Nkanda na ngai to kɔlɔngɔnɔ́ ya nzoto na ngai?
NANI asilikaka te? Yango ekómelaka biso banso. Mbala mosusu tozalaka na bantina malamu ya kosilika. Kasi, na bosembo nyonso, mbala mingi tozalaka na ntina ya solo te ya kosilika (to kongala makasi), boye te?
Biblia ezali koloba na biso ete: “Jala na nkanda tɛ mpe tika kosilika, yoka jua tɛ mpo ete ekolekisa yo na mabe.” (Njembo 37:8) Liteya nini ya mayele tozali kozwa na toli wana? Yango ekoki kosala mpenza bopusi likoló na kɔlɔ́ngɔ́nɔ na yo ya nzoto na mikolo mizali koya?
Na nsé na motó ya likambo “Kɔlɔ́ngɔ́nɔ ya nzoto,” zulunalo The New York Times emonisaki ete:
“Bato oyo mbala mingi bangalaka makasi to baoyo basilikaka na likambo nyonso oyo ezokisi bango, basuki te bobele na komonana bato mabe. Bazali mbala mosusu komiboma bango moko.
“Balukiluki basili koyanganisa ebele na bilembeteli ya sika oyo bimonisi ete kosilika ntango nyonso ezali mpenza kobebisa nzoto na boye ete yango ekokani, to eleki ata komela makaya, kozala monene mingi mpe kolya biloko ya mafuta mingi, na likambo litali nguya na yango ya koyeisa liwa nokinoki.
“‘Bolukiluki na biso bozali komonisa ete nkanda ya mabe ekokani na makámá mosusu nyonso oyo toyebi ete ebebisaka kɔlɔ́ngɔ́nɔ,’ ezali maloba ya monganga Redford Williams, moyekoli ya monɔ́ ya bizaleli na bato na lopitalo Duke University Medical Center.”
Bolukiluki bozali komonisa ete baoyo bamitungisaka koleka ndelo na ntina na mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo bazali kobimisa ba hormones mingi ya kobulungana na makanisi. Kongala na bango mbala na mbala ekoki kobebisa bokatikati oyo ezali kati na mitindo ya malamu mpe mitindo ya mabe ya eloko ebéngami cholestérol, kotyáká bango na makámá ya kozwa bokono ya motema mpe ya misisa.
Bato mosusu bakoki koloba ete: ‘Kasi ezali motindo ya bomoto na ngai’ to, ‘Ezali lolenge nakólaki.’ Nzokande, yango elingi koloba te ete okoki kobongwana te soki omeki na makasi nyonso kosalela batoli ya Nzambe. Luká kati na Biblia na yo moko batoli na ye na ntina na nkanda mpe kongala, oyo ekomami kati na Masese 14:29, 30; 22:24, 25; Baefese 4:26; Yakobo 1:19, 20.
Kosalela mayele oyo mauti na Nzambe ekoki kobongisa kɔlɔ́ngɔ́nɔ na yo mpe kopesa yo bomoi molai. Zulunalo Times emonisi ete: “Balukiluki mingi bazali koloba ete bato oyo basilikaka nokinoki bakoki kopɛngola likámá ya kokufa noki soki batiki ezaleli na bango ya nkandankanda.”