Mpo na baoyo balingaka Yehova, ‘eloko ya kobɛtisa libaku ezali te’
“Baoyo bazali kolinga mobeko na yo bazali na kimya mingi, mpe eloko ya kobɛtisa bango libaku ezali te.”—NZ. 119:165.
1. Ndenge nini ezaleli ya mopoti-mbangu moko emonisi ete tosengeli kozala na ekateli ya kolɛmba nzoto te?
BANDA bolenge na ye, Marie Decker azalaki mopoti-mbangu monene oyo ayebanaki mokili mobimba. Alingaki kozwa medayi ya wolo na momekano ya mbangu ya mɛtrɛ 3 000 na masano ya olympique na mobu 1984. Kasi alongaki momekano yango te, mpamba te atutanaki na lokolo ya mopoti-mbangu mosusu mpe akweaki. Lokola azokaki mpe azalaki kolela, esɛngaki báya kolongola ye na nzela. Atako bongo, Marie alɛmbaki nzoto te. Mbula mobimba ekokaki te, akɔtaki na momekano mosusu ya monene ya kopota mbangu mpo na basi, mpe azwaki medayi na mobu 1985.
2. Na ndimbola nini bakristo ya solo bazali na momekano ya mbangu, mpe mokano na biso esengeli kozala nini?
2 Biso bakristo tozali na momekano ya mbangu ya elilingi. Mokano na biso esengeli kozala ya kolonga na momekano yango. Yango ezali te momekano ya ntaka ya mokuse, oyo esɛngaka kokima mbangu makasi mpo na kolonga. Ezali mpe te mbangu oyo moto akimaka mpo na kominanola to kosala ngalasisi. Tokoki kokokanisa yango nde na momekano ya ntaka ya molai, oyo esɛngaka koyika mpiko mpo na kolonga. Ntoma Paulo asalelaki ndakisa ya mopoti-mbangu na mokanda oyo atindelaki bakristo ya Korinti, engumba oyo mimekano ya mbangu ezalaki kosalema mingi. Akomaki ete: “Boyebi te ete bapoti-mbangu na momekano ya mbangu bapotaka mbangu bango nyonso, kasi kaka moko nde azwaka libonza? Bópota mbangu na ndenge oyo ekosala ete bózwa yango.”—1 Ko. 9:24.
3. Na ndimbola nini bapoti-mbangu nyonso bakoki kozwa libonza na momekano ya mbangu mpo na bomoi ya seko?
3 Biblia elendisi biso tópota mbangu na momekano ya mbangu ya elilingi. (Tángá 1 Bakorinti 9:25-27.) Libonza ezali bomoi ya seko, ezala na likoló mpo na bakristo oyo batyami mafuta to awa na mabele mpo na bapoti-mbangu mosusu. Na kokesana na mimekano mingi, moto nyonso oyo akɔti na momekano yango mpe ayiki mpiko tii na nsuka akozwa libonza. (Mat. 24:13) Bapoti-mbangu bazwaka libonza te kaka soki balandi te mibeko ya momekano yango to soki bakómi te na ndelo ya nsuka. Lisusu, yango ezali momekano ya mbangu kaka moko oyo ekoki kopesa moto libonza ya bomoi ya seko.
4. Nini esalaka ete momekano ya mbangu mpo na kozwa bomoi ya seko ezala pɛtɛɛ te?
4 Kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka ezalaka pɛtɛɛ te. Esɛngaka komityela mibeko mpe kozala na mokano ya sikisiki. Kaka moto moko, Yesu Kristo, nde apotaki mbangu tii na ndelo ya nsuka, kozanga ete abɛta libaku ata mbala moko. Kasi, moyekoli na ye Yakobo akomaki ete bayekoli nyonso ya Kristo ‘babɛtaka mabaku mbala mingi.’ (Yak. 3:2) Yango ezali mpenza solo! Biso nyonso tobundaka na mabunga na biso moko mpe oyo ya basusu. Na yango, na bantango mosusu tokoki kobɛta libaku, kotengatenga mpe kosila makasi. Tokoki ata kokwea; kasi tokoki kotɛlɛma mpe kokoba kopota-mbangu. Bandeko mosusu bakweaki makasi mpenza, mpe esɛngaki básalisa bango mpo bátɛlɛma mpe bázongela kopota-mbangu tii na ndelo ya nsuka. Na yango, ekoki kokóma ete tóbɛta libaku to tókwea na bantango mosusu to mpe mbala na mbala.—1 Bak. 8:46.
ATA SOKI OBƐTI LIBAKU, KOTIKA TE KOPOTA-MBANGU
5, 6. (a) Na ndimbola nini ‘eloko ya kobɛtisa libaku ezali te’ mpo na mokristo, mpe nini ekoki kosalisa ye ‘atɛlɛma’? (b) Mpo na nini bato mosusu batɛlɛmaka te nsima ya kobɛta libaku?
5 Ntango mosusu osalelá maloba “kobɛta libaku” mpe “kokwea” mpo na kolobela moto oyo alɛmbi na elimo. Kasi maloba wana ya Biblia ezalaka ntango nyonso na ndimbola ndenge moko te. Na ndakisa, Masese 24:16 elobi ete: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza; kasi bato mabe, mpasi ekobɛtisa bango libaku.”
6 Yehova akotika te ete baoyo batyelaka ye motema bábɛta libaku to bákwea, elingi koloba bákutana na mpasi to mokakatano moko oyo ekoki kopekisa bango básambela ye, kozanga ete bákoka kotɛlɛma lisusu. Tozali na elikya ete Yehova akosalisa biso “tótɛlɛma” mpo tókoba kosalela ye na motema mobimba. Yango ezali mpenza libɔndisi mpo na baoyo nyonso balingaka Yehova na motema mobimba! Nzokande, bato mabe bazalaka na mposa ya kotɛlɛma te. Balukaka te lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpe ya basaleli na ye, to mpe baboyaka lisalisi ya ndenge wana ntango balingi kopesa bango yango. Nzokande, mpo na baoyo ‘bazali kolinga mobeko ya Yehova,’ eloko moko te ekoki kobɛtisa bango libaku mpe kosala ete bátika mpo na libela kopota mbangu mpo na bomoi.—Tángá Nzembo 119:165.
7, 8. Soki mokristo “akwei,” asengeli kosala nini mpo Nzambe akoba kondima ye?
7 Mpo na bolɛmbu ya nzoto, bandeko mosusu bakweaka na masumu ya mike, ata mbala na mbala. Kasi bazali kaka sembo na miso ya Yehova soki bakobi “kotɛlɛma,” elingi koloba soki babongoli mpenza motema mpe basali makasi bázongela kosalela Yehova na bosembo. Makambo oyo Nzambe asalelaki Bayisraele na ntango ya kala emonisi yango. (Yis. 41:9, 10) Masese 24:16 oyo tolobelaki liboso, elobeli mingimingi ndenge oyo tokoki ‘kotɛlɛma’ na lisalisi ya Nzambe na biso oyo ayokaka mawa, kasi elobeli mingi te ‘kokwea.’ (Tángá Yisaya 55:7.) Yehova Nzambe ná Yesu Kristo bamonisi ete batyelaka biso motema na ndenge bazali kolendisa biso na boboto ete “tótɛlɛma.”—Nz. 86:5; Yoa. 5:19.
8 Ata soki mopoti-mbangu moko abɛti libaku to akwei, akoki kotɛlɛma mpe kosilisa momekano ya mbangu soki atɛlɛmi nokinoki. Na momekano ya mbangu mpo na bomoi ya seko, toyebi te ‘mokolo mpe ngonga’ oyo momekano yango ekokóma na nsuka. (Mat. 24:36) Atako bongo, soki tozali kobɛta mabaku mbala mingi te, tokokoba kopota mbangu na vitɛsi ya malamu, tokotikala na kati ya momekano, mpe tokozwa libonza. Na yango, tosengeli kosala nini mpo tóbɛta mabaku te?
MABAKU OYO EKOKI KOZONGISA MOTO NSIMA
9. Tokolobela makambo nini oyo ekoki kobɛtisa biso libaku?
9 Tótalela makambo mitano oyo ekoki kobɛtisa biso libaku: bolɛmbu na biso moko, bamposa ya nzoto, makambo ya kozanga bosembo oyo bandeko na biso bakristo bakoki kosalela biso, bolɔzi to minyoko, mpe mabunga ya basusu. Kasi, kobosana te ete ata soki obɛti libaku, Yehova azali mpenza na motema molai. Awelaka te kotalela biso lokola bato oyo bazali sembo te.
10, 11. Bolɛmbu nini Davidi azalaki kobunda na yango?
10 Bolɛmbu na biso moko ekoki kozala lokola mabanga oyo tokoki kokuta na nzela oyo tozali kokima mbangu. Soki totaleli makambo oyo ekómelaki mokonzi Davidi mpe ntoma Petro, tokoki komona bolɛmbu mibale oyo bazalaki na yango: kozanga komipekisa mpe kobanga bato.
11 Mokonzi Davidi amonisaki bolɛmbu na oyo etali komipekisa, ndenge likambo na ye ná Bate-Sheba emonisi yango. Mpe ntango Nabale afingaki ye, Davidi alingaki kosala makambo mbangumbangu. Kasi atako azangaki komipekisa na libaku wana, atikaki te koluka kosepelisa Yehova. Na lisalisi ya basusu, azongelaki lisusu boyokani na ye ná Yehova.—1 Sa. 25:5-13, 32, 33; 2 Sa. 12:1-13.
12. Nini esalisaki Petro atikala na momekano ya mbangu atako abɛtaki libaku?
12 Ntoma Petro amonisaki ezaleli ya kobanga bato, mpe na bantango mosusu abɛtaki libaku makasi; atako bongo, atikalaki sembo epai ya Yesu mpe Yehova. Na ndakisa, awanganaki Nkolo na ye liboso ya bato, kaka mbala moko te, kasi mbala misato mobimba. (Luka 22:54-62) Na nsima, Petro amitambwisaki lokola mokristo te na ndenge asalelaki bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki bakristo makambo lokola nde bakristo Bayuda oyo bakatamaki ngenga bazalaki bato malamu koleka bango. Nzokande, ntoma Paulo ayebaki malamu ete lisangá ezali te esika oyo esengeli kokabola bato na bituluku. Likambo wana oyo Petro asalaki ezalaki malamu te. Yango wana, liboso ete ezaleli wana ya Petro ebebisa bondeko na kati ya lisangá, Paulo apesaki ye toli ya polele, na miso boye. (Gal. 2:11-14) Petro atikaki nde ete lolendo epekisa ye akoba na momekano ya mbangu mpo na bomoi? Te. Andimaki toli ya Paulo na motema moko, asalelaki yango, mpe akobaki kopota mbangu.
13. Ndenge nini maladi ekoki kobɛtisa moto libaku?
13 Ntango mosusu, maladi ekoki kokóma bolɛmbu ya moto. Yango mpe ekoki kobɛtisa moto libaku. Ekoki kopekisa biso tókoba kopota mbangu na vitɛsi ya malamu, mpe kosala ete tótengatenga mpe tólɛmba. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na Japon abɛlaki maladi ya motema mbula 17 nsima ya kozwa batisimo. Lokola akómaki komitungisa mingi mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na ye, alɛmbaki na elimo. Nsukansuka, atikaki kosakola. Bankulutu mibale bakendaki kotala ye. Lokola balendisaki ye na maloba ya boboto, azongelaki koyangana na makita. Ndeko yango alobi boye: “Nalelaki ntango bandeko bapesaki ngai mbote na esengo mpenza.” Lelo oyo, ndeko na biso wana azongelá kopota mbangu mpo na bomoi.
14, 15. Ekateli nini ya makasi tosengeli kozwa soki bamposa ya mabe eyeli biso? Pesá ndakisa.
14 Bamposa ya nzoto ekweisá bato mingi. Soki tomekami na ndenge wana, tosengeli kozwa ekateli makasi mpo tótikala pɛto na makanisi, na bizaleli, mpe na elimo. Tóbosana te toli oyo Yesu apesaki ete tosengeli ‘kobwaka mosika’ na ndenge ya elilingi eloko nyonso oyo ekoki kobɛtisa biso libaku, ezala liso to lobɔkɔ na biso. Na ntembe te, yango etaleli mpe makanisi ya mbindo mpe misala oyo mpo na yango bato mosusu bátika kopota mbangu mpo na bomoi.—Tángá Matai 5:29, 30.
15 Ndeko mobali moko oyo akolaki na libota ya bakristo akomaki ete banda kala azalaki kobundisa mposa oyo azalaki na yango ya kosangisa nzoto ná mibali mosusu. Alobaki ete: “Nazalaki ntango nyonso koyoka nsɔni. Nazalaki komona ete nabongi te na miso ya Yehova.” Ntango akokisaki mbula 20, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe mosaleli na misala na kati ya lisangá. Kasi na nsima abɛtaki libaku makasi, azwaki disiplini oyo euti na Biblia, mpe bankulutu basalisaki ye. Kobondela, koyekola Liloba ya Nzambe, mpe komipesa na kosalisa basusu esalisaki ye atɛlɛma mpe azongela kopota mbangu na vitɛsi ya malamu. Bambula mingi na nsima, alobaki ete: “Na bantango mosusu, makanisi wana ezongelaka ngai, kasi natikaka te ete elonga ngai. Yango eteyaki ngai ete Yehova akotika te ete tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema. Yango wana nandimaka ete Nzambe ayebi ete nakoki kolonga bamposa wana.” Ndeko yango asukisi boye: “Na mokili ya sika, nakozwa lifuti mpo na bitumba nyonso oyo nazali kobunda. Yango nde mposa na ngai! Yango wana liboso mokili yango eya, nakokoba kobunda.” Ndeko yango azali na ekateli ya kokoba kopota mbangu.
16, 17. (a) Nini esalisaki ndeko mobali moko oyo akanisaki ete basalelaki ye makambo na bosembo te? (b) Mpo tóbɛta libaku te, tosengeli kotya makanisi epai ya nani?
16 Makambo ya kozanga bosembo oyo bandeko na biso bakristo basaleli biso ekoki mpe kobɛtisa biso libaku. Na France, ndeko moko oyo azalaki liboso nkulutu akanisaki ete basalelaki ye makambo na bosembo te, mpe abungisaki esengo na ye. Nsukansuka, atikaki koyangana na makita ya lisangá mpe atikaki kosakola. Bankulutu mibale bakendaki kotala ye mpe bayokaki ye na boboto, kozanga ete bákata ye maloba, ntango azalaki koyebisa bango likambo na ye, ndenge oyo ye azalaki kotalela yango. Balendisaki ye akitisa mokumba na ye epai ya Yehova mpe bamonisaki ye ete likambo eleki ntina ezali nde kosepelisa Nzambe. Ndeko yango andimaki toli yango mpe eumelaki te, azongelaki kopota mbangu, mpe akómaki lisusu komipesa na makambo ya lisangá.
17 Bakristo nyonso basengeli kokoba kotya makanisi epai ya Yesu Kristo, Mokonzi ya lisangá oyo Yehova atye, kasi te epai ya bato ya kozanga kokoka. Yesu, oyo miso na ye azali “lokola lolemo ya mɔtɔ,” amonaka makambo nyonso malamumalamu mpe amonaka mosika koleka oyo biso tokoki komona. (Em. 1:13-16) Na ndakisa, ayebi ete mbala mosusu tokoki kokanisa ete basaleli biso likambo moko oyo ezali sembo te, nzokande ekoki kozala ete toyebi makambo nyonso te to tozweli moto makanisi mabe. Yesu akobongisa makambo ya lisangá na ndenge oyo eleki malamu mpe na ntango oyo ebongi. Yango wana, tosengeli te kotika ete makambo oyo ndeko moko asali to bikateli oyo azwi elɛmbisa biso.
18. Ndenge nini tokoki kolonga mikakatano mpe mitungisi ya bomoi?
18 Makambo mosusu mibale oyo ekoki kobɛtisa biso libaku ezali bolɔzi to minyoko, mpe mabunga ya bandeko mosusu na kati ya lisangá. Na ndakisa ya moloni oyo Yesu apesaki, alobaki ete “bolɔzi to monyoko” oyo ebimi mpo na liloba ekoki kobɛtisa bato mosusu libaku. Ezala minyoko yango euti na libota, epai ya bato ya kartye, to bakonzi ya Leta, ekoki kolɛmbisa mingimingi moto oyo “azali na misisa te,” elingi koloba oyo azali makasi te na elimo. (Mat. 13:21) Nzokande, soki tobateli motema na biso alima, mboto ya Bokonzi ekosalisa biso tópikama makasi na kondima. Ntango tokutani na mikakatano, tosengeli kosala makasi tómanyolaka na makambo oyo ebongi kokumisama mpe tóbondelaka. (Tángá Bafilipi 4:6-9.) Makasi oyo Yehova apesaka ekosalisa biso tólonga mikakatano, mpe tótika te ete mitungisi ya bomoi ebɛtisa biso libaku.
19. Ndenge nini tokoki koboya ete likambo moko ya mabe oyo basali biso ebɛtisa biso libaku?
19 Likambo ya mawa, na boumeli ya bambula, bandeko mosusu batikaki ete mabunga ya basusu epekisa bango bákoba kopota mbangu. Bandeko yango babɛtaki libaku kaka mpo bazalaki na makanisi ekeseni na oyo ya bandeko mosusu na makambo oyo etali lisosoli ya moto na moto. (1 Ko. 8:12, 13) Soki ndeko moko azokisi biso, tokotika ete likambo yango eya ndongo? Biblia epesi bakristo toli ete bátika kosambisa basusu, bálimbisanaka, mpe báboya kolandela kaka matomba na bango moko. (Luka 6:37) Soki okutani na likambo oyo ekoki kobɛtisa yo libaku, omituna boye: ‘Nasambisaka basusu na kotalela makambo oyo ngai namonaka ete ezali malamu? Lokola nayebi ete bandeko na ngai bakristo bazali bato ya kozanga kokoka, natikaka ete libunga ya ndeko elongola ngai na momekano ya mbangu mpo na bomoi?’ Bolingo mpo na Yehova ekoki kosalisa biso tózala na ekateli ya kotika te ete likambo oyo moto mosusu asali epekisa biso tópota mbangu tii na ndelo ya nsuka.
YIKÁ MPIKO NTANGO OZALI KOPOTA MBANGU—KOBƐTA LIBAKU TE
20, 21. Ozali na ekateli ya kosala nini na momekano ya mbangu mpo na bomoi?
20 Ozali na ekateli ya ‘kopota mbangu tii na nsuka’? (2 Tim. 4:7, 8) Na yango, osengeli koyekolaka yo moko. Saleláká Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo mpo na kosala bolukiluki, komanyola, mpe koyeba makambo oyo ekoki kobɛtisa yo libaku. Bondeláká Yehova apesa yo elimo santu mpo ozwa makasi oyo osengeli na yango. Yebá ete moto moko te asengeli kotika kopota mbangu mpo na bomoi kaka mpo abɛti libaku to akwei na likambo moko boye. Akoki kotɛlɛma mpe kozongela kopota mbangu. Akoki ata kosalela mabanga oyo ekokaki kobɛtisa ye libaku mpo na kotya makolo mpe koleka, elingi koloba akoki kozwa mateya na makambo mosusu oyo ekokaki kolɛmbisa kondima na ye.
21 Biblia emonisi ete bato oyo bazali na momekano ya mbangu mpo na bomoi basengeli kokanga mabɔkɔ te, kasi kosala milende. Ezali te lokola omati na motuka mpe ofandi na yo tii okokóma na esika oyo ozali kokende. Biso moko nde tosengeli kopota mbangu mpo na bomoi. Soki tosali bongo, Yehova akopesa biso “kimya mingi,” oyo ekozala lokola mopepe oyo ezali kopusa biso liboso. (Nz. 119:165) Tokoki kozala na elikya ete akokoba kopambola biso lelo oyo, mpe na mikolo ezali koya akosopa mapamboli mingi mpo na baoyo bakokóma tii na nsuka ya momekano ya mbangu.—Yak. 1:12.