Mibeko ya Nzambe ezali mpo na litomba na biso
“Nalingi mibeko na yo mingi!”—NZEMBO 119:97, NW.
1. Ndenge nini bato mingi bazali kotalela likambo ya kotosa mibeko ya Nzambe?
LELO oyo, bato mingi balingi kotosa mibeko ya Nzambe te. Mingi bazali komona te ntina oyo basengeli kotosa mokonzi oyo amonanaka te. Moto na moto azali kotalela makambo malamu na ndenge na ye, ezali koyebana polele te wapi makambo malamu mpe wapi makambo mabe. (Masese 17:15; Yisaya 5:20) Ankɛtɛ moko euti kosalema ezali komonisa ete “bato mingi ya Amerika balingi ete bango moko báponaka makambo nini ezali malamu, oyo ebongi mpe ezali na ntina.” Na mikili mingi oyo bato bazali lisusu kolanda makambo ya Nzambe te, mingi mpe bazali na makanisi ndenge yango. Bato balingi “Nzambe oyo azali kotika bango básala oyo balingi; balingi mibeko oyo ezali kotikela bango nzela ya kosala oyo balingi. Baboyi bakonzi oyo balingaka kaka bizaleli malamu to makambo mosusu ya malamu.” Moto moko oyo ayekolaka mimeseno ya bato alobaki ete lelo oyo “bato balingi ete oyo ekoki kobengama bizaleli malamu mpe ya pɛto ezala likambo ya moto na moto.” Abakisaki ete: “Bakonzi nyonso basengeli kopesa mibeko oyo ekoyokana na bamposa ya bato.”
2. Ndenge nini esika oyo Biblia elobeli mibeko mpo na mbala ya liboso ezali komonisa ete Nzambe apambolaka mpe andimaka moto oyo azali kotosa yango?
2 Lokola ebele ya bato bazali komona ntina ya mibeko ya Yehova te, biso tosengeli komindimisa mpenza ete mibeko ya Nzambe ezali mpo na litomba na biso. Ezali malamu tótalela lisolo ya Biblia oyo elobeli mibeko mpo na mbala ya liboso. Na Genese 26:5, Nzambe alobaki boye: “Abalayama . . . [alandaki] kolaka na ngai mpe mibeko na ngai mpe monɔkɔ na ngai.” Yehova alobaki maloba yango bankama ya bambula liboso apesa bakitani ya Abalayama Mibeko na nzela ya Mose. Mbano nini Nzambe apesaki Abalayama mpo na botosi na ye, bakisa mpe botosi na mibeko na ye? Yehova Nzambe alakaki ye ete: “Mabota nyonso ya nse bakopambolama mpo na bana na yo.” (Genese 22:18) Maloba yango ezali komonisa ete Nzambe apambolaka mpe andimaka moto oyo azali kotosa mibeko na ye.
3. (a) Mokomi moko ya nzembo amonisaki ete azalaki kotalela mibeko ya Yehova ndenge nini? (b) Ebongi tótalela mituna nini?
3 Mokomi moko ya nzembo—ekoki kozala mwana ya mokonzi moko ya Yuda oyo akómaki mpe mokonzi—amonisaki likanisi oyo mbala mingi bato bazalaka na yango te mpo na mibeko. Alobaki na Nzambe ete: “Nalingi mibeko na yo mingi!” (Nzembo 119:97, NW) Alobaki yango kaka te mpo na esengo ya koloba. Amonisaki ete alingaki mokano ya Nzambe ndenge oyo mibeko na ye ezali komonisa yango. Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe mpe moto ya kokoka, alingaki mpe mokano ya Nzambe. Biblia esakolaki ete Yesu akoloba boye: “Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo, ɛ Nzambe na ngai; mibeko na yo izali kati na motema na ngai.” (Nzembo 40:8; Baebele 10:9) Ezali boni mpo na biso? Tosepelaka kosala mokano ya Nzambe? Tondimaka mpenza ete mibeko ya Yehova ezali na ntina mpe na matomba? Ndenge nini totalelaka likambo ya kotosa mibeko ya Nzambe na kati ya losambo na biso, na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, na bikateli oyo tozwaka, na boyokani na biso na bato mosusu? Mpo tólinga mibeko ya Nzambe, tosengeli koyeba mpo na nini ebongi ete Nzambe apesa mibeko mpe asɛngisa biso ete tótosa yango.
Yehova: Mopesi ya mibeko oyo abongi mpenza
4. Mpo na nini Yehova abongi kozala Mopesi ya libosoliboso ya mibeko?
4 Lokola Yehova azali Mozalisi na biso, azali Mopesi ya libosoliboso ya mibeko na molɔ́ngɔ́ mobimba. (Emoniseli 4:11) Mosakoli Yisaya alobaki ete: “Yehova azali Mopesi ya mibeko mpo na biso.” (Yisaya 33:22, NW) Ye nde atyá mibeko oyo etambwisaka biloko nyonso na kati ya molɔ́ngɔ́, ezala bikelamu ya bomoi to biloko oyo ezali na bomoi te. (Yobo 38:4-38; 39:1-12; Nzembo 104:5-19) Lokola moto azali ekelamu ya Nzambe, asengeli kolanda mibeko ya Yehova oyo etambwisaka biloko nyonso. Lisusu, atako moto azali na bonsomi ya kopona mpe azali na makanisi, akozala na esengo se soki azali kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu mpe makambo ya elimo.—Baloma 12:1; 1 Bakolinti 2:14-16.
5. Ndenge nini likanisi oyo ezali na Bagalatia 6:7 ezali kokokisama na oyo etali mibeko ya Yehova?
5 Lokola toyebi yango, mibeko oyo Yehova atyá mpo na kotambwisa biloko ya molɔ́ngɔ́ ekoki kobongolama te. (Yilimia 33:20, 21) Soki moto atosi mibeko yango te, akozwa likama. Na ndakisa, soki moto azali na esika oyo ezali likoló mpenza mpe amibwaki, akobambana na nse. Ezali mpe ndenge moko na mibeko ya Nzambe mpo na bizaleli ya malamu, soki moto abosani yango to abuki yango, akozanga te kozwa etumbu. Atako ekoki komonana ete soki moto abuki yango akozwa etumbu mbala moko te, kasi tosengeli kotosa yango se ndenge oyo tosengeli kotosa mibeko oyo etambwisaka biloko nyonso na molɔ́ngɔ́. “Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.”—Bagalatia 6:7; 1 Timote 5:24.
Makambo oyo Yehova apesi mibeko mpo na yango
6. Mibeko ya Nzambe ezali kotalela makambo nini?
6 Mibeko oyo Nzambe apesaki na nzela ya Mose ezali komonisa malamu mpenza ndenge oyo mibeko na ye ezalaka. (Baloma 7:12) Na nsima, Yehova Nzambe alongolaki Mibeko ya Mose mpe na esika na yango apesaki “Mibeko ya Klisto.”a (Bagalatia 6:2; 1 Bakolinti 9:21) Lokola tozali baklisto oyo tozali kolanda “mobeko ya kokoka, oyo ezali ya bonsomi,” tozali kokanga ntina ete malako ya Nzambe etaleli kaka te ndambo ya makambo ya bomoi na biso, makambo lokola mateya to mpe milulu ya losambo. Mitinda ya Nzambe etaleli makambo nyonso ya bomoi, ezala makambo etali libota, mombongo, etamboli na biso epai ya mwana mobali to epai na mwana mwasi, bizaleli na biso epai na bandeko na biso baklisto, mpe misala oyo tosengeli kosala mpo na losambo ya solo.—Yakobo 1:25, 27, NW.
7. Pesá ndakisa ya mibeko minene ya Nzambe.
7 Na ndakisa, Biblia elobi boye: “Moto ya pite mpe basambeli ya bikeko mpe bato ya ekobo mpe bakembi na nsɔni mpe mibali bamibebisi na mibali mpe bayibi mpe bato ya bilulela mpe balangwi-masanga mpe batuki mpe babɔtɔli bakosangola Bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9,10) Na miso ya Nzambe, ekobo mpe pite ezali te, ndenge bato mosusu bazali kobenga yango, “likambo ya bato mibale oyo balingani.” Kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi ezali te kaka “ndenge mosusu ya kosangisa nzoto.” Makambo wana ezali kobuka mibeko ya Yehova. Ezali mpe ndenge moko mpo na makambo lokola koyiba, kokosa, mpe kotɔnga. (Nzembo 101:5; Bakolose 3:9; 1 Petelo 4:15) Yakobo amonisaki ete komikumisa ezali mabe, mpe Paulo apesaki toli ete tóboya maloba ya bozoba mpe masɛki na makambo ya nsɔni. (Baefese 5:4, NW; Yakobo 4:16) Mpo na baklisto, malako nyonso wana oyo etaleli etamboli ezali na kati ya mobeko ya kokoka ya Nzambe.—Nzembo 19:7.
8. (a) Mibeko ya Yehova ezali mibeko ya ndenge nini? (b) Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “mibeko” elimboli mpenzampenza nini?
8 Mitinda wana ya ntina mingi oyo euti na Liloba ya Nzambe ezali komonisa ete mibeko na ye ezali kaka te molɔngɔ ya makambo oyo bazali kosɛnga biso, oyo tosengeli kolanda se ndenge oyo ekomami. Mitinda yango esalisaka moto azala na bomoi ya malamu mpe ya esengo, mpe ebongisaka bizaleli na ye. Mibeko ya Nzambe etongaka, elakisaka mabe na malamu, epesaka moto mayele. (Nzembo 119:72) Mokomi ya Nzembo asalelaki liloba ya Liebele torah oyo ebongolami na “mibeko.” Moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobaki boye: “Liloba yango euti na verbe oyo elimboli kotambwisa, kokamba, kobwaka liboso. Na bongo, . . . ndimbola na yango ezali bongo malako ya etamboli malamu.” Mpo na mokomi ya nzembo, mibeko ezalaki likabo ya Nzambe. Omoni te ete biso mpe tosengeli kolinga yango ndenge wana, tosengeli kotika yango etambwisa bomoi na biso?
9, 10. (a) Mpo na nini tozali na mposa ya kotambwisama malamu? (b) Likambo nini tosengeli kosala mpo tózala na esengo mpe bomoi na biso ezala malamu?
9 Bikelamu nyonso ya mayele bazalaka na mposa bálakisa bango nzela ya malamu ya kotambola mpe toli oyo bakoki kotyela motema. Ata Yesu mpe baanzelu, oyo bazali na nguya koleka bato, bazalaka na mposa ete Nzambe atambwisa bango. (Nzembo 8:5; Yoane 5:30; 6:38; Baebele 2:7; Emoniseli 22:8, 9) Soki Nzambe azali kotambwisa bikelamu wana ya kokoka mpe bazali kozwela yango litomba, ezali komonisa ete ekozala na litomba koleka mpo na bato ya kozanga kokoka! Makambo oyo eleká mpe makambo oyo biso moko tozali kokutana na yango ezali komonisa ete mosakoli Yilimia alobaki solo, ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.”—Yilimia 10:23.
10 Soki tolingi kozala na esengo mpe kozala malamu na bomoi na biso, tosengeli koluka ete Nzambe atambwisa biso. Mokonzi Salomo ayebaki ete koboya ete Nzambe atambwisa biso mpe kolanda makanisi na biso moko na bomoi na biso ezali likama, yango wana alobaki boye: “Nzela ezali oyo emonani malamu epai na moto nde nsuka na yango bobele nzela ya kufa.”—Masese 14:12.
Bantina ya kolinga mibeko ya Yehova
11. Mpo na nini tosengeli koluka koyeba malamu mibeko ya Nzambe?
11 Ebongi na biso tólona mpenza mposa ya koyeba mibeko ya Yehova. Mokomi ya nzembo amonisaki mposa yango ntango alobaki boye: “Zipolá miso na ngai ete namona makambo ya kokamwa ya Mobeko na yo.” (Nzembo 119:18) Ntango tozali koyeba malamumalamu Nzambe mpe banzela na ye, tokomona malamumalamu bosolo ya maloba ya Yisaya ete: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango. Soko oyokaki malako na ngai!” (Yisaya 48:17, 18) Yehova azali mpenza na mposa ete basaleli na ye bátosa mibeko na ye mpo likama eyela bango te mpe bázala na esengo na bomoi na bango. Tótalela mwa bantina minene oyo esengeli kotinda biso tólinga mibeko ya Nzambe.
12. Na ndenge nini koyeba oyo Yehova ayebi biso emonisi ete azali Mopesi ya mibeko oyo aleki malamu?
12 Mibeko ya Nzambe euti na Moto oyo ayebi biso malamu koleka. Lokola Yehova azali Mozalisi na biso, ntembe ezali te ete ayebi bato malamumalamu. (Nzembo 139:1, 2; Misala 17:24-28) Baninga na biso ya motema, bandeko na biso, ata kutu baboti na biso bakoki koyeba biso te ndenge oyo Yehova ayebi biso. Kutu, Nzambe ayebi biso malamu koleka biso moko! Mokeli na biso ayebi bamposa na biso ya elimo, ya mayoki, ya makanisi mpe ya nzoto koleka moto mosusu nyonso. Ntango azali kotala biso, amonisaka ete ayebi malamu ndenge oyo tosalemi, bamposa na biso mpe mikano na biso. Yehova ayebi bolɛmbu na biso, kasi ayebi mpe makoki na biso ya kosala malamu. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:14) Yango wana, ntango tozali kotambola na mibeko na ye mpe tozali kondima ete atambwisa biso, tokoki komiyoka ete tobatelami na elimo.—Masese 3:19-26.
13. Mpo na nini tokoki kolikya ete Yehova alukaka mpenza bolamu na biso?
13 Mibeko ya Nzambe euti na Moto oyo alingaka biso. Nzambe alingaka mpenza ete biso tózala na bolamu ya solosolo. Kutu, atako yango ezalaki likambo moke te mpo na ye, apesaki Mwana na ye lokola “lisiko mpo na mingi”! (Matai 20:28) Yehova alaki ete ‘akotika te ete tómekama na koleka nguya na biso.’ (1 Bakolinti 10:13) Biblia ezali kondimisa biso ete ‘amibanzabanzaka mpo na biso.’ (1 Petelo 5:7, NW) Ezali na moto moko te oyo aleki Yehova na oyo etali komibanzabanza mpo na kopesa bato malako oyo ekomemela bango litomba. Ayebi makambo oyo ezali mpo na bolamu na biso mpe ayebi makambo nini ekoki komemela biso esengo mpe wapi oyo ekoki komemela biso mawa. Atako tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga, soki tozali kosala makambo oyo ezali sembo, amonisaka biso bolingo na ye na ndenge oyo ekomemela biso bomoi mpe mapamboli.—Ezekiele 33:11.
14. Na likambo nini ya ntina mingi mibeko ya Nzambe ekeseni na makanisi ya bato?
14 Mibeko ya Nzambe ebongwanaka te. Na mikolo ya yikiyiki oyo tozali, mpo na biso Yehova azali lokola libanga makasi oyo eninganaka te, azali libela na libela. (Nzembo 90:2) Alobaki ete: “Ngai [Yehova] nakobongwana te.” (Malaki 3:6) Tokoki mpenza kotya motema na Mibeko ya Nzambe oyo ekomami na kati ya Biblia; yango ekeseni na makanisi ya bato oyo ebongwanaka nsima ya mwa ntango. (Yakobo 1:17) Na ndakisa, na boumeli ya bambula mingi, ebele ya bato ya mayele ya pisikoloji bazalaki kopesa toli ete mpo na kobɔkɔla bana malamu, esengeli kotika bango básalaka oyo balingi; kasi, na nsima bamosusu babongolaki makanisi mpe bandimaki ete basalaki libunga na ndenge bapesaki toli wana. Na likambo etali kobɔkɔla bana, mitinda mpe toli ya bato ya mokili ebongwanaka mbala na mbala. Kasi, Liloba ya Yehova ebongwanaka te. Banda kalakala Biblia esilá kopesa toli na ndenge ya kobɔkɔla bana na bolingo. Ntoma Paulo akomaki ete: “Batata . . . bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:4) Tozali mpenza kolendisama na koyeba ete tokoki kotyela mibeko ya Yehova motema; mibeko yango ekobongwana te!
Mapamboli mpo na baoyo batosaka mibeko ya Yehova
15, 16. (a) Litomba nini tokozwa soki tozali kotosa mibeko ya Yehova? (b) Ndenge nini mibeko ya Nzambe ekoki kosalisa mpo na kozala na libala ya malamu?
15 Nzambe alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya ete: “Liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai . . . ekolonga.” (Yisaya 55:11) Ndenge moko mpe, soki tozali kosala makasi ya kolanda mibeko ya Nzambe oyo ezali na Liloba na ye tokolonga, tokosala makambo ya malamu mpe tokozala na esengo.
16 Tótalela ndenge oyo mibeko ya Nzambe ekoki kosalisa mpo na kozala na libala ya malamu. Paulo akomaki boye: “Tiká ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana ya mobali na mwasi ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato ya pite mpe ya ekobo.” (Baebele 13:4) Mobali na mwasi na ye basengeli kopesana limemya mpe basengeli kolingana: “Tiká ete moko na moko na bino alinga mwasi na ye lokola ye moko mpe tiká ete mwasi atosa mobali na ye.” (Baefese 5:33) Mokapo ya 1 Bakolinti 13:4-8 (NW) elimboli lolenge ya bolingo oyo basengeli komonisana: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene, kasi esepelaka nde na solo. Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.” Libala ekobeba te soki balongani bazali na bolingo ya ndenge wana.
17. Moto azwaka litomba nini soki alandi mibeko ya Nzambe mpo na masanga?
17 Likambo mosusu oyo emonisi ete mibeko ya Yehova ezali na litomba ezali ete Yehova apekisi molangwa. Aboyi ata ezaleli ya ‘komipesa na vinyo mingi.’ (1 Timote 3:3, 8, NW; Baloma 13:13) Bato mingi oyo baboyaka kotosa mobeko ya Nzambe mpo na masanga bazwaka bamaladi oyo eutaka na komɛla mingi to mpe komɛla mingi engalisaka bamaladi mosusu na nzoto na bango. Lokola baboyaka kolanda toli ya Biblia oyo elobi ete esengeli komɛla mingi te, bato mosusu bakómá baombo ya masanga mpo na “kolongola susi.” Komɛla mingi ememaka mikakatano mingi; na ndakisa, bato mosusu bakopesa yo limemya te, matata ekokɔta na libota to mpe libota ekokabwana, kobebisa mbongo, to mpe kolongwa na mosala. (Masese 23:19-21, 29-35) Ya solo, mibeko ya Yehova mpo na masanga ezali mpenza kobatela biso.
18. Mibeko ya Nzambe esalisaka mpe na makambo ya mbongo? Limbolá.
18 Mibeko ya Nzambe ezali mpe na litomba na makambo ya mbongo. Biblia ezali kolendisa baklisto bázala sembo mpe bázala molende na mosala. (Luka 16:10; Baefese 4:28; Bakolose 3:23) Lokola balandaki toli yango, baklisto mingi bamataki mpɛtɛ na mosala to mpe batikaki bango na mosala ntango esɛngaki kolongola bato mosusu. Moto azwaka mpe litomba ntango aboyi misala oyo Makomami eboyi, lokola masano ya mbongo, komɛla likaya mpe bangi. Okoki mpenza kokanisa bandakisa ebele ya matomba na makambo ya mbongo oyo moto akoki kozwa soki azali kolanda mitinda ya Nzambe.
19, 20. Mpo na nini kondima mpe kokangama na mibeko ya Nzambe ezali nzela ya mayele?
19 Ezali mpasi te mpo bato ya kozanga kokoka bábosana mibeko ya Nzambe. Kanisá likambo ekómelaki Bayisalaele na Ngomba Sinai. Nzambe alobaki na bango ete: “Soko bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bokobatela kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso.” Bazongisaki ete: “Tokosala yango nyonso elobi [Yehova].” Kasi, na nsima basalaki nde makambo mosusu mpenza! (Exode 19:5, 8; Nzembo 106:12-43) Kasi, biso tóndima mibeko ya Nzambe mpe tókangama na yango.
20 Nzela ya mayele mpe oyo ememaka bolamu ezali ya kokangama na mibeko malamu mingi oyo Yehova apesi mpo na kotambwisa bomoi na biso. (Nzembo 19:7-11) Mpo na kolonga kosala yango, tosengeli koyeba motuya ya mitinda ya Nzambe. Yango nde tokolobela na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1996 elobeli na molai “mibeko ya Klisto” na nkasa 14-24.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete mibeko ya Nzambe ezali mpo na bolamu na biso?
• Mpo na bantina nini tosengeli kolinga mibeko ya Yehova?
• Mibeko ya Nzambe ezali na litomba na makambo nini?
[Elilingi na lokasa 13]
Abalayama azwaki mapamboli mingi mpo atosaki mibeko ya Yehova
[Bililingi na lokasa 15]
Bato mingi bazali kobosana mibeko ya Nzambe mpo bomoi lelo oyo etondi na makambo oyo ezali kobenda bango mpe na mitungisi
[Elilingi na lokasa 17]
Mibeko ya Nzambe ezali lokola ndako oyo ezali kopela mwinda likoló ya libanga monene na bokula ya mai, epikami makasi mpe ebongwanaka te