Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na eteni ya liboso ya mokanda ya Nzembo
NKOMBO nini ebongi mpenza na mokanda ya Biblia oyo ezali mingi na masanzoli epai ya Yehova Nzambe, Mozalisi na biso? Ezali Nzembo to Masanzoli. Mokanda yango oyo eleki molai na mikanda nyonso ya Biblia ezali na banzembo kitoko oyo elobeli bizaleli malamu ya Nzambe, misala na ye minene, mpe ezali na bisakweli ndenge na ndenge. Banzembo mingi ezali kolobela ndenge oyo bakomi na yango bazalaki koyoka ntango bazalaki na mikakatano. Banzembo yango ekomamaki na eleko ya mbula soki nkóto—banda na ntango ya mosakoli Moize tii nsima ya kouta na boombo. Bakomi ya banzembo yango ezalaki Moize, Mokonzi Davidi, mpe bato mosusu. Balobaka ete nganga-nzambe Ezela nde abongisaki mokanda yango mpo ekóma ndenge ezali lelo.
Banda kala, mokanda ya Nzembo ezalaka na biteni mitano: (1) Nzembo 1-41, (2) Nzembo 42-72, (3) Nzembo 73-89, (4) Nzembo 90-106, mpe (5) Nzembo 107-150. Lisolo oyo ekolobela eteni ya liboso. Balobaka ete banzembo nyonso ya eteni yango, longola kaka misato, ezali ya Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala. Bato oyo bakomaki Nzembo 1, 10, mpe 33 bayebani te.
“NZAMBE NA NGAI, LIBANGA NA NGAI”
Nzembo ya liboso elobi ete moto oyo asepelaka na mobeko ya Yehova azali moto ya esengo, mpe nzembo ya mibale elobeli mingimingi Bokonzi.a Eteni ya liboso ezali mingimingi na mabondeli epai ya Nzambe. Na ndakisa, Nzembo 3-5, 7, 12, 13, mpe 17, ezali na malɔmbɔ mpo na kobikisama na mabɔkɔ ya banguna. Nzembo 8 emonisi ete Yehova azali monene mingi mpe ete moto azali mpamba liboso na ye.
Davidi abengaki Yehova Mobateli ya basaleli na ye mpe ayembaki boye: “Nzambe na ngai, libanga na ngai oyo nakokima epai na ye.” (Nzembo 18:2) Nzembo 19 ezali kokumisa Yehova lokola Mozalisi mpe Mopesi-mibeko; Nzembo 20 ebengi ye Mobikisi; mpe Nzembo 21 ezali kosanzola ye lokola Mobikisi ya Mokonzi oyo aponi. Nzembo 23 ebengi ye Mobateli Monene ya mpate, mpe Nzembo 24 elobi ete azali Mokonzi ya nkembo.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:1, 2 (NW)—“Likambo ya mpamba” oyo bikólo ezali kolobaloba na nse ezali nini? “Likambo ya mpamba” ezali nde makanisi oyo bayangeli bazali kokanisa mpo na kobatela bokonzi na bango. Yango ezali mpamba mpo ete mokano na bango ekolonga te. Bikólo ekoki kolonga soki moke te soki ‘etɛmɛli Yehova mpe mopakolami na ye.’
2:7 (NW)—“Mobeko ya Yehova” ezali nini? Mobeko yango ezali kondimana mpo na Bokonzi oyo Yehova asali na Mwana na ye, Yesu Klisto.—Luka 22:28, 29.
2:12 (NW)—Ndenge nini bakonzi ya bikólo bakoki “kopwɛpwa mwana”? Na ntango ya kala, kopwɛpwa moto ezalaki komonisa ete ozali moninga na ye mpe ozali sembo epai na ye. Ezalaki ndenge ya koyamba mopaya. Bakonzi ya mokili basengeli kopwɛpwa Mwana, elingi koloba, koyamba ye lokola Mokonzi mpe Masiya.
3:maloba oyo ezali likoló—Maloba oyo ezali likoló ya banzembo mosusu ezali na ntina nini? Maloba oyo ezali likoló ya banzembo emonisaka ntango mosusu nkombo ya mokomi na yango to mpe elobelaka makambo oyo esalemaki ntango bazalaki kokoma nzembo yango, na ndakisa na Nzembo 3. Maloba yango ekoki mpe kolimbola mokano to ntina ya nzembo yango (Nzembo 4 mpe 5) mpe ekoki koyebisa ndenge ya koyemba yango (Nzembo 6).
3:2 (NW)—Liloba “Sèla” elimboli nini? Bato mingi balobaka ete na bisika oyo liloba yango ezali, esengeli kopema mpo na komanyola, ezala na ntango bazali koyemba nzembo yango na mingongo ya mpamba to ntango bazali koyemba yango nzela moko na bibɛtɛli ya miziki. Bazalaki kopema na bisika yango mpo likanisi to mayoki oyo emonisami na nzembo ebima polele. Ezali na ntina te kotánga liloba yango ntango tozali kotánga mokanda ya Nzembo.
11:3 (NW)—Miboko nini ebebisami? Ezali miboko oyo esimbi mokili ya bato, elingi koloba, mibeko, molɔngɔ, mpe bosembo. Soki miboko yango ebebi, mobulu ekɔtaka mpe bosembo ezalaka lisusu te. Na ntango wana, esɛngaka ete “moyengebene” atyela Nzambe motema mobimba.—Nzembo 11:4-7.
21:3—“Motole ya wolo ya pɛto” ezali komonisa nini? Vɛrsɛ yango eyebisi te soki ezalaki motole ya solo to ezalaki kaka elilingi ya nkembo mingi oyo Davidi azwaki na ndenge alongaki bitumba mingi. Kasi, vɛrsɛ yango ezali mpe esakweli oyo ezali kolobela motole ya bokonzi oyo Yehova apesaki Yesu na 1914. Lokola motole yango ezali ya wolo emonisi ete bokonzi na ye ezali malamu mingi.
22:1, 2—Mpo na nini Davidi amonaki lokola nde Yehova atiki ye? Banguna ya Davidi batungisaki ye makasi na boye ete ‘motema na ye ekómaki lokola mafuta, enyangwaki na kati ya libumu na ye.’ (Nzembo 22:14) Ekoki kozala ete Davidi amonaki lokola nde Yehova asundoli ye. Yesu mpe ayokaki ndenge yango ntango babakaki ye na nzete. (Matai 27:46) Maloba ya Davidi emonisi ete azalaki na makanisi lokola moto nyonso ntango azali na mpasi makasi. Kasi, libondeli na ye oyo ezali na Nzembo 22:16-21 ezali komonisa polele ete Davidi abungisaki kondima epai ya Nzambe te.
Mateya mpo na biso:
1:1. Tosengeli koboya kozala baninga ya bato oyo balingaka Yehova te.—1 Bakolinti 15:33.
1:2. Tosengeli kolekisa mokolo moko te kozanga kotalela makambo ya elimo.—Matai 4:4.
4:4. Ntango tosiliki to tozali na nkanda, ebongi malamu tóbatela lolemo na biso mpo tóloba te makambo oyo biso moko tokomona mabe na nsima.—Baefese 4:26.
4:5. Bambeka na biso ya elimo ekozala ‘bambeka ya boyengebene’ soki tozali kopesa yango na makanisi ya malamu mpe tozali na etamboli oyo Yehova azali kosɛnga.
6:5. Ntina eleki malamu oyo tosengeli kolinga kotikala na bomoi ezali mpo na kosanzola Yehova.—Nzembo 115:17.
9:12. Yehova atunaka moto oyo asopi makila mpo na kopesa ye etumbu, kasi abosanaka te “baoyo bazwi mpasi.”
15:2, 3; 24:3-5. Basambeli ya solo basengeli kolobaka solo mpe koboya kolapa ndai ya lokuta to mpe kotɔnga.
15:4. Tosengeli kosala nyonso mpo na kokokisa maloba na biso, ata soki ezali mpasi tósala yango, longola kaka soki tolakaki likambo oyo Biblia endimi te.
15:5. Biso basambeli ya Yehova tosengeli kokeba na lokoso ya mbongo to kosalela kanyaka.
17:14, 15. “Bato ya mokili” babomaka nzoto mpo na kozala na bomoi ya malamu, kobota bana, mpe kotikela bango libula. Mposa monene ya Davidi ezalaki ete ‘amona elongi ya Nzambe’ to, azala na lokumu ya malamu na miso ya Yehova, elingi koloba ete Yehova asepela na ye. Mbala nyonso oyo Davidi azalaki ‘kolamuka’ mpo na kokanisa bilaka ya Yehova, azalaki ‘kosepela komona lolenge na Ye,’ na maloba mosusu azalaki kosepela ndenge Yehova azalaki na ye elongo. Lokola Davidi, tosengeli kotya motema na biso na bozwi ya elimo.
19:1-6. Soki biloko oyo Nzambe akelá, oyo elobaka te mpe ekanisaka te, epesaka ye nkembo, esengeli kozala boni mpo na biso bato oyo tokoki kokanisa, koloba, mpe kosambela?—Emoniseli 4:11.
19:7-11. Masɛngami ya Yehova ezali mpenza mpo na bolamu na biso!
19:12, 13. Mabunga mpe makambo ya nko ezali masumu mpe tosengeli kokima yango.
19:14. Tosengeli kokeba kaka te na makambo oyo tokosala, kasi mpe na maloba mpe makanisi na biso.
“OSIMBI NGAI MPO NA BOYENGEBENE NA NGAI”
Na Nzembo 25 mpe Nzembo 26, Davidi amonisaki mpenza ete azalaki na ekateli ya kotikala sembo! Ayembaki boye: “Kasi ngai nakotambola na boyengebene.” (Nzembo 26:11) Na libondeli na ye mpo na kosɛnga bolimbisi ya masumu, alobaki boye: “Wana nayebisaki bokesene na ngai te, nzoto na ngai ebebaki mpo na konguluma na ngai mokolo mobimba.” (Nzembo 32:3) Davidi apesi bato oyo bazali sembo epai ya Yehova elikya oyo: “Miso ya [Yehova] ekotalaka bato ya boyengebene mpe matoi na ye ekoyokaka koganga na bango.”—Nzembo 34:15.
Toli oyo epesami na Nzembo 37 ezalaki na ntina mingi mpo na Bayisalaele mpe ezali na ntina mingi mpo na biso baoyo tozali na bomoi na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Nzembo 40:7, 8 esakolaki mpo na Yesu Klisto ete: “Talá nakoya! Ekomami mpo na ngai kati na mokanda mokangami. Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo; ee Nzambe na ngai; mibeko na yo ezali kati na motema na ngai.” Nzembo 41 ezali libondeli oyo Davidi asalaki mpo na kosɛnga Yehova lisalisi na mikakatano oyo akutanaki na yango nsima ya kosala lisumu na Bata-seba. Ayembaki boye: “Nde yo osimbi ngai mpo na boyengebene na ngai.”—Nzembo 41:12.
Biyano na mituna ya Biblia:
26:6 (NW)—Na ndakisa ya Davidi, ndenge nini tokoki kotambola zingazinga ya etumbelo ya Yehova? Etumbelo ezali mokano ya Yehova ya kondima mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kobikisa bato. (Baebele 8:5; 10:5-10) Totambolaka zingazinga ya etumbelo ya Yehova na ndenge tomonisaka kondima na mbeka yango.
29:3-9—Ntango bakokanisi mongongo ya Yehova na lokito ya nkake makasi, yango ezali komonisa nini? Ezali komonisa ete Yehova azali na nguya ya kokamwa!
31:23—Ndenge nini Nzambe azongisaka mingi epai ya moto ya nzombo? Yehova apesaka etumbu ata epai ya moto ya sembo mpo na mabunga na ye oyo asali na nko te. Nzokande, lokola moto ya nzombo atikaka nzela ya mabe te, Nzambe azongiselaka ye mingi na ndenge apesaka ye etumbu ya makasi.—Masese 11:31; 1 Petelo 4:18.
33:6—“Mpema” ya monɔkɔ ya Yehova ezali nini? Mpema yango ezali elimo santu, to nguya na ye oyo asalelaka mosala, oyo asalelaki mpo na kokela likoló. (Genese 1:1, 2) Ebengami mpema ya monɔkɔ na ye mpamba te akoki kofula yango mpe kotinda yango ata mosika mpo na kokokisa mokano na ye.
35:19 (NW)—Libondeli ya Davidi epai ya Nzambe ete atika te ete bayini na ye báfina liso elingi koloba nini? Bayini ya Davidi balingaki kofina liso mpo na komonisa ete bazali kosepela mpo makambo ya mabe oyo bazalaki kokana mpo na ye elongi. Davidi asɛngaki ete likambo yango esalema te.
Mateya mpo na biso:
26:4. Tosengeli koboya kozala baninga ya bato oyo babombaka bomoto na bango na nzela ya Internet, to bato oyo na kelasi to na esika ya mosala bamimonisaka lokola baninga na biso mpo na komema biso na banzela ya mabe, to bapɛngwi oyo balukaka komimonisa na libándá ete bazali sembo, to mpe bato oyo basalaka mabe na kobombana.
26:7, 12; 35:18; 40:9. Tosengeli kosanzola Yehova na kati ya ebele ya bato, na makita ya lisangá.
26:8; 27:4. Tosepelaka koyangana na makita?
26:11. Ntango Davidi alobaki ete azali na ekateli ya kotikala sembo, asɛngaki mpe Nzambe abikisa ye. Yango emonisi ete tokoki kotikala sembo atako tozali bato ya kozanga kokoka.
29:10. Ntango Biblia elobi ete Yehova afandi likoló ya “mpela,” elimboli ete nguya na ye nyonso ezali na mabɔkɔ na ye.
30:5. Ezaleli ya Yehova oyo eleki monene ezali bolingo, kasi nkanda te.
32:9. Yehova alingi te tózala lokola mpunda oyo etosaka mpo batye yango ebende na mbanga to mpo bazali kobɛta yango fimbo. Alingi ete tótosa ye mpo motema na biso elingi yango mpe mpo tokangi ntina ya mokano na ye.
33:17-19. Ebongiseli moko te ya bato ekoki kobikisa, ata soki ezali makasi ndenge nini. Tosengeli kotya elikya na biso epai ya Yehova mpe Bokonzi na ye.
34:10. Maloba yango ezali mpenza kolendisa bato oyo balukaka liboso Bokonzi!
39:1, 2. Ntango bato ya mabe bazali koluka koyeba makambo ya bandeko na biso mpo básala bango mabe, ebongi ‘tóbatela monɔkɔ na biso na ekangeli’ mpe tófanda nyɛɛ.
40:1, 2. Kotya elikya epai ya Yehova ekoki kosalisa biso tólonga kotungisama na makanisi mpe tóbima na “libulu ya nsɔmɔ, longwa na pɔtɔpɔtɔ ya kokanga.”
40:5, 12. Soki tozali kobosana te ete tozali na mapamboli mingi koleka ‘oyo ekoki kotángama,’ eloko moko te ekolonga biso, ezala mikakatano to mabunga na biso, ata soki ezali mingi ndenge nini.
‘Yehova akumisama’
Nzembo 1 tii 41 ezali mpenza na maloba ya kobɔndisa mpe ya kolendisa! Soki tozali konyokwama to lisosoli na biso ezali kotungisama, eteni yango ya Liloba ya Nzambe ekoki kopesa biso makasi mpe kolendisa biso. (Baebele 4:12) Banzembo yango ezali na makanisi oyo ekoki kosalisa biso tótambola malamu na bomoi. Banzembo yango ezali komonisa biso ete ata soki tokutani na mokakatano ya ndenge nini, Yehova akosundola biso te.
Eteni yango ya liboso esuki na maloba oyo: “[Yehova] Nzambe ya Yisalaele akumisama libela na libela. Tondimi, ɛɛ tondimi.” (Nzembo 41:13) Nsima ya kotalela banzembo yango, motema na biso ezali kotinda biso te na kosanzola Yehova?
[Maloba na nse ya lokasa]
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
Soki biloko oyo Yehova akelá, oyo elobaka te mpe ekanisaka te, ekumisaka ye, biso bato tosengeli kokumisa ye koleka!
[Elilingi na lokasa 17]
Davidi akomaki banzembo mingi kati na Nzembo 1 tii 41
[Elilingi na lokasa 18]
Oyebi nzembo oyo elobaka ete Yehova azali Mobateli Monene ya mpate?
[Elilingi na lokasa 20]
Kolekisa mokolo moko te kozanga kotalela makambo ya elimo
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 17]
Minzoto: Na ndingisa ya United States Naval Observatory
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 19]
Minzoto, nkasa 18 mpe 19: Na ndingisa ya United States Naval Observatory
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 20]
Minzoto: Na ndingisa ya United States Naval Observatory