Kobá kozala na botɔndi
“E Nzambe, [makanisi, NW] na yo epai na ngai ezali eloko ya motuya mingi! Motuya na yango ezali monene boni!”—NZEMBO 139:17.
1, 2. Mpo na nini tosengeli komonisa botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe, mpe ndenge nini mokomi na nzembo amonisaki yango?
NTANGO bazalaki kobongisa tempelo ya Yehova na Yelusaleme, Nganga-nzambe Monene Hilikiya amonaki eloko moko ya motuya mpenza: “mokanda na Mobeko ya [Yehova], mopesamelaki na nzela na Moize.” Na ntembe te, ezalaki mokanda oyo Moize akomaki na mabɔkɔ na ye moko mbula soki 800 liboso. Okanisi ete Mokonzi Yosiya ayokaki ndenge nini ntango bamemelaki ye mokanda wana? Asepelaki na yango mingi mpe mbala moko asɛngaki Safana, mokomeli atánga yango na mongongo makasi.—2 Ntango 34:14-18.
2 Lelo oyo, bamiliare ya bato bakoki kotánga Biblia na mobimba na yango to ndambo na yango. Kasi, yango esali ete Makomami ezala lisusu na ntina te? Te! Kutu, ezali na makanisi ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo ekomami mpo na litomba na biso. (2 Timote 3:16) Davidi, mokomi ya nzembo, amonisaki ndenge azalaki kotalela Liloba ya Nzambe na maloba oyo: “Ɛ Nzambe, [makanisi, NW] na yo epai na ngai ezali eloko ya motuya mingi! Motuya na yango ezali monene boni!”—Nzembo 139:17.
3. Nini emonisi ete Davidi azalaki kopesa motuya mingi na makambo ya elimo?
3 Botɔndi oyo Davidi azalaki na yango mpo na Yehova, mpo na Liloba na ye mpe mpo na ebongiseli na ye ya losambo ya solo ekitaki te. Ebele ya banzembo oyo Davidi akomaki emonisi mpenza ndenge azalaki koyoka. Na ndakisa, akomaki na Nzembo 27:4 boye: “Nalombi eloko moko epai na [Yehova], nakolanda yango; yango ete, nafanda kati na ndako na [Yehova]; mikolo nyonso na bomoi na ngai; ete natala boboto ya [Yehova] mpe [natala na likebi, NW] makambo kati na Tempelo na ye.” Emonani ete Davidi azalaki kopesa motuya mingi na makambo ya elimo; azalaki na botɔndi mpenza mpo na bibongiseli nyonso oyo Yehova azalaki kosala mpo na kolendisa kondima na ye mpe azalaki kolekisa ata moke te bilei ya elimo oyo Yehova azalaki kopesa basaleli na ye. Tosengeli mpenza kolanda ndakisa na ye.—Nzembo 19:7-11.
Tózalaka na botɔndi lokola toyebi Biblia
4. Nini etindaki Yesu ‘atonda na esengo na kati ya elimo santu?’
4 Mpo na koyeba mpenza Liloba ya Nzambe esɛngaka te kozala na mayele mingi to boyebi ya mokili, oyo epesaka moto lolendo. Boboto monene ya Yehova, oyo amoniselaka bato ya komikitisa, ya motema sembo oyo bayebi bobola na bango ya elimo nde esalisaka moto ayeba solo. (Matai 5:3; 1 Yoane 5:20) Ntango Yesu akanisaki ete bankombo ya bato ya kozanga kokoka ezalaki kokomama na likoló, “atondaki na esengo na kati ya elimo santu mpe alobaki ete: ‘Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabelé, mpamba te obombi makambo oyo malamumalamu liboso ya bato ya bwanya mpe ya bato ya mayele, mpe omonisi yango epai ya bana mike.’”—Luka 10:17-21.
5. Mpo na nini bayekoli ya Yesu basengelaki te kozwa na lisɛki te boyebi oyo bazwaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe?
5 Nsima ya kosala libondeli wana, Yesu abalukaki epai ya bayekoli na ye mpe alobaki na bango ete: “Esengo na miso oyo ezali komona makambo oyo bino bozali komona. Mpo nazali koloba na bino, Basakoli mingi mpe bakonzi mingi bazalaki na mposa ya komona makambo oyo bino bozali komona kasi bamonaki yango te, mpe ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka kasi bayokaki yango te.” Ya solo, Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bázwa na lisɛki te boyebi ya motuya mingi oyo bazwaki ya makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Basaleli ya Nzambe ya kala ná “bato ya bwanya mpe ya mayele” ya ntango ya Yesu bayebaki makambo yango te.—Luka 10:23, 24.
6, 7. (a) Ntina nini tosengeli kozala na botɔndi mpo na mateya ya Nzambe? (b) Bokeseni nini ezali komonana lelo kati na lingomba ya solo ná oyo ya lokuta?
6 Na mikolo na biso, tozali na bantina mingi ya kozala na botɔndi mpo na mateya ya Nzambe, mpamba te Yehova, na lisalisi ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” azali kokoba kopesa basaleli na ye bososoli ya Liloba na ye. (Matai 24:45; Danyele 12:10) Mpo na ntango ya nsuka, mosakoli Danyele akomaki ete: “Bato mingi bakopota bipai na bipai, mpe boyebi ekofuluka.” (Danyele 12:4) Ondimi te ete lelo oyo boyebi ya Nzambe ‘efuluki’ mpe ete basaleli ya Yehova bazali kolya malamu mpenza na elimo?
7 Tomoni ete basaleli ya Nzambe bazali na bilei ya elimo beboo, nzokande Babilone Monene etondi na mobulungano. Yango wana, bato mingi oyo bazali kosepela te na makambo oyo bazali komona na mangomba ya lokuta bazali koya na losambo ya solo. Bazali bampate oyo ‘balingi te kosangana ná [Babilone Monene] na masumu na ye’ to “kozwa ndambo ya malɔzi na ye.” Yehova ná basaleli na ye bazali kobenga bato nyonso ya motindo wana báya na lisangá ya boklisto.—Emoniseli 18:2-4; 22:17.
Bato ya botɔndi bazali koya ebele epai na Nzambe
8, 9. Ndenge nini maloba ya Hagai 2:7 ezali kokokisama lelo oyo?
8 Na oyo etali tempelo na ye ya elimo, Yehova asakolaki ete: “Nakoningisa bikólo nyonso mpe biloko kitoko ya bikólo nyonso ekokɔta; mpe nakotondisa ndako oyo na nkembo.” (Hagai 2:7, NW) Esakweli oyo ya kokamwa ekokisamaki na eleko ya Hagai, ntango ndambo ya basaleli ya Nzambe oyo bazongaki batongaki lisusu tempelo na Yelusaleme. Lelo oyo, maloba ya Hagai ezali mpe kokokisama na tempelo monene ya Yehova ya elimo.
9 Bamilio ya bato basili kosopana na tempelo ya elilingi mpo na kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo,” mpe mbula na mbula bato koleka 200 000, oyo Biblia ebengi “biloko kitoko ya bikólo nyonso” bazali kokoba koya. (Yoane 4:23, 24) Na ndakisa, lapolo ya mosala ya mokili mobimba ya mobu 2006 emonisi ete bato 248 327, babatisamaki mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova. Yango emonisi ete bato soki 680 bazali kobakisama mokolo na mokolo. Bolingo na bango mpo na solo mpe mposa na bango ya kosalela Yehova lokola basakoli ya Bokonzi ezali komonisa ete Nzambe nde abendaki bango.—Yoane 6:44, 65.
10, 11. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge bato bakómaki kosepela na mateya ya Biblia.
10 Mingi kati na bato wana ya mitema sembo balandaki solo mpo bamonaki “[bokeseni, NW] kati na moyengebene mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka Nzambe te.” (Malaki 3:18) Tólobela ndakisa ya Wayne ná mwasi na ye Virginia, oyo bazalaki bandimi ya Lingomba ya Protesta, kasi bazalaki na mituna ebele oyo bazalaki kozwa biyano na yango te. Bazalaki kolinga bitumba te mpe bazalaki kotungisama mingi ntango bazalaki komona bakonzi ya mangomba bazali kopambola basoda mpe mindoki. Atako Virginia azalaki kotángisa bana mokolo ya lomingo na boumeli ya bambula ebele, ntango ye ná mobali na ye bakómaki mibange, lingomba na bango ezalaki kokipe bango lisusu te. Balobi boye: “Ata moto moko te azalaki koya kotala biso to kokipe bamposa na biso ya elimo. Lingomba ezalaki kaka na mposa ya mbongo na biso. Tokómaki komitungisa mingi.” Batungisamaki lisusu makasi ntango lingomba na bango ekómaki kondima bato oyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi.
11 Kaka na ntango wana, nkɔkɔ ya Wayne ná Virginia ná mwana na bango ya mwasi bakómaki Batatoli ya Yehova. Atako Wayne ná Virginia basepelaki te na ebandeli, na nsima babongolaki makanisi mpe bandimaki koyekola Biblia. Wayne alobi boye: “Nsima ya sanza misato mpamba, toyebaki makambo ebele ya Biblia koleka oyo toyebaki na boumeli ya mbula 70. Toyebaki te ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, mpe toyebaki eloko moko te na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe paladiso na mabelé.” Mosika te, Wayne ná Virginia babandaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Virginia alobi boye: “Tozali na mposa ya koyebisa moto nyonso solo.” Bango nyonso mibale bazwaki batisimo na mobu 2005, na mbula koleka 80. Balobaki boye: “Tozwi mpenza libota ya boklisto ya solosolo.”
Tózalaka na botɔndi lokola ‘tozali na oyo esengeli mpo na mosala nyonso malamu’
12. Yehova apesaka basaleli na ye ntango nyonso nini, mpe tosengeli kosala nini mpo tózwa matomba?
12 Yehova asalisaka basaleli na ye ntango nyonso mpo básala mokano na ye. Na ndakisa, apesaki Noa malako ya sikisiki mpo na ndenge asengelaki kotonga masuwa, mpamba te asengelaki kolonga kaka. Mpe Noa alongaki. Mpo na nini? Mpamba te Noa “asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.” (Genese 6:14-22) Lelo oyo mpe, Yehova azali kopesa basaleli na ye nyonso oyo basengeli na yango mpo na kosala mokano na ye. Ya solo, mokumba na biso ya libosoliboso ezali ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo esili kotyama na likoló mpe kosalisa bato oyo babongi mpo bakóma bayekoli ya Yesu Klisto. Lokola Noa, biso mpe tokolonga kaka soki tomonisi botosi. Na botosi nyonso, tosengeli kolanda litambwisi oyo Yehova azali kopesa na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye.—Matai 24:14; 28:19, 20.
13. Yehova ateyaka biso na nzela ya nini?
13 Mpo na kokokisa mosala yango, tosengeli koyekola ‘kosembola malamumalamu’ Biblia, esaleli na biso ya libosoliboso, oyo ezali na “litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene, mpo moto ya Nzambe azala moto oyo akoki mpenza, oyo azali na nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 2:15; 3:16, 17) Lokola na ekeke ya liboso, Yehova azali koteya biso malamu mpenza na nzela ya lisangá ya boklisto. Lelo oyo, na masangá 99 770 ya mokili mobimba, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya Mosala ezali kosalema pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosalisa biso na mosala ya kosakola. Omonisaka botɔndi mpo na makita wana ya ntina mingi na koyanganáká mbala na mbala mpe kosaleláká makambo oyo ozali koyekola?—Baebele 10:24, 25.
14. Ndenge nini basaleli ya Yehova bazali komonisa botɔndi na bango mpo na libaku oyo bazali na yango ya kosalela Nzambe? (Lobelá mpe etanda oyo ezali na nkasa 27-30.)
14 Bamilio ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba bazali komonisa botɔndi mpo na mateya oyo bazali kozwa, na ndenge bazali komipesa na mosala ya kosakola. Na ndakisa, na mobu ya mosala 2006, basakoli ya Bokonzi 6 741 444, balekisaki bangonga 1 333 966 199 na mosala ya kosakola mpe bayekolaki Biblia na bato 6 286 618. Wana ezali kaka mwa ndambo moko na kati ya makambo ya kolendisa oyo ezali na lapolo ya mosala oyo tosalaki na mokili mobimba. Tosɛngi yo otala lapolo yango na likebi mpo olendisama ndenge bandeko ya ekeke ya liboso bazalaki kolendisama ntango bazalaki koyoka ndenge mosala ya kosakola ezalaki kobota mbuma na ntango wana.—Misala 1:15; 2:5-11, 41, 47; 4:4; 6:7.
15. Mpo na nini moto oyo azali kosalela Yehova na molimo na ye mobimba asengeli komitungisa te?
15 Mingongo ya masanzoli oyo ezali komata epai ya Nzambe mbula na mbula emonisaka botɔndi ya mozindo oyo basaleli ya Yehova bazali na yango mpo na libaku malamu oyo bazwi ya koyeba Yehova mpe kotatola mpo na ye. (Yisaya 43:10) Ya solo, tokoki koloba ete mbeka ya masanzoli oyo bandeko na biso oyo bakómi mibange, oyo bazali kobela to oyo bazali bibɔsɔnɔ ekokani na lomea ya mwasi-akufelá-mobali. Kasi, tóbosana te ete Yehova ná mwana na ye basepelaka na baoyo nyonso basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kosalela Nzambe na molimo na bango mobimba.—Luka 21:1-4; Bagalatia 6:4.
16. Wapi bisaleli ya koteya na yango oyo Nzambe apesi biso na boumeli ya bambula oyo euti koleka?
16 Longola koteya biso mpo na mosala ya kosakola, Yehova azali kopesa biso bisaleli ya malamu mpenza na nzela ya ebongiseli na ye. Na bambula oyo euti koleka, tozwaki bisaleli lokola Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe mikolo oyo touti kozwa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Baoyo bazali mpenza na botɔndi mpo na babuku wana basalelaka yango malamumalamu na mosala ya kosakola.
Saleláká buku Biblia eteyaka na ndenge ebongi
17, 18. (a) Bisika nini na buku Biblia eteyaka oyo osepelaka kosalela mingi na mosala ya kosakola? (b) Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobi nini mpo na buku Biblia eteyaka?
17 Buku yango, oyo ezali na mikapo 19, na apɛndisi oyo elimboli makambo na mozindo, mpe ezali na elobeli ya polele mpe ya pɛtɛɛ, ezali mpenza kosunga na mosala ya kosakola. Na ndakisa, mokapo 12 elobeli lisolo, “Bomoi oyo esepelisaka Nzambe.” Mokapo yango ezali komonisa moyekoli ya Biblia ndenge akoki kokóma moninga ya Nzambe, likambo oyo bato mingi bakipaka te to bakanisaka te ete ekoki kosalema. (Yakobo 2:23) Ndenge nini bato bazali kotalela buku yango?
18 Mokɛngɛli moko ya zongazonga na ekólo Australie alobi ete buku Biblia eteyaka “ebendaka bato mbala moko na lisolo.” Abakisi ete kosalela buku yango ezali mpasi te mpe ete “epesi basakoli mingi makasi lisusu mpe esengo na mosala ya kosakola. Kutu, basakoli mosusu bazali kobenga yango libanga ya ntalo!”
19-21. Pesá mwa bandakisa oyo emonisi motuya ya buku Biblia eteyaka.
19 Ntango mobongisi-nzela moko akómaki epai ya mwasi moko na Guyana, mwasi yango alobaki ete, “Nzambe nde atindi yo.” Makango ya mwasi yango asundolaki ye ná bana mibale ya mike. Mobongisi-nzela yango afungolaki buku Biblia eteyaka na mokapo 1 mpe atángaki na mongongo makasi paragrafe 11, na motó ya likambo ya moke oyo elobi, “Ndenge nini Nzambe atalelaka makambo oyo ezali sembo te oyo basalelaka biso?” Mobongisi-nzela wana alobi boye: “Makanisi wana esimbaki ye mpenza.” “Na nsima, atɛlɛmaki mpe akendeki na nsuka ya magazini na ye mpe alelaki makasi mpenza.” Mwasi yango andimaki koyekola Biblia na ndeko mwasi moko ya kartye na bango mpe azali se kokende liboso.
20 José, oyo afandaka na Espagne, mwasi na ye akufaki na likama ya motuka. Mpo na kobosana, abandaki komɛla bangi mpe na nsima akendeki koluka lisalisi epai ya minganga oyo basalisaka bato oyo bazali kotungisama na makanisi. Nzokande, minganga yango bakokaki te kopesa José eyano na motuna oyo ezalaki kotungisa ye mingi: “Mpo na nini Nzambe andimaki mwasi na ngai akufa?” Mokolo moko, José akutanaki na Francesc, moninga oyo basalaka na ye na kompanyi moko. Francesc asɛngaki ye bátalela mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka, oyo elobi “Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?” Bandimbola ya Biblia mpe ndakisa ya molakisi ná mwana-kelasi esimbaki mpenza motema ya José. Abandaki koyekola na molende, akɔtaki liyangani moko ya zongazonga, mpe sikoyo azali koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi.
21 Roman, moto moko ya mombongo na Pologne, oyo azali na mbula 40, azalaki ntango nyonso na limemya mpo na Liloba ya Nzambe. Kasi, lokola amipesaki mingi na mosala na ye, azalaki mpenza kokende liboso te na boyekoli na ye. Atako bongo, ayanganaki na liyangani moko ya etúká mpe azwaki buku Biblia eteyaka. Na nsima, abongwanaki mpenza. Alobi boye: “Na buku oyo, mateya nyonso ya moboko ya Biblia ezali kolimbolama polelepolele.” Roman azali sikoyo koyekola Biblia mpe azali kokola mpenza na elimo.
Tókoba kozala na botɔndi
22, 23. Ndenge nini tokoki kokoba kozala na botɔndi mpo na elikya oyo ezali liboso na biso?
22 Ndenge toyokaki na liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene!” baklisto ya solo bazali kozela “kosikolama ya seko” oyo Nzambe alaki mpe oyo ekokokisama na nzela ya makila oyo Yesu Klisto asopaki. Lolenge eleki malamu ya komonisa botɔndi na biso mpo na elikya kitoko wana ezali ya kokoba komipɛtola “na misala ya kokufa mpo tósalela Nzambe ya bomoi mosala mosantu.”—Baebele 9:12, 14.
23 Ya solo, komona ete basakoli ya Bokonzi koleka milio motoba bazali komipesa mpenza na mosala ya Nzambe na ntango oyo mokili ezali kotinda bato báluka liboso matomba na bango moko ezali likamwisi monene. Yango emonisi mpe ete basaleli ya Yehova bazali na botɔndi makasi mpo na lokumu oyo bazali na yango ya kosalela Nzambe, mpe bayebi ete ‘mosala makasi oyo bazali kosalela Nkolo ezali mpamba te.’ Tiká ete tózalaka ntango nyonso na botɔndi!—1 Bakolinti 15:58; Nzembo 110:3.
Okopesa eyano nini?
• Mokomi na nzembo ateyi biso nini na likambo ya kozala na botɔndi mpo na Nzambe mpe bibongiseli na ye ya elimo?
• Ndenge nini maloba ya Hagai 2:7 ezali kokokisama lelo oyo?
• Ndenge nini Yehova azali kopesa basaleli na ye oyo basengeli na yango mpo básalela ye na ndenge esengeli?
• Nini okoki kosala mpo na komonisa botɔndi na yo mpo na bolamu ya Yehova?
[Etanda na lokasa 27-30]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 2006 (Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Bililingi na lokasa 25]
Yehova azali kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kosala mokano na ye