala na mposa ya bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. Bato oyo basololaka na bilimo balobaka ete bakoki kosalisa bato bákokisa mposa yango. Zulunalo moko (Time) ekomaki ete nganga-nkisi moko alobaki ete bilimo “bazalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa moto oyo asɛngi lisalisi.” Ezali solo? Bakufi bakoki mpenza kosalisa bato ya bomoi? Eyano ya polele oyo Biblia epesi ekoki kokamwisa yo.
Bakufi bazali na bomoi esika moko boye?
Biblia eyebisi na maloba ya pɛtɛɛ, oyo ezali mpasi te kokanga ntina, ndenge bakufi bazali. Talá oyo Mosakoli 9:5 elobi: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.” Bato oyo bakufá bazalaka mpenza na mayoki? Vɛrsɛ 6 eyanoli boye: “Bolingo na bango ná koyina na bango ná zuwa na bango esili, mpe bazali na likabo ata moko lisusu te mpo na ntango oyo etyami ndelo te na eloko nyonso oyo ekosalema na nse ya moi.” Vɛrsɛ 10 ya mokapo yango ebakisi ete “mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda, esika ozali kokende.” Liloba Nkunda ebongoli liloba ya Ebre “Sheol” oyo elimboli “esika bato nyonso bakendaka soki bakufi.” Kutu, liloba ya Grɛki oyo ekokani na yango, “Hades,” esalelami na Makomami mpo na komonisa epai Yesu Kristo akendaki mpo na mwa ntango nsima ya liwa na ye.—Misala 2:31.
Yesu asalisaki bato mingi ntango azalaki na bomoi, kasi ayebaki ete akokufa. Azalaki nde kokanisa ete akozala kaka na likoki ya kosalisa bato ntango akozala na lilita? Te. Liwa na ye oyo ekómaki pene, Yesu akokanisaki yango na butu, ntango oyo mosala moko te ekoki kosalema. (Yoane 9:4) Yesu ayebaki malamu ete ntango bato bazali lisusu na bomoi te, “bazangi makasi na kati ya liwa.”—Yisaya 26:14.
Yesu asalelaki mpe ndakisa mosusu oyo emonisaki likanisi yango na ntina etali liwa. Ntango moninga na ye Lazare akufaki, Yesu akokanisaki liwa na mpɔngi. (Yoane 11:11-13) Tozelaka te ete moto oyo alali asalisa biso, boye te? Moto oyo alali ayebaka eloko te, akoki kosala eloko te mpo na kosalisa moto mosusu.
Molimo etikalaka na bomoi nsima ya liwa?
Bato mingi bateyamá ete molimo ezali eloko moko oyo emonanaka te, oyo etikalaka na bomoi nsima ya liwa. Biblia eteyaka bongo te. Ebandeli, mokanda ya liboso ya Biblia, eyebisi biso soki molimo ezali nini. Ebandeli 2:7 elobi ete ntango moto ya liboso akelamaki, “akómaki molimo ya bomoi.” Moto na mobimba na ye azali molimo; banyama mpe bazali milimo. (Ebandeli 1:20-25) Na yango, ntango moto to nyama akufi, molimo ekufi. Biblia endimi likanisi yango.—Ezekiele 18:4.
Kasi, bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Bongo ebele ya masolo ya bato oyo balobaka ete basololaki na bato oyo bakufá, bayokaki mingongo na bango, to kutu bamonaki bango?’ Masolo ya ndenge wana ezalaka na bisika mingi na mokili. Masolo yango epesaka bato oyo bandeko to baninga na bango bakufi elikya, etindaka bato mingi báluka kokutana na nganga-nkisi oyo alobaka ete akoki kosalisa bango básolola na bakufi.
Masolo ya ndenge wana ezali solo? Soki ezali solo, ekeseni te na maloba ya Biblia oyo touti kotánga? Kristo Yesu alobaki ete Liloba ya Nzambe ezali solo. (Yoane 17:17) Solo ezalaka bongolabongola te. Kutu, Biblia elobi polele ndenge oyo tosengeli kotalela makanisi ya bato oyo balobaka ete bakufi bakoki kosalisa bato ya bomoi. Biblia elobeli moto moko oyo alukaki kozwa lisalisi ya bakufi. Soki totángi lisolo yango malamu, tokomona solo.
Mokonzi moko asɛngi lisalisi ya bakufi
Ezalaki na esika ya etumba na nɔrdi ya Yisraele. Limpinga monene ya Bafilistia eyaki kobundisa Mokonzi Saulo ná basoda na ye. Ntango Saulo amonaki kaa ya Bafilistia, “motema na ye elɛngaki makasi.” Na ntango wana, Mokonzi Saulo atikaki losambo ya solo. Na yango, Yehova azalaki lisusu koyanola mabondeli na ye te. Epai wapi Saulo alingaki kokende koluka lisalisi? Samwele, mosakoli ya Nzambe asilaki kokufa.—1 Samwele 28:3, 5, 6.
Saulo akendaki koluka lisalisi epai ya mwasi moko oyo azalaki nganga-nkisi na Ene-dore. Asɛngaki nganga-nkisi yango ‘abimisa Samwele’ na bakufi. Mwasi yango asɛngaki Samwele abima. “Samwele” yango ayebisaki Saulo ete Bafilistia bakolonga mpe ete Saulo ná bana na ye ya mibali bakokufa na etumba. (1 Samwele 28:7-19) Ezali mpenza Samwele nde abimaki na bakufi?
Kanisá naino. Biblia elobi ete soki moto akufi, “akozonga na mabele” mpe ete “makanisi na ye ekufi.” (Nzembo 146:4) Saulo ná Samwele bayebaki ete Nzambe apekisaki likambo ya kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo. Kutu, mwa moke liboso, Saulo alongolaki misala ya bilimo mabe na mokili na bango!—Balevi 19:31.
Kanisá likambo yango. Soki Samwele moto ya sembo, akobaki kozala na bomoi lokola elimo, alingaki kobuka mobeko ya Nzambe mpe koyokana na nganga-nkisi mpo na kokutana na Saulo? Yehova aboyaki koloba na Saulo. Na yango, nganga-nkisi akokaki nde kotinda Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso asolola ná Saulo na nzela ya Samwele oyo akufaki? Te. Ezali polele ete “Samwele” wana ezalaki te mosakoli ya sembo ya Nzambe oyo ayaki na lolenge moko boye. Ezalaki nde elimo moko ya mabe—demo moko oyo akosaki ete azali Samwele oyo akufá.
Bademo bazali baanzelu oyo batombokelaki bokonzi ya Nzambe na ebandeli ya mokili. (Ebandeli 6:1-4; Yuda 6) Bademo yango bakoki kotalatala bato ntango bazali na bomoi; bayebi ndenge moto na moto azalaki koloba, ndenge elongi na ye ezalaki, mpe ndenge azalaki kosala makambo. Bazalaka na mposa makasi ya kondimisa bato ete makambo oyo Biblia elobi ezali lokuta. Ezali likambo ya kokamwa te soki Biblia epekisi kozala na boyokani na bilimo ya ndenge wana! (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Bilimo mabe yango bazali kosala tii lelo.
Sikoyo tokoki komona ntina oyo bato mosusu balobaka ete “bayokaki” to “bamonaki” bandeko na bango oyo bakufá. Atako ntango mosusu bimonaneli ya ndenge wana ekoki komonana ete ezali malamu, bilimo mabe bazalaka na mokano ya kobungisa bato nzela.b (Baefese 6:12) Kanisá mpe likambo oyo: Yehova azali Nzambe ya bolingo oyo amibanzabanzaka mpo na biso. Soki bakufi bazalaka na bomoi na esika moko boye mpe bakoki kosalisa baninga mpe bandeko na bango, Mozalisi na biso ya bolingo alingaki kopekisa biso kosolola na bango mpe kobenga yango ‘eloko oyo eyinamá’? Soki moke te. (1 Petro 5:7) Na yango, ezali na esika oyo tokoki kozwa lisalisi ya solosolo?
Lisalisi ya solosolo mpo na bato ya bomoi mpe bakufi
Makambo oyo tolobeli esalisi biso tóyeba ete bakufi bazali na nguya te ya kosalisa bato ya bomoi. Longola yango, koluka lisalisi ya bakufi ezali kaka mabe te, kasi ezali mpe na ntina te; ezali likama monene, mpo ezali kobuka mobeko ya Nzambe mpe ekoki kokɔtisa moto na boyokani na bademo.
Biblia emonisi biso epai tokoki kozwa lisalisi oyo eleki malamu, epai ya Mozalisi na biso Yehova. Akoki kobikisa biso ata na liwa. (Nzembo 33:19, 20) Lelo oyo, azali mosika te mpo na kosalisa biso. Na yango, apesi elikya ya solosolo, oyo ekeseni na bilikya ya lokuta oyo banganga-nkisi bapesaka.
Tamba, oyo tolobelaki na ebandeli, amonaki mpenza bokeseni kati na bilikya ya lokuta oyo banganga-nkisi bapesaka mpe solo oyo Yehova azali koteya biso. Banganga-nkisi balobaki ete soki aboyi kopesa mbeka na bankɔkɔ oyo bakufá, akozwa na ekzamɛ te. Tamba abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Ayebaki ndenge bakufi bazalaka mpenza mpe ayekolaki ete bilimo mabe nde bamimonisaka lokola bankɔkɔ oyo bakufá. Atako mama na ye azalaki kotya ye mbamba ete akende koluka lisalisi ya nganga-nkisi, Tamba aboyaki; ayebisaki ye ete, “Soki nazwi te, nakosala makasi na mbula ekoya.”
Nini esalemaki na nsima? Abimaki moto ya liboso na ekzamɛ! Mama na ye akamwaki; azalaki lisusu kondimela banganga-nkisi te, mpe alobelaki likambo ya kopesa bambeka ya ndenge wana ata mokolo moko lisusu te. Tamba ayekolaki ete Yehova ayebisi biso tókeba na “kotunela bato ya bomoi makambo epai na bakufi.” (Yisaya 8:19) Boyekoli ya Biblia endimisaki Tamba ete soki azali kosepela na mobeko ya Nzambe, akolonga.—Nzembo 1:1-3.
Ezali boni mpo na bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá? Elikya ezali te mpo na bango? Longola kosalisa biso bato ya bomoi, Yehova alaki kosalisa baoyo bazali na malita. Nsima ya komonisa ete bato oyo bakufá bazangi makasi, talá oyo mosakoli Yisaya ayebisi na mokapo 26, vɛrsɛ 19: “Bakufi na yo bakobika. . . . Bólamuka mpe bóganga na esengo, bino baoyo bofandi na putulu!” Esakweli yango ebakisi ete “baoyo bazangi makasi kati na liwa” bakozonga na bomoi.
Kanisá naino! Bamilio ya bato oyo bazali kolala mpɔngi na kati ya malita bakozonga na bomoi! Kutu, Biblia emonisi ete Yehova azali na “mposa makasi” ya kozongisa bakufi na bomoi. (Yobo 14:14, 15) Okanisi ete bilaka kitoko ya ndenge wana ekoki kozala solo te? Yesu Kristo azalaki mpenza kondima elikya wana, yango wana alobaki ete na miso ya Yehova, bakufi bazali na bomoi.—Luka 20:37, 38.
Okosepela kokóma na elikya yango?c Kobá kozwa boyebi ya sikisiki oyo ezali na Biblia. Wana ozali koyekola, okondima mpenza ete Yehova akoki kosalisa bato ya bomoi mpe bakufi mpe ete bilaka na ye ezali “sembo mpe solo.”—Emoniseli 21:4, 5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali nkombo topesi ye kopesa.
b Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mwa buku Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na elikya ya lisekwa oyo Biblia epesi, talá mokapo 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Ezali mabe te kozala na mposa ya bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá
[Elilingi na lokasa 20]
Mosakoli Samwele abimaki mpenza kati na bakufi mpe asololaki na Mokonzi Saulo?