Ondimaka ete Nzambe azali mpenza?
NTANGO okutanaka na mitungisi makasi, obɛlɛmaka nokinoki epai ya Nzambe na libondeli? Soki ezali bongo, oyokaka ete ozali kosolola na moto ya solo?
Mpo na Tata na ye ya likoló, Yesu Klisto alobaki ete: “Motindi na ngai azali [mpenza, NW].” (Yoane 7:28) Ɛɛ, Yehova Nzambe azali mpenza, mpe kobondela ye ezali ndenge moko kokende epai ya moninga moko ya motema mpo na kozwa lisungi to mpe toli. Nzokande, mpo ete Nzambe ayoka biso, mabondeli na biso esengeli kokokisa masɛngami oyo Makomami emonisi mpo na libondeli oyo andimaka. Na ndakisa, tosengeli kobɛlɛma na komikitisa nyonso epai na ye oyo ‘akoyokaka mabondeli’ na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto.—Nzembo 65:2; 138:6; Yoane 14:6.
Basusu bakoki kokanisa ete lokola Nzambe amonanaka te, azali moto te. Mpo na bango, Nzambe azali se makanisi mpamba. Ata baklisto mosusu oyo bayekoli bizaleli kitoko ya Nzambe, bakoki mbala mosusu kokakatana mpo na kondima ete azali mpenza. Yango esilá kokómela yo mpe? Soki ezali bongo, eloko nini ekoki kosalisa yo mpo omona ete Yehova Nzambe azali mpenza?
Yekolá Makomami
Oyekolaka Makomami ntango nyonso? Soki okoyekola Biblia mbala na mbala mpe na bozindo, Yehova akokóma mpenza moto ya solo mpo na yo. Kondima na yo ekolendisama mpe okozwa likoki ya “komona ye oyo akomonanaka te.” (Baebele 11:6, 27) Nzokande, soki oyekolaka Biblia mbala na mbala te to oyekolaka yango na bopɔtu, kondima na yo mpe ekolendisama te.
Tózwa ndakisa: Kanisá soki monganga alobi na yo ete opakolaka pomadi moko mbala mibale na mokolo mpo na kosilisa makwanza. Soki okopakola pomadi yango bobele mbala moko to mbala mibale na sanza, makwanza na yo ekosila? Te. Bobele bongo, mokomi ya nzembo akomeli biso nkisi mpo na bokolɔngɔnɔ ya elimo. Kotánga Liloba ya Nzambe “butu na moi.” (Nzembo 1:1, 2) Mpo na kozwa matomba mingi, tosengeli kosalela “nkisi,” elingi koloba kotalela Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo na lisalisi ya mikanda ya boklisto.—Yosua 1:8.
Okosepela ete boyekoli na yo elendisaka kondima na yo? Salelá toli oyo: Nsima ya kotánga mokapo moko na Makomami Mosantu—Libongoli ya Mokili ya Sika to na Biblia mosusu oyo ezali na mitindami (références), poná vɛrsɛ oyo ebendi likebi na yo mpe talá mitindami oyo mipesami. Yango ekobakisa matomba na boyekoli na yo, mpe na ntembe te, boyokani oyo ezali kati na makambo oyo malobami na kati ya Biblia ekokamwisa yo. Yango ekosalisa yo mpo omona ete Yehova Nzambe, Mokomisi ya Biblia, azali mpenza.
Kosalela mitindami ekoki lisusu komesenisa yo na bisakweli ya Biblia mpe na kokokisama na yango. Mbala mosusu oyebi malamu bisakweli minene oyo ezali kati na Biblia, lokola oyo elobeli kobomama ya Yelusaleme na bato ya Babilone. Kasi, Biblia ezali na ebele ya bisakweli oyo ezali na boyokani kati na yango mpe kokokisama na yango. Bamoko na yango eyebani malamu te.
Na ndakisa, tángá esakweli oyo elobeli etumbu moto oyo akotonga lisusu Yeliko asengelaki kozwa, mpe talelá kokokisama na yango. Yosua 6:26 elobi ete: “Yosua asimbisaki bango ndai na ntango yango ete, Moto oyo akotɛlɛma mpe akotonga mboka oyo Yeliko lisusu alakelama mabe liboso na [Yehova]. Akotonga na miboko na lifuti na mwana na ye na nkulutu, mpe akotɛlɛmisa bikuke na yango na lifuti na mwana na ye na nsima.” Ekokisamaki mbula 500 na nsima, mpamba te na 1 Mikonzi 16:34 tozali kotánga ete: “Na mikolo na ye [Mokonzi Ahaba], Hiyele moto na Betele atongaki Yeliko. Atongaki miboko na yango likoló na Abilama mwana na ye na liboso mpe atɛlɛmisaki bikuke na yango likoló na Segubu mwana na ye ya nsuka, pelamoko liloba lilobaki [Yehova] na nzela na Yosua mwana na Nuni.”a Bobele Nzambe ya solo nde akoki kopemisa bisakweli motindo wana mpe kosɛnzɛla ete ekokisama.
Ntango ozali kotánga Biblia, likambo moko ekoki kobenda likebi na yo. Na ndakisa, okoki komituna mbula boni elekaki kobanda ntango esakweli moko elobamaki kino ntango ekokisamaki. Na esika ya kotuna moto mosusu, mpo na nini te kosala makasi ya koluka eyano yo moko? Salelá bakalati mpe mikanda mikolimbolaka Biblia kino okozwa biyano, ndenge moko okosala milende mpo na koyeba kosalela kalati oyo ezali kolakisa esika eloko ya motuya ezali. (Masese 2:4, 5) Biyano okozwa ekolendisa kondima na yo mpe okondima ete Yehova Nzambe azali mpenza.
Bondelaká na mabaku nyonso mpe na etingya
Kotyola motuya ya libondeli mpe ya kondima te. Bayekoli ya Yesu basɛngaki ye ete: “Bakiselá biso kondima.” (Luka 17:5) Soki omonaka ete Yehova azali mpenza solo te, mpo na nini te kosɛnga ye ete abakisela yo kondima? Zalá na kondima, sɛngá Tata na yo ya likoló lisungi mpo akóma mpenza moto ya solo na miso na yo.
Soki likambo moko ezali kotungisa yo, bongisá ntango malamu mpo na koyebisa Moninga na yo oyo azali na likoló makambo oyo ezali na kati ya motema na yo. Ntango Yesu akómaki pene ya kokufa, abondelaki na etingya. Atako akweisaki ezaleli ya bato ya mangomba oyo etali kosala mabondeli ya milaimilai mpo ete bato bámona bango, abondelaki butu mobimba ye moko liboso ya kopona bayekoli na ye 12. (Malako 12:38-40; Luka 6:12-16) Tokoki mpe kozwa liteya na ndakisa ya Hana, ye oyo abotaki mosakoli Samwele. Lokola azalaki na mposa ya kobota mwana mobali, “abondelaki ntango molai liboso na Yehova.”—1 Samwele 1:12, NW.
Makambo oyo eteyi biso nini? Soki olingi kozwa biyano na mabondeli na yo, osengeli kobondelaka na mozindo, na etingya, na mabaku nyonso—mpe na boyokani na mokano na Nzambe. (Luka 22:44; Baloma 12:12; 1 Batesaloniki 5:17; 1 Yoane 5:13-15) Soki okosala bongo okondima ete Nzambe azali mpenza.
Talá biloko bizalisami
Bomoto ya moyemi ekoki koyebana na misala na ye. Bobele bongo, “bizaleli bizangi komonana” oyo Yehova Motongi mpe Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ azali na yango, bizali komonana polele na biloko bizalisami. (Baloma 1:20, NW) Ntango tozali kotala na likebi misala ya mabɔkɔ ya Yehova, tokoyeba bomoto na ye malamu, mpe tokondima ete azali mpenza.
Soki otaleli na mozindo biloko Nzambe asalá, bizaleli na ye bikosimba mpenza motema na yo. Na ndakisa, koyeba makoki oyo bandɛkɛ bazali na yango mpo na kosala mibembo milai, ekobakisa bosepeli na yo mpo na mayele ya Yehova. Ntango ozali kotánga makambo matali molɔ́ngɔ́, okoki koyekola ete liboke ya minzoto oyo ebéngami voie lactée, bonene na yango emekami na année-lumière 100 000. Yango ezali bobele moko na kati ya bamiliare ya bagalaksi oyo etondi na mɔlɔ́ngɔ́. Yango endimisi yo ete Mozalisi azali na mayele, boye te?
Na ntembe te, Yehova azali mpenza na mayele! Kasi, yango elimboli nini mpo na yo? Ya solo, ye akoki kokakatana soki moke te mpo na kopesa eyano na makambo oyo ata nani kati na biso akoyebisa ye na libondeli. Ɛɛ, ata boyebi moke ya biloko bizalisami ekoki kondimisa yo ete Yehova azali mpenza.
Tambolá elongo na Yehova
Yo moko okoki kozwa bilembeteli ete Yehova azali mpenza? Ɛɛ, soki ozali lokola mosembwi Noa, tata ya mabota. Atosaki Yehova ntango nyonso, yango wana ekokaki kolobama ete: “Noa atambolaki na Nzambe elongo.” (Genese 6:9) Noa azalaki komona lokola ete Yehova azalaki pembeni na ye. Nzambe akoki kozala bongo mpenza mpo na yo.
Soki ozali kotambola elongo na Nzambe, okotya elikya na bilaka ya Makomami mpe okotosa yango. Na ndakisa, okondima maloba ya Yesu ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso [ya mosuni oyo esengeli] ikobakisama na bino.” (Matai 6:25-33) Ya solo, mbala mosusu Yehova akokokisa bamposa na yo te ndenge oyo okanisaki. Kasi, ntango obondeli mpe ozwi lisungi ya Nzambe, akokóma mpenza lokola moto nyonso oyo azali pembeni na yo.
Boyokani makasi motindo yango ekolaka ntango moto azali kolanda kotambola elongo na Nzambe. Tózwa ndakisa ya Manuela, mwasi Motatoli oyo alobaka lokota ya Espagnole, ye akutanaki na minyoko mingi. Alobi ete: “Ntango natungisamaki to nazalaki na bosɛnga, nasalelaki motinda ya Masese 18:10. Nakimaki mbangu koluka lisalisi epai ya Yehova. Azalaki ntango nyonso ‘ndako molai na nguya’ mpo na ngai.” Manuela alobi boye nsima ya mbula 36 ya kolikya na Yehova mpe komona lisungi na ye.
Obandi nde kotyela Yehova motema sika? Kolɛmba nzoto te soki boyokani na bino ekómi naino ndenge oyo yo olingi te. Mokolo na mokolo bomoi na yo ezala lokola ya moto oyo azali kotambola elongo na Nzambe. Wana ozali kokolisa bosembo kati na bomoi na yo, okokóma na boyokani malamu na Nzambe.—Nzembo 25:14; Masese 3:26, 32.
Lolenge mosusu ya kotambola elongo na Nzambe ezali ya komipesa mingi na mosala na ye. Ntango ozali kosakola Bokonzi, ozali moninga ya Nzambe na mosala. (1 Bakolinti 3:9) Koyeba likambo yango ekosalisa yo na kondima ete Nzambe azali mpenza.
Mokomi ya nzembo alobi ete: “Tikelá [Yehova] elekeli na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” (Nzembo 37:5) Kozanga te kokitisa mikumba mpe mitungisi na yo epai na Yehova. Ntango nyonso luká kozwa lisungi mpe litambwisi epai na ye. Soki ozali kotya elikya epai na Yehova Nzambe mpe ozali kobondela ye na motema mobimba, okoyoka ete obatelami mpamba te oyebi ete akozanga te kosala mpo na bolamu na yo. Ozalaka na elikya ntango oyebisaka Yehova mabanzo na yo? Ekozala bongo soki ondimaka ete Nzambe azali mpenza.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndakisa mosusu, tángá esakweli ya kobebisama ya etumbelo ya Yelobama na 1 Mikonzi 13:1-3. Bongo talá kokokisama na yango ekomami na 2 Mikonzi 23:16-18.
[Elilingi na lokasa 21]
Salá ete boyekoli na yo elendisaka kondima na yo
[Elilingi na lokasa 22]
Zwá ntango mpo na kobondela na mabaku nyonso mpe na etingya
[Bililingi na lokasa 23]
Talá ndenge bizaleli ya Nzambe bizali komonana na biloko bizalisami
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Colibri: U.S. Fish and Wildlife Service, Washington, D.C./Dean Biggins; minzoto: Fɔtɔ: Copyright IAC/RGO 1991, Dr. D. Malin et al, Isaac Newton Telescope, Roque de los Muchachos Observatory, La Palma, Canary Islands