Banyama bakumisaka Yehova
BANYAMA bamonisaka bonene ya Yehova. Nzambe akokisaka mpenza bamposa ya banyama, kaka ndenge akokisaka oyo ya bato. (Nzembo 145:16) Ekozala mpenza libunga koloba mabe mpo na Mozalisi ya banyama mpe bato! Atako Yobo azalaki moto ya sembo, “alongisaki molimo na ye moko liboso ya Nzambe.” Yango emonisi ete ezalaki na makambo mingi oyo asengelaki koyekola!—Yobo 32:2; 33:8-12; 34:5.
Nzambe alobelaki ndakisa ya banyama mpo na koteya ye mpe Yobo asosolaki ete bato bakoki te koloba mabe na ndenge oyo Nzambe asalaka makambo. Likambo yango ezali komonana polele na maloba oyo Yehova alobaki na mosaleli na ye Yobo!
Bazalaka na mposa te ete moto asunga bango
Yobo akokaki te koyanola na mituna oyo Nzambe atunaki ye na ntina na banyama. (Yobo 38:39-41) Na ntembe te, ezali moto te nde asalisaka Yehova mpo na koleisa nkɔsi mpe yanganga. Atako bayanganga bapumbwaka mpo na kolukaluka bilei, ezali Nzambe nde apesaka bango bilei.—Luka 12:24.
Yobo azangaki maloba ntango Nzambe atunaki ye mituna na ntina na banyama ya zamba. (Yobo 39:1-8, NW) Moto moko te akoki kobatela bantaba ya ngomba mpe bamboloko. Kutu, ezalaka mpasi mpo na kopusana penepene ya ntaba ya ngomba! (Nzembo 104:18) Na mayele ya lɔɔmbi (instinct) oyo Nzambe apesá ye, mboloko amibombaka na kati ya zamba ntango alingi kobota. Abatelaka bana na ye malamu, kasi ntango ‘bakómi makasi, bakendaka mpe bazongelaka ye te.’ Bakómaka koluka bilei bango moko.
Zɛbrɛ atambolaka na bonsomi nyonso, mpe esobe ezali ndako ya mpunda ya zamba. Yobo akokaki te kozwa mpunda ya zamba mpo ememelaka ye mikumba. Nyama yango atambolatambolaka na bangomba mpo na koluka “lolenge nyonso ya nkasa ya mobesu.” Akoki kondima ata moke te kotika bonsomi na ye mpo na kofanda na mboka monene epai akozwa bilei kozanga mpasi. Mpunda ya zamba “ayokaka makɛlɛlɛ ya moto ya bokila te,” mpamba te akimaka noki soki moto akómi na esika oyo ye azalaka.
Na nsima, Nzambe alobelaki ngɔmbɛ ya zamba. (Yobo 39:9-12) Mpo na nyama yango, Austen Layard, moto moko ya arkeoloji alobi boye: “Mayemi mingi ya kala emonisaka ngɔmbɛ ya zamba lokola nyama moko ya makasi mpe monene oyo bato bazalaki koluka koboma, kaka ndenge bazalaki kosala mpo na nkɔsi. Mbala mingi bamonisaka mokonzi azali kobunda na yango, mpe babundi bazali kolanda yango na makolo to na likoló ya shevale.” (Nineveh and Its Remains, 1849, Volime 2, lokasa 326) Kasi, ata moto moko te oyo akanisaka malamu akoki komeka kotya ekanganeli na ngɔmbɛ ya zamba, nyama oyo akoki kotosa moto te.—Nzembo 22:21.
Bandɛkɛ bakumisaka Yehova
Na nsima, Nzambe atunaki Yobo na ntina na bandɛkɛ. (Yobo 39:13-18, NW) Nkɔngi apumbwaka mosika na likoló na mapapu na ye oyo ezali na nguya. (Yilimia 8:7) Atako maligbanga abɛtaka mapapu, kasi apumbwaka te. Maligbanga atyaka te makei na ye na zumbu na likoló ya nzete lokola nkɔngi. (Nzembo 104:17) Atimolaka libulu na zɛlɔ mpe atyaka makei na ye wana. Kasi, ndɛkɛ yango asundolaka makei na ye te. Lokola makei yango ezipamaka na zɛlo, ezwaka molunge oyo ebongi mpe maligbanga ya mwasi mpe ya mobali bakɛngɛlaka yango.
Ekoki komonana lokola nde maligbanga ‘abosanaka bwanya’ ndenge akimaka ntango amoni moto to nyama moko oyo alingi kosala ye mabe. Nzokande, buku moko (An Encyclopedia of Bible Animals) elobi boye: “Yango ezali nde mayele mpo na kokosa: [Bamaligbanga] bamimonisaka epai ya nyama to moto oyo azali kopusana mpe babɛtaka mapapu na bango mpo na kobenda likebi na ye, na ndenge yango basalaka ete nyama to moto yango akende te esika oyo makei ezali.”
Ndenge nini maligbanga “asɛkaka shevale mpe motambwisi na yango”? Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Eyebani ete maligbanga apumbwaka te, kasi azalaka na mbangu mingi. Lokola azali makolo milai, ntango azali kokima mbangu makasi, soki abwaki lokolo moko, ekoki kokóma na mɛtrɛ 4,6 mpe akoki kokima kilomɛtrɛ 64 na ngonga moko.”
Nzambe apesaka shevale nguya
Na nsima, Nzambe atunaki Yobo na ntina na shevale. (Yobo 39:19-25, NW) Na ntango ya kala, basoda bazalaki kobunda likoló ya shevale, mpe bashevale bazalaki kobenda makalo oyo ezalaki komema motambwisi ná basoda ata mibale. Shevale ya etumba agangaka mpe atutaka makolo na nse mpo na komonisa ete abongami mpo na etumba. Ayokaka nsɔmɔ te mpe mopanga ezongisaka ye nsima te. Soki kelelo ebɛti, shevale ya etumba asalaka lokola nde alobi “Aha!” Akendaka liboso, ‘amɛlaka mabelé.’ Kasi, shevale ya etumba atosaka nkolo na ye.
Austen Layard amonisaki mpe makambo yango, akomaki boye: “Shevale ya mwasi oyo babengaka Arabe, atako azalaka nyama moko ya kimya lokola mpate, mpe esɛngaka kaka kokanga ye nsinga na nkingo mpo na kotambwisa ye, soki ayoki bato bagangi mpo na komonisa ete babongami mpo na etumba mpe amoni likɔnga ya motambwisi na ye, miso na ye engɛngaka, afungolaka madusu ya zolo na ye ya motane, atombolaka nkingo na ye, mpe nsuki ya nkingo mpe ya mokila na ye ebinaka na mopɛpɛ.”—Discoveries Among the Ruins of Nineveh and Babylon, 1853, lokasa 330.
Tótalela kombekombe mpe mpongo
Yehova alobelaki mpe bandɛkɛ mosusu. (Yobo 39:26-30, NW) Kombekombe ‘apumbwaka likoló wana asemboli mapapu na ye na mopɛpɛ.’ Buku moko (The Guinness Book of Records) elobi ete kombekombe oyo babengaka faucon pèlerin, azali na mbangu koleka bandɛkɛ nyonso oyo bapumbwaka mpe ete “akómaka na mbangu koleka ntango apumbwe na likoló mpenza mpo na kobatela esika na ye, to ntango alingi kokanga nyama na likoló.” Ndɛkɛ yango akómaki na mbangu ya kilomɛtrɛ 349 na ngonga moko ntango azali kokita!
Bamonaki mpongo oyo azalaki kopumbwa na mbangu ya kilomɛtrɛ koleka 130 na ngonga moko. Yobo alobaki ete bomoi ya moto elekaka nokinoki lokola mbangu ya mpongo oyo azali kopumbwa mpo na koluka eloko ya kolya. (Yobo 9:25, 26) Nzambe apesaka biso makasi ya koyika mpiko, mpe tokómaka lokola nde tozali na mapapu ya mpongo oyo elɛmbaka te mpe esalisaka ye apumbwa likoló mpenza. (Yisaya 40:31) Ntango azali kopumbwa, mpongo akɔtaka na mopɛpɛ oyo ezali komata na likoló. Ndɛkɛ yango amikɔtisaka na kati ya mopɛpɛ yango, oyo etombolaka ye mosika na likoló. Ntango mpongo akómi na likoló, alukaka esika mosusu oyo mopɛpɛ yango ezali mpe amikɔtisaka na kati na yango mpe akoki kotikala likoló na boumeli ya bangonga mingi kozanga ete abimisa nguya mingi.
Mpongo “atongaka zumbu na ye na likoló mpenza,” na esika oyo moto akoki kokóma te mpo bana na ye bázwa likama te. Yehova nde apesá mpongo mayele ya lɔɔmbi mpo na kosala bongo. Mpe mpo na likoki ya komona malamu oyo Nzambe apesá ye, “na mosika mpenza, miso [ya mpongo] elukalukaka.” Likoki oyo mpongo azalaka na yango ya komona ata na mosika, esalisaka ye abungisa te eloko ya kolya to ebembe ya nyama oyo amoni ata ntango azali kokita mbangu. Mpongo alyaka ebembe ya banyama; yango wana, “esika babomami bazali, ye azali wana.” Ndɛkɛ yango akangaka banyama ya mike mpe amemelaka bana na ye.
Yehova asemboli Yobo
Yehova asembolaki Yobo liboso ya kotuna ye mituna mosusu na ntina na banyama. Ndenge nini Yobo atalelaki likambo yango? Amikitisaki mpe andimaki ete Nzambe akoba kopesa ye toli.—Yobo 40:1-14.
Tii na esika oyo tokómi na ndenge tozali kotalela lisolo ya makambo oyo Yobo ayekolaki, tozwi liteya moko ya ntina mingi. Liteya yango ezali oyo: Moto moko te akoki koloba mabe na ndenge oyo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso asalaka makambo. Yango wana, maloba mpe misala na biso esengeli ntango nyonso kosepelisa Tata na biso ya likoló. Lisusu, tosengeli libosoliboso koluka ete nkombo ya Yehova esantisama mpe bokonzi na ye elongisama.
Behemote akumisaka Nzambe
Nzambe atunaki lisusu Yobo mituna na ntina na banyama; alobelaki Behemote, oyo mbala mingi bato balobaka ete ezali ngubu. (Yobo 40:15-24, NW) Ngubu oyo akɔmeli akoki kokóma na molai ya mɛtrɛ 4 to 5 mpe akoki kozala na kilo 3600. Nguya ya behemote ezalaka “na loketo na ye”—misuni na ye ya mokɔngɔ. Lokola Behemote azalaka makolo mikuse, ezali malamu ndenge mposo ya libumu na ye ezali makasi mpamba te libumu na ye etutaka na nse ntango azali kotambola likoló ya mabanga na nse ya mai. Ya solo mpenza, moto azali eloko te liboso ya Behemote, nyama monene mpenza oyo azali na monɔkɔ monene mpe na mbanga ya nguya.
Behemote abimaka na ebale mpo na kolya “matiti ya mobesu.” Mpo atonda asengeli kolya matiti ya ngomba mobimba! Mokolo na mokolo akoki kolya kilo 90 tii 180 ya matiti. Soki Behemote alei mpe atondi, alalaka na nse ya nzete ya lotisi to na elili ya banzete ya alava. Soki mai ya ebale etondi mingi, ngubu akoki kobimisa motó likoló ya mai mpe konana ata ntango mai ezali makasi. Liboso ya monɔkɔ monene ya Behemote, mpe mino na ye ya milai, Yobo akokaki te komeka kotɔbɔla zolo na ye na ndɔbɔ.
Leviatana akumisaka Nzambe
Na nsima, Nzambe alobelaki Yobo na ntina na Leviatana. (Yobo 41:1-34). Liloba ya Liebele oyo ebongolami na Leviatana elimboli “nyama oyo amilingaka”—ekoki kozala ngando. Yobo akokaki nde kopesa Leviatana epai ya bana ete básakana na yango? Ata moke te! Bato mingi bakutaná na nyama yango bamonaki ete azali nyama ya kosakana na ye te. Soki moto ameki kokanga Leviatana, nyama yango akobundana makasi na boye ete moto yango akolapa ete akozongela lisusu te!
Ntango ntɔngɔ ezali kotana, soki Leviatana atomboli motó na ye likoló ya mai, miso na ye engɛngaka “lokola pole ya kotana ya ntɔngɔ.” Bitɛku (écailles) ya Leviatana ekanganákanganá makasi, mpe biteni na yango oyo ebombaná na nse ezali lokola mikuwa mpe ezalaka makasi na boye ete mopanga to likɔnga ekoki kotɔbɔla yango te, ata mpe lisasi. Soki ngando aleki na esika ya pɔtɔpɔtɔ, bitɛku ya libumu na ye etikaka elembo lokola nde balekisi “eloko ya kotutela” na esika yango. Soki aningani na makasi nyonso na kati ya ebale, mai etombwanaka lokola fulufulu ya malasi oyo ezali kotɔka. Lisusu, mpo na monene na ye, loposo na ye oyo ebatelami malamu na bitɛku, mpe bibundeli na ye, elingi koloba monɔkɔ na ye ya nsɔmɔ mpe mokila na ya nguya, Leviatana ayokaka nsɔmɔ te.
Yobo amikitisi
Yobo andimaki ete ‘abimisaki makambo eyebi ye ntina te, makambo eleki ye na kokamwa.’ (Yobo 42:1-3) Andimaki ete Nzambe asembola ye, amikitisaki, mpe abongolaki motema. Nzambe apamelaki baninga na ye, kasi apambolaki Yobo mingi.—Yobo 42:4-17.
Ezali mpenza na ntina tóbosana te lisolo ya Yobo! Tokoki te kopesa biyano na mituna nyonso oyo Nzambe atunaki Yobo. Kasi, tozali na likoki mpe tosengeli komonisa botɔndi mpo na biloko ndenge na ndenge ya kokamwa oyo Yehova akelá, biloko oyo ekumisaka Ye.
[Elilingi na lokasa 13]
Ntaba ya ngomba
[Elilingi na lokasa 13]
Yanganga
[Elilingi na lokasa 13]
Nkɔsi ya mwasi
[Elilingi na lokasa 14]
Zɛbrɛ
[Elilingi na lokasa 14]
Maligbanga atiki makei na ye, kasi abosani yango te
[Elilingi na lokasa 14]
Makei ya Maligbanga
[Elilingi na lokasa 14, 15]
Kombekombe (“Faucon pèlerin”)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Kombekombe: © Joe McDonald/Visuals Unlimited
[Elilingi na lokasa 15]
Shevale (“Arabe”)
[Elilingi na lokasa 15]
Mpongo (“Aigle royal”)
[Elilingi na lokasa 16]
Balobaka ete Behemote ezali ngubu
[Elilingi na lokasa 16]
Bakanisaka ete Leviatana ezali ngando