Mekolá kondima na bango
Nzambe na ye apesaki ye makasi
ELIYA akimaki na nse ya mbula, wana molili ezalaki kokóma makasi. Asengelaki kosala mobembo molai liboso akóma na Yizireele, mpe Eliya azalaki elenge te. Kasi, akimaki mbangu kozanga kolɛmba, mpo “lobɔkɔ ya Yehova” ezalaki likoló na ye. Lobɔkɔ ya Yehova ezalaki kopesa ye makasi koleka oyo azalaki na yango. Yango wana, alekaki bampunda oyo ezalaki kobenda shario ya mokonzi na mbangu!—1 Bakonzi 18:46.
Mokonzi Ahabe atikalaki mpenza mosika nsima na ye, mpe azalaki naino na mobembo molai ya kosala. Kanisá ndenge mbula ezalaki kobɛta makasi mpe ezalaki kobɛta Eliya na elongi, mpe azalaki kokanisa mokolo wana monene ya bomoi na ye. Na ntembe te, ezalaki elonga monene mpo na Yehova, Nzambe ya Eliya, mpe mpo na losambo ya solo. Eliya akokaki lisusu te komona Ngomba Karamele, epai Yehova asalelaki ye mpo akweisa losambo ya Baala na ndenge ya likamwisi, mpo azalaki mosika mpenza na yango mpe mpo likoló eyindaki makasi. Bankama ya basakoli ya Baala bamonanaki lokola basali ya mabe mpe esengelaki mpenza bábomama. Na nsima, Eliya abondelaki Yehova mpo eleko ya elanga oyo enyokolaki bato na boumeli ya mbula misato na ndambo esila. Mbula enɔkaki!a—1 Bakonzi 18:18-45.
Ntango Eliya azalaki kosala mobembo wana ya kilomɛtrɛ 30 mpo na kokóma na Yizireele, ekoki kozala akanisaki ete makambo ebongwani mpenza lokola basakoli ya Baala bakufi. Ahaba asengelaki mpenza kobongwana! Na ntembe te, nsima ya makambo oyo amonaki, asengelaki kotika losambo ya Baala kopekisa mwasi na ye Yezabele, mpe kotika konyokola basaleli ya Yehova.
Ntango makambo ezali komonana lokola ezali kosalema ndenge biso tolingaka, ntembe ezali te ete tokómaka na elikya. Tokoki kokanisa ete makambo ya bomoi na biso ekokoba kobonga, ntango mosusu kutu tokoki kokanisa ete mikakatano ya makasi mpenza ekokómela biso lisusu te. Soki Eliya akanisaki bongo, tokoki kokamwa te mpo “azalaki moto lokola biso.” (Yakobo 5:17) Nzokande, mikakatano ya Eliya esilaki te. Mwa moke na nsima, Eliya akómaki kobanga makasi, kotungisama, mpe akómaki na mposa akufa. Nini esalemaki? Mpe ndenge nini Yehova asalisaki mosakoli na ye azongela lisusu kondima mpe mpiko na ye? Tótalela likambo yango.
Makambo ebongwani na mbalakaka
Ntango Ahaba akómaki na ndako na ye na Yizireele, amonisaki mpenza ete abongwani, akómi mpenza moto oyo abangaka Nzambe? Tozali kotánga boye: “Ahaba ayebisaki Yezabele makambo nyonso oyo Eliya asalaki mpe ndenge abomaki basakoli yango nyonso na mopanga.” (1 Bakonzi 19:1) Simbá ete ntango Ahaba abɛtaki lisolo ya makambo oyo elekaki mokolo wana, alobelaki ata moke te Yehova, Nzambe ya Eliya. Lokola Ahaba azalaki kobanga Nzambe te, atalelaki likamwisi oyo “Eliya asalaki” mokolo wana na ndenge ya bomoto. Emonani polele ete azwaki liteya te ya komemya Yehova Nzambe. Mpe ndenge nini Yezabele, moto oyo azangá mawa asalaki?
Asilikaki makasi! Na nkanda makasi, atindelaki Eliya nsango oyo: “Tiká banzambe básala bongo mpe bábakisa yango, soki lobi na ngonga oyo, nakokómisa te molimo na yo lokola molimo ya mokomoko na bango!” (1 Bakonzi 19:2) Na maloba wana, amonisaki ete akoboma ye. Kutu, Yezabele azalaki kosala elako ete ye moko asengeli kokufa soki abomi Eliya te na mokolo oyo akanaki kozongisa mabe mpo na basakoli ya Baala oyo babomamaki. Kanisá ndenge Eliya alamukaki na mpɔngi na mwa ndako na ye na Yizireele, na butu wana ya mbula makasi—azalaki kaka koyoka moto wana oyo Yezabele atindaki azali koyebisa ye nsango wana ya mabe mpenza. Nsango yango esalaki ye nini?
Alɛmbi nzoto mpe abangi makasi
Soki Eliya akanisaki ete etumba ná losambo ya Baala esilaki, na mbala moko, amonaki ete bilikya na ye ekendeki na mai. Atako Yezabele amonaki makambo wana, abongwanaki te. Baninga mingi ya Eliya ya sembo babomamaki mpo na mibeko oyo Yezabele apesaki, mpe emonanaki lokola ete na mbala ya nsima, Eliya nde moto akobomama. Biblia eyebisi biso ete: “Abangaki.” Eliya amonaki na makanisi ndenge Yezabele azalaki kobongisa mpo na koboma ye? Soki ezali ete akobaki kokanisa bongo, na ntembe te mpiko na ye esilaki. Ezala ndenge nini, Eliya “abandaki kokima mpo na kobikisa molimo na ye”—akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye.—1 Bakonzi 18:4; 19:3.
Eliya azalaki ye moko te na kati ya bato ya kondima oyo babangaki. Mikolo mingi na nsima, ntoma Petro akutanaki mpe na likambo yango. Na ndakisa, ntango Yesu abengaki Petro alanda ye mpo bátambola likoló ya mai, ntoma yango “amonaki mopɛpɛ makasi.” Na nsima, azalaki lisusu na mpiko te mpe abandaki kozinda. (Matai 14:30) Na yango, ndakisa ya Petro mpe Eliya epesi biso liteya moko ya ntina. Soki tolingi kobatela mpiko na biso, tosengeli te kotika ete makanisi na biso etikala kaka likoló ya makama oyo elingi kokómela biso. Tosengeli kotya makanisi na biso epai ya moto oyo akoki kopesa biso elikya mpe makasi.
“Ekoki!”
Lokola azalaki kobanga, Eliya akimaki na sudi-wɛsti ya engumba Beere-sheba, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 150 mosika te na sudi ya ndelo ya Yuda. Kuna, atikaki mosali na ye mpe akendaki na esobe ye moko. Lisolo emonisi ete atambolaki “mobembo ya mokolo moko,” na yango, tokoki komona na makanisi ndenge abandaki mobembo ntango moi ebimaki, mpe na ntembe te amemaki ata eloko moko te ya kolya. Lokola atungisamaki makasi mpe azalaki na nsɔmɔ, azalaki kobundabunda mpo na kotambola na esobe wana ya mabemabe mpe oyo bato bazalaka te mpe na nse ya moi makasi. Ntango moi ezalaki koya makasi mpe butu ezalaki koya, Eliya azalaki lisusu te na makasi ya kokoba. Lokola alɛmbaki, afandaki na nse ya nzete moko ya letama—nzete ya komibomba oyo ezalaki mosika te na ye na kati ya esobe wana.—1 Bakonzi 19:4.
Eliya abondelaki na mawa nyonso. Asɛngaki ete akufa. Alobaki ete: “Naleki bankɔkɔ na ngai te.” Ayebaki ete na ntango wana bankɔkɔ na ye bazalaki putulu mpe mikuwa mpamba na malita, mpe bakokaki kosala eloko moko te ya malamu mpo na moto. (Mosakoli 9:10) Eliya amiyokaki lokola nde azali na ntina te. Yango wana, agangaki ete: “Ekoki!” Ntina nini nakoba kozala na bomoi?
Tosengeli koyoka mpasi koyeba ete moto ya Nzambe alɛmba boye na makanisi? Mpenza te. Biblia elobeli ebele ya mibali mpe basi ya sembo oyo bayokaki mawa mpe basɛngaki ete bákufa—na kati na bango, tokoki kotánga Rebeka, Yakobo, Moize, mpe Yobo.—Ebandeli 25:22; 37:35; Mitángo 11:13-15; Yobo 14:13.
Lelo oyo, tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” yango wana, tokoki kokamwa te ete ebele ya bato, ata mpe basaleli ya sembo ya Nzambe, bálɛmba ntango mosusu na makanisi. (2 Timote 3:1) Soki okutani na mokakatano ya makasi boye, landá ndakisa ya Eliya: Yebisá Nzambe mitungisi na yo. Kutu, Yehova azali “Nzambe ya kobɔndisa nyonso.” (2 Bakorinti 1:3) Apesaki Eliya makasi?
Yehova asalisaki mosakoli na ye
Okanisi ete Yehova ayokaki ndenge nini kuna na likoló ntango azalaki komona ndenge mosakoli na ye wana oyo azalaki kolinga mingi alali na nse ya nzete wana na esobe mpe azali kosɛnga akufa? Ntina ya kokanisa boye to boye ezali te. Ntango mpɔngi ezwaki Eliya, Yehova atindelaki ye anzelu. Anzelu yango asimbaki Eliya, alamwisaki ye na boboto nyonso mpe alobaki ete: “Tɛlɛmá, lyá.” Eliya asalaki bongo, mpo anzelu apesaki ye mwa biloko ya kolya, mwa limpa ya mɔtɔ mpe mai ya komɛla. Eliya apesaki anzelu yango mersi? Lisolo yango elobi kaka ete mosakoli alyaki, amɛlaki mpe azongaki na mpɔngi. Azalaki na mposa ya koloba te? Ezala bongo to te, anzelu alamwisaki ye lisusu, ntango mosusu ntango ntɔngɔ ebandaki kotana. Na mbala wana mpe, alobaki na Eliya ete: “Tɛlɛmá, lyá,” mpe abakisaki maloba oyo ya ntina mingi, “mpo mobembo na yo ekozala mpasi mingi.”—1 Bakonzi 19:5-7.
Na lisalisi ya Nzambe, anzelu ayebaki epai nini Eliya azalaki kokende. Ayebaki mpe ete mobembo ekozala mpasi mingi mpo Eliya asala yango na makasi na ye moko. Ezali mpenza esengo kosalela Nzambe oyo ayebi mikano mpe bandelo na biso malamu koleka biso moko! (Nzembo 103:13, 14) Ndenge nini biloko wana oyo Eliya alyaki esalisaki ye?
Tozali kotánga boye: “Atɛlɛmaki, alei mpe amɛli, mpe na nguya ya biloko oyo alyaki, atambolaki mikolo ntuku minei (40) butu moi tii na Horebe, ngomba ya Nzambe ya solo.” (1 Bakonzi 19:8) Ndenge Moize asalaki yango basiɛklɛ soki motoba liboso na ye mpe Yesu basiɛklɛ soki zomi nsima na ye, Eliya akilaki bilei mikolo 40 butu moi. (Kobima 34:28; Luka 4:1, 2) Biloko wana oyo alyaki esilisaki te mikakatano na ye nyonso, kasi esalisaki ye na ndenge ya kokamwa. Kanisá naino mobange wana azali kosala mobembo ya mpasi na esobe oyo ezalaki na nzela te, mokolo na mokolo, pɔsɔ na pɔsɔ, pene na sanza mobimba na ndambo!
Yehova asalisaka mpe basaleli na ye lelo oyo, na biloko ya kolya na ndenge ya likamwisi te, kasi na lolenge moko ya ntina mingi mpenza. Apesaka bango bilei ya elimo. (Matai 4:4) Koyekola makambo ya Nzambe na Liloba na ye mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia, esalisaka biso na elimo. Kolya bilei yango ya elimo ekoki kolongola te mikakatano na biso, kasi ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na makambo oyo ekoki komonana makasi koleka. Ezali mpe komema na “bomoi ya seko.”—Yoane 17:3.
Eliya atambolaki kilomɛtrɛ soki 320, mpe nsukansuka akómaki na Ngomba Horebe, epai Yehova Nzambe abimelaká Moize na kati ya mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ mpe epai asalaki na nsima Kondimana ya Mibeko ná Yisraele. Eliya amibombaki na mobenga.
Ndenge oyo Yehova alendisaki mosakoli na ye
Na Horebe, Yehova atunaki motuna oyo na nzela ya anzelu na ye: “Eliya, ozali kosala nini awa?” Na ntembe te, motuna wana etunamaki na boboto, mpo Eliya amonaki yango libaku ya koyebisa bampasi na ye. Mpe asalaki yango! Alobaki boye: “Nayoki zuwa mpenza mpo na Yehova Nzambe ya mampinga; mpo bana ya Yisraele batiki kondimana na yo, babuki bitumbelo na yo, mpe babomi basakoli na yo na mopanga, bongo natikali kaka ngai moko; mpe babandi koluka molimo na ngai mpo bálongola yango.” (1 Bakonzi 19:9, 10) Maloba ya Eliya emonisi makambo soki misato oyo esalaki ete alɛmba na makanisi.
Ya liboso, Eliya amonaki ete asalaki mosala ya mpunda. Atako asalelaki Yehova na “zuwa mpenza” na boumeli ya bambula, mpe atyaki nkombo mosantu ya Nzambe mpe losambo na ye na esika ya liboso, Eliya amonaki ete makambo ezalaki kaka kobeba mpenza. Bato bazangaki kaka kondima mpe bazalaki kaka kotomboka, mpe losambo ya lokuta ezalaki kopalangana. Ya mibale, Eliya akanisaki ete azali ye moko. Alobaki ete, “Natikali kaka ngai moko,” lokola nde kaka ye moko atikalaki na ekólo mobimba oyo azalaki kosalela Yehova. Ya misato, Eliya abangaki makasi. Baninga na ye mingi basakoli babomamaki, mpe akanisaki ete etikali ngala na ye. Ekokaki kozala pɛtɛɛ te mpo Eliya andima makanisi yango, kasi atikaki te ete lolendo mpe nsɔni ezongisa ye nsima. Lokola afungwelaki Nzambe na ye motema na libondeli, atiká mpenza ndakisa ya malamu mpo na bato nyonso ya sembo.—Nzembo 62:8.
Yehova asalaki nini mpo na kobanga mpe komitungisa oyo Eliya azalaki na yango? Anzelu ayebisaki Eliya atɛlɛma na porte ya mobenga. Atosaki, mpe ayebaki te nini elingaki kosalema. Mbala moko, mopɛpɛ moko makasi ebɛtaki! Esalaki makɛlɛlɛ makasi, mpe lokola ezalaki makasi, ezalaki kopasola bangomba mpe kobuka yango. Kanisá naino ndenge Eliya azali koluka kobomba elongi na ye na elamba na ye ntango mopɛpɛ ezali kobɛta ye. Esengelaki apika makolo na ye na mabele mpo mabele ebandaki koningana makasi esika oyo azalaki! Na nsima, ntango mɔtɔ makasi elekaki wana, yango esalaki ete azonga na kati ya mobenga mpo na komibatela.—1 Bakonzi 19:11, 12.
Na makambo wana nyonso, lisolo yango eyebisi biso ete Yehova azalaki te na kati ya biloko wana ya nguya. Eliya ayebaki ete Yehova azali te Nzambe oyo abongwanaka na biloko oyo akelá, lokola Baala, oyo basambeli na ye oyo bakosamaki, bazalaki kokanisa ete “atambwisaka mapata,” to abɛtisaka mbula. Yehova nde akelá biloko nyonso ya nguya oyo ezali na molɔ́ngɔ́, kasi azali monene koleka biloko nyonso oyo akelá. Ata likoló oyo tomonaka ekoki kokoka ye te! (1 Bakonzi 8:27) Kasi, ndenge nini makambo oyo nyonso esalisaki Eliya? Kobosana te ete abangaki. Lokola azalaki na Nzambe lokola Yehova na ngambo na ye, oyo azali na nguya nyonso, Eliya azalaki na eloko moko te ya kobanga Ahaba ná Yezabele!—Nzembo 118:6.
Ntango mɔtɔ esilaki, kimya ekɔtaki mpe Eliya ayokaki “mongongo moko ya kimya, ya nse.” Mongongo yango esɛngaki Eliya aloba lisusu ndenge azali koyoka, mpe asalaki yango, abimisaki mitungisi na ye mpo na mbala ya mibale.b Ntango mosusu yango epesaki ye lisusu makasi. Kasi, na ntembe te, Eliya azwaki lisusu makasi ntango “mongongo ya kimya, ya nse” elobaki na ye lisusu. Yehova amonisaki Eliya ete azali na ntina mingi. Ndenge nini? Nzambe amonisaki oyo azali kokana kosala mpo na kolongola losambo ya Baala na Yisraele. Emonani polele ete mosala ya Eliya ezalaki ya mpunda te, mpo mokano ya Nzambe ezalaki kokende liboso. Lisusu, Eliya azalaki kaka na kati ya mokano yango, mpo Yehova atindaki ye lisusu mpe apesaki ye malako ya sikisiki mpo na mosala yango.—1 Bakonzi 19:12-17.
Kasi, tokoloba boni na ndenge oyo Eliya azalaki komiyoka ete azali kaka ye moko? Mpo na yango, Yehova asalaki makambo mibale. Ya liboso, ayebisaki Eliya atya Elisha mafuta mpo akóma mosakoli oyo akozwa esika na ye. Elenge mobali yango asengelaki kokóma moninga ya Eliya mpe mosungi na ye na boumeli ya bambula mingi. Likambo yango elendisaki mpenza Eliya! Ya mibale, Yehova amonisaki nsango oyo ya kosepelisa: “Natiki bato nkóto nsambo (7 000) na Yisraele, baoyo nyonso mabɔlɔngɔ na bango efukameli Baala te, mpe baoyo nyonso monɔkɔ na bango epwɛpwi ye te.” (1 Bakonzi 19:18) Eliya azalaki ye moko te. Ayokaki mpenza esengo na motema koyeba ete ezali na bankóto ya bato ya sembo oyo baboyaki kosambela Baala. Bazalaki na mposa ete Eliya akoba na mosala na ye ya sembo, kopesa ndakisa mpo na bosembo na ye epai ya Yehova na ntango wana oyo pene na moto nyonso azalaki kotombokela ye. Koyoka maloba wana, elingi koloba “mongongo ya kimya, ya nse,” na nzela ya momemi-nsango oyo Yehova atindaki, esimbaki mpenza motema ya Eliya.
Lokola Eliya, biso mpe tokoki kokamwa na biloko ya nguya makasi oyo Nzambe akelá, mpe esengeli kozala bongo. Biloko oyo Nzambe akelá, emonisaka mpenza nguya ya Mozalisi. (Baroma 1:20) Yehova azali kaka kosalela nguya na ye oyo ezangi nsuka mpo na kosalisa basaleli na ye ya sembo. (2 Ntango 16:9) Kasi, Nzambe asololaka na biso malamumalamu na nzela ya Biblia, Liloba na ye. (Yisaya 30:21) Na maloba mosusu, Biblia ezali lokola ‘mongongo wana ya kimya, ya nse,’ oyo na nzela na yango Yehova atambwisaka biso lelo, asembolaka biso, alendisaka biso, mpe amonisaka ete alingaka biso.
Eliya andimaki elendiseli oyo Yehova apesaki ye na Ngomba Horebe? Andimaki yango! Eumelaki te, azongelaki mosala na ye, azongaki lisusu mosakoli ya mpiko mpe ya sembo oyo aboyaki misala ya losambo ya lokuta. Soki tobateli maloba oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe, “libɔndisi oyo euti na Makomami,” tokozala na likoki ya komekola kondima ya Eliya.—Baroma 15:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá motó ya likambo “Mekolá kondima na bango” na masolo oyo elobi “Alongisaki losambo ya solo” mpe “Akɛngɛlaki mpe azelaki” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe 1 Aprili 2008.
b Epai mongongo yango “ya kimya, ya nse” eutaki ekoki kozala anzelu oyo asalelamaki mpo na koyebisa “liloba ya Yehova” oyo ezali na 1 Bakonzi 19:9. Na vɛrsɛ 15, anzelu yango alobelami lokola “Yehova.” Tokoki kokanisa lisusu anzelu oyo Yehova asalelaki mpo na kotambwisa Bayisraele na esobe mpe oyo Nzambe alobaki ete: “Nkombo na ngai ezali na kati na ye.” (Kobima 23:21) Na ntembe te, tokoki koloba bilobaloba te na likambo yango, kasi liboso aya lokola moto awa na mabele, Yesu azalaki “liloba,” elingi koloba molobeli ya Yehova epai ya basaleli na ye.—Yoane 1:1.
[Elilingi na lokasa 19]
Yehova apambolaki mpenza Eliya, ezala na ntango ya mpasi to ya bisengo
[Elilingi na lokasa 20]
Na ntango ya mpasi makasi, Eliya afungwelaki Yehova motema na ye
[Elilingi na lokasa 21]
Yehova asalelaki nguya na ye monene mpo na kolendisa Eliya