Jehovah ayebi biso malamu
JEHOVAH ayebi biso mpenza, mingimingi soki tozali kati na molongo ya basaleli na ye ya sembo. Baninga na biso ya motema, libota na biso, ata baboti na biso bayebi biso malamu te lokola Jéhovah ayebi biso. Na mokuse, Nzambe ayebi biso malamu koleka biso moko!
Boyebi oyo ya kokoka oyo Nzambe azali na yango mpo na basaleli na ye, Davidi alimbolaki yango malamu kati na Nzembo 139. Davidi alobi nini? Mpe mayoki ete toyebani na Nzambe masengeli kozala na bopusi nini likoló na maloba na biso mpe misala na biso?
Jéhovah ayebi makambo mingi!
Lokola Nzambe azali Mozalisi na biso, ezali likambo ebongi na kokanisa ete ayebi biso mobimba. (Misala 17:24-28) Ezali mpo na ntina yango Davidi akokaki koloba boye ete: “E Jéhovah, osili kotala motema na ngai mpe oyebi ngai solo.” (Nzembo 139:1). Nzambe ayebaki Davidi lokola ete atalaki makambo na ye nyonso. Wana asepelaki ye ete Jéhovah azalaki kotala ye na mozindo, mokomi na nzembo amitikaki kotambwisama na ye na makambo nyonso. Lokola Davidi, ba Témoins de Jéhovah ‘bazali kotikela Jéhovah banzela na bango, mpe bazali kolikya epai na ye’ na kobondelaka ye, wana ezali bango kondimisama ete akosala ntango nyonso oyo ezali sembo. (Nzembo 37:5) Lokola tozali koluka kotambwisama na mayele ya Nzambe, mpe tozali komitika na bolingo nyonso ete Nzambe atambwisa biso, tozali komiyoka ete tozali na kimya ya elimo. (Masese 3:19-26) Lokola Davidi, tondimisami na koyeba ete Nzambe azali kotalatala biso, ayebi mikakatano na biso mpe azali wana pene mpo na kosalisa biso.
Mokomi na nzembo andimaki likambo oyo ete: “Oyebi ntango wana nakofandaka mpe wana nakotelamaka”. (Nzembo 139:2a) Nzambe ayebaki misala nyonso Davidi azalaki kosala, na ndakisa, ntango azalaki kofanda na mpokwa na nsima ya kosilisa mosala to ntango azalaki kolamuka na mpongi. Biso tozali solo ba Témoins de Jéhovah? Soki bongo, tondimisama ete Nzambe ayebi mpe makambo mingi likoló na biso.
Davidi andimaki lisusu: “Oyebi makanisi na ngai longwa na mosika.” (Nzembo 139:2b) Atako Nzambe afandi na makoló, kuna mosika na mabelé, azalaki koyeba makanisi ya Davidi. (1 Mikonzi 8:43) Tokamwa te ete Jéhovah azali koyeba makanisi, mpamba te ye “akotalaka kati na motema’’.(1 Samwele 16:7; Masese 21:2) Likambo oyo ete Nzambe azali kotalela makanisi na biso esengeli kopusa biso na kotia makanisi na biso likoló na makambo mazali mpeto, makambo mazali malamu mpe na lokumu. Esengeli mpenza ete nayebisa ntango nyonso makanisi na biso kati na mabondeli oyo mazali kouta na motema, mpo na kozwa etambwiseli mpe “kimya na Nzambe”.—Bafilipi 4:6-9.
Lisusu mokomi na nzembo abakisi: “Oyebi wana ekotambola ngai mpe wana ekolala ngai, banzela na ngai nyonso ezali polele na miso na yo.” (Nzembo 139:3) Kolobaka ete Jehovah ayebi kobima mpe kozonga ya Davidi, to bopemi na ye na ntango azali kolala, mbala mosusu elimbolaki ete Jéhovah azalaki kobungisa eloko moko te na oyo nyonso mokomi na nzembo azalaki kosala. Oyo-Aleki—Likoló azalaki komeka to koyeba makambo nyonso Davidi azalaki kosala ata oyo ezali moke mpo na koyeba sikisiki lolenge na ye ya kozala. Nzambe ayebaki na lolenge ya kokoka banzela oyo Davidi azalaki kolanda kati na bomoi na ye. Ntango Tata na biso na likoló azali kotalatala biso na lolenge moko lokola epai na Davidi, tika ete amona ete tozali kosalela ye na bosembo mpe ete tozali kotambola na “nzela na boyengebene” oyo ezali komema na bomoi ya seko!—Masese 12:28.
Lokola maloba na ye nyonso mabombamaki te epai na Nzambe, Davidi alobaki ete: “Naino liloba ebimi na lolemo na ngai te, e Jéhovah oyebi yango nyonso.” (Nzembo 139:4). Soki ekokomela biso ete tozangi mpenza makambo ya koloba kati na mabondeli na biso, elimo na Nzambe “ekobondelaka mpo na biso, na maloba oyo biso tokoki koloba yango te.’‘ (Baloma 8:26.) Wana ezali biso kosolola, makambo oyo tolobi te, kasi tozali na yango na lolemo, Nzambe ayebi yango, mpamba te ayebi mayoki na biso ya solo. Soki tozali na bolingo oyo ezali kouta na “kondima ezangi bokosi”, tokomeka te kokosa bazalani na kosalelaka “maloba na sukali”.
Davidi alobi lisusu: “Yo ezingeli ngai na nsima mpe na liboso; otii loboko na yo likoló na ngai.” (Nzembo 139:5) Ya solo, Jéhovah azingelaki Davidi, lokola engumba ezingami na ntango ya etumba. Mokomi na nzembo ayebaki ete makambo oyo ye akokaki kosala lokola moto mazalaki na ndelo. Ayebaki lisusu ete akokaki te kokima mpo ete Nzambe amona ye te mpe kokima loboko, to etambwiseli ya Nzambe. Solo mpenza, Davidi akimaki ndenge wana te, biso tosengeli kosala bongo te. Kasi, tozala ntango nyonso na makanisi ete loboko na Jehovah ezali likoló na biso mpo ete tozali batemwe na ye.
Tokoki kokima elimo ya Nzambe te
Bakisa na oyo ete Jéhovah azali kondima mabondeli ya basaleli na ye ya sembo, elimo na ye ezali kosala likoló na bango mpe ezali kosalisa bango basala mokano na Ye. Yango wana tokangi ntina mpo na nini Davidi atunaki boye: “Nakoki kokende wapi mosika na elimo na yo, mpe nakokima kolongwa na miso na yo epai wapi?” (Nzembo 139:7). Mokomi na nzembo ayebaki ete akokaki kokima elimo na Nzambe te, to bokasi oyo Jéhovah asalelaka, oyo ekoki kokoma ata na bisika bileki mosika na molongo. Moto moko te akoki kokima longwa na miso na Nzambe, to kokima ete amona ye te. Ya solo, mosakoli “Jonas atelemaki mpo na kokima epai na ’Talasisi longwa na liboso na Jéhovah”, kasi akimaki mbisi monene te, oyo Jéhovah aponaki mpe emelaki ye, mpe azongisaki monoko mpo na mosala oyo Nzambe apesaki ye. (Yona 1:3, 17; 2:10 kino 3:4) Bongo totiya elikya na elimo ya Jéhovah: ekopesa biso makasi ya kokokisa misala oyo Nzambe azali kotinda biso ete tosala.—Zakari 4:6.
Lokola ayebaki ete moto akoki kokima Nzambe te, Davidi akomaki ete: “Soki nabuti na likoló, yo ozali kuna; soki nasali mbeto na ngai kati na Seolo, tala, ozali kuna.” (Nzembo 139:8) Na mikolo na mokomi na nzembo, ‘kobuta na likoló’ elimbolaki komata na bangomba milai, oyo bansongɛ ezali mbala mingi kozipama na mapatá. Nzokande, ata soki tozali likoló na nsonge oyo eleki basango mosusu na molai, tokanisa te ete elimo na Nzambe ekoki kokoma wana te. Ata soki tosali mbeto na biso na Seolo, liloba yango awa ezali komonisa bisika oyo bikei mosika na nse ya mabelé, tokokima te na miso na Nzambe.—Tala Deteronome 30: 11-14; Amosa 9:2, 3.
Davidi alobi: “Soki nakamati mapapu na ntongontongo, mpe napombwi bobele na nsuka na mai-na-monana, kuna loboko na yo ekokamba ngai mpe loboko na yo na mobali ekosimba ngai.” (Nzembo 139:9, 10). “Mapapu na ntongontongo” ezali nini? Lolenge oyo ya koloba na maloba kitoko ezali kopesa likanisi ndenge kongenga na kotana na ntongo, lokola ete ezali na, mapapu epanzanaka nokinoki longwa na est kino ouest. Na yango, soki Davidi akokaki kokamata mapapu na ntongontongo mpo na kokoma na la mer oyo ezali mosika to na bisanga epai na kolala ya moi, akokaki kozwa nini lisusu? Akokaki kokima loboko na Nzambe te, elingi koloba etambwiseli na ye. Na nzela ya elimo na Ye, Jéhovah akokaki kozala wana mpo na kotambwisa ye na boboto.—Nzembo 51:11.
Molili ekoki kopekisa te ete Nzambe amona te
Kozala mosika to na molili ekoki kobomba moto te ete Nzambe amona ye te. Yango wana Davidi abakisaki: “Soki nalobi ete: ‘Molili ekobomba ngai!’ ntango yango butu oyo ezingeli ngai ekobongwana moi. Ata molili ezali molili liboso na yo te mpe butu ekotana lokola moi epai na yo.” (Nzembo 139:11, 12) Ata soki azingami na molili makasi, lokola ete ekangi ye, epai na Jéhovah moto azali komonana polele lokola na ntango ya moi. Moto moko te akoki kobomba na Nzambe masumu oyo asalaki na molili.—Yisaya 29:15, 16.
Ebombamelo ezali kopekisa Mozalisi komona te. Mpo na yango, Davidi alobaki: “Yo osalaki bangei na ngai; otongaki ngai kati na libumu na mama na ngai. Nakokumisa yo mpo ete nasalami na motindo na kokamwa mingi. Misala na yo ezali ya kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu. Mikwa na ngai ebombamaki na yo te na ntango wana esalamaki ngai na ebombelo, mpe wana ebongisamaki ngai na nse mingi na mokili. Miso na yo mamonaki ebandeli na ngai, biteni na ngai bikomamaki nyonso na mokanda na yo. Yango eponamaki mpo na ngai (biteni nyonso na nzoto), naino ekomaki moko na yango te (eteni moko moko na nzoto).”—Nzembo 139:13-16.
Jéhovah Nzambe, oyo ayebi mayoki ya nsé ya motema ya moto, asalaki bangei ya Davidi. Bangei, na katikati na nzoto, ezali kati na bilembo na nzoto oyo bibombami makasi mpe emonanaka libanda te; nzokande, Nzambe azali komona yango. Azali kotala ata na kati na libumu na mama, elingi koloba kati na matrice na ye. Ee, azali komona ata kati na likeyi oyo ekomaka mwana ntango ezali kosalema! Bobele likambo ya kokanisa lolenge na kokamwa oyo asalamaki kati na libumu na mama na ye epusaki Davidi na kokumisa Mozalisi na ye. Na kolobaka “na nse mingi na mokili”, na ntembe te mokomi na nzembo alingaki koloba libumu to matrice na mama na ye, epai kuna, na kozanga komonana na miso ya moto, kasi na komonana na miso na Nzambe, mikwa ezali kosangana misisa oyo ekangi mikwa, misuni, mpe misisa oyo elekisaka makila ya mwana.
Nzambe ayebaki elongi na Davidi ndenge ekozala liboso ete biteni na nzoto na ye biyebana polele kati na libumu na mama na ye. Mpo na nini? Mpo ete kokola ya likeyi ezalaki kolanda plan oyo ebongisamaki sikisiki, lokola ete ezalaki kotosa bitinda oyo bikomami kati na mokanda moko. Oyo nde elembeteli kitoko ya mayele ya Jéhovah mpe ya makoki na ye ya komona uta biloko bibombami! Likambo yango esengeli mpe kondimisa biso ete Nzambe azalisaki lolenge ekeseni ya bato mpe ezali ye nde mobandisi na likambo oyo na kokamwisa ya ebandeli ya zemi kino kobotama na biso lokola bikelamu na bomoi.
Makanisi na Jéhovah mazali na motuya mingi!
Kokanisa na ye likoló na lolenge oyo mwana abandaka mpe akolaka na kati na libumu ememaki Davidi na kokanisa mozindo likoló na mayele ya Nzambe. Na kokamwa nyonso alobaki boye: “E Jéhovah, makanisi na yo epai na ngai ezali eloko na motuya mingi! Motuya na yango ezali monene boni!” (Nzembo 139:17). Davidi asepelaki na makanisi ya Jéhovah Nzambe; makanisi yango mazalaki mingi kino akamwaki na ‘motuya na yango’. Mpo na biso, soki makanisi na Nzambe mazali na motuya, tokoyekola mingi Makomami Mosantu. (1Timoté 4:15, 16) Mokanda oyo mosangisi makanisi na ye “makoki kopesa litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobokola kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu”.—2 Timoté 3:16, 17.
Kaka mpo na likambo litali makanisi na Nzambe, Davidi abakisaki: “Soki nameki kotanga yango, maleki mbuma na zelo na motuya. Ekolongwa ngai na mpongi, nazali mpe naino esika moko na yo.” (Nzembo 139:18).Lokola makanisi na Nzambe mazali mingi koleka mbuma na zelo na motuya, soki Davidi akokaki kobanda kotanga yango na ntongo, akokaki kosilisa te kino kolala ya moi. Na kolamuka na ntongo, akokaki bobele naino kozala elongo na Jéhovah. Mpo na biso, lokola tozali na mposa na etambwiseli ya Jéhovah, ekoki kozala malamu ete makanisi na biso ya nsuka na mpokwa, mpe makanisi na biso ya liboso na ntongo, mazala mabondeli kati na yango tozali kokanisa mozindo likoló ya makanisi mpe mikano ya Jéhovah.—Nzembo 25:8-10
Etumbu mpo na bato mabe
Mayoki na Davidi mazalaki ndenge nini epai na baoyo bazalaki koboya kotambwisama na Nzambe, nzokande ezali Nzambe nde azali kopesa etambwiseli ya mayele? Abondelaki boye ete: “E Jéhovah, solo okoboma bato mabe; bongo bino bato na makila, longwa na ngai, bato baoyo bakoboyaka yo na minoko mabe mpe bayini na yo bakotukaka nkombo na yo na lolendo mabe.” (Nzembo 139:19, 20) Davidi amekaki te koboma bato mabe, kasi asambelaki mpo ete Jéhovah akoka kopesa bango etumbu oyo ebongaki na bango. Biso mpe tosengeli kozala na elimo motindo moko. Na ndakisa, tokoki kobondela mpo tozala na molende ya koloba liloba na Nzambe ntango banguna na biso bazali konyokola biso. (Misala 4:18-31) Kasi tokoluka te koboma banguna na biso, mpamba te toyebi ete Jéhovah alobaki ete: “Kobukanisa ezali likambo na ngai, ngai nakofuta.”—Baebele 10:30; Deteronome 32:35.
Soki Nzambe akokaki koboma bato mabe, babomi na bato, Davidi akokaki komona bango lisusu te. Bato yango bazalaki na nyongo ya makila, mpe lisusu, bazalaki koloba mpo na Jéhovah makambo engebene makanisi na bango, oyo mayokanaki te na makanisi na Ye. Esengelaki bakufa mingimingi mpo ete babwakaki nsoni likoló na nkombo ya Nzambe na kozwaka yango lokola eloko na mpamba, mbala mosusu na kosalelaka yango mpo na kolongisa mikano na bango ya mabe. (Exode 20:7) Kokweisama te na makambo motindo yango.
Lokola bato mabe basopaki makila mpe babwakaki nsɔni likoló na nkombo ya Nzambe, Davidi alobaki: “E Jéhovah, nayini baoyo bakoyinaka yo. Naboyi baoyo bakotemelaka yo. Nayini bango na koyina eleki makasi, bazali na ngai bobele bayinami.” (Nzembo 139:21, 22) Davidi azalaki koyina bato wana, mpo bazalaki koyina Jéhovah makasi mpe bazalaki kotombokela ye. Epai na ye bazalaki banguna, mpo azalaki koyina mabe na bango, kotyola na bango mpe botomboki na bango epai na Oyo-Aleki-Likoló.
Tika Nzambe asosola yo
Davidi alingaki te kokokana na bato mabe, nde uta bongo ayebaki ete asengelaki te kozala na motema na bololo epai na bango. Mpo na yango asengaki: “Meke ngai, E Nzambe, mpe yeba motema na ngai. Sosola ngai mpe yeba kobanza na ngai, tala soko nazali kotambola na nzela mabe, mpe kamba ngai na nzela na seko.” (Nzembo 139:23, 24). Lokola Davidi, tosengeli kosepela ete Nzambe ameka mitema na biso mpe asosola soki tozali na mikano mabe. (1 Ntango 28:9) Tosengeli kolamba epai na Jéhovah ete atala biso, ayeba kobanza na biso mpe amona soki tozali kotambola na nzela mabe. Soki mabunga na biso mazali kotungisa biso to soki na mitema na biso tozali na mikano mabe to eloko moko ya mabe, tobondela na komikitisa nyonso epai na Jéhovah mpe totika ete elimo na Nzambe mpe batoli ya Liloba na ye etambwisa biso. (Nzembo 40:11-13) Na banzela yango, Jéhovah oyo azali Moninga na biso oyo aleki baninga nyonso, akoki kokamba biso na nzela na seko mpe kosalisa biso kolanda lolenge na etamboli ya sembo oyo ezali komema na bomoi ya seko.
Na yango Nzembo 139 ezali kopesa biso elendiseli ya solo. Ezali kolakisa biso ete, lokola eloko moko te ekoki kosalama kozanga ete Tata na biso na likoló ayeba yango, Jéhovah akoki kosalisa biso ntango nyonso oyo tozali na bosenga. (Baebele 4:16) Lisusu, lokola Jéhovah ayebi biso malamu koleka biso moko, tozali na kimya na nse na libateli na ye oyo etondi na bolingo. (Deteronome 33:27) Soki tosɛngi ye na komikitisa ete asosola biso mpe alakisa biso bolɛmbu na biso, tokoki kosembola lolenge na biso na lisalisi na ye. Na yango, kozanga ntembe, boyebi oyo azali na yango likoló na biso ekozala na matomba malamu likoló na bomoi na biso. Tokopusana koloba na bosembo nyonso mpo na losambo ya solo mpe kotambola na komikitisa nyonso liboso na Jéhovah, oyo ayebi biso malamu koleka.