Mibange bazali lipamboli mpo na bilenge
“Kino ntango ya konuna na ngai na nsuki mpɛmbɛ, e Nzambe, tiká ngai te. Kino nakosakola nguya na yo epai ya nyonso ya libota lizali koya nsima.”—NZEMBO 71:18.
1, 2. Likambo nini basaleli ya Nzambe oyo bakómi mibange basengeli kobosana te, mpe tokolobela nini sikoyo?
NKULUTU moko na Afrika ya Wɛsti akendeki kotala ndeko moko mopakolami oyo akómi mobange mpe atunaki ye ete, “Nsango nini?” Ndeko yango ayanolaki ye boye: “Nakoki kokima mbangu mpe kopumbwa.” Mpe abakisaki ete, “Kasi, nakoki kopumbwa lokola ndɛkɛ te.” Nkulutu wana ayebaki eloko nini ndeko yango alingaki koloba. ‘Oyo nakoki kosala, nasepelaka kosala yango, kasi oyo nakokoka te, nasalaka te.’ Nkulutu oyo akendeki kotala ndeko yango azali lelo na mbula 80, mpe abosanaka ndeko wana te, ndenge azalaki kosɛkisa mpe bosembo na ye.
2 Soki mobange azali kosala makambo oyo ezali komonisa ete abangaka Nzambe, yango ekoki kosalisa bato mosusu mingi. Kasi, kokola yango moko te epesaka mbala moko moto bwanya mpe esalaka ete akóma na bizaleli ya Klisto. (Mosakoli 4:13) Biblia elobi ete: “Nsuki mpɛmbɛ ezali motole ya kitoko ntango ezali na nzela ya boyengebene.” (Masese 16:31, NW) Soki ozali mobange, oyebaka ete maloba na yo mpe makambo oyo osalaka ekoki kosalisa basusu? Tótalela mwa bandakisa ya Biblia oyo emonisi ndenge mibange bazalaki mpenza lipamboli mpo na bilenge.
Kondima oyo ebimisaki matomba mingi
3.Matomba nini bosembo ya Noa ememeli baoyo nyonso bazali na bomoi lelo oyo?
3 Kondima mpe molende ya Noa ebimisá matomba oyo ezali komonana tii lelo oyo. Noa azalaki na mbula pene na 600 ntango atongaki masuwa, ayanganisaki banyama mpe asakwelaki bazalani na ye nsango ya Nzambe. (Genese 7:6; 2 Petelo 2:5) Lokola azalaki kobanga Nzambe, Noa abikaki na Mpela monene elongo na libota na ye mpe akómaki nkɔkɔ ya bato nyonso oyo bazali na bomoi lelo. Toboyi te, na ntango ya Noa, bato bazalaki koumela mingi na bomoi. Kasi, atako akómaki mobange, Noa atikalaki sembo, mpe yango ememaki mapamboli beboo. Ndenge nini?
4. Ndenge nini mpiko ya Noa ezali kosalisa basaleli ya Nzambe lelo oyo?
4 Noa azalaki na mbula pene na 800 ntango Nimerode aboyaki kotosa etinda ya Yehova ya ‘kotondisa mokili’ mpe abandaki kotonga ndako molai ya Babele. (Genese 9:1; 11:1-9) Kasi, Noa akɔtaki na botomboki ya Nimerode te. Na yango, ekoki kozala ete ntango Nzambe abulunganisaki monɔkɔ ya bato ya ntango na ye, abulunganisaki oyo ya ye te. Kondima mpe mpiko ya Noa, oyo emonanaki na bomoi na ye mobimba, kasi kaka ntango akómaki mobange te, ezali ndakisa ya malamu mpenza mpo na basaleli ya Nzambe nyonso, mikóló mpe bilenge.—Baebele 11:7.
Ndakisa ya mibange na kati ya libota
5, 6. (a) Yehova asɛngaki Abalayama asala nini ntango akómaki na mbula 75? (b) Abalayama asalaki nini?
5 Bomoi ya bankɔkɔ ya Yisalaele oyo bazalaki na bomoi na nsima ya Noa ekoki kosalisa biso tómona ndenge mibange bakoki kosalisa mabota na bango bázala na kondima makasi. Abalayama azalaki na mbula soki 75 ntango Nzambe alobaki na ye ete: “Longwá na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe na ndako ya tata na yo, kokenda na mokili ekomonisa ngai yo. Nakozalisa yo libota monene, mpe nakopambola yo.”—Genese 12:1, 2.
6 Kanisá ete balobi na yo otika ndako na yo, baninga na yo, mboka obotamá mpe okabwana na bandeko na yo nyonso mpo okende na mboka oyo oyebi te. Yango nde basɛngaki Abalayama. “Alongwaki lokola elobelaki [Yehova] ye,” mpe banda wana, akómaki kofanda na bahema lokola mopaya mpe azalaki kotambolatambola na mokili ya Kanana. (Genese 12:4; Baebele 11:8, 9) Atako Yehova alobaki ete akokómisa Abalayama “libota monene,” akufaki ntango molai liboso ete bana na ye bakóma ebele. Nsima ya kosala mbula 25 na mokili ya ndaka, Sala, mwasi ya Abalayama abotelaki ye mwana moko ya mobali na nkombo Yisaka. (Genese 21:2, 5) Atako bongo, alɛmbaki te mpe azongaki te na engumba oyo autaki. Oyo nde ndakisa ya kondima mpe ya mpiko!
7. Mpiko ya Abalayama esalisaki mwana na ye Yisaka na nini, mpe yango ememeli bato litomba nini?
7 Mpiko ya Abalayama esalisaki mwana na ye Yisaka mingi, alekisaki bomoi na ye mobimba, elingi koloba mbula 180, lokola mopaya na mokili ya Kanana. Mpiko ya Yisaka eutaki na kondima oyo azalaki na yango na elaka ya Nzambe, kondima oyo azwaki epai ya baboti na ye oyo basilaki kokóma mibange mpe oyo elendisamaki na elaka oyo Yehova apesaki ye. (Genese 26:2-5) Mpiko ya Yisaka esalisaki mingi mpo na kokokisama ya elaka oyo Yehova apesaki ete “momboto” oyo akopambola bato nyonso akoya na nzela ya libota ya Abalayama. Bankama ya bambula na nsima, Yesu Klisto, moto ya liboso mpenza ya “momboto” yango, afungolaki nzela mpo baoyo nyonso bakondima ye bázongela Nzambe mpe bázwa bomoi ya seko.—Bagalatia 3:16; Yoane 3:16.
8. Ndenge nini Yakobo amonisaki kondima makasi, mpe yango ebimisaki matomba nini?
8 Na ngala na ye, Yisaka asalisaki mwana na ye Yakobo azala na kondima makasi oyo esalisaki ye ntango akómaki mobange. Yakobo azalaki na mbula 97 ntango abundaki na anzelu butu mobimba mpo azwa lipamboli. (Genese 32:24-28) Liboso akufa na mbula 147, Yakobo asangisaki makasi na ye nyonso mpo na kopambola bana na ye nyonso 12. (Genese 47:28) Makambo oyo asakolaki, oyo ezali na Genese 49:1-28 ekokisamaki mpe ezali kokoba kokokisama.
9. Ndakisa nini mibange oyo bakɔmeli na elimo bakoki kopesa mabota na bango?
9 Ya solo, mibange oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo bakoki kozala mpenza ndakisa mpo na mabota na bango. Mateya ya Biblia, toli ya bwanya mpe ndakisa ya mpiko ekoki mpenza kosalisa elenge akóma na kondima makasi. (Masese 22:6) Mibange basengeli kobosana te ete bakoki kopesa mabota na bango ndakisa ya malamu mpenza.
Ndakisa mpo na bandeko na lisangá
10. Etinda nini Yozefe apesaki “na oyo etali mikuwa na ye,” mpe yango ebimisaki matomba nini?
10 Mibange bakoki mpe kozala ndakisa mpo na bandeko na lisangá. Yozefe, mwana ya Yakobo, amonisaki kondima na likambo moko ntango akómaki mobange; likambo yango esalisaki mpenza bamilio ya basambeli ya solo nsima na ye. Azalaki na mbula 110 ntango “apesaki etinda moko na oyo etali mikuwa na ye,” ete ntango bana ya Yisalaele bakolongwa na Ezipito, bámema yango. (Baebele 11:22; Genese 50:25) Etinda wana esalisaki Bayisalaele bázala mpenza na elikya, na boumeli ya ebele ya bambula oyo banyokwamaki na boombo nsima ya liwa ya Yozefe, ete bakosikolama.
11. Atako Moize akómaki mobange, ndakisa nini atikelaki Yosua?
11 Moize azali mpe na kati ya bato oyo kondima ya Yozefe elendisaki bango. Ntango Moize akómaki na mbula 80, azwaki libaku ya komema mikuwa ya Yozefe longwa na mokili ya Ezipito. (Exode 13:19) Na ntango wana, ayebanaki na Yosua, oyo azalaki elenge mpenza. Na mbula 40 oyo elandaki, Yosua azalaki mosungi ya Moize. (Mituya 11:28) Amataki na Ngomba Sinai elongo na Moize mpe ntango Moize akitaki na ngomba yango ná bitanda ya Litatoli, azalaki wana. (Exode 24:12-18; 32:15-17) Atako Moize akómaki mobange, azalaki kopesa Yosua batoli oyo ebongi mpe ya bwanya!
12. Na ndenge nini Yosua azalaki ndakisa ya malamu mpenza mpo na Yisalaele bomoi na ye mobimba?
12 Na ngala na ye, Yosua alendisaki mpenza ekólo Yisalaele na bomoi na ye mobimba. Basambisi 2:7 elobi ete: “Bato basalelaki [Yehova] mikolo ya Yosua nyonso, mpe mikolo nyonso ya mikóló oyo baumelaki na nsima ya kufa ya Yosua, baoyo bamonaki misala minene nyonso misalaki [Yehova] mpo na Yisalaele.” Nzokande, na boumeli ya mbula 300, banda na liwa ya Yosua ná mikóló mosusu tii na ntango ya mosakoli Samwele, Bayisalaele bakómaki koyengayenga na elimo, lelo basambeli Nzambe ya solo, lobi bakei na losambo ya lokuta.
Samwele ‘akokisaki boyengebene’
13. Ndenge nini Samwele ‘akokisaki boyengebene’?
13 Biblia elobi te soki Samwele azalaki na mbula boni ntango akufaki, kasi makambo oyo ezali na Mokanda ya Liboso ya Samwele esalemaki na boumeli ya mbula soki 102, mpe Samwele amonaki mingi na yango na miso. Na Baebele 11:32, 33, totángaka ete basambisi mpe basakoli ya sembo “bakokisaki boyengebene.” Ya solo, Samwele asalisaki mpenza bato mingi ya eleko na ye bákima misala mabe to bátika yango. (1 Samwele 7:2-4) Na ndenge nini? Atikalaki sembo epai na Yehova bomoi na ye mobimba. (1 Samwele 12:2-5) Abangaki te kopesa toli ya makasi ata epai ya mokonzi. (1 Samwele 15:16-29) Lisusu, atako Samwele akómaki “mobange mpe abimaki nsuki mpɛmbɛ,” apesaki ndakisa ya malamu mpenza na likambo ya kobondela mpo na basusu. Alobaki ete ‘ekoki kosalema te . . . ete asala lisumu liboso ya Yehova ya kotika kobondela’ mpo na bandeko na ye ya Yisalaele.—1 Samwele 12:2, 23, NW.
14, 15. Ndenge nini mibange bakoki lelo oyo komekola Samwele na likambo ya kobondela?
14 Makambo nyonso wana emonisi ete mibange bakoki kopesa bandeko ya lisangá ndakisa malamu mpenza. Atako mibange bazali lisusu nzoto makasi te to bazali na mikakatano mosusu, bakoki kobondelaka mpo na basusu. Bino mibange, boyebaka ete mabondeli na bino ezali na ntina mingi mpo na lisangá? Lokola bondimi motuya ya makila ya Yesu oyo esopanaki, Yehova andimi bino, mpe lokola boyiki mpenza mpiko ebele ya bambula, bokómi na kondima “oyo emekami.” (Yakobo 1:3; 1 Petelo 1:7) Bóbosana te: “Lilɔmbɔ ya moyengebene, ntango ezali kosala mosala, ezalaka na bokasi mingi.”—Yakobo 5:16.
15 Ezali na ntina ete bóbondelaka mpo na mosala ya kosakola mpe mpo na lisangá. Bandeko na biso mosusu bazali na bolɔkɔ mpo baboyi kokɔta na makambo ya politiki. Basusu bakwelaki makama ya mbula, mipɛpɛ mpe bitumba. Basusu na lisangá na biso bazali kokutana na komekama to na botɛmɛli. (Matai 10:35, 36) Bandeko oyo bazali kotambwisa mosala ya kosakola mpe kokɛngɛla masangá basengeli na mabondeli na bino. (Baefese 6:18, 19; Bakolose 4:2, 3) Lokola Epafalasi, ebongi mpenza ete bóbondelaka mpe mpo na bandeko.—Bakolose 4:12.
Bazali koteya mabota oyo bazali koya nsima
16, 17. Nzembo 71:18 esakolaki nini, mpe ndenge nini esakweli yango ekokisami?
16 Kosangana na bato ya sembo ya “etonga moke” oyo bakokende na likoló esalisi mpenza “bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé. (Luka 12:32; Yoane 10:16) Likambo yango esakolamaki na Nzembo 71:18 na maloba oyo: “Kino ntango ya konuna na ngai na nsuki mpɛmbɛ, e Nzambe, tiká ngai te. Kino nakosakola nguya na yo epai na nyonso ya libota lizali koya nsima.” Bapakolami basepelaka koteya baninga na bango bampate mosusu mpo bákóma na makoki ya kozwa mikumba ya minene na ebongiseli ya Yehova liboso ete bango bákende na likoló mpo na kozwa nkembo elongo na Yesu Klisto.
17 Na yango, tokoki mpe koloba ete bampate mosusu, oyo bateyami na bapakolami ya Nzambe, bazali “libota likoya nsima” oyo Nzembo 71:18 elobaki ete basengeli koteyama. Yehova apesi mibange libaku malamu ya kotatola mpo na ye epai na bato oyo bazali koya sika na losambo ya solo. (Yoele 1:2, 3) Bampate mosusu bazali kosepela na makambo oyo bapakolami balakisi bango mpe yango etindi bango báteya bato mosusu oyo bazali na mposa ya kosalela Yehova mateya ya Biblia.—Emoniseli 7:9, 10.
18, 19. (a) Makambo nini ya ntina mingi basaleli ya Yehova oyo bakómi mibange bakoki koyebisa biso? (b) Baklisto oyo bakómi mibange basengeli kozala na elikya nini?
18 Basaleli ya Yehova mingi oyo bazali mibange, ezala bapakolami to bampate mosusu, basalisaka biso tóyeba makambo mingi ya minene oyo esalemaki kala. Mwa ndambo na bango oyo bazali naino na bomoi bamonaki ntango “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi” ebandaki kolakisama. Bandeko mosusu ya mibange bayebanaki mpenza na bandeko mosusu oyo bazalaki kokamba mosala, oyo bakɔtaki bolɔkɔ na 1918. Bamosusu bazalaki kopesa bansango na WBBR, radio ya Société Watchtower. Mingi bakoki kobɛta lisolo ya makambo oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kosamba na batribinale ya minene mpo na kozwa bonsomi ya losambo. Bamosusu bakangamaki kaka na losambo ya solo atako bazalaki na bikólo oyo eyangelamaki na bakonzi ya mabe. Ya solo, mibange bakoki koyebisa biso ndenge boyebi ya solo ezalaki kobakisama mokemoke. Biblia ezali kolendisa biso tósololaka na bango mpo na kozwa ebele ya boyebi oyo bazali na yango.—Deteronome 32:7.
19 Baklisto oyo bazali mibange balendisami ete bázala ndakisa malamu mpo na bilenge. (Tito 2:2-4) Ntango mosusu, bozali komona te sikoyo matomba oyo mpiko, mabondeli mpe batoli na bino ezali komemela basusu. Ekoki kozala ete Noa, Abalayama, Yozefe, Moize mpe bamosusu bayebaki te matomba oyo bosembo na bango ekokaki komemela mabota oyo esengelaki koya na nsima. Nzokande, kondima mpe bosembo na bango ememelaki basusu ebele ya matomba. Bino mibange ya lelo, ndakisa na bino ekoki mpe kosala bongo.
20. Mapamboli nini ezali kozela baoyo bakozala na elikya makasi tii na nsuka?
20 Ezala okobika na “bolɔzi monene” to okosekwa, okozala mpenza na esengo ya kozala na “bomoi ya solosolo.” (Matai 24:21; 1 Timote 6:19) Kanisá naino ndenge bomoi ekozala na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, ntango Yehova akosilisa bobange. Na esika tónuna, tokobanda nde kolamukaka mokolo na mokolo na nzoto oyo ezali kobonga se kobonga. Makasi ekobanda kobakisama, miso ekokóma komona malamu, matoi ekobanda koyoka lisusu malamu koleka mpe tokokóma lisusu kitoko koleka. (Yobo 33:25; Yisaya 35:5, 6) Lokola bomoi oyo tozali kozela na mokili ya sika ya Nzambe ekozala ya libela na libela, baoyo bakozwa libaku yango bakotikala ntango nyonso bilenge. (Yisaya 65:22) Na yango, tiká ete biso nyonso tózala ntango nyonso na elikya makasi mpe tókoba kosalela Yehova na molimo na biso mobimba. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akokokisa nyonso oyo alaki mpe ete makambo oyo ye akosala ekoleka mosika mpenza oyo biso tokoki kokanisa.—Nzembo 37:4; 145:16.
Okopesa eyano nini?
• Matomba nini mpiko oyo Noa amonisaki na bobange na ye ememeli bato nyonso?
• Kondima ya bankɔkɔ ya Yisalaele ememelaki bana na bango matomba nini?
• Atako Yozefe, Moize, Yosua mpe Samwele bakómaki mibange, ndenge nini balendisaki basambeli mosusu ya Yehova?
• Libula nini mibange bakoki kotika?
[Elilingi na lokasa 26]
Mpiko ya Abalayama esalisaki Yisaka mingi
[Elilingi na lokasa 28]
Toli malamu ya Moize esalisaki mpenza Yosua
[Elilingi na lokasa 29]
Soki ozali kobondela mpo na basusu, yango ekoki komemela bango matomba mingi
[Elilingi na lokasa 30]
Bilenge bakozwa matomba soki bazali koyoka mibange ya sembo