Mokanda ya Biblia nimero 10—2 Samwele
Bakomi: Gada mpe Natana
Esika ya bokomi: Yisalaele
Nsuka ya bokomi: soko 1040 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: 1077-soko 1040 L.T.B.
1. Makambo nini mazalaki ntango mokanda ya Samwele ya Mibale mobandi, mpe lolenge nini lisoló na yango likóbi?
LIBOTA ya Yisalaele lizalaki kati na bozangi elikya na ntina na likámá monene oyo libimaki na Giliboa mpe oyo ememaki bokɔti ya mobulu ya Bafilisitia oyo bautaki kolónga na mokili wana. Batambwisi ya Yisalaele mpe bilenge mibali na yango ya molende bakufi. Ezalaki na ntango yango nde, elenge “mopakolami na [Yehova],” Davidi, mwana ya Yisai, akɔtaki mpenza na lisoló ya ekólo na ye. (2 Sam. 19:21) Boye, mokanda ya Samwele ya Mibale mobandi, mpe yango ekoki kobéngama na lolenge lobongi mpenza ete mokanda ya Yehova na Davidi. Lisoló na yango litondi na makambo ya ndenge nyonso. Tomemami longwa na bolóngami monene kino na bolóngi eleki monene, longwa na bwale ya libota libebisami na bitumba kino bomɛngo ya bokonzi ya bomoko, longwa na nguya ya bolenge kino na mayele ya bompaka. Oyo ezali lisoló ya solosolo ya bomoi ya Davidi wana azalaki kolanda Yehova na motema na ye mobimba.a Ezali lisoló oyo lisengeli komema motángi nyonso na kotalela motema na ye, na ntina ete akoka kokembisa boyokani mpe etɛlɛmɛlo na ye elongo na Mozalisi na ye.
2. (a) Ndenge nini mokanda yango moyaki kobéngama Samwele ya Mibale? (b) Banani bazalaki bakomi na yango, bazalaki na makoki nini, mpe balukaki kobatela bobele lisoló nini?
2 Ya solo, nkombo ya Samwele elobelami ata mbala moko te kati na lisoló ya mokanda ya Samwele ya Mibale, mpe soki mokanda yango mobéngami na nkombo na ye, ekoki kozala mpo ete yango ezalaki mokanda to rulo bobele moko elongo na mokanda ya Samwele ya Liboso. Mosakoli Natana mpe mosakoli Gada, baoyo basukisaki bokomi ya mokanda ya Samwele ya Liboso, bakóbaki kokoma Samwele ya Mibale na mobimba na yango. (1 Nta. 29:29) Bazalaki na makoki mingi mpo na kosala mosala yango. Na ntango oyo Davidi azalaki kolukama lokola mobuki na mibeko oyo abongi na liwa, Gada azalaki elongo na ye mpe, na nsuka ya boyangeli ya mbula 40 ya Davidi, Gada azalaki ntango nyonso kokangama makasi na mokonzi yango. Gada azali moto oyo asalelamaki mpo na komonisa nkanda ya Yehova na likambo ya bozoba oyo Davidi asalaki na kotángáká motuya ya bato na Yisalaele. (1 Sam. 22:5; 2 Sam. 24:1-25) Misala ya mosakoli Natana, mosalani ya penepene na Davidi, misalemaki na ntango Gada azalaki na bomoi mpe milandaki kosalema na nsima ya eleko yango. Ezali ye nde azwaki libaku ya koyebisa kondimana ya ntina mingi kati na Yehova mpe Davidi, kondimana oyo etalaki bokonzi moko ya seko. Ezali ye moto amonisaki, na mpiko nyonso mpe na kopemama [na Nzambe], lisumu monene oyo Davidi asalaki elongo na Bata-seba mpe etumbu oyo epesamaki mpo na yango. (2 Sam. 7:1-17; 12:1-15) Na bongo, Yehova asalelaki Natana, oyo nkombo na ye elimboli “[Nzambe] asili kopesa,” mpe Gada, oyo nkombo na ye elimboli “Makila malamu,” ete bákoma maloba mapemami mpe ya litomba kati na Samwele ya Mibale. Bakomi wana ya makambo ya kala, baoyo batondi na komikitisa, balukaki te ete nkombo na bango ebatelama, mpe ezali ata na liyebisi moko te oyo lilobeli bankɔ́kɔ na bango to mpe bomoi na bango moko. Balukaki kobatela bobele lisoló lipemami na Nzambe, mpo na bolamu ya basambeli ya Yehova oyo basengelaki koya nsima.
3. Makambo makomami na mokanda ya Samwele ya Mibale masalemaki na boumeli ya eleko nini, mpe kokomama na yango esukaki ntango nini?
3 Mokanda ya Samwele ya Mibale mokóbi istware ya sikisiki ya Biblia nsima na liwa ya Saulo, mokonzi ya liboso na Yisalaele, mpe momemi yango kino pene na nsuka ya boyangeli ya Davidi oyo eumelaki mbula 40. Boye, eleko oyo mokanda yango ezwaki ebandi na mobu 1077 L.T.B. kino soko mobu 1040 L.T.B. Kozanga kolobelama ya liwa ya Davidi kati na mokanda oyo, ezali elembeteli makasi oyo emonisi ete mokanda yango mokomamaki soko na mobu 1040 L.T.B., to mwa moke liboso ya liwa na ye.
4. Mpo na bantina nini mokanda ya Samwele ya Mibale mosengeli kondimama lokola eteni ya kanɔ́ ya Biblia?
4 Bantina bobele moko, oyo emonisamaki mpo na mokanda ya Samwele ya Liboso, endimisi mpe mokanda ya Samwele ya Mibale ete mozali moko na mikanda ya kanɔ́ ya Biblia. Bosolo na yango etyelami ntembe te. Elobeli na yango ya polele, oyo ebombi ata masumu mpe bolɛmbu ya Mokonzi Davidi te, ezali mpenza elembeteli monene oyo ezwami kati na yango moko.
5. Wapi ntina eleki monene mpo na kondima Samwele ya Mibale ete ezali Makomami mapemami?
5 Nzokande, elembeteli oyo eleki monene mpo na kondimisa bosolo ya Samwele ya Mibale ezali komonana kati na bisakweli na yango oyo bikokisamaki, mingimingi mpenza bisakweli oyo bitali kondimana ya Bokonzi elongo na Davidi. Nzambe alakaki ete: “Libota [“ndako,” NW] na yo mpe bokonzi na yo ikobongisama liboso na yo libela; kiti na bokonzi na yo ekokokisama seko.” (7:16) Pene na nsuka ya bokonzi ya Yuda, Yilimia alobelaki kolandana ya elaka wana na ndako ya Davidi, na maloba oyo: “[Yehova] alobi boye ete, Davidi akozanga moto te mpo na kofanda na kiti na bokonzi na ndako na Yisalaele.” (Yil. 33:17) Esakweli wana ekokisamaki solo, mpo ete, na nsima, Yehova abimisaki “Yesu Klisto, mwana na Davidi,” uta na libota ya Yuda, lokola Biblia emonisi yango polele.—Mat. 1:1.
MAKAMBO MAZALI KATI NA SAMWELE YA MIBALE
6. Mayoki ya Davidi mazalaki nini ntango azwi nsango ya liwa ya Saulo mpe Yonatana?
6 Makambo ya ebandeli ya boyangeli ya Davidi (1:1–4:12). Nsima ya liwa ya Saulo na Ngomba Giliboa, Moamaleki moko, oyo akimaki longwa na etumba, ayei na nsango na lombangu nyonso epai na Davidi na Sikelage. Kokanisáká ete Davidi akosepela na ye, asali lisoló ya lokuta ete ezalaki ye nde moto abomaki Saulo. Na esika ya kopesamela longonya, Moamaleki yango apesameli mbano ya liwa, mpamba te asili komikweisa ye moko na kolobáká ete abɛtaki “mopakolami na [Yehova].” (1:16) Davidi, mokonzi ya sika, asali sikawa loyembo ya bileli, ete “Litimbo,” oyo kati na yango azali kolela na ntina na liwa ya Saulo mpe ya Yonatana. Loyembo yango lotombwani kino eteni na yango eleki kosimba motema, ntango elobeli bolingo monene ya Davidi mpo na Yonatana ete: “Nayoki mawa mingi mpo na yo, Yonatana ndeko na ngai! Yo ozalaki na bolingo epai na ngai. Bolingo na yo epai na ngai ezalaki malamu na kokamwa, koleka bolingo na basi. Bato na mpiko bakwei na kokwea boni! Mpe bibuneli na etumba bibebi nyɛ!”—1:17, 18, 26, 27.
7. Wapi makambo mosusu oyo malekaki na eteni ya ebandeli ya boyangeli ya Davidi?
7 Na litambwisi ya Yehova, Davidi mpe bato na ye bamemi mabota na bango nyonso kino Hebeloni, na mokili ya Yuda. Kuna, mikóló ya libota yango bayei kopakola Davidi lokola mokonzi na bango na mobu 1077 L.T.B. Yoaba, mokonzi na basodá, akómi mokɔteli aleki molende kati na baoyo bazali kosunga Davidi. Nzokande, mwana ya Saulo, Isi-bosete, oyo azali kowela bokonzi likoló na Yisalaele, apakolami na Abinele, mokonzi ya limpinga, mpo na kozala mokonzi. Matátá mazali kobima mbala na mbala kati na mampinga mibale wana, oyo mazali kotɛmɛlana moko na mosusu, mpe Abinele abomi ndeko ya Yoaba. Na nsuka, Abinele amitye na ngámbo ya Davidi. Amemeli Davidi Mikala, mwana mwasi ya Saulo, oyo mpo na ye Davidi asilá kopesa mosolo ya libala uta kala. Nzokande, mpo na kobekola ndeko na ye oyo abomamaki, Yoaba azwi libaku mpo na koboma Abinele. Davidi ayoki mawa mingi na likambo yango, komitángáká ete azali na ngambo te mpo na yango. Mwa moke na nsima, Isi-bosete ye moko abomami ntango azali ‘kolala mpo na bopemi na nzánga.’—4:5.
8. Lolenge nini Yehova eyeisi bolamu na boyangeli ya Davidi na Yisalaele?
8 Davidi mokonzi na Yelusaleme (5:1–6:23). Atako asilaki koyangela lokola mokonzi na boumeli ya mbula nsambo na nsanza motoba kati na Yuda, nzokande Davidi akómi sikawa moyangeli oyo azangi kotyelama ntembe, mpe bamonisi ya mabota bapakoli ye lokola mokonzi likoló na Yisalaele mobimba. Oyo ezali kopakolama na ye ya misato (na mobu 1070 L.T.B.). Moko na misala ya liboso oyo Davidi asali ntango akómi moyangeli ya bokonzi mobimba ya Yisalaele ezali bongo kozwama ya esika makasi ya Siona kati na Yelusaleme, longwa na mabɔkɔ ya Bayebusi, baoyo bazalaki kofanda kuna, kobimeláká bango na lolenge ya pwasa uta na nzela ya mai na nsé na mabelé. Na nsima, Davidi akómisi Yelusaleme mboka-mokonzi na ye. Yehova na bibele apamboli Davidi, kokómisáká ye moto monene lisusu mpe lisusu. Ata Hilama, mokonzi na Tulo, atindeli Davidi mabaya ya ɛlɛzɛ mpe bato na mosala mpo ete bátongela mokonzi ndako. Libota ya Davidi liyei monene, mpe Yehova ayeiseli boyangeli na ye bolamu mingi. Ezali lisusu na bitumba mibale oyo esengeli kosalema na Bafilisitia bato balingá bitumba. Na etumba ya liboso, Yehova abuki banguna mpo na Davidi na Bala-pelasimi, mpe apesi ye bolóngi. Na etumba ya mibale, Yehova asali likamwisi mosusu na koyokisáká “mongongo na kotambolatambola likoló na mitó na nzeté na baka,” oyo emonisi ete Yehova azali kokende liboso na Yisalaele mpo na kopanza mampinga ya Bafilisitia. (5:24) Yango ezali bolóngi mosusu ya monene oyo basodá ya Yehova bazwaki!
9. Lobelá makambo oyo masalemi na ntango Sanduku ezali komemama na Yelusaleme.
9 Kokamatáká mibali 30 000 elongo na ye, Davidi akei komema sanduku ya kondimana uta na Baale-yuda (Kilyata-yalima) kino na Yelusaleme. Wana yango ezali komemama elongo na mindule mpe na bosepeli, likalo oyo ezali komema Sanduku eningisi yango, mpe Uza, oyo azali kotambola pembenipembeni na yango, asemboli lobɔkɔ mpo na kofandisa malamu Sanduku mosantu. “Nde nkanda na [Yehova] epelelaki Uza; Nzambe abɛtaki ye mpo na libungá na ye.” (6:7) Sanduku yango eyei kofanda na ndako ya Obede-edome, mpe na boumeli ya sanza misato oyo elandaki, Yehova asopi mapamboli mingi likoló na ndako ya Obede-edome. Nsima na sanza misato, Davidi ayei kokamata Sanduku na lolenge lobongi mpo na kosukisa mobembo na yango. Na konganga ya esengo, na mindule, mpe na mabina, Sanduku ememami na mboka-mokonzi ya Davidi. Davidi amonisi polele esengo na ye monene na kobináká liboso na Yehova, kasi mwasi na ye Mikala aboyi likambo yango. Davidi alobi makasi ete: “Nakobina liboso na [Yehova].” (6:21) Lokola etumbu, Mikala atikalaki ekomba kino liwa na ye.b
10. Na nsima, kondimana nini mpe elaka nini ya Yehova eyebisameli biso?
10 Kondimana ya Nzambe elongo na Davidi (7:1-29). Tokómi sikawa na moko na makambo ya ntina mingi matali bomoi ya Davidi, likambo oyo likangisami mpenzampenza na motó na likambo ya Biblia, kosantisama ya nkombo ya Yehova na nzela ya Bokonzi botambwisami na Mombóto oyo alakamaki. Likambo yango lilamwisi epai na Davidi mposa ya kotonga ndako mpo na sanduku ya Nzambe. Kofandáká ye moko na ndako kitoko esalemi na mabaya ya ɛlɛzɛ, amonisi epai na Natana mposa na ye ya kotonga ndako mpo na sanduku ya kondimana ya Yehova. Na nzela ya Natana, Yehova apesi lisusu Davidi endimiseli ya motema-boboto na Ye epai na Yisalaele mpe asali na ye kondimana oyo ekoumela libela na libela. Nzokande, ekozala Davidi te kasi mombóto na ye nde akotonga ndako mpo na nkombo ya Yehova. Lisusu, Yehova apesi elaka kitoko ete: “Libota na yo mpe bokonzi na yo ikobongisama liboso na yo libela; kiti na bokonzi na yo ekokokisama seko.”—7:16.
11. Na libondeli nini Davidi apesi matɔ́ndi?
11 Kolongamáká na boboto monene ya Yehova, lokola emonisami na kondimana wana mpo na Bokonzi, Davidi apesi ebele na matɔ́ndi mpo na makambo manso ya motema-boboto ya Nzambe ete: “Libota nini mosusu kati na mokili ekokani na bato na yo Yisalaele, oyo Nzambe akendaki kosikola ete bázala bato na ye moko; mpe komikumisa na nkombo malamu na nzela na kosalela bino makambo minene mpe na nsɔ́mɔ[?] . . . Yo [Yehova] okomi Nzambe na bango.” (7:23, 24) Na molende nyonso, abondeli mpo na kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe mpo na ndako na ye moko Davidi ete etyama ngwi liboso na Ye.
12. Bitumba nini Davidi abundi, mpe boboto nini amoniseli libota ya Saulo?
12 Davidi akólisi boyangeli ya Yisalaele (8:1–10:19). Nzokande, mikakatano mizangi te na boyangeli ya Davidi. Bitumba ya kobunda bizali naino. Davidi abomi Bafilisitia, Bamoaba, abomi bato na Soba, Basulia mpe bato na Edome, kotandoláká mabelé ya Yisalaele kino bandelo oyo etyamaki na Nzambe. (2 Sam. 8:1-5, 13-15; Det. 11:24) Na nsima, Davidi atye likebi na ye likoló na ndako ya Saulo mpo ete akoka komonisa motema-boboto epai na moto nyonso kati na libota wana, na ntina na bolingo na ye mpo na Yonatana. Ziba, mosaleli ya Saulo, ayebisi ye ete mwana moko ya Yonatana azali, nkombo na ye Mefibosete, oyo azali motɛngumi na makolo na ye mibale. Bobele na ntango yango, Davidi asɛngi ete biloko binso ya Saulo bipesama epai na Mefibosete mpe ete Ziba mpe basaleli na ye balóna mabelé ya Saulo mpo na kopesa bilei na ndako ya Mefibosete. Nzokande, Mefibosete ye moko asengeli kolya na mesa ya Davidi.
13. Na bolóngi nini mosusu Yehova amonisi ete azali elongo na Davidi?
13 Ntango mokonzi ya Amona akufi, Davidi atindi bamonisi na ye epai na Hanunu, mwana na mokonzi, mpo na kobɔndisa ye na maloba ya boboto. Nzokande, bapesi-toli ya Hanunu bafundi Davidi ete atindi bato yango mpo na konɔ́nga mokili, na bongo boyokisi bango nsɔ́ni mpe bazongisi bango ndambo ya nzoto bolumbu. Koyokáká nkanda mpo na matumoli wana, Davidi atindi Yoaba elongo na limpinga na ye mpo na kobekola likambo mabe wana. Kokaboláká basodá na bituluku, apanzi, kozanga mpasi, Baamona mpe Basulia oyo bayaki kosalisa bango. Basulia basangisi basodá na bango, kasi balóngi bango lisusu na mampinga ya Yehova na litambwisi ya Davidi mpe babungisi batambolisi-makalo 700 mpe batambwisi-mpunda 40 000. Oyo ezali elembeteli mosusu oyo emonisi ngɔlu mpe mapamboli ya Yehova likoló na Davidi.
14. Masumu nini Davidi asali na bokangani na Bata-seba?
14 Davidi asali lisumu liboso na Yehova (11:1–12:31). Na eleko ya prɛntá oyo elandi, Davidi atindi lisusu Yoaba na Amona mpo na kozingela Laba, wana ye moko atikali naino na Yelusaleme. Mokolo moko na mpokwa, wana Davidi atɛlɛmaki likoló ya samba ya ndako na ye, abandi kotala Bata-seba ntango azali kosukola nzoto, ye atondi kitoko bɛɛ, mwasi ya Uliya, Mohiti. Komemáká Bata-seba na ndako na ye, asangani na ye, mpe Bata-seba azwi zemi. Davidi ameki kobomba likambo yango na kozongisáká Uliya na ndako longwa na etumba na Laba mpe atindi ye na ndako na ye mpo na kominyolisa nzoto. Nzokande, Uliya aboyi komisepelisa mpe kosangana na mwasi na ye mpamba te Sanduku mpe limpinga “bafandi na Hema.” Kobungisáká elikya, Davidi azongisi Uliya epai na Yoaba elongo na nkomá oyo elobi ete: “Tyá Uliya na epai na liboso na esika wana etumba eleki na makasi mpe longwa epai na ye ete abɛtama mpe ete akufa.” (11:11, 15) Ezali na lolenge yango nde Uliya akufi. Wana eleko ya kolela mpo na Bata-seba eleki, Davidi akamati ye nokinoki kati na ndako na ye, epai kuna akómi mwasi ya Davidi, mpe mwana na bango, mwana mobali, abotami.
15. Lolenge nini Natana asali lisambisi ya esakweli likoló na Davidi?
15 Likambo yango limonani mabe na miso ya Yehova. Atindi mosakoli Natana epai na Davidi na nsango ya lisambisi. Natana alobeli Davidi lisapo ya moto na bozwi mpe mobólá. Moto na bozwi azalaki na bibwɛlɛ mingi, kasi mobólá azalaki bobele na mwana na mpate moko, oyo elingamaki mingi na libota mpe “ezalaki epai na ye lokola mwana mwasi.” Nzokande, ntango esengelaki kosala elambo, moto na bozwi akamati mpate kati na bitongá na ye te, kasi mwana na mpate ya mobólá wana. Nkanda ya Davidi epeli na koyoka likambo yango, mpe angangi ete: “Lokola [Yehova] azali na bomoi, moto oyo asali yango abongi kokufa!” Natana azongisi maloba ete: “Yo [moko nde] moto yango!” (12:3, 5, 7) Na nsima, alobeli lisambisi ya esakweli ete mobali mosusu akosangana na basi ya Davidi na makasi liboso na bato banso, mpe ete ndako na ye ekobɛtama na bolózi ya bitumba kati na yango, mpe mwana oyo Bata-seba aboteli ye akokufa.
16. (a) Bandimbola nini ekangani na bankombo ya mwana ya mibale oyo Bata-seba aboteli Davidi? (b) Etumba ya nsuka kuna na Laba esukaki ndenge nini?
16 Na mpasi mpe na kobongola motema na bosembo nyonso, Davidi andimi ete: “Nasaleli [Yehova] lisumu.” (12:13) Na kokokisama ya liloba ya Yehova, mwana wana oyo abotamaki na ekobo akufi nsima na kobɛla mikolo nsambo. (Na nsima, Davidi mpe Bata-seba baboti mwana mosusu; babéngi ye Salomo, nkombo euti na liloba oyo elimboli “kimya.” Nzokande, Yehova atindi na nzela ya Natana ete mwana yango abéngama lisusu Yedidia, oyo elimboli “Molingami na Yah.”) Nsima na likambo wana oyo linyokolaki molimo na ye, Davidi abéngi Yoaba ete akende na Laba, epai kuna etumba ya nsuka ezali kolɛngɛlama. Lokola asili kokamata ebombelo ya mai oyo mboka yango ezalaki komela, na limemya nyonso Yoaba atikeli mokonzi lokumu ya kokamata mboka yango moko.
17. Yikiyiki nini ebandi kokwela libota ya Davidi?
17 Mikakatano na libota ya Davidi (13:1–18:33). Yikiyiki na ndako ya Davidi ebandi ntango Amenona, moko na bana mibali ya Davidi, aluli Tamala, ndeko mwasi ya Abesaloma, oyo abotamaki na Amenona tata moko kasi mama moko te. Amenona akosi maladi mpe asɛngi ete Tamala, mwasi kitoko bɛɛ, atindama mpo na kobɔndisa ye. Asangani na ye na makasi mpe na nsima ayei koyina ye makasi, na boye ete abéngani ye na koyokisáká ye nsɔ́ni. Abesaloma akani kosala bobekoli, kozeláká ete ntango na ye ekoka. Pene na mbula mibale na nsima, abongisi elambo epai kuna Amenona mpe bana nyonso mosusu ya mokonzi babyangami. Ntango motema ya Amenona motondi na esengo na vinyo, bakangi ye mpe babomi ye na etindá ya Abesaloma.
18. Na mwango nini ya mayele Abesaloma azongisami uta na mboka mopaya?
18 Kobangáká nkanda ya mokonzi, Abesaloma akimi na Gesulu, epai kuna afandi mbula misato lokola moto babenganá na mboka. Bobele na ntango yango, Yoaba, mokonzi ya limpinga ya Davidi, asali mwango ya kozongisa boyokani kati na Davidi mpe Abesaloma. Asali ebongiseli ete mwasi moko ya mayele na Tekoa abimisa likambo moko ya lokuta liboso na mokonzi na ntina na kofutama, kobengana moto na mboka, mpe na ntina na etumbu. Ntango mokonzi asambisi, mwasi yango atɔndɔli ntina ya solosolo oyo ayaki epai na mokonzi, kolobáká ete Abesaloma, mwana ya mokonzi ye moko, azali na Gesulu mpo ete babenganá ye na mboka. Davidi asosoli ete Yoaba nde asalaki mwango yango kasi apesi ndingisa ete mwana na ye azonga na Yelusaleme. Mbula mibale esengelaki naino koleka liboso ete mokonzi andima komonana na Abesaloma.
19. Mwango mabe nini moyebani sikawa polele, mpe makambo nini yango epusi Davidi na kosala?
19 Atako Davidi amoniseli ye motema-boboto, nzokande, mwa moke na nsima, Abesaloma ayangi mwango ete abɔtɔla kiti ya bokonzi ya tata na ye. Abesaloma azali na bonzenga mingi koleka bilombe mibali nyonso ya Yisalaele, mpe yango etomboli lisusu mposa mabe mpe lolendo na ye. Mbula na mbula, ntango ebele ya nsuki ya motó na ye ezalaki kokatama, nyonso ezalaki na bozito soko ya kiló 2,3. (2 Sam. 14:26, NW, maloba na nsé na lokasa) Na myango ndenge na ndenge ya mayele mabe, Abesaloma abandi kolengola mitema ya bato ya Yisalaele. Mpe na nsuka, mwango yango mabe moyei koyebana. Lokola tata na ye apesi ye ndingisa ya kokende na Hebeloni, kuna Abesaloma asakoli mokano na ye ya botomboki mpe abyangi Yisalaele mobimba ete bázala na nsima na ye mpo na kotomboka liboso na Davidi. Lokola bato mingi bamitye na ngámbo ya mwana na ye motomboki, Davidi akimi Yelusaleme elongo na mwa bakɔteli na ye ya sembo, oyo moko na bango ezali Itai, ye Mogiti, oyo alobi ete: “Lokola [Yehova] azali na bomoi mpe lokola nkolo na ngai mokonzi azali na bomoi, solo na esika nini nkolo na ngai mokonzi azali, soko na kufa soko na bomoi, wana ekozala mpe moombo na yo.”—15:21.
20, 21. (a) Makambo nini mabimi wana Davidi azali naino kokima, mpe lolenge nini esakweli ya Natana ekokisami? (b) Lolenge nini Ahitofele moteki na basusu asuki?
20 Wana azalaki naino kokima longwa na Yelusaleme, Davidi azwi nsango ete Ahitofele ateki ye; Ahitofele yango azali moko na bapesi-toli ya Davidi oyo atyelaka motema. Davidi abondeli ete: “Ɛ [Yehova], nalɔmbi yo ete obongola toli na Ahitofele ete ezala mpamba.” (15:31) Sadoko mpe Abiatala, banganga ya sembo epai na Davidi, elongo na Husai Moalaki batindami na Yelusaleme mpo na kotala misala ya Abesaloma mpe komema nsango na yango. Bobele na ntango yango, kati na mokili mokauki, Davidi akutani na Ziba, mosaleli ya Mefibosete, oyo ayei na nsango ete nkolo na ye azali na mposa ya kozongisa bokonzi na ndako ya Saulo. Wana Davidi azali koleka, Simi, moto na libota ya Saulo, abandi kolakela ye mabe mpe kobamba ye mabanga, kasi Davidi apekisi bato na ye ete básala ye mabe te.
21 Ntango azongi na Yelusaleme, na boyokani na lilako oyo Ahitofele apesaki ye, Abesaloma, mobotoli bokonzi na makasi, asangisi nzoto na bamakango ya tata na ye “na miso na Yisalaele mobimba.” Likambo yango lisalemi mpo na kokokisa esakweli ya lisambisi oyo Natana ayebisaki. (16:22; 12:11) Lisusu, Ahitofele apesi Abesaloma toli ete akamata limpinga ya mibali 12 000 mpo na kokende koluka Davidi kati na mokili mokauki. Nzokande, Husai, oyo Abesaloma akómaki kotyela ye motema, asɛngi ete makambo másalema lolenge mosusu. Mpe na boyokani na libondeli ya Davidi, toli ya Ahitofele ebwakami. Ahitofele oyo ayokisami mawa, asali makambo lokola Yuda [Mokeliota], azongi ndako mpe amikakisi. Husai ayebisi na nkuku myango mabe ya Abesaloma epai na nganga Sadoko mpe nganga Abiatala, mpe bango batindi nsango epai na Davidi na mokili mokauki.
22. Bolóngi ya Davidi ebungisi lokumu na yango na ntina na mpasi monene nini?
22 Yango epesi Davidi likoki ya kokatisa Yordani mpe kopona esika ya etumba na zámba ya Mahanaimi. Kuna, abongisi mampinga na ye mpe alakeli bango ete básalela Abesaloma makambo na makasi te. Batomboki bolóngami na kobomama ya nsɔ́mɔ. Wana Abesaloma azali kokima likoló na mpunda na kati ya zámba wana oyo nzeté na yango eyikanayikana, motó na ye mokangami na bitape ya nsé ya nzeté moko monene, mpe akakemi na katikati ya likoló mpe nsé. Kokutáká ye na mpasi ya liwa, Yoaba abomi ye, kozangáká mpenza kotosa etindá oyo mokonzi apesaki. Mpasi monene oyo Davidi ayoki na likambo ya liwa ya mwana na ye emonisami na bileli oyo: “Ɛ Abesaloma, mwana na ngai, mwana na ngai, mwana na ngai Abesaloma! Soko ngai nakufaki na esika na yo, ɛ Abesaloma, mwana na ngai, mwana na ngai!”—18:33.
23. Bibongiseli nini bisalami na bozongi ya Davidi?
23 Makambo ya nsuka ya boyangeli ya Davidi (19:1–24:25). Davidi akóbi kolela mwana na ye kino Yoaba alobeli ye na makasi ete azongela etɛlɛmɛlo na ye oyo ebongi lokola mokonzi. Sikawa, atye Amasa ete azala mokonzi ya basodá na ye na esika ya Yoaba. Ntango azali kozonga, bato bayambi ye malamu, sangisá mpe Simi, oyo Davidi abikisi bomoi na ye. Mefibosete mpe ayei kolobela likambo na ye, mpe Davidi apesi ye libula elongo na Ziba ete bakabola yango na ndambo mibale ekokani. Mbala oyo lisusu, Yisalaele mpe Yuda ekómi na bomoko na nsé na Davidi.
24. Makambo nini mosusu masalemi oyo kati na yango libota ya Benyamina likɔtisami?
24 Nzokande, makambo mosusu ya yikiyiki malingi kobima. Seba, Mobenyamina, amizalisi mokonzi mpe apɛngwisi bato mingi longwa na Davidi. Amasa, oyo Davidi atindi ete asangisa mibali ya etumba mpo na kosukisa botomboki wana, akutani na Yoaba mpe abomami na kokosamáká. Bongo, Yoaba akamati limpinga mpe alandi Seba na mboka Abela ya Bete-maka mpe azingeli yango. Kolandáká toli ya mwasi moko ya mayele kati na mboka, bafandi na mboka yango babomi Seba, mpe Yoaba alongwi wana. Lokola Saulo abomaki bato na Gibona mpe ngambo ya makila ebekolami naino te, mbula misato ya nzala ekɔti na Yisalaele. Mpo na kolongola ngambo yango ya makila, bana nsambo na libota ya Saulo babomami. Na nsima, na etumba mosusu elongo na Bafilisitia, Abisai, mwana ya ndeko ya Davidi, abikisi bomoi ya Davidi na liwa mpenza. Bato na ye balapi ndai ete akoki lisusu te kokende na bango na etumba, na ntina ete ‘akoka te kozimisa mwinda na Yisalaele!’ (21:17) Bongo mibali misato kati na bilombe na ye bazwi mpenza elónga monene na kobomáká bingambe Bafilisitia.
25. Nini emonisami kati na nzembo ya Davidi oyo ikomamaki na nsima?
25 Awa, mokomi akati lisoló mpe amonisi loyembo ya Davidi epai na Yehova, loyembo oyo lokokani na Nzembo 18 mpe oyo ezali kopesa matɔ́ndi mpo na kobikisama “na mabɔkɔ na bayini na ye nyonso mpe na lobɔkɔ na Saulo.” Na esengo nyonso, alobi ete: “[Yehova] azali libanga na ngai, esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai. Azali kokembisa mokonzi na ye mpe komonisa boboto epai na mopakolami na ye, epai na Davidi mpe bana [“mombóto,” NW] na ye libela.” (22:1, 2, 51) Na nsima, loyembo ya nsuka ya Davidi elandi, loyembo oyo kati na yango andimi ete, “elimo ya Yehova nde elobaki na nzela na ngai, mpe liloba na ye ezalaki na lolemo na ngai.”—23:2, NW.
26. Nini eyebisami na ntina na mibali ya mpiko oyo Davidi azalaki na bango, mpe lolenge nini amonisi limemya mpo na makila ya bomoi na bango?
26 Wana tozongi kati na lisoló, tozali kokuta nkombo ya mibali ya mpiko oyo bazali bato na Davidi, misato na bango bamonani koleka basusu. Bato yango bayebisami kati na likambo oyo libimaki ntango basodá ya milɔngɔ́ ya liboso ya Bafilisitia bapikamaki na Beteleme, engumba epai kuna Davidi abotamaki. Davidi amonisi mposa oyo azali na yango: “Malamu boni soko moto akomelisa ngai mai mazali na liziba na Beteleme oyo ezali penepene na ekuke!” (23:15) Na likambo yango, mibali ya mpiko yango misato bamilekisi kati na molako ya Bafilisitia, batoki mai na liziba, mpe bamemeli yango Davidi. Kasi Davidi aboyi komela mai yango. Kútu, asopi yango na mabelé, kolobáká ete: “Ɛ [Yehova], tiká te ete nasala boye. Oyo ezali makila na bato; basili kokɔtisa bomoi na bango kati na kufa.” (23:17) Mpo na ye, mai wana makokani na makila ya bomoi oyo balingaki kobungisa mpo na yango. Na nsima, mibali 30 oyo baleki na mpiko kati na limpinga na ye batángami elongo na misala minene na bango.
27. Lisumu nini ya nsuka Davidi asali? Bolózi oyo ebimi na ntina na yango esilisami lolenge nini?
27 Na nsuka, Davidi asali lisumu na kotángáká motuya ya bato. Kobondeláká Yehova ete ayokela ye mawa, bayebisi ye ete apona moko kati na bitumbu oyo: mbula nsambo ya nzala, sanza misato ya kolóngama na bitumba ya basodá, to mikolo misato ya bokɔnɔ mabe kati na mokili. Davidi ayanoli ete: “Tiká ete tókwea na lobɔkɔ na [Yehova], zambi mawa na ye ezali monene; tókwea kati na lobɔkɔ na bato te.” (24:14) Bokɔnɔ mabe oyo ekweli ekólo mobimba ebomi bato 70 000, mpe esili bobele ntango Davidi, kolandáká malako oyo Yehova apesaki na nzela ya Gada, asombi mabelé ya etutelo ya Alauna, epai kuna apesi mbeka na kotumba mpe mbeka na kimya epai na Yehova.
LITOMBA NA YANGO
28. Makebisi nini ya makasi mazwami kati na mokanda ya Samwele ya Mibale?
28 Kati na Samwele ya Mibale, ezali na makambo mingi ya litomba mpo na motángi na mikolo na biso! Mayoki pene na nyonso oyo emonanaka epai na moto emonisami awa na masoló ya makambo masalemaki solo na bomoi. Na bongo, tokebisami na maloba ya polele mpenza na ntina na matomba mabe ya bilulela mpe ya kozongisa mabe (3:27-30), ya koluka mobalani ya moto mosusu na mposa mabe (11:2-4, 15-17; 12:9, 10), ya misala ya kotɛka basusu (15:12, 31; 17:23), ya bolingo oyo etongami bobele na mposa ezangi ntina (13:10-15, 28, 29), ya kozwa likatami nokinoki (16:3, 4; 19:25-30), mpe ya kozanga limemya na misala ya komipesa ya moto mosusu.—6:20-23.
29. Bandakisa nini ya malamu na ntina na etamboli mpe misala milongobani tozali kokuta kati na Samwele ya Mibale?
29 Nzokande, litomba lileki monene ya mokanda ya Samwele ya Mibale lizali kokutama mpenza kati na misala malamu oyo milobelami kuna, na kolandáká ebele ya bandakisa malamu ya etamboli mpe ya misala oyo elongobani. Davidi azali ndakisa mpo na komipesa na ye ya makasi epai na Nzambe (7:22), komikitisa na ye liboso na Nzambe (7:18), lolenge na ye ya kosanzola nkombo ya Yehova (7:23, 26), lolenge malamu na ye ya kotalela botɛmɛli (15:25), kobongwana na ye ya solosolo longwa na lisumu (12:13), bosembo na ye na bilaka na ye (9:1, 7), ezaleli na ye ya kobatela bokatikati na ntango ya komekama (16:11, 12), elikya makasi na ye epai na Yehova (5:12, 20), mpe limemya mozindo na ye mpo na bibongiseli mpe mpo na bato oyo batyami na Yehova (1:11, 12). Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete Davidi abéngamaki ‘moto oyo asepelisi motema ya Yehova’!—1 Sam. 13:14.
30. Mitindá nini misalelami mpe mimonisami kati na Samwele ya Mibale?
30 Kosalelama ya mitindá mingi ya Biblia ezali mpe kokutama kati na Samwele ya Mibale. Kati na yango, tozali kokuta mitindá ya ngambo oyo etali libota mobimba (2 Sam. 3:29; 24:11-15), makanisi malamu ebongolaka masɛngami ya Nzambe te (6:6, 7), bokonzi kati na ebongeseli ya Teokrasi ya Yehova esengeli komemyama (12:28), makila esengeli kotalelama ete ezali bulɛɛ (23:17), mbɔndi esɛngami mpo na nyongo ya makila (21:1-6, 9, 14), moto moko ya bwanya akoki kopɛngola likámá mpo na bato mingi (2 Sam. 20:21, 22; Mos. 9:15), mpe bosembo liboso na lisangá ya Yehova mpe liboso na bamonisi na yango esengeli kobatelama “soko na kufa soko na bomoi.”—2 Sam. 15:18-22.
31. Lolenge nini mokanda ya Samwele ya Mibale mopesi bilakiseli ya Bokonzi ya Nzambe, lokola yango endimisami na Makomami ya Greke ya boklisto?
31 Oyo eleki ntina kati na nyonso, ezali ete mokanda ya Samwele ya Mibale ezali kobenda likebi likoló na Bokonzi ya Nzambe mpe kopesa bilakiseli na yango ya kongɛnga; Nzambe atye Bokonzi yango na mabɔkɔ ya Yesu Klisto, “mwana na Davidi.” (Mat. 1:1) Ndai oyo Yehova alapaki epai na Davidi na ntina na koumela ya bokonzi na ye libela (2 Sam. 7:16) etángami kati na Misala 2:29-36 mpo na kolobela Yesu. Elaka oyo ete, “Ngai nakozala tata na ye, ye mpe akozala mwana na ngai” (2 Sam. 7:14), ezali mpenza kolobela Yesu; likambo yango limonisami na Baebele 1:5. Yango endimisami mpe na mongongo ya Yehova oyo elobaki uta na likoló ete: “Oyo mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] ye mingi.” (Mat. 3:17; 17:5) Na nsuka, kondimana ya Bokonzi elongo na Davidi elobelami na anzelu Gabaliele kati na maloba na ye epai na Malia na ntina na Yesu ete: “Ye akozala monene mpe akobyangama mwana na Oyo-Aleki-Likoló. Nkolo Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi na Davidi tata na ye. Akozala mokonzi na ndako na Yakobo libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Oyo nde likambo ya kosepelisa na kotala lolenge elaka ya Mombóto ya Bokonzi ezali kofungwama mokemoke liboso na miso na biso!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 745-747.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 373-374.