Yehu abundaki mpo na losambo ya pɛto
YEHU abundaki mpo na losambo ya pɛto. Mpo na kosala yango, amonisaki mpiko, alalisaki makambo te, azalaki na molende, mpe asalaki kozanga kokakatana. Yehu azalaki na bizaleli oyo ebongi tómekola.
Batindaki Yehu akokisa mokumba moko na ntango makambo ezalaki kotambola malamu te na Yisraele. Ekólo yango ezalaki kolanda makambo mabe ya Yezabele, mwasi oyo mobali na ye Ahaba asilaki kokufa mpe mwana na ye Yehorame azalaki koyangela na ntango yango. Yezabele atindaki bato bámipesa na losambo ya Baala na esika básambela Yehova. Abomisaki basakoli ya Nzambe mpe abebisaki bato na ‘misala na ye ya pite’ mpe “ya bonganga-nkisi.” (2 Bak. 9:22; 1 Bak. 18:4, 13) Yehova akanaki kosilisa libota mobimba ya Ahaba, ata mpe Yehorame ná Yezabele, mpe Yehu nde asengelaki kotambwisa makambo yango.
Biblia elobeli Yehu ntango afandaki elongo na bakonzi ya mampinga ya basoda, wana Bayisraele bazalaki kobunda na bato ya Siri na Ramote-gileade. Yehu azalaki mokonzi moko monene ya mampinga ya basoda ya Yisraele, mbala mosusu kutu komanda. Mosakoli Elisha atindaki moko ya bana ya basakoli akende kotya Yehu mafuta mpo akóma mokonzi mpe ayebisa ye ete aboma mibali nyonso ya ndako ya Ahaba, libota ya bapɛngwi.—2 Bak. 8:28; 9:1-10.
Ntango baninga na ye bakonzi oyo bazalaki wana batunaki ye ntina oyo bayaki koluka ye, Yehu aboyaki koloba. Kasi, ntango batyaki ye mbamba, ayebisaki bango solo, mpe ye ná bango babandaki kosalela Yehorame likita. (2 Bak. 9:11-14) Mbala mosusu ezalaki mpe na basoda oyo bazalaki na nkanda mpe bazalaki kosepela te na makambo oyo libota ya mokonzi ná Yezabele bazalaki kosala. Ezala bongo to te, Yehu alukaki ndenge ya malamu mpenza mpo na kokokisa mokumba na ye.
Mokonzi Yehorame azokaki na etumba mpe azongaki na engumba Yizireele, mpo bábikisa ye. Yehu ayebaki ete mpo mwango na ye elonga, nsango ya likambo yango esengelaki kokóma ata moke te na Yizireele. Yehu alobaki boye: “Bótika moto moko te abima na engumba mpe akende kopesa nsango na Yizireele.” (2 Bak. 9:14, 15) Mbala mosusu amonaki ete basoda mosusu oyo bazalaki sembo epai ya Yehorame bakokaki kotɛmɛla ye. Yehu alingaki te botɛmɛli ya ndenge wana ezala.
AZALAKI KOTAMBWISA MBANGU MAKASI MPENZA!
Yehu akendaki mbangu na likalo longwa na Ramote-gileade tii na Yizireele, na ntaka ya kilomɛtrɛ 72, mpo na kozwa bango na mbalakaka. Ntango akómaki pene, sinzili oyo atɛlɛmaki likoló ya linɔ́ngi amonaki “ebele ya bato ya Yehu oyo bazalaki kopumbwapumbwa.” (2 Bak. 9:17) Emonani ete Yehu amemaki basoda ebele mpo azanga te kokokisa mokumba na ye.
Ntango sinzili yango amonaki Yehu, moto ya mpiko azali kotambwisa moko ya makalo yango, alobaki boye: “Azali kotambwisa na ligboma.” (2 Bak. 9:20) Soki Yehu azalaki kotambwisa mbangu banda kala, mbangu oyo atambwisaki na mbala oyo mpo na kokokisa mokumba oyo azwaki ezalaki makasi koleka.
Nsima ya koboya kosolola ata moke na bamemi-nsango mibale oyo batindelaki ye, nsukansuka Yehu akutanaki na Mokonzi Yehorame ná moninga na ye Ahazia, mokonzi ya Yuda, moto na moto na likalo na ye. Ntango Yehorame atunaki ye ete: “Yehu, kimya ezali?” Yehu azongiselaki ye ete: “Kimya nini ekozala ntango misala ya pite ya mama na yo Yezabele mpe ebele ya misala na ye ya bonganga-nkisi ezali naino?” Eyano wana ebulunganisaki Yehorame mpe abalusaki likalo na ye mpo akima. Kasi, Yehu azalaki na mbangu makasi koleka ye! Azwaki litimbo, abɛtaki Yehorame likula na motema, mpe mokonzi yango akweaki na kati ya likalo na ye mpe akufaki. Atako Ahazia alongaki kokima, na nsima Yehu alandaki ye, azwaki ye mpe abomaki ye.—2 Bak. 9:22-24, 27.
Moto mosusu ya libota ya Ahaba oyo asengelaki kobomama ezalaki Yezabele, mwasi mabe ya mokonzi yango. Yehu abengaki ye ‘mwasi oyo alakelami mabe.’ Ntango Yehu azalaki kokɔta na Yizireele, amonaki mwasi yango azali kotala ye na nse longwa na lininisa ya ndako na ye. Yehu alobaki maloba mingi te; atindaki mbala moko bakapita oyo bazalaki wana bábwaka Yezabele na nse. Na nsima, Yehu ayaki na bampunda na ye mpe enyatanyataki mwasi yango oyo abebisaki Yisraele mobimba. Nsima na yango, Yehu abandaki koboma bato mosusu mingi ya libota ya Ahaba, moto mabe.—2 Bak. 9:30-34; 10:1-14.
Atako mobulu ezali mabe, tosengeli koyeba ete na ntango wana, Yehova azalaki kosalela bato na ye mpo na kokokisa bikateli na ye. Biblia elobi boye: “Kokwea ya Ahazia ntango ayaki epai ya Yehorame eutaki na Nzambe; mpe ntango ayaki, abimaki elongo na Yehorame epai ya Yehu mwana ya mwana ya Nimishi, oyo Yehova atyaki mafuta mpo na kolongola ndako ya Ahaba.” (2 Nt. 22:7) Ntango Yehu alongolaki nzoto ya Yehorame na likalo mpe abwakaki yango na elanga ya Nabote, amonisaki ete likambo yango ekokisaki elaka oyo Yehova apesaki ete akozongisela Ahaba mabe na ndenge abomaki Nabote. Longola yango, Yehu azwaki mitindo ete ‘azongisela Yezabele mabe mpo na makila ya basaleli ya Nzambe’ oyo asopaki.—2 Bak. 9:7, 25, 26; 1 Bak. 21:17-19.
Lelo oyo, mosaleli moto te ya Yehova asalelaka makasi na ye ya nzoto mpo na kobundisa banguna ya losambo ya pɛto. Nzambe alobi boye: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai.” (Ebr. 10:30) Kasi, mpo na kobatela lisangá na bato oyo bakoki kobebisa yango, ekoki kosɛnga bankulutu básala makambo na mpiko lokola Yehu. (1 Ko. 5:9-13) Bandeko nyonso ya lisangá mpe basengeli koboya mpenza kozala elongo na bato oyo babimisami na lisangá.—2 Yoa. 9-11.
YEHU ANDIMAKI TE BÁSALELA YEHOVA BOMBANDA
Eloko oyo etindaki Yehu akokisa mokumba na ye emonani polele na maloba oyo alobaki na nsima na Yehonadabe moto ya sembo ete: “Yaká elongo na ngai mpe omona ete nandimaka ata moke te básalela Yehova bombanda.” Yehonadabe andimaki, amataki na likalo ya Yehu, mpe akendeki elongo na ye na Samaria. Na Samaria, Yehu “asalaki mayele mpo aboma basambeli ya Baala.”—2 Bak. 10:15-17, 19.
Yehu ayebisaki bato ete alingi “kopesa Baala mbeka monene.” (2 Bak. 10:18, 19) Moto moko ya mayele alobi boye: “Yehu asalelaki elobeli moko ya mayele mpenza.” Atako liloba oyo basaleli wana elimbolaka “mbala mingi ‘mbeka,’ esalelamaka mpe mpo na kolobela ‘kobomama’ ya bapɛngwi.” Lokola Yehu alingaki ete ata mosambeli moko ya Baala azanga te, ayanganisaki bango nyonso na ndako ya Baala mpe asɛngaki bango nyonso bálata bilamba ndenge moko. ‘Ntango kaka basilisaki kopesa likabo ya kotumba,’ Yehu atindaki basoda na ye 80 báboma basambeli ya Baala. Na nsima, atindaki bákweisa ndako ya Baala mpe bakómisaki esika yango bakabinɛ. Bato bakokaki lisusu kosambela wana te.—2 Bak. 10:20-27.
Ya solo, Yehu abomaki bato mingi mpenza. Atako bongo, Biblia emonisi ete azalaki nde mobali ya mpiko oyo alongolaki Yisraele na boyangeli mabe ya Yezabele mpe libota na ye. Mokambi nyonso ya Yisraele asengelaki kozala na mpiko, kozonga nsima te mpe kozala na molende mpo na kolonga kosala likambo ya ndenge wana. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobi boye: “Ezalaki mosala moko ya mpasi mpe asalaki yango kozanga kokakatana. Mbala mosusu kosala makambo na bolɛmbu elingaki te kolongola losambo ya Baala na Yisraele mobimba.”
Na ntembe te, okoki komona ete makambo mingi oyo bakristo bakutanaka na yango lelo esɛngaka ete bámonisa bizaleli mosusu oyo Yehu azalaki na yango. Na ndakisa, tosengeli kosala nini soki tomekami mpo na kosala likambo moko oyo Yehova apekisi? Tosengeli kolalisa makambo te; tosengeli kozala na mpiko, koboya yango mbala moko. Ntango esɛngi tómonisa ete tokangami na Nzambe, tokoki kondima ata moke te básalela Yehova bombanda.
KEBÁ ETE OTAMBOLA NA MOBEKO YA YEHOVA
Nsuka ya lisolo oyo ezali likebisi. Yehu ‘alongwaki te na bana-ngɔmbɛ ya wolo oyo ezalaki na Betele mpe na Dani.’ (2 Bak. 10:29) Ndenge nini esalemaki ete moto oyo amonisaki molende makasi mpo na losambo ya pɛto andima losambo ya bikeko?
Mbala mosusu Yehu amonaki ete lokola bokonzi ya Yisraele ekabwani na bokonzi ya Yuda, esengeli ekabwana mpe na makambo ya losambo. Na yango, ndenge moko na bakonzi oyo bayangelaki Yisraele liboso na ye, alendisaki losambo ya mwana-ngɔmbɛ mpo alingaki ete ekólo ezala kaka na bokabwani. Kasi yango emonisaki ete azangi kondima epai ya Yehova, ye oyo akómisaki ye mokonzi.
Yehova asepelaki na Yehu mpo ‘asalaki malamu na ndenge asalaki oyo ezalaki sembo na miso na ye.’ Nzokande, Yehu “akebaki te mpo na kotambola na mobeko ya Yehova Nzambe ya Yisraele na motema na ye mobimba.” (2 Bak. 10:30, 31) Soki okanisi makambo nyonso oyo Yehu asalaki liboso, okoki kokamwa mpe koyoka mawa mpo na likambo oyo asalaki na nsima. Kasi ezali liteya mpo na biso. Tosengeli kozwa na lisɛki te boyokani na biso na Yehova. Mokolo na mokolo, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, komanyola yango, mpe kobondela Tata na biso ya likoló na motema mobimba mpo tóbatela bosembo na biso epai na ye. Yango wana, tósala makasi mpo tótambola na mobeko ya Yehova na motema na biso mobimba.—1 Ko. 10:12.
[Etanda na lokasa 4]
Mikanda ya mokili mpe elobeli Yehu
Mbala mingi, bato ya mayele bamitunaka soki bato oyo Biblia elobeli bazalaki mpenza na bomoi solo. Na yango, longola Biblia, ezali nde na mikanda mosusu oyo elobeli Yehu?
Ezali na bisika misato to koleka ya bato ya Asiri ya kala oyo batángaki nkombo ya mokonzi yango ya Yisraele. Moko na yango emonisaka Yehu, to mbala mosusu moko ya bato na ye, afukami liboso ya Shalmanesere III, mokonzi ya Asiri, mpo na kofuta ye mpako. Maloba oyo ezali pembeni ya elilingi yango elobi boye: “Mpako ya Yehu, (Ya’u’a), mwana ya Omiri (Humrî); nazwaki epai na ye palata, wolo, kibakuli moko ya wolo, mbɛki moko ya wolo, bakɔpɔ ya wolo, bakatini ya wolo, ya etini, lingenda mpo na mokonzi, (mpe) libaya ya puruhtu [ndimbola ya liloba yango eyebani te].” Yehu azalaki mpenza “mwana ya Omiri” te. Kasi bazalaki kosalela elobeli yango mpo na kolobela bakonzi oyo bayangelaki na Yisraele nsima na ye, mbala mosusu mpo Omiri azalaki na lokumu mingi mpe atongaki Samaria, mboka-mokonzi ya Yisraele.
Eloko moko te endimisi mpenza maloba ya mokonzi ya Asiri ete Yehu afutaki ye mpako. Atako bongo, mokonzi yango alobelaki Yehu mbala misato: na libanga moko, na ekeko moko ya Shalmanesere, mpe na mikanda oyo elobeli bakonzi ya Asiri. Na ntembe te, biloko ya ndenge wana emonisi ete Yehu, moto oyo Biblia elobeli, azalaki mpenza moto ya solo.