Elenge, okoki kozala na bomoi ya esengo
“Okoyebisa ngai nzela ya bomoi.”—NZEMBO 16:11.
1, 2. Ndenge nini bomoi ya Tony emonisi ete moto akoki kosala mbongwana na bomoi na ye?
TONY akolá ná tata na ye te. Azalaki kolinga mpenza kelasi te, atako azalaki na eteyelo ya ntei (secondaire). Kutu, azalaki kokanisa kokata kelasi. Mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo azalaki kokende kotala bafilme to kolekisa ntango elongo na baninga na ye. Azalaki moto ya mobulu te mpe moombo ya makaya te, kasi azalaki na mokano moko te na bomoi. Kutu azalaki koyeba mpenza te soki Nzambe azalaka. Mokolo moko, Tony akutanaki na Batatoli ya Yehova mibale mpe atunaki bango soki Nzambe azalaka. Bapesaki ye mwa buku mibale: La vie a-t-elle été créée? mpe Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie.
2 Ntango Batatoli yango bazongelaki ye mbala ya nsima, makanisi ya Tony ebongwanaki mpenza. Atángaki mwa babuku yango mingi, tii ekómaki lokola mokanda ya kala. Tony ayebisaki bango boye: “Namoni ete Nzambe azali.” Andimaki koyekola Biblia, mpe mokemoke ndenge na ye ya kotalela bomoi ebongwanaki. Liboso abanda koyekola Biblia, Tony azalaki komipesa te na kelasi, kasi na eteyelo na bango akómaki moko ya bana-kelasi oyo baleki malamu! Ata mokambi ya eteyelo akamwaki; alobaki na ye: “Obongoli mpenza makanisi na yo mpe okómi kozwa bapwɛ ya malamu. Ezali nde mpo okómi kosolola na Batatoli ya Yehova?” Tony andimaki, mpe apesaki mokambi ya eteyelo litatoli. Asilisaki kelasi, mpe lelo oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe mosaleli na misala. Tony azali mpenza na esengo mpo sikoyo azwi Tata ya bolingo, Yehova!—Nzembo 68:5.
KOTOSA YEHOVA EKOSALA ETE OLONGA NA BOMOI
3. Toli nini Yehova apesi bilenge?
3 Likambo oyo ekómelaki Tony ekundweli biso ete Yehova amibanzabanzaka mpo na bilenge. Alingi olonga na bomoi mpe ozala na esengo, na yango apesi yo toli ete ‘okanisa Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.’ (Mosakoli 12:1) Kosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi okoki kosala yango. Na lisalisi ya Nzambe, okoki kolonga na bomoi; ezala ntango ozali elenge to ntango okokóma mokóló. Mpo na kosalisa biso tókanga malamu ntina na yango, tokotalela makambo oyo esalisaki Bayisraele bázwa Mokili ya Ndaka mpe makambo oyo epesaki Davidi makasi ya kolonga Goliate.
4, 5. Liteya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na ndenge oyo Bayisraele balongaki Bakanana mpe ndenge oyo Davidi alongaki Goliate? (Talá elilingi ya ebandeli.)
4 Malako nini Yehova apesaki Bayisraele ntango bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka? Asɛngaki nde bango bákóma basoda ya malamu koleka to bámesana na bitumba? Te. (Kolimbola Mibeko 28:1, 2) Ayebisaki bango bátosa ye mpe bátyela ye motema. (Yosua 1:7-9) Na ndenge ya bomoto, toli yango emonanaki lokola ebongi te, nzokande ezalaki toli ya malamu mpenza mpo na Bayisraele. Yehova asalisaki bato na ye mbala na mbala bálonga Bakanana. (Yosua 24:11-13) Kotosa Nzambe esɛngaka kozala na kondima, mpe kondima yango ebimisaka ntango nyonso mbuma ya malamu. Esalemaki bongo na kala, lelo mpe esalemaka bongo.
5 Goliate azalaki elombe ya etumba. Azalaki molai ya mɛtrɛ soki misato, mpe azalaki komema bibundeli ya nsɔmɔ. (1 Samwele 17:4-7) Kasi, Davidi azalaki kaka na biloko mibale: bilingongo (lance) ná kondima epai ya Nzambe. Moto oyo azangi kondima akokaki komona ete Davidi azali kosala bozoba ndenge alukaki kobunda na Goliate! Kasi, mpo na koloba solo, Goliate nde asalaki bozoba.—1 Samwele 17:48-51.
6. Tokolobela nini na lisolo oyo?
6 Na lisolo oyo eleki, tolobelaki makambo minei oyo ekoki kosala ete tózala na esengo mingi mpe tólonga na bomoi. Tomonaki ete tosengeli kokokisa mposa na biso ya elimo, kozwa baninga ya malamu oyo balingaka Nzambe, komityela mikano oyo ebongi mpe kosepela na bonsomi oyo Nzambe apesi biso. Na lisolo oyo, tokolobela makambo yango na mozindo, mingimingi na kotalela mitinda mosusu oyo ezali na Nzembo 16.
KOKISÁ MPOSA NA YO YA ELIMO
7. (a) Moto ya elimo azalaka ndenge nini? (b) “Ndambo ya likabo” ya Davidi ezalaki nini, mpe azalaki komiyoka ndenge nini mpo na yango?
7 Moto ya elimo azalaka na kondima epai ya Nzambe mpe alukaka kotalela makambo ndenge Nzambe atalelaka yango. Alandaka litambwisi ya Yehova mpe atosaka ye. (1 Bakorinti 2:12, 13) Davidi azali ndakisa malamu ya moto ya elimo. Ayembaki boye: “Yehova azali ndambo ya likabo oyo bapesá ngai.” (Nzembo 16:5) Davidi azalaki kosepela na ‘ndambo ya likabo na ye,’ elingi koloba boyokani na ye na Nzambe, esika na ye ya kokima. (Nzembo 16:1) Yango wana alobaki: “Motema na ngai ezali kosepela.” Eloko moko te epesaki Davidi esengo mingi koleka boyokani na ye na Yehova!—Tángá Nzembo 16:9, 11.
8. Makambo nini ekoki kosalisa yo ozala na bomoi ya esengo?
8 Bato oyo bamipesaka na bisengo to na koluka mbongo bakoki ata moke te kozala na esengo oyo Davidi azalaki na yango. (1 Timote 6:9, 10) Ndeko mobali moko na Canada alobi boye: “Esengo ya solosolo eutaka te na makambo oyo tokoki kozwa na bomoi, kasi nde na oyo topesaka na Mopesi ya likabo nyonso ya malamu, Yehova Nzambe.” (Yakobo 1:17) Soki okómi na kondima makasi epai ya Yehova mpe osaleli ye, bomoi na yo ekozala na ntina mpe na esengo mpenza. Okoki kosala nini mpo kondima na yo ekóma makasi? Osengeli kotánga Biblia, kotalatala biloko kitoko oyo Yehova akelá, mpe komanyola bizaleli na ye, na ndakisa bolingo oyo alingaka yo; kosala bongo ezali lokola kolekisa ntango elongo na Yehova.—Baroma 1:20; 5:8.
9. Ndenge nini okoki kotika Liloba ya Nzambe ebongisa yo?
9 Na bantango mosusu, Nzambe amonisaka ete alingaka biso na ndenge asembolaka biso soki esengeli, kaka ndenge tata ya bolingo asalaka. Davidi andimaki Nzambe asembola ye; alobaki boye: “Nakopambola Yehova, moto apesi ngai toli. Ya solo mpenza, na butu bangɛi na ngai esemboli ngai.” (Nzembo 16:7) Davidi amanyolaki makanisi ya Nzambe, andimaki yango mpe atikaki yango ebongisa ye, elingi koloba ebongola ye mpo akóma moto ya malamu. Soki yo mpe osali bongo, okolinga Nzambe mingi, mposa na yo ya kosepelisa ye ekokola, mpe okokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. Ndeko mwasi moko na nkombo Christin alobi ete ntango asalaka bolukiluki mpe amanyolaka makambo oyo atángi, amonaka ete Yehova akomisaki makambo yango mpo na ye mpenza!
10. Na kotalela Yisaya 26:3, ndenge nini kozala moto ya elimo ekosalisa yo?
10 Soki ozali moto ya elimo, okotalela mokili mpe makambo oyo ekokómela yango ndenge Yehova atalelaka yango. Mpo na nini Yehova apesi yo boyebi mpe bososoli ya ndenge wana? Alingi oyeba makambo oyo eleki ntina na bomoi, ozwa bikateli ya malamu mpe ozala na elikya mpo na mikolo oyo ezali koya! (Tángá Yisaya 26:3.) Ndeko mobali moko na nkombo Joshua, oyo afandaka na États-Unis, alobi ete soki ozali na boyokani makasi na Yehova, okomona polele makambo oyo ezali na ntina mpe oyo ezali mpenza na ntina te.
PONÁ BANINGA YA MALAMU
11. Davidi aponaki baninga ya ndenge nini?
11 Tángá Nzembo 16:3. Davidi ayebaki ndenge ya kopona baninga ya malamu. Baninga na ye ezalaki bato oyo bazalaki kolinga Yehova, mpe yango esalaki ete ‘asepela mpenza.’ Abengaki baninga na ye “basantu” mpo bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli ya pɛto. Mokomi mosusu ya nzembo amiyokaki mpe bongo mpo aponaki baninga ya malamu; akomaki boye: “Nazali moninga ya baoyo nyonso babangaka yo, mpe ya baoyo bazali kobatela [mitindo] na yo.” (Nzembo 119:63) Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, yo mpe okoki kozwa baninga ebele ya malamu na kati ya bato oyo balingaka mpe batosaka Yehova. Kasi, baninga na yo basengeli kozala kaka bato ya mbula na yo?
12. Nini esalisaki Davidi ná Yonatane bázala baninga ya malamu?
12 Baninga ya Davidi bazalaki kaka bato ya mbula na ye te. Oyebi moko ya baninga ya motema ya Davidi? Mbala mosusu okanisi Yonatane. Boninga ya Davidi ná Yonatane ezali kati na boninga ya malamu oyo Biblia elobeli. Kasi, oyebaka ete Yonatane azalaki mokóló ya Davidi ya mbula soki 30? Nini esalisaki bango bázala baninga ya malamu bongo? Kondima epai ya Nzambe, limemya kati na bango, mpe mokomoko na bango amonaki mpiko oyo moninga azalaki na yango ntango bazalaki kobundisa banguna ya Nzambe.—1 Samwele 13:3; 14:13; 17:48-50; 18:1.
13. Okoki kozwa baninga ebele wapi? Pesá ndakisa.
13 Lokola Davidi ná Yonatane, biso mpe tokoki ‘kosepela mpenza’ soki tozali na baninga oyo balingaka Yehova mpe bandimelaka ye. Ndeko Kiera, oyo asaleli Nzambe bambula mingi, alobi boye: “Nazali na baninga na mokili mobimba, bato ya mikili mpe mimeseno ndenge na ndenge.” Soki yo mpe osali bongo, okomona ete Biblia mpe elimo santu ekómisi biso libota moko ya basambeli ya Nzambe na mokili mobimba.
OMITYELA MIKANO YA MALAMU
14. (a) Nini ekoki kosalisa yo omityela mikano ya malamu na bomoi na yo? (b) Bilenge mosusu balobi nini mpo na mikano na bango?
14 Tángá Nzembo 16:8. Davidi amonaki ete kosalela Nzambe nde likambo eleki ntina. Yo mpe okozala na bomoi ya esengo soki omekoli Davidi ntango ozali komityela mikano mpe kokanisa ntango nyonso makambo oyo Yehova alingi ete osala. Ndeko moko na nkombo Steven alobi boye: “Ntango namityeli mokano, nasali makasi nakokisa yango, mpe ntango nazali komona ndenge esalisi ngai, yango epesaka ngai esengo.” Ndeko mobali moko oyo azali elenge ya ekólo Allemagne oyo azali kopesa mabɔkɔ na mosala ya Nzambe na ekólo mosusu, alobi boye: “Nalingi te ete ntango nakokóma mokóló mpe nakanisi bomoi na ngai, namona te ete makambo nyonso nasalá ezalaki kaka mpo na koluka bolamu na ngai moko.” Yo mpe omiyokaka bongo? Soki ezali bongo, salelá makoki mpe mayele na yo mpo na kokumisa Nzambe mpe kosalisa basusu. (Bagalatia 6:10) Omityela mikano ya elimo, mpe sɛngá Yehova asalisa yo okokisa mikano yango. Zalá na kondima ete akoyanola na mabondeli na yo!—1 Yoane 3:22; 5:14, 15.
15. Mikano nini okoki komityela? (Talá etanda “Mwa mikano oyo okoki komityela.”)
15 Talá mikano oyo okoki komityela: Kopesa biyano na maloba na yo moko na makita, kobanda mosala ya mobongisi-nzela, to kosala na Betele. Okoki mpe koyekola monɔkɔ mosusu mpo na kosakwela bato oyo balobaka monɔkɔ yango. Elenge Barak oyo azali na mosala ya ntango nyonso alobi boye: “Mokolo nyonso ntango nalamukaka na ntɔngɔ mpe nayebi ete nakopesa makasi na ngai nyonso mpo na Yehova, epesaka ngai esengo oyo mosala mosusu ekoki kopesa ngai te.”
SEPELÁ NA BONSOMI OYO NZAMBE APESI YO
16. Ndenge nini Davidi azalaki kotalela mibeko mpe mitinda ya Yehova, mpe mpo na nini?
16 Tángá Nzembo 16:2, 4. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, ntango totosaka mibeko ya Nzambe mpe mitinda na ye, tokómaka na bonsomi ya solosolo. Mpe yango esalisaka biso tólinga oyo ezali malamu mpe tóyina oyo ezali mabe. (Amose 5:15) Davidi alingaki koloba ete bolamu na ye nyonso eutaki epai ya Yehova. Likambo nyonso oyo Yehova asalaka ezalaka malamu, mpe likambo nyonso ya malamu eutaka epai na ye. Davidi asalaki makasi mpo na komekola Nzambe mpe kolinga makambo oyo Yehova alingaka. Kasi, ayekolaki mpe koyina makambo nyonso oyo Nzambe amonaka ete ezali mabe. Moko ya makambo yango ezali losambo ya bikeko, elingi koloba kosambela moto to eloko na esika ya kosambela Yehova. Yango elongolaka lokumu ya moto oyo azali kosambela bikeko yango, mpe epesaka moto to eloko nkembo oyo ebongi kopesama kaka na Yehova.—Yisaya 2:8, 9; Emoniseli 4:11.
17, 18. (a) Davidi amonisaki nini mpo na mbuma mabe oyo losambo ya lokuta ebimisaka? (b) Ndenge nini bato mingi babakisaka mpasi na bango?
17 Na ntango ya kala, mbala mingi pite ezalaki mpe na kati ya losambo ya lokuta. (Hosea 4:13, 14 ) Bato mingi bazalaki kosepela na losambo ya lokuta mpo balingaki pite, kasi losambo yango epesaki bango esengo? Ata moke te! Davidi amonisaki ete bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta babakisaki mpasi na bango. Bato yango bazalaki kutu kopesa bana na bango mbeka na banzambe ya lokuta! (Yisaya 57:5) Yehova azalaki koyina likambo ya mabe oyo bazalaki kosala. (Yirimia 7:31) Soki ozalaki na ntango wana, na ntembe te olingaki kosepela mpenza soki baboti na yo bazalaki kosambela Yehova!
18 Lelo oyo, mangomba mingi ya lokuta endimaka pite, ata mpe bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi. Bato oyo bamipesi na pite bakoki kokanisa ete bazali na bonsomi, nzokande babakisaka mpasi na bango. (1 Bakorinti 6:18, 19) Yo mpe omoná likambo yango? Na yango, bilenge, bóyokela Tata na bino ya likoló. Bómindimisa ete ezali malamu kotosa Nzambe. Bóbosana te bampasi oyo pite ebimisaka. Mpe bokomona ete esengo ya ntango moke oyo euti na lisumu ebimisaka mpasi ya ntango molai. (Bagalatia 6:8) Ndeko Joshua, oyo tolobelaki, alobi boye: “Tokoki kosalela bonsomi na biso ndenge nyonso oyo tolingi, kasi kosalela yango na ndenge ya mabe epesaka esengo te.”
19, 20. Bilenge oyo batyelaka Yehova motema mpe batosaka ye bakozwa mapamboli nini?
19 Yesu alobaki ete: “Soki botikali na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:31, 32) Yehova asalisi biso tólongwa na lingomba ya lokuta, tózwa boyebi mpe tótika biyambayamba. Na mikolo oyo ezali koya, tokozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Baroma 8:21) Kasi ata lelo, okoki kosepela mwa moke na bonsomi yango soki ozali kosalela mateya ya Kristo. Na ndenge yango, ‘okoyeba solo,’ ntango ozali koyekola mpe kotika yango etambwisa bomoi na yo!
20 Bilenge, bósepela na bonsomi oyo Nzambe apesi bino. Bósalela yango na bwanya. Ekosalisa bino bózwa bikateli oyo ekosala ete bomoi na bino ezala malamu na mikolo oyo ezali koya. Ndeko mobali moko ya elenge alobi boye: “Ntango ozali elenge mpe ozali kosalela bonsomi na bwanya ekosalisa yo ntango ekosɛnga ete ozwa bikateli ya minene, na ndakisa, kopona mosala ya malamu to kopona soki okobala to okotikala monzemba mpo na mwa ntango.”
21. Okoki kosala nini mpo ozwa “bomoi ya solosolo”?
21 Na mokili oyo, ata bomoi oyo bato bamonaka ete ezali ya malamu ezali ya ntango mokuse. Toyebi te ndenge bomoi na biso ekozala lobi. (Yakobo 4:13, 14) Na yango, eleki malamu otikala na nzela oyo ekomema yo na “bomoi ya solosolo,” elingi koloba bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. (1 Timote 6:19) Yehova atindaka moto te na makasi asalela ye. Mokomoko na biso asengeli kopona nini akosala. Na yango, kómisá Yehova “ndambo ya likabo” na yo, salá nyonso okóma na boyokani makasi na ye, mpe sepelá na “makambo ya malamu” oyo apesi yo. (Nzembo 103:5) Zalá na kondima ete Yehova akoki kopesa yo esengo mingi mpe bolamu libela na libela!—Nzembo 16:11.