Okoki kolonga ata soki babɔkɔlaki yo ndenge nini
BANDA na bomwana, Nicholas azalaki na elimo ya kotomboka.a Na nsima, akómaki komɛla bangi mpe kolangwa masanga. Nicholas alobi boye: “Tata na biso azalaki kolangwa masanga mpe azalaki konyokola ngai na ndeko na ngai ya mwasi.”
Na mboka na bango, bato bazalaki kopesa baboti ya Malinda limemya mingi mpo bayebanaki lokola bato malamu oyo bakendaka ndako-nzambe. Kasi, bakɔtaki mpe na mwa lingomba moko. Malinda, oyo azali sikoyo na mbula koleka 30, alobi ete: “Makambo mosusu ya mwa lingomba yango ezalaki kotungisa ngai mpe lokola nazalaki mwana, ebebisaki makanisi na ngai.” Abakisi ete: “Banda bomwana na ngai bakɔtisaki na makanisi na ngai kozanga elikya mpe ya komimona ete nazali na ntina moko te.”
Biso nyonso toyebi ete bato mingi, na bomwana na bango, banyokwamaki, babebisaki bango, basundolaki bango to bakutanaki na makambo mosusu ya mabe. Moto oyo alekisaki bomwana na ye na makambo oyo ezalaki na esengo te ekozala mpasi mpo abosana yango. Kasi, yango esengeli nde kopekisa moto mpo na libela ete ayeba solo ya Liloba ya Nzambe te mpe azwa bolamu te? Atako babɔkɔlaki bango ndenge oyo tomoni, Nicholas na Malinda bakoki mpenza kokóma bato ya sembo? Tótalela naino ndakisa ya Yosiya, mokonzi moko ya Yuda.
Ndakisa moko ya Makomami
Yosiya azalaki mokonzi ya Yuda na ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso, ayangelaki mbula 31. (659-629 L.T.B.) Ntango Yosiya akómaki mokonzi, nsima ya kobomama ya tata na ye, makambo mingi oyo ezalaki kosalema na Yuda ezalaki mabe mpenza. Basambeli ya Baala na bato oyo bazalaki kokata ndai na nkombo ya Malakama, nzambe monene ya Baamona, batondaki na Yuda mpe na Yelusaleme. Sefania, mosakoli moko ya Nzambe na ntango wana, alobaki ete bankumu ya Yuda bazali “bankosi ya konguluma,” mpe basambisi bazalaki “bambwa ya zamba na ntango ya mpokwa.” Yango wana, mboka etondaki na mobulu mpe na lokuta. Bato mingi bazalaki koloba na kati ya mitema na bango ete: “[Yehova] akosala malamu te mpe akosala mabe te.”—Sefania 1:3–2:3; 3:1-5.
Yosiya azalaki mokonzi ya ndenge nini? Ezela, moto oyo akomaki masolo mosusu ya Biblia, ayebisi boye: “[Yosiya] asalaki malamu na miso ya [Yehova]; atambolaki na nzela ya Davidi, tata na ye; apɛngwaki na [lobɔkɔ] ya mobali te to na [lobɔkɔ] ya mwasi te.” (2 Ntango 34:1, 2) Na ntembe te, Yosiya asalaki mpenza makambo oyo ezalaki sembo na miso ya Nzambe. Kasi autaki na libota ya ndenge nini?
Babɔkɔlaki ye malamu to mabe?
Ntango Yosiya abotamaki, na mobu 667 liboso ya ntango na biso, tata na ye Amona azalaki se na mbula 16 mpe nkɔkɔ na ye ya mobali Manase nde azalaki koyangela na Yuda. Manase azalaki mokonzi oyo alekaki mabe na kati ya bakonzi nyonso oyo bayangelaki Yuda. Atongaki bitumbelo mpo na Baala mpe “asalaki mabe mingi na miso ya [Yehova].” Atumbaki bana na ye na mɔ́tɔ, asalaki maji, akendaki epai ya bato oyo basakolaka makambo oyo mabombami, alendisaki misala ya koyokana na bilimu mabe, mpe asopaki makila ya ebele ya bato oyo basalaki mabe moko te. Asalaki ekeko ya likonzi mosantu mpe amemaki yango na ndako ya Yehova. Manase amemaki bato ya Yuda mpe ya Yelusaleme na “masumu kino balekaki na mabe mabota oyo [Yehova] abebisaki bango liboso ya bana ya Yisalaele.”—2 Ntango 33:1-9.
Lokola mabe ya Manase elekaki, Yehova atikaki ete bákanga ye na minyɔlɔlɔ mpe bámema ye na Babilone, oyo ezalaki moko ya bamboka ya mokonzi ya Asulia. Ntango azalaki na boombo, Manase abongolaki motema, amikitisaki mpe asɛngaki Yehova bolimbisi. Nzambe ayokaki libondeli na ye mpe azongisaki ye na kiti na ye ya bokonzi na Yelusaleme. Manase azwaki bibongiseli mpo na kolongola makambo nyonso ya mabe mpe yango ebotaki mwa mbuma ya malamu.—2 Ntango 33:10-17.
Mabe oyo Manase asalaki mpe ndenge ayaki kobongola motema na nsima epesaki mwana na ye Amona liteya? Te, ye akómaki mabe mpenza. Ntango Manase abongolaki motema mpe asalaki makasi mpo na kopɛtola ekólo na makambo ya mbindo oyo ye moko akɔtisaki, Amona asungaki ye te. Ntango Amona akómaki mokonzi na esika ya tata na ye, wana azalaki na mbula 22, “asalaki mabe na miso ya [Yehova] lokola esalaki Manase, tata na ye.” Na esika ya komikitisa liboso ya Yehova, “Amona alekaki kosalaka masumu.” (2 Ntango 33:21-23) Ntango Amona akómaki mokonzi ya Yuda, Yosiya azalaki se na mbula motoba. Yosiya amonaki mpenza makambo ya mabe koleka na bomwana na ye!
Nsima ya mbula mibale, boyangeli mabe ya Amona esukaki ntango basaleli na ye babomaki ye. Kasi, bato ya mboka babomaki bato yango mpe batyaki mwana na ye Yosiya mokonzi.—2 Ntango 33:24, 25.
Atako amonaki makambo mabe na bomwana na ye, Yosiya asalaki oyo ezalaki malamu na miso ya Yehova. Lokola ayangelaki mpenza malamu, Biblia elobi ete: “Mokonzi mosusu liboso na ye azalaki lokola ye te, ye oyo abongwanaki na [Yehova] na motema na ye mobimba mpe na molimo na ye mobimba mpe na nguya na ye mobimba, [kolanda] Mobeko mobimba ya Mose; nsima na ye mpe mosusu ayaki lokola ye te.”—2 Mikonzi 23:19-25.
Yosiya atikelaki baoyo bakutanaki na mikakatano mingi na bomwana na bango ndakisa ya malamu mpenza! Ndakisa na ye ekoki koteya biso nini? Makambo nini esalisaki Yosiya apona nzela ya malamu mpe akangama na yango?
Luká koyeba Yehova
Yosiya azwaki bopusi ya malamu ntango azalaki naino mwana moke wana nkɔkɔ na ye Manase abongolaki motema. Biblia elobi te ete bazalaki kosolola mingi bango mibale; elobi mpe te soki Yosiya azalaki na mbula boni ntango Manase abongolaki bizaleli na ye. Lokola mabota ya Bayuda ezalaki na boyokani malamu, ekoki kozala ete Manase asalaki milende ya koteya nkɔkɔ na ye komemya Yehova, Nzambe ya solo, mpe komemya liloba na ye mpo na kobatela ye na makambo mabe oyo ezalaki kosalema na esika bazalaki. Nsukansuka, mateya nyonso ya solo oyo Manase alonaki na motema ya Yosiya, bakisa mpe, ntango mosusu, bandakisa mosusu ya malamu, ebotaki mbuma. Ntango Yosiya akokisaki mbula mwambe na kiti ya bokonzi na Yuda—na ntango wana azalaki na mbula 15—abandaki koluka koyeba Yehova mpe kosala mokano na ye.—2 Ntango 34:1-3.
Bato mosusu, na bomwana na bango, bayokaki mateya ya Nzambe kaka epai ya ndeko moko ya mosika, to moto moko oyo bayebaki to moto moko na kartye. Nzokande, soki basopeli yango mai, mboto wana ya solo oyo balonaki na mitema na bango ekoki kobota mbuma nsima ya mikolo. Malinda, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, azalaki kofanda na kartye moko na mobange moko ya boboto oyo azalaki mbala na mbala kotika bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na ndako na bango. Mpo na makanisi malamu oyo atikalá na yango mpo na nkɔkɔ wana, alobi boye: “Likambo oyo ezalaki kokamwisa ngai mingi mpo na mobange wana oyo tozalaki na ye kartye moko ezali ete azalaki kosala bafɛti ya mangomba te. Likambo yango ezalaki na ntina mingi mpo na ngai mpamba te na ntango ya fɛti ya Halloween mpe bafɛti mosusu, na mwa lingomba ya baboti na ngai bazalaki kosala milulu ya ndenge na ndenge.” Nsima ya mbula soki zomi, ntango moninga moko abengisaki Malinda na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, akanisaki lisusu mobange wana mpe andimaki mbala moko kokende. Yango esalisaki ye na koluka nzela ya solo.
Zalá na komikitisa liboso ya Nzambe
Ntango Yosiya azalaki mokonzi, mbongwana monene ekɔtaki na mokili ya Yuda na makambo ya losambo. Nsima ya kobunda etumba mbula motoba mpo na kosilisa losambo ya bikeko mpe nsima ya kopɛtola mokili ya Yuda, Yosiya abandaki kobongisa tempelo ya Yehova. Ntango bazalaki kosala mosala wana, nganga monene Hilikiya azwaki eloko moko ya motuya mingi! Amonaki “mokanda ya Mobeko ya [Yehova]” oyo ekomamaki na mabɔkɔ ya Mose. Hilikiya apesaki mokanda yango na mabɔkɔ ya Safana, sekrɛtɛrɛ ya mokonzi, amemelaki ye yango mpe ayebisaki ye ndenge makambo elekaki. Makambo oyo Yosiya asalaki ntango azalaki se na mbula 25 ekómisaki ye moto ya lolendo?—2 Ntango 34:3-18.
Ezela akomi boye: “Eyokaki mokonzi maloba ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye.” Ezalaki lolenge ya komonisa mawa oyo azalaki na yango na motema na komona ete bankɔkɔ na bango batosaki mibeko nyonso ya Nzambe te. Ezalaki mpenza elembo oyo emonisaki ete amikitisaki! Mbala moko, mokonzi atindaki bato mitano bákende kotuna Yehova na nzela ya mosakoli mwasi Huluda. Bato yango bazongaki epai ya mokonzi na maloba oyo: ‘Mabe ekokóma lokola botosaki Mobeko ya Yehova te. Kasi yo, Mokonzi Yosiya, omisɔkisaki, okoyangana na nkunda na yo na kimya mpe okomona mabe wana te.’ (2 Ntango 34:19-28) Yehova asepelaki na ezaleli ya Yosiya.
Biso mpe, ata soki babɔkɔlaki biso ndenge nini, tokoki komikitisa liboso ya Yehova, Nzambe ya solo, mpe kozala na limemya epai na ye mpe komemya Biblia, Liloba na ye. Nicholas, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, amikitisaki. Alobi boye: “Atako nazalaki na bomoi ya mobulu mpamba te nazalaki komɛla bangi mpe kolangwa masanga, nazalaki kosepela na Biblia mpe nazalaki na mposa ya kozala na bomoi oyo ezali na ntina. Nsukansuka, nakutanaki na Batatoli ya Yehova, nabongolaki bomoi na ngai mpe nayambaki solo ya Biblia.” Ya solo, tokoki kozala na limemya epai ya Yehova mpe Liloba na ye ata soki tofandi na kati ya bato ya motindo nini.
Landá bibongiseli ya Yehova
Yosiya azalaki mpe na limemya mingi mpo na basakoli ya Yehova. Asukaki kaka te na kotuna mosakoli mwasi Huluda, kasi alandaki mpenza ndakisa ya basakoli mosusu ya ntango na ye. Na ndakisa, Yilimia na Sefania bamipesaki na kotɔndɔla losambo ya bikeko oyo ezalaki kosalema na Yuda. Na ntango azalaki kotya likebi na nsango oyo bazalaki kosakola, Yosiya alendisamaki mpenza, wana azalaki kobundisa losambo ya lokuta!—Yilimia 1:1, 2; 3:6-10; Sefania 1:1-6.
“Nkolo” Yesu Klisto asi aponi etuluku ya bayekoli bapakolami na ye, elingi koloba “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpo na kopesa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. (Matai 24:45-47) Na nzela ya mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe na nzela ya masangá, moombo ya sembo azali komonisa matomba ya kotosa toli ya Biblia mpe azali kolakisa biso ndenge oyo tokoki kosalela yango na bomoi na biso. Ebongi mpenza tólanda bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na kosalisa biso tólonga bizaleli ya mabe oyo efanda na motema na biso banda bambula ebele! Banda bomwana ya Nicholas, azalaki kosepela te ete moto azala na bokonzi likoló na ye. Ata ntango ayekolaki solo ya Liloba ya Nzambe, ezaleli mabe wana ezalaki kopekisa ye amipesa mpenza na kosalela Yehova. Ezalaki lisɛki te mpo abongola ezaleli na ye. Kasi, nsukansuka alongaki. Ndenge nini? Ye moko alobi boye: “Na lisalisi ya bankulutu mibale ya boboto, nandimaki mokakatano na ngai mpe nabandaki kosalela toli ya bolingo oyo bapesaki ngai oyo eutaki na Makomami.” Abakisi lisusu ete: “Atako, ntango mosusu, mwa nkanda eyelaka ngai, nalongi sikoyo ezaleli na ngai ya kotomboka.”
Malinda mpe alukaka toli ya bankulutu ntango alingi kozwa bikateli ya minene na bomoi na ye. Lokola azalaki kobundisa makanisi oyo azalaki na yango banda bomwana ete azangi elikya mpe komiyoka ete azali na ntina moko te, amonaka ete masolo ndenge na ndenge ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! ezali na motuya mingi. Alobi ete: “Mbala mosusu, na kati ya lisolo moko, kaka paragrafe moko to fraze moko, ata ya moke mpenza, nde esimbaka motema na ngai. Eleki sikoyo mbula libwa banda nabandá kobomba masolo ya ndenge yango na klasɛrɛ moko mpo nakoka kozongelaka yango mbala na mbala.” Lelo oyo, azali na baklasɛrɛ misato oyo ezali na masolo 400!
Moto moko te akoki konyokwama mpo na libela mpo abɔkɔlamaki mabe. Na lisalisi ya Yehova, baoyo bakutanaki na makambo ya ndenge wana bakoki kokóma bato ya elimo. Soki moto moko abɔkɔlamaki malamu, yango elakisi te ete akozala moto ya sembo; se ndenge moko, elakisi te ete moto oyo abɔkɔlamaki malamu te akoki te kokóma moto oyo abangaka Nzambe.
Nsima ya komona mokanda ya Mibeko ntango bazalaki kobongisa tempelo, Yosiya ‘akataki kondimana liboso ya [Yehova] mpo na kotambola nsima na [Yehova mpe kolanda kotosa, NW] ye na motema na ye mobimba mpe na molimo na ye mobimba.’ (2 Ntango 34:31) Tii na liwa na ye, abongolaki mokano yango te. Malinda na Nicholas mpe bazali na mokano ya kotikala sembo epai ya Yehova Nzambe mpe kozala bato ya sembo. Tiká ete yo mpe ozala na mokano ya kokangama ntango nyonso na Nzambe mpe kozala sembo na mosala na ye. Zalá na elikya ete okolonga, mpamba te Yehova apesi elaka oyo ete: “Bangá te, zambi ngai nazali na yo; yoká nsɔmɔ te mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo, nakosunga yo, nakotombola mpe yo na lobɔkɔ na ngai ya boyengebene.”—Yisaya 41:10, 13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Bililingi na lokasa 26]
Atako Yosiya akutanaki na makambo ya mabe mpenza na bomwana na ye, alukaki Yehova mpe atambolaki malamu na bomoi na ye
[Elilingi na lokasa 28]
Bankulutu bakoki kosalisa yo otika ezaleli moko ya mabe oyo ozalaka na yango banda kala
[Elilingi na lokasa 28]
“Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” na “Lamuká!” ekoki kosalisa yo na kotikala sembo