Kitisá mokumba na yo ntango nyonso epai na Yehova
LELO oyo bato mingi bazali koyoka ete banyatami na bozito. Mikakatano ya nkita, mitungisi miuti na mikakatano ya libota, mitungisi ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, mpasi euti na minyoko mpe bokonzi mabe, mpe ebele ya makambo ya kopesa mpasi ekakisami na nkíngó na bango lokola mabángá minene. Longolá mitungisi wana oyo mizali kouta libándá, basusu bazali na bozito mpo na liyoki oyo bazali na yango ete bazalaka na ntina te mpe liyoki ya kozanga kolónga oyo euti na kozanga kokoka na bango. Mingi bapusami ete bátika kosala milende. Lolenge nini tokoki koyika mpiko ntango emonani ete bozito boleki monene?
Na eleko moko Davidi, Mokonzi ya Yisalaele amiyokaki lokola ete motungisi molekaki monene. Engebene Nzembo 55, atungisamaki mingi na ntina na mikakatano mpe koyinama na banguna na ye. Ayokaki mawa monene mpe azalaki na bobángi. Akokaki bobele kokimela kati na mpasi na ye. (Nzembo 55:2, 5, 17) Nzokande, atako azalaki na motungisi monene, azwaki makoki ya koyika mpiko. Lolenge nini? Amibalolaki epai na Nzambe na ye mpo na kozwa lisungi. Toli na ye epai na baoyo bakoki kozala na mayoki moko lokola ye ezali oyo ete: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova].”—Nzembo 55:22.
Alingaki koloba nini wana alobaki “kitisá mokumba na yo epai na [Yehova]”? Elimboli kokende bobele epai na Yehova na libondeli komonisa ye mitungisi na biso? To biso moko tokoki mpe kosala likambo oyo likoki kobɔndisa biso? Ezali boni soki tozali komiyoka ete tobongi te kobɛlɛma epai na Yehova? Tokoki komona oyo Davidi alingaki koloba soki totali makambo mosusu ya bomoi na ye oyo mbala mosusu amikundolaki yango ntango akomaki maloba wana.
Tósala makambo na nguya ya Yehova
Ozali komikundola lolenge Goliata apesaki nsɔ́mɔ kati na mitema ya mibali ya etumba ya Yisalaele? Mobali wana mbinga, koleka bolai ya bamɛtɛlɛ 2,7 abangisaki mpenza bango. (1 Samwele 17:4-11, 24) Kasi Davidi abangaki te. Mpo na nini? Mpo ete alukaki te kobunda na Goliata na nguya na ye moko. Kobanda ntango oyo apakolamaki mpo ete na nsima azala mokonzi ya Yisalaele, amitikaki ete elimo ya Nzambe etambwisa bomoi na ye mpe elendisa ye kati na makambo nyonso oyo azalaki kosala. (1 Samwele 16:13) Na yango alobaki na Goliata ete: “Ngai nayeli yo na nkombo na [Yehova] na bibele, Nzambe na basodá na Yisalaele oyo yo obɛtɛli bango ntembe. Lelo oyo, [Yehova] akokitisa yo na lobɔkɔ na ngai.” (1 Samwele 17:45, 46) Davidi amesanaki mingi kosalela bilingongo, kasi tokoki mpenza kondimisama ete elimo ya Yehova nde ekambaki libángá mpe etindaki yango ete eboma Goliata.—1 Samwele 17:48-51.
Davidi ayikaki mpiko liboso na ntembe monene wana mpe alóngaki mpamba te atyelaki Nzambe motema ete akosunga mpe akokɛmbisa ye. Asilaki kosala boyokani ya malamu mpe ya kotyela motema elongo na Nzambe. Na ntembe te yango ekómaki makasi na lolenge oyo Yehova abikisaki ye liboso. (1 Samwele 17:34-37) Lokola Davidi, yo mpe okoki kobatela boyokani makasi elongo na Yehova mpe okoki mpenza kotya motema na makoki mpe bolingo na ye ete akokɛmbisa yo mpe akosunga yo na mikakatano nyonso.—Nzembo 34:7, 8.
Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo na kosilisa mikakatano
Nzokande, yango elingi koloba te ete ntango ya mpasi, ya motungisi mpe ata ya bobángi ekoya lisusu te, lokola Nzembo 55 emonisi yango polele. Na ndakisa, na bambula oyo elandaki, nsima ya komonisa ete atyelaki Yehova motema, Davidi abangaki mingi liboso na bayini na ye. Mokonzi Saulo azalaki lisusu kolinga ye te mpe ye asengelaki kokima mpo na kobikisa bomoi na ye. Kanisá mpasi ya mayoki oyo yango esengelaki kopesa na Davidi, mituna oyo akokaki komituna na ntina na kokokisama ya mokano ya Yehova. Atako asilaki kopakolama lokola moto oyo asengelaki koyangela Yisalaele na nsima, nzokande asengelaki kokimakima na esobe mpo na kobikisa bomoi na ye, bazalaki kolanda ye mpo na kokanga ye lokola nyama ya zámba. Ntango amekaki komibomba na engumba Gata, mboka ya Goliata, bato bayebaki ye. Yango ebimisaki likambo nini? Lisoló yango elobi ete “abangaki mingi.”—1 Samwele 21:10-12.
Kasi atikaki nzela te na bobángi na ye mpe na motungisi monene ete epekisa ye na koluka lisalisi ya Yehova. Engebene Nzembo 34 (oyo ekomamaki nsima ya likambo wana), Davidi alobaki ete: “Nalukaki [Yehova] mpe ye ayambaki ngai; abikisaki ngai na nsɔ́mɔ na ngai nyonso. Mobólá oyo abeelaki mpe [Yehova] ayokaki ye, abikisaki ye na mpasi na ye nyonso.”—Nzembo 34:4, 6.
Ya solo, Yehova asungaki ye. Nzokande, tóyeba ete Davidi afandaki te bobele mpamba kozeláká ete Yehova abikisa ye. Asosolaki ntina ya kosala nyonso oyo ekokaki na ye kati na mikakatano mpo ete akoka kobikisama na ezalela ya mpasi. Asosolaki lobɔkɔ ya Yehova kati na kobikisama na ye, kasi ye moko mpe asalaki likambo, amimonisaki lokola ete azali moto na ligboma mpo ete mokonzi ya Gata aboma ye te. (1 Samwele 21:14–22:1) Bobele bongo biso mpe tosengeli kosala nyonso ekoki na biso mpo ete tóyika mpiko na bozito na biso, na esika ete tózela bobele Yehova nde akoka kobikisa biso.—Yakobo 1:5, 6; 2:26.
Tómibakisela bozito te
Na nsima kati na bomoi na ye, Davidi ayekolaki liteya mosusu, ya mpasi mpenza. Ezalaki nini? Ete mbala mosusu biso moko tomibakiselaka bozito likoló na biso. Nsima ya bolóngi na ye likoló na Bafilisitia, Davidi akutanaki na mikakatano ntango azwaki ekateli ya komema sanduku ya kondimana na Yelusaleme. Lisoló yango liyebisi biso ete: “Mpe Davidi atɛmaki, akendaki esika moko na bato nyonso bazalaki na ye longwa na Baale na Yuda ete báyeisa sanduku na Nzambe . . . Batyaki sanduku na Nzambe na likaló na sika . . . Uza mpe Ahio, bana na Abinadaba, batambolisaki likaló na sika.”—2 Samwele 6:2, 3.
Kosalela likaló mpo na komema Sanduku ezalaki kobuka malako nyonso oyo Yehova apesaki na ntina na yango. Eyebisamaki polele ete bobele baoyo bapesameli nzela ya komema yango, Balewi ya libota ya Koata, basengelaki komema Sanduku na mapeka na bango, kosaleláká bongo banzeté kati na madusu mabongisamaki mpo na yango likoló na Sanduku. (Exode 25:13, 14; Mituya 4:15, 19; 7:7-9) Kozanga kotya likebi na malako wana ememaki na mpasi. Ntango bangɔmbɛ oyo ezalaki kobenda likaló esalaki lokola ete ekweisa yango, Uza, oyo mbala mosusu azalaki Molewi kasi azalaki nganga te, asembolaki lobɔkɔ mpo na kosimba Sanduku mpe Yehova abɛtaki ye mpo na kozanga botosi na ye.—2 Samwele 6:6, 7.
Lokola Davidi azalaki mokonzi asengelaki komema mokumba ya likambo yango. Lolenge oyo asalaki emonisi ete baoyo bazali na boyokani malamu elongo na Yehova mbala mosusu bakoki kosala makambo na lolenge lobongi te wana ezali bango kati na komekama. Ya liboso, Davidi asilikaki. Na nsima abangaki. (2 Samwele 6:8, 9) Boyokani malamu oyo azalaki na yango elongo na Yehova etyamaki na komekama makasi. Wana emonani ete ezalaki libaku oyo azangaki kokitisa mokumba na ye epai na Yehova, wana atosaki malako na ye te. Yango ekoki mbala mosusu kokómela biso? Topamelaka ntango nyonso Yehova mpo na mikakatano oyo miyaka mpo ete totosaki te malako na ye?—Masese 19:3.
Ayikaki mpiko na liyoki ya komema ngambo
Na nsima, Davidi amibakiselaki bozito monene ya kotungisama na lisosoli ntango asalaki lisumu monene epai na Yehova na kobukáká mitindá na ye ya bizaleli malamu. Na libaku yango Davidi asundolaki mokumba na ye ya kokamba basodá na ye na etumba. Atikalaki na Yelusaleme ntango basodá na ye bakendaki kobunda. Yango ememaki na mokakatano moko monene.—2 Samwele 11:1.
Mokonzi Davidi amonaki Bata-seba, mwasi kitoko wana azalaki kosukola nzoto. Akweaki na etamboli ya mbindo elongo na ye, mpe mwasi yango azwaki zemi. (2 Samwele 11:2-5) Mpo na koluka kobomba lisumu yango, asalaki ebongiseli ete Uliya, mobali na ye azonga na Yelusaleme longwa na esika ya etumba. Uliya aboyaki kosangana na mwasi na ye wana Yisalaele ezalaki kati na etumba. (2 Samwele 11:6-11) Sikawa Davidi azwaki ekateli ya kosalela mayele mabe mpo na kobomba lisumu na ye. Asalaki ebongiseli ete basodá oyo bazalaki baninga ya Uliya bákoka kotika Uliya na esika oyo ezalaki na likámá mingi mpo ete akoka kobomama. Lisumu moko ya nsɔ́mɔ, ya monene!—2 Samwele 11:12-17.
Ya solo, na nsima, Davidi asengelaki kozongisa monɔkɔ mpo na lisumu na ye, mpe atɔndɔlamaki mpo na yango. (2 Samwele 12:7-12) Meká kokanisa bozito ya mawa to ya kotungisama ya lisosoli oyo Davidi akokaki koyoka ntango bonene ya makambo ye asalaki mpo na mposa mabe na ye eyelaki ye na makanisi. Abulunganaki mpo na mabungá na ye moko, mingi mpenza mpo ete azalaki mobali moko ya mayoki makasi, ya lisosoli ya pɛtɛpɛtɛ. Ekoki kozala ete amiyokaki mpenza ete azalaki na motuya ata moke te!
Nzokande, nokinoki Davidi andimaki mabe na ye, koyamboláká liboso na mosakoli Natana ete: “Nasaleli [Yehova] lisumu.” (2 Samwele 12:13) Nzembo 51 eyebisi biso lolenge amiyokaki mpe lolenge abondelaki Yehova Nzambe ete apɛtɔla ye mpe alimbisa ye. Abondelaki ete: “Sukolá ngai malamu kolongola mabe na ngai, pɛtɔlá ngai na masumu na ngai. Mpo ete nayebi epɛngwɛli na ngai mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso.” (Nzembo 51:2, 3) Lokola asilaki mpenza kobongola motema, akokaki kosala lisusu boyokani ya makasi mpe ya penepene elongo na Yehova. Davidi atikaki te ete mayoki ya mawa mpe ya kozanga motuya maumela na makanisi na ye. Akitisaki mokumba na ye epai na Yehova kondimáká bongo na komikitisa nyonso mabungá na ye, komonisáká bongo kobongola motema ya solo, mpe kobondeláká mingi mpo na kosɛnga bolimbisi ya Yehova. Azwaki lisusu ngɔlu ya Nzambe.—Nzembo 51:7-12, 15-19.
Ayikaki mpiko ntango atekamaki
Yango ememi biso na likambo oyo epusaki Davidi na kokoma Nzembo 55. Azalaki na mpasi makasi ya mayoki. Akomaki ete: “Motema na ngai eyoki mpasi kati na ngai, mpe nsɔ́mɔ na kufa ekwei likoló na ngai.” (Nzembo 55:4) Nini epesaki ye mpasi wana? Abesaloma, mwana mobali ya Davidi, aangaki mwango mabe mpo na koyiba bokonzi na mabɔkɔ na Davidi. (2 Samwele 15:1-6) Bosuli wana na mwana na ye moko ezalaki mpenza kopesa mpasi mingi, kasi oyo ebakisaki mpasi koleka ezalaki ete mopesi-toli ya motema mpenza, mobali moko na nkombo Ahitofele, asanganaki na botomboki wana mpo na kokweisa Davidi. Ezali Ahitofele nde Davidi alobeli na Nzembo 55:12-14. Botomboki mpe bosuli wana esalaki ete Davidi akima Yelusaleme. (2 Samwele 15:13, 14) Yango epesaki ye motema mpasi solo!
Nzokande, atikaki te ete mayoki makasi wana mpe mawa elɛmbisa elikya na ye mpe motema oyo atyelaki Yehova. Abondelaki Yehova ete abulunganisa myango ya batomboki. (2 Samwele 15:30, 31) Lisusu tokoki komona ete Davidi afandaki te mpo na kozela bobele ete Yehova asala nyonso ye moko. Nokinoki wana libaku lizwamaki, asalaki oyo ekoki na ye mpo na kobundisa botomboki oyo ezalaki kotɛmɛla ye. Atindaki moko na bapesi-toli na ye, Husai, ete azonga na Yelusaleme mpo na komonisa lokola ete alingaki kosangana na botomboki yango, nzokande, akendeki mpenza mpo na kokweisa yango. (2 Samwele 15:32-34) Na lisalisi ya Yehova, mwango yango elóngaki. Husai asalaki ete Davidi azwa ntango mingi mpo na koyanganisa babundi mpe komibongisa mpo na kobunda.—2 Samwele 17:14.
Kati na bomoi na ye mobimba, Davidi asengelaki kozala na botɔ́ndi mingi mpo na kobatelama na likebi nyonso mpe motema pɛtɛɛ mpe kolimbisa oyo Yehova amoniselaki ye! (Nzembo 34:18, 19; 51:17) Ezali na nzela ya likambo wana ya bomoi na ye nde na kondimisama nyonso Davidi azali kolendisa biso ete na ntango ya mpasi tómibalola epai na Yehova mpo na kozwa lisalisi, ete ‘tókitisa mokumba na biso epai na [Yehova].’—Kokanisá na 1 Petelo 5:6, 7.
Kolisá mpe batelá boyokani ya makasi mpe ya kotyela motema elongo na Yehova
Lolenge nini tokoki kokólisa boyokani motindo moko na oyo Davidi azalaki na yango elongo na Yehova, boyokani oyo esungaki ye na ntango ya komekama mpe ya mpasi makasi? Tokólisaka boyokani lolenge yango na kozaláká bayekoli ya molende ya Liloba ya Nzambe, Biblia. Tokotika ye ete ateya biso na ntina na mibeko, mitindá mpe bomoto na ye. (Nzembo 19:7-11) Wana tozali komanyola likoló na Liloba ya Nzambe, tozali ntango nyonso kobɛlɛma penepene na ye mpe tozali koyekola kotyela ye motema na makambo nyonso. (Nzembo 143:1-5) Tozali koyeisa mozindo mpe makasi boyokani yango ntango tozali kosangana elongo na baninga na biso basambeli mpo ete Yehova ateya biso lisusu makambo mingi. (Nzembo 122:1-4) Tiká ete tóyeisa makasi boyokani na biso elongo na Yehova na nzela ya mabondeli oyo mauti na motema.—Nzembo 55:1.
Ezali solo ete, lokola biso, Davidi mpe azalaki na mitungisi ntango boyokani na ye elongo na Yehova ezalaki mpenza makasi te lokola esengelaki kozala. Monyoko ekoki kokómisa biso na “bolémá.” (Mosakoli 7:7) Kasi Yehova azali komona nyonso oyo ezali kobima, mpe ayebi nini oyo ezali kati na motema na biso. (Mosakoli 4:1; 5:8) Tosengeli kosala milende mpo na kobatela boyokani na biso elongo na Yehova ete ezala makasi. Bongo, ata bozito nini tokoki komema, tokotalela Yehova ete akitisela biso motungisi to ete apesa biso nguya ya koyika mpiko kati na ezalela na biso. (Bafilipi 4:6, 7, 13) Nyonso etali lolenge oyo tozali kotikala penepene na Yehova. Ntango Davidi asalaki bongo, azalaki solo na libateli.
Na yango, atako ezalela ya makambo na biso ezali nini, Davidi alobi ete, kitisá ntango nyonso mokumba na yo epai na Yehova. Bongo tokomona bosolo ya elaka oyo ete: “Ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebeni atelengana.”—Nzembo 55:22.