Biblia—Buku oyo ebongi kotyela motema
Banda kala, bato ya mimeseno ndenge na ndenge bamonaka ete Biblia ezali buku oyo ebongi kotyela motema. Lelo oyo, bamilio ya bato bazali kolanda mateya na yango. Kasi bamosusu bamonaka ete Biblia ezali na ntina te mpe ezali na masapo mpamba. Okanisi nini? Biblia ekoki koloba solo?
OKOKI KOTYELA BIBLIA MOTEMA!
Nini ekoki kosalisa yo otyela Biblia motema? Tózwa ndakisa: Soki banda bambula ebele moninga na yo moko alobaka ntango nyonso solo, mbala mosusu okokóma kotyela ye motema. Lokola moninga oyo okoki kotyela motema, Biblia elobaka ntango nyonso solo! Tótala mwa bandakisa.
Bakomi bazalaki sembo
Bakomi ya Biblia bazalaki mpenza sembo, bakomaki mpe ata mabunga na bango. Na ndakisa, mosakoli Yona akomaki makambo oyo emonisaki ndenge azangaki botosi. (Yona 1:1-3) Kasi, na nsuka ya mokanda na ye amonisi ndenge Nzambe apesaki ye etumbu, kasi amikumisaki te mpo alobeli te ndenge asembolaki makanisi na ye. (Yona 4:1, 4, 10, 11) Bosembo ya bakomi nyonso ya Biblia emonisi ete koloba solo ezalaki mpenza na ntina.
Batoli oyo ebongi
Biblia epesaka mpe batoli mpo na makambo mikemike ya bomoi. Na ndakisa, talá toli oyo Biblia epesi mpo na kozala moninga ya solosolo: “Yango wana, makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Biblia elobi mpe: “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.” (Masese 15:1) Batoli ya Biblia ezali kaka na ntina tii lelo.
Masolo ya solo
Banda bambula ebele, bato ya arkeoloji bamonisi ete ezala bato, bisika ndenge na ndenge, to mpe makambo oyo Biblia elobeli ezali mpenza solo. Na ndakisa, tótalela likambo moko ya moke oyo Biblia elobeli. Biblia elobi ete na ntango ya Nehemia, bato ya Tire (elingi koloba bato ya Fenisia oyo bazalaki kouta na Tire) oyo bazalaki kofanda na Yerusaleme “bazalaki koya na mbisi mpe na lolenge nyonso ya biloko ya mombongo.”—Nehemia 13:16.
Ezali na likambo oyo endimisi vɛrsɛ oyo? Ɛɛ. Bato ya arkeoloji bamoni biloko ya mombongo ya bato ya Fenisia na Yisraele, yango emonisi ete mombongo kati na bikóló wana mibale ya kala ezalaki mpenza kosalema. Longola yango, na Yerusaleme bayaki komona mbisi mosusu na Mediterane. Bato ya arkeoloji bandimi ete bato ya mombongo nde bamemaki mbisi yango mpe bautaki na yango mosika. Nsima ya kotalela makambo wana, moto moko ya mayele alobi boye: “Makambo oyo Biblia elobi na Nehemia 13:16 ete bato ya Tire bazalaki kotɛka mbisi na Yerusaleme ezali solo.”
Elobaka solo na makambo ya siansi
Biblia ezali libosoliboso buku oyo elobelaka makambo ya losambo mpe ebɛtaka masolo ya kala. Kasi ntango elobelaka makambo etali siansi, elobaka mpenza solo. Tózwa ndakisa moko.
Esali sikoyo mbula soki 3 500, Biblia elobaki ete “eloko moko te” esimbi mabele. (Yobo 26:7) Yango ekeseni mpenza na masapo oyo elobaki ete mabele ezali likoló ya mai, to nkoba mibale ya minene nde ememi yango. Mbula soki 1 100 nsima ya kokomama ya buku ya Yobo, bato bazalaki kaka kondima te ete eloko moko te nde esimbi mabele mpo ekoki kosalema te. Eleki sikoyo kaka mbula 300, na 1687, Isaac Newton amonisaki ete ezali na nguya moko oyo esalaka ete biloko ekwea te (gravitation), mpe alobaki ete nguya moko oyo emonanaka te nde esimbi mabele. Makambo wana nyonso endimisi oyo Biblia elobaki mbula soki 3 000 liboso!
Bisakweli ya solo
Ndenge nini bisakweli mingi ya Biblia ekokisami mpenza? Tózwa ndakisa moko: Esakweli ya Yisaya oyo etali kokwea ya Babilone.
Esakweli: Na siɛklɛ ya 8 L.T.B, mokomi ya Biblia Yisaya asakolaki ete Babilone—oyo ekómaki mboka-mokonzi ya ampire moko ya nguya—esengelaki kokweisama mpe moto moko te akokaki kofanda lisusu kuna. (Yisaya 13:17-20) Kutu, Yisaya alobaki ete moto oyo akosala yango nkombo na ye—Siruse. Alobelaki mpe mayele oyo Siruse akosalela, mpe ete ebale ‘ekokauka.’ Alobaki mpe ete baporte ya bingumba ekotikala ya kofungwama.—Yisaya 44:27–45:1.
Kokokisama: Mbula soki 200 nsima ya esakweli ya Yisaya, mokonzi ya Perse akendaki kobundisa Babilone. Nkombo na ye nani? Siruse. Lokola ezalaki mpasi kokɔta na Babilone mpo ebatelamaki malamu, Siruse asalelaki ebale Efrate, oyo ezalaki koleka na engumba yango. Basoda ya Siruse basalaki mwa nzela mosusu mpo na kokitisa mai. Mai ekitaki mpenza mpe basoda ya Siruse bakatisaki yango na makolo tii bakomaki na baporte ya engumba. Likambo ya kokamwa, bato ya Babilone batikaki baporte oyo etalaki ebale polele! Siruse na basoda na ye bakɔtaki na Babilone mpe bakweisaki yango.
Kasi, motuna yango oyo: Bato bakofanda lisusu te na Babilone ndenge esakolamaki? Mwa ba siɛklɛ na nsima, bato bakobaki kofanda kuna. Kasi lelo—pene ya Bagdag na Irak—Babilone etikalá mpamba; yango emonisi ete esakweli ya Biblia ekokisamaki. Biblia elobaka solo ata na makambo oyo ekoya.