Ozali na motuya na miso ya Nzambe!
“Nalingi yɔ na bolingo na seko, bongo naumelisi boboto na ngai epai na yɔ.”—YILIMIA 31:3.
1. Lolenge nini ezaleli ya Yesu epai na bato oyo bazalaki na mikolo na ye ekesanaki na oyo ya Bafalisai?
BAKOKAKI komona mayoki ya bolingo kati na miso na ye. Yesu, mobali yango, akesanaki mpenza na batambwisi na bango ya mangomba; azalaki na komibanzabanza mpo na bango. Azalaki koyoka mawa mpo na bato wana mpamba te ‘balɛmbaki mpe balemalemaki lokola bampate bajali na mobateli tɛ.’ (Matai 9:36) Esengelaki ete batambwisi na bango ya mangomba bázala babateli na mpate ya bolingo mpo na komonisa Nzambe ya bolingo mpe ya motema mawa. Nzokande, bazalaki kotyola bato ya mboka, kotaleláká bango lokola bato mpamba—mpe lokola bato balakelami mabe!a (Yoane 7:47-49; kokanisá na Ezekiele 34:4.) Ya solo, likanisi wana ya mabe, oyo eyokani na Makomami te ekesanaki mpenza mosika na lolenge Yehova atalelaka bato na ye. Ayebisaki na libota na ye, Yisraele, ete: “Nalingi yɔ na bolingo na seko.”—Yilimia 31:3.
2. Lolenge nini baninga misato ya Yobo bamekaki kondimisa ye ete azalaki na ntina te na miso ya Nzambe?
2 Nzokande, Bafalisai bazalaki te bato ya liboso mpo na kondimisa bampate oyo balingami na Yehova ete bazalaki na ntina moko te. Tótalela ndakisa ya Yobo. Na miso ya Yehova azalaki moto na sembo mpe azalaki na ekweli te, kasi “babɔndisi” misato bakanisaki ete Yobo azalaki moto na misala ya mbindo, mopɛngwi mpe moto mabe oyo asengelaki kokufa kozanga kotika ata elembo nsima na ye. Balobaki ete Nzambe atalelaki na motuya te makambo nyonso ya bosembo oyo Yobo azalaki kosala, mpamba te Nzambe andimaka ata baanzelu na ye te mpe atalelaka likoló ete ezali mbindo!—Yobo 1:8; 4:18; 15:15, 16; 18:17-19; 22:3.
3. Myango nini Satana azali kosalela lelo mpo na komeka kondimisa bato ete bazali na ntina te mpe balingami te?
3 Lelo oyo, Satana azali sé kosalela ‘mayele mabe’ wana mpo na komeka kondimisa bato ete balingami te mpe bazali na ntina te. (Baefese 6:11, NW, maloba na nsé ya lokasa) Ya solo, mbala mingi azali kozimbisa bato na kopusáká bango ete bámonisa ezaleli ya lofundo mpe ya lolendo kati na bango. (2 Bakolinti 11:3) Kasi, mpo na bato oyo akoki kozwa kozanga nkaká, azali mpe kosepela na kobebisa limemya na bango. Yango ezali mingimingi kosalema bongo na “mikolo ya nsuka” oyo ya mpasi. Lelo oyo, mingi bazali kokóla kati na mabota epai kuna “bolingo ya motema ezali te”; mokolo na mokolo, mingi basengeli kolónga bato ya mobulu, ya moimi mpe ya motó makasi. (2 Timoté 3:1-5) Ekoki kozala ete bambula mingi ya komonisama mpasi, kozanga koyokana na ntina na mposo, koyinana, to ya konyokwama esilaki kondimisa bato motindo wana ete bazali na ntina te mpe balingami te. Mobali moko akomaki ete: “Nazalaka na mayoki ya bolingo mpo na moto moko te mpe ngai nalingamaka na moto moko te. Ezali mpasi mpo na ngai na kondima ete Nzambe azali komibanzabanza ata na likambo moko mpo na ngai.”
4, 5. (a) Mpo na nini likanisi oyo ete moto azali na ntina te eyokani na Makomami te? (b) Nini ezali moko na litomba mabe likoki kobima soki tozali kondima ete milende nyonso oyo tozali komonisa ezali na ntina te?
4 Likanisi oyo ete ozali na ntina te eyokani soko moke te na solo ya moboko ya Liloba ya Nzambe, liteya ya lisiko. (Yoane 3:16) Soki Nzambe akokaki kopesa eloko eleki motuya—bomoi kitoko ya Mwana na ye—mpo na kosombela biso libaku kitoko ya kozala na bomoi ya seko, boye kozanga ntembe, azali mpenza na bolingo mpo na biso; kozanga ntembe, tozali mpenza na motuya na miso na Ye!
5 Lisusu, oyo nde likambo ya kolɛmbisa nzoto na kozala na mayoki ete Nzambe azali kosepela na biso te, ete milende na biso mizali na ntina te! (Kokanisá na Masese 24:10.) Na makanisi motindo wana ya mabe, ata elendiseli oyo epesami na mikano malamu, na ntina ete tókólisa mosala na biso mpo na Nzambe epai likoki ya kosala yango ezali, basusu bakoki komona yango lokola ezali nde kokweisa bango. Ekoki komonana na mayoki na biso ya kati lokola ete nyonso oyo tozali kosala ezali moke.
6. Nini ezali likambo ya malamu oyo ekeseni na ezaleli ya kozala na makanisi mabe na ntina na biso moko?
6 Soki ozali na mayoki mabe motindo wana kati na motema na yo, kozanga elikya te. Na bantango mosusu, mingi kati na biso bamikaniselaki makambo mabongi te mpo na bango moko. Mpe omikundola ete Liloba ya Nzambe ezali mpo na “kosembola makambo” mpe “kobebisa bisika bibatelami makasi.” (2 Timoté 3:16, NW; 2 Bakɔlinti 10:4) Ntoma Yoane akomaki ete: “Tokoyeba ete tojali bato na sɔlɔ na njela oyo, mpe tokondimisa mitema na biso liboso na ye; mpɔ ete, ata mitema na biso mikokweisa biso, Njambe aleki mitema na biso na monɛnɛ mpenja mpe ye ayebi makambo yɔnsɔ.” (1 Yoane 3:19, 20) Na bongo, tiká tótalela makambo misato kati na yango Biblia ezali koteya biso ete tozali na motuya na miso ya Yehova.
Yehova atalelaka yo ete ozali na motuya
7. Lolenge nini Yesu ateyaki baklisto nyonso na ntina na motuya oyo bazali na yango na miso ya Nzambe?
7 Ya liboso, Biblia eteyi biso polele ete moko na moko kati na biso azali na motuya na miso ya Nzambe. Yesu alobaki ete: “Bandɛkɛ mikɛ mitano batɛkami na falanga mibale tɛ? Mpe mɔkɔ na bango abosanami na liboso na Njambe tɛ. Kasi ata nsuki yɔnsɔ na mito na bino itangami. Banga tɛ, boleki motuya na ndɛkɛ mingi.” (Luka 12:6, 7) Na mikolo wana, bandɛkɛ mike bazalaki bandɛkɛ oyo ezalaki kotɛkisama lokola bilei na ntalo ya moke, nzokande moko te kati na bango azangaki koyebana epai na Mozalisi na yango. Na yango, emonani polele ete mpo na bato—oyo bazali na motuya mingi mpenza koleka, Nzambe ayebi likambo moko na moko epai na bango. Ezali lokola nde nsuki ya mitó na biso ezalaki kotángama mokomoko!
8. Mpo na nini ezali likambo ya solo ete Yehova akoki kotánga motuya ya nsuki ya mitó na biso?
8 Nsuki ekoki kotángama? Soki okanisi ete eteni wana ya lisese ya Yesu ezali solo te, yebá ete: Nzambe azali kobosana te basaleli na ye ya sembo na boye ete akoki kosekwisa bango—akozalisa bango lisusu na likambo moko na moko, sangisá mpe makambo ndenge oyo bazalaka na yango kati na code génétique mpe makambo mingi oyo basilaki koyeba na boumeli ya bambula. Kotángama ya nsuki na biso (oyo nyonso na motó ezali na mwayene soko 100 000) ekozala mpenza likambo ya moke soki tokokanisi yango na makambo wana!—Luka 20:37, 38.
Tozali na motuya nini na miso ya Yehova?
9. (a) Wapi bamoko na bizaleli oyo Yehova atalelaka yango ete ezali na motuya? (b) Mpo na nini ozali kokanisa ete bizaleli wana bizali na ntina mingi mpo na ye?
9 Ya mibale, Biblia ezali koteya biso makambo ya motuya oyo Yehova azali komona kati na biso. Na elobeli ya pɛtɛɛ, asepelaka na bizaleli na biso ya malamu mpe na milende na biso. Mokonzi Davidi ayebisaki mwana na ye Salomo ete: “[Yehova] akotalatala mitema yɔnsɔ mpe akosɔsɔla makanisi mpe mikano yɔnsɔ.” (1 Ntango 28:9) Lokola Nzambe azali kotalatala mitema ya bato mingi kati na mokili oyo ya mobulu mpe oyo etondi na koyinana, oyo nde bosepeli asengeli kozala na yango wana akomona motema oyo ezali kolinga kimya, solo mpe boyengebene! (Kokanisá na Yoane 1:47; 1 Petelo 3:4.) Nini esalemaka na ntango Nzambe amoni motema oyo etondi na mayoki ya bolingo mpo na ye, oyo ezali koluka koyeba ye mpe oyo ezali koluka kolakisa boyebi yango epai na bato mosusu? Na Malaki 3:16 (NW), Yehova ayebisi biso ete ayokaka baoyo bazali koloba epai na basusu na ntina na ye mpe azali ata na “búku ya kokanisa” mpo na ‘baoyo nyonso bazali kobanga Yehova mpe baoyo bazali kokanisa nkombo na ye.’ Bizaleli wana bizali na motuya mingi na miso na ye!
10, 11. (a) Lolenge nini basusu bakoki kokóma na likanisi ete Yehova azali kotalela bizaleli na bango ya malamu na motuya te? (b) Lolenge nini ndakisa ya Abiya emonisi ete Yehova atalelaka bizaleli nyonso ya malamu na motuya?
10 Nzokande, motema oyo mozali komikweisa yango moko mokoki bobele kotingama na kozanga kondima bilembeteli oyo bimonisi ete tozali na motuya na miso ya Nzambe. Ekoki ntango nyonso koimaima ete, ‘Kasi ezali na basusu mingi oyo bazali mpenza komonisa bizaleli wana koleka ngai. Oyo nde mawa Yehova akozala na yango soki akokanisi ngai na bango!’ Yehova asalaka bokokanisi kati na basaleli na ye te, azalaka mpe na makambo makasi te, soko mpe na mitindá ya makasi te. (Bagalatia 6:4) Ezali na bososoli mozindo nde azali kotánga kati na mitema, mpe azali kosepela na bizaleli malamu na makambo nyonso.
11 Na ndakisa, ntango Yehova azwaki ekateli ete libota mobimba oyo lipɛngwaki ya Mokonzi Yelobama lisengelaki kobomama mpe kolongolama lokola “nyei,” apesaki etindá ete bobele Abiya, moko na bana na mokonzi nde asengelaki kokundama na lolenge lobongi. Mpo na nini? ‘Kati na ye likambo na kosepelisa [Yehova] Nzambe na Yisraele limonanaki.’ (1 Mikonzi 14:10, 13) Yango elimbolaki ete Abiya azalaki mosambeli ya sembo ya Yehova? Ezalaki mpenza bongo te, mpamba te akufaki, lokola mpe basáli mabe mosusu ya ndako na ye. (Deteronome 24:16) Nzokande, Yehova azwaki na motuya “likambo na kosepelisa” oyo amonaki kati na motema ya Abiya mpe asalaki engebene likambo yango. Búku Matthew Henry’s Commentary on the Whole Bible eyebisi ete: “Epai kuna mwa eloko ya malamu ezali, ekomonana: Nzambe, ye oyo akolukaka yango, akomona yango, ata ezali ya moke, mpe akosepela na yango.” Mpe kobosana te ete soki Nzambe akuti mwa ezaleli moko ya malamu kati na yo, akoki kokólisa yango na meko oyo ozali kosala makasi mpo na kosalela ye na bosembo nyonso.
12, 13. (a) Lolenge nini Nzembo 139:3 emonisi ete Yehova atalelaka milende na biso na motuya? (b) Na ndimbola nini tokoki koloba ete Yehova ayungolaka misala na biso?
12 Yehova asepelaka na milende na biso na motindo sé moko wana. Na Njembo 139:1-3, tozali kotánga ete: “Ɛ [Yehova], osili kotala motema na ngai mpe oyebi ngai sɔlɔ. Oyebi ntango wana nakofanda mpe wana nakotɛlɛma; oyebi makanisi na ngai longwa na mosika. Oyebi wana ekotambola ngai mpe wana ekolala ngai; ejaleli na ngai mobimba ejali polele na miso na yɔ.” Na yango Yehova ayebi malamu misala na biso nyonso. Kasi asuki te bobele na koyeba yango. Na lokótá ya Liebele maloba “ejaleli na ngai mobimba ejali polele na miso na yɔ” ekoki mpe kolimbola “ozwaka na motuya bizaleli na ngai nyonso” to “osepelaka mingi na bizaleli na ngai nyonso.” (Kokanisá na Matai 6:19, 20.) Lolenge nini Yehova akoki kosepela mingi na bizaleli na biso nzokande tozali bato bazangi kokoka mpe bato ya masumu?
13 Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, engebene bato mosusu ya mayele, ntango Davidi akomaki ete Yehova “ayebi” wana ekotambola ye mpe wana ekolala ye, na Liebele elimbolaki mpenza “konyungola” to “kopupola.” Búku moko elobaki ete: “Elimboli . . . kopupola mputulu mpe kotika sé mbuma ya malamu—kotika nyonso oyo ezali na ntina. Na yango awa elimboli ete Nzambe, na elobeli ya elilingi, azalaki koyungola ye. . . . Azalaki kolongola mputulu, to nyonso oyo ezalaki na ntina te, mpe azalaki komona ete oyo etikalaki ezalaki malamu mpe ezalaki na ntina.” Motema oyo ezali komikweisa ekoki konyungola misala na biso na lolenge lokeseni, kopameláká biso kozanga koyokela mawa na ntina na mabungá na biso ya kala mpe kotyoláká misala nyonso malamu oyo tozali kosala. Kasi Yehova azali kolimbisa masumu na biso soki tobongoli mpenza motema mpe soki tozali kosala makasi na kozongela mabungá na biso te. (Nzembo 103:10-14; Misala 3:19) Azali koyungola makambo malamu mpe azali kobosana te misala na biso ya malamu. Ya solo, azali kobosana yango te ntango nyonso oyo tokotikala sembo epai na ye. Ekozala kozanga boyengebene soki abosani misala yango, nzokande ye azangi boyengebene soko moke te!—Baebele 6:10.
14. Nini emonisi ete Yehova atalelaka na motuya misala na biso kati na mosala ya boklisto?
14 Wapi bamoko na misala malamu oyo Nzambe asepelaka na yango? Likambo nyonso libongi oyo tozali kosala mpo na komekola Mwana na ye, Yesu Klisto. (1 Petelo 2:21) Na bongo, mosala moko ya ntina mingi ezali kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Na Baloma 10:15, tozali kotánga ete: “Kitɔkɔ boni makolo na bango bakosakolaka nsango na makambo malamu!” Atako tokoki kokanisa mpenza te ete ezali makolo na biso nde ezali “kitɔkɔ,” liloba oyo Paulo asalelaki awa ezali bobele moko oyo esalelamaki kati na libongoli ya Greke oyo ete La Septante, mpo na kolobela Lebeka, Laele mpe Yosefe—bango nyonso misato bayebanaki mpo na bonzenga na bango. (Genese 26:7; 29:17; 39:6) Na yango komipesa na biso kati na mosala ya Nzambe na biso, Yehova, ezali kitoko mingi mpe na motuya mingi na miso na ye.—Matai 24:14; 28:19, 20.
15, 16. Mpo na nini Yehova atalelaka ezaleli na biso ya koyika mpiko na motuya mingi, mpe lolenge nini maloba ya Mokonzi Davidi na Nzembo 56:8 emonisi likambo yango?
15 Ezaleli mosusu oyo Nzambe azali kotalela na motuya ezali bongo ezaleli na biso ya koyika mpiko. (Matai 24:13) Omikundola ete, Satana alingi ete opesa Yehova mokɔngɔ. Mokolo na mokolo oyo ozali kotikala sembo epai na Yehova, ezali libaku mosusu oyo ozali kopesa ye likoki ya koyanola na matumoli ya Satana. (Masese 27:11) Na bantango mosusu koyika mpiko ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Mitungisi ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, mikakatano ya nkita, kotungisama na mayoki, mpe mikakatano misusu ekoki kosala ete mokolo nyonso oyo ezali koleka ezala komekama. Koyika mpiko liboso ya komekama wana ezali na motuya mingi na miso ya Yehova. Ezali mpo na yango nde Mokonzi Davidi asɛngaki Yehova ete abomba mpisoli na ye kati na “molangi” ya elilingi, kotunáká na elikya nyonso ete: “Yango ekomami na mokanda na yɔ tɛ?” (Njembo 56:8) Ee, Yehova azali kozwa yango na motuya mpe azali komikundola mpisoli nyonso mpe minyoko nyonso tozali kokutana na yango mpo na kobatela bosembo na biso epai na ye. Yango mpe ezali na motuya mingi na miso na ye.
16 Na kotalela bizaleli na biso wana ya malamu mpe milende na biso, ezali mpenza polele ete Yehova atalelaka makambo mingi na motuya kati na biso! Ezala lolenge nini ya likambo Satana akoki kobimisela biso, Yehova azali kotalela biso lokola biloko na motuya mpe basangani kati “biloko kitoko ya mabota nyonso.”—Hagai 2:7.
Oyo Yehova asili kosala mpo na komonisa bolingo na ye
17. Mpo na nini mbeka ya lisiko ya Klisto esengeli kondimisa biso ete Yehova mpe Yesu bazali kolinga moko na moko kati na biso?
17 Ya misato, Yehova azali kosala makambo mingi mpo na komonisa bolingo oyo azali na yango mpo na biso. Ya solo, mbeka ya lisiko ya Klisto ezali eyano eleki nguya liboso ya lokuta ya Satana oyo ete tozali na motuya te to tolingami te. Tosengeli kobosana soko moke te ete liwa ya nsɔ́mɔ ya Yesu likoló na nzeté ya mpasi mpe ata mpasi monene oyo Yehova ayikelaki yango mpiko na komona liwa ya Mwana na ye ezalaki elembeteli oyo emonisi bolingo na bango mpo na biso. Lisusu, bolingo yango ezali komonisama epai na moko na moko kati na biso. Ezali lolenge wana nde ntoma Paulo amonaki yango, mpamba te akomaki ete: “Mwana na Njambe . . . alingaki ngai mpe amipɛsaki ye mpenja mpɔ na ngai.”—Bagalatia 2:20.
18. Na ndimbola nini Yehova azali kobenda biso epai na Klisto?
18 Yehova azali komonisa bolingo na ye mpo na biso na kosalisáká moko na moko kati na biso ete azwa matomba na mbeka ya lisiko ya Klisto. Yesu alobaki na Yoane 6:44 ete: “Moto akoki koya epai na ngai bobɛlɛ sɔkɔ Tata, Motindi na ngai, akobenda ye.” Na nzela ya mosala ya kosakola, oyo ezali kokómela moko na moko kati na biso, mpe na lisalisi ya elimo santu na ye, oyo Yehova azali kosalela mpo na kosalisa biso ete tósosola mpe tósalela makambo ya solo ya elimo atako bandelo oyo tozali na yango mpe ezalela na biso ya kozanga kokoka, Yehova ye moko azali kobenda biso epai na Mwana na ye mpe apesi biso elikya ya bomoi ya seko. Na yango, Yehova akoki koloba na biso lokola alobaki na Yisraele: “Nalingi yɔ na bolingo na seko, bongo naumelisi boboto na ngai epai na yɔ.”—Yilimia 31:3.
19. Mpo na nini libaku kitoko ya libondeli ezali kondimisa biso ete Yehova azali mpenza na bolingo mpo na biso?
19 Nzokande, mbala mosusu ezali na nzela ya libaku kitoko oyo ete libondeli nde tozali komona bolingo ya Yehova na lolenge mpenza ya penepene. Azali kobyanga biso moko na moko ete ‘tóbondelaka ye ntango nyonso.’ (1 Batesaloniki 5:17) Ayokaka! Abyangami nkutu ete “Moyoki ya mabondeli.” (Nzembo 65:2, NW) Apesi mokumba wana epai na moto mosusu te, ata mpe epai na Mwana na ye te. Kanisá naino: Mozalisi ya mɔlɔ́ngɔ́ azali kosɛnga biso ete tóbɛlɛma epai na ye kati na libondeli, na bonsomi nyonso na maloba. Malɔmbɔ na yo makoki ata kopusa Yehova na kosala oyo akokaki kosala te soki obondelaki ye te.—Baebele 4:16; Yakobo 5:16; talá Yisaya 38:1-16.
20. Mpo na nini bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso ezali te likambo oyo lipesi biso nzela na komipesa lokumu koleka to mpe kozala na moimi?
20 Moklisto oyo azangi bokatikati akoki kotalela bolingo mpe lokumu oyo Nzambe azali komonisa lokola likambo lipesi ye nzela na komitalela na motuya mingi koleka lolenge ye azali mpenza. Paulo akomaki ete: “Mpɔ na likabo na ngɔlu lijui ngai, najali koloba na mɔkɔ na mɔkɔ kati na bino ete boleka tɛ komikanisa bino mpenja na motindo mobɔngi tɛ. Kasi bomitanga na makanisi na sembo, moto na moto pelamɔkɔ na likabo na kondima oyo Njambe apɛsi ye.” (Baloma 12:3) Na yango, wana tozali kozwa mpenza ngɔlu ya bolingo ya Tata na biso ya likoló, tiká ete tózala na makanisi mabongi mpe tómikundola ete motema-boboto ya Nzambe ezali ngɔlu oyo tozwi.—Kokanisá na Luka 17:10.
21. Lokuta nini ya Satana tosengeli ntango nyonso kotɛmɛla, mpe solo nini ya Nzambe oyo tosengeli kokanisa ntango nyonso?
21 Tiká ete moko na moko kati na biso asala oyo ekoki na ye mpo na kotɛmɛla makanisi nyonso ya mabe oyo Satana azali kopalanganisa kati na mokili monuni oyo molingi kokufa. Yango elimboli mpe kobwaka likanisi oyo ete tozali na motuya te to tolingami te. Soki bomoi kati na ebongiseli oyo eteyaki yo ete omitalela yo moko lokola epekiseli makasi oyo ekoki kolóngama te ata na bolingo monene ya Nzambe, to ete misala na yo malamu mizali mpenza moke na boye ete miso oyo emonaka nyonso ekoki komona yango te, to mpe ete masumu na yo mazali mpenza mingi na boye ata liwa ya Mwana na ye molingami ekoki kozipa yango te, boye oteyamaki makambo ya lokuta. Bwaká lokuta nyonso wana elongo na makambo na yango nyonso ya nsɔ́mɔ! Tiká ete tóbatela ntango nyonso kati na makanisi na biso maloba ya ntoma Paulo oyo mazwami kati na Baloma 8:38, 39: “Nandimi sɔlɔ ete ata kufa, ata bomɔi, ata banje, ata mikonji, ata makambo na ntango oyo, ata ndenge na nguya na mokili, ata molai, ata bojindo, ata elɔkɔ mosusu nini ekoki kotangola biso tɛ na bolingo na Njambe bojali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ya solo, bazalaki kobengana babólá na maloba ya kotyola “ʽam-ha·ʼaʹrets,” to “bato na mabelé.” Engebene moto moko ya mayele, Bafalisai bazalaki koteya ete moto moko te asengeli kotya elikya na biloko na bango ya motuya, soko kotya elikya na maloba na bango, to mpe kobyanga bango mpo na kominanola elongo na bango, soko mpe kobyangisa bango, to ata mpe kokende epai na bango, soko mpe kosomba biloko na bango. Batambwisi ya mangomba balobaki ete moto oyo akobalisa mwana na ye ya mwasi epai na bato wana ekozala lokola nde apesi ye mpenza epai na nyama moko ya zámba.
Okanisi nini?
◻ Mpo na nini Satana azali komeka kondimisa biso ete tozali na ntina te mpe tolingami te?
◻ Lolenge nini Yesu ateyaki ete Yehova atalelaka moko na moko kati na biso na motuya?
◻ Lolenge nini toyebi ete Yehova asepelaka na bizaleli na biso ya malamu?
◻ Lolenge nini tokoki kondimisama ete Yehova atalelaka milende na biso na motuya?
◻ Lolenge nini Yehova amonisaki bolingo na ye mpo na moko na moko kati na biso?
[Elilingi na lokasa 13]
Yehova ayebi mpe azali kobosana te baoyo nyonso bazali kokanisa mpo na nkombo na ye