“Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo”
YESU akebisaki bayekoli na ye boye: “Zabolo akokoba kobwaka bamosusu na bino na bolɔkɔ mpo bómekama mpenza komekama.” Kasi liboso apesa likebisi yango, Yesu alobaki boye: “Kobanga te makambo oyo elingi kokómela yo.” Lokola Satana atiki te kosalela bolɔkɔ mpo apekisa mosala ya kosakola Bokonzi, na ntembe te baguvɛrnema mosusu bakonyokola bakristo ya solo. (Em. 2:10; 12:17) Na yango, nini ekosalisa biso tómibongisa mpo na kotɛmɛla mayele mabe ya Satana mpe ‘tóbanga te,’ ndenge Yesu alobaki?
Na ntembe te, mingi kati na biso basilá kobanga mwa moke na bantango mosusu. Kasi Liloba ya Nzambe endimisi biso ete Yehova akoki kosalisa biso tótika kobanga. Ndenge nini? Lolenge moko oyo Yehova asalisaka biso tómibongisa mpo na kolonga botɛmɛli, ezali ndenge ayebisaka biso mayele oyo Satana ná bato na ye basalelaka. (2 Ko. 2:11) Mpo na komonisa likambo yango, tótala lisolo moko ya Biblia. Tokotala mpe bandakisa ya bakristo mosusu na ntango na biso, oyo ‘batɛlɛmaki ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’—Ef. 6:11-13.
Mokonzi ya malamu ná moyangeli moko ya mabe
Na ekeke ya mwambe L.T.B., Senakeribe, mokonzi mabe ya Asiri alongaki bikólo ebele, moko nsima ya mosusu. Lokola azalaki kobanga lisusu eloko te, atyaki miso epai ya bato ya Yehova mpe Yerusaleme, engumba-mokonzi na bango, epai Hizikiya azalaki koyangela. (2 Bak. 18:1-3, 13) Ntembe ezali te ete Satana azalaki kotya mabɔkɔ na likambo yango; azalaki kotinda Senakeribe akokisa mikano na ye Satana, mpo losambo ya solo elimwa na mokili.—Eba. 3:15.
Senakeribe atindaki bato na ye na Yerusaleme bákende koyebisa bato ya engumba yango bámitika na mabɔkɔ na ye. Rabashake azalaki moko ya bato oyo bakendaki kuna, mpe azalaki molobeli monene ya mokonzi.a (2 Bak. 18:17) Mokano ya Rabashake ezalaki ya kolɛmbisa Bayuda mpe kotinda bango bámitika kozanga kobunda. Mayele nini Rabashake asalelaki mpo na kobangisa Bayuda?
Sembo ata bakaboli biso na basusu
Rabashake ayebisaki bamonisi ya Hizikiya boye: “Talá oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi: ‘Eloko ya kotyela motema oyo otyeli motema boye ezali nini? . . . Talá! otyeli Ezipito motema, mongendu oyo babukabuká, oyo soki moto ayekameli yango, ekokɔta na lobɔkɔ na ye mpe ekotɔbɔla yango.’” (2 Bak.18:19, 21) Maloba wana ya Rabashake ezalaki lokuta, mpo Hizikiya asalaki kondimana na Ezipito te. Kasi, maloba yango emonisaki nde likambo oyo Rabashake alingaki Bayuda bábosana te; ‘Moto moko te akoya kosalisa bino. Bozali kaka bino moko—bozali na moto te.’
Ndenge moko mpe na mikolo na biso, mpo na kobangisa bakristo ya solo, batɛmɛli ya losambo ya solo bayebisaki bakristo mosusu ete bakokabola bango na basusu. Ndeko mwasi moko oyo akɔtaki bolɔkɔ mpo na kondima na ye mpe atyamaki mosika na baninga na ye bakristo bambula ebele, ayebisaki na nsima eloko oyo esalisaki ye atika kobanga. Alobaki boye: “Libondeli esalisaki ngai napusana penepene na Yehova . . . Nazalaki kokanisa maloba ya kolendisa oyo ezali na Yisaya 66:2, ete Nzambe atalaka ‘moto ya mpasi mpe oyo elimo na ye ezali na mawa.’ Ezalaki ntango nyonso kopesa ngai makasi mpe kobɔndisa ngai mingi.” Ndeko mobali moko, oyo afandaki mpe na bolɔkɔ bambula mingi kaka ye moko alobaki boye: “Nayaki komona ete mwa shambrɛ moke wana ya bolɔkɔ ekoki mpe kozala monene lokola molɔ́ngɔ́ mobimba soki moto azali na boyokani makasi ná Nzambe.” Ya solo, lokola bazalaki na boyokani malamu na Yehova, bakristo wana mibale bazwaki makasi oyo esengeli mpo na koyika mpiko ntango bazalaki na bolɔkɔ kaka bango moko. (Nz. 9:9, 10) Banyokoli na bango bakabolaki bango na mabota, baninga mpe bandeko na bango bakristo, kasi Batatoli wana oyo bazalaki na bolɔkɔ bayebaki ete batɛmɛli na bango bakokoka soki moke te kokabola bango na Yehova.—Rom. 8:35-39.
Yango wana ezali na ntina mingi tósalela libaku nyonso oyo ezwami mpo tólendisa boyokani na biso na Yehova! (Yak. 4:8) Tosengeli mbala na mbala komituna boye: ‘Namonaka ete Yehova azali moto solo? Nalandaka mpenza maloba na ye ntango nazwaka bikateli, ya mike to ya minene, mokolo na mokolo?’ (Luka 16:10) Soki tosali makasi mpo na kobatela boyokani ya malamu na Nzambe, ntina ya kobanga ezali te. Mosakoli Yirimia alobaki na esika ya Bayuda oyo bazalaki na mpasi ete: “Nabeleli nkombo na yo, Ee Yehova, uta na libulu ya nse koleka . . . Na mokolo oyo nazalaki kobenga yo, opusanaki penepene. Olobaki ete: ‘Kobanga te.’”—Bil. 3:55-57.
Balongi te kokɔtisa ntembe
Rabashake asalelaki makanisi ya mabe mpo na kokɔtisa ntembe na mitema ya Bayuda. Alobaki boye: “Bisika oyo etombwaná mpe bitumbelo oyo Hizikiya alongoli ezali ya [Yehova] te? . . . Yehova ye moko alobaki na ngai boye: ‘Matá kobundisa mokili wana, mpe bebisá yango.’” (2 Bak.18:22, 25) Na yango, Rabashake alobaki ete Yehova akobundela bato na Ye te mpo bapesaki Ye mpasi na motema. Kasi ezalaki solo te. Yehova azalaki kosepela na Hizikiya mpe Bayuda oyo bazongelaki losambo ya solo.—2 Bak. 18:3-7.
Lelo, banyokoli oyo bazali na mayele mabe bakoki koloba mwa makambo ya solo mpo bato bándima bango kasi na mayele, basangisaka solo yango na makambo ya lokuta, mpo na kolona ntembe na mitema ya bato. Na ndakisa, na bantango mosusu, bayebisaki bandeko mibali mpe basi oyo bazalaki na bolɔkɔ ete ndeko moko oyo azalaki kokamba mosala na mboka na bango awangani kondima mpe ete ezali mabe te soki bango mpe basali bongo. Kasi makanisi ya ndenge wana elongaki te kokɔtisa ntembe na mitema ya bakristo oyo bazalaki na bososoli.
Tótala likambo oyo ekómelaki ndeko moko ya mwasi na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Ntango azalaki na bolɔkɔ, balakisaki ye mokanda oyo emonisaki ete ndeko moko oyo azalaki na mikumba awangani kondima. Moto oyo azalaki kotuna ndeko yango mituna atunaki ye soki azalaki lisusu kondimela Motatoli yango. Ndeko mwasi alobaki boye: “Azali kaka moto ya kozanga kokoka.” Abakisaki ete ntango azalaki kolanda mitinda ya Biblia, Nzambe azalaki kosalela ye. “Kasi lokola maloba na ye elongwe na nzela ya Biblia, azali ndeko na ngai lisusu te.” Ndeko mwasi yango ya sembo alandaki na ekɛngɛ toli ya Biblia oyo elobi ete: “Bótyela bankumu motema te, to mwana ya moto ya mabele te, mpo akoki kobikisa te.”—Nz. 146:3.
Kozala na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe mpe kosalela yango ekosalisa biso tómibatela na makanisi ya bokosi oyo ekoki kolɛmbisa ekateli na biso ya koyika mpiko. (Ef. 4:13, 14; Ebr. 6:19) Na yango, mpo na komibongisa mpo tókanisaka malamu ntango tokutani na mikakatano, tosengeli kotya botángi ya Biblia mpe boyekoli ya biso moko na esika ya liboso. (Ebr. 4:12) Ya solo, sikoyo nde ntango ya kokolisa boyebi na biso mpe kokómisa kondima na biso makasi. Ndeko moko oyo amonaki mpasi na bolɔkɔ kaka ye moko bambula ebele alobaki boye: “Nazali kolendisa moto nyonso azwa na motuya bilei ya elimo nyonso oyo bazali kopesa biso, mpo toyebi te ndenge ekosalisa biso mokolo mosusu.” Ya solo, soki lelo tozali koyekola na likebi Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya moombo ya sembo, elimo santu “akozongisa na makanisi na biso” makambo oyo toyekolaki soki tokómi na mikakatano.—Yoa. 14:26.
Tobatelami: bakobangisa biso te
Rabashake alukaki kobangisa Bayuda. Alobaki boye: “Katá mondenge na nkolo na ngai mokonzi ya Asiri, mpe tiká napesa yo bampunda nkóto mibale (2 000) mpo na kotala soki okokoka kotya likoló na yango bato oyo bakotambwisa yango. Bongo ndenge nini okoki kobengana guvɛrnɛrɛ moko kati na basaleli ya nkolo na ngai oyo baleki moke?” (2 Bak. 18:23, 24) Na miso ya bomoto, Hizikiya ná bato na ye bazalaki na mpema te ya kotɛlɛma liboso ya mampinga ya nguya ya bato ya Asiri.
Lelo mpe, tokoki komona ete banyokoli na biso bazali na nguya mingi, mingimingi soki bakonzi ya Leta mpe bazali kopesa bango mabɔkɔ. Ezalaki mpenza bongo mpo na Banazi oyo banyokolaki Batatoli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Bamekaki kobangisa basaleli ya Nzambe. Ndeko moko oyo asalaki bambula ebele na bolɔkɔ ayaki koyebisa ndenge bazalaki kobangisa ye. Mokolo moko, mokonzi moko ya basoda atunaki ye boye: “Omonaki ndenge babɛtaki ndeko na yo masasi? Epesi yo liteya nini?” Eyano na ye ezalaki boye: “Nazali motatoli mpo na Yehova mpe nakotikala kaka bongo.” Mokonzi yango alobaki na ye boye: “Soki bongo, yo nde moto oyo bakobɛta masasi na mbala ya nsima.” Atako bongo, ndeko na biso atɛlɛmaki ngwi, mpe monguna atikaki kobangisa ye. Eloko nini esalisaki ye ntango akutanaki na nsɔmɔ ya ndenge wana? Alobaki boye: “Natyaki motema na nkombo ya Yehova.”—Mas. 18:10.
Kozala na kondima epai ya Yehova, ezali lokola kosimba nguba moko monene oyo ezali kobatela biso na bibundeli nyonso oyo Satana azali kosalela mpo na kosala biso mabe na elimo. (Ef. 6:16) Yango wana, ezali malamu tóbondelaka Yehova mpo asalisa biso tólendisa kondima na biso. (Luka 17:5) Tosengeli mpe kosalela malamu bibongiseli oyo moombo ya sembo azali kozwa mpo na kolendisa kondima na biso. Ntango tokutani na mpasi, tokozwa makasi soki tokanisi elaka oyo Yehova apesaki mosakoli Ezekiele, oyo asengelaki kosakwela bato oyo bazalaki koyoka te. Yehova ayebisaki ye boye: “Nakómisi elongi na yo makasi lokola bilongi na bango mpe motó na yo makasi lokola mitó na bango. Nakómisi motó na yo lokola diama, makasi koleka libanga ya silekise.” (Ezek. 3:8, 9) Soki esengeli, Yehova akoki kosalisa biso tózala makasi lokola diama ndenge Ezekiele asengelaki kozala.
Kolonga komekama
Batɛmɛli bamoni ete na esika oyo komekama nyonso elongi te, kolaka moto eloko ya malamu ekoki kotinda ye atika bosembo na ye. Rabashake mpe asalelaki mayele yango. Alobaki na bato ya Yerusaleme boye: “Talá oyo mokonzi ya Asiri alobi: ‘Bómitika epai na ngai, bóbima mpe bóya epai na ngai . . . kino nakoya mpe nakokende na bino mpenza na mokili moko oyo ezali lokola mokili na bino, mokili ya mbuma mpe ya vinyo ya sika, mokili ya limpa mpe ya bilanga ya vinyo, mokili ya banzete ya olive ya mafuta mingi mpe ya mafuta ya nzoi; mpe bótikala na bomoi mpo bókufa te.’” (2 Bak. 18:31, 32) Likanisi wana ya kokende kolya mampa ya sika mpe komɛla vinyo esengelaki kosepelisa bato wana oyo bazalaki konyokwama na kati ya engumba oyo ezingamaki na banguna!
Bapesaki elaka ya ndenge wana mpo na koluka kolɛmbisa ekateli ya kotikala sembo oyo misionɛrɛ moko azwaki ntango azalaki na bolɔkɔ. Bayebisaki ye ete bakomema ye na “ndako moko kitoko” na kati ya “elanga moko kitoko” sanza motoba mpo akanisa. Kasi ndeko na biso alɛmbaki na elimo te mpe atikaki mitinda ya bokristo te. Nini esalisaki ye? Na nsima, alobaki boye: “Nazalaki kokanisa Bokonzi, ete yango nde elikya ya solosolo. . . . Lokola boyebi na ntina etali bokonzi ya Nzambe ezalaki kolendisa ngai, mpe nazalaki kondima ete ezali solo, mpe nabɛtaki ntembe ata mbala moko te mpo na yango, nalɛmbaki te.”
Biso mpe tomonaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza solo? Mokonzi ya libota Abrahama, ntoma Paulo, mpe Yesu ye moko bayikaki mpiko na mikakatano mpo bazalaki komona ete Bokonzi ezali mpenza solo. (Flp. 3:13, 14; Ebr. 11:8-10; 12:2) Soki tozali kaka kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso mpe tobosani te mapamboli ya seko oyo yango ekopesa, biso mpe tokoki kolonga komekama ya kotika bosembo na biso soki balaki biso ete bakonyokola biso lisusu te.—2 Ko. 4:16-18.
Yehova akosundola biso te
Atako Rabashake asalaki nyonso mpo na kobangisa Bayuda, Hizikiya ná bato na ye batikaki te kotyela Yehova motema. (2 Bak. 19:15, 19; Yis. 37:5-7) Yehova ye mpe andimaki mabondeli na bango ya kosɛnga lisalisi; atindaki anzelu moko oyo abomaki na butu moko basoda 185 000 na kaa ya bato ya Asiri. Na mokolo oyo elandaki, Senakeribe azongaki mbangu na Ninive, engumba-mokonzi ya mboka na ye, atondi na nsɔni, ye ná mwa ndambo ya basoda na ye oyo batikalaki.—2 Bak. 19:35, 36.
Ezali polele ete Yehova asundolaki te bato oyo bazalaki kotyela ye motema. Bandakisa ya bandeko mibali mpe basi oyo, na ntango na biso, batɛlɛmaki ngwi na kati ya mikakatano elakisi ete ata lelo, Yehova asundolaka te bato oyo batyelaka ye motema. Yango wana, Tata na biso ya likoló alendisi biso boye: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’”—Yis. 41:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Rabashake” ezalaki titre oyo bazalaki kopesa mosali moko monene ya mokonzi ya Asiri. Lisolo wana eyebisi nkombo ya moto yango te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Na kati ya Liloba na ye, Yehova alendisi basaleli na ye mbala koleka 30 boye: ‘Bóbanga te’
[Elilingi na lokasa 12]
Na ndenge nini mayele oyo Rabashake asalelaki ekokani na oyo ya banguna ya bato ya Nzambe lelo?
[Bililingi na lokasa 15]
Boyokani malamu na Yehova esalisaka biso tóbatela bosembo na biso na kati ya mikakatano