Bósala ete bomoi na bino ezala malamu!
“Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli na bato mabe . . . Nyonso ekosalaka ye ebongi.”—NZEMBO 1:1, 3.
1. (a) Kobonga elimboli nini mpo na bilenge mingi ya mokili? (b) Biblia elobi nini mpo na moto oyo abongi na bomoi?
KOBONGA. Liloba yango elimbolaka nini mpo na yo? Elenge mobali moko alobaki boye: “Ngai nalingaka mpenza nakóma moto monene na mosala na ngai.” Elenge mwasi moko alobaki ete: “Mposa na ngai mpenza ezalaka nasala libota moko ya esengo.” Kasi, elenge mwasi mosusu alobaki “Mposa na ngai ezalaka nazala na lopango moko kitoko, na vuatire kitoko . . . Nasalaka makambo oyo nalingi.” Kasi, kobonga ya solosolo ezali likambo ya mbongo te, ya libota te, to mpe ya mosala ya mbongo mingi. Nzembo 1:1-3 elobaka boye: “Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli na bato mabe, . . . mposa na ye ezali kati na Mobeko na [Yehova] . . . Nyonso ekosalaka ye ebongi.”
2. Epai wapi tokoki kozwa bolamu ya solosolo, mpe wapi nzela se moko mpo na kozwa yango?
2 Na vɛrsɛ oyo, Biblia elaki eloko oyo moto moko te akoki kopesa: kobonga ya solosolo! Kasi ezali kolobela kozwa mbongo te. Biblia yango moko elobi ete: “Mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso.” (1 Timote 6:10) Kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe mpe kotosa mibeko ya Yehova nde epesaka moto bolamu mpe esengo ya solosolo. Mbala mosusu osepelaka mpenza te na likanisi ya kotosa mibeko ya Yehova mpe báyebisaka yo makambo oyo osengeli kosala. Kasi, Yesu alobaki: “Esengo ezali na baoyo bayebi bamposa na bango ya elimo.” (Matai 5:3, NW) Oyeba yango to te, ozali na bamposa ya elimo, bakisa mpe mposa makasi ya koyeba Nzambe mpe koyeba mikano na ye. Yango wana, okozala na esengo ya solosolo se soki okokisi bamposa yango mpe soki ozali kotosa “mobeko ya Yehova.”
Mpo na nini tozali na mposa ya mibeko ya Nzambe?
3. Mpo na nini tosengeli kosepela Yehova ‘atambwisa makolo na biso’?
3 Mosakoli Yilimia akomaki boye: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” (Yilimia 10:23) Likambo yango eponi mbula te. Tozali na mayele mpe boyebi ya kotambwisa makolo na biso te; mpe lisusu, tozali na lotomo ya kosala yango te. Na Emoniseli 4:11, Biblia elobi ete: “Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.” Lokola Yehova azali Mozalisi na biso, azali “liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Na bongo, Yehova ayebi, koleka moto mosusu nyonso, ndenge oyo tosengeli kotambwisa bomoi na biso. Yango wana atyaki mibeko, mpo na koyokisa biso mpasi te, kasi mpo na malamu na biso. (Yisaya 48:17) Soki oboyi kotosa mibeko ya Nzambe, yebá ete okosuka mabe.
4. Mpo na nini bilenge mingi babebisaka bomoi na bango?
4 Na ndakisa, oyebi mpo na nini bilenge mingi bazali kobebisa bomoi na bango na komela bangi, kosala kindumba, mpe makambo mosusu ya mabe? Nzembo 36:1, 2 elobi boye: “Mabe elobi epai na moto na yauli kati na motema na ye; nsɔmɔ na Nzambe ezali liboso na miso na ye te. Akomikembisa ye mpenza na miso na ye ete bato bakoyeba mpe bakoyina masumu na ye te.” Lokola bazali na ‘nsɔmɔ ya Nzambe’ te, bilenge mingi bamikosaka na kokanisa ete ata bazali kosala makambo mabe, ekosala bango eloko moko te. Kasi nsukansuka, bamonaka ete maloba oyo ezali solo: “Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto, nde ye oyo akokona kati na [elimo, NW] akobuka bomoi na seko na nzela na [elimo, NW].”—Bagalatia 6:7, 8.
“Tótánga mikolo na biso”
5, 6. (a) Mpo na nini bilenge basengeli ‘kotánga mikolo na bango,’ mpe kotánga mikolo elimboli nini? (b) ‘Kokanisa Mozalisi na biso Monene’ elimboli nini?
5 Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya malamu mpe ‘kobuka bomoi ya seko’? Mose akomaki boye: “Motuya na mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe soko mpo na makasi ikokóma na ntuku mwambe; . . . ekosila noki mpe biso tokopombwa.” (Nzembo 90:10) Mbala mosusu okanisaka mpenza te, to mpe ata moke te, ete okokufa. Kutu, bilenge mingi basalaka makambo lokola nde bakoki kokufa te. Kasi Mose ayebisi biso likambo ya solo ete bomoi na biso ezali mokuse. Kutu, tokoki mpenza koyeba te soki tokoumela mbula 70 to 80. “Ntango mpe makambo oyo ekanami te” ekoki kosukisa bomoi ata ya baoyo bazali bilenge mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. (Mosakoli 9:11, NW) Na bongo, ndenge nini okoki kosalela malamu bomoi na yo? Mose asalaki libondeli oyo: “Teyá biso ete tótánga mikolo na biso malamu ete tózwa mitema na mayele.”—Nzembo 90:12.
6 Kotánga mikolo na yo elimboli nini? Elingi koloba te ete osengeli ntango nyonso kotungisaka makanisi na yo na kokanisa soki okoumela mbula boni. Na libondeli na ye, Mose alingaki koloba ete Yehova ateya basaleli na Ye kosala makambo oyo ezali kokumisa Ye na mikolo oyo batikali na yango na bomoi. Ozali kotánga mikolo ya bomoi na yo, ozali kotalela mokolo mokomoko lokola eloko ya motuya oyo osengeli kosalela mpo na kokumisa Nzambe? Biblia elendisi bilenge na maloba oyo: “Longolá mawa na motema na yo mpe bimisá mabe na nzoto na yo mpo ete bomwana mpe bolenge izali mpamba. Kanisá [Mozalisi na yo Monene, NW] na mikolo ya bolenge na yo.” (Mosakoli 11:10–12:1) Kokanisa Mozalisi na biso esuki kaka te na koyeba ete azali. Ntango moyibi ayebisaki Yesu ete, “Wana ekokóma yo na bokonzi na yo, kanisá ngai,” alingaki koloba kaka te ete Yesu abosana nkombo na ye te. Kasi alingaki nde ete Yesu asala likambo moko mpo na ye, to asekwisa ye! (Luka 23:42; talá Genese 40:14, 23; Yobo 14:13.) Ndenge moko mpe, kokanisa Yehova esɛngi kosala makambo oyo esepelisaka ye. Bato bamonaka ete okanisaka Yehova?
Bóyokela bato mabe zuwa te
7. Mpo na nini bilenge mosusu babosanaka Mozalisi na bango? Pesá ndakisa.
7 Bilenge mingi bapesaka Yehova mokɔngɔ mpo bamonaka ete kozala Motatoli ezali nkaka mingi. Na Espagne, ndeko mobali moko amonisi makanisi oyo azalaki na yango ntango azalaki elenge: “Makambo ya mokili ezalaki kobenda ngai mpo nazalaki komona ete na lisangá ya Yehova makambo ezali makasi. Mikolo nyonso kaka kofanda, koyekola, kokende makita; kolata kravati; ngai nazalaki kosepela na makambo yango te.” Yo mpe ntango mosusu omonaka lokola ete ozali kozanga makambo mosusu mpo ozali kosalela Nzambe? Mbala mosusu okokamwa na koyeba ete moko na bato oyo bakomaki Biblia akanisaki mpe bongo. Fungolá Biblia na yo mpe tángá Nzembo 73.
8. Mpo na nini Asafa ‘ayokelaki bato bazangi mayele zuwa’?
8 Tiká tótalela naino mwa moke nzembo yango. Vɛrsɛ 2 na 3 (Liloba lya Nzambe) elobi: “Etikalaki moke nakweya o nzela, etikalaki se moke naselumwa, zambi nayokelaki bato bazangi mayele zuwa, na bomoni bomengo bwa basumuki.” Mwa maloba oyo ezali liboso ya nzembo yango emonisi ete ezali nzembo ya Asafa. Asafa azalaki alanga-nzembo Molevi mpe azalaki na bomoi eleko moko na Mokonzi Davidi. (1 Ntango 25:1, 2; 2 Ntango 29:30) Atako Asafa azalaki na libaku malamu ya kosala na tempelo ya Nzambe, bato oyo bazalaki komikumisa ndenge bazalaki kobuka mibeko ya Nzambe akomaki ‘koyokela bango zuwa.’ Bato yango bazalaki komonana lokola nde bazali malamu; lokola nde bazali na kimya mpe bazali kobanga eloko te. Kutu, bolamu na bango ‘elekaki makanisi ya motema na bango.’ (Vɛrsɛ 5, 7, NW) Bazalaki “na nzombo” to na lofundo na ndenge oyo bazalaki kolobela makambo ya kokamwa oyo bazalaki kosala. (Vɛrsɛ 8) ‘Bakotombola minɔkɔ na bango kino lola mpe lolemo na bango ekotambolaka na mokili,’ bazali kobanga moto moko te, ezala na likoló to awa na mabelé.—Vɛrsɛ 9.
9. Lelo oyo, ndenge nini bilenge baklisto bakoki komiyoka lokola Asafa?
9 Mbala mosusu baninga na yo ya kelasi bazali mpe ndenge yango. Mbala mosusu oyokaka ndenge bamikumisaka ntango bazali kolobela makambo ya nsɔni oyo basalaka na bamakango na bango, na biyenga oyo bakendaka, mpe ndenge bamelaka masanga mpe bangi. Soki otali bomoi oyo bango babéngaka bomoi ya bisengo, na nsima otali nzela moke oyo yo osengeli kolanda lokola moklisto, ntango mosusu okoki “koyokela bato bazangi mayele zuwa.” (Matai 7:13, 14) Asafa abimisaki mpenza likambo yango na esika oyo alobaki ete: “Solo, ezali bobele mpamba ete napɛtoli motema na ngai mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kati na sembo! Zambi ngai nazali kotungisama mokolo na mokolo.” (Vɛrsɛ 13, 14) Ɛɛ, akómaki komituna soki kosalela Nzambe mpe kozala sembo ezali mpenza na ntina.
10, 11. (a) Eloko nini epusaki Asafa atika makanisi oyo azalaki na yango liboso? (b) Na ndenge nini basali na mabe bazali “na nzela na mosɛlu”? Pesá ndakisa.
10 Likambo ya malamu mpo na Asafa ezali ete aumelaki ntango molai te na kozanga elikya na ye. Aumelaki te na komona ete kimya ya bato mabe ezali kimya ya lokuta, ezali kimya ya mwa ntango moke! Alobaki boye: “Solo otyaki bango na nzela na mosɛlu; yo obwaki bango na mobulu. Talá, nokinoki bango basili kobeba; balongolami, mpe balimwi bango nyonso na kobanga.” (Vɛrsɛ 18, 19) Baninga na yo mingi bazali mpe “na nzela na mosɛlu.” Ata ndɛlɛ, na ndenge oyo bazali kotyola Nzambe na misala na bango, makambo ekobalukela bango. Mbala mosusu bakosuka na kozwa bazemi oyo bakanaki te, to bakozwa maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, bakokɔta bolɔkɔ to mpe bakoki kokufa! Mpe likambo eleki mabe ezali ete bazali baninga ya Nzambe te.—Yakobo 4:4.
11 Na Espagne, ndeko mwasi moko akutanaki mpenza na makambo yango. Ntango azalaki elenge, azalaki kosala makambo mabe elongo na bilenge mosusu ya mokili na kobombana. Mwa moke na nsima, akómaki makango ya elenge mobali moko oyo azalaki momeli bangi. Atako ye moko azalaki komela bangi te, azalaki kosombela mwana mobali yango bangi. Alobi ete: “Nazalaki kutu kosalisa ye mpo amitɔbɔla ntonga ya bangi.” Ndeko mwasi yango abikaki mpo basalisaki ye, azongelaki makanisi malamu mpe akómaki lisusu malamu na elimo. Kasi, nsima ya mwa ntango, abangaki makasi ntango bayebisaki ye ete makango na ye ya kala oyo azalaki momeli bangi akufaki na sida. Ya solo, basali na mabe bazali na “nzela na mosɛlu” ndenge mokomi ya nzembo alobaki yango. Makambo mabe oyo bilenge mosusu bazali kosala ekoki komema bango na liwa ya mobesu. Mpo na bamosusu, soki babongoli bizaleli na bango te, etikali moke bakosuka “ntango Mokonzi Yezu akomonana na Likolo, elongo na baanzelu na ye ya nguya, na kati ya móto ezali kopela makasi, mpo na kopesa etumbu na bato oyo bayebi Nzambe te mpe baboyi kotosa Nsango Malamu ya Mokonzi na biso Yezu.”—2 Tesalonika 1:7, 8, Boyokani ya Sika.
12. Ndenge nini elenge moko na Japon amonaki ete koyokela bato ya mabe zuwa ezali bozoba?
12 Yango wana, koyokela “bato oyo bayebi Nzambe te” zuwa, ezali mpenza bozoba! Soki totali malamu, esengeli nde koyokela bato oyo bayebi Yehova mpe bazali na elikya ya bomoi ya seko zuwa. Na Japon, ndeko mobali moko amonaki likambo yango. Lokola azali elenge, ye mpe “alingaki asalaka makambo ndenge alingi.” Alobi boye: “Nazalaki komona lokola nde nazali kozanga eloko moko. Na nsima, nakanisaki ndenge oyo bomoi na ngai elingaki kozala soki nayebaki mateya ya solo te. Nalingaki kolekisa mbula 70 to 80 mpe na nsima nakufi. Kasi Yehova apesi biso elikya ya bomoi ya seko! Ntango nasosolaki likambo yango, esalisaki ngai nasepela na oyo nazalaki na yango.” Atako bongo, kotikala sembo na kati ya mokili etondi na bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe te ezali lisɛki te. Wapi mwa makambo okoki kosala mpo na kokima makanisi yango?
Bókeba na baninga na bino!
13, 14. Mpo na nini koyeba kopona baninga ezali na ntina?
13 Tótalela lisusu ndenge Nzembo 1:1-3 elobeli moto oyo abongi na bomoi na ye: “Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli na bato mabe, oyo atɛlɛmi na nzela na bato na masumu te, oyo afandi esika moko na batyoli te; kasi mposa na ye ezali kati na Mobeko na [Yehova]; [atángaka mobeko yango na mongongo ya nse, NW] butu na moi. Azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima na mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ikokaoka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.”
14 Likambo ya liboso oyo bokosimba ezali ete baninga na bino bakoki komema bino na nzela malamu to mabe. Masese 13:20 elobi boye: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” Yango elingi koloba te ete osengeli kokangaka elongi liboso ya bilenge oyo bazali Batatoli te, to kozala na boboto te epai na bango to mpe na makambo makasi. Biblia elobi na biso tólinga bazalani na biso mpe ‘tózala na bato nyonso na kimya.’ (Baloma 12:18; Matai 22:39) Kasi, soki osali boninga makasi na bato yango, okobanda ‘kolanda toli’ ya bato oyo batosaka mibeko ya Biblia te.
Matomba ya kotánga Biblia
15. Ndenge nini bilenge bakoki kolona mposa ya kotánga Biblia?
15 Mokomi ya nzembo amonaki mpe ete moto oyo abongi na bomoi na ye asepelaka kotánga mobeko ya Nzambe “na mongongo ya nse butu na moi.” (Nzembo 1:1, 2, NW) Ezali solo ete ezali pɛtɛɛ te kotánga Biblia, mpe na kati ya Biblia “makambo mosusu mazali makasi koyeba ntina.” (2 Petelo 3:16, 17) Kasi tosengeli kotalelaka kotánga Biblia lokola motungisi te. Moto akoki ‘kokóma na mposa makasi ya miliki ya sika’ ya Liloba ya Nzambe. (1 Petelo 2:2, NW) Meká kotángaka ata mwa bavɛrsɛ moke mokolo nyonso oyo Nzambe asala. Soki ozali kokanga ntina ya makambo mosusu te, luká bandimbola na yango na mikanda mosusu. Na nsima, kanisá na bozindo makambo oyo otángi. (Nzembo 77:11, 12) Soki ozali kokoka kotya makanisi na yo esika moko te, meká kotánga na mongongo “ya nse.” Okomona ete nsima ya mikolo, mposa ya kotánga Biblia ekokola. Na Brésil, ndeko mwasi moko elenge alobi boye: “Nazalaki kaka komona ete Yehova azali mosika na ngai. Kasi, eleki sikoyo mwa basanza, nabandi kosala boyekoli ya ngai moko mpe kotánga Biblia. Sikoyo nazali komona ete nakómi mpenza moninga ya Yehova. Nazali komona ete azali mpenza solo.”
16. Ndenge nini tokoki kozwa litomba mingi na makita ya lisangá?
16 Koyangana na makita ya lisangá ezali mpe likambo mosusu oyo ya ntina mingi mpo na kokola na elimo. Okolendisama mingi soki ‘ozali kokeba na ndenge oyo ozali koyoka.’ (Luka 8:18) Ekómelaka yo na komona ete makita ezali mpenza kosepelisa yo te? Boye omituna mituna oyo: ‘Ngai, nasalaka nini mpo makita esepelisa ngai? Nalandaka malamu? Namibongisaka? Napesaka biyano?’ Kobosana te ete Biblia elobi na biso “tótalanaka mpo na kopusama na bolingo mpe na misala ya malamu, . . . tólendisanaka.” (Baebele 10:24, 25, NW) Mpo na kosala nyonso wana, osengeli kopesaka biyano! Nzokande mpo opesa biyano, esengeli liboso omibongisa. Ndeko mwasi moko elenge alobi: “Kopesa biyano na makita ezalaka mpasi te soki omibongisi.”
Kolanda nzela ya Nzambe epesaka bolamu
17. Na nini moto oyo atángaka Biblia ntango nyonso “azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima na mai”?
17 Mokomi ya nzembo alobaki lisusu ete moto oyo abongi azali “lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima na mai.” Ekoki kozala ete bitima ya mai ezalaki batalase oyo batimolaki mpo na komema mai na bilanga ya banzete oyo ebotaka mbuma. (Yisaya 44:4) Kotánga Biblia mokolo na mokolo ezali lokola kokende kozwa bilei mpe libɔndisi na esika oyo yango esilaka te. (Yilimia 17:8) Mokolo na mokolo okozwa makasi oyo ozali na yango mposa mpo na kolonga minyoko na mikakatano. Nsima ya koyeba makanisi ya Yehova, okozala na mayele oyo esengeli mpo na kokamata mikano ya malamu.
18. Eloko nini ekoki kosalisa elenge abonga ntango azali kosalela Yehova?
18 Na bantango mosusu, okoki komona ete kosalela Yehova ezali mpasi. Kasi, kokanisa te ete okoki kosalela Yehova te. (Deteronome 30:11) Biblia elaki yo ete ‘nyonso oyo okosala ekobonga’ na mikolo ekoya, soki mokano na yo ya liboso ezali ete osepelisa motema ya Yehova! (Masese 27:11) Lisusu, kobosana te ete ozali yo moko te. Yehova na Yesu Klisto bazali nsima na yo. (Matai 28:20; Baebele 13:5) Bayebi mikakatano oyo ozali kokutana na yango, mpe bakosundola yo te. (Nzembo 55:22) Ozali mpe na lisungi ya “lisangá mobimba ya bandeko” na baboti na yo, soki babangaka Nzambe. (1 Petelo 2:17) Soki ozali na lisungi motindo wana, mpe obakisi etingya na molende likoló, okozala na bomoi ya malamu, sikoyo mpe libela na libela!
Mituna ya bozongeli
◻ Kobonga ya solosolo ezali nini?
◻ Mpo na nini tozali na mposa Yehova atambwisa makolo na biso?
◻ Ndenge nini bilenge bakoki ‘kotánga mikolo na bango’
◻ Mpo na nini koyokela bato mabe zuwa ezali bozoba?
◻ Ndenge nini kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koyangana na makita ekoki kosalisa bilenge bázala na bomoi ya malamu?
[Elilingi na lokasa 20]
Lokola bazali na “nsɔmɔ ya Nzambe” te, bilenge mingi basalaka makambo oyo ekoki komemela bango makama
[Elilingi na lokasa 22]
Mbala mingi bilenge babosanaka ete makambo oyo basalaka ekobota mbuma na yango
[Elilingi na lokasa 23]
Kolisá mposa ya kotánga Biblia
[Elilingi na lokasa 23]
Okolinga makita mingi soki ozali kopesa biyano.