Bosembo na yo esepelisaka motema ya Yehova
“Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.”—MAS. 27:11.
1, 2. (a) Mokanda ya Yobo elobeli ntembe nini oyo Satana abimisaki? (b) Atako Yobo akufá, nini emonisi ete Satana azali kaka kotumola Yehova?
YEHOVA apesaki Satana nzela ameka bosembo ya mosaleli na ye Yobo. Na yango, Yobo abungisaki bibwɛlɛ na ye, bana na ye, mpe abɛlaki makasi. Kasi, ntango Satana abɛtɛlaki bosembo ya Yobo ntembe, azalaki komona kaka Yobo te. Alobaki boye: “Loposo mpo na loposo! Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.” Maloba wana ebimisaki ntembe oyo ekɔtisaki bato mosusu mpe ekobaki tii nsima ya liwa ya Yobo.—Yobo 2:4.
2 Mbula soki 600 nsima ya mikakatano oyo Yobo akutanaki na yango, Salomo akomaki na lisalisi ya elimo santu ete: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” (Mas. 27:11) Emonani polele ete tii na ntango wana, Satana azalaki kaka kotɛmɛla Yehova. Longola yango, na emonaneli moko oyo ntoma Yoane azwaki, amonaki Satana azali kofunda basaleli ya Nzambe liboso ya kobwakama na ye awa na mabelé oyo esalemaki mwa moke nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na 1914. Ya solo, tii lelo oyo, atako tokómi mpenza mosika na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo mabe, Satana azali kaka kobɛtela bosembo ya basaleli ya Nzambe ntembe!—Emon. 12:10.
3. Mateya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na mokanda ya Yobo?
3 Tótalela sikoyo mateya misato ya ntina mingi oyo tokoki kozwa na mokanda ya Yobo. Ya liboso, minyoko ya Yobo emonisi nani azali mpenza monguna ya bato mpe epai botɛmɛli ya basaleli ya Nzambe eutaka. Monguna yango ezali Satana Zabolo. Ya mibale, ata soki tokutani na minyoko ya ndenge nini, kozala na boyokani malamu na Yehova ekosalisa biso tóbatela bosembo na biso. Ya misato, ntango mikakatano ebimi mpe tokutani na komekama na lolenge moko to mosusu, Nzambe akosunga biso, ndenge asungaki Yobo. Lelo oyo, Yehova asungaka biso na nzela ya Liloba na ye, lisangá na ye mpe elimo santu na ye.
Tóbosanaka te nani azali mpenza monguna na biso
4. Makambo mabe oyo ezali koleka na mokili ezali foti ya nani?
4 Bato mingi bandimaka te ete Satana azali. Yango wana, atako bamitungisaka mpo na makambo oyo ezali koleka na mokili, bayebaka te ete Satana Zabolo nde abimisaka yango. Makambo mingi ya mabe esalemaka mpe mpo na foti ya bato bango moko. Baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, baponaki kopesa Mozalisi na bango mokɔngɔ. Mpe banda wana, bakitani na bango nyonso basalaka makambo ya bozoba mpenza. Atako bongo, Zabolo nde akosaki Eva atombokela Nzambe. Ye nde azali koyangela bato ya kozanga kokoka na mokili ya mabe oyo ekokufa mosika te. Lokola Satana azali “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” bato nyonso bazali komonisa bizaleli na ye ya mabe: lolendo, kowelana, zuwa, lokoso, lokuta mpe elimo ya botomboki. (2 Kol. 4:4;1 Tim. 2:14; 3:6; tángá Yakobo 3:14, 15.) Bizaleli wana ebimisi matata na makambo ya politiki mpe ya mangomba, koyinana, kobuba mpe mobulu; makambo yango ezali kobakisela bato mpasi lelo oyo.
5. Tosengeli kosala nini na boyebi oyo tozali na yango?
5 Oyo nde boyebi kitoko biso basaleli ya Yehova tozali na yango! Toyebi moto oyo azali kosala ete makambo ebeba se kobeba na mokili. Tomoni te ete yango esengeli kotinda biso tóbimaka na mosala ya kosakola mpo na kosalisa basusu báyeba moto oyo azali kobimisela bato bampasi nyonso oyo ezali na mokili? Tozali mpenza na esengo ya kozala na ngámbo ya Yehova, Nzambe ya solo, mpe ya koyebisa bato ndenge akoboma Satana mpe akosilisa bampasi oyo bato bazali komona!
6, 7. (a) Nani nde abimisaka botɛmɛli oyo ekómelaka basambeli ya solo? (b) Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Elihu?
6 Satana abimisaka makambo mingi ya mabe oyo ezali kosalema na mokili mpe botɛmɛli oyo ekómelaka basaleli ya Nzambe. Azali na ekateli ya komeka biso. Yesu Klisto alobaki na ntoma Petelo ete: “Simona, Simona, talá! Satana asɛngi azwa bino mpo anyongela bino lokola blé.” (Luka 22:31) Ndenge moko mpe, mokomoko na biso oyo azali kolanda matambe ya Yesu akokutana na mikakatano ya lolenge moko to mosusu. Petelo alobaki ete Zabolo azali lokola “nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” Paulo mpe alobaki boye: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.”—1 Pet. 5:8; 2 Tim. 3:12.
7 Ndenge nini tokoki komonisa ete tobosani te nani azali mpenza monguna na biso ntango likama ekómeli ndeko na biso moklisto? Na esika tókima ndeko yango, tosengeli kosala lokola Elihu, oyo alobaki na Yobo lokola moninga ya motema. Tosengeli kosangana na ndeko yango mpo na kobundisa monguna na biso, Satana. (Mas. 3:27; 1 Tes. 5:25) Mokano na biso esengeli kozala ya kosalisa ndeko na biso abatela bosembo na ye, ata soki ekosɛnga nini, mpe na ndenge yango kosepelisa motema ya Yehova.
8. Mpo na nini Satana alongaki te kopekisa Yobo akumisa Yehova?
8 Eloko ya liboso oyo Yobo abungisaki ntango Satana amekaki ye ezalaki bibwɛlɛ na ye. Banyama yango ezalaki na motuya mingi, mbala mosusu ezalaki kokɔtisela ye mbongo. Kasi, Yobo azalaki mpe kosalela yango na losambo. Nsima ya kobulisa bana na ye, Yobo “alamukaki na ntɔngɔntɔngɔ mpe abimisaki mbeka ya kotumba mpo na motuya na bango nyonso, zambi Yobo alobaki ete, Soki bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe na mitema na bango. Yobo asalaki bongo mikolo nyonso.” (Yobo 1:4, 5) Na yango, Yobo azalaki kopesa Yehova bambeka ya nyama mbala na mbala. Ntango mikakatano ebandaki, akokaki lisusu kosala yango te. Yobo azalaki lisusu te na “biloko” ya motuya oyo akokaki kokumisa na yango Yehova. (Mas. 3:9) Kasi, akokaki kokumisa Yehova na mbɛbu na ye mpe asalaki yango!
Tózala na boyokani ya malamu na Yehova
9. Wapi eloko ya motuya oyo tozali na yango?
9 Ezala tozali bazwi to babola, bilenge to mikóló, na nzoto kolɔngɔnɔ to na maladi, tokoki kozala na boyokani ya malamu na Yehova. Ata tokutani na mikakatano nini, kozala na boyokani makasi na Nzambe ekosalisa biso tóbatela bosembo na biso mpe tósepelisa motema ya Yehova. Ata bato oyo bazalaki na boyebi ya Biblia mingi te bazalaki na mpiko mpe babatelaki bosembo na bango.
10, 11. (a) Ndenge nini ndeko na biso moko ya mwasi asalaki ntango bosembo na ye emekamaki? (b) Eyano nini ndeko yango apesaki Satana?
10 Tózwa ndakisa ya Ndeko Valentina Garnovskaya, moko ya Batatoli ya Russie, oyo na ndakisa ya Yobo, babatelaki bosembo na bango atako bakutanaki na mikakatano ya makasi. Na 1945, ntango azalaki na mbula soki 20, Motatoli moko ateyaki ye nsango malamu. Azongaki lisusu mbala mibale mpo na kosolola na ye Biblia, kasi na nsima Valentina amonaki ye lisusu te. Atako bongo, Valentina abandaki kosakwela bato ya kartye na bango. Yango wana bakangaki ye mpe bakatelaki ye mbula mwambe na kaa ya bakangami. Na 1953, ntango kaka babimisaki ye, azongelaki mbala moko mosala ya kosakola. Bakangaki ye lisusu mpe na mbala yango, bakatelaki ye mbula zomi ya bolɔkɔ. Nsima ya kolekisa bambula mingi na kaa moko, batindaki ye na kaa mosusu. Na kaa yango, ezalaki na bandeko mosusu ya basi oyo bazalaki na Biblia moko. Mokolo moko, ndeko mwasi moko alakisaki Valentina Biblia yango. Ezalaki esengo makasi! Kanisá naino, longola kaka Biblia oyo Valentina amonaki epai ya ndeko mobali oyo ateyaki ye na 1945, oyo wana ezalaki Biblia ya mibale oyo amonaki!
11 Na 1967, babimisaki Valentina na bolɔkɔ mpe nsukansuka azwaki batisimo mpo na komonisa ete amipesi epai na Yehova. Asalelaki bonsomi na ye mpo na kosakola na molende tii na 1969. Kasi, na mbula yango, bakangaki ye lisusu, mpe bakatelaki ye mbula misato ya bolɔkɔ. Atako bongo, Valentina akobaki kosakola. Liboso akufa na 2001, asalisaki bato 44 báyeba solo. Alekisaki mbula 21 na babolɔkɔ mpe na bakaa. Andimaki kobungisa biloko nyonso, ata mpe bonsomi na ye, mpo na kobatela bosembo na ye. Na nsuka ya bomoi na ye, Valentina alobaki ete: “Nazalaki na esika ya kofanda te. Biloko na ngai nyonso ezalaki na valize moko, kasi nazalaki na esengo na mosala ya Yehova.” Valentina apesaki mpenza eyano epai ya Satana, oyo alobaki ete bato bakotikala sembo te epai ya Nzambe soki bakutani na komekama! (Yobo 1:9-11) Tondimi mpenza ete asepelisaki motema ya Yehova mpe ete Yehova azali kozela ntango oyo akosekwisa Valentina mpe bato mosusu ya sembo oyo bakufá.—Yobo 14:15.
12. Bolingo ezali na ntina nini na boyokani na biso na Yehova?
12 Bolingo na biso mpo na Yehova nde etindaka biso tózala baninga na ye. Tosepelaka na bizaleli ya Nzambe mpe tosalaka nyonso mpo na koyokanisa bomoi na biso na mokano na ye. Tolingaka Yehova na motema na biso mobimba kasi te mpo na matomba na biso moko, ndenge Zabolo alobaki yango. Bolingo yango oyo eutaka na motema epesaka biso makasi ya kobatela bosembo na biso ntango tomekami. Mpo na yango, Yehova ‘akokɛngɛla nzela ya basembwi na ye.’—Mas. 2:8; Nz. 97:10.
13. Ndenge nini Yehova atalelaka makambo oyo tosalaka mpo na ye?
13 Bolingo etindaka biso tókumisa nkombo ya Yehova, ata soki tomoni ete tokoki lisusu kosala mingi te. Amonaka makanisi ya malamu oyo tozali na yango mpe asambisaka biso te soki tokokisi te makambo nyonso oyo tokanaki kosala. Likambo oyo eleki ntina ezali te kaka oyo tozali kosala kasi mpe ntina oyo tozali kosala yango. Atako Yobo akutanaki na mikakatano makasi, ayebisaki bato oyo bafundaki ye ete alingaka banzela ya Yehova. (Tángá Yobo 10:12; 28:28.) Na mokapo ya nsuka ya mokanda ya Yobo, Nzambe amonisaki ete asilikeli Elifaza, Biledada, mpe Sofala mpo balobaki solo te. Yehova amonisaki mpe ete andimi Yobo na ndenge abengaki ye mbala minei ete “moombo na ngai” mpe na ndenge asɛngaki ye abondela mpo na baninga na ye wana misato oyo bazalaki babɔndisi ya mabe. (Yobo 42:7-9) Biso mpe tosengeli kosalaka bongo mpo Yehova andima biso ndenge andimaki Yobo.
Yehova asungaka basaleli na ye ya sembo
14. Ndenge nini Yehova asalisaki Yobo asembola makanisi na ye?
14 Yobo abatelaki bosembo na ye atako azalaki moto ya kozanga kokoka. Mbala mosusu, ntango akutanaki na minyoko makasi, akómaki na makanisi ya mabe. Na ndakisa, alobaki na Yehova ete: “Nagangi epai na yo nde oyoki ngai te . . . Onyokoli ngai na lobɔkɔ na yo makasi.” Lisusu, Yobo alukaki komilongisa ntango alobaki boye: “Nazali na mabe te,” mpe “mabɔkɔ na ngai ezali na lisumu te mpe kobondela na ngai ezali ya pɛto.” (Yobo 10:7; 16:17; 30:20, 21) Atako bongo, Yehova asalisaki Yobo na boboto nyonso na nzela ya mituna ebele oyo esalisaki Yobo atika komimona sembo. Mituna yango esalisaki ye mpe amona polele ete Nzambe azali monene kasi moto azali moke mpenza. Yobo andimaki toli mpe asembolaki makanisi na ye.—Tángá Yobo 40:8; 42:2, 6.
15, 16. Na ndenge nini Yehova asalisaka basaleli na ye lelo oyo?
15 Lelo oyo, Yehova apesaka basaleli na ye toli mpe litambwisi ya malamu. Tozwaka mpe mapamboli mosusu. Na ndakisa, Yesu Klisto apesaki mbeka ya lisiko mpe mpo na yango masumu na biso elimbisamaka. Na lisalisi ya mbeka wana, tokoki kozala na boyokani ya malamu na Nzambe atako tozali bato ya kozanga kokoka. (Yak. 4:8; 1 Yoa. 2:1) Ntango tokutani na mikakatano, tobondelaka mpe Nzambe asunga biso mpe apesa biso makasi na nzela ya elimo santu na ye. Lisusu, tozali na Biblia mobimba, mpe soki tozali kotánga yango mpe kokanisa na mozindo na makambo oyo ezali na kati, tozali komibongisa mpo na makambo oyo ekoki komeka kondima na biso. Koyekola esalisaka biso tókanga ntina ya ntembe monene oyo ebimaki mpo na lotomo ya Yehova ya kozala Mokonzi mpe mpo na bosembo na biso.
16 Longola yango, tozwaka mpenza litomba na ndenge tozali na lisangá ya bandeko na mokili mobimba oyo Yehova apesaka bilei ya elimo na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45-47) Na lisangá mokomoko kati na masangá soki 100 000 ya Batatoli ya Yehova, makita esalemaka mpo na koteya biso mpe kopesa biso makasi ya kolonga ntango kondima na biso emekami. Ndakisa ya Sheila, elenge Motatoli moko ya Allemagne, emonisi likambo yango.
17. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ntina ya kokangama na mateya oyo tozwaka na lisangá ya Yehova.
17 Mokolo moko na kelasi, ntango molakisi ya Sheila abimaki mwa moke, baninga na ye ya kelasi balukaki kosala bikelakela mpo na koyeba makambo oyo ekoya. Mbala moko Sheila abimaki, mpe ntango ayokaki makambo oyo esalemaki na nsima, asepelaki ndenge abimaki. Ntango bazalaki kosala bikelakela wana, bana-kelasi mosusu bayokaki lokola bamoni bademo mpe bakómaki kokima na nsɔmɔ. Kasi, nini esalisaki Sheila azwa ekateli ya kobima noki na kelasi? Alobi boye: “Mwa moke liboso likambo yango esalema, tolobelaki makama ya bikelakela na makita oyo tosalaki na Ndako ya Bokonzi. Na yango nayebaki oyo nasengelaki kosala. Nalingaki kosepelisa Yehova, ndenge Biblia elobi na Masese 27:11.” Sheila asalaki malamu mpenza ndenge akendeki makita mokolo wana mpe alandaki na likebi mateya oyo epesamaki.
18. Ozwi ekateli ya kosala nini?
18 Tiká ete mokomoko na biso azala na ekateli ya kokangama na malako oyo tozwaka na lisangá ya Nzambe. Ntango tozali koyangana na makita nyonso, kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango, kobondela, mpe kozala elongo na baklisto oyo bakɔmeli, tozali kozwa litambwisi mpe lisungi oyo esengeli. Yehova alingi ete tótikala sembo, mpe azali na elikya ete tokokoba kosala yango. Tozali mpenza na libaku kitoko ya kokumisa nkombo ya Yehova, kobatela bosembo, mpe kosepelisa motema ya Yehova!
Ozali koyeba lisusu?
• Makambo nini mpe minyoko nini Satana abimisaka?
• Wapi eloko ya motuya oyo tozali na yango?
• Nini etindaka biso tózala baninga ya Yehova?
• Ndenge nini Yehova asungaka biso lelo oyo?
[Elilingi na lokasa 8]
Omonaka ete osengeli koyebisa basusu boyebi oyo ozali na yango?
[Elilingi na lokasa 9]
Tokoki kosalisa bandeko na biso bábatela bosembo na bango
[Elilingi na lokasa 10]
Valentina andimaki kobungisa biloko nyonso mpo na kobatela bosembo na ye