Yonatana “asalaki mosala na Nzambe”
YONATANA, mwana ya Mokonzi Saulo, akendaki kokutana na Davidi oyo abombanaki mpo na kokima mokonzi. Ayebisaki Davidi boye: “Bangá te mpo ete lobɔkɔ ya Saulo, tata na ngai, ekozwa yo te. Yo mpe okozala mokonzi likoló ya Yisalaele mpe ngai nakozala penepene na yo.”—1 Samwele 23:17.
Kasi mwa moke na nsima, Yonatana akufaki. Soki atikalaki na bomoi, ntango Davidi alingaki kokóma mokonzi, na ntembe te alingaki kozala pene na ye.
Davidi ná Yonatana bazalaki baninga ya solosolo. Yonatana azalaki moto malamu mpenza. Ata bato oyo bayebaki ye bamonaki yango mpo balobaki boye: “Asalaki mosala na Nzambe.” (1 Samwele 14:45, NW) Mpo na nini balobaki bongo? Bizaleli nini Yonatana amonisaki? Mpe liteya nini okoki kozwa na lisolo ya bomoi na ye?
Bayisalaele bakómi “kati na mpasi”
Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Yonatana ezalaki na eleko moko oyo Bayisalaele bazalaki “kati na mpasi.” Bafilistia bapunzaki mboka na bango mpe balongolaki bango makoki nyonso ya komibatela.—1 Samwele 13:5, 6, 17-19.
Atako bongo, Yehova alakaki ete akotika bato na ye te, mpe Yonatana andimaki likambo yango. Nzambe alobaki mpo na Saulo, tata ya Yonatana ete: “Akobikisa bato na ngai na mabɔkɔ ya Bafilistia.” Yonatana andimaki mpenza maloba wana. Kutu, elongo na basoda 1 000 oyo bazalaki na bibundeli ya makasi te, Yonatana asilaki kolonga Bafilistia. Sikoyo azalaki na mokano ya kosukisa Bafilistia mpo banyokolaka bango lisusu te.—1 Samwele 9:16; 12:22; 13:2, 3, 22.
Abangi te kobundisa Bafilistia
Yonatana azwaki mokano ya kobundisa basoda ya Filistia oyo bazalaki na Mikemase. (1 Samwele 13:23) Mpo na kokóma kuna, asengelaki komata ngomba na “mabɔkɔ mpe na makolo na ye.” Yango ezongisaki ye nsima te. Yonatana azwaki mokano ya kokende kobundisa Bafilistia kaka ye moko ná moto oyo azalaki komemela ye bibundeli; alobaki na moto yango boye: “Soki [Yehova] akosunga biso? Ezali mpasi epai ya [Yehova] te kobikisa biso na bato mingi to na bato mingi te.”—1 Samwele 14:6, 13.
Yonatana ná moto oyo azalaki komemela ye bibundeli balukaki elembo oyo ekomonisa ete Yehova akosunga bango. Balobaki ete bakomimonisa epai ya Bafilistia. Soki Bafilistia balobi na bango ete: “Tikalá na esika na bino kino biso toyei epai na bino,” boye bakobuta epai ya Bafilisitia te. Kasi, soki basoda yango balobi ete: “Yaká epai na biso,” yango ekozala elembo euti epai ya Yehova ete bakolonga. Yonatana azalaki na kondima ete Nzambe akosunga ye; yango wana akendaki epai ya basoda ya Filistia mpo na kobundisa bango.—1 Samwele 14:8-10.
Bato mibale mpamba bakokaki nde kolonga limpinga mobimba? Tókanisá naino: Yehova asungaki Mosambisi Ehude te ntango akambaki Yisalaele mpo na kobunda na Moaba? Nzambe asungaki Samagale te ntango abomaki Bafilistia 600 na nzete ya kokamba bangɔmbɛ? Lisusu, Yehova azalaki te kopesa Samasona makasi ya kobunda na Bafilistia? Mpo na yango, Yonatana atyaki elikya ete Nzambe akosunga mpe ye.—Basambisi 3:12-31; 15:6-8, 15; 16:29, 30.
Ntango Bafilistia bamonaki mibali yango, balobaki boye: “Yaká awa na biso mpe tokomonisa bino likambo!” Yonatana ná moto oyo azalaki komemela ye bibundeli babutaki. Na mpiko nyonso babomaki basoda soki 20, mpe yango ebangisaki banguna na bango. Ekoki kozala ete Bafilistia yango bakanisaki ete basoda mingi ya Yisalaele bazalaki nsima ya Yonatana ná moto oyo azalaki komemela ye bibundeli. Biblia elobi ete “kolɛnga ezalaki kati na bato nyonso . . . Mokili mpe eninganaki, [Nzambe nde atindaki koningana yango, NW].” Lokola Nzambe atindaki koningana ya mabelé, mobulungano ekɔtaki kati na Bafilistia, na boye ete “moto na moto abongolaki mopanga na ye epai ya ndeko na ye.” Ntango basoda ya Yisalaele bamonaki bongo bazwaki makasi. Bayisalaele oyo babombanaki mpe baoyo bazalaki na ngámbo ya Bafilistia basanganaki na Yonatana ná moto oyo azalaki komemela ye bibundeli, “babɛtaki Bafilistia na mokolo yango longwa na Mikemase kino Ayalone.”—1 Samwele 14:11-23, 31.
Bayisalaele babikisi Yonatana
Mokonzi Saulo alobaki ete soda nyonso oyo akolya liboso ete bitumba esila akozwa etumbu. Nzokande, Yonatana ayokaki te ntango tata na ye apesaki mobeko yango. Yango wana, alyaki. Akɔtisaki nsɔngɛ ya nzete na ye na mafuta ya nzoi mpe alyaki mwa ndambo ya mafuta yango. Emonani ete yango epesaki ye makasi ya kobunda tii na nsuka.—1 Samwele 14:24-27.
Ntango Saulo ayokaki ete Yonatana alyaki, apesaki mitindo ete abomama. Yonatana abangaki kokufa te. Alobaki boye: “Ngai nazali awa, ekoki na ngai ete nakufa.” “Nde bato balobaki na Saulo ete, Yonatana akufa? Ye oyo abikisi Yisalaele na elonga monene lelo? Wapi! Lokola [Yehova] azali na bomoi, [nsuki] moko na motó na ye ekokwea na mabelé te mpo ete lelo [asalaki mosala na Nzambe, NW]. Bongo bato babikisaki Yonatana ete akufa te.”—1 Samwele 14:38-45.
Lelo oyo mosaleli ya Nzambe asimbaka bibundeli te mpo na kobunda; kasi, na bantango mosusu ekoki kosɛnga yo omonisa kondima mpe mpiko. Ekoki kozala mpasi kosala oyo ezali sembo ntango bato nyonso oyo bazali pene na yo bazali kosala oyo ezali mabe. Nzokande, Yehova akopesa yo makasi mpe akopambola mposa na yo ya kotosa mitinda na ye ya sembo. Ekoki kosɛnga yo mpiko mpo na kondima mikumba mosusu, na ndakisa kobakisa lisusu milende na yo na mosala ya kosakola, kondima mikumba mosusu na kati ya lisangá, to kondima kokende kosala epai basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Ntango mosusu okoki kokanisa ete obongi te mpo na kokokisa mikumba yango. Kasi, yebá ete Yehova akosepela mingi soki omipesi mpo asalela yo na ndenge oyo amoni malamu. Kobosana ndakisa ya Yonatana te! “Asalaki mosala na Nzambe.”
Yonatana ná Davidi
Mbula soki 20 na nsima, Davidi abomaki Goliata, elombe Mofilistia oyo atumolaki basoda ya Yisalaele. Atako Yonatana alekaki Davidi na mbula soki 30, mibali yango mibale bakokanaki na makambo mingi.a Davidi amonisaki mpiko lokola oyo Yonatana amonisaki na Mikemase. Koleka nyonso, ndenge moko na Yonatana, Davidi mpe azalaki na kondima ete Yehova azali na nguya ya kobikisa; yango esalisaki ye abima na mpiko nyonso mpo na kobunda na Goliata wana Bayisalaele nyonso bazalaki kobanga. Mpo na yango, “motema ya Yonatana ekanganaki na motema ya Davidi. Yonatana alingaki ye lokola motema na ye moko.”—1 Samwele 17:1–18:4.
Saulo azalaki koyokela Davidi zuwa mpo na bitumba oyo alongaki; nzokande Yonatana azalaki koyokela Davidi zuwa ata moke te. Ye ná Davidi bakómaki baninga ya motema, mpe ekoki kozala ete na masolo na bango, Davidi ayebisaki Yonatana ete Nzambe apakolaki ye mpo na kozala mokonzi na esika ya Saulo. Yonatana atosaki ebongiseli wana ya Nzambe.
Ntango Mokonzi Saulo ayebisaki mwana na ye mpe basali na ye mokano oyo azalaki na yango ya koboma Davidi, Yonatana ayebisaki yango Davidi. Yonatana andimisaki tata na ye ete Davidi azalaki na makanisi ya mabe te. Davidi asalelaki mokonzi mabe moko te! Kutu, atyaki bomoi na ye na likama mpo na kobundisa Goliata. Maloba ya Yonatana ekitisaki nkanda ya Saulo. Nzokande, eumelaki te Saulo azongelaki lisusu makanisi ya koboma Davidi, mpe yango esalaki ete Davidi akóma kokimakima.—1 Samwele 19:1-18.
Yonatana asungaki Davidi na bosembo nyonso. Bango mibale bakutanaki mpo na koyokana likambo oyo basengelaki kosala. Yonatana azalaki sembo epai ya moninga na ye; mpe azalaki kosala makasi mpo na kotikala sembo epai ya tata na ye; yango wana alobaki na Davidi boye: “Wapi! Okokufa te!” Kasi, Davidi ayebisaki Yonatana boye: “Etikali bobele moke moke ete nakufa.”—1 Samwele 20:1-3.
Yonatana ná Davidi bayokanaki likambo oyo basengelaki kosala mpo na koyeba makanisi ya Saulo. Soki bato bamoni ete Davidi ayei te na mesa ya mokonzi mpo na kolya, Yonatana akoyebisa Saulo ete Davidi asɛngaki ye nzela mpo na kokende kotumba mbeka elongo na libota na ye. Soki Saulo asiliki, yango ekozala elembo ete azali kokana mabe mpo na Davidi. Yonatana apambolaki ye mpe amonisaki ete ayebaki ete Davidi nde akozala mokonzi mpo alobaki boye: “[Yehova] azala na yo lokola ezalaki ye na tata na ngai.” Bango mibale balapaki ndai ya kotikala sembo moko epai ya mosusu mpe bayokanaki ndenge oyo Yonatana akopesa Davidi nsango mpo na ndenge makambo ekoleka.—1 Samwele 20:5-24.
Ntango Saulo amonaki ete Davidi azali te, Yonatana alimbwelaki ye ete Davidi abondelaki ye boye: “Soki nazwi boboto epai na yo, nalɔmbi yo ete nakenda mpe ete namona bandeko na ngai.” Yonatana abangaki te koloba ete apesaki Davidi nzela ete akende. Mokonzi atombokaki! Afingaki Yonatana mpe alobaki ete Davidi alingi kozwa esika ya mwana na ye mpo na kokitana ye lokola mokonzi. Saulo asɛngaki Yonatana amemela ye Davidi mpo abomama. Yonatana azongiselaki ye boye: “Akobomama mpo na nini? Asali likambo nini?” Na nkanda nyonso, Saulo abwakelaki mwana na ye likɔnga. Yonatana akimaki mpe likɔnga ezwaki ye te; kasi ayokaki mpasi na motema mpo na Davidi.—1 Samwele 20:25-34.
Yonatana amonisaki mpenza bosembo! Soki totaleli makambo na ndenge ya bomoto tokoki koloba ete Yonatana alingaki kozwa eloko moko te na boninga na ye ná Davidi; kutu alingaki nde kozanga. Kasi, Yehova alobaki ete Davidi asengeli kozwa esika ya Mokonzi Saulo, mpe likambo yango oyo Nzambe abongisaki ezalaki mpo na bolamu ya Yonatana mpe ya bato mosusu.
Kolela mpo na bokabwani
Yonatana akutanaki na Davidi na nkuku mpo na koyebisa ye ndenge makambo elekaki. Ezalaki polele ete Davidi akokaki lisusu kotya makolo na ye na ndako ya Saulo te. Mibali yango mibale balelaki mpe bayambanaki. Na nsima, Davidi akómaki kobombanabombana.—1 Samwele 20:35-42.
Yonatana akutanaki lisusu na Davidi kaka ntango Davidi azalaki kobombana Saulo na “esobe ya Jifi kati na Holesa.” Ezali na ntango yango nde Yonatana alendisaki Davidi na maloba oyo: “Bangá te mpo ete lobɔkɔ ya Saulo, tata na ngai, ekozwa yo te. Yo mpe okozala mokonzi likoló na Yisalaele mpe ngai nakozala penepene na yo. Saulo tata na ngai ayebi yango na malamu.” (1 Samwele 23:15-18) Kasi, mwa moke na nsima, Yonatana ná tata na ye Saulo bakufaki na etumba oyo babundaki na Bafilistia.—1 Samwele 31:1-4.
Moto nyonso oyo alingaka Nzambe asengeli kolanda ndakisa ya Yonatana. Ozali na mokakatano mpo na kopona epai ya nani osengeli kozala sembo? Kobosana te ete Saulo alendisaki Yonatana aluka matomba na ye moko. Kasi, Yonatana akumisaki Yehova na ndenge atosaki na motema mobimba mpe na limemya mpe asepelaki na moto oyo Yehova aponaki mpo na kozala mokonzi ya mibale ya Yisalaele. Yonatana asungaki Davidi mpe azalaki sembo epai ya Yehova.
Yonatana azalaki na bizaleli mingi ya malamu. Tosengeli komekola bizaleli yango. Na bongo, bato bakoloba mpo na biso ndenge balobaki mpo na Yonatana ete: “Asalaki mosala na Nzambe.”—1 Samwele 14:45, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Yonatana azalaki na mbula soki 20 ntango Biblia elobeli ye mpo na mbala ya liboso; na ntango yango azalaki mokambi ya basoda, na ebandeli ya bambula 40 oyo Saulo ayangelaki. (Mituya 1:3; 1 Samwele 13:2) Na yango, Yonatana asengelaki kozala na mbula soki 60 ntango akufaki na mobu soki 1078 L.T.B. Lokola Davidi azalaki na mbula 30 na ntango wana, emonani ete Yonatana alekaki ye na mbula soki 30.—1 Samwele 31:2; 2 Samwele 5:4.
[Elilingi na lokasa 19]
Yonatana ayokelaki Davidi zuwa te