Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya liboso ya Samwele
TOZALI na mobu 1117 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Eleki mbula soki nkama misato banda Yosua asilisaki kozwa Mokili ya Ndaka mobimba. Mikóló ya Yisalaele bayei kosɛnga mosakoli ya Yehova likambo moko ya kokamwa. Mosakoli ayebisi Yehova likambo yango na libondeli, mpe Yehova andimi kokokisa mposa na bango. Yango ezali nsuka ya eleko ya Basambisi mpe ebandeli ya eleko ya bakonzi na Yisalaele. Mokanda ya Liboso ya Samwele ezali kolobela makambo oyo esalemaki ntango mbongwana wana esalemaki na ekólo ya Yisalaele.
Mokanda ya Liboso ya Samwele ekomamaki na Samwele, Natana, ná Gada; elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula 102, banda na mobu 1180 tii 1078 L.T.B. (1 Ntango 29:29) Elobeli lisolo ya batambwisi minei ya Yisalaele. Mibale bazalaki basambisi, mpe mibale bazalaki bakonzi; mibale batosaki Yehova, mpe mibale batosaki ye te. Mokanda yango elobeli mpe basi mibale oyo bapesaki ndakisa malamu mpe mobundi moko ya mpiko. Bato yango batikelá biso bandakisa oyo ekoki koteya biso makambo oyo tosengeli komekola mpe oyo tosengeli koboya. Yango wana, makambo oyo ezali na Mokanda ya Liboso ya Samwele ekoki kobongisa makanisi mpe misala na biso.—Baebele 4:12.
SAMWELE AKÓMI MOSAMBISI NA ESIKA YA ELI
Tozali na ntango ya Elambo ya Mingombo; Hana, mwasi moko oyo afandaka na Lama azali na esengo mingi.a Yehova ayoki libondeli na ye mpe aboti mwana mobali. Mpo na kokokisa ndai na ye epai ya Yehova, Hana amemi mwana na ye Samwele akende kosala na “ndako ya Yehova.” Kuna, mwana yango akómi “kosalela [Yehova] liboso ya nganga Eli.” (1 Samwele 1:24; 2:11) Ntango Samwele azali naino mwana moke, Yehova alobi na ye; ayebisi ye ete akopesa Eli ná libota na ye etumbu. Ntango Samwele akoli, bato nyonso ya Yisalaele bandimi ete azali mosakoli ya Yehova.
Na nsima, Bafilistia bayei kobundisa Yisalaele. Babɔtɔli Sanduku ya kondimana mpe babomi bana mibale ya Eli. Ntango mobange Eli ayoki likambo yango, akufi; “asambisaki Yisalaele [mbula] ntuku minei.” (1 Samwele 4:18) Bafilistia bazongiseli Bayisalaele Sanduku ya kondimana, mpo yango ebendeli bango mpasi. Samwele akómi kosambisa Yisalaele mpe kimya ekɔti na mboka.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:10—Mpo na nini Hana abondelaki ete Yehova “akokembisa mokonzi na ye” nzokande, na ntango wana Yisalaele ezalaki naino na mokonzi te? Mibeko ya Moize esakolaki ete Bayisalaele bakokóma na mokonzi. (Deteronome 17:14-18) Liboso Yakobo akufa, asakolaki boye: “Nzete ya bokonzi ekolongwa na Yuda te.” (Genese 49:10) Lisusu, mpo na Sala, nkɔkɔ ya Bayisalaele, Yehova alobaki boye: “Bakonzi ya bato bakobima na ye.” (Genese 17:16) Na bongo, Hana azalaki kobondela mpo na mokonzi oyo asengelaki koya nsima.
3:3—Samwele alalaki mpenza na Esika oyo eleki Mosantu? Te, alalaki kuna te. Samwele azalaki nganga-nzambe te, azalaki Molevi ya libota ya Keata. (1 Ntango 6:33-38) Na yango, azalaki na ndingisa te ya “komona biloko ya bosantu.” (Mituya 4:17-20, NW) Samwele azalaki na ndingisa ya kosuka kaka na lopango ya tabenakle. Esengeli kozala ete alalaki kuna. Ekoki kozala ete Eli mpe alalaki esika mosusu, kaka na lopango yango. Emonani ete maloba “esika ezalaki sanduku ya Nzambe,” elimboli nde tabenakle mobimba.
7:7-9, 17—Mpo na nini Samwele atumbaki mbeka na Misipa mpe atongaki etumbelo na Lama, nzokande basengelaki kotumba mbeka mokolo na mokolo kaka na esika oyo Yehova aponaki? (Deteronome 12:4-7, 13, 14; Yosua 22:19) Ntango Sanduku mosantu elongwaki na tabenakle na Silo, emonanaki ete Yehova azalaki lisusu kuna te. Yango wana, lokola Samwele azalaki momonisi ya Yehova, atumbaki mbeka na Misipa mpe atongaki etumbelo na Lama. Emonani ete Yehova andimaki makambo oyo asalaki.
Mateya mpo na biso:
1:11, 12, 21-23; 2:19. Hana ayebaki valɛrɛ ya libondeli, azalaki na komikitisa, azalaki na botɔndi mpo na boboto ya Yehova, mpe azalaki na bolingo makasi mpo na mwana na ye; mpo na yango, atikaki ndakisa malamu mpo na basi nyonso oyo babangaka Nzambe.
1:8. Elekana atikaki mpenza ndakisa malamu mpo na oyo etali kolendisa basusu na maloba! (Yobo 16:5) Ntango amonaki ete Hana azali na mawa, atunaki ye naino na boboto ete: “Motema na yo etondi na mawa mpo na nini?” Motuna yango elendisaki Hana mpo ayebisa ye ndenge azalaki koyoka. Na nsima, Elekana amonisaki ye ete alingaka ye mingi; alobaki boye: “Ngai moko nazali malamu epai na yo te, koleka bana babali zomi?”
2:26; 3:5-8, 15, 19. Soki tozali kokokisa malamu mosala oyo Nzambe apesi biso, soki tozali kondima formasyo na makambo ya elimo, mpe soki tozali na limemya mpe na botosi, ‘tokomonana na ngɔlu mingi’ na miso ya Nzambe mpe ya bato.
4:3, 4, 10. Ata eloko ya bosantu lokola “sanduku ya kondimana ya Yehova” ezalaki te eloko oyo ekokaki kobatela bango lokola nkisi. Tosengeli ‘kokeba na bikeko.’—1 Yoane 5:21.
MOKONZI YA LIBOSO YA YISALAELE ATIKALAKI SEMBO TO TE?
Samwele asalelaki Yehova na bosembo bomoi na ye mobimba, kasi bana na ye bazalaki na etamboli ya malamu te. Ntango mikóló ya Yisalaele basɛngaki mokonzi, Yehova aboyaki te. Samwele alandaki malako ya Yehova mpe aponaki Saulo, mobali moko kitoko, moto ya libota ya Benyamina. Saulo alongaki Baamona mpe bato nyonso bandimaki ye lokola mokonzi.
Yonatana, mwana ya Saulo azalaki mobali ya mpiko mpe abomaki limpinga mobimba ya Bafilistia. Basoda ya Filistia bayaki ebele mpo na kobundisa Yisalaele. Saulo abangaki mpe atumbaki mbeka, likambo oyo azalaki na ndingisa ya kosala te, mpe na bongo atosaki te. Yonatana azwaki mokumbi-bibundeli moko mpe na mpiko nyonso, akendaki kobundisa etuluku mosusu ya Bafilistia oyo bazalaki na molɔngɔ ya liboso. Nzokande, lokola Saulo alapaki ndai moko kozanga kokanisa malamu, yango epekisaki bango bálonga Bafilistia nyonso. Saulo “abundaki” na bayini na ye na bipai nyonso. (1 Samwele 14:47) Kasi, ntango alongaki Baamaleki, atosaki maloba ya Yehova te na ndenge abebisaki te biloko oyo ‘ekabami.’ (Levitike 27:28, 29) Yango wana, Yehova asundolaki Mokonzi Saulo.
Biyano na mituna ya Biblia:
9:9—Maloba “ye oyo abyangami sika ete mosakoli abyangamaki kala ete momoni ya makambo” elimboli mpenza nini? Maloba yango ekoki kolimbola ete lokola mokumba ya basakoli ekómaki monene na ntango ya Samwele mpe na ntango ya bakonzi ya Yisalaele, bakómaki kosalela nkombo “mosakoli” na esika ya “momoni ya makambo.” Samwele azali mosakoli ya liboso na molɔngɔ wana.—Misala 3:24.
14:24-32, 44, 45—Nzambe atikaki nde kobatela Yonatana mpo abukaki ndai ya Saulo na ndenge alyaki mafuta ya nzoi? Tokanisi te ete Nzambe atikaki kobatela Yonatana mpo na likambo wana. Ya liboso, Yonatana ayebaki te ete tata na ye alapaki ndai. Lisusu, ndai oyo Saulo alapaki mpo na molende ya mabe to mpo azalaki kotalela bokonzi na ndenge ebongi te, ebendelaki bato mikakatano. Ndenge nini Nzambe akokaki kosepela na ndai ya ndenge wana? Atako Yonatana andimaki etumbu na ndenge abukaki ndai wana, abomamaki te.
15:6—Mpo na nini Saulo asalelaki Bakeni boboto? Bakeni bazalaki bankɔkɔ ya bokilo ya Moize. Basalisaki Bayisalaele ntango balongwaki na Ngomba Sinai. (Mituya 10:29-32) Na mokili ya Kanana, Bakeni bafandaki mpe na kati ya bana ya Yuda na eleko moko. (Basambisi 1:16) Atako na nsima Bakeni bafandaki na kati ya Baamaleki mpe bato ya bikólo mosusu, bazalaki banguna ya Yisalaele te. Na bongo, ebongaki mpenza Saulo abikisa Bakeni.
Mateya mpo na biso:
9:21; 10:22, 27. Bopɔlɔ mpe komikitisa oyo Saulo azalaki na yango ntango akómaki mokonzi epekisaki ye asala mabe ntango “bato mpamba” baboyaki kondima ye lokola mokonzi. Bizaleli wana epekisaka biso tósala makambo kozanga kokanisa!
12:20, 21. Tótika nzela te ete “biloko ya mpamba,” na ndakisa kotyela moto motema, kotya motema na makasi ya basoda ya ekólo, to na losambo ya bikeko, emema biso na kotika kosalela Yehova.
12:24. Sɛkɛlɛ mpo na kobatela ezaleli ya kobanga Yehova mpe kosalela ye na motema na biso mobimba ezali ‘kotala makambo minene oyo asali’ mpo na bato na ye, ezala na ntango ya kala to na mikolo na biso.
13:10-14; 15:22-25, 30. Tózala na lolendo te, ezala na koboya kotosa to na lofundo.—Masese 11:2.
ELENGE MOBATELI YA MPATE APONAMI MPO NA KOKÓMA MOKONZI
Samwele apakoli Davidi, moto ya libota ya Yuda, mpo akóma mokonzi. Mwa moke na nsima, Davidi abomi Goliata, engambe moko Mofilistia, na libanga moko. Davidi akómi moninga ya Yonatana. Saulo atye Davidi mokonzi ya basoda na ye. Basi ya Yisalaele basali nzembo mpo na kokumisa Davidi ndenge azali kolonga bitumba mingi: “Saulo abomi nkóto na ye nde Davidi abomi nkóto zomi.” (1 Samwele 18:7) Saulo ayoki zuwa mpe aluki koboma Davidi. Mbala misato mobimba, Saulo aluki koboma Davidi; na nsima, Davidi akimi mpe akómi koyengayenga.
Na bambula oyo azali kokimakima, mbala mibale mobimba Davidi azwi libaku ya koboma Saulo, kasi abikisi ye. Davidi akutani mpe na Abigaili, mwasi moko kitoko mpe na nsima, abali ye. Ntango Bafilistia bayei kobundisa Yisalaele, Saulo abeleli epai ya Yehova. Kasi, Yehova atiki ye. Samwele asilaki kokufa. Saulo asili mayele mpe akei kotuna nganga-nkisi mpe nganga-nkisi yango ayebisi ye ete akokufa na etumba na Bafilistia. Na etumba yango, bazokisi Saulo mpota monene, mpe babomi bana na ye. Lisolo esuki na liwa ya Saulo, mokonzi oyo atikalaki sembo te. Davidi azali naino kaka kobombana.
Biyano na mituna ya Biblia:
16:14—Elimo mabe oyo etungisaki Saulo ezalaki nini? Elimo mabe oyo elongolaki Saulo kimya ya makanisi ezalaki mposa ya mabe oyo ezalaki na makanisi mpe motema na ye—mposa makasi ya kosala mabe oyo azalaki na yango. Ntango Yehova alongolaki elimo santu na ye epai ya Saulo, yango ezalaki lisusu kobatela ye te mpe Saulo akómaki kotambwisama na elimo mabe na ye moko. Lokola Yehova atikaki ete elimo mabe wana ezwa esika ya elimo santu na Ye, yango wana babengi elimo yango ‘elimo mabe uta na Yehova.’
17:55—Na 1 Samwele 16:17-23, mpo na nini Saulo atunaki soki Davidi azali mwana ya nani? Kotuna oyo Saulo atunaki ezalaki te kaka mpo ayeba nkombo ya tata ya Davidi. Emonani mpenza ete alingaki nde koyeba soki moto ya ndenge nini abotá mwana oyo abomaki engambe Goliata.
Mateya mpo na biso:
16:6, 7. Na esika ya kotalela bato kaka ndenge bazali komonana na miso, tosengeli koluka kotalela bango ndenge Yehova atalelaka bango.
17:47-50. Tokoki koyika mpiko na botɛmɛli to monyoko oyo banguna bazali kobimisela biso mpo “etumba ezali ya [Yehova].”
18:1, 3; 20:41, 42. Tokoki kozwa baninga ya malamu na kati ya bato oyo balingaka Yehova.
21:12, 13. Yehova alingi ete tósalela mayele mpe makoki na biso ya kokanisa mpo na kolonga mikakatano ya bomoi. Apesi biso Liloba na ye oyo epemami oyo esalisaka biso tózala na ekɛngɛ, boyebi, mpe makoki ya kokanisa. (Masese 1:4) Tozali mpe na bankulutu oyo basalisaka biso.
24:6; 26:11. Davidi apesaki ndakisa malamu mpenza na ndenge azalaki na limemya mpo na mopakolami ya Yehova!
25:23-33. Tómekola bwanya ya Abigaili.
28:8-19. Mpo na kokosa to konyokola bato, bademo bamimonisaka lokola bato mosusu oyo bakufá. Tosengeli koboya lolenge nyonso ya bikelakela.—Deteronome 18:10-12.
30:23, 24. Ekateli yango oyo elandi etinda ya Mituya 31:27, emonisi ete Yehova atalelaka na motuya baoyo bazali kopesa mabɔkɔ na lisangá. Yango wana, ezala tozali kosala nini, ‘tósala yango na molimo na biso mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.’—Bakolose 3:23.
Eloko nini ‘eleki kopesa mbeka’?
Makambo oyo ekómelaki Eli, Samwele, Saulo mpe Davidi emonisi bosolo ya likambo nini? Ya likambo oyo: “Kotosa eleki [mbeka] na malamu mpe koyoka eleki mafuta ya bampate. mpo ete kotomboka ezali lokola lisumu ya ndɔki mpe nko ezali lokola lisumu ya bikeko.”—1 Samwele 15:22, 23.
Tozali mpenza na libaku malamu ya kosangana na mosala ya kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli oyo ezali kosalema na mokili mobimba! Ntango tozali kopesa Yehova “bana ya ngɔmbɛ ya mbɛbu na biso,” tosengeli kosala nyonso mpo tótosaka malako oyo azali kopesa biso na Liloba na ye oyo ekomami mpe na nzela ya ebongiseli na ye awa na mabelé.—Hosea 14:2, NW; Baebele 13:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa likanisi ya bisika ndenge na ndenge oyo mokanda ya liboso ya Samwele elobeli, talá mwa buku ‘Voyez le bon pays,’ ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 23]
Mokonzi ya liboso ya Yisalaele azalaki na komikitisa mpe na bopɔlɔ na ebandeli, na nsima akómaki na lolendo
[Elilingi na lokasa 24]
Elikya nini tokoki kozala na yango ntango tozali liboso ya banguna oyo bazali komonana lokola Goliata?