Bomoi nsima ya liwa—Biblia elobaka nini?
“Ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.”—GENESE 3:19.
1, 2. (a) Makanisi nini ya ndenge na ndenge bato bazali na yango mpo na bomoi nsima ya liwa? (b) Tosengeli kotalela nini mpo na koyeba oyo Biblia eteyi na likambo ya molimo?
NIKHILANANDA, moto ya filozofi mpe moto ya Lingomba ya Bahindu alobaki ete: “Liteya oyo elobaka ete bato bazwaka minyoko ya seko eyokani te na endimeli oyo elobaka ete Nzambe alingaka biloko oyo akelaki. . . . Kondima ete molimo ezwaka etumbu ya seko mpo na mabunga oyo moto asalaki na boumeli ya mwa bambula, kozanga kopesa yango libaku ya kobongwana, ezali likambo oyo elongobani te.”
2 Lelo oyo, bato mingi bazali kokanisa lokola Nikhilananda, liteya ya minyoko ya seko etungisaka bango. Ndenge moko mpe, bato mingi bazali kokanga ntina te na mateya lokola kokóma na Nirvana mpe komiyokanisa na mibeko ya molɔ́ngɔ́. Ezala bato oyo balobaka ete bandimelaka Biblia, bango mpe bazali na makanisi ndenge na ndenge mpo na kolimbola molimo mpe oyo ekómelaka yango ntango tokufaka. Biblia eteyi mpenza nini mpo na molimo? Mpo na koyeba yango, tosengeli kotalela ndimbola ya maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo ebongolami na “molimo” na Biblia.
Ndimbola ya molimo na Biblia
3. (a) Liloba nini ya Liebele oyo ebongolami na “molimo” na Makomami ya Liebele, mpe ndimbola na yango ya libosoliboso ezali nini? (b) Ndenge nini Genese 2:7 emonisi mpenza ete liloba “molimo” ekoki kolimbola moto na mobimba na ye?
3 Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “molimo” ezali nèphèsh. Tozali kokuta yango mbala 754 na kati ya Makomami ya Liebele. Nèphèsh elimboli nini? Diksionere moko (The Dictionary of Bible and Religion) elobi ete liloba yango “elimbolaka mingimingi ekelamu mobimba ya bomoi, moto na mobimba na ye.” Ndimbola oyo Biblia epesi mpo na molimo na Genese 2:7 endimisi likambo yango. Vɛrsɛ yango elobi boye: “[Yehova] Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo na bomoi.” Tomoni ete moto ya liboso “akómaki” molimo. Elingi koloba ete Adama azalaki na molimo te, kasi azalaki nde molimo. Ndenge moko, moto oyo akómi monganga azali monganga. Na yango, awa liloba “molimo” elimboli moto na mobimba na ye.
4. Liloba nini ebongolami na “molimo” na Makomami ya Greke ya boklisto, mpe ndimbola na yango ya libosoliboso ezali nini?
4 Liloba oyo ebongolami na “molimo” (psukhê) tozali kokuta yango koleka mbala nkama na Makomami ya Greke ya boklisto. Ndenge moko na nèphèsh, mbala mingi liloba oyo elimbolaka moto na mobimba na ye. Na ndakisa, tótalela maloba oyo: “Molimo na ngai etungisami.” (Yoane 12:27) “Milimo nyonso ekómaki kobanga.” (Misala 2:43, NW) “Tiká ete milimo nyonso etosa bakonzi oyo bazali liboso.” (Baloma 13:1, NW) “Bózala na maloba ya kobɔndisa mpo na milimo oyo etungisami.” (1 Batesaloniki 5:14, NW) “Bato mingi te, elingi koloba milimo mwambe, bamemamaki likoló ya mai mpe bazwaki likama te.” (1 Petelo 3:20, NW) Tomoni polele ete liloba psukhê, lokola mpe nèphèsh, elimboli moto na mobimba na ye. Nganga-mayele Nigel Turner alobi ete liloba yango “elimboli oyo moto azali mpenza, moto ye mei, nzoto ya mosuni oyo ezali na rouaḥ [elimo] oyo Nzambe afulaki kati na yango. . . . Likebi etyami na moto na mobimba na ye.”
5. Banyama bazali mpe milimo? Limbolá.
5 Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete na Biblia, liloba “molimo” esalelami mpe mpo na banyama. Na ndakisa, ntango Genese 1:20 (NW) ezali kolimbola ndenge oyo Nzambe asalaki bikelamu oyo bizali na mai, elobi ete: “Tiká ete mai etonda na milimo ya bomoi.” Na mokolo ya kokela oyo elandaki, Nzambe alobaki: “Tiká ete mabelé ebimisa milimo ya bomoi na mitindo na yango: ebwele, nyama oyo etambolaka mpe nyama ya zamba ya mabelé na motindo na yango.”—Genese 1:24, NW; talá Mituya 31:28.
6. Tokoki koloba nini na ndenge oyo Biblia esaleli liloba “molimo”?
6 Na bongo, ndenge Biblia esaleli liloba “molimo,” elimboli moto to nyama to bomoi oyo moto to mpe nyama bazalaka na yango. (Talá etanda na lokasa 15.) Ndimbola oyo Biblia epesi mpo na molimo ezali pɛtɛɛ, ezali na bongolabongola te, mpe ezali na mindɔndɔ ya mateya ya filozofi mpe biyambayamba ya bato te. Yango wana, motuna oyo ezali koya mbala moko na makanisi yango oyo: Na kotalela Biblia, eloko nini ekómelaka molimo soki tokufi?
Bakufi bayebi eloko moko te
7, 8. (a) Makomami elobi nini mpo na ezalela ya bakufi? (b) Pesá bandakisa oyo euti na Biblia mpe emonisi ete molimo ekoki kokufa.
7 Mosakoli 9:5, 10 eyebisi polele ezalela ya bakufi. Bavɛrsɛ yango elobi boye: “Bakufi bayebi likambo te . . . Ezali na mosala te, na mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.” Na yango, liwa elimboli kozanga bomoi. Mokomi ya nzembo akomaki ete na ntango moto akufi, ‘azongi na mabelé lisusu; se na mokolo yango kokanisa na ye esili.’ (Nzembo 146:4) Bakufi bayebi eloko te, basalaka mosala moko te.
8 Ntango Nzambe akatelaki Adama etumbu alobaki ete: “Ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.” (Genese 3:19) Liboso Nzambe asala ye na mputulu ya mabelé mpe apesa ye bomoi, Adama azalaki te. Ntango akufaki, azongaki na ezalela wana. Etumbu na ye ezalaki liwa; kasi batindaki ye na mokili mosusu te. Bongo molimo na ye ekendaki wapi? Lokola na Biblia mbala mingi liloba “molimo” elimbolaka moto, boye ntango tolobi ete Adama akufaki, tozali koloba ete molimo oyo tobéngi Adama nde ekufaki. Likambo oyo ekoki komonana likambo ya sika mpo na moto oyo andimaka ete molimo ekufaka te. Nzokande, Biblia elobi ete: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Levitike 21:1 (NW) elobeli “molimo oyo ekufi” (“ebembe,” Liloba lya Nzambe). Lisusu, balobaki na Banasili ete basengeli te kopusana pene na “molimo oyo ekufi” (“nzoto oyo ekufi,” Lamsa).—Mituya 6:6, NW.
9. Biblia elingi koloba nini ntango eyebisi ete ‘molimo ya Laele ezalaki kolongwa’?
9 Kasi, tokoloba boni na likambo oyo Genese 35:18 elobi na ntina na liwa ya Laele, oyo akufaki na mpasi ya kobota mwana na ye ya mibale? Tozali kotánga boye na vɛrsɛ yango: “Ezalaki molimo na ye kolongwa (mpo ete akufaki) ye abyangaki nkombo na ye ete Bene-Oni, nde tata na ye abyangaki nkombo na ye Benyamina.” Vɛrsɛ oyo emonisi nde ete Laele azalaki na eloko moko na kati na ye oyo ebimaki ntango akufaki? Te. Tóbosana te ete liloba “molimo” ekoki mpe kolimbola bomoi ya moto. Na yango, na esika oyo “molimo” ya Laele elimbolaki kaka “bomoi” na ye. Yango wana, Babiblia mosusu ebongoli maloba “ezalaki molimo na ye kolongwa” na “bomoi na ye ezalaki kosila” (Knox), “abimisaki mpema na ye ya nsuka” (JB), mpe “bomoi na ye etikaki ye” (Bible in Basic English). Likambo moko te emonisi ete eloko moko oyo emonanaka te ebimaki na nzoto ya Laele mpe etikalaki na bomoi nsima ya liwa na ye.
10. Na ndimbola nini molimo ya mwana ya mwasi-mokufeli-mobali oyo asekwisamaki ‘ezongelaki ye’?
10 Ezali ndenge moko na lisekwa ya mwana ya mwasi-mokufeli-mobali oyo elobelami na 1 Mikonzi mokapo 17. Na vɛrsɛ 22, tozali kotánga ete ntango Eliya abondelaki mpo na elenge mobali, “[Yehova] ayokaki mongongo na Eliya mpe molimo na mwana [ezongelaki] ye mpe abikaki.” Awa lisusu, liloba “molimo” elimboli “bomoi.” Yango wana, Biblia Liloba lya Nzambe elobi ete: “Mwana azongi na bomoi, akómi kopema lisusu.” Tomoni ete ezalaki bomoi, kasi eloko moko te oyo ezangi komonana, nde ezongaki epai ya mwana. Likambo yango eyokani na maloba oyo Eliya ayebisaki mama ya mwana ete: “Talá, mwana na yo [moto na mobimba na ye] abiki.”—1 Mikonzi 17:23.
Ezali boni mpo na elimo?
11. Mpo na nini liloba “elimo” elimboli te eteni moko ezangi komonana oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi?
11 Biblia elobi ete ntango moto akufi, “elimo na ye ekobima, mpe akozonga na mabelé.” (Nzembo 146:4, NW) Yango elingi koloba ete elimo oyo emonanaka te nde ebimaka mpenza mpe etikalaka na bomoi nsima ya liwa ya moto? Ekoki kozala bongo te, mpamba te mokomi ya nzembo alobi lisusu ete: “Na mokolo yango kokanisa na ye esili.” Boye, elimo ezali nini, mpe na ndimbola nini ‘ebimaka’ soki moto akufi?
12. Na Biblia, liloba ya Liebele mpe ya Greke oyo ebongolami na “elimo” elimboli nini?
12 Na Biblia, liloba oyo ebongolami na “elimo” (na Liebele, rouaḥ; na Greke, pneuma) elimboli mpenzampenza “mpema.” Yango wana, na esika ya “elimo na ye ekobima,” Biblia Liloba lya Nzambe elobi ete “bakokata motema.” (Nzembo 146:4) Kasi liloba “elimo” elimboli kaka kopema te. Na ndakisa, mpo na kolobela kobomama ya bato mpe banyama na Mpela, Genese 7:22 elobi ete: “Bango nyonso na mokili baoyo bazalaki na mpema [to, elimo; na Liebele, rouaḥ] na bomoi na zolo na bango bakufaki.” Na yango “elimo” ekoki kolimbola nguya ya bomoi oyo esalaka mosala na bikelamu nyonso ya bomoi, ezala bato to banyama, mpe esimbami na kopema.
13. Na ndimbola nini elimo ezongaka epai ya Nzambe ntango moto akufi?
13 Ntango Mosakoli 12:7 elobi ete ntango moto akufi, “[elimo] ekozonga epai na Nzambe oyo apesaki yango,” yango elingi koloba nini? Elingi nde koloba ete elimo ebimaka mpenza mpe ebutaka likoló tii epai ya Nzambe? Eloko moko te ezali kotinda biso tókanisa bongo. Lokola elimo ezali nguya ya bomoi, soki balobi ete “ezongaka epai na Nzambe” elingi koloba ete mpo na moto oyo akufi, elikya nyonso ya kozala lisusu na bomoi ezali se na mabɔkɔ ya Nzambe. Nzambe kaka nde akoki kopesa lisusu elimo, to nguya ya bomoi, mpo ete moto azonga lisusu na bomoi. (Nzembo 104:30) Kasi, Nzambe akani kosala yango?
“Akosekwa”
14. Yesu alobaki mpe asalaki nini mpo na kosunga mpe kobɔndisa bandeko basi ya Lasalo nsima ya liwa ya ndeko na bango?
14 Na Betania, mwa mboka moke oyo ezali na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 3 na Yelusaleme, Malia na Malata bazalaki kolela ndeko na bango Lasolo oyo akufaki liwa ya mbalakaka. Yesu mpe ayokaki mawa mpamba te azalaki moninga ya Lasalo na bandeko na ye ya basi. Ndenge nini Yesu akokaki kobɔndisa bandeko basi ya Lasalo? Abɛtelaki bango masolo ya mindɔndɔmindɔndɔ te, kasi ayebisaki bango solo. Yesu alobaki na mokuse ete: “Ndeko na yo akosekwa.” Na nsima, Yesu akendaki na lilita, mpe asekwisaki Lasalo. Moto oyo akufaki banda mikolo minei azongisaki ye na bomoi!—Yoane 11:18-23, 38-44.
15. Malata apesaki eyano nini na makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki?
15 Malata akamwaki na maloba ya Yesu ete Lasalo ‘akosekwa’? Tomoni ete te, mpamba te ayanolaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.” Azalaki kolikya na elaka ya lisekwa. Na nsima, Yesu ayebisaki ye ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akobika.” (Yoane 11:23-25) Ekamwiseli ya lisekwa ya Lasalo elendisaki kondima na ye mpe epesaki bato mosusu kondima. (Yoane 11:45) Kasi, liloba “lisekwa” elimboli mpenza nini?
16. Liloba “lisekwa” elimboli nini?
16 Liloba “lisekwa” ebongolami na liloba ya Greke anastasis, oyo elimboli mpenzampenza “kotɛlɛma lisusu.” Baebele oyo babongolaki Biblia na Greke babongolaki liloba anastasis na maloba oyo elimboli “kozonga ya bakufi na bomoi” (Liebele, teḥiyath hamméthim).a Na bongo, lisekwa elimboli kolamusa moto na liwa oyo ezali ezalela ya kozanga bomoi, to kozongisa moto na bomoi.
17. (a) Mpo na nini lisekwa ya bato ekozala likambo ya mpasi te mpo na Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto? (b) Yesu apesaki elaka nini mpo na baoyo bazali na malita ya kokanisama?
17 Lokola Yehova Nzambe azali na mayele oyo ezangi nsuka mpe abosanaka ata moke te, kosekwisa moto ezali likambo ya mpasi te mpo na ye. Koyeba lisusu makambo ya bomoi ya bato oyo bakufá: bomoto na bango, makambo oyo bakutanaki na yango na bomoi na bango, mpe makambo na bango nyonso, ata oyo ya mikemike, ezali mpasi te mpo na ye. (Yobo 12:13; talá Yisaya 40:26.) Lisusu, lokola likambo ya Lasalo emonisi yango, Yesu Klisto azali na mposa mpe na makoki ya kosekwisa bakufi. (Talá Luka 7:11-17; 8:40-56) Kutu, Yesu Klisto alobaki ete: “Ntango ezali koya oyo bato nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye [Yesu], mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29, NW) Ɛɛ, Yesu Klisto alakaki ete bato nyonso oyo Yehova abombi na makanisi na ye bakosekwa. Tomoni ete Biblia elobi polele ete molimo ekufaka, mpe lisekwa nde ekosukisa liwa. Kasi bamiliare ya bato bazalaki na bomoi mpe bakufá. Na kati ya bato yango banani oyo Nzambe abombi na makanisi na ye mpe bakosekwa?
18. Banani bakosekwisama?
18 Baoyo basalelaki Nzambe na bosembo bakosekwa. Nzokande, bamilio ya bato mosusu bakufaki kasi bamonisaki te soki bakokaki kolanda mibeko ya sembo ya Nzambe. Ekoki kozala ete bayebaki masɛngami ya Yehova te to mpe bazwaki ntango ya kosala mbongwana te na bomoi na bango. Bango mpe, Nzambe abombi bango na makanisi na ye mpe bakosekwa, mpamba te Biblia elaki ete: “Lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.”—Misala 24:15.
19. (a) Ntoma Yoane azwaki emonaneli nini mpo na lisekwa? (b) Nini “ebwakami na libeke ya mɔ́tɔ,” mpe maloba yango elimboli nini?
19 Na kati ya emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki bato oyo basekwi batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe. Akomaki boye mpo na kolimbola yango: “Mai monene ezongisi bakufi [oyo bazalaki] na kati na yango: Kufa na [Hades, NW] izongisi bakufi [oyo bazalaki na kati na yango. Basambisami moto na motindo na misala na ye, moto na motindo na misala na ye. Na nsima Kufa na [Hades] ibwakami kati na libeke na mɔ́tɔ. Libeke na mɔ́tɔ oyo ezali kufa na mibale.” (Emoniseli 20:12-14) Kanisá naino likambo ya boye! Bakufi nyonso oyo Nzambe abombi na makanisi na ye bakobima na Hades, to Sheol, malita ya bato nyonso. (Nzembo 16:10; Misala 2:31) Na nsima, “liwa na Hades” ekobwakama na esika oyo babéngi “libeke ya mɔ́tɔ,” elingi koloba ete ekobomama nyɛ. Malita makozala lisusu te.
Elikya oyo ekokani na elikya mosusu te!
20. Bamilio ya bato oyo bakufá bakosekwisama na mokili ya ndenge nini?
20 Ntango bamilio ya bato bakosekwa, bakozonga na bomoi na mabelé oyo etikali mpamba te. (Yisaya 45:18) Ntango bakosekwa bakokuta mokili moko kitoko mpe bakokuta bandako ya kolala, bilamba, mpe bilei oyo ebongisami mpo na bango. (Nzembo 67:6; 72:16; Yisaya 65:21, 22) Banani bakobongisa biloko wana nyonso? Ezali polele ete bato mosusu bakozala na bomoi na mokili ya sika liboso ete lisekwa ebanda. Kasi bato yango banani?
21, 22. Elikya nini ekokani na elikya mosusu te mpe ezali liboso na baoyo bazali na bomoi na “mikolo ya nsuka”?
21 Kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali komonisa ete tozali na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo.b (2 Timote 3:1) Etikali moke mpenza, Yehova Nzambe azwa makambo ya mokili oyo na mabɔkɔ na ye mpe asukisa mabe na mabelé. (Nzembo 37:10, 11; Masese 2:21, 22) Na ntango wana, eloko nini ekokómela baoyo bazali kosalela Nzambe na bosembo?
22 Yehova akoboma bato ya sembo nzela moko na bato mabe te. (Nzembo 145:20) Asala naino likambo ya ndenge wana te, mpe akosala yango te ntango akolongola mabe nyonso na mokili. (Talá Genese 18:22, 23, 26.) Mokanda ya nsuka ya Biblia elobeli “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso,” baoyo babiki na “[bolɔzi monene, NW].” (Emoniseli 7:9-14) Ɛɛ, ebele monene bakobika na bolɔzi monene oyo ekosukisa mokili oyo mabe mpe bakokɔta na mokili ya sika ya Nzambe. Kuna, bato ya botosi bakozwa bolamu ya makambo malamu oyo Nzambe azali kosala mpo na kosikola bato na masumu mpe na liwa. (Emoniseli 22:1, 2) Na bongo, “ebele monene” yango bakokufa te. Elikya yango ekokani na elikya mosusu te!
Bomoi oyo ezangi liwa
23, 24. Osengeli kosala nini soki olingi kozwa bomoi oyo ezangi liwa na Paladiso awa na mabelé?
23 Tokoki kotya motema na elikya monene boye? Ntembe ezali ata moke te! Yesu Klisto ye moko amonisaki ete ekozala na ntango moko oyo bato bakozala na bomoi kozanga ete bákufa. Liboso asekwisa moninga na ye Lasalo, Yesu ayebisaki Malia ete: “Moto na moto oyo azali na bomoi mpe andimi ngai, libela akokufa te.”—Yoane 11:26.
24 Olingi kozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé? Ozali na mposa ya komona lisusu bato oyo olingaki mingi kasi lelo oyo bakufá? Ntoma Yoane alobi ete: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.” (1 Yoane 2:17) Sikoyo nde ntango ya koyekola mokano ya Nzambe mpe kozwa ekateli ya kotosa yango. Na ndenge yango nde yo na bamilio ya bato mosusu oyo bazali kosala mokano ya Nzambe, bokoki kozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “lisekwa” ezali na Makomami ya Liebele te, kasi elikya ya lisekwa emonisami polele na Yobo 14:13; Danyele 12:13, mpe Hosea 13:14.
b Talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., nkasa 98-107.
Oyebi lisusu?
◻ Wapi ndimbola ya libosoliboso ya maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo ebongolami na “molimo”?
◻ Nini ekómelaka molimo ntango moto akufi?
◻ Mpo na Biblia, nini ekosukisa liwa?
◻ Bato oyo bazali sembo lelo oyo bazali na elikya nini oyo ekokani na elikya mosusu te?
[Etanda na lokasa 15]
“Molimo” lokola bomoi ya ekelamu
Ntango mosusu, liloba “molimo” elimbolaka bomoi oyo moto to nyama azali na yango. Yango ebongoli ndimbola ya Biblia te mpo na molimo lokola moto to nyama. Tópesa ndakisa: Tolobaka ete moto azali na bomoi, yango elingi koloba ete azali moto ya bomoi. Tokoki mpe koloba ete azali na bomoi. Ndenge moko, moto ya bomoi azali molimo. Kasi, ntango azali na bomoi, tokoki kolobela “molimo” lokola eloko oyo moto azali na yango.
Na ndakisa, Nzambe ayebisaki Mose ete: “Bato nyonso oyo bazalaki kolanda molimo na yo bakufi.” Ezali polele ete banguna ya Mose bazalaki koluka koboma ye. (Exode 4:19, NW; talá Yosua 9:24; Masese 12:10.) Yesu asalelaki liloba yango na lolenge yango ntango alobaki ete: “Mwana na moto ayei . . . kopesa [molimo, NW] na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28; talá Mt 10:28.) Na bisika yango mibale, liloba “molimo” elimboli “bomoi ya ekelamu.”
[Bililingi na lokasa 15]
Bango nyonso bazali milimo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Hummingbird: U.S. Fish and Wildlife Service, Washington, D.C./Dean Biggins
[Elilingi na lokasa 17]
Yesu amonisaki ete lisekwa nde ekosukisa liwa
[Elilingi na lokasa 18]
“Moto na moto oyo azali na bomoi mpe andimi ngai libela akokufa te.”—Yoane 11:26