Yelusaleme oyo eyokani na nkombo na yango
“Bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga; mpo ete talá, nakotonga Yelusaleme mpo na kosanzola.”—YISAYA 65:18.
1. Ndenge nini Ezela azalaki kotalela mboka oyo Nzambe aponaki?
LOKOLA amipesaki na koyekola Liloba ya Nzambe, Ezela nganga Moyuda, alingaki mingi boyokani oyo ezalaki liboso kati na Yelusaleme mpe losambo ya pɛto oyo ezalaki kopesama epai ya Yehova. (Deteronome 12:5; Ezela 7:27) Mikanda ya Biblia oyo akomaki (1 Ntango, 2 Ntango mpe Ezela) mimonisi ndenge oyo alingaki mboka ya Nzambe. Na kati ya Biblia mobimba nkombo Yelusaleme ekomami mbala koleka 800. Kasi, bobele na mikanda wana ya makambo ya kala oyo Ezela akomaki, tozali kokuta nkombo Yelusaleme koleka mbala 200.
2. Nkombo Yelusaleme ekoki kozala na ndimbola nini ya esakweli?
2 Na Liebele ya Biblia, “Yelusaleme” ekomamaka na lolenge oyo emonisaka biloko mibale na lokota Liebele. Mbala mingi lolenge yango esalelamaka na biloko oyo bizalaka mibalemibale lokola miso, matoi, mabɔkɔ, mpe makolo. Soki ekomami na lolenge wana, tokoki kotalela nkombo Yelusaleme lokola esakweli ya kimya oyo libota ya Nzambe esengelaki kozala na yango na ndimbola mibale: na elimo mpe na mosuni. Makomami mamonisi te soki Ezela akangaki mpenza ntina ya likambo yango. Kasi lokola azalaki nganga, asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa Bayuda bázala na kimya elongo na Nzambe. Mpe tokanisi ete asalaki molende mpo ete Yelusaleme eyokana na ndimbola ya nkombo na yango, elingi koloba, “Oyo ezali na [to, Moboko] ya kimya mibale.”—Ezela 7:6.
3. Elekaki mbula boni mpo bálobela biso lisusu misala ya Ezela, mpe ntango balobeli ye lisusu makambo mazalaki ndenge nini?
3 Biblia eyebisi te esika oyo Ezela azalaki na boumeli ya mbula 12 oyo elekaki banda akómaki na Yelusaleme mpe tii ntango Nehemia akómaki na mboka yango. Bolɛmbu ya elimo oyo ezalaki na libota yango mobimba ezali kotinda biso na kokanisa ete Ezela azalaki wana te. Kasi, ntango basilisaki kotonga bifelo ya mboka, lisolo emonisi biso lisusu Ezela, azali lisusu kosala lokola nganga ya sembo.
Mokolo ya liyangani kitoko
4. Likambo monene nini ezalaki kosalema na mokolo ya liboso ya sanza ya nsambo na manaka ya Yisalaele?
4 Bifelo ya Yelusaleme bisilaki kotongama na ntango malamu liboso ya sanza ya Tisri oyo ezalaki na bilambo mingi. Ezali sanza ya nsambo na manaka ya Yisalaele. Mokolo ya liboso ya sanza ya Tisri, ntango sanza ya sika ebimi, bazalaki kosala elambo moko monene; babéngaki yango Elambo ya koyulama na kelelo. Na mokolo yango, banganga bazalaki koyula bakelelo ntango bazalaki kotumbela Yehova mbeka. (Mituya 10:10; 29:1) Na mokolo yango Bayisalaele babandaki komibongisa mpo na Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula moko, na mokolo ya 10 na sanza ya Tisri mpe mpo na Elambo ya Kolɔkɔta oyo ezalaki kosalema na mokolo ya 15 kino mokolo ya 21, kaka na sanza yango.
5. (a) Ndenge nini Ezela na Nehemia basalelaki malamu “mokolo ya liboso na sanza na nsambo”? (b) Mpo na nini Bayisalaele balelaki?
5 Ekoki kozala ete Nehemia na Ezela balendisaki bato báyangana, yango wana na “mokolo na liboso na sanza na nsambo,” “bato nyonso bayanganaki elongo.” Mibali, basi, mpe “baoyo bayebaki koyoka na kososola” bazalaki wana. Na bongo, bana mike bazalaki wana mpe bazalaki kolanda na likebi ntango Ezela atɛlɛmaki na ebaelo mpe azalaki kotánga Mibeko “longwa na ntɔngɔntɔngɔ kino midi.” (Nehemia 8:1-4) Bazalaki kotika ntango mpo ete Balevi básalisa bato na kokanga ntina ya makambo oyo ezalaki kotángama. Bayisalaele balelaki ntango basosolaki ndenge oyo bango mpe bankɔkɔ na bango babukaki Mibeko ya Nzambe.—Nehemia 8:5-9.
6, 7. Baklisto bakoki kozwa liteya nini na likambo oyo Nehemia asalaki mpo na kopekisa Bayuda bátika kolela?
6 Kasi yango ezalaki ntango ya kolela te. Ezalaki elambo; bautaki kosilisa mosala ya kotonga lisusu bifelo ya Yelusaleme. Yango wana, Nehemia asalisaki bango ete bábosana mawa. Alobaki na bango ete: “Bókenda na bino, bólya mafuta mpe bómela biloko na elɛngi mpe bótinda makabo epai na ye oyo abongisameli eloko te; mpo ete mokolo oyo ezali bulɛɛ epai na Nkolo na biso; bózala na mawa te zambi esengo na [Yehova] ezali nguya na bino.” Bato batosaki, “bakendaki na bango mpo na kolya mpe komela mpe kotinda makabo mpe kosepela mingi mpo ete basili kososola maloba masakwelamaki bango.”—Nehemia 8:10-12.
7 Lisolo oyo ekoki koteya basaleli ya Nzambe makambo mingi. Baoyo bazwaka mabaku ya kosala masolo na makita mpe na mayangani basengeli kobosana likambo yango te. Longola kopesa toli oyo ntango mosusu ezalaka na ntina mpo na kosembola makambo, na mabaku ya ndenge yango, esengeli kotya likebi mingi na matomba mpe mapamboli oyo kotosa masɛngami ya Nzambe epesaka. Mabaku wana esalemaka mpo na kopesa longonya mpo na misala malamu oyo ezali kosalema mpe bilendiseli mpo na kolendendela. Basaleli ya Nzambe basengeli kouta na mayangani yango na esengo na mitema ete bazwi mateya oyo mazali kotonga mpe mauti na Liloba ya Nzambe.—Baebele 10:24, 25.
Liyangani mosusu ya esengo
8, 9. Liyangani nini ya ntina mingi esalemaki na mokolo ya mibale na sanza ya nsambo, mpe ebimisaki likambo nini mpo na libota ya Nzambe?
8 Na mokolo ya mibale na sanza wana ya ntina mingi, “bankolo na ndako na batata na bato nyonso bayanganaki elongo mpe banganga mpe Balevi epai na mokomeli Ezela mpo na koyekola maloba na Mobeko.” (Nehemia 8:13) Ezela azalaki mpenza na makoki ya kokamba likita wana mpamba te asilaki “kotya motema na ye ete asosola Mobeko na [Yehova] mpe ete [alanda] yango mpe ete alakisa malako mpe kosambisa-sembo kati na Yisalaele.” (Ezela 7:10) Na ntembe te, likita yango elobelaki mingi makambo oyo libota ya Nzambe esengelaki kolanda mpenzampenza kondimana ya Mibeko. Basengelaki nokinoki kokamata bibongiseli mpo na kosala Elambo ya Mingombo oyo ekómaki pene.
9 Elambo yango oyo ezalaki koumela pɔsɔ mobimba elekaki malamu. Bato nyonso bafandaki na mingombo oyo esalemaki na bitape mpe nkasa ya banzete ndenge na ndenge. Batongaki mingombo yango likoló ya bandako na bango, na libándá ya bandako na bango, na mabándá ya tempelo, mpe na bisika ya bato nyonso na Yelusaleme. (Nehemia 8:15, 16) Ezalaki mpenza libaku malamu mpo na koyanganisa bato mpe kotángela bango Mibeko ya Nzambe! (Kokanisá na Deteronome 31:10-13.) Bazalaki kosala bongo mokolo na mokolo, “longwa na mokolo na liboso kino mokolo na nsuka” ya elambo. Mpo na yango, libota ya Nzambe “basepelaki mingi mpenza.”—Nehemia 8:17, 18.
Tosengeli kotika Ndako ya Nzambe mpamba te
10. Mpo na nini liyangani monene esalemaki na mokolo ya 24 na sanza ya nsambo?
10 Soki likambo moko ya mabe esalemi na kati ya basaleli ya Nzambe, ezalaka na ntango mpe na esika oyo ebongi mpo na kosembola yango. Ekoki kozala ete Ezela na Nehemia bamonaki ete ntango wana ebongaki; baponaki mokolo moko mpo na kokila bilei: mokolo ya 24 na sanza ya Tisri. Batángaki lisusu Mibeko ya Nzambe, mpe bato bayambolaki masumu na bango. Na nsima, Balevi batángaki makambo nyonso oyo Nzambe asalaki mpo na kolakisa mawa na libota na ye oyo ezalaki motó makasi, basanzolaki Yehova, mpe basalaki “kondimana makasi” oyo bankumu na bango, Balevi, mpe banganga bandimaki yango.—Nehemia 9:1-38.
11. “Kondimana makasi” nini Bayuda bandimaki kotosa?
11 Bato nyonso balapaki ndai ete bakotosa “kondimana makasi” oyo ekomamaki. Bandimaki ‘kotambola na Mibeko ya Nzambe ya solo.’ Bandimaki mpe ete bakobala “bato na mokili [yango] te.” (Nehemia 10:28-30) Bayuda bandimaki mpe kotosa Sabata, kopesa makabo mbula na mbula mpo na kotombola losambo ya solo. Bandimaki ete bakobanda koya na nkoni mpo na etumbelo ya mbeka, bandimaki ete bakobanda kopesa bana ya liboso na kati ya bibwele na bango lokola mbeka mpe bakobanda komema mbuma ya liboso ya bilanga na bango na biteni ya tempelo epai basali na tempelo bazalaki kolya. Na mokuse, bazwaki ekateli ete ‘bakotika ndako ya Nzambe na bango mpamba te.’—Nehemia 10:32-39.
12. Lelo oyo kotika ndako ya Nzambe mpamba te esɛngi nini?
12 Lelo oyo, basaleli ya Yehova basengeli kokeba ete bámonisa bopɔtu te mpo na libaku malamu oyo bazwi ya ‘kosala mosala ya bulɛɛ’ na lopango ya tempelo monene ya Yehova na elimo. (Emoniseli 7:15) Yango esangisi kosala mabondeli makasi mpo ete losambo ya Yehova ekende liboso. Ntango tozali kobongisa makita ya boklisto, tozali kopesa biyano na makita yango, tozali kobima na mosala ya kosakola nsango malamu, tozali kosalisa bato oyo bazali kosepela na nsango mpe tozali kozonga kotala bango mpe soki likoki ezali, tozali koyekola na bango Biblia, nyonso wana ekomonisa ete tozali kosala na boyokani na mabondeli na biso. Bato mingi oyo balingi kotika Ndako ya Nzambe mpamba te bazali kopesa makabo ya mbongo mpo na mosala ya kosakola mpe kobongisa bisika mpo na losambo ya solo. Tokoki mpe kopesa mabɔkɔ mpo na kotonga bisika ya makita oyo tosengeli na yango mpe kobatela bisika yango pɛto. Ndenge mosusu ya malamu oyo tokoki komonisa bolingo na biso mpo na ndako ya Nzambe na elimo ezali kobatela kimya na baninga na biso bandimi mpe kosunga moto nyonso oyo azali na mposa ya lisalisi ya mosuni to ya elimo.—Matai 24:14; 28:19, 20; Baebele 13:15, 16.
Molulu ya bofungoli ya esengo
13. Makambo nini basengelaki kotalela nokinoki liboso ya feti ya bofungoli bifelo ya Yelusaleme, mpe ndakisa malamu nini bato mingi bapesaki?
13 “Kondimana makasi” oyo esalemaki na mikolo ya Nehemia ebongisaki basaleli ya Nzambe na ntango ya kala mpo na kosepela bofungoli ntango basilisaki kotonga bifelo ya Yelusaleme. Kasi, likambo mosusu esɛngaki ete bátyela yango likebi nokinoki. Lokola Yelusaleme ezingamaki na lopango monene oyo ezalaki na bikuke 12, esengelaki bato mingi báfanda kuna. Atako Bayisalaele mosusu bazalaki kofanda kuna, “mboka ezalaki nde monene mpe molai, kasi bato bazalaki mingi kati na yango te.” (Nehemia 7:4) Mpo na kolonga mokakatano yango, bato “babwaki mbɛsɛ mpo na koyeisa moto moko kati na zomi ete afanda na Yelusaleme, mboka na bulɛɛ.” Lokola bato bandimaki ebongiseli yango na motema moko, bapambolaki “bato nyonso baoyo bamipesaki na motema mobimba mpo na kofanda na Yelusaleme.” (Nehemia 11:1, 2) Likambo oyo ezali ndakisa malamu mpo na basambeli ya solo oyo bazali na makoki ya kokende kofanda na bisika oyo mposa mingi ya baklisto oyo bakɔmeli ezali!
14. Likambo nini esalemaki na molulu ya bofungoli ya bifelo ya Yelusaleme?
14 Mosika te, babandaki kobongisa makambo mpo na kosepela mokolo monene ya bofungoli lokola basilisaki kotonga bifelo ya Yelusaleme. Baalanga-nzembo bautaki na bingumba ya Yuda oyo bizalaki pembenipembeni. Bakabolamaki na bituluku minene mibale ya bayembi oyo bazalaki koyemba nzembo ya kozongisa matɔndi. Bato basalaki milɔngɔ mpe bazalaki kolanda etuluku mokomoko na nsima. (Nehemia 12:27-31, 36, 38) Bayembi mpe bato oyo bazalaki kolanda na molɔngɔ bautaki na esika moko ya efelo oyo eleki mosika na tempelo, ekoki kozala na Ekuke ya Lobwaku, etuluku mokomoko elandaki ngámbo na yango tii bakutanaki na ndako ya Nzambe. “Bakabolaki mbeka minene na mokolo yango mpe basepelaki; mpo ete Nzambe asepelisaki bango na esengo monene mpe basi mpe bana basepelaki lokola, bongo esengo na Yelusaleme eyokanaki mosika mingi.”—Nehemia 12:43.
15. Mpo na nini feti ya bofungoli ya bifelo ya Yelusaleme ezalaki ntina ya esengo ya libela te?
15 Biblia eyebisi dati oyo elambo yango ya esengo esalemaki te. Na ntembe te, ezalaki likambo monene na kati ya mosala ya kotonga lisusu Yelusaleme, mbala mosusu mpe ezalaki nsuka ya mosala. Ya solo, mosala mingi ya kotonga esengelaki kosalema na kati ya mboka. Nsima ya bambula, bato oyo bafandaki na Yelusaleme balɛmbaki na elimo. Na ndakisa, ntango Nehemia ayaki na mboka yango mpo na mbala ya mibale, akutaki batiki ndako ya Nzambe mpamba mpe Bayisalaele bakómaki lisusu kobala basi bapaya. (Nehemia 13:6-11, 15, 23) Makomi ya mosakoli Malaki mamonisi mpe makambo ya mabe wana. (Malaki 1:6-8; 2:11; 3:8) Boye, feti ya bofungoli na ntango basilisaki kotonga bifelo ya Yelusaleme ezalaki ntina ya esengo ya libela te.
Ntina ya esengo ya seko
16. Makambo nini ya minene basaleli ya Nzambe bazali kozela?
16 Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazelaka ntango oyo Nzambe akolonga banguna na ye nyonso. Akobanda naino koboma “Babilone Monene”—mboka ya elilingi oyo esangisi mangomba lokuta na mokili mobimba. (Emoniseli 18:2, 8) Kobomama ya mangomba ya lokuta ekozala ebandeli ya bolɔzi monene oyo ezali koya. (Matai 24:21, 22) Tozali mpe kozela likambo mosusu ya monene: libala ya Nkolo Yesu Klisto na mwasi na ye, bato 144 000 ya “Yelusaleme ya Sika.” (Emoniseli 19:7; 21:2) Toyebi mpenzampenza te ntango oyo libala yango ekosalema, kasi tondimi ete ekozala likambo ya esengo.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1990, nkasa 30-31.
17. Makambo nini toyebi na ntina na kotongama ya Yelusaleme ya Sika?
17 Toyebi ete Yelusaleme ya Sika elingi kosila kotongama. (Matai 24:3, 7-14; Emoniseli 12:12) Yelusaleme ya Sika ekopesa mawa te lokola Yelusaleme ya mabelé. Ezali boye mpamba te bato na yango bazali bayekoli ya Yesu Klisto bapakolami na elimo, bamekami, mpe bayungolami. Lokola bazalaki sembo kino liwa, mokomoko amonisaki ete akozala sembo epai ya Nkolo Mokonzi, Yehova Nzambe mpo na libela. Likambo yango ezali na ndimbola monene mpo na bato mosusu nyonso, ezala baoyo bazali naino na bomoi mpe baoyo bakufá!
18. Mpo na nini tosengeli ‘kosepela mpe kozala na esengo libela’?
18 Talá likambo ekosalema ntango Yelusaleme ya Sika ekotya likebi na yango epai ya bato oyo bazali kondima mbeka ya lisiko ya Yesu. Ntoma Yoane akomaki ete, “Talá! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:2-4) Mpe lisusu, Nzambe akosalela ebongiseli wana ekokisami na mboka mpo na kobongisa bato kino bakokóma bato ya kokoka. (Emoniseli 22:1, 2) Oyo ezali solo bantina ya ‘kosepela mpe koyoka esengo libela mpo na oyo Nzambe azali kotonga’!—Yisaya 65:18.
19. Paladiso ya elimo epai baklisto basangani ezali nini?
19 Kasi, bato oyo bazali kobongola mitema bakozela ntango wana te liboso ete Nzambe asalisa bango. Na 1919, Yehova abandaki kosangisa basangani ya nsuka kati na ba 144 000 na paladiso ya elimo. Kuna, mbuma ya elimo ya Nzambe lokola bolingo, esengo, mpe kimya ezali bebo. (Bagalatia 5:22, 23) Likambo moko kitoko ezali komonana na paladiso yango ya elimo ezali bongo kondima ya bapakolami oyo bafandi kuna. Bazali kobota mbuma mingi na ndenge bazali na molɔngɔ ya liboso na kati ya mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba. (Matai 21:43; 24:14) Mpo na yango, “bampate mosusu” pene na milio 6 oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé, bazwi mpe libaku ya kokɔta na paladiso ya elimo mpe mosala na bango ezali kobota mbuma. (Yoane 10:16) Bakokisi masɛngami mpo na kokɔta kuna na ndenge bamipesaki na Yehova Nzambe na moboko ya mbeka ya lisiko ya Mwana na ye Yesu Klisto. Boninga na bango na bato oyo bakosangana na Yelusaleme ya Sika ezali lipamboli monene. Na yango, makambo oyo Yehova azali kosalela baklisto bapakolami ezali ndanga mpo na “mabelé ya sika,” elingi koloba lisangani ya bato oyo babangaka Nzambe baye bakofanda na mabelé oyo Bokonzi ya likoló ekoyangela.—Yisaya 65:17, NW; 2 Petelo 3:13.
20. Ndenge nini Yelusaleme ya Sika ekoyokana na nkombo na yango?
20 Etikali moke kimya oyo basaleli ya Yehova bazali na yango sikoyo na kati ya paladiso ya elimo, bakomona yango na paladiso awa na mabelé. Ekosalema ntango Yelusaleme ya Sika ekokita uta na likoló mpo na kopambola bato. Na ndenge mibale, basaleli ya Nzambe bakozwa kimya oyo Yisaya 65:21-25 elaki. Lokola bazali basambeli ya Yehova oyo basangani na paladiso ya elimo, bapakolami oyo bazwi naino bisika na bango te na Yelusaleme ya Sika na likoló, mpe “bampate mosusu” bazali na kimya euti na Nzambe. Mpe kimya yango ekozala na paladiso, ntango ‘mokano ya Nzambe ekosalema na nse [lokola] na Likoló.’ (Matai 6:10) Engumba ya Nzambe na likoló oyo etondi na nkembo ekoyokana na nkombo Yelusaleme, oyo elimboli ‘Moboko ya kimya mibale.’ Ekotikala libela na libela mpo na nkembo ya Mozalisi na yango Monene, Yehova Nzambe, mpe mpo na Mobali ya libala, Mokonzi Yesu Klisto.
Ozali komikundola?
◻ Likambo nini esalemaki ntango Nehemia ayanganisaki bato na Yelusaleme?
◻ Bayuda ya kala basengelaki kosala nini mpo na kotika ndako ya Nzambe mpamba te, mpe basɛngi biso tósala nini?
◻ Ndenge nini “Yelusaleme” esangani na kotya kimya mpe esengo ya libela?
[Karte na lokasa 23]
Bikuke ya Yelusaleme
Mituya elimboli bolai ya bisika yango lelo oyo; epesami na bamɛtɛlɛ
EKUKE YA MBISI
EKUKE YA KALA
EKUKE YA EFELAIMA
EKUKE YA NSUKA
Lopango monene
Esika ya bato nyonso
EKUKE YA LOBWAKU
ETENI YA MIBALE
Efelo ya ngámbo ya nɔrdi
MBOKA YA DAVIDI
EKUKE YA NYEI
Lobwaku ya Hinome
Ndako monene
EKUKE YA BAMPATE
EKUKE YA BAKƐNGƐLI
Zingazinga ya tempelo
EKUKE YA HAMIFIKADA
EKUKE YA BAMPUNDA
OFELE
Esika ya bato nyonso
EKUKE YA MAI
Mai ya Gihona
EKUKE YA LIZIBA
Elanga ya Mokonzi
Ene-logele
Lobwaku ya Tiropeoni
Mokɛlɛ ya Kidilono
740
730
730
750
770
770
750
730
710
690
670
620
640
660
680
700
720
740
730
710
690
670
Oyo ekoki kozala bandelo ya bifelo ya Yelusaleme ntango ebebisamaki mpe ntango Nehemia akambaki mosala ya kotonga yango lisusu