‘Ee Yehova, tyá ngai na komekama’
“YEHOVA azali ye oyo atalaka mitema.” (Masese 17:3, NW) Maloba wana esengeli mpenza kolendisa biso. Mpo na nini? Mpamba te, Tata na biso ya likoló azali moto te oyo amonaka kaka libándá; ye ‘atalaka na kati ya motema.’—1 Samwele 16:7.
Kutu, ata biso moko toyebaka mpenza te kososola makanisi mpe bamposa oyo ezali na kati ya motema na biso. Mpo na nini? Mpamba te “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” Nzokande, Nzambe ayebi yango, mpo alobi na Liloba na ye boye: “Ngai [Yehova], nakolukaluka kati na motema, nakomeka [bangei, NW].” (Yilimia 17:9, 10) Ya solo, Yehova ayebi malamumalamu “motema,” elingi koloba bamposa na biso; ayebi mpe malamumalamu “bangei,” elingi koloba makanisi mpe mayoki na biso.
Mpo na nini baklisto bamekamaka?
Tokoki kokamwa te na ndenge Mokonzi Davidi asɛngaki Nzambe ete: “Talelá ngai, Ee Yehova, mpe tyá ngai na komekama; pɛtolá bangei na ngai mpe motema na ngai.” (Nzembo 26:2, NW) Yango elingi nde koloba ete Davidi azalaki pɛto na makambo nyonso, yango wana abangaki te kosɛnga Yehova ete ameka ye? Ezali bongo te! Davidi azalaki moto ya kozanga kokoka lokola biso, azalaki te kotosa na ndenge ya kokoka mitinda ya Nzambe. Kutu, lokola azalaki moto ya kozanga kokoka asalaki mabunga minene; atako bongo, Biblia elobi ete ‘atambolaki na motema malamu.’ (1 Mikonzi 9:4) Na ndenge nini? Davidi azalaki kondima mpamela mpe azalaki kozongela lisusu te mabunga oyo asalaki. Na ndenge yango amonisaki ete azalaki mpenza kolinga Yehova. Akangamaki mpenza na Nzambe.
Ezali boni mpo na biso? Yehova ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe ete tokoki kosala lisumu na maloba to mpe na misala. Kasi, asalelaka te likoki na ye ya koyeba makambo oyo ekoya mpo na komona ndenge bomoi na biso ekozala. Akelá biso na bonsomi ya kopona, mpe atikaka biso tósalela likabo kitoko yango.
Atako bongo, tokoki koloba ete na bantango mosusu Yehova amekaka bomoto na biso ya kati. Akoki kotika nzela na makambo oyo ekomonisa ndenge motema na biso ezali. Akoki kotika nzela na mikakatano ndenge na ndenge mpo emonisa bamposa ya motema na biso. Yango epesaka biso libaku ya komonisa soki tomipesi mobimba epai ya Yehova mpe soki tozali sembo epai na ye. Makambo ya ndenge wana emonisaka soki kondima na biso ezali makasi, soki tozali bato oyo “bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.”—Yakobo 1:2-4.
Komekama ya kondima na ntango ya kala
Ata na ntango ya kala, kondima ya basaleli ya Yehova ezalaki komekama. Tózwa ndakisa ya Abalayama. “Nzambe amekaki Abalayama.” (Genese 22:1) Ntango maloba yango elobamaki, kondima ya Abalayama esilaki komekama bambula mingi liboso. Na ntango wana, Yehova asɛngaki Abalayama alongwa elongo na libota na ye na Ulu, engumba moko ya bozwi mpe akende kofanda na mokili oyo ayebaki te. (Genese 11:31; Misala 7:2-4) Ekoki kozala ete Abalayama azalaki na ndako na Ulu, kasi na boumeli ya bambula nyonso oyo afandaki lokola mopaya na Kanana, azalaki na esika na ye moko te. (Baebele 11:9) Bomoi yango etyaki Abalayama ná libota na ye na makama lokola nzala, kokutana na bato ya mabe, mpe bakonzi ya bikólo ya Kanana. Atako bongo, Abalayama amonisaki ete kondima na ye ezalaki makasi.
Na nsima, Yehova amekaki Abalayama na likambo moko monene. Alobaki na ye boye: “Kamatá mwana na yo, mwana na yo na likinda, Yisaka, oyo olingi, mpe . . . kabá ye [lokola] mbeka ya kotumba.” (Genese 22:2) Yisaka azalaki mwana kaka moko oyo Abalayama abotaki na mwasi na ye Sala. Yisaka azalaki mwana oyo na nzela na ye, Nzambe alingaki kokokisa elaka oyo apesaki Abalayama ete “momboto” na ye ekozwa mokili ya Kanana mpe ekozala lipamboli mpo na bato mingi. Lisusu, Yisaka azalaki mwana oyo Abalayama azelaki, mwana oyo abotamaki na ndenge ya likamwisi!—Genese 15:2-4, 7, NW.
Na ntembe te, Abalayama amitunaki ntina oyo Nzambe asɛngaki ye likambo ya ndenge wana. Yehova azalaki nde na mposa Abalayama apesa ye moto lokola mbeka? Mpo na nini Yehova asalaki ete Abalayama, atako akómaki mobange ayoka esengo ya kozala na mwana, bongo na nsima asɛnga ye mwana yango lokola mbeka?a
Abalayama atosaki atako ayebaki te ntina ya makambo wana nyonso. Atambolaki mikolo misato mpo na kokóma na ngomba oyo Nzambe alakisaki ye. Kuna atongaki etumbelo mpe atyaki nkoni likoló na yango. Na nsima, Abalayama atyaki mwana na ye likoló ya etumbelo, kasi ntango asimbaki mbeli mpo na koboma ye, anzelu ya Yehova apekisaki ye mpe alobaki na ye boye: “Sikawa nayebi ete obangi Nzambe, mpo ete oboyi kopesa mwana na yo te, mwana na yo na likinda.” (Genese 22:3, 11, 12) Kanisá naino esengo ya Abalayama ntango ayokaki maloba wana! Yehova amikosaki te na ndenge atángaki Abalayama ete azali na kondima ya solosolo. (Genese 15:5, 6) Na nsima, Abalayama azwaki mpate mpe apesaki yango lokola mbeka na esika ya Yisaka. Na nsima, Yehova azongelaki lisusu bilaka oyo apesaki mpo na momboto ya Abalayama. Yango wana, Abalayama abengami moninga ya Yehova.—Genese 22:13-18; Yakobo 2:21-23.
Kondima na biso ezali mpe komekama
Basaleli ya Nzambe lelo oyo bakoki kokima komekama te. Kasi mpo na biso, komekama ekoki kozala mingimingi na makambo oyo Yehova atiki nzela ete ekómela biso, kasi te na makambo oyo azali kosɛnga biso tósala.
Ntoma Paulo akomaki boye: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya boyokani elongo na Klisto Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Timote 3:12) Minyoko yango ekoki kouta na baninga ya kelasi, baninga na biso, bandeko, bato ya kartye, to bakonzi mosusu ya Leta oyo bakoki koyoka makambo ya lokuta na ntina na biso. Bakoki koloba na biso maloba ya mabe to konyokola biso to mpe kobebisa mosala oyo tobikelaka. Baklisto ya solo bakutanaka mpe na makambo oyo ekómelaka bato nyonso na ndakisa maladi, mikakatano, mpe makambo ya kozanga bosembo. Nyonso wana ekoki komeka kondima ya moto.
Ntoma Petelo amonisaki matomba oyo ebimaka ntango kondima ya moto emekami; alobaki boye: “Bozali koyokisama mawa na komekama ndenge na ndenge, mpo motindo ya kondima na bino oyo emekami, oyo ezali na motuya monene koleka wolo oyo ebebaka atako emekami na mɔtɔ, emonana ntina ya lisanzoli mpe ya nkembo mpe ya lokumu na emoniseli ya Yesu Klisto.” (1 Petelo 1:6, 7) Ya solo, komekama ezali lokola kopɛtolama ya wolo na mɔtɔ. Kopɛtolama yango ekabolaka wolo ná bosɔtɔ. Ezalaka mpe bongo mpo na kondima na biso ntango tokutani na komekama.
Na ndakisa, aksida to mpe likama mosusu ekoki kobimisa mikakatano. Kasi, baoyo bazali na kondima makasi bamitungisaka koleka ndelo te. Bazwaka makasi na maloba oyo ya Yehova: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Baebele 13:5) Bakobaka kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, bazalaka na elikya ete Yehova Nzambe akopambola milende na bango wana bazali koluka biloko ya ntina mpo na bomoi. Kondima na bango esimbaka bango na ntango ya mpasi mpe epekisaka bango bázala na mitungisi ya mpambampamba oyo ekoki kobakisela bango mikakatano.
Lokola komekama ekoki komonisa bisika oyo kondima na biso ezali na bolɛmbu, yango ekoki kosalisa biso tósembola makambo. Na yango tosengeli komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kolendisa kondima na ngai? Nasengeli kobakisa lisusu ntango oyo nalekisaka mpo na kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango? Nalandaka toli ya koyanganaka na makita nyonso elongo na bandeko? Namityelaka motema to nabondelaka Yehova mpo na koyebisa ye mitungisi na ngai?’ Nzokande, komituna mituna ya ndenge yango ezali kaka ebandeli.
Kolendisa kondima esɛngi mpe kobongisa ndenge na biso ya kolya na elimo, elingi koloba kozala “na mposa makasi ya mabɛlɛ oyo ezali ya liloba, oyo basangisi na eloko te.” (1 Petelo 2:2; Baebele 5:12-14) Tosengeli kosala makasi tókóma lokola moto oyo mokomi ya nzembo alobelaki: “Mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi.”—Nzembo 1:2.
Yango ezali kosɛnga kosuka kaka te na kotánga Biblia. Ezali mpe na ntina tómanyola na makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koteya biso mpe tósalela toli na yango. (Yakobo 1:22-25) Na ndenge yango, bolingo na biso mpo na Nzambe ekokóma makasi, mabondeli na biso ekozala mozindo mpe kondima na biso ekokóma makasi.
Motuya ya kondima oyo emekami
Koyeba ete kondima ezali na ntina mingi mpo tóndimama na Nzambe, esengeli kotinda biso tólendisaka yango. Biblia elobi na biso boye: “Na kozanga kondima likoki ya kosepelisa ye mpenza ezali ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Na yango tosengeli kozala lokola mobali oyo abondelaki Yesu boye: “Salisá ngai na esika oyo nazali na bosɛnga na kondima!”—Malako 9:24.
Komekama ya kondima na biso ekoki mpe kosalisa basusu. Na ndakisa, ntango moklisto moko akufeli ndeko, kondima na ye makasi na elaka ya lisekwa ekosalisa ye. Ya solo akolela, kasi ‘akoyoka mawa te na ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.’ (1 Batesaloniki 4:13, 14) Bato mosusu oyo bazali komona kondima makasi ya moklisto yango bakoyeba ete azali na eloko moko ya motuya mpenza. Yango ekoki kotinda bango báluka kozala mpe na kondima ya ndenge wana, báyekola Liloba ya Nzambe mpe bákóma bayekoli ya Yesu Klisto.
Yehova ayebi ete kondima oyo emekami ezali na motuya monene. Lisusu, ntango kondima na biso emekami ekosalisa biso tómona soki ezali mpenza makasi. Ekosalisa biso tómona bisika oyo kondima na biso ezali na bolɛmbu, mpe ekopesa biso libaku ya kobongisa yango. Lisusu, soki toyiki mpiko na komekama, yango ekoki kosalisa bato mosusu bákóma bayekoli ya Yesu. Yango wana, tósala nyonso mpo na kozala na kondima ya makasi oyo, nsima ya komekama na ndenge nyonso, ‘ekomonana ntina ya lisanzoli mpe ya nkembo mpe ya lokumu na emoniseli ya Yesu Klisto.’—1 Petelo 1:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndimbola ya elilingi ya mbeka ya Yisaka, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1989 lokasa 22.
[Elilingi na lokasa 13]
Kondima mpe misala ya Abalayama ekómisaki ye moninga ya Yehova
[Bililingi na lokasa 15]
Komekama ekoki komonisa soki kondima ya moto ezali mpenza makasi
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]
Euti na Illustrated Edition of the Holy Scriptures, ya Cassell, Petter, mpe Galpin