Tótɛmɛla makanisi oyo Satana azali kopanza
‘BÁKOSA bino te. Nzambe na bino akosalisa bino te. Soki bomitiki epai na ngai te, bokomona.’ Wana nde, na mokuse, nsango Rabashake, motindami ya Senakeribe, mokonzi ya Asiri, ayebisaki bafandi ya Yerusaleme. Mampinga ya mokonzi yango ekɔtaki na Yuda. Maloba ya motindami wana elambamaki mpenza mpo elɛmbisa mitema ya bafandi ya Yerusaleme mpe ebangisa bango mpo bátika kobunda.—2 Bak. 18:28-35.
Bato ya Asiri bakendeki nsango ete bazali bato ya nkanza mpe ya nko. Bazalaki kobangisa banguna na bango na ndenge bazalaki koyebisa polelepolele mabe nyonso oyo bazalaki kosala bakangami na bango. Philip Taylor, mokomi moko ya istware, alobaki ete mayele oyo bato ya Asiri bazalaki kosalela ezalaki nde “ya kopesa bato nsɔmɔ mpe kopanza makanisi ya lokuta mpo bato oyo bango balongi bátomboka te mpe mpo na kobangisa bato nyonso oyo bakolinga kokóma banguna na bango, mpe kobebisa makanisi na bango na bansango ya makambo ya nsɔmɔ oyo bazalaki kosalela bato mosusu.” Kopanza makanisi ya lokuta ezali ebundeli moko makasi. Taylor alobi ete “mosala na yango kobebisa makanisi ya bato.”
Bakristo ya solo bazali “kobunda etumba ná makila mpe mosuni te, kasi ná . . . mampinga ya bilimo mabe,” elingi koloba bikelamu ya elimo oyo etombokelaki Nzambe. (Ef. 6:12) Satana Zabolo nde mokonzi na bango. Ye mpe apesaka bato nsɔmɔ mpe apanzaka makanisi ya lokuta.
Satana alobaka ete akoki kobebisa bosembo ya mokomoko na biso. Na mikolo ya Yobo, alobaki na Yehova Nzambe boye: “Eloko nyonso oyo moto azali na yango akopesa mpo na molimo na ye.” Na maloba mosusu, tyá kaka mbamba, mpe nsukansuka moto akotika bosembo na ye epai ya Nzambe. (Yobo 2:4) Satana alobi solo? Mokomoko na biso azalaka na ndelo oyo akoki koleka te—oyo soki aleki yango, akotika mitinda oyo tozali kolanda mpo atikala na bomoi? Satana alingi tókanisa ndenge wana. Azali mokemoke kopanza makanisi ya lokuta mpo akɔtisa likanisi yango na bɔɔngɔ na biso. Tótala mayele mosusu oyo asalelaka mpo na kosala bongo mpe tómona ndenge tokoki kotɛmɛla ye.
‘Moboko na bango ezali na kati ya putulu’
Satana atindaki Elifaze, moko ya baninga misato ya Yobo oyo bayaki kotala ye, aloba ete bato bazali na mpema ata moke te ya kotɛlɛma liboso ya Satana. Abengaki bato ete bazali “baoyo bafandaka na bandako ya mabele ya lima,” mpe alobaki na Yobo ete: “Moboko [na bango] ezali na kati ya putulu! Banyataka bango mpambampamba, kutu koleka mbombo. Banda ntɔngɔ tii mpokwa, bazali kobukabuka bango; bakufi libela kozanga ete moto atya likebi.”—Yobo 4:19, 20.
Na bisika mosusu, Makomami ekokanisi biso na “bambɛki ya mabele”—bilokó ya pɛtɛɛ oyo esalemi na mabele ya lima. (2 Ko. 4:7) Tozali na bolɛmbu mpo na lisumu mpe kozanga kokoka oyo tosangolá. (Rom. 5:12) Soki kaka na makasi na biso moko, tokoki te kotɛlɛma liboso ya Satana. Kasi biso bakristo tozangi lisalisi te. Atako tozali na bolɛmbu, tozali na motuya na miso ya Nzambe. (Yis. 43:4) Lisusu, Yehova apesaka elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye. (Luka 11:13) Elimo na ye ekoki kopesa biso “nguya oyo eleki makasi,” mpo tókoka kolonga mpasi nyonso oyo Satana abimiseli biso. (2 Ko. 4:7; Flp. 4:13) Soki totɛmɛli Zabolo, ‘tozali makasi na kondima,’ Nzambe akotɛlɛmisa biso ngwi, akokómisa biso makasi. (1 Pe. 5:8-10) Na yango, tozali na ntina te ya kobanga Satana Zabolo.
Moto “azali komɛla kozanga boyengebene”
Elifaze atunaki boye: “Moto—mowei mpamba—azali nani mpo azala pɛto, to moto oyo abotamá na mwasi mpo azala na elonga?” Bongo ayanolaki boye: “Talá! [Nzambe] andimelaka basantu na ye te, mpe likoló yango moko kutu ezali pɛto te na miso na ye. Ekozala boni na moto oyo azali na bosɔtɔ mpe abebá, moto oyo azali komɛla kozanga boyengebene lokola mai!” (Yobo 15:14-16) Elifaze azalaki koyebisa Yobo ete Yehova amonaka moto moko te moyengebene. Zabolo mpe asalelaka makanisi ya kolɛmbisa bato. Alingi tómitungisaka mpo na mabunga oyo eleká, tókóma komipesaka foti koleka ndelo, mpe tókanisa ete tokoki kosikolama te. Alingi mpe tókanisa ete Yehova azali kosɛnga biso mingi koleka mpe tómona ete motema mawa, bolimbisi, ná lisalisi na Ye ekokoka mpenza te mpo na kozipa masumu na biso.
Ya solo, biso nyonso ‘tosalá lisumu mpe tokómaka na nkembo ya Nzambe te.’ Moto ya kozanga kokoka ata moko te akoki kokokisa mitinda ya kokoka ya Yehova. (Rom. 3:23; 7:21-23) Kasi elingi koloba te ete tozali na ntina te liboso na ye. Yehova ayebi ete “nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana,” nde azali kosalela bomoto na biso ya masumu. (Em. 12:9, 10) Lokola ayebi ete “tozali putulu,” Nzambe abosanaka likambo yango te mpe ‘alukaka komonisa mabunga’ na biso te.—Nz. 103:8, 9, 14.
Soki totiki etamboli ya mabe mpe tobɛlɛmi epai ya Yehova na motema oyo ezali na mawa mpe na elimo ya kobongola motema, “akolimbisa mpenza.” (Yis. 55:7; Nz. 51:17) Biblia elobi ete ata soki masumu na biso “ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.” (Yis. 1:18) Na yango, tózala na ekateli ya kotika soki moke te koluka kosala mokano ya Nzambe.
Na ndenge tozali bato ya masumu, tokoki soki moke te kolonga komikómisa bayengebene na miso ya Nzambe. Adama ná Eva babungisaki ezaleli ya bato ya kokoka mpe elikya ya kozala na bomoi ya seko, kaka mpo na bango moko te kasi mpe mpo na biso nyonso. (Rom. 6:23) Nzokande, lokola alingaki bato mingi, Yehova azwaki bibongiseli mpo na kolimbisa masumu na biso soki tozali na kondima na mbeka ya lisiko ya Mwana na ye, Yesu Kristo. (Mat. 20:28; Yoa. 3:16) Yango emonisi mpenza “boboto monene” ya Nzambe! (Tito 2:11) Tokoki kosikolama! Bongo mpo na nini kotika Satana atinda biso tókanisa ete tokoki kosikolama te?
“Simbá tii na mokuwa na ye mpe na mosuni na ye”
Satana alobaki ete Yobo akowangana kondima na ye soki azali na nzoto kolɔngɔnɔ lisusu te. Zabolo atyelaki Yehova ntembe mpe alobaki boye: “Simbá tii na mokuwa na ye mpe na mosuni na ye, bongo otala soki akolakela yo mabe te na miso na yo.” (Yobo 2:5) Monguna ya Nzambe akosepela mpenza soki alongi kotinda biso tókanisa ete tozali na ntina te mpo na bolɛmbu na biso.
Nzokande Yehova aboyaka biso te ntango tozali kokoka lisusu te kosala makambo nyonso oyo tozalaki kosala kala na mosala na ye. Tokosala boni soki babundisi moninga na biso mpe azwi likama? Tokozwa ye na motuya lisusu mingi te mpo akoki te kosala mingi mpo na biso ndenge azalaki kosala kala? Ezali bongo te! Tokolinga ye kaka mpe tokobatela ye—mingimingi soki azwaki likama yango ntango azalaki koluka kosala mpo na bolamu na biso. Kasi Yehova nde akosala bongo te? Biblia elobi boye: “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.”—Ebr. 6:10.
Makomami elobeli “mwasi moko mobola oyo mobali akufá,” oyo mbala mosusu asimbaki losambo ya Nzambe bambula ebele. Ntango Yesu amonaki ye azali kotya “mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza” na kɛsi ya makabo na kati ya tempelo, amonaki ye ná likabo na ye ntina te? Te, akumisaki nde ye na ndenge asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosimba losambo ya solo.—Luka 21:1-4.
Soki tobateli bosembo na biso, ntembe ezali te ete boyokani na biso na Yehova ekobeba soki moke te, ezala mpasi nini oyo kozanga kokoka ekomemela biso, bobange to maladi. Nzambe asundolaka soki moke te bato na ye ya sembo kaka mpo mpasi ekómi kopekisa bango básalela ye mingi.—Nz. 71:9, 17, 18.
Tózwa “ekɔti ya lobiko”
Ndenge nini tokoki komibatela na makanisi ya lokuta oyo Satana azali kopanza? Ntoma Paulo akomaki boye: “Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo mpe na bonene ya nguya na ye. Bólata molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.” Eteni moko ya molato yango ya etumba ya elimo ezali “ekɔti ya lobiko.” (Ef. 6:10, 11, 17) Mpo na makanisi ya lokuta oyo Satana azali kopanza, tosengeli kotala malamu soki tozwi ekɔti ya lobiko mpe tozali kaka kolata yango. Ekɔti ya soda ebatelaka ye motó. ‘Elikya na biso ya lobiko’—ndenge tozali kotya motema ete bilaka ya Nzambe oyo etali mokili na ye ya sika mpe ya nkembo ekokokisama—ekobatela makanisi na biso na lokuta ya Satana. (1 Tes. 5:8) Tosengeli koyekola Makomami biso moko mpo na kobatela elikya yango polele mpe makasi.
Yobo ayikaki mpiko liboso ya mikakatano ya makasi mpe ya nsɔmɔ oyo Satana abimiselaki ye. Yobo azalaki na kondima makasi na lisekwa na boye ete ata nsɔmɔ ya liwa elɛmbisaki ye nzoto te. Kutu, ayebisaki Yehova boye: “Yo okobenga, mpe ngai nakondima. Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:15) Ata soki esɛngaki Yobo akufa mpo abateli bosembo na ye, azalaki kotya motema ete bolingo ya Nzambe mpo na basaleli na Ye ya sembo ekotinda Ye azongisa bango na bomoi.
Biso mpe tótyela Nzambe ya solo motema ndenge wana. Yehova akoki kolongola mabe nyonso oyo Satana ná bato na ye bakoki kosala biso. Tóbosana mpe te ete Paulo alobi na biso boye: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”—1 Ko. 10:13.
[Elilingi na lokasa 20]
Yehova azwaka na motuya mosala na yo ya sembo
[Elilingi na lokasa 21]
Zwá ekɔti ya lobiko, mpe latáká yango kaka