Kebá na “mongongo ya bapaya”
“Bakolanda mopaya soki moke te kasi bakokima ye, mpamba te bayebi mongongo ya bapaya te.”—YOANE 10:5.
1, 2. (a) Malia asalaki nini ntango Yesu abengaki ye na nkombo, mpe maloba nini Yesu alobaki liboso oyo emonisami na likambo yango? (b) Nini esalisaka biso tólanda kaka Yesu?
NSIMA ya lisekwa na ye, Yesu amonaki mwasi moko penepene ya lilita na ye oyo etikalaki mpamba. Ayebaki mwasi yango malamu. Nkombo na ye Malia Magadalena. Pene na mbula mibale liboso, Yesu abikisaki mwasi yango na bademo. Kobanda mokolo abikisaki ye, akómaki kolanda Yesu ná bantoma na ye, kosalisa bango na misala ya mokolo na mokolo. (Luka 8:1-3) Kasi, mokolo wana, Malia azalaki kolela, azalaki na mawa mpamba te amonaki ndenge Yesu akufaki; mpe sikoyo ata nzoto na ye ezali te na esika batyaki yango! Yesu atunaki ye ete: “Mwasi, ozali kolela mpo na nini? Ozali koluka nani?” Lokola Malia akanisaki ete moto oyo azali kotuna ye ezali nde mosali na elanga, alobaki na ye boye: “Tata, soki olongolaki ye, yebisá ngai soki olalisi ye wapi, mpe ngai nakokamata ye.” Na nsima, Yesu abengaki ye: “Malia!” Na mbala moko, Malia ayebaki ndenge alobaka na ye. Agangaki na esengo ete: “Molakisi!” Mpe ayambaki ye.—Yoane 20:11-18.
2 Lisolo wana ezali komonisa likambo moko oyo Yesu alobaki mwa mikolo liboso. Yesu amibengaki mobateli ya mpate mpe bayekoli na ye bampate, mpe alobaki ete mobateli ya mpate abengaka bampate na ye na nkombo mpe bayebaka mongongo na ye. (Yoane 10:3, 4, 14, 27, 28) Se ndenge mpate eyebaka mongongo ya mobateli na yango, Malia ayebaki Mobateli na ye, Klisto. Ezali mpe bongo mpo na bayekoli ya Yesu na moi ya lelo. (Yoane 10:16) Se ndenge mpate eyebaka mongongo ya mobateli na yango mpe elandaka ye, bososoli ya elimo esalisaka biso tólanda malamumalamu matambe ya Yesu Klisto, Mobateli ya bampate oyo aleki malamu.—Yoane 13:15; 1 Yoane 2:6; 5:20.
3. Wapi mwa mituna oyo ndakisa ya lopango ya bampate oyo Yesu apesaki ezali kobimisa?
3 Kasi, ndakisa yango ezali mpe komonisa ete mpate eyebaka nkolo na yango mpe mopaya na mongongo. Yango ezali na ntina mingi mpamba te tozali na banguna oyo bazali koluka kobungisa biso nzela. Banguna yango banani? Basalaka ndenge nini? Ndenge nini tokoki komibatela? Mpo na kozwa biyano na mituna wana, tótala maloba mosusu oyo Yesu alobaki na ndakisa ya lopango ya bampate.
‘Moto oyo akɔti na nzela ya ekuke te’
4. Na kotalela ndakisa ya mobateli ya bampate, bampate balandaka nani, mpe nani balandaka te?
4 Yesu alobaki boye: “Moto oyo akɔti na nzela ya ekuke azali mobateli ya bampate. Mokɛngɛli ya ekuke afungolelaka ye, mpe bampate bayokaka mongongo na ye, mpe abengaka bampate na ye na nkombo mpe amemaka bango na libándá. Ntango abimisi oyo ya ye nyonso, alekaka liboso na bango, mpe bampate balandaka ye, mpamba te bayebi mongongo na ye. Bakolanda mopaya soki moke te kasi bakokima ye, mpamba te bayebi mongongo ya bapaya te.” (Yoane 10:2-5) Tomoni ete Yesu azongeli liloba “mongongo” mbala misato. Mbala mibale alobeli mongongo ya mobateli ya bampate, kasi na mbala ya misato, “mongongo ya bapaya.” Yesu alobeli mopaya ya ndenge nini?
5. Mpo na nini toyambaka te lolenge ya mopaya oyo balobeli na Yoane mokapo 10?
5 Yesu azalaki te kolobela mopaya oyo toyambaka na ndako mpe oyo tolɛngɛlaka; na monɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia, liloba mpo na koyamba wana elimbolaka “kolinga bapaya.” (Baebele 13:2) Na ndakisa oyo Yesu apesaki, mopaya ezali te moto oyo bayambi na ndako. Mopaya wana “akɔti na lopango ya bampate na nzela ya ekuke na yango te kasi amati na esika mosusu.” Azali nde “moyibi mpe mopunzi.” (Yoane 10:1) Nani moto ya liboso oyo Liloba ya Nzambe ebengi ye moyibi mpe mopunzi? Satana Zabolo. Mokanda ya Genese ezali komonisa yango polele.
Mbala ya liboso oyo mongongo ya mopaya eyokanaki
6, 7. Mpo na nini Satana abongi mpenza kobengama mopaya mpe moyibi?
6 Genese 3:1-5 elobeli ndenge oyo mongongo ya mopaya eyokanaki mpo na mbala ya liboso awa na mabelé. Lisolo yango elobi ete Satana asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva, mwasi ya liboso, mpe akosaki ye. Ya solo, na lisolo yango Satana abengami “mopaya” te. Kasi, misala na ye emonisi ete na makambo mingi azalaki lokola mopaya oyo Yesu alobeli na ndakisa na ye na Yoane mokapo 10. Tótalela mwa makambo oyo ezali komonisa ete Satana azali mpenza mopaya oyo Yesu alobelaki.
7 Yesu alobaki ete mopaya oyo azali koya na lopango mpo na kosala mabe alekaka nsimansima. Ndenge moko mpe, Satana amimonisaki polele te ntango akendaki epai ya Eva, asalelaki nde nyoka. Mayele mabe wana emonisaki ete Satana azali mpenza moto mabe, oyo alingaka kobungisa bato nzela. Lisusu, mopaya akɔtaka na lopango mpo na koyiba nkolo bampate. Kutu, azali mabe koleka moyibi, mpo azalaka mpe na mokano ya “koboma mpe kobebisa.” (Yoane 10:10) Ndenge moko mpe, Satana azalaki moyibi. Akosaki Eva mpe ayibaki botosi na ye epai ya Nzambe. Longola yango, Satana amemelaki bato liwa. Na yango, azali mobomi ya bato.
8. Ndenge nini Satana abongolaki maloba mpe mikano ya Yehova?
8 Bokosi ya Satana emonanaki polele na ndenge abongolaki maloba mpe mikano ya Yehova. Atunaki Eva boye: “Nzambe alobaki solo ete bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” Satana amonisaki lokola nde likambo yango ekamwisaki ye, na maloba mosusu, alobaki boye: ‘Ndenge nini Nzambe akoki kozala na makambo makasi bongo?’ Abakisaki boye: “Nzambe ayebi ete mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwa.” Yoká ndenge alobi: “Nzambe ayebi.” Na maloba mosusu, Satana alingaki koloba boye: ‘Ngai nayebi oyo Nzambe ayebi. Nayebi makanisi na ye; azali na makanisi mabe.’ (Genese 2:16, 17; 3:1, 5) Likambo ya mawa, Adama ná Eva baboyaki mongongo ya mopaya yango te. Kutu, bayokaki yango mpe bamibendelaki mpasi mpe babendelaki bana na bango mpasi.—Baloma 5:12, 14.
9. Mpo na nini tosengeli koyeba ete tokoyoka mongongo ya bapaya lelo oyo?
9 Satana azali kosalela mayele ya ndenge yango mpo na kokosa basaleli ya Nzambe lelo oyo. (Emoniseli 12:9) Azali “tata ya lokuta,” mpe baoyo, lokola ye, bazali koluka kokosa basaleli ya Nzambe, bazali bana na ye. (Yoane 8:44) Tiká tótalela mwa ndenge oyo mongongo ya bapaya yango ezali koyokana lelo oyo.
Ndenge oyo mongongo ya bapaya ezali koyokana lelo oyo
10. Wapi lolenge moko oyo mongongo ya bapaya ezali koyokana?
10 Makanisi ya bokosi. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bómemama te na mateya ya ndenge na ndenge mpe ya bopaya.” (Baebele 13:9) Mateya ya ndenge nini? Lokola Paulo alobaki ete mateya yango ekoki ‘komema biso,’ ezali polele ete alobelaki mateya oyo ekoki kolɛmbisa biso na elimo. Banani bazali koteya mateya yango? Paulo ayebisaki lisangani moko ya bankulutu boye: “Uta na kati na bino mpenza mibali bakobima mpe bakoloba makambo oyo etɛngamá mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Misala 20:30) Ndenge kaka ezalaki na mikolo ya Paulo, lelo oyo mpe bato mosusu oyo batiká lisangá bazali koloba “makambo oyo etɛngamá,” kobomba makambo mosusu mpe kokosa mpo na koluka kobungisa bampate nzela. Ndenge ntoma Petelo alobaki yango, bazali kosalela “maloba ya bokosi,” elingi koloba maloba oyo ezali komonana lokola solo, nzokande ezali na ntina te.—2 Petelo 2:3.
11. Ndenge nini maloba ya 2 Petelo 2:1, 3 ezali komonisa mayele mpe mokano ya bapɛngwi?
11 Petelo amonisaki mayele mosusu ya bapɛngwi ntango alobaki ete “bakokɔtisa na ndenge ya mayele mwa mangomba ya libebi.” (2 Petelo 2:1, 3) Lokola moyibi, na ndakisa ya lopango ya bampate oyo Yesu apesaki, oyo akɔti “na nzela ya ekuke na yango te kasi amati na esika mosusu,” bapɛngwi bayaka epai na biso na mayele mabe. (Bagalatia 2:4; Yuda 4) Mokano na bango ezali nini? Petelo abakisi ete: “Bakolyela bino.” Ya solo, ata soki bapɛngwi bazali koloba nini mpo na komilongisa, mokano na bango ya solosolo ezali nde “koyiba mpe koboma mpe kobebisa.” (Yoane 10:10) Tókeba na bapaya ya ndenge wana!
12. (a) Ndenge nini tokoki koyoka mongongo ya bapaya na nzela ya baninga? (b) Mayele mabe ya Satana mpe oyo bapaya bazali kosalela lelo oyo ekokani na nini?
12 Baninga mabe. Tokoki mpe koyoka mongongo ya bapaya na nzela ya baninga na biso. Baninga mabe bazali likama, mingimingi mpo na bilenge. (1 Bakolinti 15:33) Tóbosana te ete Satana akendaki epai ya Adama te kasi nde epai ya Eva, oyo azalaki leki mpe ayebaki makambo mingi te. Andimisaki ye ete Yehova abombelaki ye makambo mingi, nzokande, apesaki bango nde bonsomi mingi. Yehova alingaki bikelamu na ye mpe alingaki bázala malamu. (Yisaya 48:17) Ndenge moko mpe lelo oyo, bapaya bazali koluka kondimisa bino bilenge ete baboti na bino baklisto bazali kopimela bino makambo mingi. Maloba ya bapaya yango ekoki kosala bino nini? Elenge mwasi moko alobaki boye: “Na ntango moko boye, baninga na ngai ya kelasi balɛmbisaki mwa moke kondima na ngai. Bazalaki kotika te koloba na ngai ete lingomba na ngai ekangá ngai na bolɔkɔ mpe ezali na makambo makasimakasi.” Nzokande, baboti na bino balingaka bino. Yango wana, ntango baninga ya kelasi bazali koluka kondimisa bino bótyela baboti na bino motema te, bókosama lokola Eva te.
13. Likambo nini ya malamu Davidi asalaki, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?
13 Na ntina na baninga ya mabe, Davidi alobaki boye: “Nafandi esika moko na bato ya lokuta te; mpe natambolaka te na baoyo babombaka oyo bazali.” (Nzembo 26:4, NW) Omoni lisusu ezaleli ya bapaya? Babombaka oyo bazali, se ndenge Satana amibombaki nsima ya nyoka. Lelo oyo, bato mosusu ya mabe bazali kosalela Internet mpo na komibomba mpe kobomba mikano na bango. Mikóló mosusu bazali komibimisa bana mike ntango bazali kokomela bino na Internet mpo na kozwa bino na motambo. Bilenge, tobondeli bino, bókeba, noki te bakobebisa bino na elimo.—Nzembo 119:101; Masese 22:3.
14. Ndenge nini bapanzi-nsango bapanzaka ntango mosusu mongongo ya bapaya?
14 Kokosela bato makambo. Atako bapanzi-nsango mosusu balobaka solo mpo na Batatoli ya Yehova, ntango mosusu bapaya bazali kosalela radio, televizyo, mpe bazulunalo mpo na koloba lokuta. Na ndakisa, na ekólo moko, bakoselaki Batatoli ete bazalaki na ngámbo ya Hitler na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na ekólo mosusu balobaki ete Batatoli babebisaka bandako-nzambe. Na bikólo mingi, bapanzi-nsango balobaki ete Batatoli balingaka te bana na bango bázwa nkisi ya monganga mpe bakangaka miso na masumu ya bandeko na bango bandimi. (Matai 10:22) Atako bongo, bato ya mitema sembo oyo bayebi biso bayebaka ete nyonso wana ezali lokuta.
15. Mpo na nini ezali mayele te kondima nyonso oyo toyoki na radio, na televizyo to totángi na zulunalo?
15 Tosengeli kosala nini soki mongongo wana ya bapaya ekoseli biso makambo? Tosengeli kolanda toli ya Masese 14:15: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” Ezali mayele te kondima nyonso oyo toyoki na radio, na televizyo to oyo totángi na zulunalo. Tolobi te ete makambo nyonso oyo bapanzi-nsango balobaka ezali lokuta, kasi tóbosana te ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.”—1 Yoane 5:19.
“Bómekaka maloba mapemami”
16. (a) Ndenge nini makambo oyo bampate basalaka ezali komonisa ete Yesu alobaki solo na Yoane 10:4? (b) Biblia ezali kolendisa biso tósalaka nini?
16 Kasi, ndenge nini tokoki koyeba kokesenisa moninga na biso ná moto oyo azali koluka kosala biso mabe? Yesu alobaki ete bampate balandaka mobateli “mpamba te bayebi mongongo na ye.” (Yoane 10:4) Bampate batalaka elongi to bilamba ya mobateli te, balandaka nde mongongo na ye. Na buku moko oyo elobeli mikili ya Moyen-Orient, balobeli mopaya moko oyo akanisaki ete bampate bayebaka nkolo na bango na molato na ye, kasi na mongongo te. Mobateli moko ya mpate ayebisaki ye ete bayebaka nde mongongo. Mpo na kondimisa ye, apesaki ye bilamba na ye, mpe ye alataki bilamba ya mopaya. Atako mopaya alataki bilamba ya mobateli, ntango abengaki bampate, balandaki ye te. Bayebaki mongongo na ye te. Kasi, atako mobateli alataki bilamba ya moto mosusu, ntango kaka abengaki bango, bampate bayaki mbala moko. Na yango, moto akoki komonana lokola mobateli, kasi mpo na bampate, yango elimboli te ete azali mpenza mobateli. Bampate bayokaka malamu mongongo ya moto oyo abengi, mpe batalaka soki ezali mpenza mongongo ya mobateli na bango. Liloba ya Nzambe elobi na biso mpe tósalaka bongo, ‘tómekaka maloba mapemami mpo na komona soki yango euti na Nzambe.’ (1 Yoane 4:1; 2 Timote 1:13) Nini ekosalisa biso na kosala yango?
17. (a) Ndenge nini tomesanaka na mongongo ya Yehova? (b) Boyebi ya Yehova esalisaka biso na nini?
17 Ya solo, soki toyebi malamu mongongo ya Yehova, elingi koloba nsango na ye, tokoyeba mpe malamu mongongo ya mopaya. Biblia emonisi ndenge oyo tokoki kozwa boyebi yango. Elobi boye: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yisaya 30:21) “Liloba” oyo tokoyoka nsima na biso euti na Liloba ya Nzambe. Mbala nyonso oyo tozali kotánga Liloba ya Nzambe, ezalaka lokola nde tozali koyoka mongongo ya Yehova, Mobateli Monene ya mpate. (Nzembo 23:1) Yango wana, soki tozali koyekola Biblia mingi, tokomesana mpenza na mongongo ya Nzambe. Boyebi mingi wana ekosalisa biso tóyebaka mbala moko mongongo ya bapaya.—Bagalatia 1:8.
18. (a) Koyeba mongongo ya Yehova esɛngi mpe nini? (b) Na kolanda Matai 17:5, mpo na nini tosengeli kotosa mongongo ya Yesu?
18 Koyeba mongongo ya Yehova esɛngaka lisusu nini? Longola koyoka, esɛngaka mpe kotosa. Landá lisusu Yisaya 30:21. Liloba ya Nzambe elobi: “Oyo ezali nzela.” Ntango tozali koyekola Biblia, toyokaka Yehova azali kolakisa biso nzela. Na nsima, alobi na biso ete: “Tambolá na yango.” Yehova alingi tósalelaka makambo oyo tozali koyoka. Ntango tozali kosalela makambo oyo tozali koyoka, tokomonisa ete tozali kosuka kaka te na koyoka mongongo ya Yehova, kasi tozali mpe kotosa yango. (Deteronome 28:1) Kotosa mongongo ya Yehova elimboli mpe kotosa mongongo ya Yesu, mpamba te Yehova ye moko asɛngi biso yango. (Matai 17:5) Yesu, Mobateli ya bampate oyo aleki malamu, azali koloba na biso tósala nini? Azali kosɛnga biso tókómisa bato bayekoli mpe tótyela “moombo ya sembo mpe ya mayele” motema. (Matai 24:45; 28:18-20) Soki tozali kotosa mongongo na ye, tokozwa bomoi ya seko.—Misala 3:23.
“Bakokima ye”
19. Tosengeli kosala nini ntango toyoki mongongo ya bapaya?
19 Tosengeli kosala nini ntango toyoki mongongo ya bapaya? Tosengeli kosala ndenge bampate basalaka. Yesu alobaki boye: “Bakolanda mopaya soki moke te kasi bakokima ye.” (Yoane 10:5) Tosengeli kosala makambo mibale. Ya liboso, ‘tosengeli kolanda [mopaya] soki moke te.’ Tosengeli koboya mpenza mopaya. Kutu, na Grɛki ya Biblia, maloba oyo babongoli na “soki moke te” ezali elobeli oyo emonisaka mpenza ete moto aboyi likambo na motema moko. (Matai 24:35; Baebele 13:5) Ya mibale, ‘tokokima ye,’ to tokolanda ye te. Yango nde likambo ya malamu kaka moko oyo tosengeli kosala liboso ya bato oyo mateya na bango eyokani te na mongongo ya Mobateli ya bampate oyo aleki malamu.
20. Tokosala nini liboso ya (a) bapɛngwi oyo balingi kokosa biso, (b) baninga ya mabe, (c) bansango ya lokuta?
20 Yango wana, ntango tozali liboso ya bato oyo bazali koteya makanisi ya bapɛngwi, tosengeli kosala oyo Liloba ya Nzambe elobi: “Bótya miso na baoyo bakɔtisaka bokabwani mpe makambo oyo ebɛtisaka libaku oyo ezali makambo eyokani te na mateya oyo boyekolaki, mpe bóboya kozala elongo na bango.” (Baloma 16:17; Tito 3:10) Ndenge moko mpe, bilenge baklisto oyo bazali na likama ya kobendama na baninga ya mabe basengeli kolanda toli oyo Paulo apesaki elenge Timote: “Kimá bamposa oyo ekangami na bolenge.” Ntango bakoseli biso makambo na nzela ya radio, ya televizyo to na bazulunalo, tókanisa toli mosusu oyo Paulo apesaki Timote: “[Baoyo bazali koyoka mongongo ya bapaya] bakobaluka epai ya masapo ya lokuta. Kasi yo, batelá makanisi na yo na makambo nyonso.” (2 Timote 2:22; 4:3-5) Ata soki mongongo ya bapaya ezali koyokana kitoko ndenge nini, tosengeli kokima eloko nyonso oyo ekoki kobebisa kondima na biso.—Nzembo 26:5; Masese 7:5, 21; Emoniseli 18:2, 4.
21. Baoyo bazali koboya mongongo ya bapaya bakozwa mbano nini?
21 Lokola baklisto bapakolami na elimo bazali koboya mongongo ya bapaya, bazali kolanda maloba ya Mobateli ya bampate oyo aleki malamu oyo ezali na Luka 12:32. Na vɛrsɛ yango Yesu alobi na bango boye: “Bóbanga te, etonga moke, mpamba te Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” Ndenge moko mpe, “bampate mosusu” bazelaka mpenza ntango Yesu akoloba na bango ete: “Bóya, bino baoyo bopambolami na Tata na ngai, bózwa libula ya bokonzi oyo ebongisamá mpo na bino banda na ebandeli ya mokili.” (Yoane 10:16; Matai 25:34) Talá mbano monene tokozwa soki toboyi koyoka “mongongo ya bapaya”!
Ozali koyeba lisusu?
• Nini ezali komonisa ete Satana azali mpenza mopaya oyo Yesu alobelaki na ndakisa ya lopango ya bampate?
• Ndenge nini mongongo ya bapaya ezali koyokana lelo oyo?
• Ndenge nini tokoki koyeba mongongo ya bapaya?
• Tosengeli kosala nini ntango toyoki mongongo ya bapaya?
[Elilingi na lokasa 15]
Malia ayebaki Klisto
[Elilingi na lokasa 16]
Bapaya bayaka epai ya bampate na ndenge ya polele te
[Elilingi na lokasa 18]
Tosalaka nini soki toyoki mongongo ya bapaya?